Makambo malamu oyo nsango malamu ememelaka bato
“Yehova apakoli ngai mpo na koyebisa bato ya komikitisa bansango malamu. Atindi ngai kosalisa bato oyo bazoki na motema, . . . kobɔndisa bato nyonso oyo bazali na mawa.”—YISAYA 61:1, 2, NW.
1, 2. (a) Yesu amonisaki ete azali nani mpe amonisaki yango ndenge nini? (b)Nsango malamu oyo Yesu asakolaki ememaki makambo nini ya malamu ?
NTANGO Yesu abandaki mosala na ye sika, na mokolo moko ya Sabata akendaki na sinagoga na mboka Nasalete. Lisolo elobi ete “bapesaki ye rulo ya mosakoli Yisaya, afungolaki rulo yango mpe amonaki esika oyo bakomi ete: ‘Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te apakoli ngai mpo na kosakola bansango malamu.’ ” Yesu atángaki mpe makambo oyo elandi na esakweli yango. Na nsima, afandaki mpe alobaki ete: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”—Luka 4:16-21, NW.
2 Yesu amonisaki na maloba wana ete ye azali mosakoli ya nsango malamu oyo balobeli na esakweli wana, ye oyo akoyebisa nsango malamu mpe akobɔndisa bato. (Matai 4:23) Makambo oyo Yesu ayebisaki bato ezalaki mpenza nsango malamu! Alobaki na bato ete: “Ngai nazali [pole, NW] ya mokili. Ye oyo [akolanda] ngai akotambola kati na molili te kasi akozala na [pole, NW] ya bomoi.” (Yoane 8:12) Alobaki mpe ete: “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:31, 32, NW) Yesu azalaki na “maloba ya bomoi ya seko.” (Yoane 6:68, 69) Pole, bomoi, bonsomi, nyonso wana ezali mpenza makambo malamu oyo tosengeli mpenza kopesa motuya!
3. Bayekoli ya Yesu basakolaki nsango malamu nini?
3 Nsima ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), bayekoli bakobaki mosala ya kosakola nsango malamu oyo Yesu abandaki. Basakolaki ‘nsango malamu ya Bokonzi’ epai ya Bayisalaele mpe epai ya bato ya bikólo mosusu. (Matai 24:14; Misala 15:7; Baloma 1:16) Bato oyo bayokaki nsango yango bayebaki Yehova Nzambe. Balongwaki na boombo ya mateya ya mangomba mpe bakɔtaki na ekólo ya sika ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” oyo bato na yango bazali na elikya ya koyangela mpo na libela na likoló elongo na Nkolo na bango Yesu Klisto. (Bagalatia 5:1; 6:16; Baefese 3:5-7; Bakolose 1:4, 5; Emoniseli 22:5) Nyonso wana ezalaki mpenza makambo malamu!
Mosala ya kosakola nsango malamu lelo oyo
4. Ndenge nini etinda ya kosakola nsango malamu ezali kokokisama lelo oyo?
4 Lelo oyo, “ebele monene” ya “bampate mosusu” oyo bazali se kokóma mingi bazali kopesa baklisto bapakolami mabɔkɔ mpe bango nyonso esika moko, bazali kokokisa mosala oyo esakweli elobelaki, mosala oyo bapesaki yango liboso Yesu. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Yango wana, nsango malamu ezali kosakolama na bisika mingi koleka ndenge oyo esalemaki liboso. Na mikili 235, Batatoli ya Yehova basali molende mpenza “mpo na koyebisa bato ya komikitisa bansango malamu . . . , kosalisa bato oyo bazoki na motema, kosakola bonsomi epai ya bato oyo bakangami mpe kofungwama miso polele epai ya bato ya bolɔkɔ; mpo na kosakola mbula ya boboto oyo euti na Yehova mpe mokolo ya kopesa etumbu oyo ekouta epai ya Nzambe na biso; mpo na kobɔndisa bato nyonso oyo bazali na mawa.” (Yisaya 61:1, 2, NW) Na ndenge yango, mosala ya baklisto oyo etali kosakola nsango malamu ezali tii lelo oyo komemela bato ebele makambo malamu, ezali mpe kobɔndisa mpenza “baoyo bazali na ndenge nyonso ya mpasi.”—2 Bakolinti 1:3, 4, NW.
