Nkembo ya Yehova ezali kongɛngɛla basaleli na ye
“[Yehova] akozala pole na yo libela.”—YISAYA 60:20.
1. Ndenge nini Yehova apambolaka basaleli na ye ya sembo?
“YEHOVA azali kosepela na bato na ye. Azali kokómisa bato ya komikitisa kitoko na nzela ya lobiko.” (Nzembo 149:4, NW) Mokomi ya nzembo na ntango ya kala nde alobaki maloba yango, mpe makambo oyo elandaki na nsima tii na ntango na biso ezali komonisa ete alobaki solo. Na ntango basaleli ya Yehova bazali sembo, ye moko asungaka bango, asalaka ete bákóma ebele, mpe abatelaka bango. Na ntango ya kala, asalisaki bango bálonga banguna na bango. Lelo oyo, azali kosala ete bázala ntango nyonso makasi na elimo mpe alaki bango lobiko na nzela ya mbeka ya Yesu. (Baloma 5:9) Azali kosala yango mpamba te bazali kitoko na miso na ye.
2. Atako bazali kotɛmɛla basaleli ya Nzambe, kasi bango bazali na elikya nini?
2 Nzokande, na kati ya mokili oyo ezipami na molili, bato oyo “bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe” bakokutana na botɛmɛli. (2 Timote 3:12, NW) Atako bongo, Yehova azali komona banguna yango, mpe azali kokebisa bango na maloba oyo: “Libota na bokonzi baoyo bakosalela yo te bakokufa; mabota yango makobebisama nyɛɛ.” (Yisaya 60:12) Lelo oyo, botɛmɛli ezali komonana na ndenge mingi. Na mikili mosusu, banguna bazali kosala nyonso mpo na kozongisa nsima to kopekisa losambo oyo baklisto ya solo bazali kopesa Yehova. Na mikili mosusu mpe, bato ya molende ya mabe bazali kobundisa basambeli ya Yehova mpe bazali kotumba biloko na bango. Kasi, tóbosana te ete Yehova asili kokata likambo oyo ekokómela bato oyo bazali koluka kopekisa ete mokano na ye ekokisama te. Banguna bakolonga te. Bato oyo bazali kobundisa Siona, oyo emonisami na bana na ye awa na mabele, bakoki kolonga te. Maloba wana ya Nzambe na biso monene, Yehova, ezali kokitisa biso motema te?
Bazwi mapamboli koleka ndenge bakanisaki
3. Eloko nini esalelami lokola elilingi mpo na komonisa kitoko ya basambeli ya Yehova mpe ndenge oyo bazali se kokóma mingi?
3 Tozali komona mpenza ete na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo, Yehova apamboli basaleli na ye koleka kutu ndenge oyo bazalaki kokanisa. Mingimingi, na ndenge oyo akómisi mokemoke esika na ye ya losambo kitoko mpe bato oyo bazali kati na yango oyo bazali komema nkombo na ye. Esakweli ya Yisaya emonisi ete alobi na Siona boye: “Nkembo ya Lebanona ekoyela yo, nzete ya beloso mpe ya tisala mpe ya tasulu, mpo na [kokómisa esika na ngai mosantu kitoko, NW] mpe nakobongisa na nkembo etɛmɛlo na makolo na ngai.” (Yisaya 60:13) Bangomba oyo ezipami na zamba ezalaka kitoko mpo na kotala. Na bongo, banzete oyo etondi na nkasa ezali elilingi ebongi mpenza mpo na komonisa kitoko ya basambeli ya Yehova mpe ndenge oyo bazali se kokóma mingi.—Yisaya 41:19; 55:13.
4. ‘Esika mosantu’ mpe “etɛmɛlo ya makolo ya [Yehova]” ezali nini, mpe ndenge nini bakómisi yango kitoko?
4 ‘Esika mosantu’ mpe “etɛmɛlo ya makolo [ya Yehova]” oyo Yisaya 60:13 elobeli ezali nini? Maloba yango ezali komonisa mapango ya tempelo monene ya elimo, elingi koloba ebongiseli oyo Yehova atii mpo na kosambela ye na nzela ya Yesu Klisto. (Baebele 8:1-5; 9:2-10, 23) Yehova ayebisaki ete mokano na ye ezali ya kobenda bato ya mabota nyonso báya kosambela na tempelo yango ya elimo, mpe na bongo, kopesa yango nkembo. (Hagai 2:7) Ye moko Yisaya amonaki liboso ebele ya bato bauti na mabota nyonso bazali komata na ngomba molai ya Yehova, elingi koloba esika na ye ya losambo. (Yisaya 2:1-4) Bambula ebele na nsima, ntoma Yoane amonaki na emonaneli “ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” Bato yango “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi . . . , bazali kosalela ye mosala mosantu butu moi na kati ya tempelo na ye.” (Emoniseli 7:9, 15, NW) Biso moko tomoni na miso ndenge oyo ndako ya Yehova ekómi kitoko na ndenge oyo bisakweli yango ekokisami na mikolo na biso.
