Kozalisa biloko nyonso biloko ya sika—ndenge yango esakolamaki
“Mofandi na kiti ya bokonzi alobi ete, Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika. Alobi mpe ete, . . . Maloba oyo mazali sembo, na solo.”—EMONISELI 21:5.
1, 2. Mpo na nini bato mingi bazali kokakatana kolobela makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya?
ESILÁ kokómela yo oloba to omituna ete: ‘Nani ayebi makambo oyo ekosalema lobi?’ Okoki koyeba ntina oyo bato bakakatanaka kolobela makambo oyo ekoya to kondima baoyo balobaka ete bakoki koyeba makambo oyo ekoya. Ezali mpo ete bato bakokaka te koyebisa makambo oyo ekosalema na basanza to na bambula oyo ekoya mpe makambo yango esalema mpenza ndenge oyo balobaki.
2 Zulunalo moko (Forbes ASAP) ebimisaki lisolo moko oyo elobelaki ntango. Na lisolo yango, Robert Cringely, mopanzi-nsango na televizyo, akomaki boye: “Ntango esukaka kaka na koyokisa biso nyonso nsɔni, kasi ezali na moto te oyo ntango eyokisaka nsɔni koleka bato oyo bamekaka koyebisa makambo oyo ekoya. Komeka koyebisa makambo oyo ekoya ezali lisano oyo mbala mingi tolongaka yango te. . . . Atako bongo, baoyo balobaka ete bayebisaka makambo makoya bazali kotika te koloba makambo oyo ekoya.”
3, 4. (a) Makanisi nini bato mosusu bazali na yango oyo bazali komonisa ete milenɛrɛ ya sika ekozala malamu? (b) Makanisi nini ebongi oyo bato mosusu bazali na yango mpo na mikolo ekoya?
3 Lokola bato bazali kotya makanisi mingi na milenɛrɛ ya sika, na ntembe te ozali komona ete bato mingi bazali koluka koyeba makambo oyo makobima. Na ebandeli ya mbula oyo eleki, zulunalo moko (Maclean’s) elobaki boye: “Mpo na bato mingi ya Canada, mobu 2000 ekozala kaka lokola bambula nyonso, kasi ekoki mpe kozala mbula oyo ekoya na makambo ya sika.” Profɛsɛrɛ Chris Dewdney na Iniversite ya York, apesaki ntina ya kozala na elikya ete makambo ekobonga, alobaki boye: “Milenɛrɛ ya sika ekosukisa ekeke oyo etondi na makambo ya nsɔmɔ.”
4 Likambo yango ezali se makanisi mpamba? Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Canada, kaka bato moke (22 %) “bandimi ete mobu 2000 ekozala ebandeli ya makambo ya sika na mokili.” Kutu, pene ya ndambo ya katikati (50 %) ya bato oyo batunaki bango “bazali kokanisa ete matata mosusu ya mokili mobimba,” elingi koloba etumba ya mokili mobimba, ekosalema na boumeli ya mbula 50 oyo ezali koya. Emonani polele ete, bato mingi bazali komona ete milenɛrɛ ya sika ekosilisa mikakatano na biso te, mpe ekobongisa makambo nyonso te ete ekóma makambo ya sika. Sir Michael Atiyah, prezida ya kala ya ebongiseli moko na Angleterre (Britain’s Royal Society), akomaki boye: “Ndenge makambo ezali kobongwana nokinoki . . . ezali komonisa ete na ekeke ya ntuku mibale na moko, mokili ekokóma na mikakatano makasi. Bato bazali se kobakisama, biloko ezali moke mpo na kokokisa bamposa ya bato nyonso, mai, mopɛpɛ mpe bazamba ezali kobeba, mpe babola bazali se kokóma mingi na mokili mobimba; nyonso wana ezali mikakatano oyo tosengeli kosilisa nokinoki.”
