Mokapo ya Ntuku Mibale na Mitano
Libondeli oyo emonisi kobongola motema
1, 2. (a) Ntina ya disipilini ya Yehova ezali nini? (b) Nsima ya kozwa disipilini ya Yehova Bayuda bakosala nini?
KOBEBISAMA ya Yelusaleme ná tempelo na yango na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ezalaki disipilini ya Yehova, likambo oyo emonisaki ete aboyi mpenza bango. Ekólo ya Yuda oyo ekómaki motó makasi ebongaki kozwa etumbu ya makasi bongo. Atako bongo, Yehova azalaki na mokano te ete Bayuda nyonso bábomama. Ntoma Paulo akanisaki ntina ya disipilini ya Yehova ntango alobaki ete: “Ya solo, disipilini moko te ezalaka esengo mpo na sikoyo, kasi nde mawa; nzokande na nsima epai ya baoyo bateyami na yango ebotaka mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.”—Baebele 12:11.
2 Bayuda bakomonisa ezaleli nini ntango bakobɛtama fimbo? Bakoyina nde toli to disipilini ya Yehova? (Nzembo 50:16, 17) To bakondima eteya bango? Bakobongola motema mpo bábikisama? (Yisaya 57:18; Ezekiele 18:23) Esakweli ya Yisaya emonisi ete mwa ndambo ya bato oyo bazalaki kala kofanda na Yuda bakondima disipilini yango. Kobanda na bavɛrsɛ ya nsuka ya mokapo 63 kino na nsuka ya mokapo 64, balobeli ekólo ya Yuda lokola ekólo ya bato oyo batutami na motema mpe bazali kopusana penepene na Yehova mpo na kobondela ye na motema na bango mobimba. Mosakoli Yisaya asali libondeli ya kobongola motema mpo na bato ya ekólo na ye oyo bakozala na boombo na mikolo ezali koya. Na libondeli yango, alobeli makambo oyo ekoya nsima lokola nde ezali kosalema na miso na ye.
Tata ya motema mawa
3. (a) Na ndenge nini libondeli ya esakweli oyo Yisaya asalaki ezali kokumisa Yehova? (b) Ndenge nini libondeli ya Danyele emonisi ete libondeli ya esakweli oyo Yisaya asalaki emonisi makanisi ya Bayuda oyo babongoli motema na Babilone? (Talá etanda na lokasa 362.)
3 Yisaya abondeli Yehova boye: ‘Talá na nse longwa na lola mpe moná, longwa na efandelo na yo ya bosantu mpe ya nkembo.’ Mosakoli Yisaya azali kolobela lola to likoló ya elimo, epai Yehova ná bikelamu ya elimo bafandaka. Alandi koloba boye mpo na komonisa makanisi ya Bayuda oyo bakozala na boombo: ‘Wapi mpiko na yo mpe nguya na yo? Mposa ya motema na yo mpe mawa na yo, oboyi komonisela ngai yango.’ (Yisaya 63:15) Yehova aboyi kobimisa nguya na ye mpe akangi motema mpo amonisa mayoki na ye te—“mposa ya motema [na ye] mpe mawa na [ye]”—epai ya bato na ye. Atako bongo, Yehova azali “Tata” ya ekólo ya Bayuda. Abalayama ná Yisalaele (Yakobo) bazalaki bankɔkɔ oyo babotaki bato ya ekólo yango; kasi soki bázongaka na bomoi, balingaki ntango mosusu kondima te ete bapɛngwi wana bazali bakitani na bango. Yehova azali na motema mawa mingi. (Nzembo 27:10) Yisaya alobi na botɔndi nyonso ete: “Ee [Yehova], yo ozali tata na biso, mosikoli na biso longwa na kala ezali nkombo na yo.”—Yisaya 63:16.
4, 5. (a) Na ndenge nini Yehova asali ete bato ya ekólo na ye báyengayenga mosika na nzela na ye? (b) Yehova alingaka losambo ya ndenge nini?
4 Yisaya alandi koloba makambo oyo euti mpenza na motema na ye: ‘Ee Yehova, mpo na nini osali ete tóyengayenga mosika na nzela na yo mpe oyeisi mitema na biso makasi na boye ete tobangi yo te? Zongá, mpo na baombo na yo, mabota ya libula na yo.’ (Yisaya 63:17) Ɛɛ, Yisaya abondeli ete Yehova atya lisusu likebi epai ya basaleli na ye. Kasi, na ndenge nini Yehova asali ete Bayuda báyengayenga mosika na nzela na ye? Yehova nde apesi bango mitema makasi oyo esali ete bábanga ye te? Te, kasi apesi nde nzela na likambo yango; mpe lokola mpasi elekeli Bayuda, bakómi komilela ete Yehova atikelaki bango bonsomi mingi. (Exode 4:21; Nehemia 9:16) Mpo na bango, esengelaki ete Yehova apekisa bango kosala makambo mabe.
