Mokapo ya Libwa
Tyelá Yehova motema na ntango ya mpasi
1. Mpo na nini ezali na ntina ete baklisto ya lelo bátalela Yisaya mokapo 7 mpe 8?
YISAYA mokapo 7 mpe 8 ezali kolobela makambo mingi oyo ekeseni mpenza. Yisaya na Ahaza bazalaki bato ya libota oyo emipesaki na Yehova; Nzambe apesaki bango nyonso mibale mikumba, mosusu azalaki mosakoli, mosusu azalaki mokonzi ya Yuda; mpe bango nyonso mibale bakutanaki na likama moko—mampinga ya basoda ya banguna oyo bazalaki mingi koleka bango, bakɔtaki na Yuda. Liboso ya likama wana, Yisaya atyelaki Yehova motema, nzokande Ahaza azalaki kobangabanga. Mpo na nini bizaleli na bango ekeseni? Lelo oyo, lokola mpe mampinga ya banguna ezingi baklisto, basengeli mpenza kotalela malamumalamu mikapo oyo mibale ya Yisaya mpo na koyeba liteya oyo bakozwa na yango.
Esengeli kozwa ekateli
2, 3. Makambo nini Yisaya alobeli na mokuse na maloba na ye ya ebandeli?
2 Ndenge moko na moyemi oyo abandi komonisa lolenge liyemi na ye ya sika ekozala, Yisaya abandi lisolo na ye na mwa maloba mokuse oyo emonisi ebandeli mpe nsuka ya makambo oyo alingi kolobela: “Ezalaki ete na mikolo ya Ahaza, mwana ya Yotama, mwana ya Uzia, mokonzi ya Yuda, Lesini mokonzi ya Sulia mpe Peka, mwana ya Lemalia, mokonzi ya Yisalaele, babutaki na Yelusaleme kobunda etumba na [ye kasi bakokaki kobunda na ye te, NW].”—Yisaya 7:1.
3 Tozali na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso. Ahaza akómaki mokonzi ya Yuda nsima ya Yotama, tata na ye. Lesini, mokonzi ya Sulia, na Peka, mokonzi ya bokonzi ya nɔrdi na Yisalaele, bakɔti na Yuda, mpe mampinga ya basoda na bango babundisi Yuda na nkanda makasi. Nsukansuka, bakozinga Yelusaleme. Kasi, bakolonga te. (2 Mikonzi 16:5, 6; 2 Ntango 28:5-8) Mpo na nini? Tokotalela likambo yango nsima.
4. Mpo na nini motema ya Ahaza mpe ya bato na ye etondi na nsɔmɔ?
4 Na ebandeli ya etumba yango, “wana eyebisami ndako na Davidi ete Sulia bakangani na Efelaima elongo, motema na ye mpe mitema ya bato na ye [ebandaki koningana, NW] lokola nzete na zamba liboso na mopɛpɛ.” (Yisaya 7:2) Ahaza na bato na ye babangi mingi ntango bayoki ete Basulia na Bayisalaele basangani mpe mampinga ya basoda na bango bazali sikawa na mabele ya Efelaima (na Yisalaele). Kobanda esika banguna bazali tii na Yelusaleme, bakoki kotambola mikolo mibale to misato!
5. Na lolenge nini basaleli ya Nzambe lelo bakokani na Yisaya?
5 Yehova alobi na Yisaya ete: “Kendá kozwana na Ahaza, yo mpe mwana na yo, Sala-Yasubu, na nsuka na nzela ya mai ya liziba na likoló epai na nzela ya elanga ya basukoli-na-bilamba.” (Yisaya 7:3) Tókanisa naino! Na ntango oyo mokonzi asengelaki koluka mosakoli ya Yehova mpe kotuna toli, mosakoli nde akei koluka mokonzi! Atako bongo, Yisaya atosi Yehova na motema mobimba. Ndenge moko mpe, lelo oyo, basaleli ya Nzambe bakendaka na motema mobimba koluka bato oyo bazali kobanga mpo na mikakatano ya mokili oyo. (Matai 24:6, 14) Ezali mpenza likambo ya esengo komona ete mbula na mbula bankama ya bankóto ya bato bazali koyamba basakoli yango ya nsango malamu mpe bazali kosimba lobɔkɔ ya Yehova mpo na kozwa libateli!
6. (a) Nsango nini ya kolendisa mosakoli apesi Mokonzi Ahaza? (b) Makambo nini ezali koleka lelo?