5. Epai wapi tokoki kokuta makambo oyo ebongi kotyela motema mpo na bomoi na mikolo ekoya?
5 Mbala mosusu okoki koloba ete: ‘Lokola bato bakokaka te koyebisa makambo oyo makobima, tótika na biso nde kokanisa mikolo ekoya?’ Eyano ezali ete “te!” Ya solo, bato bakoki te kosakola makambo oyo ekoya mpe makambo yango esalama mpenza ndenge balobi yango, kasi tóyeba ete ezali na moto moko oyo akoki koyebisa yango. Kasi, moto yango ezali nani, mpe mpo na nini tosengeli kozala na elikya mpo na mikolo ekoya? Okoki kozwa biyano oyo ekosepelisa yo na bisakweli minei ya sikisiki. Bisakweli yango ekomami na kati ya buku moko oyo bato mingi bazali na yango mpe batángaka yango, mpe oyo bato mingi bayebaka kolimbola yango malamu te mpe baboyaka kondima yango, buku yango ezali Biblia. Ata soki okanisaka ndenge nini mpo na Biblia, mpe ezala ete oyebi yango malamu to te, ekozala malamu mpo na yo otalela bisakweli minei yango ya ntina mingi. Bisakweli yango ezali koyebisa makambo malamu mpo na mikolo oyo ezali koya. Lisusu, bisakweli minei yango ezali komonisa ndenge bomoi na yo mpe bomoi ya bato oyo olingaka ekozala na mikolo oyo ekoya.
6, 7. Ntango nini Yisaya asakolaki, mpe ndenge nini bisakweli na ye ekokisamaki na ndenge ya kokamwa?
6 Esakweli ya liboso ezali na Yisaya mokapo 65. Liboso ya kotánga yango, kanisá naino makambo oyo: Ntango oyo bakomaki esakweli yango mpe makambo oyo yango etalelaki. Yisaya, mosakoli ya Nzambe, oyo akomaki maloba yango, azalaki na bomoi koleka mbula nkama liboso ete bokonzi ya Yuda esuka. Bokonzi yango esukaki ntango Yehova atikaki kobatela Bayuda oyo bazalaki lisusu sembo te, atikaki nzela ete bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme mpe bámema bato oyo bazalaki kofanda kuna na boombo. Likambo yango ekokisamaki koleka mbula nkama nsima wana Yisaya asakolaki yango.—2 Ntango 36:15-21.
7 Mpo na kokokisama ya esakweli yango na ntango ya kala, osengeli koyeba ete Nzambe ayebisaki Yisaya asakola nkombo ya Sirise, moto ya Perse oyo ntango wana abotamaki naino te; na nsuka, moto yango akweisaki Babilone. (Yisaya 45:1) Sirise azongisaki Bayuda na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. Likambo ya kokamwa, Yisaya asakolaki ete Bayuda bakozonga na mboka na bango, ndenge tozali kotánga yango na mokapo 65. Alobelaki mingimingi bomoi oyo Bayisalaele bakozala na yango ntango bakozonga na mboka na bango.
8. Bomoi ya esengo ya ndenge nini Yisaya asakolaki mpo na mikolo ekoya mpe maloba nini ezali mpenza kobenda likebi na biso?
8 Na Yisaya 65:17-19 tozali kotánga boye: “Nazali kotonga [makoló, NW ] ya sika mpe [mabele, NW ] ya sika; mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga; mpo ete talá, nakotonga Yelusaleme mpo na kosanzola mpe bato na ye mpo na esengo. Nakosepela kati na Yelusaleme mpe nakoyoka esengo kati na bato na ngai; mongongo na kolela ekoyokana lisusu kati na yango te, to konganga na mpasi te.” Ezali solo ete Yisaya alobelaki bomoi oyo ekozala malamu koleka oyo Bayuda bazalaki na yango ntango bafandaki na Babilone. Asakolaki ete bakozala na esengo mpe na bomoi ya malamu. Sikoyo tótalela maloba “makoló ya sika na mabele ya sika.” Oyo ezali esika ya liboso oyo balobi maloba yango, kasi na Biblia mobimba tozali kokuta yango mbala minei, mpe bisakweli yango minei ekoki mpenza kotalela bomoi na biso na mikolo ekoya to mpe koyebisa ndenge ekozala.