5. Na oyo etali kosakola nsango malamu, nini ezali kokesenisa Batatoli ya Yehova na mangomba ya boklisto?
5 Ya solo, mangomba ya boklisto etindaka mpe bandimi mosusu na kosala mosala ya kosakola nsango malamu. Mangomba mingi etindaka bamisionɛrɛ mpo na koluka bandimi ya sika na bikólo mosusu. Na ndakisa, zulunalo moko (The Orthodox Christian Mission Center Magazine) elobelaka mosala ya bamisionɛrɛ ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ na Madagascar, na sudi ya Afrika, na Tanzanie mpe na Zimbabwe. Kasi, bandimi mingi mpenza ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ na ya mangomba mosusu ya boklisto basalaka mosala yango te. Nzokande, Batatoli ya Yehova nyonso basalaka makasi mpo na kosala mosala yango. Bayebi ete kosakola nsango malamu emonisaka ete bazali na kondima ya solosolo. Paulo alobaki ete: “Kondima oyo ekokómisa moto na boyengebene ezali na motema, mpe eyambweli ekokómisa moto na lobiko ezali na bibebu.” Soki kondima ya moto ezali kotinda ye te na kosala mosala, ezali kondima oyo ekufá.—Baloma 10:10; Yakobo 2:17.
Nsango malamu oyo ezali komema bolamu ya seko
6. Nsango malamu nini ezali kosakolama lelo oyo?
6 Batatoli ya Yehova basakolaka nsango malamu oyo eleki nsango malamu mosusu nyonso. Batángaka makambo ezali na Biblia mpo na kolakisa bato oyo basepeli koyoka bango ete Yesu apesaki bomoi na ye mpo bato báya epai ya Nzambe, masumu na bango elimbisama mpe bákóma na elikya ya bomoi ya seko. (Yoane 3:16; 2 Bakolinti 5:18, 19) Basakolaka ete Bokonzi ya Nzambe esili kosalema kuna na likoló mpe Nzambe apesi yango na Yesu Klisto, mokonzi oyo ye aponi, mpe etikali moke bokonzi yango elongola mabe nyonso awa na mabele mpe etambwisa misala ya kokómisa yango Paladiso. (Emoniseli 11:15; 21:3, 4) Bazali kosala mosala oyo ezali kokokisa esakweli ya Yisaya, bazali koyebisa bazalani na bango ete tozali sikoyo na “mbula ya boboto oyo euti na Yehova,” ntango oyo bato bakoki naino kondima nsango malamu. Bazali mpe kokebisa ete tokómi pene na “mokolo ya kopesa etumbu oyo ekouta epai ya Nzambe na biso,” ntango Yehova akoboma bato mabe oyo balingi kobongola mitema te.—Nzembo 37:9-11.
7. Ndakisa nini ezali komonisa bomoko ya Batatoli ya Yehova, mpe nini ezali kosala ete bázala na bomoko yango?
7 Na mokili oyo etondi na makama, kaka nsango yango nde ezali kopesa bolamu ya seko. Bato oyo bazali kondima yango bazali kokɔta na lisangá ya bandeko baklisto oyo bazali na mokili mobimba, oyo bazali na bomoko mpe bazali kotika nzela te ete kokesana bikólo, minɔkɔ, to makambo ya bomoi ekabola bango. Baklisto yango ‘bamilatisi bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.’ (Bakolose 3:14; Yoane 15:12) Likambo yango emonanaki na mbula oyo eleki na ekólo moko ya Afrika. Mokolo mosusu na ntɔngɔ, bato oyo bafandi na mboka-mokonzi balamukaki na lokito ya mindoki. Bana-mboka oyo bazali banguna ya mokonzi ya mboka nde balingaki kolongola ye na bokonzi mpo na kotya moto na bango. Na nsima, ntango makambo ebongwanaki mpe ekómaki etumba kati na bato ya bituluka mibale ya mboka yango, bato ya kartye moko bakómaki koloba mabe mpo na libota moko ya Batatoli mpo, na ndako na bango, babombaki Batatoli oyo balobaka monɔkɔ moko te. Bato ya libota yango balobaki ete: “Na ndako na biso tozali kaka na Batatoli ya Yehova.” Elingi koloba ete ata balobaka monɔkɔ moko te yango ezalaki na ntina te mpo na bango; bolingo ya baklisto oyo ebɔndisaka bato oyo bazali kokelela nde ezalaki likambo ya ntina. Ndeko na bango moko oyo azali Motatoli te alobaki ete: “Bandimi ya mangomba nyonso batɛki bandeko na bango. Kaka Batatoli ya Yehova nde basali bongo te.” Tozwaki bansango mingi ya ndenge yango oyo eutaki na bikólo oyo bitumba ezali; nyonso ezali komonisa ete Batatoli ya Yehova ‘balingaka lisangá mobimba ya bandeko.’—1 Petelo 2:17, NW.
