Mokapo ya Mibale
Tata moko na bana na ye oyo bakómaki batomboki
1, 2. Limbolá ndenge bana ya Yehova bakómaki batomboki.
AZALAKI kobɔkɔla bana na ye malamu ndenge tata nyonso oyo alingaka bana na ye asalaka. Na boumeli ya bambula mingi azalaki kokeba ete bálya malamu, bálata malamu mpe bálala malamu. Soki esengeli, azalaki kopesa bango etumbu. Kasi etumbu yango ezalaki koleka ndelo te; ezalaki ntango nyonso “na sembo.” (Yilimia 30:11) Tokoki sikawa kokanisa mawa oyo tata yango ya bolingo ayokaki ntango azalaki koloba ete: “Nabɔkɔli bana mpe nakolisi bango, nde bango batombokeli ngai.”—Yisaya 1:2b, NW.
2 Bana batomboki oyo balobeli awa ezali bato ya Yuda, mpe tata oyo ayokaki mawa ezali Yehova Nzambe. Yango ezali mpenza likambo ya mawa! Yehova aleisaki bato ya Yuda mpe atombolaki bango likoló na mabota mosusu. Nsima, ayebisaki bango na nzela ya mosakoli Ezekiele ete: “Nalatisaki yo bilamba oyo ezali na mayemi mpe batongi yango kitoko, mpe nalatisaki yo sapato ya mposo ya nyama, mpe nazingelaki yo na elamba kitoko ya pɛtɛpɛtɛ mpe nazipaki yo na bilamba ya ntalo.” (Ezekiele 16:10, NW) Kasi, bato mingi ya libota ya Yuda bamonisaki botɔndi te na nyonso oyo Yehova asalelaki bango. Kutu, bazalaki nde kotomboka, to bakómaki barɛbɛlɛ.
3. Mpo na nini Yehova azwi makoló mpe mabele batemwe ya botomboki ya Yuda?
3 Yango wana, Yehova abandi kolobela bana na ye batomboki na maloba oyo: “Ɛ [makoló, NW], oyoka! Ɛ [mabele, NW], osembola mpe litoi! Zambi [Yehova] asili koloba.” (Yisaya 1:2a) Mwa bikeke mingi liboso, na elobeli ya elilingi, makoló na mabele eyokaki ntango bazalaki kokebisa Bayisalaele polele mpo na mpasi oyo bakoki kozwa lokola bazangi botosi. Mose alobaki ete: “Ngai nabyangi likoló mpe mokili kotatola mpo na bino lelo ete noki bokokufa nyɛɛ na mokili oyo bokokata ngámbo mpo na kokamata yango.” (Deteronome 4:26) Sikawa na mikolo ya Yisaya, Yehova atii makoló oyo emonanaka te mpe mabele oyo emonanaka, batemwe ya botomboki ya Yuda.
4. Yehova azwi ekateli ya komimonisa ndenge nini epai ya Yuda?
4 Lokola ezali likambo monene, esengeli kosolola na ye. Kasi, ata na ntango oyo makambo ekómi mpenza ndongo, ezali likambo ya ntina—mpe ya esengo—ya koyeba ete Yehova azali komimonisa epai ya Yuda lokola tata oyo atondi na bolingo kasi te lokola kaka nkolo na bango oyo asombaki bango. Ya solo, Yehova azali kobenga bato na ye mpo bátalela likambo yango ndenge tata amitungisaka mpo na bana na ye oyo bakómi motó makasi. Mbala mosusu baboti mosusu ya Yuda bakutanaki mpe na likambo ya mpasi ndenge wana mpe bamitii na esika ya Yehova. Ata ndenge nini, Yehova alingi sikoyo komonisa bikateli na ye likoló na Yuda.