5 Lokola toyebi, Nzambe asalaka bongo te epai ya bato. Biso bato tozali na bonsomi ya kopona oyo tokosala, mpe Yehova apesi biso likoki ya kopona biso moko soki tokotosa ye to tokotosa ye te. (Deteronome 30:15-19) Yehova alingaka tósambela ye na motema mpe na makanisi oyo etambwisami na bolingo ya solosolo. Yango wana, atikaki Bayuda bápona bango moko, ata soki yango epesaki bango nzela ya kotombokela ye. Ezali na ndenge yango nde akómisaki mitema na bango makasi.—2 Ntango 36:14-21.
6, 7. (a) Makambo nini ekómelaki Bayuda mpo batikaki nzela ya Yehova? (b) Mposa nini ya mpamba Bayuda bamonisi, mpe eloko nini basengelaki kokanisa te?
6 Yango ebimisi nini? Na ndenge ya esakweli, Yisaya alobi boye: ‘Libota na yo mosantu bazalaki bakóló ya ndako mosantu na yo mwa ntango moke, batɛmɛli na biso banyati yango na nse. Tokómi lokola baoyo bazalaki na nse ya bokonzi na yo te, lokola bango babengami na nkombo na yo te.’ (Yisaya 63:18, 19) Bato ya ekólo ya Yehova bazalaki bakóló ya ndako mosantu na ye mpo na mwa ntango moke. Na nsima, Yehova apesaki nzela bábebisa yango mpe bámema ekólo na ye na boombo. Na ntango wana, ezalaki lokola nde kondimana moko te ezalaki kati na ye ná bakitani ya Abalayama, mpe lokola nde babengamaki na nkombo na ye te. Sikoyo, lokola Bayuda oyo bazali baombo na Babilone bazali na elikya te, bazali kolela ete: ‘Ee, opasola lola mpe okita na nse ete ngomba etɛtɛma liboso na yo, lokola wana mɔtɔ ekozikisa nzete mike mpe mɔtɔ ekotɔkisa mai, mpo na koyebisa nkombo na yo epai ya batɛmɛli na yo mpe ete bikólo bálɛnga liboso na yo!’ (Yisaya 64:1, 2) Ntembe ezali te, Yehova azali na nguya ya kobikisa. Akokaki mpenza kokita mpe kobundela bato na ye, kopasola baguvɛrnema oyo ekokani na likoló mpe kobukabuka bikonzi oyo ekokani na bangomba. Mbɛlɛ Yehova asali ete nkombo na ye eyebana na komonisáká molende ya solosolo mpo na basaleli na ye.
7 Kala Yehova asalaki makambo ya ndenge yango. Yisaya alobi boye: “Wana esalaki yo misala ya nsɔmɔ oyo totalelaki yango te, okitaki na nse, ngomba etɛtɛmaki liboso na yo.” (Yisaya 64:3) Misala wana ya minene emonisaki nguya ya Yehova mpe ete azali Nzambe. Nzokande, Bayuda ya ntango ya Yisaya, oyo bazalaki sembo te, basengelaki kokanisa te ete Yehova akosala bongo mpo na bolamu na bango.
Bobele Yehova nde akoki kobikisa
8. (a) Wapi likambo moko oyo emonisi ete Yehova akeseni na banzambe ya lokuta ya bikólo ya mokili? (b) Mpo na nini Yehova asali eloko te mpo na kobikisa bato na ye atako azali na makoki ya kobikisa bango? (c) Ndenge nini ntoma Paulo azongeli maloba ya Yisaya 64:4 mpe asaleli yango mpo na kolobela nini? (Talá etanda na lokasa 366.)