6 Yisaya akuti Mokonzi Ahaza na libándá ya bifelo ya Yelusaleme, epai azali komibongisa mpo na etumba oyo akobunda na banguna, azali kotalatala bisika ya kobomba mai na engumba yango. Yisaya apesi ye nsango ya Yehova: “Kebá mpe zalá na kimya; bangá te. Tiká ete motema na yo esenzwa te mpo na nsuka na nkoni mibale oyo ezali naino [kobimisa milinga, NW], ata mpo na nkanda ya Lesini na Sulia mpe mwana ya Lemalia.” (Yisaya 7:4) Ntango banguna yango babebisaki Yuda liboso, nkanda na bango epelaki lokola mɔ́tɔ. Sikawa, bazali kaka lokola mwa “nsuka na nkoni mibale oyo ezali naino kobimisa milinga.” Ahaza asengeli te kobanga Lesini, mokonzi ya Sulia to Peka, mwana ya Lemalia, mokonzi ya Yisalaele. Ezali mpe ndenge moko lelo oyo. Na boumeli ya bikeke mingi, bakonzi ya mangomba ya boklisto banyokoli mpenza baklisto ya solo na minyoko lokola mɔ́tɔ. Kasi, sikawa, mangomba ya boklisto ezali lokola mwa nkoni moke oyo elingi kosila. Mikolo na bango ekómi ya kotánga.
7. Mpo na nini nkombo ya Yisaya mpe ya mwana na ye ya mobali epesi elikya?
7 Na mikolo ya Ahaza, kaka nsango ya Yisaya te kasi mpe ndimbola ya nkombo na ye mpe oyo ya mwana na ye epesaki baoyo batyelaki Yehova motema elikya. Ya solo mpenza, Yuda ezali na likama, kasi nkombo Yisaya elimboli “Lobiko ya Yehova,” mpe yango ezali komonisa ete Yehova akosikola bato na ye. Yehova ayebisi Yisaya akenda elongo na mwana na ye ya mobali Sala-Yasubu, oyo nkombo na ye elimboli “Kaka mwa ndambo ya batikali bakozonga.” Nsukansuka, atako bokonzi ya Yuda ekolimwa, mpo na motema mawa na ye, Nzambe akozongisa batikali na mokili yango.
Esuki kaka te na etumba kati na bikólo
8. Mpo na nini kobundisa Yelusaleme esuki kaka te na etumba kati na bikólo?
8 Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova atɔndɔli mayele ya etumba ya banguna ya Yuda. Talá ndenge bazali koluka kosala: “Tóbuta epai na Yuda mpe tóbangisa ye, tóbuka yango mpo na biso mpenza mpe [tótya mokonzi mosusu kati na yango, mwana na Tabele, NW].” (Yisaya 7:5, 6) Sulia na Yisalaele bazali koluka ndenge ya kolonga Yuda mpe kotya moto na bango moko na esika ya Ahaza, mwana moko ya Davidi. Ekómi komonana polele ete matata oyo balingi kosala na Yelusaleme esuki kaka te na etumba kati na bikólo. Ekómi etumba kati na Satana na Yehova. Mpo na nini? Mpamba te Yehova Nzambe asalaki kondimana na Mokonzi Davidi, mpe na yango andimisaki ye ete bana na ye bakoyangela libota ya Yehova. (2 Samwele 7:11, 16) Satana akolonga mpenza soki atii mokonzi oyo auti na libota mosusu na ebonga ya bokonzi na Yelusaleme! Yango ekokaki kutu kopekisa mokano ya Yehova oyo ezalaki ete libota ya Davidi ebimisa mokitani moko ya libela, “Nkolo ya kimya.”—Yisaya 9:6, 7.
Yehova apesi bilikya na bolingo
9. Bilikya nini esengelaki kopesa Ahaza makasi mpe oyo esengeli kopesa baklisto makasi lelo?
9 Mayele mabe ya Sulia na Yisalaele ekolonga? Te. Yehova alobi ete: “Ekokoka te, ekosalama mpe te.” (Yisaya 7:7) Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova alobi kaka te ete bakolonga te kofanda na Yelusaleme kasi mpe “na [mbula, NW] ntuku motoba na mitano, Efelaima ekobukana kino ekozala libota lisusu te.” (Yisaya 7:8) Ya solo, nsima ya mbula 65 libota ya Yisalaele ekozala lisusu te.a Ahaza asengeli kolendisama na likambo yango oyo epesi ye elikya oyo ya sikisiki. Ndenge moko mpe, lelo oyo basaleli ya Nzambe balendisami mpo bayebi ete ntango oyo etikali mpo na Satana ezali mokuse.
10. (a) Ndenge nini baklisto ya solo ya eleko na biso bakoki komekola Yehova? (b) Likambo nini Yehova alobi na Ahaza ete asɛnga?