Nsango malamu ezali kobongola bato
8, 9. (a) Mbongwana nini ezali kosalema epai ya baoyo bazali kondima nsango malamu? (b) Bandakisa nini ezali komonisa ete nsango malamu ezali na nguya?
8 Nsango malamu etaleli oyo Paulo abengaki “bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya.” (1 Timote 4:8, NW) Nsango malamu epesaka elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya, kasi ebongisaka mpe “bomoi ya sikoyo.” Motatoli ya Yehova mokomoko alandaka toli ya Liloba ya Nzambe mpo asala mokano ya Nzambe na kati ya bomoi na ye. (Nzembo 119:101) Bazali kokóma na bomoto ya sika ntango bazali kolona bizaleli lokola boyengebene mpe bosembo.—Baefese 4:24, NW.
9 Tózwa ndakisa ya Franco. Ye azalaki moto ya nkanda mingi. Soki kaka likambo esepelisi ye te, azalaki kongala mpe kobebisa biloko. Mwasi na ye ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova mpe Franco abandaki kosepela mokemoke na bizaleli malamu na bango ya baklisto mpe amonaki ete asengeli kobongwana. Ye mpe ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova mpe nsukansuka akómaki komonisa mbuma ya elimo lokola kimya mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Franco azali na kati ya bato 492 oyo bazwaki batisimo na Belgique na mbula ya mosala 2001. Tótalela lisusu ndakisa ya Alejandro. Elenge mobali yango akómaki mpenza moombo ya bangi; akómaki kolɔkɔta biloko na fulu, azalaki koluka eloko nyonso oyo amoni ete akoki kotekisa yango mpo na kosomba bangi. Ntango akómaki na mbula 22, asololaki na Batatoli ya Yehova; batunaki ye soki akondima koyekola Biblia, mpe andimaki. Akómaki kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe akómaki koyangana na makita. Abongwanaki mpe aumelaki te mpo na kotika makambo ya mabe; sanza motoba kutu ekokaki te, Alejandro akómaki kobima na mosala ya kosakola. Azali na kati ya bato 10 115 oyo basalaki mosala yango na mbula eleki na ekólo Panama.
Nsango malamu ezali likambo ya malamu mpo na bato ya komikitisa
10. Banani bazali kondima nsango malamu mpe bato yango bazali kokóma na makanisi nini?
10 Yisaya alobaki ete nsango malamu ekosakolama epai ya bato ya komikitisa. Bato yango ya komikitisa ezali banani? Ezali baoyo mokanda ya Misala elobi ete bazali na “ezaleli ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Misala 13:48, NW) Bazali bato ya komikitisa oyo tokoki kokuta na kati ya bato ya mbongo, babola, bato oyo bayekolá mingi, bato oyo bakɔtá kelasi te, mpe bongo na bongo; bazali kofungola mitema na bango mpe bazali kondima mateya ya solo. Bato yango bazali komona ete kosala mokano ya Nzambe ememaka bolamu oyo eleki nyonso oyo moto akoki kozwa na mokili. (1 Yoane 2:15-17) Kasi, Batatoli ya Yehova basalaka ndenge nini mpo na kosimba mitema ya bato ntango basakolaka nsango malamu?
