Mokapo ya Ntuku Mibale na Minei
Yehova azwi nkombo ya nkembo
1, 2. (a) Mpo na nini baklisto bazali kotya motema mingi na koya ya “mokolo ya Yehova”? (b) Mpo na likambo nini ya ntina mingi mokolo ya Yehova esengeli koya?
EKOKI sikoyo mbula soki nkóto mibale, baklisto bazali ‘kozela mpe kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.’ (2 Petelo 3:12; Tito 2:13) Yango wana bazali kozela mokolo yango na motema likoló, mpamba te kobanda na mokolo yango nde bakolongwa na mikakatano oyo euti na ezaleli ya kozanga kokoka. (Baloma 8:22) Lisusu, mikakatano oyo bazali kokutana na yango na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” ya mikolo oyo ekosila nyonso.—2 Timote 3:1.
2 Nzokande, wana mokolo ya Yehova ekolongola bayengebene na mpasi, ekozala mpe mokolo ya kobomama mpo na “baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Batesaloniki 1:7, 8) Yango ezali kotinda biso na kokanisa. Yehova akoboma mpenza bato mabe kaka mpo na kosilisa mpasi ya basaleli na ye? Mokapo 63 ya Yisaya emonisi ete akosala yango mpo na likambo moko oyo eleki mpenza ntina: kosantisama ya nkombo na ye.
Mobundi oyo alongi azali kotambola
3, 4. (a) Esakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 63 eyei nsima ya esakweli nini? (b) Yisaya amoni nani azali kokende na Yelusaleme, mpe bato ya mayele balobi ete ezali nani?
3 Na Yisaya mokapo 62, tomonaki ndenge Bayuda basikolamaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na mboka na bango. Bongo, motuna oyo ebongi kotunama yango oyo: Ndambo ya Bayuda oyo bazongi basengeli kobanga ete bikólo mosusu oyo ezali banguna na bango ekoya kobebisa bango lisusu? Emonaneli oyo Yisaya amonaki esalisi mpenza bango bábanga te. Esakweli yango ebandi boye: “Oyo nani akolongwa na Edome na bilamba motane longwa na Bosala? Ye oyo azali na nkembo na bilamba na ye, kotambola na monene ya nguya na ye?”—Yisaya 63:1a.
4 Yisaya amoni mobundi moko makasi oyo alongi etumba azali kokende na Yelusaleme. Bilamba kitoko oyo alati emonisi ete azali mpenza moto monene. Auti na Bosala, engumba oyo eleki lokumu na Edome; yango emonisi ete alongi mpenza mboka wana ya banguna. Mobundi wana ekoki kozala nani? Bato mosusu ya mayele balobi ete ezali Yesu Klisto. Basusu bakanisaka ete ezali mokonzi ya basoda ya Bayuda na nkombo Yuda Makabe. Nzokande, mobundi yango ye moko alobi soki azali nani ntango ayanoli na motuna oyo etunamaki liboso: ‘Ezali ngai, moto nalobaka na boyengebene, natondi na makasi mpo na kobikisa.’—Yisaya 63:1b.
5. Mobundi oyo Yisaya amoni ezali nani, mpe mpo na nini oyanoli bongo?
5 Ntembe ezali te ete mobundi wana ezali Yehova Nzambe, ye mei. Na bavɛrsɛ mosusu balobi ete ‘atondi na nguya’ mpe ‘alobaka makambo ya boyengebene.’ (Yisaya 40:26; 45:19, 23) Bilamba kitoko oyo mobundi yango alati ezali kozongisa na makanisi na biso maloba oyo ya mokomi ya nzembo: “Ee [Yehova], Nzambe na ngai, ozali monene; bilamba na yo bobele nkembo mpe lokumu.” (Nzembo 104:1) Atako Yehova azali Nzambe ya bolingo, Biblia emonisi ete soki esengeli, akómaka mobundi.—Yisaya 34:2; 1 Yoane 4:16.