Nyama kutu eleki malamu
5. Na bokeseni na Yisalaele, na lolenge nini ngɔmbɛ mpe mpunda emonisaka mwa ezaleli ya kozala sembo?
5 Na nzela ya Yisaya, Yehova alobi ete: “Ngɔmbɛ ayebi nkolo na ye mpe mpunda ayebi efandelo ya nkolo na ye, nde Yisalaele ayebi te, bato na ngai basosoli te.” (Yisaya 1:3)a Bato ya Proche-Orient bayebi ngɔmbɛ na mpunda malamumalamu, basalelaka nyama yango na misala. Bato ya Yuda bakokaki kobɛta ntembe te ete nyama wana emonisaka mwa ezaleli oyo tokoki kobenga ete bosembo mpe eyebi ete ezali na nkolo na yango. Na ndenge yango, tótalela likambo oyo moto moko oyo asalaka bolukiluki na makambo ya Biblia, amonaki na miso, na mpokwa moko, na engumba moko na Proche-Orient, alobi ete: “Ntango kaka etonga ya nyama ekɔti na engumba, nyama ebandi kopanzana. Ngɔmbɛ mokomoko eyebaki nkolo na yango malamumalamu mpe nzela ya ndako na ye, atako banzela mikemike ezalaki wana ebele, ata mbala moko te ebungaki. Mpo na mpunda, ekendaki mbala moko na ekuke mpe emataki na ‘elyelo ya nkolo na yango.’”
6. Ndenge nini libota ya Yuda ezangaki bososoli?
6 Lokola makambo yango ezalaki mingi mpe na ntango ya Yisaya, nsango ya Yehova ezali mpenza polele: Soki nyama mpamba ezali kutu koyeba nkolo na yango mpe esika oyo elyaka, bato ya Yuda bakoloba nini mpo na komonisa ntina oyo bango baboi Yehova? Ya solo mpenza, “basosoli te.” Emonani lokola nde bazalaki koyeba te ete bozwi na bango mpe bomoi na bango ezalaki kouta na Yehova. Yango emonisi mpenza ete Yehova azali na motema mawa mpo azalaki naino kobenga bato ya Yuda “bato na ngai”!
7. Na ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova mpo na oyo azali kopesa biso?
7 Tómonisa soki moke te ezaleli ya kozanga botɔndi na makambo nyonso Yehova azali kosalela biso! Nzokande, tómekola Davidi, mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Nakotɔnda [Yehova] na motema mobimba na ngai; nakosakola misala na kokamwa na yo nyonso.” (Nzembo 9:1) Soki tozali ntango nyonso kozwa boyebi ya Yehova, yango ekolendisa biso, mpamba te Biblia elobi ete “koyeba ye [Oyo Aleki Bosantu, NW] ezali bososoli.” (Masese 9:10) Soki tozali komanyola mokolo na mokolo likoló na mapamboli ya Yehova, yango ekosalisa biso tózala na botɔndi mpe tótyola Tata na biso ya likoló te. (Bakolose 3:15) Yehova alobi ete: “Ye oyo akopesa ngai matɔndi mpo na mbeka na ye, ye akokumisa ngai; mpe ye oyo akokɛngɛlaka nzela na ye, nakomonisa ye kobikisa na ngai.”—Nzembo 50:23.
Bafingi mpenza “Mosantu ya Yisalaele”
8. Mpo na nini ebongi kobenga libota ya Yuda ete “libota na masumu”?
8 Yisaya akobi kopesa nsango na ye na maloba ya makasimakasi mpo na libota ya Yuda: “Ɛ libota na masumu, bato bakumbi [kilo ya makambo mabe, NW], libota na basali na masumu, bana baoyo bazali kokosa; batiki [Yehova], batyoli [Mosantu ya Yisalaele, NW], bazongi nsima.” (Yisaya 1:4) Makambo ya mabe ekoki koyikana tii kokóma eloko moko ya kilo mpenza. Na mikolo ya Abalayama, Yehova alobaki ete masumu ya Sodomo na Gomola ezalaki “kilo mingi.” (Genese 18:20, NW) Likambo moko ya ndenge wana emonani sikawa na libota ya Yuda, mpamba te Yisaya alobi ete “bakumbi kilo ya makambo mabe.” Lisusu, abengi bango ete “libota na basali na masumu, bana baoyo bazali kokosa.” Na ntembe te, libota ya Yuda bazalaki lokola bana batomboki. ‘Bazongi nsima,’ to ndenge Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli yango, ‘bapesi’ Tata na bango ‘mokɔngɔ.’