10 Mbala mosusu elongi ya Ahaza emonisi ete azali na ntembe, mpamba te, na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova alobi ete: “Soko bokondima te, solo [bokoumela mpenza, NW] te.” Na motema molai na ye, Yehova “alobaki lisusu na Ahaza.” (Yisaya 7:9, 10) Oyo nde ndakisa malamu! Lelo oyo, atako bato mingi balingaka koyoka nsango ya Bokonzi noki te, kasi tosengeli komekola Yehova, kokenda kotala bango mbala na mbala mpe ‘koloba lisusu.’ Na nsima, Yehova alobi na Ahaza ete: “Tuná elembo mpo na yo moko epai na [Yehova], Nzambe na yo; ezala na bozindo [lokola, NW] esika na bakufi na molai [lokola bisika oyo eleki likoló, NW]!” (Yisaya 7:11) Ahaza akoki kotuna elembo moko, mpe Yehova akolakisa ye yango lokola elembeteli ete akobatela ndako ya Davidi.
11. Maloba ya Yehova ete “Nzambe na yo,” epesi elikya nini?
11 Tóbosana te ete Yehova alobi boye: ‘Tuná elembo epai na Nzambe na yo.’ (Biso nde totɛngisi makomi.) Yehova azali mpenza na boboto. Esili koyebana ete Ahaza azali kosambela banzambe ya lokuta mpe kolanda kosala misala ya bapakano. (2 Mikonzi 16:3, 4) Atako bongo mpe atako Ahaza azalaki kobangabanga, Yehova amibengi ye moko ete Nzambe ya Ahaza. Yango endimisi biso ete Yehova asundolaka bato nokinoki te. Alingaka kosunga moto oyo asali lisumu to oyo kondima na ye elɛmbi. Bolingo oyo Nzambe amonisi ekotinda Ahaza andima lisungi ya Yehova?
Atii ntembe mpe azali na botosi te
12. (a) Ezaleli nini ya lolendo Ahaza amonisi? (b) Na esika ete atyela Yehova motema, Ahaza aluki lisalisi epai ya nani?
12 Ahaza ayanoli na lofundo nyonso ete: “Nakotuna te, nakomeka [Yehova] te.” (Yisaya 7:12) Soki Ahaza alobi bongo na eyano na ye, ezali te mpo na kotosa maloba ya mobeko oyo elobi ete: “Bokomeka [Yehova] Nzambe na bino te.” (Deteronome 6:16) Nsima ya bikeke mingi, Yesu atángaki mobeko yango ntango Satana amekaki ye. (Matai 4:7) Kasi, mpo na Ahaza, Yehova nde abyangi ye mpo azongela losambo ya solo, asɛngi ete alendisa kondima na ye mpe akomonisa elembo moko. Kasi, Ahaza aponi koluka komibatela epai mosusu. Ekoki kozala ete na ntango wana nde mokonzi atindi ebele ya mbongo na Asulia, mpo na koluka lisalisi ya kobunda na banguna na ye ya nɔrdi. (2 Mikonzi 16:7, 8) Na ntango yango, mampinga ya basoda ya Sulia na Yisalaele bazingi Yelusaleme mpe bafandeli bango.
13. Mbongwana nini tomoni na Yisaya 7 vɛrsɛ 13, mpe yango emonisi nini?
13 Ntango azalaki kokanisa ezaleli ya kozanga kondima ya mokonzi, Yisaya alobi ete: “Ɛ ndako na Davidi, bóyoka! Ezali nde likambo moke ete bólɛmbisa bato? Bokolɛmbisa mpe Nzambe na ngai lokola?” (Yisaya 7:13) Ya solo, Yehova akoki kolɛmba soki bazali ntango nyonso komonisela ye lofundo. Tóyeba mpe ete mosakoli yango alobi sikawa ete “Nzambe na ngai,” kasi te “Nzambe na yo.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Mbongwana yango emonisi likambo moko te ya malamu! Lokola Ahaza abwaki Yehova mpe amipesi na Asulia, abungisi libaku malamu ya kozongisa boyokani na ye na Yehova. Tiká ete tóbebisa soki moke te boyokani na biso na Nzambe mpe tókweisa te bindimeli na biso ya Biblia mpo na kozwa matomba ya ntango mokuse.
Elembo ya Emanuele
14. Ndenge nini Yehova amonisi ete azali sembo na kondimana na ye na Davidi?
14 Yehova azali ntango nyonso sembo na kondimana oyo asalaki na Davidi. Alakaki elembo moko, akopesa yango! Yisaya alobi lisusu ete: ‘[Yehova] ye moko akopesa bino elembo. Talá, [na ntembe te mwana mwasi akozwa zemi mpe, NW] akobota mwana mobali mpe akobyanga nkombo na ye, Emanuele. Akolyaka mateka mpe mafuta ya nzoi wana ekoyeba ye koboya mabe mpe kopona malamu. Zambi naino mwana ayebi koboya mabe mpe kopona malamu te, mokili oyo yo obangi mikonzi mibale na yango ekotikala mpamba.’—Yisaya 7:14-16.
