Mokapo ya Misato
“Tóbongisa makambo”
1, 2. Yehova akokanisi bakonzi mpe bato ya Yelusaleme mpe ya Yuda na banani, mpe mpo na nini bokokanisi yango ebongi?
NSIMA ya koyoka maloba oyo ezali na Yisaya 1:1-9, maloba oyo ezali kokweisa bango, mbala mosusu bato ya Yelusaleme balingi komilongisa. Na ntembe te, balingi kolobela na lolendo mpenza bambeka nyonso oyo bapesaka Yehova. Kasi, Yisaya 1 vɛrsɛ 10 tii vɛrsɛ 15 emonisi ete Yehova azongiseli bango eyano ya nkanda mpo na makanisi na bango wana. Ebandi boye: “Bóyoka liloba na [Yehova], ɛ bino mikóló na Sodomo; bósembola litoi epai na kolakisa na Nzambe na biso, ɛ bino bato na Gomola.”—Yisaya 1:10.
2 Sodomo na Gomola ebebisamaki kaka mpo na misala na bango ya mbindo te, kasi mpe mpo na motema makasi mpe lolendo ya bato oyo bazalaki kofanda wana. (Genese 18:20, 21; 19:4, 5, 23-25; Ezekiele 16:49, 50) Emonani ete maloba ya Yisaya epesi bato yango oyo bazalaki koyoka ye nkanda mpenza ndenge akokanisi bango na bato oyo bafandaki na bingumba wana oyo elakelamaki mabe.a Kasi Yehova azali kotalela basaleli na ye kaka ndenge bazali, mpe Yisaya alɛmbisi nsango ya Nzambe te mpo na “kosepelisa bango matoi.”—2 Timote 4:3, NW.
3. Yehova alingi koloba nini ntango alobi ete ‘atondi maa’ na bambeka ya bato na ye, mpe mpo na nini ezali bongo?
3 Talá ndenge Yehova azali komona losambo oyo basaleli na ye bazali kosambela likolólikoló. “[Yehova] alobi ete, Mingi mingi na mbeka na bino ezali nini epai na ngai? Natondi maa na mbeka itumbami na bampate babali, mpe na mafuta na banyama babɔkɔlami; nasepeli na makila na bangɔmbɛ te to na bana na mpate to na bantaba babali te.” (Yisaya 1:11) Bato yango babosanaki ete Yehova abikaka na bambeka na bango te. (Nzembo 50:8-13) Asengeli na eloko moko te oyo moto akoki kopesa ye. Yango wana, soki bato ya Yuda bakanisi ete mpo na bambeka na bango oyo bapesaka na mitema mibale nde bazali koyokela Yehova mawa, bazali mpenza komikosa. Yehova asaleli elobeli ya elilingi moko ya nguya mpenza. Elobeli “natondi maa” ekoki mpe kobongolama na “nabai” to “elekeli ngai ndelo.” Esi ekómelá yo ete otonda mingi koleka mpe komona biloko na miso mpamba ekómi koyokisa yo mpii? Yehova ayokaki mpe ndenge wana mpo na bambeka yango—ayokaki biloko yango mpii mpenza!
4. Ndenge nini Yisaya 1:12 ezali komonisa ete bato bazali kokenda na tempelo ya Yelusaleme kaka mpo na kokenda?
4 Yehova alobi lisusu: “Ekoya bino komonana liboso na ngai, nani aluki likambo oyo epai na bino ete bónyata mapango na ngai?” (Yisaya 1:12) Mobeko ya Yehova esɛngi ete bato ‘báya komonana na ye,’ elingi koloba báyangana na tempelo na Yelusaleme, boye te? (Exode 34:23, 24) Ezali bongo, kasi bato ya Yuda bayaka kaka mpo na kokokisa mobeko, basalelaka losambo ya pɛto kaka likolólikoló, bazali na makanisi ya pɛto te. Mpo na Yehova, ndenge bato yango bazalaki koya mbala na mbala na lopango na ye ekokanaki kaka na ‘konyata’ yango mpe kolongola mabele na yango.
