Mokapo ya ntuku mibale na moko
Losambo ya solo ekómi na mokili mobimba
1. Nsango nini ya kolendisa ezali na Yisaya mokapo 60?
MOKAPO 60 ya mokanda ya Yisaya ekomami na ndenge oyo ezali mpenza kosimba motema. Na bavɛrsɛ ya ebandeli, elobeli likambo moko oyo ebendi mpenza likebi na biso. Nsima na yango, makambo mingi elandani mbangumbangu, mpe ememi biso na maloba ya nsuka oyo ezali mpenza kosimba motema. Na maloba kitoko mpenza, mokapo yango esaleli bandakisa mpo na kolobela kozongisama ya losambo ya solo na Yelusaleme ya kala mpe kopalangana ya losambo ya solo lelo oyo na mokili mobimba. Emonisi lisusu mapamboli ya libela oyo ezali kozela basambeli ya sembo ya Nzambe. Mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya eteni kitoko oyo ya esakweli ya Yisaya. Yango wana, tótalela yango malamumalamu.
Pole engɛngi na kati ya molili
2. Etinda nini bapesi mwasi oyo alali na kati ya molili, mpe mpo na nini ebongi atosa yango noki mpenza?
2 Maloba ya ebandeli ya mokapo oyo ya mokanda ya Yisaya bayebisi yango mwasi moko oyo azali na mpasi. Emonani ete alali mpenza na mabelé na kati ya molili. Mbala moko, pole elimwisi molili nyonso, wana na monɔkɔ ya Yisaya Yehova abengi ye ete: ‘Tɛlɛmá! Ngɛngá! Zambi pole na yo eyei, mpe nkembo ya Yehova ebimeli yo.’ (Yisaya 60:1) Ɛɛ, “mwasi” yango asengeli kotɛlɛma mpe kongɛngisa nkembo ya Nzambe! Mpo na nini asengeli kosala yango noki mpenza? Esakweli elandi koloba boye: ‘Talá, molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe bikólo; nde Yehova akobimela yo, mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo.’ (Yisaya 60:2) Mpo na bolamu ya bato oyo bazali pembeni na ye, baoyo bazali naino koyengayenga na kati ya molili, “mwasi” yango asengeli ‘kongɛngisa pole.’ Yango ekopesa litomba nini? ‘Bikólo bikoya na pole na yo mpe bakonzi kino kongɛnga ya kobima na yo.’ (Yisaya 60:3) Maloba oyo ya ebandeli emonisi mwa moke makambo oyo ekolimbolama na bavɛrsɛ oyo elandi, ete losambo ya solo esengeli kopalangana mokili mobimba!
3. (a) “Mwasi” oyo bazali kolobela ezali nani? (b) Mpo na nini “mwasi” yango alalaki na kati ya molili?
3 Atako Yehova azali kolobela makambo oyo ekobima nsima, ayebisi “mwasi” yango ete pole na ye “eyei.” Yango emonisi ete esakweli wana ekokokisama solo. “Mwasi” oyo bazali kolobela awa ezali Siona, to Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda. (Yisaya 52:1, 2; 60:14) Engumba yango ezali komonisa ekólo mobimba. Na ntango ya kokokisama ya liboso ya esakweli oyo, “mwasi” yango alalaki mpenza na kati ya molili, esika oyo azalaki banda kobomama ya Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Nzokande, na mobu 537 L.T.B., mwa ndambo ya Bayuda ya sembo oyo bazalaki baombo bazongaki na Yelusaleme mpe bazongisaki losambo ya pɛto. Nsukansuka Yehova angɛngiselaki “mwasi” yango pole, mpe bato na ye oyo bazongaki na mboka na bango bakómaki kongɛngisa pole mpo na bikólo oyo ezalaki kofanda na kati ya molili.
Kokokisama ya monene
4. Lelo oyo banani bazali komonisa “mwasi” yango awa na mabelé, mpe esakweli yango etali lisusu banani?
4 Tozali kotyela esakweli wana likebi kaka te mpo ekokisamaki likoló ya Yelusaleme ya kala. Lelo oyo “mwasi” ya Yehova na likoló amonisami awa na mabelé na “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Uta ebandeli na yango na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) kino sikoyo, ekólo yango ya elimo ekómi na bato 144 000 oyo bapakolami na elimo, “oyo basombamaki na mabelé” mpo na kokende koyangela na likoló elongo na Klisto. (Emoniseli 14:1, 3) Kokokisama ya Yisaya mokapo 60 na mikolo na biso etali mingimingi baoyo bazali kati na bato yango 144 000 oyo bazali naino na bomoi na mabelé na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1) Esakweli yango etali mpe baninga ya baklisto bapakolami yango, “ebele ya bato” oyo bazali kati na “bampate mosusu.”—Emoniseli 7:9; Yoane 10:11, 16.