11. Soki tolandi maloba ya Paulo, ndenge nini nsango malamu esengeli kosakolama?
11 Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo; akomelaki Bakolinti ete: “Bandeko, ntango ngai nayaki epai na bino, nayaki te kosakwela bino sɛkɛlɛ mosantu ya Nzambe na elobeli to na bwanya oyo eleki mpenza. Mpamba te nazalaki na mokano ya koyeba likambo moko te na kati na bino, longola kaka Yesu Klisto, mpe ye na ndenge ya moto abakami na nzete.” (1 Bakolinti 2:1, 2, NW) Paulo alukaki te kolakisa mayele na ye mpo na kokamwisa bato oyo bazalaki koyoka ye. Ateyaki kaka makambo ya solo oyo eutaki epai ya Nzambe, makambo oyo ezali lelo na kati ya Biblia. Lisusu, tóyoka maloba ya kolendisa oyo Paulo ayebisaki Timote, moninga na ye ya mosala: “Sakolá liloba, salá yango na molende.” (2 Timote 4:2, NW) Timote asengelaki kosakola “liloba,” elingi koloba nsango ya Nzambe. Paulo akomelaki mpe Timote ete: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, moto ya mosala oyo azali na likambo moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali komonisa liloba ya solo na ndenge esengeli mpenza.”—2 Timote 2:15, NW.
12. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali kolanda maloba ya Paulo mpe ndakisa na ye?
12 Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya Paulo, balandaka mpe maloba oyo akomelaki Timote. Bayebaka ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya mpe basalelaka yango ntango bazali koyebisa bazalani na bango maloba oyo ezali kopesa elikya mpe kobɔndisa. (Nzembo 119:52; 2 Timote 3:16, 17; Baebele 4:12) Ya solo, basalelaka mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia mpo na kopesa bato oyo basepelaka koyoka bango nzela ya koyeba Biblia na ndenge oyo ezali kosepelisa bango. Kasi balukaka ntango nyonso kolakisa bato maloba ya Makomami. Bayebaka ete Liloba ya Nzambe oyo epemami ekozanga te kosimba mitema ya bato ya komikitisa. Kosalela Biblia ndenge wana elendisaka mpe kondima na bango moko.
“Kobɔndisa bato nyonso oyo bazali na mawa”
13. Na mobu 2001, makambo nini epesaki bato mingi oyo bazali na mawa mposa ya kobɔndisama?
13 Na mobu 2001, makama mingi mpe esalemaki; yango wana bato mingi bazalaki na mposa ya kobɔndisama. Likambo yango emonanaki mpenza na États-Unis na sanza ya Sɛtɛmbɛ ntango bato ya mobulu bakweisaki babuludingi mibale (World Trade Center) na New York mpe babebisaki biro monene ya misala ya basoda pene ya Washington. Makambo yango ebulunganisaki bato na ekólo mobimba! Ntango makambo ya ndenge wana esalemi, Batatoli ya Yehova basalaka makasi ete bákokisa mokumba na bango ya “kobɔndisa bato nyonso oyo bazali na mawa.” Mwa bandakisa ekomonisa ndenge oyo basalaka yango.
14, 15. Ndenge nini, na bisika mibale, Batatoli ya Yehova basalelaki malamu Makomami mpo na kobɔndisa bato oyo bazali na mawa?
14 Motatoli moko oyo azali mobongisi-nzela asololaki na mwasi moko na nzela; atunaki ye soki azali na likanisi nini na makambo oyo bato ya mobulu basali. Mbala moko, mwasi yango abandaki kolela. Alobaki ete azali na mawa mingi mpe azali koluka kosala ata mwa eloko moko mpo na kosalisa bato. Motatoli ayebisaki ye ete Nzambe azali kokanisa biso nyonso, na nsima atángelaki ye Yisaya 61:1, 2. Mwasi wana amonaki ete maloba wana oyo euti na mokanda ya Nzambe ebongaki mpenza, mpamba te ye moko alobaki ete bato nyonso bazalaki na mawa. Andimaki kozwa trakte moko oyo Motatoli yango apesaki ye mpe ayebisaki ye akende kotala ye na ndako.
15 Batatoli mibale bazalaki kosakola nsango malamu; bakutanaki na mobali moko na esika na ye ya mosala. Batunaki ye soki akosepela bálakisa ye maloba ya kobɔndisa oyo euti na Makomami na kotalela likambo ya nsɔmɔ oyo eutaki kosalema na New York. Mobali yango andimaki mpe batángaki 2 Bakolinti 1:3-7 (NW). Na kati ya bavɛrsɛ yango, esika moko balobi ete: “Kobɔndisama . . . etondi na nzela ya Klisto.” Mobali yango asepelaki mingi na likambo oyo Batatoli bazalaki kosala ya koyebisa bazalani na bango likambo oyo ekoki kobɔndisa, mpe alobaki ete: “Tiká Nzambe apambola mosala malamu oyo bozali kosala.”