9. Elobeli “Mosantu ya Yisalaele” elimboli nini?
9 Lokola bazalaki bato ya motó makasi, libota ya Yuda bazangaki limemya epai na “Mosantu ya Yisalaele.” Elobeli yango oyo ezali komonana mbala 25 na mokanda ya Yisaya, elimboli nini? Kozala mosantu elimboli kozala pɛto mpe na litɔnɔ te. Yehova azali mosantu na ndenge ya kokoka. (Emoniseli 4:8) Bayisalaele bamikundolaka likambo yango ntango nyonso oyo bamonaka maloba oyo ekomami na etanda ya wolo ya kongɛnga na ekɔti ya nganga-monene ete: “Bosantu ezali ya Yehova.” (Exode 39:30, NW) Yango wana, ndenge abengi Yehova “Mosantu ya Yisalaele,” Yisaya amonisi ete Yuda asali lisumu monene. Ya solo, batomboki yango babuki mpenza mobeko oyo bapesaki bankɔkɔ na bango: “Bosengeli komisantisa mpe bosengeli komimonisa basantu mpo ete ngai nazali mosantu”!—Levitike 11:44, NW.
10. Tosengeli kosala nini mpo tózanga limemya te epai na “Mosantu ya Yisalaele”?
10 Lelo oyo, baklisto basengeli kosala makasi ete bálanda te ndakisa ya Yuda, libota oyo ezangaki limemya epai na “Mosantu ya Yisalaele.” Basengeli komekola bosantu ya Yehova. (1 Petelo 1:15, 16) Mpe basengeli ‘koyina mabe.’ (Nzembo 97:10) Misala ya mbindo, na ndakisa pite, losambo ya bikeko, moyibi mpe milangwa, ekoki kobebisa lisangá ya boklisto. Yango wana, bato oyo baboyaka kotika kosala makambo ya ndenge wana babimisamaka na lisangá. Nsukansuka, bato oyo bazali ntango nyonso kosala misala ya mbindo mpe baboi kobongola motema, bakozanga mapamboli ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. Ya solo, misala nyonso ya mabe ya ndenge wana ekokani mpenza na kofinga “Mosantu ya Yisalaele.”—Baloma 1:26, 27; 1 Bakolinti 5:6-11; 6:9, 10.
Maladi banda na motó tii na makolo
11, 12. (a) Lobelá mikakatano oyo libota ya Yuda ezwaki. (b) Mpo na nini tosengeli koyokela libota ya Yuda mawa te?
11 Na nsima, Yisaya azali komonisa bato ya Yuda mpe kobenda likebi na bango na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Alobi ete: “[Esika nini bokobɛtama lisusu, NW]? Bozali naino koleka kotomboka.” Ya solo, Yisaya azalaki nde kotuna bango boye: ‘Mpasi oyo bomoni ekoki naino te? Mpo na nini bozali kaka komilukela mindɔndɔ na kokoba kotomboka?’ Yisaya alobi lisusu ete: “Motó mobimba etondi na [maladi], motema mobimba na bolɛmbu. Longwa na litambe na lokolo kino motó [esika moko ya malamu ezali te, NW].” (Yisaya 1:5, 6a) Yuda ezali mpenza kobɛla makasi—maladi ya elimo nzoto mobimba. Oyo nde nsango ya mawa!
12 Tosengeli komilela mpo na Yuda? Soki moke te! Bikeke mingi liboso, bakebisaki libota mobimba ya Yisalaele polele mpo na etumbu oyo bakoki kozwa soki bazangi botosi. Bayebisaki bango ete: “Yehova akopesa yo maladi ya bibɔ na mabɔlɔngɔ nyonso mibale mpe na bibɛlɔ nyonso mibale, kasi okoki kobika te, banda na matambe ya makolo na yo tii na motó na yo.” (Deteronome 28:35, NW) Na elobeli ya elilingi, Yuda ezali sikawa konyokwama mpo na motó makasi na yango. Nzokande, bampasi wana nyonso ekokaki kozwa bango te soki bato ya Yuda batosaki Yehova.
13, 14. (a) Mpasi nini Yuda emoni? (b) Mpasi oyo Yuda emoni etindi bango na kotika botomboki na bango?
