Yehova azali kokómisa basaleli na ye kitoko na pole
“Tɛlɛmá, Ɛ mwasi, tindá pole, mpamba te pole na yo eyei mpe nkembo ya Yehova ekómeli yo.”—YISAYA 60:1, NW.
1, 2. (a) Bato bazali na kati ya ezalela nini? (b) Banani bazali kotya bato na molili?
HARRY TRUMAN, prezida ya États-Unis banda 1945 tii 1953, amilelaki ete: “Aa, soki tozalaki ata na Yisaya to na Santu Paulo!” Mpo na nini alobaki bongo? Mpo amonaki na ntango wana ete mokili ezalaki na mposa ya batambwisi oyo bazali na bizaleli malamu. Na ntango wana, mokili eutaki kobima na eleko oyo elekaki molili na ekeke ya 20, elingi koloba Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kasi, atako etumba esilaki, mokili ezalaki naino na kimya te. Molili ezalaki naino. Kutu, ata lelo oyo, mbula 57 banda etumba wana esilá, mokili ezali naino kaka na molili. Soki Prezida Truman azalaki na bomoi na moi ya lelo, na ntembe te alingaki komona ete mokili ezali kaka na mposa ya batambwisi oyo bazali na bizaleli malamu lokola Yisaya to ntoma Paulo.
2 Toyebi te soki Prezida Truman ayebaki likambo yango to te, kasi ntoma Paulo alobelaki molili oyo ezali kozipa bato, mpe akebisaki biso mpo na yango na mikanda na ye. Na ndakisa, Paulo ayebisaki baninga na ye bandimi boye: “Tozali kobunda líbanda na makila mpe mosuni te, kasi na baguvɛrnɛma, na bakonzi, na bayangeli ya mokili ya molili oyo, na mampinga ya bilimu mabe na kati ya bisika ya likoló.” (Baefese 6:12, NW) Na maloba yango, Paulo amonisaki ete asukaki kaka te na koyeba ete molili ya elimo ezipi mokili, kasi ayebaki mpe baoyo bazali kotya molili yango: bademo ya nguya , oyo abengi bango “bayangeli ya mokili.” Lokola bilimo ya nguya nde ezali kotya molili na mokili, bato bakoki te kolongola molili yango na makasi na bango moko.
3. Atako bato bazali na molili, Yisaya asakolaki nini mpo na bato ya sembo?
3 Yisaya mpe alobelaki molili oyo ezali kozipa bato. (Yisaya 8:22; 59:9) Nzokande, apemamaki na elimo mpe asakolaki mpo na mikolo na biso ete ata na ntango ya molili oyo, Yehova akongɛngisa miso ya bato oyo balingaka pole. Ya solo, atako Paulo na Yisaya bazali na biso te, tozali na mikanda oyo bakomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe oyo ekoki kolakisa biso nzela. Mpo na komona bolamu oyo yango ezali komemela bato oyo balingaka Yehova, tótalela maloba oyo Yisaya asakolaki na mokapo 60 ya mokanda na ye.
Mwasi moko ya elilingi azali kongɛngisa pole
4, 5. (a) Yehova alobi na mwasi moko asala nini, mpe alaki ye nini? (b) Makambo nini ya kitoko ezali na Yisaya mokapo 60?
4 Maloba ya liboso ya Yisaya mokapo ya 60, bazali koyebisa yango na mwasi moko oyo azali na mpasi mpenza; azali na kati ya molili mpe alali na mabele. Mbala moko, pole engɛngi makasi, mpe Yehova abeleli ete: “Tɛlɛmá, Ɛ mwasi, tindá pole, mpamba te pole na yo eyei mpe nkembo ya Yehova ekómeli yo.” (Yisaya 60:1, NW) Ntango ekoki mpo mwasi yango atɛlɛma mpe angɛngisa pole, to nkembo ya Yehova. Mpo na nini? Eyano ezali na vɛrsɛ oyo elandi: “Talá, molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota; nde [Yehova] akobimela yo, mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo.” (Yisaya 60:2) Ntango mwasi yango atosi maloba ya Yehova, bayebisi ye likambo ya malamu oyo ekosalema. Yehova alobi ete: “Mabota bakoya epai na pole na yo mpe mikonzi kino kongɛnga na kobima na yo.”—Yisaya 60:3
5 Maloba kitoko ya bavɛrsɛ wana misato ya ebandeli ezali komonisa na mokuse makambo nyonso oyo ezali na bavɛrsɛ oyo etikali na Yisaya mokapo ya 60. Ezali kosakola makambo oyo mwasi moko ya elilingi akokutana na yango mpe ezali kolimbola ndenge oyo biso tokoki kotikala na pole ya Yehova atako bato bazali na kati ya molili. Kasi bililingi oyo esalelami na bavɛrsɛ wana misato ya ebandeli elimboli mpenza nini?