16, 17. Lobelá bandakisa mibale oyo ezali kolakisa nguya oyo Biblia ezali na yango mpo na kosalisa bato oyo makama ezali kopesa bango mawa to kotungisa bango.
16 Motatoli moko oyo azongelaki bato oyo basepelaki koyoka nsango malamu, akutanaki na mobali moko oyo azali mwana ya mwasi moko oyo asepelaki ntango basololaki na ye mbala ya liboso. Motatoli yango alobaki na ye ete azali kotala bazalani na ye mpo na koyeba soki bazali ndenge nini nsima ya makambo oyo eutaki koleka. Mobali yango akamwaki na komona ete Motatoli yango azwaki ntango na ye mpo na kotala bato mpo na koyeba soki bazali ndenge nini. Mobali yango alobaki ete azalaki kosala pembeni ya babuludingi wana ntango ekweaki mpe amonaki na miso na ye ndenge makambo nyonso elekaki. Ntango atunaki mpo na nini Nzambe atikaka ete bato bámona mpasi, Motatoli wana atángelaki ye bavɛrsɛ ya Biblia; moko na yango ezali Nzembo 37:39, oyo elobi ete: “Kobika ya bayengebene euti na [Yehova], ye azali ekimelo na bango na ntango ya mpasi.” Mobali yango atunaki na boboto mpenza soki Motatoli yango na libota na ye bazali malamu, mpe alobaki na ye ete azongela ye mpe alobaki ete asepelaki mingi na ndenge oyo ndeko akendaki kotala ye.
17 Batatoli ya Yehova babɔndisaki ebele ya bato oyo bazalaki na mawa nsima ya makambo oyo elekaki na New York mpe na Washington; moko na bango ezali mwasi moko oyo Batatoli bakutanaki na ye ntango bazalaki kotala bazalani na bango. Makambo oyo elekaki etungisaki ye mingi mpe ayokaki bango ntango batángelaki ye Nzembo 72:12-14: “Akobikisa mobola oyo akogangaka, mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola. Akosikola milimo na bango kati na minyoko mpe na mobulu; makila na bango makozala na motuya na miso na ye.” Maloba yango ezalaki mpenza na ntina na ntango wana! Mwasi yango asɛngaki Batatoli ete bázongela lisusu kotánga bavɛrsɛ yango mpe akɔtisaki bango na ndako na ye mpo bákoka kosolola malamu. Liboso bákabwana, babandaki boyekoli ya Biblia.
18. Ndenge nini Motatoli moko asalisaki bazalani na ye ntango basɛngaki ye abondela mpo na bango?
18 Motatoli moko asalaka na restora moko oyo ezali na kartye ya bato ya mbongo; liboso, bato oyo bafandi kuna bazalaki kosepela koyoka nsango malamu ya Bokonzi te. Nsima ya makambo oyo bato ya mobulu basalaki, emonanaki ete bato yango babulunganaki. Makambo yango esalemaki mokolo ya mibale; bongo, mokolo ya mitano na mpokwa, mwasi oyo azali nkolo restora asɛngaki bato nyonso bábima libándá mpe básimba babuji na mabɔkɔ, bázala nyɛɛ mwa ntango mpo na kokanisa bato nyonso oyo bakufaki mpe oyo bazokaki. Motatoli wana azalaki na limemya mpo na mawa oyo bato bazalaki na yango; ye mpe abimaki libándá mpe atɛlɛmaki nyɛɛ pembeni. Nkolo restora ayebaki ete azali Motatoli ya Yehova; yango wana, nsima ya mwa miniti oyo batikalaki nyɛɛ, asɛngaki ye asala libondeli mpo na bango nyonso. Motatoli yango andimaki. Na libondeli na ye, alobaki mpo na ebele ya bato oyo bazali na mawa kasi alobaki mpe ete bato yango basengeli kozala na elikya. Alobelaki ntango oyo makambo ya mabe ndenge wana ekozala lisusu te mpe alobaki ete bato nyonso bakoki kokóma penepene na Nzambe oyo abɔndisaka soki bazwi boyebi ya solosolo ya Biblia. Ntango balobaki “Amen,” nkolo restora apusanaki liboso ya Motatoli, apesaki ye matɔndi, ayambaki ye mpe alobaki ete ayoká naino libondeli ya malamu ndenge wana te; bato mosusu koleka 60 oyo babimaki na libándá ya restora balandaki ye na nsima.