5. Ntango nini basangani ya Yisalaele ya Nzambe oyo bazalaki naino na mabelé balalaki na kati ya molili, mpe ntango nini pole ya Yehova engɛngɛlaki bango?
5 Mpo na mwa ntango moke, na ebandeli ya bambula ya 1900, ezalaki lokola nde basangani ya Yisalaele ya Nzambe oyo bazalaki naino na mabelé balalaki na kati ya molili. Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki, na ndenge ya elilingi, bazalaki lokola mokanda ya Emoniseli elobi: bibembe na bango elalaki na “balabala monene ya engumba yango monene oyo ebengami na ndenge ya elimo Sodoma mpe Ezipito.” (Emoniseli 11:8) Nzokande na 1919, Yehova angɛngiselaki bango pole na ye. Yango etindaki bango bátɛlɛma mpe bángɛngisa pole ya Nzambe; kozanga kobanga, basakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 5:14-16; 24:14.
6. Bato mingi basali nini ntango basakweli bango ete Yesu asili kokóma mokonzi, kasi banani babendami epai ya pole ya Yehova?
6 Bato mingi, lokola batambwisami na Satana, mokonzi ya “bayangeli ya mokili ya molili oyo,” baboyi kondima nsango oyo ezali kosakolama ete Yesu Klisto, “pole ya mokili,” asili kokóma mokonzi. (Baefese 6:12; Yoane 8:12; 2 Bakolinti 4:3, 4) Nzokande, bamilio ya bato mosusu babendami epai ya pole ya Yehova, kati na bango “bakonzi” (baoyo bakómi bapakolami na elimo, oyo bakozwa libula ya Bokonzi ya likoló) mpe “bikólo” (ebele ya bato oyo bazali kati na bampate mosusu).
Bokoli epesi esengo ya solosolo
7. Likambo nini ya esengo “mwasi” amoni?
7 Wana azali kolobela kaka motó ya likambo oyo ezali na Yisaya 60:3, Yehova apesi “mwasi” etinda mosusu: “Tombolá miso na yo epai na epai mpe talá!” Na ntango “mwasi” atomboli miso, amoni likambo moko ya esengo: bana na ye bazali kozonga epai na ye! ‘Bayanganisami bango nyonso, bayei epai na yo; bana babali na yo bazali kouta mosika mpe bana basi na yo oyo bakokumbama na loketo.’ (Yisaya 60:4) Mosala ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba oyo ebandaki na 1919 ebendaki bankóto ya “bana babali” mpe “bana basi” mosusu, bapakolami na elimo, oyo bayaki kobakisama na Yisalaele ya Nzambe. Ezali na ndenge yango nde Yehova azwaki bibongiseli mpo na kokokisa motángo oyo esakolamaki ya bato 144 000, baoyo bakoyangela elongo na Klisto.—Emoniseli 5:9, 10.
8. Kobanda 1919, makambo nini esali ete Yisalaele ya Nzambe esepela?
8 Bokoli yango epesaki esengo. ‘Bongo okomona mpe okongɛnga, motema na yo ekotɛtɛma mpe ekoya monene; zambi ebele ya biloko ya mai-na-monana ekoya epai na yo, bozwi ya bikólo ekoyela yo.’ (Yisaya 60:5) Koyanganisama ya baklisto bapakolami na boumeli ya bambula ya 1920 mpe ya 1930 epesaki Yisalaele ya Nzambe esengo monene. Nzokande Yisalaele ya Nzambe ezalaki mpe na ntina mosusu ya kosepela. Mingi mpenza kobanda na katikati ya bambula ya 1930, bato oyo bazalaki kala na kati ya “mai-na-monana,” oyo elakisi bato oyo bakabwani na Nzambe, babimi na bikólo nyonso mpo na kosambela Yehova elongo na Yisalaele ya Nzambe. (Yisaya 57:20; Hagai 2:7) Bato yango bazali kosalela Nzambe moto na moto na ndenge na ye te. Kasi bazali koya epai ya “mwasi” ya Nzambe mpe kokɔta na etonga ya Nzambe oyo ezali na bomoko. Yango esali ete basaleli nyonso ya Nzambe bápesa mabɔkɔ na kopalanganisa losambo ya solo.
Bikólo mingi ezali koya na Yelusaleme
9, 10. Banani bazali koya na Yelusaleme, mpe ndenge nini Yehova ayambi bango?