5. Tángá mwa misala mosusu ya losambo oyo Bayuda bazalaki kosala, mpe mpo na nini ekómaki “bozito” mpo na Yehova?
5 Ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yehova atomboli mongongo sikawa! “Yaká lisusu na makabo mpamba [ya mbuma ya kotumba, NW] te, mpaka na malasi ezali eloko eboyami na ngai; sanza ya sika mpe sabata mpe kobyanga koyangana—nakoki [koyikela bankisi, NW] ya koyangana monene mpiko te. Sanza na bino ya sika mpe bilambo na bino bibongisami, molimo na ngai eyini yango; isili kokóma bozito epai na ngai, nalɛmbi mpo na kokumba yango.” (Yisaya 1:13, 14) Makabo ya mbuma ya kotumba, mpaka na malasi, sabata, mpe koyangana monene, nyonso wana ezalaki na Mobeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele. Mpo na “sanza ya sika,” Mobeko ezalaki kosɛnga kaka kotosa yango, kasi mokemoke mimeseno mosusu ya malamu ekómaki kokumisa yango. (Mituya 10:10; 28:11) Sanza ya sika ezalaki kotalelama lokola sabata ya sanza na sanza, ntango bato bazalaki kotika misala na bango mpe koyangana mpo na koyoka mateya ya basakoli mpe banganga. (2 Mikonzi 4:23; Ezekiele 46:3; Amosa 8:5) Bafɛti wana ezali mabe te. Mabe ezali nde ya kosala yango kaka mpo na komilakisa. Lisusu, Bayuda bazali komipesa na “bankisi,” kosala bikelakela mpe kaka na ntango yango bazali kokokisa Mobeko ya Nzambe likolólikoló.b Yango wana, misala na bango ya losambo ezali “bozito” mpo na Yehova.
6. Na lolenge nini Yehova ‘alɛmbi’?
6 Kasi, na ndenge nini Yehova ‘alɛmbaki’? Kutu, ye nde azali “na makasi kati na nguya . . . ye akolɛmba te,” boye te? (Yisaya 40:26, 28) Yehova asaleli elobeli wana mpo na kosalisa biso tósosola ndenge azali koyoka. Ekómelá yo naino te ete omema eloko moko ya kilo ntango molai mpe na nsima olɛmba mingi mpenza mpe okóma kokanisa kaka kobwaka yango? Ezali ndenge wana nde Yehova ayoki mpo na misala ya losambo ya bokosi ya basaleli na ye.
7. Mpo na nini Yehova azali koyoka mabondeli ya basaleli na ye lisusu te?
7 Yehova alobeli sikawa lolenge ya kosambela oyo esimbaka motema na ye mpe eleki lolenge mosusu nyonso. “Ekosembola bino mabɔkɔ na bino, nakobombela bino miso na ngai; ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te, mabɔkɔ na bino itondi na makila.” (Yisaya 1:15) Kosembola mabɔkɔ, kotanda mabɔkɔ likoló, ezali elembo ya malɔmbɔ. Mpo na Yehova, elembo yango ezali lisusu na ntina te, mpamba te mabɔkɔ ya bato na ye etondi na makila ya bato. Mobulu etondi na mokili yango. Bipai nyonso bazali konyokola bato oyo bazali makasi te. Ebongi te ete bato mabe, bato ya moimi ndenge wana bábondela Nzambe mpe básɛnga ye apambola bango. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yehova alobaki ete “nakoyoka te”!
8. Mbeba nini mangomba ya boklisto ezali kosala lelo oyo, mpe ndenge nini baklisto mosusu bazali kokwea na motambo yango?
8 Na mikolo na biso, ata ndenge mangomba ya boklisto ezali ntango nyonso kozongelazongela mabondeli na yango oyo ezangi ntina mpe kosala “misala” mosusu ya losambo, Nzambe andimaka yango te. (Matai 7:21-23) Ezali likambo ya ntina mingi ete biso tókwea na motambo yango te. Na bantango mosusu, ekómaka ete moklisto moko azali kosala lisumu monene, na nsima alobi ete soki abombi etamboli mabe na ye mpe amipesi na misala ya lisangá, makambo na ye ya malamu ekoki kolongola lisumu na ye. Misala ya kokosa ndenge wana esepelisaka Yehova te. Lolenge kaka moko ya kosalisa maladi ya elimo ezali oyo bavɛrsɛ ya Yisaya oyo elandi emonisi.
Nkisi ya maladi ya elimo
9, 10. Bopɛto ezali na ntina nini na losambo oyo topesaka Yehova?
9 Yehova, Nzambe ya motema mawa, alobi sikawa na mongongo ya esengo mpe ya kobondela mpenza: “Bómisukola, bómipɛtola, bólongola mabe na makambo masalaki bino liboso na miso na ngai; bótika kosala mabe, yekolá kosala malamu, luká boyengebene, [sembolá monyokoli, katá likambo ya elenge mobali etike oyo akufelá tata na bosembo NW], lobelá mwasi-akufeli-mobali.” (Yisaya 1:16, 17) Awa tozali kokuta molɔngɔ ya mitinda libwa, to masɛngami libwa. Mitinda minei ya liboso etali kosembola makambo oyo ebongi te mpo ezali kolobela kolongola lisumu; nzokande mitinda mitano ya nsuka ezali makambo ya malamu oyo epesaka mapamboli ya Yehova.