9. Ndenge nini esakweli ya Yisaya 65:17-19 ekokisamaki epai ya Bayuda ya kala?
9 Esakweli ya Yisaya 65:17-19 ekokisamaki libosoliboso epai ya Bayuda ya kala oyo, ndenge kaka Yisaya asakolaki yango, bazongaki na mboka na bango, epai bazongisaki losambo ya pɛto. (Ezela 1:1-4; 3:1-4) Na ntembe te, oyebi ete bazongaki na mboka na bango mpenza oyo ezalaki kaka awa na mabele, kasi epai mosusu te. Ndenge oyo esakweli yango ekokisamaki ekoki kosalisa biso tóyeba eloko oyo Yisaya alingaki koloba na likoló ya sika na mabele ya sika. Tozali na ntina ya kolukaluka te, lokola bato mosusu balukaka koyeba bisakweli ya Nostradamus oyo ezali kaka ya bongo na bongo to ya bato mosusu oyo balobaka ete bakoki koyebisa makambo makoya. Biblia yango moko elimboli polele soki Yisaya alingaki koloba nini.
10. Ndenge nini tosengeli kokanga ntina ya “mabele” ya sika oyo Yisaya asakolaki?
10 Na kati ya Biblia, “mabele” elimbolaka kaka etando na biso te. Na ndakisa, Nzembo 96:1 (NW ) elobaka mpenza boye: ‘Bóyembela Yehova, mabele mobimba.’ Toyebi malamu ete etando na biso, elingi koloba mabele na bibale minene, ekoki koyemba te. Bato nde bayembaka. Nzembo 96:1 ezali mpenza kolobela bato oyo bafandi na mabele.a Kasi Yisaya 65:17 elobeli mpe “makoló ya sika.” Soki “mabele” elimbolaki ebongiseli ya sika ya Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango, bongo “makoló ya sika” elimbolaki nini?
11. Maloba “likoló ya sika” elimboli nini?
11 Buku moko (Cyclopædia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature) oyo M’Clintock na Strong bakomaki, elobi boye: “Mbala nyonso oyo likoló emonisamaka na elilingi ya emonaneli ya esakweli, elimbolaka . . . bibongiseli nyonso oyo ezali koyangela . . . oyo ezali na bokonzi likoló ya bato mpe ezali koyangela bango, ndenge moko likoló oyo tomonaka ezali na likoló ya mabele mpe ezali koyangela yango.” Lokola batii esika moko maloba “likoló na mabele,” buku yango elimboli ete ‘na elobeli ya esakweli maloba yango elingi koloba ete, na makambo ya politiki, bato bakeseni. Makoló ezali elilingi ya bakonzi; mabele ezali elilingi ya bato, bato oyo bakonzi bazali koyangela bango.’
12. Ndenge nini Bayuda ya kala bamonaki “makoló ya sika na mabele ya sika”?
12 Ntango Bayuda bazongaki na mboka na bango, bakómaki na oyo tokoki kobenga ete ebongiseli ya makambo ya sika. Bazwaki bakonzi ya sika. Zorobabele, nkɔkɔ ya Mokonzi Davidi, azalaki guvɛrnɛrɛ mpe Yosua azalaki nganga monene. (Hagai 1:1, 12; 2:21; Zekalia 6:11) Bango nde bazalaki elilingi ya “makoló ya sika.” Bazalaki likoló ya nini? “Makoló ya sika” ezalaki likoló ya “mabele ya sika,” elingi koloba bato bapɛtolami oyo bazongaki na mboka na bango mpo na kotonga Yelusaleme na tempelo na yango mpo na kosambela Yehova. Na yango, na kotalela ndimbola yango, Bayuda ya ntango wana bazalaki na makoló ya sika na mabele ya sika.
13, 14. (a) Esika nini mosusu balobeli “likoló ya sika na mabele ya sika” oyo tosengeli kotalela? (b) Mpo na nini esakweli ya Petelo ezali mpenza na ntina mingi na eleko oyo?
13 Kasi, tóbosana te likambo ya ntina. Likambo oyo tozali kotalela na lisolo oyo, ezali kaka koluka kolimbola mokapo moko ya Biblia te to kolobela lisolo moko ya kala te. Okoki komona yango soki ofungoli esika mosusu oyo balobeli “makoló ya sika na mabele ya sika.” Na 2 Petelo mokapo 3, okokuta maloba yango mpe okomona ete esakweli yango etaleli bomoi na biso na mikolo ekoya.