5. Mbongwana nini ya malamu ekómelaki bana ya Siona?
5 Nyonso wana esali ete makambo ebongwana mpenza mpo na Siona! Yehova alobi ete: “Na esika ete bátika yo mpenza mpe báyina yo, mpe moto moko te aleka wana, nakokómisa yo eloko ya lokumu mpenza mpo na libela, esengo mpo na libota na libota.” (Yisaya 60:15, NW) Na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, “Yisalaele ya Nzambe” elekaki na mikolo ya mpasi mpenza. (Bagalatia 6:16) Emonanaki mpenza ete ‘batikaki’ yango, mpamba te bana na yango awa na mabele basosolaki mpenza te mokano ya Nzambe mpo na bango. Na nsima, na 1919, Yehova apesaki lisusu basaleli na ye bapakolami na elimo nguya, mpe banda wana, apesi bango bomɛngo mingi ya elimo. Longola yango, ozali komona te ete elaka oyo ezali na vɛrsɛ oyo ezali mpenza ya esengo? Yehova akotalela Siona lokola “eloko ya lokumu mpenza.” Ya solo, bana ya Siona, mpe Yehova ye moko, bakosepela mpo na Siona. Siona ekozala “esengo,” to eloko oyo ekopesa nsai mingi. Mpe yango ekozala kaka mpo na mwa ntango te. Makambo malamu oyo Siona ekozala na yango, na nzela ya bana na ye awa na mabele, ekoumela “libota na libota.” Ekosila te.
6. Ndenge nini baklisto ya solo bazali kosalela bozwi ya mabota?
6 Sikoyo, yoká elaka mosusu ya Nzambe. Yehova alobi na Siona boye: “[Okomɛla] mabɛlɛ ya mabota, [okomɛla] mabɛlɛ ya mikonzi; mpe okoyeba ete ngai, [Yehova], nazali mobikisi na yo, mpe mosikoli na yo, Oyo-na-Nguya na Yakobo.” (Yisaya 60:16) Ndenge nini Siona ezali komɛla “mabɛlɛ ya mabota” mpe komɛla “mabɛlɛ ya mikonzi”? Na ndenge oyo baklisto bapakolami na baninga na bango “bampate mosusu” bazali kosalela bozwi ya mabota mpo na kotombola losambo ya pɛto. (Yoane 10:16) Makabo ya bolingo malamu ezali kosalisa mpo na kosala mosala ya kosakola mpe ya koteya na mokili mobimba. Na ndakisa, soki lelo oyo Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali kobima na minɔkɔ ebele, ezali mpo bazali kosalela malamu mayele ya teknoloji ya mikolo oyo. Lelo oyo, bato oyo bakoki kotánga mateya ya solo ya Biblia bazali ebele koleka ata na eleko nini oyo eleká. Bato ya bikólo mingi bazali koyekola ete Yehova, oyo alongolaki basaleli na ye bapakolami na boombo ya elimo, azali mpenza Mobikisi.
Bakei liboso na ndenge ya kotambwisa makambo
7. Bokoli nini ya kokamwa bana ya Siona bamoni?
7 Yehova akómisi mpe basaleli na ye kitoko na lolenge mosusu. Asalisi bango bábongisa ndenge ya kotambwisa makambo. Na Yisaya 60:17, tozali kotánga boye: “Na esika ya [kwivre] nakoyeisa wolo mpe na esika ya ebende nakoyeisa palata; na esika ya mabaya, [kwivre], na esika ya mabanga, ebende. [Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na yo mpe boyengebene lokola bakapita na yo, NW].” Kotya wolo na esika ya kwivre elimboli kobongisa makambo ekóma malamu koleka; ezali mpe bongo mpo na biloko mosusu oyo vɛrsɛ elobeli. Yango wana, na boumeli ya mikolo ya nsuka, Yisalaele ya Nzambe ezali kokende ntango nyonso liboso na oyo etali kobongisa ndenge ya kotambwisa makambo. Tótalela mwa bandakisa.
8-10. Lobelá mwa mbongwana oyo esalemi banda 1919 na oyo etali ndenge ya kotambwisa makambo na kati ya ebongiseli.