6. Mwasi oyo Yisaya mokapo ya 60 elobeli ezali nani, mpe banani bazali komonisa ye awa na mabele?
6 Mwasi oyo Yisaya 60:1-3 ezali kolobela ezali Siona, elingi koloba ebongiseli ya Yehova oyo esangisi bikelamu na ye ya elimo kuna na likoló. Lelo oyo, batikali ya “Yisalaele ya Nzambe,” elingi koloba baklisto bapakolami na elimo na mokili mobimba, oyo bazali na elikya ya kozala bakonzi esika moko na Klisto na likoló, nde bazali komonisa Siona awa na mabele. (Bagalatia 6:16) Bato nyonso ya libota yango ya elimo bazali 144 000, mpe na ntango na biso, Yisaya mokapo ya 60 ezali kokokisama epai ya batikali oyo bazali na bomoi awa na mabele na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1, NW; Emoniseli 14:1) Esakweli yango elobi mpe makambo mingi oyo etali baninga ya baklisto bapakolami yango, elingi koloba “ebele monene” ya “bampate mosusu.”—Emoniseli 7:9; Yoane 10:16.
7. Siona ezalaki na ezalela nini na 1918, mpe ndenge nini likambo yango esakolamaki?
7 Ezalaki nde na ntango moko boye oyo “Yisalaele ya Nzambe” elalaki na kati ya molili, ndenge emonisami na mwasi wana ya elilingi? Ɛɛ, likambo yango esalemaki ekoki sikoyo mbula koleka 80. Na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, baklisto bapakolami basalaki nyonso mpo mosala ya kopesa litatoli elanda kosalema. Kasi, na 1918, mbula ya nsuka ya etumba, mosala ya kosakola ezalaki lokola ekufi mpenza. Joseph Rutherford azalaki kokamba mosala ya kosakola na mokili mobimba; ye na baklisto mosusu oyo bazalaki na mikumba minene bazwaki bitumbu ya bambula mingi ya bolɔkɔ mpo na makambo oyo bakoselaki bango. Na ndenge ya esakweli, mokanda ya Emoniseli elobelaki baklisto bapakolami oyo bazalaki na mabele na ntango wana lokola bibembe “na balabala monene ya engumba monene oyo ebengami na ndimbola ya elimo ete Sodomo mpe Ezipito.” (Emoniseli 11:8, NW) Wana ezalaki mpenza eleko ya molili mpo na Siona, oyo emonisami na bana na yango bapakolami awa na mabele!
8. Mbongwana nini esalemaki na 1919, mpe yango ememaki makambo nini?
8 Kasi, na 1919, makambo ebongwanaki mpenza. Yehova angɛngisaki pole likoló ya Siona! Bato ya Yisalaele ya elimo oyo bakufaki te batɛlɛmaki mpo na kongɛngisa pole ya Nzambe; babandaki lisusu mosala ya kosakola nsango malamu kozanga kobanga. (Matai 5:14-16) Baklisto wana bazwaki lisusu molende mpe basalisaki bato mosusu ete báya na pole ya Yehova. Bato yango ya sika ezalaki libosoliboso bapakolami oyo basengelaki mpe kokɔta na molɔngɔ ya Yisalaele ya Nzambe. Na Yisaya 60:3, babengi bango mikonzi, mpamba te bakozwa libula elongo na Klisto na Bokonzi ya Nzambe na likoló. (Emoniseli 20:6) Na nsima, ebele ya bampate mosusu bayaki na pole ya Yehova. Bango nde oyo esakweli ebengi ete “mabota.”