15. Mituna nini mibale esakweli ya Emanuele eyanoli na yango?
15 Talá nsango moko ya malamu mpo na moto nyonso oyo azali kobanga ete banguna básilisa molɔngɔ ya bakonzi bakitani ya Davidi. “Emanuele” elimboli “Elongo na biso ezali Nzambe.” Nzambe azali elongo na Yuda mpe akopesa nzela te ete kondimana na ye na Davidi ebeba. Lisusu, Yehova asuki te kaka na koyebisa Ahaza na bato na ye makambo oyo akosala, kasi ayebisi bango mpe ntango oyo akosala yango. Liboso ete elenge mobali Emanuele akola mpe ayeba kokesenisa mabe na malamu, mabota ya banguna ekobebisama. Mpe likambo yango ekokisamaki!
16. Mpo na nini Yehova amonisaki polele te Emanuele na mikolo ya Yisaya?
16 Biblia emonisi te soki Emanuele yango ezali mwana ya nani. Kasi, lokola elenge Emanuele yango asengeli kozala elembo mpe na nsima Yisaya alobi ete bana na ye ‘bazali bilembo,’ mbala mosusu Emanuele yango ezali mwana mobali ya mosakoli yango. (Yisaya 8:18) Mbala mosusu Yehova aboi kolakisa polele soki Emanuele ezalaki nani na mikolo ya Ahaza mpo ete mabota ya nsima bálongola likebi na bango te na Emanuele Monene. Ezali nani?
17. (a) Emanuele Monene ezali nani, mpe kobotama na ye ezalaki elembo ya nini? (b) Mpo na nini basaleli ya Nzambe bakoki koganga lelo ete, “Elongo na biso ezali Nzambe”?
17 Longola mokanda ya Yisaya, nkombo Emanuele ezali komonana kaka mbala moko na kati ya Biblia, na Matai 1:23. Matai apemamaki na Yehova mpo asalela esakweli oyo elobeli kobotama ya Emanuele mpo na kolobela kobotama ya Yesu, Mokitani oyo abongi na kiti ya bokonzi ya Davidi. (Matai 1:18-23, NW) Kobotama ya Emanuele ya liboso ezalaki elembo mpo na komonisa ete Nzambe asundolaki ndako ya Davidi te. Ndenge moko mpe, kobotama ya Yesu, Emanuele Monene, ezalaki elembo mpo na komonisa ete Nzambe asundolaki bato te to kondimana ya Bokonzi na ye oyo asalaki elongo na ndako ya Davidi. (Luka 1:31-33) Lokola na ntango wana momonisi mpenza ya Yehova azalaki na kati ya bato, Matai akokaki koloba ete, “Elongo na biso ezali Nzambe.” Lelo oyo, Yesu azali koyangela lokola Mokonzi na likoló mpe azali elongo na lisangá na ye awa na mabele. (Matai 28:20) Ya solo, basaleli ya Nzambe bazali na ntina mosusu ya koganga ete: “Elongo na biso ezali Nzambe”!
Mabe mosusu ya kozanga bosembo
18. (a) Mpo na nini maloba ya Yisaya oyo elandi ebangisi bayoki na ye? (b) Mbongwana nini etikali moke esalema?
18 Atako maloba ya nsuka oyo Yisaya alobi ezali ya kobɔndisa, kasi abakisi likambo mosusu oyo ebangisi bayoki na ye: “[Yehova] akoyeisa likoló na yo mpe likoló na bato na yo mpe likoló na ndako ya tata na yo, mikolo [lokola oyo, NW] miyaki liboso te, longwa na mokolo wana Efelaima bakabwanaki na Yuda—yango mokonzi ya Asulia.” (Yisaya 7:17) Na ntembe te, kobebisama ezali koya, mpe ezali na mabɔkɔ ya mokonzi ya Asulia. Likanisi ya kokóma na nse ya boyangeli ya Baasulia oyo bayebani na bizaleli na bango mabe esali ete Ahaza na bato na ye bálekisa butu mingi kozanga mpɔngi. Ahaza akanisaki ete soki asali boninga na Asulia, akokima kokwea na mabɔkɔ ya Yisalaele mpe Sulia. Ya solo, mokonzi ya Asulia akondima likambo oyo Ahaza asɛngi ye mpe nsukansuka akobundisa Yisalaele mpe Sulia. (2 Mikonzi 16:9) Ekoki kozala mpo na ntina yango nde Peka na Lesini bakolongola mampinga na bango na Yelusaleme. Yango wana, Sulia na Yisalaele bakokoka te kokamata Yelusaleme. (Yisaya 7:1) Kasi, sikawa Yisaya ayebisi bato oyo batikali monɔkɔ polele, ete Asulia, mobateli oyo batyeli motema, akokóma monyokoli na bango!—Kokanisá na Masese 29:25.