10 Komisukola mpe komipɛtola ezali ntango nyonso likambo ya ntina na losambo ya pɛto. (Exode 19:10, 11; 30:20; 2 Bakolinti 7:1) Kasi Yehova alingi ete komipɛtola yango esalema malamumalamu, ekɔta tii na motema ya basambeli na ye. Likambo eleki ntina ezali bopɛto ya makanisi mpe ya elimo, yango nde Yehova azali kolobela. Mitinda mibale ya liboso naYisaya 1 vɛrsɛ 16 ezali te kaka kozongelama ya likambo moko boye. Moto moko oyo ayekolaka mibeko ya lokota ya Liebele alobi ete etinda ya liboso, “bómisukola,” ezali kolobela likambo moko ya liboso oyo etali komipɛtola, nzokande etinda ya mibale, “bómipɛtola,” ezali komonisa milende oyo moto asengeli kolanda kosala mpo na kotikala ntango nyonso pɛto.
11. Tosengeli kosala nini mpo na kobundisa lisumu, mpe tosengeli soki moke te kosala nini?
11 Tokoki kobombela Yehova eloko moko te. (Yobo 34:22; Masese 15:3; Baebele 4:13) Yango wana, etinda na ye oyo elobi ete “bólongola mabe na makambo masalaki bino liboso na miso na ngai,” ekoki kolimbola kaka eloko moko—bótika kosalaka mabe. Yango elimboli ete tosengeli soko moke te koluka kobomba masumu minene, mpamba te kosala bongo ezali mpe lisumu. Masese 28:13 ekebisi ete: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango akozwa ngɔlu.”
12. (a) Mpo na nini ezali na ntina ‘koyekola kosala malamu’? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kolanda mitinda oyo elobi ete “luká boyengebene” mpe “sembolá monyokoli”?
12 Tokoki kozwa mpenza liteya monene na makambo ya malamu oyo Yehova asɛngi na vɛrsɛ 17 ya Yisaya mokapo 1. Yehova alobi kaka te ete ‘salá malamu’ kasi nde “yekolá kosala malamu.” Tosengeli liboso koyekola Liloba ya Nzambe mpo na koyeba oyo ezali malamu na miso ya Nzambe mpe kolinga kosala yango. Lisusu, Yehova alobi kaka te ete “salá makambo na boyengebene” kasi nde “luká boyengebene.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Ata bankulutu oyo bayebi makambo mingi basengeli kosalaka bolukiluki na Liloba ya Nzambe mpo na koyeba lolenge malamu ya kosala ntango bazali kotalela makambo mosusu oyo ezalaka mpasi mpo na kokata. Bazali mpe na mokumba ya ‘kosembola monyokoli,’ ndenge Yehova asɛngi yango na nsima. Mitinda yango ezali na ntina mingi mpo na babateli na mpate ya elimo lelo oyo, mpamba te balingaka kobatela etonga mpo “bankoi na yauli” bákanga bango te.—Misala 20:28-30.
13. Ndenge nini tosengeli lelo oyo kosalela mitinda oyo etaleli bilenge mibali bitike oyo bakufelá batata mpe basi-bakufeli-mibali?
13 Mitinda mibale ya nsuka etaleli basaleli ya Nzambe oyo bazali na mpasi mingi koleka—bitike mpe basi-bakufeli-mibali. Mokili elingaka ntango nyonso kolyela bato ya ndenge wana; yango esengeli kozala bongo te epai ya basaleli ya Nzambe. Bankulutu ya bolingo ‘bakokata makambo na bosembo’ mpo na bitike na lisangá, bakosalisa bango ete bálonga na likambo na bango mpe bábatelama kati na mokili oyo elingaka kaka konyokola bango mpe kobebisa bango. Bankulutu ‘balobelaka’ mwasi-mokufeli-mobali to, na kotalela ndimbola ya elobeli mosusu ya Liebele, ‘babundelaka’ bolamu na bango. Ya solo, baklisto nyonso balingaka kozala ekimelo, elendiseli, mpe libateli mpo na babola mpamba te bazali mpenza na motuya na miso ya Yehova.—Mika 6:8; Yakobo 1:27.
14. Nsango nini ya malamu elobelami na Yisaya 1:16, 17?
14 Nsango oyo Yehova apesi na nzela ya mitinda yango libwa ezali mpenza ya kolendisa! Na bantango mosusu, bato oyo basali masumu balobaka ete bakokoka te kosala oyo ezali malamu. Makanisi ya ndenge wana elɛmbisaka mpe ezali ya lokuta. Yehova ayebi—mpe alingi ete biso mpe tóyeba yango—ete Ye akoki kosalisa moto nyonso oyo asali lisumu ete atika nzela ya lisumu yango, abongwana, mpe na nsima asala makambo oyo ezali malamu.