14 Ntoma Petelo akomaki mokanda na ye nsima ya mbula koleka 500, banda Bayuda bazongaki na mboka na bango. Lokola azalaki ntoma ya Yesu, Petelo akomelaki bayekoli ya Klisto, oyo abengami “Nkolo” na 2 Petelo 3:2. Na vɛrsɛ 4 (NW ), Petelo alobeli “kozala oyo elakamaki,” elingi koloba kozala ya Yesu, oyo esali ete esakweli yango ezala na ntina mingi lelo oyo. Makambo mingi ezali komonisa ete banda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Yesu azali—elingi koloba—azali Moyangeli na Bokonzi ya Nzambe na likoló. (Emoniseli 6:1-8; 11:15, 18) Likambo yango ezali na ntina mingi soki totaleli likambo mosusu oyo ntoma Petelo alobelaki na mokapo yango.
15. Ndenge nini esakweli ya Petelo mpo na “likoló ya sika” ezali kokokisama?
15 Na 2 Petelo 3:13, tozali kotánga boye: “Tozali kotalela [makoló] ya sika mpe [mabele] ya sika, [lokola] elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” Mbala mosusu oyebi ete Yesu azali mokonzi na likoló, azali Moyangeli ya liboso na “makoló ya sika.” (Luka 1:32, 33) Nzokande, bavɛrsɛ mosusu na kati ya Biblia ezali komonisa ete akoyangela ye moko te. Yesu alobaki ete bantoma mpe bato mosusu bakozala bakonzi na likoló. Na mokanda ya Baebele, ntoma Paulo abengi bato yango “basangani na kobyangama ya Likoló.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Mpe lisusu, Yesu alobaki ete bato yango bakofanda na ye na bakiti ya bokonzi na likoló. (Baebele 3:1; Matai 19:28; Luka 22:28-30; Yoane 14:2, 3) Awa tomoni ete bato mosusu bakoyangela na Yesu lokola basangani ya likoló ya sika. Kasi, Petelo alingaki koloba nini na maloba “mabele ya sika”?
16. “Mabele ya sika” nini esili kosalema?
16 Lokola esakweli yango ekokisamaki na ntango ya kala, Bayuda bazongaki na mboka na bango, lelo oyo esakweli ya 2 Petelo 3:13 ezali kokokisama epai ya bato oyo bazali kotosa boyangeli ya makoló ya sika. Okoki komona ete bamilio ya bato bazali lelo oyo kotosa boyangeli yango na esengo. Boyangeli yango ezali koteya bango mpe bazali kosala makasi mpo na kolanda mibeko na yango oyo ezwami na Biblia. (Yisaya 54:13) Bato yango bazali bato ya liboso ya “mabele ya sika,” bauti na bikólo nyonso, na minɔkɔ nyonso, na mposo nyonso mpe bazali kosala na bomoko mpo na kotosa Yesu Klisto, Mokonzi oyo azali koyangela. Likambo ya ntina ezali ete yo mpe okoki kozala moko na bato yango!—Mika 4:1-4.
17, 18. Mpo na nini maloba ya 2 Petelo 3:13 ezali kopesa biso elikya mpo na mikolo ezali koya?
17 Kokanisa te ete makambo nyonso esuki wana, ete toyebi makambo mosusu te mpo na mikolo ekoya. Kutu, soki otángi 2 Petelo mokapo 3, okomona makambo mosusu oyo ezali kolakisa ete mbongwana monene ekosalema na mikolo ekoya. Na vɛrsɛ 5 mpe 6, Petelo akomi mpo na Mpela ya ntango ya Noa, Mpela oyo esukisaki mokili mabe ya ntango wana. Na vɛrsɛ 7, Petelo alobi ete “likoló mpe [mabele] ya ntango oyo,” elingi koloba biyangeli mpe ebele monene ya bato, babombami mpo na “mokolo ya kosambisa mpe ya koboma bato bakotyolaka Nzambe.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Likambo yango endimisi ete maloba “makoló na mabele” ezali kolimbola, likoló na mabele oyo tomonaka te, kasi nde bato na biyangeli na bango.