19. Likebisi nini lisolo yango ezali kopesa baklisto ya lelo?
19 Mpo na baklisto ya lelo, lisolo yango ezali na likebisi moko. Ntango tokutani na mikakatano, mbala mosusu tokoki komekama ete tóbuka mitinda ya boklisto, mpe na yango koboya libateli ya Yehova. Yango ezali makanisi mokuse, kutu ezali nde makanisi ya komiboma, ndenge maloba ya Yisaya oyo elandi emonisi yango. Mosakoli alandi kolobela makambo oyo Asulia akosala na ntango akokɔta na mokili yango mpe makambo oyo akosalela bato yango.
20. Banani bazali “nkangi” mpe “nzoi,” mpe bakosala nini?
20 Yisaya akaboli maloba na ye na biteni minei, eteni mokomoko eyebisi makambo oyo ekosalema “na mokolo yango”—elingi koloba, mokolo oyo Asulia akobundisa Yuda. “Na mokolo yango, [Yehova] akobɛta mogongokoli mpo na nkangi oyo ezali na nsuka [ya miluka ya Nil, NW] na Ezipito mpe mpo na nzoi oyo ezali na mokili ya Asulia. Ekoya mpe ekofanda nyonso na mabwaku ya lisobe mpe na nkaka ya mabanga mpe likoló na nzube nyonso mpe na bilyelo nyonso na matiti.” (Yisaya 7:18, 19) Mampinga ya basoda ya Ezipito mpe ya Asulia, lokola nkangi na nzoi, bakotya likebi na bango na Mokili ya Ndaka. Bakokɔta te mpo na ntango mokuse mpamba. “Nkangi” na “nzoi” ekofanda, ekobebisa bisika nyonso ya mokili yango.
21. Na lolenge nini mokonzi ya Asulia akozala lokola zilɛti?
21 Yisaya alobi lisusu ete: “Na mokolo yango, na lisalisi ya zilɛti oyo badefi na etúká ya Ebale, ɛɛ na lisalisi ya mokonzi ya Asulia, Yehova akokokola nsuki ya motó mpe ya makolo, mpe zilɛti ekokokola ata mandɛfu.” (Yisaya 7:20, NW) Sikawa, balobeli kaka Asulia, oyo ezali likama monene. Ahaza asombi makasi ya mokonzi ya Asulia mpo ‘akokola’ Sulia mpe Yisalaele. Kasi, “zilɛti oyo badefi” na etúká ya Pelata ekondongwana na “motó” ya Yuda mpe akokokola yango nyonso, akolongola kutu mandɛfu!
22. Bandakisa nini Yisaya asaleli mpo na komonisa makama oyo ekómi pene lokola Asulia akokɔta na mboka?
22 Yango ekosuka ndenge nini? “Na mokolo yango, moto akobɔkɔla elenge ya ngɔmbɛ mwasi mpe bampate mibale, mpe mpo ete bakopesa mabɛlɛ mingi, akolyaka mateka. Zambi moto na moto oyo azali kotikala na mokili, akolyaka mateka mpe mafuta ya nzoi.” (Yisaya 7:21, 22) Na ntango oyo Baasulia ‘bakokokola’ mokili yango, bato bakotikala mingi te mpe kaka mwa motángo ya banyama moke ekokoka mpo na koleisa bango. Bakolya “mateka mpe mafuta ya nzoi”—eloko mosusu te, vinyo te, limpa te, biloko mosusu oyo bamesani kolya ekozala mpe te. Lokola alingi komonisa ete kobebisama yango ekozala monene, Yisaya alobi mbala misato ete bisika oyo ezalaki malamu, mabele malamu, ekobanda kobimisa nde banzube mpe matiti mabe. Baoyo bakomeka kokenda na zamba basengeli kozala na “litimbo mpe mbanzi” mpo na komibatela liboso na banyama ya nkanda oyo ebombani na banzete. Bilanga oyo elonami te ekokóma mabele oyo ekoyantama na bangɔmbɛ mpe bampate. (Yisaya 7:23-25) Esakweli yango ebandi kokokisama na mikolo ya Ahaza.—2 Ntango 28:20.