9 Yehova alobeli bokoli yango na nzela ya bandakisa oyo bato ya ntango ya Yisaya bayebaki malamu. “Mwasi” oyo atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona atali liboso epai ya ɛsti. Amoni nini? ‘Ebele ya bakamela ekozipa yo, bakamela bilenge ya Midiani mpe ya Efa; bango nyonso ya Seba bakoya, bakoyeisa wolo mpe mpaka-ya-malasi, mpe bakosanzola lokumu ya Yehova.’ (Yisaya 60:6) Bakamela ya bato ya mombongo ya bikólo ndenge na ndenge ezali kolanda banzela oyo ekokómisa bango na Yelusaleme. (Genese 37:25, 28; Basambisi 6:1, 5; 1 Mikonzi 10:1, 2) Bakamela ezali komonana bipai nyonso, lokola mpela oyo ezindisi mboka mobimba! Bakamela yango ezali komema makabo ya motuya, oyo emonisi ete bato ya mombongo yango bayei mpo na etumba te. Balingi kosambela Yehova mpe kopesa ye biloko oyo eleki kitoko oyo bazali na yango.
10 Ezali kaka bato ya mombongo yango te nde bazali koya. ‘Bitonga nyonso ya Kedala ekoyangana epai na yo, bampate babali ya Nebayoto ekosalela yo.’ Bato ya bikólo oyo ebɔkɔlaka bibwele bazali mpe kokende na Yelusaleme. Bazali komema makabo oyo bazwi na biloko na bango ya motuya mingi—bitonga ya bampate—mpe bamipesi mpo bákóma basaleli ya Nzambe. Ndenge nini Yehova akoyamba bango? Alobi boye: “Bakoya na koyambama malamu na likoló ya etumbelo na ngai mpe nakokembisa ndako oyo na nkembo na ngai.” (Yisaya 60:7) Yehova andimi makabo na bango, oyo ekosalelama na losambo ya pɛto.—Yisaya 56:7; Yilimia 49:28, 29.
11, 12. (a) “Mwasi” amoni nini ntango atali na wɛsti? (b) Mpo na nini ebele ya bato bazali koya mbangu na Yelusaleme?
11 Sikoyo Yehova asɛngi “mwasi” atala na epai ya wɛsti, mpe atuni boye: “Banani baoyo bakopumbwa likoló lokola lipata mpe lokola bibenga kino maninisa na bango?” Yehova ye moko apesi eyano: ‘Bisanga bikolanda kotyela ngai elikya, masuwa ya Talasisi liboso; mpo na koyeisa bana na yo longwa mosika, palata na bango mpe wolo elongo na bango, mpo na nkombo ya Yehova, Nzambe na yo, mpe mpo na Mosantu ya Yisalaele, zambi asili kokembisa yo.’—Yisaya 60:8, 9.
12 Kanisá ete otɛlɛmi elongo na “mwasi” yango, ozali kotala na wɛsti, na ngámbo ya Mbu Monene. Omoni nini? Lipata moko oyo ezali mosika, ya matɔnɔ mikemike ya mpɛmbɛ, oyo ezali kotambola mbangu likoló ya mai. Ezali komonana lokola bandɛkɛ, kasi wana ezali kokóma pene, omoni ete ezali nde masuwa, mpe bilamba oyo etambwisaka yango etandami mpo mopɛpɛ ebɛta yango malamumalamu. Euti “mosika.”a (Yisaya 49:12) Ndenge ebele yango ya masuwa ezali koya mbangu na Siona, okokanisa lokola nde ebele ya bibenga ezali kozonga na ndako na yango. Mpo na nini masuwa yango ezali koya mbangu bongo? Elingi kokómisa nokinoki basambeli ya Yehova oyo bauti na mabongo ya mosika. Ya solo, bato wana nyonso ya sika oyo bazali koya—Bayisalaele ná bapaya, oyo bauti na ɛsti, na wɛsti mpe na bamboka ya penepene to ya mosika—bazali koya mbangu na Yelusaleme mpo na komipesa mobimba to kopesa biloko na bango nyonso mpo na nkombo ya Yehova, Nzambe na bango.—Yisaya 55:5.
13. Na ntango na biso, banani bazali “bana babali” mpe “bana basi,” mpe banani bazali “bozwi ya bikólo”?
13 Yisaya 60:4-9 ezali mpenza komonisa polele ndenge oyo mosala ya Nzambe ekoli na mokili mobimba banda ntango “mwasi” ya Yehova abandaki kongɛngisa pole na kati ya molili ya mokili oyo! Libosoliboso, “bana babali” mpe “bana basi” ya Siona ya likoló nde bayaki, oyo bakómaki baklisto bapakolami. Na 1931 bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova. Na nsima, lipata to ebele ya bato ya komikitisa, “bozwi ya bikólo” mpe “ebele ya biloko ya mai-na-monana,” eyaki mbangu kosangana na batikali ya bandeko ya Klisto.b Lelo oyo basaleli wana nyonso ya Yehova, oyo bauti bipai nyonso na mokili mpe bazali bato ya lolenge nyonso, bazali kosangana na Yisalaele ya Nzambe mpo na kokumisa Nkolo Mokonzi Yehova mpe kosakola ete nkombo na ye nde eleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba.