Bana ya mwasi yango bayei na ndako
9, 10. (a) Likambo nini ya kitoko mwasi yango amonaki, mpe yango ezalaki komonisa nini? (b) Mpo na bantina nini Siona asepelaki?
9 Sikoyo, Yehova abandi kolimbola na bozindo likambo mokomoko ya esakweli ya Yisaya 60:1-3. Atindi mwasi yango asala likambo mosusu. Alobi na ye boye: “Tombolá miso na yo epai na epai mpe talá.” Mwasi yango atosi, mpe amoni likambo moko ya esengo mingi! Bana na ye bazali koya na ndako. Vɛrsɛ yango elobi lisusu boye: “Bazali koyangana nyonso elongo, bazali koya epai na yo; bana babali na yo bakolongwa na mosika mpe bana basi na yo bakokumbama na loketo.” (Yisaya 60:4) Mosala ya kosakola Bokonzi oyo ebandaki na 1919 ebendaki ebele ya bato ya sika na mosala ya Yehova. Bango mpe bakómaki “bana babali” mpe “bana basi” ya Siona, bapakolami oyo bazali na Yisalaele ya Nzambe. Boye, Yehova akómisaki Siona kitoko na ndenge oyo amemaki na pole bato ya nsuka kati na ba 144 000.
10 Kanisá naino esengo oyo Siona ayokaki na kozala na bana na ye! Kasi, Yehova apesi Siona makambo mosusu oyo ekobakisa esengo na ye. Totángi boye: “Bongo okomona mpe okongɛnga, motema na yo [ekolɛnga] mpe ekoya monene; zambi, [bomɛngo, NW] ya mai-na-monana [ekotalisa epai na] yo, bozwi ya mabota ekoyela yo.” (Yisaya 60:5) Maloba wana ya esakweli ekokisamaki na boye ete kobanda bambula ya 1930, ebele ya baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele bazali koya na Siona. Babimi na “mai-na-monana,” oyo elimboli bato oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ, mpe bazali komonisa bozwi ya mabota. Bango nde “biloko kitoko ya mabota nyonso.” (Hagai 2:7, NW; Yisaya 57:20) Tomoni mpe ete “biloko kitoko” yango bazali koya kosalela Yehova moto na moto na ndenge na ye te. Bazali kokómisa Siona kitoko koleka na ndenge bazali kosambela esika moko na bandeko na bango bapakolami na elimo; na bongo bazali kokóma bango nyonso “etonga moko” oyo ezali na “mobateli moko.”—Yoane 10:16.
Bato ya mombongo na babateli ya mpate bazali koya na Siona
11, 12. (a) Lobelá naino ebele ya bato oyo bazali kokende na Siona.
11 Mosala yango ya koyanganisa oyo esakolamaki esali ete bato oyo bazali kosanzola Yehova bakómi mingi. Likambo yango esakolamaki na maloba oyo elandi na esakweli. Kanisá ete otɛlɛmi elongo na mwasi wana ya elilingi likoló ya Ngomba Siona. Obwaki miso epai moi ebimaka, mpe omoni nini? “Ebele ya bakamela ekozipa yo, bakamela bilenge ya Midiana mpe ya Efa; bango nyonso ya Seba bakoya, [bakomema] wolo mpe mpaka ya malasi, mpe bakosanzola lokumu ya [Yehova].” (Yisaya 60:6) Ebele ya bato ya mombongo bazali kotambwisa makalo oyo bakamela ezali kobenda na banzela mikemike oyo ezali koya na Yelusaleme. Bakamela batondi bisika nyonso lokola mpela oyo ezindisi mokili yango! Bato ya mombongo bamemi makabo ya ntalo, “wolo mpe mpaka ya malasi.” Bato yango ya mombongo bazali koya epai ya pole ya Nzambe mpo na kokumisa ye liboso ya bato nyonso, ‘kosanzola lokumu ya Yehova.’