Bilaka ya sikisiki
23. (a) Sikawa Yisaya azwi etinda ya kosala nini? (b) Ndenge nini elembo ya etanda endimisami?
23 Sikawa Yisaya azongeli likambo oyo ezali liboso na bango. Ntango mampinga ya basoda ya Sulia mpe Yisalaele bazingi naino Yelusaleme, Yisaya alobi ete: “[Yehova] alobaki na ngai ete, Kamatá [etanda, NW] monene mpe komá likoló na yango na ekomeli ya moto ete, Mpo na Maele-Salala-Hasabaza. [Tiká nakamata mokanda mpo na batatoli ya sembo, NW], bango nganga Uliya mpe Zekalia, mwana ya Yebelekia.” (Yisaya 8:1, 2) Nkombo Maele-Salala-Hasabaza elimboli “Salá noki, Ɛ biloko bipunzami! Ayei mbangu mpo na kopunza.” Yisaya asɛngi na mibali mibale ya lokumu kati na bato mpo bátala ete akomi nkombo yango solo na etanda moko ya monene, mpo ete nsima bákoka kondimisa bosolo ya mokanda yango. Kasi, elembo yango esengeli kondimisama na elembo mosusu ya mibale.
24. Elembo ya Maele-Salala-Hasabaza esengelaki kosala bato ya Yuda nini?
24 Yisaya alobi ete: “Nakómaki epai na mwasi mosakoli mpe azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Bongo [Yehova] alobaki epai na ngai ete, Byangá nkombo na ye ete, Maele-Salala-Hasabaza. Zambi naino mwana ayebi koloba Tata mpe Mama te, bozwi ya Damaseke mpe biloko bipunzami ya Samalia ekobɔtɔlama [liboso ya mokonzi, NW] ya Asulia.” (Yisaya 8:3, 4) Etanda yango ya monene mpe mwana mobali oyo abotami sika, ekozala bilembo oyo ekomonisa ete etikali moke Asulia apunza banyokoli ya Yuda, Sulia na Yisalaele. Ekoumela lisusu ntango boni? Liboso ete mwana mobali yango aloba maloba ya liboso oyo bana mike mingi bayekolaka koloba—“Tata” mpe “Mama.” Bosikisiki ya elaka yango esengelaki kotinda bato yango bátyela Yehova motema. To ekokaki ata kotinda bato mosusu bátyola Yisaya mpe bana na ye ya mibali. Ezala ata ndenge nini, maloba ya esakweli ya Yisaya ekokisami.—2 Mikonzi 17:1-6.
25. Bokokani nini ezali kati na mikolo ya Yisaya mpe eleko na biso?
25 Baklisto bakoki kozwa liteya na makebisi ya mbala na mbala ya Yisaya. Ntoma Paulo amonisaki biso ete na lisolo yango, Yisaya azalaki elilingi ya Yesu Klisto mpe bana mibali ya Yisaya bazalaki komonisa bayekoli bapakolami ya Yesu. (Baebele 2:10-13) Na lisalisi ya bayekoli na ye bapakolami awa na mabele, Yesu azali ntango nyonso kokundolela baklisto ya solo ntina ya ‘kosɛnzɛla’ na ntango oyo ya mpasi. (Luka 21:34-36) Na ntango yango mpe, bazali kokebisa banguna oyo baboi kobongola motema mpo báyeba ete kobomama na bango ekómi pene, atako mbala mingi batyolaka makebisi yango. (2 Petelo 3:3, 4) Lokola ntango ya kokokisama ya bisakweli oyo eyebanaki na mikolo ya Yisaya, endimisi mpenza ete manaka ya Nzambe mpo na mikolo na biso “ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.”—Habakuku 2:3.
“Mai” oyo ebebisaka
26, 27. (a) Makambo nini Yisaya asakoli? (b) Maloba ya Yisaya emonisi nini mpo na basaleli ya Yehova lelo oyo?
26 Yisaya akobi kopesa makebisi na ye, alobi ete: “Mpo ete bato oyo baboyi mai ya Siloa makotiyola malɛmbɛ, kasi basepeli mpo na Lesini mpe mwana ya Lemalia, sasaipi, talá, [Yehova] akokómisela bango mai ya ebale monene mpe mingi, oyo mokonzi ya Asulia mpe nkembo na ye nyonso. Akoya na nzela na ye nyonso mpe akoleka lokola mpela likoló na mabongo na ye nyonso. Akokóma epai na Yuda, akoleka mpe akoya likoló, akokóma na nkingo mpenza; mapapu na ye masembolami ekotondisa monene na mokili na yo, ɛ Emanuele.”—Yisaya 8:5-8.