13 Yisaya akobi kolobela ezalela ya mawa ya Yuda: “Kozoka mpe mapipi mpe mpota; bafinaki yango te, bakangaki yango mpe na bande te, mpe balɛmbisaki yango na mafuta te.” (Yisaya 1:6b, NW) Awa mosakoli alobeli ndenge misato ya mpasi: kozoka (mpota, lokola oyo moto azoki na mopanga to na mbɛli), mapipi (kovimba oyo euti na kobɛtama), mpe mpota (mpota oyo epasoli misuni mpe emonani lokola ekobela te). Likanisi oyo elobelami awa ezali komonisa moto oyo basasi ye kosasa mpenza, mpe azali koyoka mpasi nzoto mobimba. Yuda ezali mpenza na mawa.
14 Ezalela ya mawa oyo Yuda ezali na yango ekotinda bango bázongela Yehova? Te! Yuda ekokani na batomboki oyo Masese 29:1 (NW) elobeli: “Moto oyo bapameli ye mbala na mbala kasi azali koyeisa nkingo na ye makasi akobukana na mbalakaka, mpe akobika te.” Emonani ete libota yango ekobika te. Lokola Yisaya alobi yango, mpota ya Yuda ‘bafini yango te, bakangi yango mpe na bande te, balɛmbisi yango na mafuta te.’b Na maloba mosusu, Yuda ekokani na mpota oyo ezali polele, bakangi yango na bande te, mpe etondi nzoto mobimba.
15. Na lolenge nini tokoki komibatela ete maladi ya elimo ezwa biso te?
15 Tokoki kozwa liteya na lisolo ya Yuda, tosengeli kokeba na maladi ya elimo. Ndenge moko na maladi ya nzoto, maladi ya elimo ekoki mpe kozwa moto nyonso kati na biso. Nani kati na biso ayokaka bamposa ya nzoto te? Lokoso mpe mposa ya kozala na bisengo koleka ndelo ekoki kozwa misisa na motema na biso. Yango wana, tosengeli kozala na momeseno ya ‘koyina mabe mpe kokangama na malamu.’ (Baloma 12:9) Tosengeli mpe kolona mbuma ya elimo ya Nzambe na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Bagalatia 5:22, 23) Soki tozali kosala bongo, mpasi lokola oyo ekómelaki Yuda ekozwa biso te—kobɛla maladi ya elimo nzoto mobimba.
Mboka moko oyo ebebi mpenza
16. (a) Ndenge nini Yisaya alobeli mokili ya Yuda? (b) Mpo na nini bato mosusu balobi ete ekoki kozala ete maloba yango elobamaki na ntango ya boyangeli ya Ahaza, kasi ndenge nini tokoki kokanga ntina na yango?
16 Sikawa Yisaya atiki kolobela makambo ya monganga mpe azongeli kolobela ezalela mpenza ya mokili ya Yuda. Ezali nde lokola azali kotala esika moko oyo bitumba ebebisi yango, alobi ete: “Mokili na bino ebebisami, mboka na bino izikisami na mɔ́tɔ; bapaya bazali kolya mokili na bino na liboso na bino mpenza; [ebebi mpenza lokola nde bapaya babaloli yango, NW].” (Yisaya 1:7) Banganga-mayele mosusu ya Biblia balobi ete atako maloba yango ezali na ebandeli ya mokanda ya Yisaya, ekoki kozala ete alobaki yango na nsuka ya mosala na ye ya kosakola, mbala mosusu na ntango ya boyangeli ya mokonzi mabe Ahaza. Balobi ete na ntango ya boyangeli ya Uziya, bato bazalaki na bomoi ya malamu mpenza, yango wana bakokaki kolobela bomoi ya bato ya eleko wana na maloba ya mawa ya ndenge wana te. Ya solo, ezali mpasi mpo na koloba ete mokanda ya Yisaya ekomami na kolanda ndenge makambo ezalaki kosalema. Nzokande, ekoki kozala ete maloba ya Yisaya oyo etali kobebisama ezali bisakweli. Ntango azali koloba maloba yango, emonani ete Yisaya asaleli lolenge moko ya koloba oyo ezali na bisika mosusu na Biblia—lolenge ya kolobela likambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya lokola nde esili kosalema, elobeli wana endimisaka mpenza ete esakweli ekokokisama solo.—Kokanisá na Emoniseli 11:15.