12 Baoyo bazali koya ezali kaka bato ya mombongo te. Ebele ya babateli ya mpate bazali mpe koya na Siona. Esakweli elobi lisusu boye: “Bitonga nyonso ya Kedala [ekoyangana epai na yo, NW], bampate babali ya Nebayoto bakosalela yo.” (Yisaya 60:7a) Bato ya bikólo oyo babɔkɔlaka bibwele bazali mpe koya na engumba mosantu mpo na kopesa Yehova banyama oyo eleki malamu na bitonga na bango. Kutu, bazali komipesa bango moko mpo na kosalela Siona! Ndenge nini Yehova akoyamba bapaya yango? Nzambe ye moko apesi eyano ete: “Bakoya na koyambama malamu likoló na etumbelo na ngai mpe [nakokómisa ndako na ngai kitoko, NW] na nkembo.” (Yisaya 60:7b) Na boboto nyonso, Yehova azali koyamba makabo mpe mosala ya bapaya yango. Bango mpe bazali kokómisa tempelo na ye kitoko.
13, 14. Nini ezali komonana oyo ezali kouta epai oyo moi elalaka?
13 Sikoyo balolá elongi mpe talá malamu epai moi elalaka. Ozali komona nini? Na mosika, ozali komona lokola lipata ya mpɛmbɛ oyo etandami likoló ya mai monene. Yehova atuni motuna oyo eyeli yo na makanisi: “Banani baoyo bakopumbwa likoló lokola lipata, mpe lokola bibenga kino maninisa na bango?” (Yisaya 60:8) Ye moko Yehova apesi eyano na motuna na ye ete: “[Bisanga ekozela, NW] ngai, masuwa ya Talasisi liboso; mpo na koyeisa bana na yo longwa mosika, palata na bango mpe wolo elongo na bango, mpo na nkombo ya [Yehova], Nzambe na yo, mpe mpo na [Mosantu ya Yisalaele, mpamba te akosila kokómisa yo kitoko, NW].”—Yisaya 60:9.
14 Ozali komona likambo yango na makanisi na yo? Lipata wana ya mpɛmbɛ ebandi kokóma pene mpe sikoyo ezali komonana lokola ebele ya matɔnɔ mikemike na mosika, epai oyo moi elalaka. Ezali komonana lokola ebele ya ndɛkɛ likoló ya mai, lokola nde mbonge elingi kobɛta yango. Kasi ntango bapusani pene mpenza, omoni ete ezali nde masuwa ebele, bilamba na yango etandami mpo mopɛpɛ ebɛta yango malamu. Bamasuwa ezali koya ebele na Yelusaleme na boye ete ezali komonana lokola ebele ya bibenga. Ebele ya masuwa yango oyo euti na mabongo ya mosika, ezali koya mbangu mpenza, ememi bandimi oyo bazali koya kosambela Yehova na Yelusaleme.
Ebongiseli ya Yehova ekómi monene
15. (a) Maloba ya Yisaya 60:4-9 esakoli bokoli nini? (b) Baklisto ya solo bamonisaka elimo nini?
15 Tomoni mpenza ete vɛrsɛ ya 4 tii 9 emonisi biso, lokola na bililingi, bokoli oyo esalemi na lisangá na mokili mobimba banda 1919! Mpo na nini Yehova akolisi Siona ndenge yango? Ezali mpo ete kobanda 1919, Yisalaele ya Nzambe ezali kotosa Yehova, ezali kotika te kongɛngisa pole na ye. Kasi, otyaki likebi na likambo oyo vɛrsɛ 7 elobi, ete bato yango ya sika bazali koya “likoló ya etumbelo ya [Nzambe]”? Etumbelo ezali esika oyo batumbaka mbeka, mpe likambo yango ya esakweli ezali kolamusa na makanisi na biso ete mosala ya Yehova esɛngaka mpe kopesa mbeka. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nazali kobondela bino . . . ete bókaba banzoto na bino mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe, mosala moko mosantu elongo na likoki na bino ya kokanisa.” (Baloma 12:1, NW) Na kolanda maloba ya Paulo, mpo na baklisto ya solosolo, kokende na losambo mbala moko na pɔsɔ ekoki te. Baklisto ya solo bapesaka ntango na bango, makasi na bango, mpe biloko na bango mpo losambo ya pɛto ekende liboso. Ozali komona te ete basambeli oyo bamipesi ndenge wana bazali kokómisa ndako ya Yehova kitoko? Esakweli ya Yisaya elobaki ete bakokómisa yango kitoko. Tokoki mpe kozala na elikya ete basambeli yango ya molende bazali kitoko na miso ya Yehova.