6. Mpo na nini Yehova auti kobunda etumba na Edome?
6 Kasi mpo na nini Yehova auti kobunda etumba na Edome? Banda kala, Baedome bazali banguna ya ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana, mpe koyina oyo bango bayinaka ekólo yango ebandaki na nkɔkɔ na bango Esau. (Genese 25:24-34; Mituya 20:14-21) Edome amonisaki polelepolele ete ayinaka Yuda makasi ntango Yelusaleme ezalaki kobebisama; bato ya Edome bazalaki kopesa basoda ya Babilone simbisi. (Nzembo 137:7) Yehova amonaki ete ezali ye nde bayinaki ndenge wana. Yango wana, esengeli kokamwisa te ete azwaki ekateli ya kobimisela Edome mopanga na ye mpo na kozongisela bango mabe!—Yisaya 34:5-15; Yilimia 49:7-22.
7. (a) Ndenge nini esakweli mpo na kokweisa Edome ekokisamaki mpo na mbala ya liboso? (b) Edome ezali komonisa nini?
7 Na yango, emonaneli ya Yisaya esengeli kolendisa mpenza Bayuda oyo bazali kozonga na Yelusaleme. Ekitisi bango motema ete na mboka na bango ya sika bakofanda na kimya kozanga kobanga. Kutu, na mikolo ya mosakoli Malaki, Nzambe akómisaki ‘ngomba ya Edome mpamba mpe atikaki libula na ye epai ya ngombolo ya esobe.’ (Malaki 1:3) Yango elingi koloba ete esakweli ya Yisaya ekokisamaki nyonso na mikolo ya Malaki? Te, mpamba te atako Edome atikalaki mpamba, azalaki na ekateli makasi ya kotonga lisusu bisika oyo ebebisamaki, mpe Malaki akobaki kobenga Edome “mokili ya mabe” mpe “libota oyo [Yehova] azali na nkanda epai na bango libela.”a (Malaki 1:4, 5) Nzokande, na ndenge ya esakweli, Edome esuki kaka te na bakitani ya Esau. Ezali komonisa bikólo nyonso oyo bazali banguna ya basaleli ya Yehova. Bikólo oyo ezali na mangomba ya boklisto mingi ezali mpenza na esika ya liboso na likambo yango. Nini ekokómela Edome wana ya mikolo na biso?
Ekamwelo ya vinyo
8, 9. (a) Mobundi oyo Yisaya amoni azalaki kosala nini? (b) Ntango nini mpe ndenge nini ekamwelo ya vinyo ya elilingi ekonyatama?
8 Yisaya atuni mobundi yango oyo azali kouta na etumba: ‘Mpo na nini elamba na yo ezali motane mpe bilamba na yo lokola ye oyo azali konyata ekamwelo ya vinyo?’ Yehova azongisi ete: ‘Nanyati ekamwelo ya vinyo bobele ngai moko, moko uta na bato azalaki na ngai te; nanyati bango na nkanda na ngai, mpe nanyati bango na nkɛlɛ na ngai; makila na bango esopaneli ngai likoló ya bilamba mpe nabebisi bilamba nyonso na ngai.’—Yisaya 63:2, 3.
9 Maloba wana ya polele ezali komonisa kosopama ya makila ebele. Ata bilamba kitoko ya Nzambe ebebi mpenza kobeba, lokola bilamba ya moto oyo anyataka ekamwelo ya vinyo! Ekamwelo ya vinyo ezali elembo oyo ebongi mpenza mpo na komonisa ndenge banguna ya Yehova Nzambe bakozala lokola bakangami na motambo ntango akoya mpo na koboma bango. Ntango nini bakonyata ekamwelo ya vinyo yango ya elilingi? Esakweli ya Yoele mpe ya ntoma Yoane elobelaka mpe ekamwelo ya vinyo moko ya elilingi. Ekamwelo ya vinyo ya bisakweli wana ekonyatama na Armagedona ntango Yehova akonyata banguna na ye kino akoboma bango. (Yoele 3:13; Emoniseli 14:18-20; 16:16) Ekamwelo ya vinyo ya esakweli ya Yisaya ekozala kaka mpo na ntango wana.
10. Mpo na nini Yehova alobi ete anyati ekamwelo ya vinyo kaka ye moko?
10 Kasi mpo na nini Yehova alobi ete anyati ekamwelo ya vinyo yango ye moko, moto moko kati na bato azalaki elongo na ye te? Yesu Klisto, momonisi ya Nzambe, akokamba te mosala yango ya konyata ekamwelo ya vinyo? (Emoniseli 19:11-16) Ɛɛ, akokamba; Yehova azali kolobela nde bana ya bato, kasi bikelamu ya elimo te. Azali koloba ete moto moko te azali na makoki ya kolongola bato ya Satana awa na mabelé. (Yisaya 59:15, 16) Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde akonyatanyata bango na nkanda na ye tii bango nyonso bakosila nyɛɛ.