8 Liboso, bankulutu na badiakre oyo bazalaki kotambwisa masangá ya basaleli ya Nzambe bazalaki koponama na voti. Kasi banda 1919, “moombo ya sembo mpe ya mayele” akómaki kopona mokambi moko ya mosala na lisangá mokomoko mpo na kotambwisa mosala ya kosakola. (Matai 24:45-47) Kasi, na masangá mingi, ebongiseli yango ezalaki kotambola malamu te, mpamba te bankulutu mosusu oyo baponamaki na voti bazalaki mpenza komipesa te na mosala ya kosakola. Yango wana, na 1932, malako epesamaki ete masangá esala lisusu voti te mpo na kopona bankulutu na badiakre. Esengelaki nde básalaka voti mpo na kopona bandeko mibali oyo bakozala na komite ya mosala ya kosakola elongo na mokambi ya mosala. Ezalaki mbongwana monene, ezalaki lokola kotya “kwivre” na esika ya “mabaya”!
9 Na 1938, masangá ya mokili mobimba endimaki mbongwana mosusu oyo eyokanaki mpenza na ndakisa oyo euti na Makomami. Lisangá mokomoko ekómaki kotambwisama na mosaleli ya lisangá mpe basaleli mosusu oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ, bango nyonso bazalaki koponama soki moombo ya sembo mpe ya mayele andimi koponama na bango. Makambo ya voti ezalaki lisusu te! Na bongo, basaleli nyonso na kati ya lisangá bakómaki koponama na ndenge ya Teokrasi. Ezalaki lokola kotya “ebende” na esika ya “mabanga” to kotya “wolo” na esika ya “kwivre.”
10 Banda wana, mbongwana mosusu mpe esalemaki. Na ndakisa, na 1972, emonanaki ete soki lisangani ya bankulutu oyo baponami na ndenge ya Teokrasi ezali kokamba lisangá mokomoko, mpe ezali na nkulutu moko te oyo azali mokonzi ya basusu, lolenge wana ya kosala ekolanda mpenza lolenge oyo masangá ezalaki kotambwisama na ekeke ya liboso. Lisusu, eleki pene na mbula mibale, mbongwana mosusu esalemaki. Yango etalelaki ndenge ya kokamba bibongiseli mosusu oyo lisangá ya Yehova esalelaka mpo na kokokisa masɛngami ya Leta, mpe mbongwana yango epesaki Lisangani ya Mikóló-Bakambi likoki ya komipesa mobimba na kotalela matomba ya elimo ya basaleli ya Nzambe na esika bátalelaka mpe bibongiseli oyo lisangá esalelaka mpo na kokokisa masɛngami ya Leta.
11. Nani mpenza asalaki ete basaleli ya Yehova básala mbongwana na ndenge ya kotambwisa makambo na bango, mpe mbongwana yango ebimisi makambo nini?
11 Nani azali kosala ete makambo ebongwana mokemoke ndenge wana? Ezali moto mosusu te kaka Yehova Nzambe ye moko. Ye nde alobi ete: “Nakoyeisa wolo.” Mpe ye nde abakisi ete: “Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na yo mpe boyengebene lokola bakapita na yo.” Ya solo, Yehova nde azali kotambwisa basaleli na ye. Mbongwana oyo esakolamaki na ntina etali ndenge ya kotambwisa makambo ezali lolenge mosusu oyo Yehova azali kokómisa basaleli na ye kitoko. Mpe yango ememeli Batatoli ya Yehova mapamboli mingi. Na Yisaya 60:18, tozali kotánga boye: “Mobulu ekoyokana lisusu kati na mokili na yo te, kobebisama to kopunzama kati na ndelo na yo te; okobyanga mapango na yo ete, Lobiko, mpe bikuke na yo ete, Kosanzola.” Ezali mpenza maloba kitoko! Kasi, ndenge nini yango ekokisami?
12. Ndenge nini kimya ezwi esika monene na kati ya baklisto ya solo?
12 Baklisto ya solo batalelaka Yehova mpo na kozwa malako mpe toli, mpe Yisaya asakolaki mbuma oyo ezaleli yango ezali kobimisa na maloba oyo: “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova, mpe kimya, NW] ya bana na yo ekozala monene.” (Yisaya 54:13) Lisusu, elimo ya Yehova ezali kosala epai ya basaleli na ye, mpe moko na mbuma ya elimo yango ezali kimya. (Bagalatia 5:22, 23) Basaleli ya Yehova bazali na kimya mpe yango ezali kokómisa bango lokola esika ya komibomba na kati ya mokili oyo etondi na mobulu. Kimya na bango oyo euti na bolingo oyo baklisto ya solo bamonisanaka ezali ebandeli ya makambo kitoko oyo bakozala na yango na mokili ya sika. (Yoane 15:17; Bakolose 3:14) Na ntembe te mokomoko na biso azali na esengo ya kozala na kimya yango mpe ya kokolisa yango; yango ezali kosanzola mpe kokumisa Nzambe na biso mpe kimya yango ezali na esika monene na kati ya paladiso na biso ya elimo.—Yisaya 11:9.