18 Na nsima Petelo alimboli ete na mokolo ya Yehova oyo ezali koya mokili ekopɛtolama na makambo nyonso, mpe na nsima likoló ya sika na mabele ya sika ekozwa esika ndenge elobelami na vɛrsɛ 13. Talá maloba ya nsuka ya vɛrsɛ yango: “boyengebene ekofanda kati na yango.” Yango emonisi ete mbongwana monene esengeli kosalama mpo bato bákóma na bomoi ya malamu, boye te? Yango epesi elikya ya makambo ya sika mpenza, ntango oyo bato bakosepela na bomoi koleka ndenge bazali na yango lelo oyo, boye te? Soki okangi ntina ya makambo yango, yebá ete okangi ntina ya bisakweli ya Biblia, likambo oyo bato mingi bayebi yango te.
19. Makambo ezali ndenge nini ntango mokanda ya Emoniseli elobeli “likoló ya sika na mabele ya sika” oyo ekoya?
19 Kasi tókoba lisusu. Totaleli bisika oyo balobeli maloba “likoló ya sika na mabele ya sika” na Yisaya mokapo 65 mpe na 2 Petelo mokapo 3. Sikoyo tófungola na Emoniseli mokapo 21, esika mosusu oyo maloba yango ezali na Biblia. Mbala oyo mpe, soki toyebi ntango mpe makambo oyo esakweli yango ezali kotalela ekosalisa biso. Mikapo mibale liboso, elingi koloba na mokapo 19, elobeli etumba moko monene na maloba ya elilingi, kasi ezali te etumba na kati ya bikólo mibale oyo eyinani. Na ngámbo moko ezali na “Liloba ya Nzambe.” Na ntembe te oyebi ete oyo ezali nkombo mosusu oyo babengaka Yesu Klisto. (Yoane 1:1, 14) Yesu azali na likoló mpe emonaneli oyo ezali komonisa ye na basoda na ye kuna na likoló. Bazali kobunda na banani? Mokapo yango etángi “bakonzi,” “bakonzi ya basoda,” mpe bato ndenge na ndenge, ezala bato “mike na minene.” Etumba yango ekosalama na mokolo ya Yehova oyo ezali koya, elingi koloba kobomama ya bato mabe. (2 Batesaloniki 1:6-10) Soki tokei liboso, Emoniseli mokapo 20 ebandi mbala moko kolobela kolongolama ya “nyoka ya kalakala, oyo abengami Zabolo mpe Satana.” Yango etindi biso na kotalela Emoniseli mokapo 21.
20. Mbongwana nini ya monene ekosalama oyo Emoniseli 21:1 elobeli?
20 Ntoma Yoane abandi mokapo yango na maloba ya esengo oyo: “Namonaki likoló ya sika mpe [mabele] ya sika, mpo ete [likoló] na liboso, na [mabele] ya liboso esili kolongwa. Mai monene mpe ezali lisusu te.” Soki totaleli makambo tomonaki na Yisaya mokapo 65 mpe na 2 Petelo mokapo 3, tokoki kondima ete yango elimboli te ete Nzambe akolongola likoló oyo tomonaka mpe etando na biso, na bibale na yango mozindo bongo atya mosusu. Ndenge mikapo ya liboso emonisaki yango, bato mabe na biyangeli na bango, bakisa mpe Satana mokonzi na bango oyo amonanaka te, bakolongolama. Ya solo, elaka oyo epesami awa ezali ya ebongiseli ya biloko ya sika mpo na bato na mabele.
21, 22. Mapamboli nini Yoane andimisi biso ete tokozwa mpe kolongola mpisoli elimboli nini?
21 Tozali kondima likambo yango ntango tozali kotalela esakweli kitoko yango malamumalamu. Maloba ya nsuka ya vɛrsɛ 3 elobeli ntango oyo Nzambe akozala esika moko na bato, elingi koloba akotya likebi mpo na kopesa na bato oyo bazali kosala mokano na ye bolamu. (Ezekiele 43:7) Na vɛrsɛ 4, 5, Yoane alobi boye: “[Yehova] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka. Mofandi na kiti ya bokonzi alobi ete, Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika. Alobi mpe ete, Komá ete maloba oyo mazali sembo, na solo.” Talá esakweli ya kolendisa mpenza!