27 “Bato oyo,” bokonzi ya nɔrdi ya Yisalaele, babwaki kondimana oyo Nzambe asalaki na Davidi. (2 Mikonzi 17:16-18) Na miso na bango, kondimana yango emonani lokola ezali makasi te ndenge moko na mai ya Siloa, esika ya kobomba mai na Yelusaleme, mai yango etiyolaka malɛmbɛmalɛmbɛ. Basepeli mpo na etumba na bango na Yuda. Kasi lityo yango ekozanga etumbu te. Yehova akopesa Baasulia nzela ya ‘kozindisa,’ to kokɔta na Sulia mpe na Yisalaele, ndenge moko mpe etikali moke apesa bato ya politiki ya mokili ya lelo nzela bázindisa lisangani ya mangomba ya lokuta. (Emoniseli 17:16; kokanisá na Danyele 9:26.) Yisaya alobi ete, na nsima, “mai” yango makasi ‘ekokóma epai na Yuda,’ ‘ekokóma na nkingo mpenza,’ kino na Yelusaleme, epai motó ya Yuda (mokonzi) azali koyangela.b Na eleko na biso, bato ya politiki oyo bakoboma mangomba ya lokuta bakotya mpe miso na basaleli ya Yehova; bakozinga bango kino “na nkingo mpenza.” (Ezekiele 38:2, 10-16) Ekosuka ndenge nini? Nini esalemaki na mikolo ya Yisaya? Baasulia bamataki na bifelo ya engumba mpe basilisaki basaleli ya Nzambe? Te. Nzambe azalaki elongo na bango.
Kobanga te—“Nzambe azali na biso elongo”
28. Atako banguna na bango bakosala milende ya solo mpenza, elikya nini Yehova apesi Yuda?
28 Yisaya akebisi ete: “[Bókanela, NW] ɛ bino mabota [batɛmɛli ya bato oyo Nzambe asali na bango kondimana], bóbukana na ndambo mike! Ɛ bino mikili na mosika, bósembola matoi; bómikanga loketo mpe [bóbukana na ndambo mike, NW], bómikanga loketo mpe [bóbukana na ndambo mike, NW]. Bóyanga myango elongo nde ekosuka bobele mpamba, bóloba liloba, nde ekotɛlɛma te, mpo ete Nzambe azali na biso elongo.” (Yisaya 8:9, 10) Nsima ya mwa bambula, na ntango ya boyangeli ya mokonzi ya sembo Hizikiya, mwana ya Ahaza, maloba yango ekokisamaki. Ntango Baasulia babundisaki Yelusaleme, anzelu ya Yehova abomaki basoda 185 000 kati na bango. Ya solo, Nzambe azali elongo na bato na ye mpe na bakitani ya Davidi. (Yisaya 37:33-37) Ndenge moko mpe, lokola etumba ya Armagedon ekómi pene, Yehova akotinda Emanuele Monene kaka mpo na koboma banguna na Ye te kasi mpe mpo na kobikisa baoyo batyelaka Ye motema.—Nzembo 2:2, 9, 12.
29. (a) Bokeseni nini ezali kati na Bayuda ya mikolo ya Ahaza mpe baoyo ya mikolo ya Hizikiya? (b) Mpo na nini basaleli ya Yehova lelo baboyaka kosala boyokani na mangomba mpe na bibongiseli ya politiki?
29 Na bokeseni na Bayuda ya eleko ya Hizikiya, bato ya ntango ya Ahaza bandimaki libateli ya Yehova te. Balingaki nde kosala boyokani, to “mwango,” na Baasulia lokola esika makasi mpo na komibatela liboso ya Sulia mpe ya Yisalaele. Nzokande, “lobɔko” ya Yehova etindi Yisaya aloba mabe mpo na “nzela na bato oyo,” to momeseno na bango. Akebisi ete: “Bangá te makambo mazali bango kobanga, zalá mpe na nsɔmɔ te. Kasi [Yehova] na bibele; okotánga ye [mosantu, NW]; ye azala kobanga na yo mpe azala nsɔmɔ na yo.” (Yisaya 8:11-13) Lelo oyo, basaleli ya Yehova babosanaka likambo yango te, bakebaka ete básala boyokani te to bátya motema te na boyokani ya mangomba mpe lisangani ya politiki. Basaleli ya Yehova batyaka motema na bango mobimba na libateli ya Nzambe. Na ntembe te, soki ‘Yehova azali na ngambo na biso, moto akosala biso nini?’—Nzembo 118:6, NW.