Pole ya Yehova ekotika kongɛnga te
13. Mpo na nini tozali na elikya ete pole ya Yehova ekotika te kongɛngɛla bato na ye?
13 Tokoki nde kozala na elikya ete pole ya Yehova ekotika te kongɛngɛla basaleli na ye? Ɛɛ! Tozali kotánga boye na Yisaya 60:19, 20: “Na ntango ya moi, moi ekozala pole na yo te, ekopesa yo lisusu kongɛnga te, mpe sanza na ntango ya butu ekopesa yo lisusu kongɛnga te. Kasi [Yehova] akozala pole na yo libela mpe Nzambe na yo akozala [kitoko, NW] na yo. Moi na yo ekolimwa lisusu te mpe sanza na yo ekomilongola te; mpo ete [Yehova] akozala pole na yo libela mpe mikolo na kolela na yo ekosuka.” Ntango “kolela” ya baombo ya elimo esilaki na 1919, pole ya Yehova ebandaki kongɛngɛla bango. Mbula koleka 80 na nsima, Yehova azali kaka kosepela na bango na ndenge azali kongɛngisela bango pole na ye. Mpe pole yango ekosila te. Mpo na basaleli na ye, Nzambe na biso ‘akolimwa’ te ndenge moi elimwaka mpe ‘akolongwa’ te ndenge sanza elongwaka. Kasi, akongɛngisa bango libela na libela. Yango ezali mpenza kolendisa biso baoyo tozali na mikolo ya nsuka ya mokili oyo etondi na molili!
14, 15. (a) Na ndenge nini basaleli nyonso ya Nzambe bazali “bayengebene”? (b) Kokokisama mosusu nini ya monene ya Yisaya 60:21 oyo bampate mosusu bazali kozela?
14 Sikoyo, yoká elaka mosusu oyo Yehova alobi mpo na Yisalaele ya Nzambe, oyo bazali komonisa Siona awa na mabele. Yisaya 60:21 elobi boye: “Bato na yo nyonso bakozala bayengebene, bakozala bankolo ya mokili libela; ntina ya kokona na ngai, mosala ya mabɔkɔ na ngai ete [nakóma kitoko, NW].” Na 1919, ntango baklisto bapakolami bazongelaki mosala na bango, bakesanaki mpenza na bato mosusu. Na kati ya mokili oyo bato bamipesaki na masumu, bango ‘babengamaki bayengebene’ mpo na kondima na bango makasi na mbeka oyo Klisto Yesu apesaki mpo na kobikisa biso. (Baloma 3:24, NW; 5:1, NW) Na nsima, lokola Bayisalaele oyo bautaki na boombo na Babilone, bakómaki bankolo ya “mokili” moko ya elimo epai bazali na kati ya paladiso ya elimo. (Yisaya 66:8) Kitoko ya mokili yango oyo ezali lokola ya paladiso ekobeba ata mokolo moko te mpamba te, Yisalaele ya Nzambe ekotikala sembo, ekozala te lokola Yisalaele ya kala. Kondima na bango, ezaleli na bango ya koyika mpiko, mpe molende na bango ekotika te kokumisa nkombo ya Nzambe.
15 Bato nyonso ya libota yango ya elimo bazali na kati ya kondimana ya sika. Mibeko ya Yehova ekomami na mitema na bango nyonso, mpe mpo na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso, Yehova alimbisi masumu na bango. (Yilimia 31:31-34) Nzambe azali kobenga bango bayengebene to “bana” na ye mpe azali kotalela bango lokola nde bazali bato ya kokoka. (Baloma 8:15, 16, 29, 30) Baninga na bango mpe, bampate mosusu, balimbisami masumu na bango mpo na mbeka ya Yesu mpe, mpo na kondima na bango; Nzambe azali kobenga bango bayengebene mpe baninga lokola Abalayama. “Basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.” Mpe baninga yango, bampate mosusu, bazali kozela lipamboli mosusu ya monene. Nsima ya kobika na “bolɔzi monene” to nsima ya lisekwa, bakomona na miso ndenge oyo maloba ya Yisaya 60:21 ekokokisama mpenza, ntango mabele mobimba ekokóma paladiso. (Emoniseli 7:14, NW; Baloma 4:1-3) Na ntango wana, “bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:11, 29.