14. Na ndenge nini bato ya sika bazali ‘koya na likoló ya etumbelo ya Nzambe’?
14 Kasi, lokola bato yango oyo bauti sika na bikólo mosusu bazali ‘koya na likoló ya etumbelo ya Nzambe,’ yango elingi koloba nini? Batyaka mbeka likoló ya etumbelo. Ntoma Paulo asalelaki liloba moko oyo epesaka likanisi ya mbeka ntango akomaki boye: “Nazali kobondela bino . . . ete bókaba banzoto na bino mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe, mosala moko mosantu elongo na likoki na bino ya kokanisa.” (Baloma 12:1) Baklisto ya solosolo bandimaka komipesa na bolingo na bango moko. (Luka 9:23, 24) Bapesaka ntango, nguya, mpe makoki na bango mpo na kotombola losambo ya pɛto. (Baloma 6:13) Na ndenge yango, bapesaka Nzambe mbeka ya lisanzoli oyo akoki kondima. (Baebele 13:15) Ezali solo likambo ya kolendisa koyeba ete lelo oyo bamilio ya basambeli ya Yehova, bilenge ná mikóló, batye matomba ya Bokonzi ya Nzambe liboso ya bamposa na bango! Bazali komonisa elimo mpenza ya komipimela makambo mosusu.—Matai 6:33; 2 Bakolinti 5:15.
Bato ya sika bazali kopesa mabɔkɔ na bokoli
15. (a) Na ntango ya kala, ndenge nini Yehova amoniselaki bapaya motema mawa na ye? (b) Na mikolo na biso, ndenge nini “bapaya” bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga losambo ya solo?
15 Bato yango ya sika bazali kopesa “mwasi” ya Yehova mabɔkɔ na ndenge bazali kopesa biloko na bango mpe bazali komipesa na mosala. ‘Bana ya bapaya bakotonga mapango na yo, mpe bakonzi na bango bakosalela yo; zambi na nkanda na ngai, nabɛtaki yo nde na motema boboto na ngai nayokeli yo mawa.’ (Yisaya 60:10) Yehova amonisaki motema mawa na ye na ekeke ya motoba L.T.B. ntango bapaya bapesaki mabɔkɔ mpo na kotonga lisusu Yelusaleme. (Ezela 3:7; Nehemia 3:26) Na kokokisama ya monene ya esakweli yango, lelo oyo “bapaya,” to ebele ya bato, bazali kopesa batikali bapakolami mabɔkɔ mpo na kotonga losambo ya solo. Bazali kosalisa bato oyo bayekolaka na bango Biblia bákolisa bizaleli ya boklisto na bomoi na bango mpe na ndenge yango, bazali kotonga masangá ya boklisto mpe koyeisa makasi “mapango” ya ebongiseli ya Yehova. (1 Bakolinti 3:10-15) Bazali kotonga mpe bandako ya solosolo: bazali komipesa na kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani mpe bandako ya Babetele. Na ndenge yango, bazali kopesa bandeko na bango bapakolami mabɔkɔ mpo na kokokisa bosɛnga ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali se kobakisama.—Yisaya 61:5.
16, 17. (a) Ndenge nini “baporte” ya ebongiseli ya Nzambe etikalaki polele? (b) Ndenge nini “bakonzi” basalelaki Siona? (c) Nini ekokómela baoyo bazali komeka kokanga “baporte” oyo Yehova alingi etikala polele?
16 Mbula na mbula, mosala ya kotonga na elimo ezali kosala ete bankóto ebele ya “bapaya” báya na ebongiseli ya Yehova, mpe basusu mingi bakoki naino kokɔta. Yehova alobi boye: ‘Baporte na yo ekotikala polele libela na moi mpe na butu ekokangama te; ete bato báyeisela yo bozwi ya bikólo mpe bakonzi na bango bakozala liboso.’ (Yisaya 60:11) Bongo, banani bazali “bakonzi” oyo bazali liboso mpo na koyela Siona bozwi ya bikólo? Na ntango ya kala, Yehova asimbaki mitema ya bakonzi mosusu mpo ‘básalela’ Siona. Na ndakisa, Sirise azwaki likanisi ya kozongisa Bayuda na Yelusaleme mpo bátonga lisusu tempelo. Na nsima, Alatazelezese apesaki biloko mpe atindaki Nehemia mpo na kotonga lopango ya Yelusaleme. (Ezela 1:2, 3; Nehemia 2:1-8) Ya solo, ‘motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova.’ (Masese 21:1) Yehova akoki kotinda ata bakonzi ya nguya mpenza básala makambo oyo eyokani na mokano na ye.