Libyangi moko ya motema mawa mpe ya sembo
15. Na lolenge nini bato mingi bakangaka mpenza ntina te ya elobeli “tóbongisa likambo,” mpe yango elimboli mpenza nini?
15 Yehova azali sikawa koloba na mongongo ya esengo mpe ya koyokela mpenza mawa. “Boye, [tóbongisa likambo, Yehova, NW] alobi bongo. Ata masumu na bino izali motane lokola ngola, ikokóma pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ; ata izali motane lokola makila, ikozala lokola [nsuki ya, NW] bampate.” (Yisaya 1:18) Bato mingi bakangaka mpenza malamu te ntina ya libyangi kitoko oyo ezali na ebandeli ya vɛrsɛ oyo. Na ndakisa, Biblia haut fleuve elobi ete: “Tólobana”—lokola nde moto na moto asengeli kondima makanisi ya mosusu mpo na koyokana. Ezali bongo te! Yehova azali na mabe moko te, azali na foti te na boyokani na ye nyonso na batomboki mpe bakosi wana. (Deteronome 32:4, 5) Vɛrsɛ yango elobeli te lisolo oyo ezali koleka kati na bato oyo bazali ndenge moko, kasi elobeli nde tribinale moko oyo eyangani mpo na kokata likambo. Ezali lokola nde Yehova afundi Yisalaele na tribinale.
16, 17. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingi mpenza kolimbisa ata masumu ya minene?
16 Likanisi yango ekoki kobangisa, kasi Yehova azali Mosambisi oyo aleki kolimbisa mpe koyokela bato mawa. Likoki na ye ya kolimbisa ekokani na oyo ya moto mosusu te. (Nzembo 86:5) Ye moko akoki kosukola masumu ya Yisalaele oyo ezali “motane lokola ngola” mpe kokómisa yango “pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ.” Molende moko te ya moto, motindo moko te ya misala ya lingomba, mbeka moko te, to mabondeli ya moto moko te, ekoki kolongola mbindo ya lisumu. Kaka bolimbisi ya Yehova nde ekoki kolongola lisumu. Yehova alimbisaka ntango moto akokisi masɛngami oyo apesaka, lokola kobongola motema na ndenge ya solosolo.
17 Bosolo ya likambo oyo ezali mpenza na ntina mingi, yango wana Yehova azongeli yango na elobeli moko ya kitoko mpenza—masumu ya “motane lokola makila” ekokóma lokola nsuki ya mpate ya sika, ya mpɛmbɛ, oyo batii yango naino langi te. Yehova alingi tóyeba ete alimbisaka mpenza masumu, ata oyo ya minene koleka, soki tobongoli mpenza motema. Bato oyo bamonaka ete yango ekoki kosalema te mpo na bango basengeli kotalela bandakisa lokola oyo ya Manase. Asalaki masumu minene—bambula mingi. Kasi, abongolaki motema mpe Yehova alimbisaki ye. (2 Ntango 33:9-16) Yehova alingi ete biso nyonso, ata baoyo basali masumu minene, tóyeba ete ntango ezali naino mpo na ‘kobongisa likambo’ elongo na ye.
18. Yehova asɛngi na basaleli na ye batomboki bápona nini?
18 Yehova akundoleli basaleli na ye ete basengeli kopona. “Soko bolingi mpe bozali na kotosa, bokolya malamu na mokili. Nde soko bokoboya mpe bokotomboka, bokolyama na mopanga; monɔkɔ na [Yehova] esili koloba.” (Yisaya 1:19, 20) Awa Yehova alobeli mingimingi bizaleli, mpe asaleli elobeli mosusu ya kokokanisa mpo ete nsango oyo alingi kopesa ezala polele. Yuda esengelaki kopona: kolya to kolyama. Soki balingi koyoka Yehova mpe kotosa ye, bakolya biloko kitoko ya mokili na bango. Kasi, soki bakobi na botomboki na bango, bakolyama—na mopanga ya banguna na bango! Emonani ete ekoki kosalema te ete bato bápona mopanga ya banguna na bango na esika ya kopona motema mawa mpe boboto ya Nzambe oyo alimbisaka. Nzokande, Yelusaleme eponaki mopanga ya banguna na bango, lokola bavɛrsɛ ya Yisaya oyo elandi emonisi yango.