Bato bazali se kobakisama
16. Elaka nini ya kitoko Yehova apesaki, mpe ndenge nini ekokisami?
16 Na vɛrsɛ ya nsuka ya Yisaya mokapo ya 60, tozali kotánga elaka ya nsuka oyo Yehova apesi na mokapo yango. Alobi na Siona boye: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota ya makasi, Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbangu.” (Yisaya 60:22) Na mikolo na biso, Yehova akokisi maloba na ye. Ntango baklisto bapakolami bazongelaki mosala na bango na 1919, bazalaki mingi te, bazalaki mpenza “oyo moke.” Bakómaki ebele wana Bayisalaele mosusu ya elimo bazalaki kobakisama. Na nsima, ebele ya bampate mosusu bakómaki koya kosangana na bango. Kimya ya basaleli ya Nzambe, to paladiso ya elimo oyo ezali na “mokili” na bango ebendi ebele ya bato ya mitema sembo na boye ete “oyo moke” ekómi mpenza “libota ya makasi.” Lelo oyo, “libota” yango, Yisalaele ya Nzambe bakisa “bapaya” koleka milio motoba oyo bamipesi, ezali na bato mingi koleka bato ya bikólo mingi ya mokili. (Yisaya 60:10) Bato nyonso ya libota yango bazali kongɛngisa pole ya Yehova, mpe yango ezali kokómisa bango kitoko mpenza na miso na ye.
17. Boyekoli ya Yisaya mokapo 60 epesi yo mposa nini?
17 Ya solo, tolendisi mpenza kondima na biso na ndenge totaleli makanisi ya ntina ya Yisaya mokapo ya 60. Ezali likambo ya kobɔndisa na komona ete Yehova ayebaki banda kalakala mpenza ete bato na ye bakokende na boombo mpe bakozonga. Tozali mpenza kotikala monɔkɔ polele na komona ete Yehova ayebaki liboso mpenza ete basambeli ya solo bakokóma ebele mpenza na mikolo na biso. Lisusu, tozali kolendisama na koyeba ete Yehova akotika biso te! Elaka oyo elobi ete bikuke ya “mboka” ekokangama te mpo na koyamba bato oyo “bazali na makanisi mabongi mpo na bomoi ya seko” ezali mpenza komonisa bolingo! (Misala 13:48, NW) Yehova akotika te kongɛngɛla basaleli na ye. Siona ekokoba kozala eloko ya lokumu wana bana na ye bakolanda kongɛngisa pole na bango makasi koleka. (Matai 5:16) Na ntembe te, ekateli na biso ya kokangama na Yisalaele ya Nzambe mpe ya kosepela na libaku malamu oyo tozali na yango ya kongɛngisa pole ya Yehova elendisami lisusu koleka!
Okoki kolimbola?
• Atako botɛmɛli ezali, tokoki kozala na elikya nini?
• Ndenge nini bana ya Siona ‘bamɛli mabɛlɛ ya mabota’?
• Na ndenge nini Yehova ‘atii kwivre na esika ya mabaya’?
• Yebisá bizaleli mibale elobelami na Yisaya 60:17, 21.
• Ndenge nini “oyo moke” ekómi “libota ya makasi”?
[Etanda/Bililingi na lokasa 18]
ESAKWELI YA YISAYA—Pole mpo na bato nyonso
Masolo oyo mibale esalemaki lokola lisukulu na mayangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” oyo esalemaki na 2001 mpe 2002. Na bisika mingi, na nsuka ya lisukulu yango, molobi alakisaki mokanda ya sika oyo ezali na motó ya likambo ete Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi ya mibale. Na mbula oyo elekaki, Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi ya liboso ebimaki. Mikanda yango ya sika ezali kopesa bandimbola ya sika ya vɛrsɛ mokomoko ya mokanda ya Yisaya. Mikanda yango ezali kosalisa biso mpenza na kobakisa bososoli na biso mpe botɔndi na biso mpo na mokanda ya Yisaya.
[Elilingi na lokasa 15]
Atako bazali kokutana na botɛmɛli makasi, ‘Yehova azali kokómisa bato na ye kitoko na nzela ya lobiko’
[Bililingi na lokasa 16]
Basaleli ya Nzambe bazali kosalela bozwi ya mabota mpo na kotombola losambo ya pɛto
[Elilingi na lokasa 17]
Yehova asalisi basaleli na ye na kobongisa ndenge ya kotambwisa makambo mpe apesi bango kimya