17 Na mikolo na biso, “bakonzi” to bayangeli mingi ya Leta bamekaki kokanga “baporte” ya ebongiseli ya Yehova. Nzokande, basusu basalelaki Siona na ndenge bazwaki bikateli oyo esalaki ete “baporte” yango etikala polele. (Baloma 13:4) Na 1919, bakonzi ya Leta babimisaki Joseph Rutherford mpe baninga na ye na bolɔkɔ, oyo bakɔtaki atako basalaki likambo moko ya mabe te. (Emoniseli 11:13) Biyangeli ya bato “emɛlaki” ebele ya minyoko oyo Satana abimisaki nsima ya kobwakama na ye awa na nse. (Emoniseli 12:16) Baguvɛrnema mosusu elendisaki bonsomi ya mangomba, na bantango mosusu esalaki mpenzampenza bongo mpo na Batatoli ya Yehova. Makambo ya boboto ya ndenge wana esalisaki ebele ya bato ya komikitisa báleka na “baporte” yango oyo efungwami mpo na kokɔta na ebongiseli ya Yehova. Bongo ezali boni mpo na batɛmɛli oyo bazali koluka kokanga “baporte” yango? Bakolonga ata moke te. Yehova alobeli bango boye: ‘Ekólo nyonso ná bokonzi nyonso oyo ekosalela yo te bakokufa; mpe bikólo yango ekobebisama nyɛɛ.’ (Yisaya 60:12) Baoyo nyonso bazali kobundisa “mwasi” ya Nzambe—ezala bato to bibongiseli—bakokufa; baoyo ya nsuka bakosila na etumba ya Armagedona, oyo ezali koya.—Emoniseli 16:14, 16.
18. (a) Elaka oyo elobi ete banzete ekokola malamu na Yisalaele ezali komonisa nini? (b) Na mikolo na biso, ‘etɛmɛlo ya makolo ya Yehova’ ezali nini?
18 Nsima ya kopesa likebisi wana oyo etali kosambisama, esakweli ezongeli bilaka ya kotombwama mpe ya bomɛngo. Yehova alobi na “mwasi” na ye boye: ‘Nkembo ya Lebanona ekoyela yo, nzete ya beloso mpe ya tisala mpe ya tasulu, mpo na kokembisa esika na ngai mosantu mpe nakobongisa na nkembo etɛmɛlo ya makolo na ngai.’ (Yisaya 60:13) Banzete minene ezalaka elembo ya kitoko mpe ya kobota mingi. (Yisaya 41:19; 55:13) Na vɛrsɛ oyo, maloba “esika na ngai mosantu” mpe “etɛmɛlo ya makolo na ngai” ezali kolobela tempelo ya Yelusaleme. (1 Ntango 28:2; Nzembo 99:5) Nzokande, ntoma Paulo alobaki ete tempelo ya Yelusaleme ezalaki elilingi mpo na komonisa tempelo monene ya elimo, oyo ezali ebongiseli mpo na kosambela Yehova na nzela ya mbeka ya Klisto. (Baebele 8:1-5; 9:2-10, 23) Na mikolo na biso Yehova azali kokembisa to kokómisa kitoko ‘etɛmɛlo ya makolo na ye,’ oyo emonisi mapango ya tempelo yango ya elimo awa na mabelé. Mapango yango ekómi mpenza kitoko mingi; yango wana, ezali kobenda bato ya bikólo nyonso mpo básangana na losambo ya solo kuna.—Yisaya 2:1-4; Hagai 2:7.
19. Bálinga bálinga te, likambo nini batɛmɛli bakondima, mpe ata ndɛlɛ ntango nini bakondima yango?
19 Sikoyo Yehova azongisi likebi na ye epai ya batɛmɛli, mpe alobi boye: ‘Bana ya baoyo banyokolaki bino bakoyela yo wana bazali kogumbama na nse; bango nyonso mpe baoyo batyolaki yo bakomikitisa na makolo na yo; bakobenga yo Mboka ya Yehova, Siona ya Mosantu ya Yisalaele.’ (Yisaya 60:14) Ya solo, ntango bazali komona ndenge basaleli ya Nzambe bazali kokóma ebele mpe bazali na bomoi ya malamu mpenza mpo Nzambe azali kopambola bango, batɛmɛli mosusu bakozala na eloko mosusu te ya kosala bobele kogumbama mpe koganga epai ya “mwasi.” Yango elingi koloba ete, bálinga bálinga te bakondima—ata ndɛlɛ to na Armagedona—ete batikali bapakolami mpe baninga na bango bazali solo bamonisi ya ebongiseli ya Nzambe oyo ezali na likoló, “Mboka ya Yehova, Siona ya Mosantu ya Yisalaele.”