Loyembo ya kolela mpo na engumba oyo balingaki mingi
19, 20. (a) Ndenge nini Yehova azali komonisa ete bakosi ye? (b) Na lolenge nini ‘sembo efandaki kati na Yelusaleme’?
19 Yisaya 1:21-23 ezali komonisa ete bato oyo bazali kofanda na Yelusaleme basalaki mabe mingi koleka na ntango wana. Sikawa Yisaya abandi loyembo moko oyo epemami na Nzambe mpe ezali komonana ete ezali loyembo ya lilaka to ya kolela: “Boni mboka na kondima esili kokóma mwasi ya pite?—[mboka oyo etondaki, NW] na boyengebene! Sembo efandaki kati na [yango] nde sasaipi bobele babomi na bato.”—Yisaya 1:21.
20 Engumba Yelusaleme ekwei mpenza! Kala, ezalaki mwasi ya sembo, sikawa ekómi mwasi ya pite. Lolenge mosusu nini ya koloba ekokaki komonisa polele mpenza makanisi ya Yehova ndenge bakosi ye mpe balɛmbisi ye? Engumba yango “etondaki na boyengebene.” Na eleko nini? Kutu liboso ete Yisalaele ezala, na mikolo ya Abalayama bazalaki kobenga yango Saleme. Mobali moko oyo azalaki mokonzi mpe nganga azalaki koyangela yango. Nkombo na ye Melikisedeke, elimboli “Mokonzi ya Boyengebene,” mpe na ntembe te nkombo yango ebongaki na ye. (Baebele 7:2; Genese 14:18-20) Mbula soki 1 000 nsima ya Melikisedeke, Yelusaleme ekómaki engumba moko kitoko koleka, na ntango ya boyangeli ya Davidi mpe ya Salomo. ‘Sembo efandaki kati na yango,’ mingimingi ntango bakonzi na yango bazalaki kopesa bato mosusu ndakisa ya kotambola na banzela ya Yehova. Kasi, na ntango ya Yisaya, bileko ya ndenge wana ezalaki makambo oyo eleká kala mpenza.
21, 22. Mitika mpe vinyo oyo esangani na mai ezali komonisa nini, mpe mpo na nini mikóló ya Yuda babongi na elobeli yango?
21 Emonani ete bakonzi oyo bazalaki koyangela nde bazalaki na ngambo monene na likambo yango. Yisaya amileli lisusu ete: “Palata na yo esili kokóma mbindo, vinyo na yo esangani na mai. Mikóló na bino bobele batomboki, mpe bazalani elongo na bayibi; moko na moko alingi kanyaka, alandi nsima na mabonza; bazali [kokata likambo ya elenge mobali etike oyo akufelá tata na bosembo, NW] te, likambo na mwasi-akufeli-mobali ekokómelaka bango te.” (Yisaya 1:22, 23) Bililingi mibale ndenge elandani ezali komonisa ndenge likambo yango esengeli kosuka. Na atelye na ye, motuli-bibende anyangolaka ebende na mɔ́tɔ, na nsima alongolaka mitika mpe abwakaka yango. Mikóló mpe basambisi ya Yisalaele bazali lokola mitika, kasi palata te. Basengeli kobwakama. Bazali lisusu na ntina te, bakómi lokola vinyo oyo basangisi na mai mpe ezali lisusu elɛngi te. Masanga ya ndenge wana ebongi kaka kosopa yango!
22 Yisaya 1Vɛrsɛ 23 emonisi mpo na nini ebongaki kolobela mikóló yango ndenge wana. Mobeko ya Mose etombolaki libota ya Nzambe likoló, ekabolaki bango na mabota mosusu. Mobeko yango esalaki mpenza bongo, na ndakisa, ezalaki kosɛnga kobatela bitike mpe basi-bakufeli-mibali. (Exode 22:22-24) Kasi, na mikolo ya Yisaya, etike azalaki na elikya mpenza te ya komona ete bakokata likambo na ye na bosembo. Mpo na mwasi-akufeli-mobali, akokaki kozwa ata moto moko te oyo akoki koyoka likambo na ye, to kobundela bolamu na ye. Basambisi mpe mikóló yango bamipesaki kaka na koluka bolamu na bango moko—kosɛnga bato kanyaka, koluka makabo, mpe kosalisa bayibi, na ntembe te koluka kobatela basali ya mabe mpe kotika bato oyo basaleli bango mabe bányokwama. Likambo ya mabe koleka, bazali “mitó makasi,” bakómisi mitema na bango makasi na mabe na bango. Oyo nde mawa!