Batatoli basalelaka bazalani na bango malamu
19. Ndakisa nini ezali komonisa ete bato mosusu bazali kondima ete Batatoli ya Yehova bazali bato ya bizaleli malamu?
19 Na mikolo oyo tozali, bato oyo bafandi na bisika oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola bazali kozwa bolamu mingi; bato mingi mpe bamoni ete ezali bongo. Batatoli bazali bato oyo balendisaka kimya, bosembo mpe etamboli ya pɛto, bakoki kozanga te komemela bato bolamu! Na ekólo moko ya Azia, Batatoli bakutanaki na mokonzi moko ya basoda oyo azalaká moto ya sirete mpe asilá kozwa epaso. Moto yango alobaki ete na ntango moko bapesaki ye mosala ya kolandela makambo ya mangomba ndenge na ndenge. Ntango atalelaki Batatoli ya Yehova, akamwaki mingi: amonaki ete bazali bato ya sembo mpe bazali na bizaleli malamu. Asepelaki na bango mingi mpo na kondima makasi oyo bazali na yango mpe mpo ete mateya na bango eutaka na Makomami. Mobali yango andimaki koyekola Biblia.
20. (a) Mosala oyo Batatoli ya Yehova basalaki na mbula eleki ezali komonisa nini? (b) Nini ezali komonisa ete mosala ezali naino monene, mpe ndenge nini tozali kotalela libaku malamu oyo tozali na yango ya kosakola nsango malamu?
20 Bandakisa oyo tolobeli na lisolo oyo ezali kaka mwa ndambo na ebele ya bandakisa oyo tokoki kolobela; nyonso ezali komonisa ete na mbula ya mosala 2001, Batatoli ya Yehova bakangaki mabɔkɔ te.a Basololaki na ebele ya bato, babɔndisaki bato mingi oyo bazalaki na mawa, mpe mosala na bango ya kosakola nsango malamu ebotaki mbuma malamu. Bato 263431 bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe. Na mokili mobimba, motángo ya basakoli ya nsango malamu ebakisamaki (1,7 %). Bato 15374986 bazalaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu; motángo yango ezali komonisa ete mosala ezali naino mingi. (1 Bakolinti 11:23-26) Tiká tólanda koluka bato ya komikitisa oyo bakondima nsango malamu. Lokola mbula ya boboto oyo euti na Yehova esuki naino te, tólanda kobɔndisa “bato oyo bazoki na motema.” Tozali na mosala ya malamu mpenza! Na ntembe te, biso nyonso tozali koloba lokola Yisaya ete: “Nakosepela kosepela mingi kati na [Yehova], molimo na ngai ekozwa esengo mpo na Nzambe na ngai.” (Yisaya 61:10) Tiká ete Nzambe alanda kosalela biso mpo na kokokisa esakweli na ye ete: “Nkolo [Yehova akobimisa, NW] boyengebene mpe masanzoli liboso na mabota.”—Yisaya 61:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lapolo ya mosala ya Batatoli ya Yehova na mobu 2001 emonisami na etanda oyo ezali na nkasa 19 tii 22.
Ozali koyeba lisusu?
• Nsango malamu oyo Yesu asakolaki ememelaki bato ya komikitisa makambo nini ya malamu?
• Bato oyo bandimaki nsango malamu oyo bayekoli ya Yesu basakolaki na ekeke ya liboso bazwaki makambo nini ya malamu?
• Bato oyo bandimi nsango malamu na mikolo na biso bazwi makambo nini ya malamu?
• Ndenge nini totalelaka mosala oyo tozali na yango ya kosakola nsango malamu?
[Etanda na lokasa 19-22]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 2001
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Bililingi na lokasa 15]
Batatoli ya Yehova babosanaka te ete bazali na mokumba ya kosakola nsango malamu
[Bililingi na lokasa 17]
Bato oyo bazali kondima nsango malamu bazali kokɔta na lisangá ya bandeko oyo bazali na mokili mobimba mpe bazali na bomoko