11. (a) Mpo na nini Yehova akoyeisa “mokolo ya kozongisa mabe”? (b) Banani bazalaki “basikolami” na ntango ya kala, mpe na mikolo na biso ezali banani?
11 Yehova ayebisi lisusu ntina oyo ye moko asali mosala yango, alobi boye: ‘Mokolo ya kozongisa mabe ezali na motema na ngai; mpe mbula ya basikolami na ngai eyei.’ (Yisaya 63:4)b Kaka Yehova nde azali na lotomo ya kozongisa mabe epai ya baoyo bazali konyokola basaleli na ye. (Deteronome 32:35) Na ntango ya kala, “basikolami” ezalaki Bayuda oyo banyokwamaki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone. (Yisaya 35:10; 43:1; 48:20) Na mikolo na biso ezali batikali bapakolami. (Emoniseli 12:17) Ndenge moko na basikolami ya ntango ya kala, bango mpe basikolamaki na boombo ya mangomba. Mpe ndenge moko na Bayuda yango, bato bazali konyokola mpe kotɛmɛla bapakolami elongo na baninga na bango “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Na yango, esakweli ya Yisaya ezali kokitisa baklisto ya lelo motema ete na ntango oyo Nzambe aponi, akobikisa bango.
12, 13. (a) Na ndenge nini moto azali te mpo na kosunga Yehova? (b) Ndenge nini lobɔkɔ ya Yehova epesi lobiko, mpe na ndenge nini nkanda na ye esungi ye?
12 Yehova alandi koloba boye: ‘Natalaki nde moto ya kosunga ngai azalaki te; nabandaki kokamwa, kasi nde moto ya kopesa ngai mabɔkɔ azali te. Bongo lobɔkɔ na ngai moko elongisaki ngai mpe nkanda na ngai esungaki ngai. Nanyataki bikólo na nkanda na ngai, nalangwisaki bango na nkɛlɛ na ngai mpe nasopaki makila na bango na mabelé.’—Yisaya 63:5, 6.
13 Ata moto moko te asungi Yehova mpe akoki komipesa lokumu ya mokolo monene na Ye ya kozongisa mabe. Yehova azali mpe na mposa te ete moto moko asunga ye mpo na kokokisa mokano na ye.c Lobɔkɔ na ye oyo eleki makasi ekoki mpo na kokokisa mokumba yango. (Nzembo 44:3; 98:1; Yilimia 27:5) Lisusu, nkanda na ye esungi ye. Na ndenge nini? Na ndenge Nzambe asilikaka mpambampamba te kasi na ntina. Lokola Yehova asalaka makambo nyonso na boyokani na mitinda ya boyengebene, nkanda na ye esungi ye mpe etindi ye na ‘kosopa na mabelé makila’ ya banguna na ye, mpo na kosambwisa bango mpe kolonga bango.—Nzembo 75:8; Yisaya 25:10; 26:5.
Motema-boboto ya Nzambe
14. Makambo nini oyo ebongi Yisaya akundweli Bayuda sikoyo?
14 Na ntango ya kala, Bayuda baumelaki te kobosana makambo oyo Yehova asalelaki bango. Yango wana, Yisaya akundweli bango ntina oyo Yehova asalaki makambo yango. Yisaya alobi boye: ‘Nakosakola motema-boboto ya Yehova mpe nakosanzola Yehova; mpo na nyonso oyo Yehova apesi biso mpe malamu na ye mingi epai ya ndako ya Yisalaele; oyo ye apesi biso lokola ezali mawa na ye, lokola ezali motema-boboto na ye monene. Zambi alobi ete, Solo, bazali bato na ngai, bana oyo bakokosa te. Ye akómaki Mobikisi na bango. Na boumeli ya mpasi na bango, ezalaki kosala ye mpasi. Mpe ezalaki motindami na ye mpenza nde abikisaki bango. Na bolingo na ye mpe na mawa na ye asikolaki bango, atombolaki bango mpe akumbaki bango lokola na mikolo nyonso ya kala.’—Yisaya 63:7-9.