22 Pemá mwa moke mpo na koyoka elengi ya makambo Biblia ezali kosakola. ‘Nzambe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.’ Yango ekoki te kolobela mpisoli mpenza oyo ebimaka na miso, mpamba te mpisoli esukolaka miso na biso, ezali mpe koloba mpo na mpisoli ya esengo te. Mpisoli oyo Nzambe akolongola ezali nde mai ya miso oyo ebimaka mpo na mpasi, mawa, kozanga elikya, mitungisi mpe minyoko. Ndenge nini tokoki kondima ete ekosalema bongo? Elaka kitoko oyo Nzambe apesi, ya kolongola mpisoli, etaleli mpenzampenza ‘liwa, kolela, koganga mpe mpasi ekozala lisusu te.’—Yoane 11:35.
23. Makambo nini ekosuka oyo esakweli ya Yoane endimisi yango?
23 Yango emonisi ete maladi ya kanser, maladi ya bɔɔngɔ (apoplexie), maladi ya motema, ata mpe liwa ekolongwa! Nani kati na biso akufelá naino te moto oyo alingaki mingi, ezala na maladi, na likama, to na ndenge mosusu? Awa Nzambe alaki biso ete liwa ekozala lisusu te, yango emonisi ete bana oyo bakobotama ntango yango bakobotama te mpo bákola, bákóma mibange mpe na nsima bákufa. Esakweli yango elimboli lisusu ete maladi oyo ekómelaka mingimingi mikóló mpe mibange ekozala lisusu te. Na ndakisa: maladi oyo esilisaka moto mayele (maladie d’Alzheimer), maladi ya mikuwa (ostéoporose), maladi ya fibrome mpe maladi oyo ebomaka miso ekozala lisusu te.
24. Ndenge nini ‘likoló ya sika na mabele ya sika’ ekopesa bolamu, mpe tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
24 Na ntembe te okondima ete kolela na koganga ekozala lisusu mingi te soki liwa, konuna mpe maladi ezali lisusu te. Kasi, tokoloba boni mpo na bobola, kobebisa bana mpe minyoko na ntina na bokabwani ya bato oyo batángá na baoyo batángá te to bokabwani ya bato mpo na bokeseni ya loposo ya nzoto? Soki makambo yango, oyo ezali komonana mingi lelo oyo esili te, tokotika kolela mpe koganga te. Bomoi na “likoló ya sika” mpe “na mabele ya sika” ekobebisama te na makambo yango oyo ezali kopesa bato mawa lelo oyo. Talá mbongwana ya solosolo! Kasi, totaleli kaka bisika misato na kati ya bisika minei oyo Biblia elobeli “likoló ya sika na mabele ya sika.” Ezali mpe na esika mosusu oyo Biblia elobeli likambo yango mpe eyokani na makambo touti kotalela mpe ezali kopesa ntina ya kotya elikya na ntango mpe na lolenge oyo Nzambe akokokisa mokano na ye ya ‘kozalisa biloko nyonso biloko ya sika.’ Lisolo oyo elandi ezali kolobela esakweli yango mpe likambo oyo yango ekoki kolimbola mpo na bolamu na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biblia haut-fleuve ebongoli Nzembo 96:1 boye: “Bóyembela Yawe bino bato na mokili mobimba.” Tozali kotánga na Biblia Liloba lya Nzambe boye: “Bato banso ba nse, boyembela Nzambe!” Yango eyokani na ndenge tokangi ntina ete ntango alobaki “mabele ya sika,” Yisaya azalaki kolobela basaleli ya Nzambe oyo bazongaki na mboka na bango.
Ozali koyeba lisusu?
• Tángá bisika misato oyo Biblia elobeli “likoló ya sika na mabele ya sika.”
• Ndenge nini “likoló ya sika na mabele ya sika” emonanaki epai ya Bayuda ya kala?
• Na lolenge nini “likoló ya sika na mabele ya sika” oyo Petelo alobeli ekokokisama?
• Ndenge nini Emoniseli mokapo 21 ezali komonisa biso bomoi kitoko na mikolo oyo ezali koya?
[Elilingi na lokasa 10]
Sirise azongisaki Bayuda na mboka na bango na 537 L.T.B. kaka ndenge Yehova ayebisaki yango.