Bazali kosalela biloko oyo ezali
20. Wapi mbongwana monene oyo esalemi epai ya “mwasi”?
20 Mbongwana monene mpenza esalemi epai ya “mwasi” ya Yehova! Yehova alobi boye: ‘Ozalaki koboyama mpe koyinama, mpe moto moko te alekaki kati na yo; nde sika nakokembisa yo libela, esengo na libota na libota. Okomɛla mabɛlɛ ya bikólo, okomɛla mabɛlɛ ya bakonzi; mpe okoyeba ete ngai, Yehova, nazali mobikisi na yo, mpe mosikoli na yo, Oyo-na-Nguya ya Yakobo.’—Yisaya 60:15, 16.
21. (a) Ndenge nini Yelusaleme ya ntango ya kala ekómaki ‘eloko ya kosalela lolendo’? (b) Mapamboli nini basaleli ya Yehova bapakolami bazwi kobanda na 1919, mpe ndenge nini bazali komɛla “mabɛlɛ ya bikólo”?
21 Mbula 70 mobimba, Yelusaleme ya kala emonanaki lokola ezali lisusu te, ‘moto moko te alekaki kati na yango.’ Kasi kobanda na mobu 537 L.T.B., Yehova azongisaki lisusu bato na engumba yango, ‘akembisaki yango’ to akómisaki yango eloko moko ya kosalela lolendo. Ndenge moko mpe na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Yisalaele ya Nzambe etikalaki mpamba mpe emiyokaki lokola ‘baboyi yango.’ Kasi na 1919, Yehova asikolaki basaleli na ye bapakolami na boombo, mpe kobanda wana apesi bango bokoli mpe bozwi ya elimo na ndenge oyo emonaná naino te. Basaleli na ye bamɛli “mabɛlɛ ya bikólo,” na ndenge bazali kosalela biloko oyo euti na bikólo yango mpo losambo ya solo ekende liboso. Na ndakisa, soki Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango ezali kobongolama mpe kobimisama na bankama ya minɔkɔ, ezali mpo tozali kosalela malamu mayele ya teknoloji ya mikolo na biso. Yango esali ete mbula na mbula Batatoli ya Yehova báyekolaka Biblia elongo na ebele ya bankóto ya bato mpe bato yango bazali koyeba ete Yehova azali kobikisa mpe kosikola bango na nzela ya Klisto.—Misala 5:31; 1 Yoane 4:14.
Babongisi ndenge ya kotambwisa mosala
22. Mbongwana nini ya malamu Yehova alaki?
22 Wana basaleli ya Yehova bazali kokóma ebele, bazali mpe kobongisa malamu ndenge ya kotambwisa makambo. Yehova alobi boye: ‘Na esika ya kwivre nakoyeisa wolo mpe na esika ya ebende nakoyeisa palata; na esika ya mabaya, kwivre, na esika ya mabanga, ebende. Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na yo mpe boyengebene lokola bakapita na yo ya mosala.’ (Yisaya 60:17) Kotya wolo na esika ya kwivre emonisi ete makambo ebongi, yango ezali mpe bongo mpo na biloko mosusu oyo balobeli awa. Yango wana, na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, basaleli ya Yehova babongisi mpenza ndenge na bango ya kotambwisa mosala.
23, 24. Banda 1919, makambo nini basaleli ya Yehova babongisi na ndenge ya kotambwisa makambo?
23 Tii na 1919, masangá ezalaki na bankulutu mpe badiakre oyo baponami na voti. Kobanda na mbula yango, bazalaki kopona na ndenge ya Teokrasi mokambi moko ya mosala mpo na kotambwisa mosala ya kosakola na lisangá, kasi na bisika mosusu bankulutu oyo baponamaki na voti bazalaki koyokana te na mokambi yango ya mosala. Na 1932, makambo ebongwanaki. Na kati ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, bapesaki masangá malako ete básala lisusu voti te mpo na kopona bankulutu mpe badiakre. Basengelaki nde kosala voti mpo na kopona komite ya mosala oyo ekosala elongo na mokambi ya mosala. Yango emonisaki ete makambo ebongi mpenza.