Yehova akopɛtola libota na ye
23. Yehova alobi nini mpo na banguna na ye?
23 Yehova akopesa nzela te ete momeseno ya kosalela bokonzi na ndenge ya mabe boye ekoba libela na libela. Yisaya alobi lisusu ete: “Bongo, Nkolo azali koloba, [Yehova] na bibele, Oyo-na-Nguya na Yisalaele, ete, Aha! nakolongola batɛmɛli na ngai, nakobukanisa epai na bayini na ngai.” (Yisaya 1:24) Na vɛrsɛ yango, bapesi Yehova batitre misato, yango ezali komonisa lotomo ya bokonzi na ye mpe bonene ya nguya na ye. Koganga “Aha!” mbala mosusu elimboli ete motema mawa ya Yehova esangani sikawa na mokano na ye ya kozwa bikateli na nkanda mpenza. Azali mpenza na bantina ya kosala bongo.
24. Yehova abongisi kopɛtolama ya ndenge nini mpo na basaleli na ye?
24 Basaleli mpenza ya Yehova bamikómisi banguna na ye. Babongi kozwa etumbu ya Nzambe. Yehova ‘akolongola,’ to akobwaka bango mosika na ye. Yango elingi koloba ete akolongola basaleli yango nyonso oyo balati nkombo na ye libela? Ezali bongo te, mpamba te Yehova alobi lisusu ete: “Nakozongisa lobɔkɔ na ngai likoló na yo, nakonyangwisa mitika na yo lokola na sabuni, nakolongola salite na yo nyonso.” (Yisaya 1:25, NW) Yehova asaleli sikawa maloba ya elilingi, lolenge ya kopɛtola ebende. Na ntango ya kala, mbala mingi motuli-bibende azalaki kosalela sabuni moko boye mpo na kokabola mitika na ebende ya ntalo. Ndenge moko mpe, Yehova, oyo atalelaka te basaleli na ye lokola bato mabe mpenza, ‘akosambisa bango na sembo.’ Akolongola kaka “salite” kati na bango—bato ya motó makasi, oyo bazali na ntina te, oyo baboi koyeba makambo mpe kotosa.c (Yilimia 46:28) Na maloba yango, Yisaya azali na libaku malamu ya kokoma lisolo liboso ete makambo yango esalema.
25. (a) Ndenge nini Yehova apɛtolaki basaleli na ye na mobu 607 L.T.B.? (b) Ntango nini Yehova apɛtolaki basaleli na ye na mikolo na biso?
25 Ya solo, Yehova apɛtolaki mpenza basaleli na ye, alongolaki mitika, elingi koloba bakonzi mabe mpe batomboki mosusu. Na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mbula mingi nsima ya eleko ya Yisaya, Yelusaleme ebebisamaki mpe bamemaki bato oyo bazalaki kofanda wana na boombo na Babilone mpo na mbula 70. Likambo yango ezali na boyokani na likambo mosusu oyo Nzambe asalaki bambula mingi na nsima. Esakweli oyo ezali na Malaki 3:1-5, ekomamaki nsima ya boombo na Babilone, emonisaki ete Nzambe akopɛtola bato lisusu. Esakweli yango ezalaki kolobela ntango oyo Yehova Nzambe akoya na tempelo na ye ya elimo elongo na Yesu Klisto “ntoma ya kondimana,” na ye. Emonani mpenza ete likambo yango esalemaki na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Yehova atalelaki malamumalamu baoyo nyonso bazalaki koloba ete bazali baklisto, akabolaki baoyo ya solo na baoyo ya lokuta. Likambo nini emonanaki?
26-28. (a) Ndenge nini Yisaya 1:26 ekokisamaki liboso? (b) Ndenge nini esakweli yango ekokisamaki na mikolo na biso? (c) Ndenge nini bankulutu ya lelo bakoki kozwa litomba na esakweli yango?
26 Yehova ayanoli ete: “[Nakozongisa, NW] basambisi na yo lokola na liboso mpe [bapesi-toli, NW] ya toli na yo lokola na ebandeli. Na nsima okobyangama ete, Mboka na boyengebene, mboka na kondima. Siona akosikolama na kosambisama na sembo; mpe baoyo bakobongwana kati na ye na boyengebene.” (Yisaya 1:26, 27) Bato oyo bafandaki na Yelusaleme ya kala, bamonaki ndenge esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso. Ntango bato oyo bakendaki na boombo bazongaki na mobu 537 L.T.B. na engumba na bango oyo balingaki mingi, bazalaki na basambisi mpe na bapesi-toli mosusu ya sembo lokola baoyo bazalaki kala. Basakoli—Hagai na Zekalia—nganga Yosua, mokomeli Ezela, mpe guvɛrnɛrɛ Zelubabele, bango nyonso bazalaki kotambwisa mpe kokamba batikali ya sembo oyo bazongaki mpo ete bámitambwisa na banzela ya Nzambe. Kasi, na ekeke ya 20, esakweli yango ekokisamaki lisusu na ndenge moko ya monene koleka.