8 Banzambe ya lokuta basalaka misala ya nguya te mpo na kobikisa basambeli na bango. Yisaya akomi boye: ‘Longwa kala moto ayoki te, moto asosoli na litoi te, liso te emoni Nzambe mosusu, bobele yo, oyo akosalela bango baoyo bakozela ye. Okozwana na ye oyo akosalaka boyengebene na esengo; bango baoyo bakokanisa yo kati na nzela na yo.’ (Yisaya 64:4, 5a) Kaka Yehova nde azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Abatelaka baoyo bamitambwisaka na boyengebene mpe bakanisaka ye. (Yisaya 30:18) Bayuda bazalaki komitambwisa bongo? Te. Kutu, Yisaya ayebisi Yehova ete: “Talá ozalaki na nkanda ntango mpe biso tosalaki masumu, toumeli na yango ntango molai, tokobika nde?” (Yisaya 64:5) Lokola bato ya ekólo ya Nzambe bazali kosala masumu banda kala, likambo moko te ekotinda Yehova apekisa nkanda na ye mpe abikisa bango.
9. Likambo nini Bayuda oyo babongoli motema bakoki kolikya, mpe yango ekoki koteya biso nini?
9 Bayuda bakoki te kolimwisa mabe oyo basali, kasi soki babongoli motema mpe bazongi na losambo ya pɛto, bakoki kolikya kozwa bolimbisi mpe mapamboli na nsima. Na ntango na yango, Yehova akopesa mbano na baoyo babongoli motema, akosikola bango na boombo ya Babilone. Atako bongo, basengeli kozala na motema molai. Atako babongoli motema, Yehova akobongola manaka na ye te. Nzokande, soki bazali kotya likebi mpe kotosa mokano ya Yehova, bakoki kotya motema ete bakosikolama. Se ndenge moko, lelo oyo baklisto bazali kozela Yehova na motema molai mpenza. (2 Petelo 3:11, 12) Totyaka likebi na maloba ya ntoma Paulo, oyo alobaki ete: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango oyo ekoki tokobuka soki tolɛmbi te.”—Bagalatia 6:9.
10. Na libondeli na ye, likambo nini Yisaya amonisi polele ete bato ya ekólo na ye bazali na likoki ya kosala yango te?
10 Libondeli ya esakweli oyo Yisaya asalaki ezali te eyambweli ya masumu oyo moto asali kaka mpo na kosala. Na libondeli yango, mosakoli amonisi nde polele ete ekólo yango ekoki te komibikisa. Alobi boye: ‘Biso nyonso tokómi lokola moto oyo azali na mbindo mpe misala na biso ya boyengebene ezali lokola elamba epɔli na bosɔtɔ; tozali kokauka lokola lokasa mpe lokola na mopɛpɛ, masumu na biso ekobɔtɔla biso.’ (Yisaya 64:6) Na nsuka ya boombo, mbala mosusu Bayuda oyo babongoli motema basí batiki lipɛngwi na bango. Ekoki kozala ete bazongi epai ya Yehova, bazali kosala misala ya boyengebene. Kasi bazali naino bato ya kozanga kokoka. Misala malamu na bango, atako ekoki kokumisama, ekeseni te na bilamba oyo ebebi na bosɔtɔ; yango te nde ekoki kosala ete masumu na bango elimbisama. Bolimbisi oyo Yehova alimbisaka ezali likabo oyo apesaka mpo azali na motema mawa. Ezali te eloko oyo moto akoki kozwa mpo na likambo oyo asali.—Baloma 3:23, 24.
11. (a) Wapi likambo moko ya mabe ya elimo oyo ezali komonana epai ya ebele ya Bayuda oyo bazali na boombo, mpe ntina na yango ekoki kozala nini? (b) Na ntango ya boombo, banani bazali bandakisa malamu mpenza mpo na kondima na bango?
11 Ntango mosakoli Yisaya atali mosika, amoni nini? Abondeli boye: ‘Moto moko azali te oyo akobenga nkombo na yo, oyo azali kotɛlɛma mpo na kosimba yo; zambi obombeli biso elongi na yo mpe onyangwisi biso mpo na masumu na biso.’ (Yisaya 64:7) Ekólo yango ebebi mpenza na elimo. Bato na yango bazali kobelela nkombo ya Nzambe te na mabondeli na bango. Atako bazali lisusu te komipesa na losambo ya bikeko, oyo ezali lisumu monene, nzokande bazali mpenza komonisa bolɛmbu na makambo ya losambo mpe “moto moko te azali kotɛlɛma mpo na kosimba” Yehova. Ezali polele ete bazali na boyokani ya malamu te elongo na Mozalisi na bango. Ekoki kozala ete basusu bazali komiyoka ete babongi te kobondela Yehova. Basusu bazali ntango mosusu komipesa na misala na bango kozanga ata kokanisa ye. Kasi, bato mosusu lokola Danyele, Hanania, Misaele, Azaria mpe Ezekiele oyo mpe bazali na boombo, bango bazali bandakisa malamu mpenza mpo na kondima na bango. (Baebele 11:33, 34) Ntango mbula 70 ya boombo ekómi na nsuka, mibali lokola Hagai, Zekaria, Zorobabele, mpe Nganga-Nzambe Monene Yosua bazali pene mpo na kopesa ndakisa malamu mpenza na oyo etali kobelela nkombo ya Yehova. Nzokande, emonani ete libondeli ya esakweli oyo Yisaya asalaki ezali komonisa ndenge oyo ebele ya Bayuda oyo bakangami na boombo bazali.