17. Mpo na nini maloba ya esakweli ya kobebisama ekoki te kokamwisa bato ya Yuda?
17 Ata ndenge nini, maloba ya esakweli oyo etali kobebisama ya Yuda ekokaki te kokamwisa bato yango ya motó makasi. Bikeke mingi liboso, Yehova akebisaki bango na oyo ekokaki kokómela bango soki batomboki. Alobaki ete: “Nakobebisa mokili, boye bayini na bino, baoyo bakofanda wana, bakokamwa na yango. Nakopalanganisa bino kati na mabota na mokili, mpe nakobimisa mopanga nsima na bino. Mokili na bino [ekotikala mpamba] mpe mboka na bino ikobeba mpenza.”—Levitike 26:32, 33; 1 Mikonzi 9:6-8.
18-20. Ntango nini maloba oyo ezali na Yisaya 1:7, 8 ekokisamaki, mpe na lolenge nini Yehova ‘atikaki mwa ndambo ya bato’ na ntango wana?
18 Emonani ete maloba ya Yisaya 1:7, 8 ekokisami na ntango basoda ya Asulia bayaki kokɔta mpe kobebisa Yisalaele, mokili ya Yuda ebebaki mpe enyokwamaki. (2 Mikonzi 17:5, 18; 18:11, 13; 2 Ntango 29:8, 9) Kasi, Yuda ebebisami nyonso te. Yisaya alobi ete: “Mwana mwasi na Siona atikali lokola mwa ndako ya matiti na kati ya elanga ya vinyo, lokola mwa ndako ya mokɛngɛli na elanga ya kokɔmbrɛ, lokola engumba oyo bazingeli yango na etumba.”—Yisaya 1:8, NW.
19 Na ntango bakobebisa, Yelusaleme, “mwana mwasi na Siona,” ekokwea te. Kasi ekomonana ete ezali mpenza na likama—lokola mwa ndako ya matiti na kati ya elanga ya vinyo to lokola mwa ndako moke ya mokɛngɛli ya elanga ya kokɔmbrɛ. Na ekeke ya 19, nganga-mayele moko ya Biblia, azalaki kosala mobembo na ye na Ebale Nil, amikundolaki maloba ya Yisaya ntango amonaki bandako mikemike ya ndenge wana oyo basali na nzete, alobi ete “bandako yango etandanaki wana kaka mpo na kopekisa mopɛpɛ oyo ezalaki kouta na nɔrdi.” Ntango bato bazalaki kosilisa mosala ya kobuka mbuma na Yuda, bazalaki kotika bandako yango ya mikemike ebeba mpe ekwea. Kasi, atako Yelusaleme ezali komonana makasi te liboso ya limpinga ya basoda ya Asulia, ekobika.
20 Yisaya asukisi esakweli yango na maloba oyo: “Soko [Yehova] na bibele atikelaki biso mwa ndambo moke te, mbɛlɛ tozali lokola Sodomo, tokómi lokola Gomola.” (Yisaya 1:9)c Nsukansuka, Yehova akoya kokɔtela Yuda na mabɔkɔ ya nguya ya Asulia. Na bokeseni na Sodomo mpe Gomola, Yuda ekolimwa te. Ekobika.
21. Ntango Babilone ebebisaki Yelusaleme, mpo na nini Yehova ‘atikaki mwa ndambo ya bato’?
21 Mbula koleka 100 na nsima, banguna balingaki lisusu kobundisa Yuda. Bato ya Yuda bazwaki liteya te na etumbu oyo ekómelaki bango na nzela ya Asulia. “Bazalaki kosɛka bantoma na Nzambe mpe kotyola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye.” Yango wana, “nkanda ya [Yehova epeli] liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu te.” (2 Ntango 36:16) Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone abundisaki Yuda mpe alongaki yango, mpe na mbala oyo, eloko moko te etikalaki “lokola mwa ndako ya matiti na kati ya elanga ya vinyo.” Ata Yelusaleme ebebisamaki. (2 Ntango 36:17-21) Atako bongo, Yehova ‘atikaki mwa ndambo moke ya bato.’ Atako Yuda esalaki mbula 70 na boombo, Yehova asalaki ete bato yango bálimwa te mpe mingimingi bakitani ya Davidi, mpo bango basengelaki kobimisa Masiya oyo alakamaki.
22, 23. Mpo na nini Yehova ‘atikaki mwa ndambo ya bato’ na ekeke ya liboso?