27 Na 1919, basaleli ya Yehova na mikolo na biso bautaki kobima na eleko moko ya komekama. Basikolamaki na boombo ya elimo ya Babilone Monene, lisangani ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Bokeseni kati na batikali bapakolami ya sembo na bakonzi bapɛngwi ya mangomba ya boklisto ekómaki komonana polele. Nzambe apambolaki basaleli na ye lisusu, ‘azongiselaki bango basambisi mpe bato ya toli,’—mibali ya sembo oyo bazalaki kopesa bango toli oyo eyokani na Liloba na ye, kasi te oyo ezali makambo ya bonkɔkɔ. Lelo oyo kati na “etonga moke” oyo motángo na bango ezali se kokita, na bamilio ya baninga na bango ya mosala, “bampate mosusu” oyo motángo na bango ezali se komata, bankóto ya mibali ya ndenge wana bazali.—Luka 12:32; Yoane 10:16; Yisaya 32:1, 2; 60:17; 61:3, 4.
28 Bankulutu babosanaka te ete na bantango mosusu bazalaka “basambisi” na lisangá mpo na kobatela bopɛto ya bizaleli mpe ya elimo ya lisangá mpe kosembola baoyo basali mbeba. Balukaka mpenza kosala makambo ndenge Nzambe alingaka, bamekolaka motema mawa mpe bosembo na ye, yango ezali na bokatikati. Nzokande, mbala mingi bazalaka “bato ya toli.” Ya solo, bazali lokola bakonzi te to banyokoli te, mpe basalaka makasi mpo bámimonisa soki moke te lokola bazali ‘mikonzi likoló na libula ya Nzambe’.—1 Petelo 5:3, NW.
29, 30. (a) Yehova alobi nini na bato oyo baboi kozwa litomba na bibongiseli ya kopɛtolama? (b) Na lolenge nini bato ya Yuda bayoki “nsɔni” mpo na banzete na bango mpe bilanga na bango?
29 Tokoloba nini mpo na “mbindo” oyo elobelami na esakweli ya Yisaya? Nini ekómelaka bato oyo baboyaka kozwa litomba na bibongiseli ya kopɛtolama oyo Nzambe apesaka? Yisaya alobi lisusu ete: “Nde batomboki mpe bato mabe bakobebisama elongo, mpe baoyo bakotikaka [Yehova] bakosilisama nyɛɛ. Zambi bakoyoka nsɔni mpo na nzete [minene, NW], oyo bosepelaki na yango; bokobulunganisama mpo na bilanga bisili bino kopona yango.” (Yisaya 1:28, 29) Bato oyo batombokelaka Yehova mpe basalelaka ye lisumu mpe baboyaka koyoka nsango ya makebisi ya basakoli na ye, ‘babebisamaka’ mpe ‘basilisamaka nyɛɛ.’ Yango esalemaki na mobu 607 L.T.B. Kasi, nzete mpe bilanga oyo elobelami awa elimboli nini?
30 Bato ya Yuda bazali na momeseno mabe ya kosambela bikeko. Mbala mingi, misala na bango ya mbindo esalemaka na nse ya nzete, na bilanga mpe na mwa bazamba ya mikemike. Na ndakisa, basambeli ya Baala mpe ya moninga na ye ya mwasi Asetaloti bakanisaka ete na eleko ya elanga, banzambe yango mibale bakufaka mpe bakundamaka. Mpo na kotinda bango bálamuka mpe básangana mpo mabele ebota malamu, basambeli ya banzambe yango bayanganaka mpo na kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo na nse ya banzete ya “bulɛɛ” na mwa bazamba ya mikemike to na bilanga. Ntango bambula ebɛti mpe mabele ekómi kitoko mpo na kolona, basambeli ya bikeko wana balobaka ete banzambe yango ya lokuta nde basali bongo, mpe bandimaka mpenza biyambayamba na bango. Kasi ntango Yehova abebisaka batomboki wana, basambeli ya bikeko, nzambe ya ekeko moko te abatelaka bango. Batomboki yango bayokaka “nsɔni” mpo na banzete na bango mpe ya bilanga na bango oyo ezangi nguya.