15. Ndenge nini mpe mpo na nini Yehova amoniselaki bakitani ya Abalayama motema-boboto na Ezipito?
15 Yehova apesi ndakisa malamu mpenza na ndenge amonisi motema-boboto to bolingo ya sembo! (Nzembo 36:7; 62:12) Yehova azalaki moninga ya Abalayama mpe alingaki ye mingi. (Mika 7:20) Apesaki ye elaka ete na nzela ya momboto to bakitani na ye bikólo nyonso ya mabelé ekozwa mapamboli. (Genese 22:17, 18) Yehova akokisaki elaka yango, amoniselaki mpenza ndako ya Yisalaele boboto mingi. Kobikisa oyo abikisaki bakitani ya Abalayama na boombo na Ezipito ezali moko na misala na ye ya bosembo oyo eleki mosusu.—Exode 14:30.
16. (a) Yehova azalaki na likanisi nini ntango asalaki kondimana na Yisalaele? (b) Ndenge nini Nzambe asalaka makambo epai ya basaleli na ye?
16 Nsima ya kobimisa Bayisalaele, Yehova amemaki bango na Ngomba Sinai mpe apesaki bango elaka oyo: ‘Soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bokobatela kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, . . . mpe bokozala bokonzi ya banganga-nzambe mpe ekólo ya bosantu.’ (Exode 19:5, 6) Yehova azalaki nde kokosa bango ntango apesaki elaka oyo? Te, mpamba te Yisaya amonisi ete Yehova alobaki na motema na ye moko ete: “Solo, bazali bato na ngai, bana oyo bakokosa te.” Moto moko ya mayele apesaki likanisi oyo: “Basaleli liloba ‘solo’ mpo na komonisa te ete [Yehova] azali mokonzi oyo azwi mokano ete likambo yango ezala ndenge wana to mpo azali na makoki ya koyeba oyo ekoyela ekólo na ye; kasi bolingo na ye nde etindi ye azala na elikya mpe atyela ekólo na ye motema.” Ɛɛ, Yehova asalaki kondimana na ye na motema malamu, alingaki mpenza ete bato na ye bálonga. Atako basalaki mabunga mingi, atyelaki bango kaka motema. Ezali mpenza likambo ya malamu kosambela Nzambe oyo atyelaka basaleli na ye motema bongo! Lelo oyo, ntango bankulutu batyelaka boboto ya basaleli ya Nzambe motema, balendisaka mpenza baoyo bapesami na mabɔkɔ na bango.—2 Batesaloniki 3:4; Baebele 6:9, 10.
17. (a) Makambo nini Yehova asalaki mpo na komonisa ete alingaka Bayisalaele? (b) Elikya nini biso tokoki kozala na yango lelo oyo?
17 Kasi, mokomi ya nzembo alobi boye na ntina na Bayisalaele: “Babosanaki Nzambe mobikisi na bango oyo asalaki makambo minene kuna na Ezipito.” (Nzembo 106:21) Mbala mingi, bazalaki komona mpasi mpo bazalaki kozanga botosi mpe bazalaki motó makasi. (Deteronome 9:6) Yehova atikaki nde komonisela bango motema-boboto? Kutu, Yisaya alobi ete “na boumeli ya mpasi na bango, ezalaki kosala ye mpasi.” Yehova ayebi mpenza komitya na esika ya basusu! Lokola tata nyonso, Nzambe ayokaki mpasi na motema na komona bana na ye bazali konyokwama, ata soki mpasi yango eutaki na bozoba na bango moko. Se ndenge asakolaki, mpe mpo na komonisa bolingo na ye, atindaki “motindami na ye mpenza,” mbala mosusu Yesu liboso abotama lokola moto, mpo na kotambwisa bango kino na Mokili ya Ndaka. (Exode 23:20) Na ndenge yango Yehova atombolaki ekólo yango mpe amemaki yango, ‘lokola moto amemaka mwana na ye.’ (Deteronome 1:31; Nzembo 106:10) Lelo oyo tokoki kondima solo ete Yehova ayebi mpe bampasi na biso mpe amityaka na esika na biso ntango tozali na mpasi. Tokoki kotyela ye motema mpe ‘kobwaka mitungisi na biso nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka biso likebi.’—1 Petelo 5:7.