16. Banani bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga lisusu na ntango ya kala, mpe banani basali yango na ntango na biso?
16 Bato ya sika balingi mpe kosala mosala. Esakweli ebakisi maloba oyo: “Bana ya bapaya bakotonga mapango na yo, mpe mikonzi na bango bakosalela yo.” (Yisaya 60:10) Ntango maloba yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso, elingi koloba ntango Bayuda balongwaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na mboka na bango, mikonzi mpe ndambo ya bato ya bikólo mosusu bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga lisusu tempelo mpe engumba Yelusaleme. (Ezela 3:7; Nehemia 3:26) Na ndenge oyo ezali kokokisama na mikolo oyo, ebele ya bato bapesi batikali bapakolami mabɔkɔ mpo na kotonga losambo ya solo. Bapesi mabɔkɔ mpo na kotonga masangá ya baklisto mpe, na ndenge yango, bakómisi makasi “mapango” ya ebongiseli ya Yehova oyo bamonisi yango na elilingi ya engumba. Bazali mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga mpenza na ndenge ya solo, kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, mpe Babetele. Ezali na makambo nyonso wana nde bazali kosunga bandeko na bango bapakolami mpo na kokokisa makambo nyonso oyo ebongiseli ya Yehova oyo ezali se koya monene esengeli na yango!
17. Wapi lolenge moko oyo Yehova azali kokómisa bato na ye kitoko?
17 Maloba ya nsuka ya Yisaya 60:10 ezali mpenza maloba ya kolendisa! Yehova alobi boye: “Na nkanda na ngai, nabɛtaki yo nde na ngɔlu na ngai nayokeli yo mawa.” Ya solo, na mobu 1918 mpe 1919, Yehova apesaki basaleli na ye disipilini. Kasi wana ezali makambo oyo eleká. Sikoyo nde ntango oyo Yehova azali komonisa ngɔlu na ye epai ya basaleli na ye bapakolami na baninga na bango bampate mosusu. Yango ezali komonana na ndenge oyo apamboli bango mpe bakómi ebele, ezali lokola ‘akómisi bango kitoko.’
18, 19. (a) Yehova alaki nini mpo na bato ya sika oyo bazali koya na ebongiseli na ye? (b) Bavɛrsɛ oyo etikali ya Yisaya 60 ezali koyebisa biso makambo nini?
18 Mbula na mbula, bankóto na bankóto ya “bapaya” bazali koya kobakisama na ebongiseli ya Yehova, mpe nzela ekotikala polele mpo ebele mosusu báya. Yehova alobi na Siona ete: “Bikuke na yo ekozipwana libela na moi mpe na butu ekokangana te; ete bato báyeisela yo bozwi ya mabota mpe mikonzi na bango [bakozala liboso na bango, NW].” (Yisaya 60:11) Banguna mosusu bazali koluka kokanga “bikuke” wana, kasi toyebi ete bakolonga te. Yehova ye moko alobi ete ata ndenge nini, bikuke wana ekotikala polele. Bato bakoya lisusu ebele.
19 Na mikolo oyo ya nsuka, ezali mpe na ndenge mosusu oyo Yehova apamboli bato na ye, to akómisi bango kitoko. Bavɛrsɛ oyo etikali ya Yisaya 60 ezali na bisakweli oyo ezali komonisa ndenge yango.
Okoki kolimbola?
• Nani azali “mwasi” ya Nzambe, mpe banani bazali bamonisi na ye awa na mabele?
• Ntango nini bana ya Siona balalaki na nse, mpe ntango nini mpe ndenge nini ‘batɛlɛmaki’?
• Ndenge nini Yehova asaleli bililingi ndenge na ndenge mpo na kosakola ete basakoli ya Bokonzi bakokóma mingi lelo oyo?
• Na ndenge nini Yehova angɛngisi pole likoló ya bato na ye?
[Elilingi na lokasa 10]
Yehova alobi na “mwasi” na ye ete atɛlɛma
[Elilingi na lokasa 12]
Na mosika, ebele ya masuwa ezali komonana lokola bibenga