“Kotosa eleki mbeka”
12. Ndenge nini Yisaya amonisi ete Bayuda oyo babongoli motema balingi mpenza kobongwana?
12 Bayuda oyo babongoli motema balingi mpenza kobongwana. Na nkombo na bango, Yisaya abondeli Yehova boye: “Ee [Yehova], ozali nde tata na biso, biso tozali lima, yo ozali moyemi; biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.” (Yisaya 64:8) Maloba oyo endimisi lisusu ete Yehova azali na bokonzi mpo azali Tata, to Mopesi ya bomoi. (Yobo 10:9) Bakokanisi Bayuda oyo babongoli motema na lima to mabelé ya mbɛki, ya pɛtɛpɛtɛ. Baoyo bandimi disipilini ya Yehova bakoki na ndenge ya elimo koyemama, to kobongisama, na boyokani na mitinda ya Nzambe. Kasi mpo bákoka kobongisama bongo, esengeli naino Yehova, Moyemi-Mbɛki, alimbisa bango. Yango wana, Yisaya abondeli ye mbala mibale mpo abosana te ete Bayuda bazali bato na ye: “Ee [Yehova], yoká nkanda monene mingi te, mpe kanisá masumu libela te. Talá, obanza ete biso nyonso tozali bato na yo.”—Yisaya 64:9.
13. Mokili ya Yisalaele ezali ndenge nini ntango bato ya ekólo ya Nzambe bazali na boombo?
13 Bayuda oyo bazali baombo banyokwami kaka te mpo bazali baombo na mokili ya bapakano. Lokola Yelusaleme mpe tempelo na yango etikali mpamba, likambo yango ezali nsɔni monene mpo na bango mpe mpo na Nzambe na bango. Libondeli ya Yisaya oyo emonisi kobongola motema elobeli mwa makambo mosusu oyo ezali koyokisa bango nsɔni yango: ‘Mboka na yo mosantu ekómi lokola esobe, Siona eyei lokola esobe; Yelusaleme ezali mpamba. Ndako na biso ya bosantu mpe ya kitoko wana esanzolaki batata na biso yo, esili kozikisama na mɔtɔ mpe bisika nyonso na biso ya malamu ekómi mabondo ya mabanga.’—Yisaya 64:10, 11.
14. (a) Ndenge nini Yehova akebisaki bato na ye mpo na mikakatano oyo bazali na yango sikoyo? (b) Atako Yehova azalaki kosepela na tempelo mpe na bambeka oyo ezalaki kopesama kuna, nini nde eleki ntina?
14 Yehova ayebi malamu mpenza ndenge makambo ezali na mabelé ya bankɔkɔ ya Bayuda. Mbula soki 420 liboso ete Yelusaleme ebebisama, akebisaki bato na ye ete soki baboyi mibeko na ye mpe basambeli banzambe mosusu, ‘akolongola bango na mokili,’ mpe tempelo kitoko “ekobongwana libondo ya mabanga mpamba.” (1 Mikonzi 9:6-9) Ezali solo ete Yehova azalaki kosepela na mboka oyo apesaki bato na ye, na tempelo kitoko oyo batongaki mpo na kokumisa ye, mpe na bambeka oyo bazalaki kopesa ye. Kasi kozala sembo mpe kotosa ezali na ntina mingi koleka biloko, ata mpe bambeka. Mosakoli Samwele alobelaki Mokonzi Saulo likambo yango polele ete: ‘Yehova akosepela na mbeka ya miboma lokola ye akosepela botosi kotosa mongongo na ye? Talá kotosa eleki mbeka na malamu mpe koyoka eleki mafuta ya bampate.’—1 Samwele 15:22.