24 Na 1938, Yehova ayeisaki “wolo” mingi ntango ekateli ezwamaki ete basaleli nyonso ya lisangá basengeli koponama na ndenge ya Teokrasi. Mosala ya kotambwisa lisangá ekómaki na mabɔkɔ ya mosaleli ya etuluku (oyo na nsima akómaki kobengama mosaleli ya lisangá) mpe basaleli mosusu oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ; bango nyonso bazalaki koponama soki “moombo ya sembo mpe ya mayele” andimi bango.c (Matai 24:45-47) Nzokande, na 1972, emonanaki ete na Makomami, mosala ya kokɛngɛla lisangá esengeli kosalema na lisangani ya bankulutu na esika ete ezala na mabɔkɔ ya moto moko. (Bafilipi 1:1) Mbongwana mosusu esalemaki na masangá mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ndakisa moko ya mbongwana oyo esalemi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali ete, na mokolo ya 7 Ɔkɔtɔbɛ 2000, bayebisaki ete bandeko oyo bazalaki na kati ya Lisangani Mikóló-Bakambi oyo bazalaki bakambi ya la Société (Watch Tower Society of Pennsylvania) mpe ya bibongiseli mosusu oyo esalaka na boyokani na yango, batikaki mikumba yango. Na ndenge yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo ezali komonisa moombo ya sembo mpe ya mayele, ezwi makoki ya kotya likebi mingi na mosala ya kokɛngɛla na elimo “lisangá ya Nzambe” mpe baninga na yango, bampate mosusu. (Misala 20:28) Mbongwana nyonso wana esali ete makambo ebonga. Epesi ebongiseli ya Yehova makasi mpe ememeli basaleli na ye mapamboli.
25. Nani nde asalaki ete basaleli ya Yehova bábongisa ndenge ya kotambwisa makambo, mpe matomba nini yango ebimisi?
25 Nani nde asalaki ete makambo ebonga ndenge wana? Esalemaki nde mpo na makoki ya kotambwisa makambo ya bato mosusu to mpo na mayele na bango? Te, mpamba te Yehova alobaki boye: “Nakoyeisa wolo.” Mbongwana nyonso wana esalemi nde na litambwisi ya Nzambe. Ntango basaleli ya Yehova bazali kolanda litambwisi yango mpe bazali kobongisa makambo, bazali kozwa matomba mingi. Kimya ezali mpenza kati na bango, mpe kolinga boyengebene ezali kotinda bango básalela ye.
26. Elembo nini emonisaka baklisto ya solo oyo ata batɛmɛli bazali komona yango?
26 Kimya oyo eutaka na Nzambe ebongolaka bomoi ya bato. Yehova alaki ete: ‘Mobulu ekoyokana lisusu kati na mokili na yo te, kobebisama to kopunzama kati na ndelo na yo te; okobenga mapango na yo ete, Lobiko, mpe baporte na yo ete, Kosanzola.’ (Yisaya 60:18) Yango ezali mpenza solo! Ata batɛmɛli bandimaka ete kimya ezali elembo monene oyo emonisaka baklisto ya solo. (Mika 4:3) Kimya wana ya Batatoli ya Yehova elongo na Nzambe mpe kati na bango esalaka ete bisika nyonso na bango ya makita ezala bisika oyo bazwaka kimya, na mokili oyo etondi na mobulu. (1 Petelo 2:17) Yango ezali komonisa mwa moke kimya mingi oyo ekozala ntango bato nyonso ya mabelé “bakolakisama na [Yehova].”—Yisaya 11:9; 54:13.
Pole monene oyo emonisi ete Nzambe andimi basaleli na ye
27. Pole nini ezali kongɛngɛla “mwasi” ya Yehova ntango nyonso?
27 Yehova amonisi makasi ya pole oyo ezali kongɛnga likoló ya Yelusaleme ntango alobi boye: “Na ntango ya moi, moi ekozala pole na yo te, mpe sanza na ntango ya butu ekopesa yo lisusu kongɛnga te. Kasi [Yehova] akozala pole na yo libela mpe Nzambe na yo akozala kongɛnga na yo. Moi na yo ekolimwa lisusu te mpe sanza na yo ekomilongola te; mpo ete [Yehova] akozala pole na yo libela mpe mikolo ya kolela na yo ekosuka.” (Yisaya 60:19, 20) Yehova akozala ‘pole ya libela’ mpo na “mwasi” na ye. ‘Akolimwa’ soki moke te lokola moi to mpe ‘akomilongola’ te lokola sanza.d Pole oyo emonisaka ete andimi moto ezali kongɛngɛla ntango nyonso baklisto bapakolami, bamonisi ya “mwasi” ya Nzambe. Bango ná baoyo bazali na kati ya ebele ya bato bazali kozwa pole makasi ya elimo, molili na makambo ya politiki to ya nkita ya mokili oyo ekoki kokitisa pole yango te. Mpe bazali kotya motema na mikolo malamu oyo Yehova atye liboso na bango.—Baloma 2:7; Emoniseli 21:3-5.
28. (a) Likambo nini Yehova alaki bato ya Yelusaleme ntango bakozonga? (b) Baklisto bapakolami bakómaki bankolo ya nini na 1919? (c) Bayengebene bakosangola mokili mpo na ntango boni?