Nzambe akómi monguna
18. Mpo na nini Yehova akómaki monguna ya bato na ye?
18 Nzokande, tosengeli soki moke te kosalaka mabe na nko mpo tozali kokanisa ete Nzambe akomonisela biso motema-boboto. Yisaya alandi koloba boye: ‘Batombokaki, mpe bayokisaki elimo santu na ye mawa; bongo akómaki monguna na bango, mpe ye moko abundisaki bango.’ (Yisaya 63:10) Yehova akebisaki ete atako azali Nzambe ya ngɔlu mpe ya motema mawa, “akozanga ata moke te kopesa etumbu.” (Exode 34:6, 7, NW) Bayisalaele bango moko balukaki etumbu na ndenge bazalaki kotomboka mbala na mbala. Moize akundwelaki bango boye: ‘Kobosana te lolenge yo oyokisi Yehova Nzambe na yo nkɛlɛ na esobe. Longwa na mokolo obimi na mokili ya Ezipito, kino ekómi bino na esika oyo, botombokeli Yehova.’ (Deteronome 9:7) Bayokisaki elimo ya Nzambe mawa na ndenge baboyaki kosala makambo ya malamu oyo elimo yango ezalaki kotinda bango básala. (Baefese 4:30) Batindaki Yehova na makasi akóma monguna na bango.—Levitike 26:17; Deteronome 28:63.
19, 20. Makambo nini Bayuda bakanisi, mpe mpo na nini bakanisi yango?
19 Mpo na mpasi bazalaki komona, Bayuda mosusu bakómi kokanisa makambo oyo eleká. Yisaya alobi ete: ‘Akanisaki mikolo ya kala, ya Moize mosaleli na ye, ete, Wapi ye oyo abimisaki bango na mai-na-monana, elongo na babateli ya etonga na ye? Wapi ye oyo atyaki kati na ye elimo santu na Ye? Ye oyo akómisaki lobɔkɔ na Ye ya nkembo epai ya lobɔkɔ ya mobali ya Moize; ye oyo apasolaki mai liboso na bango ete azwa nkombo oyo ekoumela seko. Ye oyo akambaki bango kati na bozindo. Lokola mpunda na esobe bazalaki kobɛta libaku te. Lokola bibwɛlɛ oyo ezali kokita na lobwaku elimo ya Yehova epesaki bango kimya.’—Yisaya 63:11-14a.d
20 Ɛɛ, lokola banyokwami mpo na kozanga botosi na bango, Bayuda bakómi kokanisa ntango oyo Yehova azalaki Mobikisi na bango kasi monguna na bango te. Bakanisi ndenge “babateli” na bango, Moize ná Alona bakatisaki bango Mbu Motane kozanga ete bázwa likama. (Nzembo 77:20; Yisaya 51:10) Bakanisi ntango oyo, na esika ya koyokisa elimo ya Nzambe mawa, elimo yango ezalaki nde kotambwisa bango na nzela ya malako oyo Moize mpe bankumu mosusu oyo elimo yango eponaki bazalaki kopesa. (Mituya 11:16, 17) Bakanisi mpe ndenge bamonaki Yehova asaleli “lobɔkɔ na ye ya nkembo,” to makasi na ye, mpo na kobikisa bango na nzela ya Moize. Na nsima, Nzambe abimisaki bango na esobe monene mpe ya nsɔmɔ, mpe akɔtisaki bango na mboka epai miliki mpe mafuta ya nzoi ezali kotyola—esika moko ya bopemi. (Deteronome 1:19; Yosua 5:6; 22:4) Kasi, sikoyo, Bayisalaele bazali komona mpasi mpamba te babebisi boyokani malamu oyo bazalaki na yango elongo na Nzambe!
‘Nkombo ya nkembo mpo na ye mpenza’
21. (a) Yisalaele alingaki kozwa libaku malamu ya kosala nini mpo na nkombo ya Nzambe? (b) Ntina ya liboso oyo Nzambe asikolaki bakitani ya Abalayama na Ezipito ezali nini?