15. (a) Na ndenge ya esakweli, Yisaya asɛngi Yehova nini, mpe eyano nini azwi? (b) Makambo nini etindaki Yehova abwaka Yisalaele ezala lisusu ekólo na ye te?
15 Atako bongo, Nzambe ya Yisalaele akoki solo kotala mpasi ya bato na ye oyo babongoli motema mpe koyokela bango mawa te? Ezali na motuna wana nde Yisaya asukisi libondeli na ye ya esakweli. Asɛngi boye mpo na Bayuda oyo bazali na boombo: “Okokanga motema liboso na makambo oyo, ee Yehova? Okofanda nyɛɛ mpe okotika bányokola biso mingi mpenza?” (Yisaya 64:12, NW) Nsukansuka, Yehova alimbisi bato na ye, mpe na mobu 537 L.T.B., azongisi bango na mboka na bango mpo bázongisa losambo ya pɛto kuna. (Yoele 2:13) Nzokande, bankama ya bambula na nsima, Yelusaleme ná tempelo na yango ebebisamaki lisusu, mpe nsukansuka Nzambe abwakaki ekólo oyo asalaki na yango kondimana. Mpo na nini? Mpamba te bato ya ekólo ya Yehova batikaki mibeko na ye mosika mpe baboyaki Masiya. (Yoane 1:11; 3:19, 20) Na ntango yango, Yehova aponaki ekólo moko ya sika, ekólo ya elimo to “Yisalaele ya Nzambe” na esika ya Yisalaele.—Bagalatia 6:16; 1 Petelo 2:9.
Yehova, ye oyo ‘ayokaka mabondeli’
16. Biblia elobi nini mpo na bolimbisi oyo Yehova alimbisaka?
16 Nyonso oyo ekómelaki Yisalaele ekoki koteya biso makambo mingi. Tomoni ete Yehova azali ‘malamu mpe alimbisaka mabe.’ (Nzembo 86:5) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokobika kaka mpo na ngɔlu mpe bolimbisi na ye. Tokoki te kosomba mapamboli wana na misala na biso. Nzokande, Yehova alimbisaka bato nyonso te. Kaka baoyo babongoli motema, batiki masumu na bango mpe babongwani nde bakoki kozwa bolimbisi ya Nzambe.—Misala 3:19.
17, 18. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova atyaka mpenza likebi na makanisi mpe na mayoki na biso? (b) Mpo na nini Yehova amoniselaka bato ya masumu motema molai?
17 Toyekoli mpe ete Yehova atyaka mpenza likebi na makanisi mpe na mayoki na biso oyo tomonisaka epai na ye na mabondeli na biso. Azali ye ‘oyo ayokaka mabondeli.’ (Nzembo 65:2, 3) Ntoma Petelo akitisi biso motema boye: “Miso ya Yehova ezali likoló ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali epai ya lilɔmbɔ na bango.” (1 Petelo 3:12) Lisusu, tomoni ete kati na libondeli oyo emonisi kobongola motema esengeli mpe koyebisa masumu na biso na komikitisa nyonso. (Masese 28:13) Kasi yango elingi koloba te ete tokosala masumu kaka mpo Nzambe alimbisaka. Biblia ezali kokebisa baklisto ete ‘báyamba te boboto monene ya Nzambe mpo na kozanga kokokisa mokano na yango.’—2 Bakolinti 6:1.
18 Mpo na kosukisa, toyekoli ntina oyo Nzambe amoniselaka bato na ye oyo basali masumu motema molai. Ntoma Petelo amonisi ete Yehova azali na motema molai “mpo alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Atako bongo, baoyo bakokoba kotala motema molai ya Nzambe lokola eloko mpamba bakosuka na etumbu. Mpo na likambo yango, totángi boye: “[Yehova] akozongisela moto na moto engebene misala na ye: bomoi ya seko epai ya baoyo bazali koluka nkembo mpe lokumu mpe motindo ya kozanga kopɔla na nzela ya ezaleli ya koyika mpiko na mosala oyo ezali ya malamu; nzokande, mpo na baoyo bazali bato ya kowelana mpe oyo bazali te kotosa solo kasi bazali kotosa nde ezaleli ya kozanga boyengebene ekozala na nkɛlɛ mpe nkanda.”—Baloma 2:6-8.