22 Na ekeke ya liboso, Yisalaele, libota oyo esalaki kondimana na Yehova, emonaki mpasi mpo na mbala ya nsuka. Ntango Yesu amonisaki ete azali Masiya oyo alakamaki, libota yango eboyaki ye, mpe na yango, Yehova aboyaki mpe yango. (Matai 21:43; 23:37-39; Yoane 1:11) Yehova akokaki kozala lisusu te na libota moko awa na mabele? Te, ezali bongo te. Ntoma Paulo amonisaki ete Yisaya 1:9 esengelaki kokokisama lisusu. Atángaki maloba ya Biblia Septante mpe akomaki ete: “Lokola Yisaya alobaki yango: ‘Soki Yehova na bibele atikelaki biso momboto moko te, mbɛlɛ tokómá lokola Sodoma, mpe mbɛlɛ tokómisamá lokola Gomola.’”—Baloma 9:29, NW.
23 Mbala oyo bato oyo babikaki ezalaki baklisto bapakolami, oyo bazalaki kondima Yesu Klisto. Ezalaki libosoliboso Bayuda oyo bakómaki bandimi. Na nsima, Bapakano oyo bakómaki bandimi bayaki kobakisama. Bango nyonso elongo basalaki “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Baloma 2:29) “Momboto” yango ebikaki na ntango ebongiseli ya makambo ya Bayuda ebebisamaki na mobu 70 T.B. Na ntembe te, “Yisalaele ya Nzambe” ezali naino elongo na biso tii lelo. Bamilio ya bandimi mosusu bauti na bikólo ndenge na ndenge basangani elongo na ye, bazali “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.”—Emoniseli 7:9.
24. Soki balingi kobika na etumba ya monene mpenza oyo ezali koya, bato nyonso basengeli koluka koyeba likambo nini?
24 Etikali moke mokili oyo ekondongwana na etumba ya Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Atako etumba yango ekozala makasi koleka etumba oyo Asulia mpe Babilone babundisaki Yuda mpo na kobɔtɔla yango, mpe kutu makasi koleka ndenge Baloma babebisaki Yuda na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.), kasi babiki bakozala. (Emoniseli 7:14) Yango wana, ezali na ntina mingi ete bato nyonso bátalela maloba oyo Yisaya alobaki na Yuda na likebi mpenza! Na ntango wana, maloba yango ebikisaki baoyo bazalaki sembo. Ekobikisa mpe baoyo bazali komonisa kondima lelo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Awa, Yisalaele ezali bongo bokonzi ya Yuda oyo ezalaki na mabota mibale.
b Maloba ya Yisaya ezali komonisa mayele ya monganga na eleko na ye. Edward Plumptre, nganga-mayele ya Biblia alobi ete: “Eloko ya liboso oyo bazalaki kosala mpo na kobimisa mai ya mpota oyo ezali kolumba nsolo ezalaki ‘kofina’ yango; na nsima, lokola esalemaki epai ya Hizikiya (mok. xxxviii. Yisaya 38:21), bazalaki ‘kokanga’ yango na nkisi moko ya pɔtɔpɔtɔ mpe kopakola yango mafuta to pomade mpo ekauka, mbala mosusu, lokola na Luka x. 34, bazalaki kosalela mafuta mpe vinyo mpo na kosukola mpota oyo ezalaki kobela te.”
c Buku moko (Commentary on the Old Testament) ya Carl F. Keil mpe Franz Delitzsch elobi ete: “Awa, mosakoli apemi moke na lisolo na ye. Ntaka oyo etikali kati na Yisaya 1 bavɛrsɛ 9 mpe 10 ezali komonisa ndenge lisolo yango ekabolami esika oyo na biteni mibale. Lolenge oyo ya kokabola biteni ya minene mpe ya mike, to ya kotika ntaka, to ya kokata molɔngɔ, ezali ndenge bazalaki kokoma kala liboso bábanda kosalela bilembo oyo ezalaki komonisa mputu-milelisi (points-voyelles) mpe bilembo ya kotombola mongongo (accents), mpe euti na ndenge ya kokoma ya kalakala mpenza.”
[Elilingi na lokasa 20]
Na bokeseni na Sodomo na Gomola, Yuda ekotikala mpamba libela na libala te