21 Nzokande, biloko oyo Bayisaele babungisi ezali na ntina mingi te soki tokokanisi yango na libaku malamu oyo babwaki, oyo ya kopesa mpe nkombo ya Nzambe nkembo. Moize apesaki Bayisalaele elaka oyo: ‘Yehova akotya yo lokola ekólo ya bosantu mpo na ye mpenza, lokola ye asimbelaki yo ndai, soko okosala malako ya Yehova Nzambe na yo, mpe okotambola na nzela na ye. Bikólo nyonso awa na nse bakotala ete yo obengami na nkombo ya Yehova, mpe bango bakobanga yo.’ (Deteronome 28:9, 10) Ntango Yehova abundelaki bakitani ya Abalayama na ndenge abikisaki bango na boombo ya Ezipito, asalaki bongo kaka mpo na kolongola bango na mpasi te, kasi nde mpo na likambo moko oyo eleki ntina: nkombo na ye. Ɛɛ, asalaki nyonso mpo ete nkombo na ye “esakolama bipai nyonso na molɔ́ngɔ́.” (Exode 9:15, 16) Mpe ntango Nzambe ayokelaki Yisalaele mawa nsima ya botomboki na bango na esobe, asalaki bongo kaka mpo na komonisa mawa te. Yehova ye moko alobaki boye: “Nasalaki na ntina na nkombo na ngai, ete etyolama na miso ya mabota te.”—Ezekiele 20:8-10.
22. (a) Mpo na nini, na mikolo oyo ezali koya, Nzambe akobundela lisusu basaleli na ye? (b) Lokola tolingaka nkombo ya Nzambe, yango etindaka biso tómitambwisa ndenge nini?
22 Yoká sikoyo maloba kitoko oyo Yisaya asukisi na yango esakweli na ye! Alobi boye: “Bongo, okambaki bato na yo ete omizwela yo moko nkombo ya nkembo.” (Yisaya 63:14b) Sikoyo tomoni polele mpo na nini Yehova abundelaka basaleli na ye na nguya nyonso. Ezali mpo na komizwela nkombo ya nkembo. Na ndenge yango, esakweli ya Yisaya ekundweli biso makasi mpenza ete komema nkombo ya Yehova ezali libaku moko ya malamu mpenza kasi ezali mpe mokumba monene. Lelo oyo, baklisto ya solo balingaka nkombo ya Yehova koleka bomoi na bango. (Yisaya 56:6; Baebele 6:10) Balingaka ata moke te kosala likambo moko oyo ekoki kosambwisa nkombo mosantu yango. Bamonisaka botɔndi mpo na bolingo ya sembo oyo Nzambe amoniselaka bango na kotikaláká sembo epai na ye. Mpe lokola balingi nkombo ya nkembo ya Yehova, bazali kozela na motema likoló mokolo oyo akonyata banguna na ye na kati ya ekamwelo ya vinyo ya nkanda na ye. Bazali kozela yango kaka te mpo ekopesa bango litomba, kasi nde mpo ekopesa nkembo na nkombo ya Nzambe oyo balingi mingi.—Matai 6:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bakonzi, oyo bazalaki na nkombo Herode na ekeke ya yambo ya ntango na biso (T.B.), bazalaki bato ya Edome.
b Ntango mosusu “mbula ya basikolami na ngai” ná “mokolo ya kozongisa mabe” ezali kolobela kaka likambo moko. Talá ndenge basaleli maloba ya ndenge yango mpo na kolobela likambo moko na Yisaya 34:8.
c Yehova akamwe ndenge moto moko te ayei mpo na kopesa ye mabɔkɔ. Ekoki solo kokamwisa komona ete mbula soki 2 000 nsima ya liwa ya Yesu, bato ya nguya bazali naino kotɛmɛla mokano ya Nzambe.—Nzembo 2:2-12; Yisaya 59:16.
d Yango elingi mpenza koloba te ete ezali Yehova nde azali kokanisa. Maloba oyo ezali na vɛrsɛ yango emonisi makanisi ya bato ya ekólo ya Nzambe kasi ya Yehova te. Yango wana Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli maloba ya ebandeli boye: “Bato bakundoli mikolo mya kala.”
[Elilingi na lokasa 359]
Yehova azalaki kokanisa ete bato na ye bakosalela ye makambo ya malamu mpenza