19. Bizaleli nini oyo ebongwanaka te Yehova akolanda komonisa?
19 Wana ezali ndenge Nzambe asalaki epai ya Yisalaele ya kala. Lelo oyo boyokani na biso na Yehova etambwisami na mitinda wana kaka, mpamba te abongwani te. Atako azangaka te kopesa etumbu oyo moto abongi kozwa mpo na mabe na ye, akozala ntango nyonso ‘Yehova, Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu.’—Exode 34:6, 7.
[Etanda/Bililingi na lokasa 362]
Libondeli ya Danyele oyo emonisi kobongola motema
Mosakoli Danyele afandaki na Babilone bambula nyonso 70 oyo Bayuda bazalaki na boombo kuna. Na mbula ya 68 ya boombo, Danyele asosolaki na nzela ya esakweli ya Yilimia ete mikolo ya boombo ya Yisalaele ekómi na nsuka. (Yilimia 25:11; 29:10; Danyele 9:1, 2) Danyele abondelaki Yehova. Asalaki libondeli yango, oyo emonisi kobongola motema, mpo na ekólo mobimba ya Bayuda. Danyele alobi boye: “Nabongolaki elongi na ngai epai ya Nkolo Nzambe, mpo na koluka ye na kobondela mpe kolɔmba mpe na kokila biloko mpe na ngɔtɔ ná putulu ya mɔtɔ. Nabondelaki [Yehova] Nzambe na ngai, mpe nayambolaki masumu.”—Danyele 9:3, 4.
Danyele asalaki libondeli na ye mbula soki nkama mibale nsima wana Yisaya así akomaki libondeli ya esakweli oyo ezali na mokapo 63 mpe 64 ya mokanda na ye. Ntembe ezali te ete Bayuda mingi ya motema sembo babondelaki Yehova na bambula wana ya mpasi na boombo. Nzokande, Biblia ebendi likebi na libondeli ya Danyele, oyo na ntembe te ezali komonisa ndenge Bayuda mingi ya sembo bazalaki koyoka na motema. Na yango, libondeli na ye emonisi ete makambo oyo Yisaya akomi na libondeli na ye ya esakweli ekokani mpenza na ndenge Bayuda mingi ya sembo bazalaki koyoka na motema ntango bazalaki na Babilone.
Talá mwa makambo oyo ekokani kati na libondeli ya Danyele mpe oyo ya Yisaya.
Yisaya 64:10, 11 Danyele 9:16-18
[Etanda na lokasa 366]
“Liso emoni te”
Na mokanda ya ntoma Paulo epai ya Bakolinti, azongelaki maloba ya mokanda ya Yisaya ntango akomaki boye: “Kaka ndenge ekomamá: ‘Liso emoni te mpe litoi eyoki te, mpe na motema ya moto makambo oyo Nzambe abongisá mpo na baoyo balingaka ye eyaki te.’” (1 Bakolinti 2:9)a Maloba ya Paulo to maloba ya Yisaya ezali te kolobela makambo oyo Yehova abongisi mpo na basaleli na ye lokola libula kuna na likoló to na paladiso awa na mabelé. Paulo asaleli maloba ya Yisaya mpo na kolobela makambo malamu oyo baklisto ya ekeke ya liboso basilaki kozwa, na ndakisa bososoli ya makambo mozindo ya Nzambe mpe pole ya elimo oyo euti na Yehova.
Tokoki kokanga ntina ya makambo mozindo ya elimo kaka na ntango oyo Yehova aponi mpo na komonisa yango mpe ata na ntango yango, kaka soki tozali bato ya elimo oyo bazali na boyokani ya malamu na Yehova. Maloba ya Paulo ezali kotalela bato oyo bamipesaka mingi te to mpe baoyo bamipesaka te na makambo ya elimo. Liso na bango ekoki komona te, to kososola te solo ya elimo, mpe litoi na bango ekoki te koyoka, to kokanga ntina ya makambo yango. Boyebi ya makambo oyo Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka ye ekɔtaka ata kokɔta te na mitema ya bato yango. Kasi baoyo bamipesi na Nzambe, lokola Paulo, Nzambe amonisi bango makambo yango na nzela ya elimo na ye.—1 Bakolinti 2:1-16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Makomami ya Liebele, maloba oyo Paulo azongelaki ekomami mpenza ndenge wana te. Emonani lokola asangisaki makanisi oyo ezali na Yisaya 52:15; 64:4; mpe 65:17.
[Elilingi na lokasa 367]
Bato ya ekólo ya Nzambe bazalaki bakóló ya Yelusaleme mpe ya tempelo na yango “mwa ntango moke”