28 Yehova alandi kolobela bato ya Yelusaleme boye: “Bato na yo nyonso bakozala bayengebene, bakozala bankolo ya mokili libela; ntina ya elanga na ngai, mosala ya mabɔkɔ na ngai ete nakembisama.” (Yisaya 60:21) Ntango ekólo ya Yisalaele eutaki na Babilone, bato na yango bakómaki “bankolo ya mokili” na bango. Kasi bango batikalaki bankolo ya mokili yango “libela” te mpamba te na ekeke ya liboso T.B., basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme mpe ekólo ya Bayuda. Na 1919, batikali ya baklisto bapakolami babimaki na boombo ya elimo mpe bakómaki bankolo ya mokili moko ya elimo. (Yisaya 66:8) Mokili wana, to esika na bango ya mosala, ezali paladiso ya elimo oyo etondi na bozwi oyo ekosila te. Na kokesana na Yisalaele ya kala, lisangani mobimba ya Yisalaele ya elimo ekozanga bosembo te. Lisusu, esakweli ya Yisaya ekokokisama na ndenge ya solosolo ntango mabelé ekokóma mpenza paladiso oyo ezali na ‘kimya mingi.’ Na ntango yango, bayengebene oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé bakosangola mokili mpo na libela.—Nzembo 37:11, 29.
29, 30. Ndenge nini “oyo moke” akómi “nkóto”?
29 Na nsuka ya Yisaya mokapo 60 tozali kokuta elaka moko ya lisɛki te, oyo Yehova alobi ete ekokokisama mpamba te ye moto alaki yango. Alobi boye: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota ya makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango yango, nakoyeisa yango mbangu.” (Yisaya 60:22) Ntango bapakolami oyo bapanzanaki epai na epai bazongaki lisusu na mosala na bango na 1919, bazalaki ‘moke.’e Kasi bakómaki mingi ntango bato ya nsuka ya Bayisalaele ya elimo bazalaki koyanganisama. Mpe bato mosusu babakisamaki mpenza ntango koyanganisama ya ebele ya bato ebandaki.
30 Eumelaki te, kimya mpe boyengebene oyo ezalaki kati na basaleli ya Nzambe ebendaki bato mingi ya mitema sembo, mpe “oyo eleki moke” ekómaki mpenza ‘libota to ekólo ya makasi.’ Sikoyo, bato na yango baleki bato ya bikólo mingi oyo ezali awa na mabelé. Emonani polele ete, na nzela ya Yesu Klisto, Yehova atambwisi mosala ya kosakola Bokonzi mpe ayeisi to amemi yango mbangu. Oyo nde esengo monene komona bokoli ya losambo ya solo na mokili mobimba mpe kozala kati na bato oyo bazali kopesa mabɔkɔ mpo ete esalema! Ɛɛ, epesaka esengo koyeba ete bokoli yango ezali kopesa Yehova nkembo, ye oyo asakolaki makambo yango kobanda kala.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talasisi ezalaki ntango mosusu na mboka oyo eyebani lelo na nkombo Espagne. Kasi, mikanda mosusu elobaka ete, liloba “masuwa ya Talasisi” ezali komonisa lolenge ya masuwa, “masuwa oyo etambolaka na mai monene,” oyo “esalemaki mpo ekendeke kino na Talasisi,” to na maloba mosusu, masuwa oyo ebongaki mpo na kosala mibembo ya milai kino mabongo ya mosika.—1 Mikonzi 22:48.
b Liboso ya 1930, baklisto ya molende oyo bazalaki na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé bazalaki mpe kosangana elongo na Yisalaele ya Nzambe, kasi babandaki kobakisama mingi nde na bambula ya 1930.
c Na ntango wana, bazalaki kobenga masangá bituluku.
d Ntoma Yoane asalelaki maloba ya ndenge yango mpo na kolobela “Yelusaleme ya sika,” bato 144 000 na nkembo na bango kuna na likoló. (Emoniseli 3:12; 21:10, 22-26) Yango ebongi, mpamba te “Yelusaleme ya sika” elakisi bato nyonso ya Yisalaele ya Nzambe nsima ya kozwa mbano na bango na likoló, wana bakómi elongo na Yesu Klisto eteni ya ntina mingi ya “mwasi” ya Nzambe, “Yelusaleme mboka ya likoló.”—Bagalatia 4:26.
e Na 1918, baoyo nyonso bazalaki kosangana na mosala ya kosakola sanza na sanza bazalaki kokóma ata 4 000 te.
[Elilingi na lokasa 305]
Bayebisi ‘mwasi atɛlɛma’
[Elilingi na lokasa 312, 313]
“Masuwa ya Talasisi” ezali koya na basambeli ya Yehova