31. Wapi likambo ya mabe koleka nsɔni oyo ekokwela basambeli ya banzambe ya lokuta?
31 Kasi, likambo ya mabe koleka nsɔni ekokwela basambeli ya banzambe ya lokuta na Yuda. Yehova abongoli elobeli yango ya elilingi, sikawa akokanisi mosambeli ya nzambe ya lokuta na nzete. “Mpo ete bokozala lokola nzete [monene, NW] oyo lokasa na yango ekauki, mpe lokola elanga oyo ezangi mai.” (Yisaya 1:30) Na eleko ya molunge mpe ya moi makasi na Proche-Orient, elobeli yango ya elilingi ebongi mpenza. Nzete moko te to elanga moko te ekoki koumela ntango molai soki ezali kozwa mai te. Soki nzete ya ndenge wana ekauki, ezalaka na likama ya kozika na mɔ́tɔ. Yango wana, elobeli ya elilingi na Yisaya 1vɛrsɛ 31 elandi malamu mpenza.
32. (a) “Bato makasi” oyo balobelami na Yisaya 1 vɛrsɛ 31 ezali banani? (b) Na lolenge nini bakokóma “busi,” “lotɔtɔ” nini ekopelisa bango, mpe yango ekobimisa makambo nini?
32 “Bato makasi bakobongwana lokola busi oyo eziki na mɔ́tɔ mpe mosali na yango lokola lotɔtɔ na mɔ́tɔ; baoyo nyonso mibale bakozika elongo, moko te akozimisa bango.” (Yisaya 1:31) “Bato makasi” yango ezali banani? Liloba yango ya Liebele ezali kopesa likanisi ya makasi mpe bozwi. Mbala mosusu ezali kolobela mosambeli ya nzambe ya lokuta oyo azali na bozwi mpe amoni ete akoká. Na mikolo ya Yisaya, ezala mpe na mikolo na biso, bato oyo baboyaka Yehova mpe losambo na ye ya pɛto bazangaka te. Kutu bamosusu bamonanaka lokola babongi. Nzokande, Yehova akebisi bato ya ndenge wana ete bakokóma lokola “busi,” ezali lokola mwa nsinga ya [kongele, NW] ya pɛtɛɛ mpenza oyo ekauká soki eyoki mɔ́tɔ ebendani. (Basambisi 16:8, 9) Mbuma ya mosambeli ya banzambe ya lokuta—ezala bikeko ya banzambe na ye, bozwi na ye, to eloko nini oyo asambelaka na esika ya kosambela Yehova—ekokóma lokola “lotɔtɔ” oyo epelisaka mɔ́tɔ. Lotɔtɔ mpe busi ekozika, ekolongolama na mɔ́tɔ oyo moto moko te akoki kozimisa yango. Nguya moko te na molɔ́ngɔ́ mobimba ekoki kopekisa bikateli ya kokoka ya Yehova.
33. (a) Na lolenge nini makebisi ya Yehova oyo etali bikateli na ye ya mikolo ezali koya ezali komonisa motema mawa na ye? (b) Yehova azali kopesa bato lelo libaku ya kosala nini, mpe yango etaleli mokomoko na biso na nini?
33 Nsango oyo ya nsuka eyokani mpenza na nsango ya motema mawa mpe ya kolimbisa oyo ezali na Yisaya 1 vɛrsɛ 18? Ezali mpenza bongo! Yehova akomisi makebisi oyo mpe apesi yango na nzela ya basaleli na ye mpamba te ayokelaka bato mawa. Mpe “alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Lelo oyo, moklisto nyonso ya solo azali na libaku malamu ya kosakola nsango ya makebisi ya Nzambe epai ya bato mpo ete ye akoka kolimbisa baoyo bakobongola mitema mpe bázwa bomoi ya seko. Yehova azali mpenza na boboto ndenge apesi bato libaku ya ‘kobongisa makambo’ elongo na ye wana ntango ezali naino!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Masolo ya kala ya bonkɔkɔ ya Bayuda elobaka ete mokonzi mabe Manase abomisaki Yisaya, bakataki ye biteni mibale na mosumani. (Kokanisá na Baebele 11:37.) Buku moko elobi ete mpo bákatela Yisaya etumbu ya liwa, mosakoli moko ya lokuta afundaki ye na maloba oyo: “Abengaki Yelusaleme Sodomo, mpe alobaki ete bankumu ya Yuda mpe ya Yelusaleme bazali bato ya Gomola.”
b Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “nkisi” ekoki mpe kobongolama na “oyo ezali mabe,” “makambo ya nkisi,” mpe “mbeba.” Buku moko (Theological Dictionary of the Old Testament) elobi ete basakoli Baebele bazalaki kosalela liloba yango mpo na kotɔndɔla “mbeba oyo eutaki na lolenge mabe ya kosalela bokonzi.”
c Elobeli “nakozongisa lobɔkɔ na ngai likoló na yo” elimboli ete Yehova akotika kosunga basaleli na ye mpe akopesa bango etumbu.