30. Nini ekokómela baoyo batyelaka Yehova motema te?
30 Yisaya azongeli lisusu koloba ete Yehova akozala “ekimelo,” libateli, mpo na baoyo batyelaka ye motema. Nzokande, baoyo balingaka ye te “[bakobɛta, NW] mabaku wana, bakokwea, bakobukana, bakosimbama mpe bakokangama”—baverbe mitano oyo ezali komonisa polele eloko nini ekokómela baoyo batyelaka Yehova motema te. (Yisaya 8:14, 15) Ndenge moko mpe, na ekeke ya liboso, baoyo baboyaki Yesu babɛtaki libaku mpe bakweaki. (Luka 20:17, 18) Lelo oyo, baoyo baboyaka kokangama na Yesu, Mokonzi oyo atyami na likoló, bakosuka mpe ndenge wana.—Nzembo 2:5-9.
31. Lelo oyo, ndenge nini baklisto bakoki kolanda ndakisa ya Yisaya mpe ya baoyo bazali koyoka mateya na ye?
31 Na mikolo ya Yisaya, bato nyonso te babɛtaki libaku. Yisaya alobi ete: “Kangá mokanda, tyá tapo zingazinga na mobeko kati na bayekoli na ngai! Mpe nakozela Yehova, ye oyo abombeli ndako ya Yakobo elongi na ye, mpe nakotya elikya epai na ye.” (Yisaya 8:16, 17, NW) Yisaya na baoyo batyaka likebi na mateya na ye bakosundola Mibeko ya Nzambe te. Bazali ntango nyonso kotyela Yehova motema, atako bato ya mokili na bango oyo bakómi batomboki baboi kotyela Yehova motema, yango wana mpe Yehova abombeli bango elongi. Tiká ete tólanda ndakisa ya baoyo batyelaki Yehova motema mpe tózala na mokano ndenge moko, ya kokangama na losambo ya pɛto!—Danyele 12:4, 9; Matai 24:45; kokanisá na Baebele 6:11, 12.
“Bilembo” mpe “bikamwiseli”
32. (a) Nani azali lelo oyo “bilembo mpe bikamwiseli”? (b) Mpo na nini baklisto basengeli kokesana na mokili?
32 Sikawa Yisaya asakoli ete: “Talá ngai mpe bana oyo [Yehova] apesi ngai, tozali bilembo mpe bikamwiseli kati na Yisalaele uta na [Yehova] na bibele, ye oyo akofandaka na ngomba ya Siona.” (Yisaya 8:18) Na ntembe te, Yisaya, Sala-Yasubu, mpe Maele-Salala-Hasabaza bazali bilembo ya mikano ya Yehova mpo na Yuda. Lelo oyo, Yesu na bandeko na ye bapakolami bazali mpe bilembo. (Baebele 2:11-13) Mpe bazali kosala elongo na “ebele monene” ya “bampate mosusu” oyo bayei kosangana na mosala na bango. (Emoniseli 7:9, 14; Yoane 10:16) Ya solo, elembo ezalaka na ntina kaka soki ekeseni na biloko mosusu oyo ezali esika moko na yango. Ndenge moko mpe, baklisto bakokisaka mokumba na bango ya kozala bilembo kaka soki bakeseni mpenza na mokili oyo, awa batyeli Yehova motema na bango mobimba mpe bazali kosakola mikano na ye na molende mpenza.
33. (a) Ekateli nini baklisto ya solo bazwi? (b) Mpo na nini baklisto ya solo bakotikala ntango nyonso ngwi?
33 Yango wana, tiká ete biso nyonso tótosa mitinda ya Nzambe, kasi oyo ya mokili te. Tókoba kokesana na mokili kozanga kobanga—lokola bilembo—tókokisa mokumba oyo Yisaya Monene, Yesu Klisto apesi biso: “Kosakola [mbula ya motema malamu, NW], mokolo ya kobukanisa ya Nzambe na biso.” (Yisaya 61:1, 2; Luka 4:17-21) Ya solo, ntango mpela ya Asulia ekozindisa mabele—ata soki ekómi na nkingo na biso—ekomema baklisto ya solo te. Tokotikala ngwi mpamba te “Nzambe azali na biso elongo.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali kokokisama ya esakweli yango, talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, nkasa 61 mpe 791, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Bakokanisi mpe Asulia na ndɛkɛ moko oyo mapapu na yango “ekotondisa monene na mokili na yo.” Yango wana, mokili yango nyonso, ekotonda na mampinga ya basoda ya Asulia.
[Elilingi na lokasa 103]
Yisaya akendaki elongo na Sala-Yasubu mpo na kopesa Ahaza nsango ya Yehova
[Elilingi na lokasa 111]
Mpo na nini Yisaya akomaki “Maele-Salala-Hasabaza” na etanda moko ya monene?