Bómekola Yehova —bómonisa bosembo mpe boyengebene
“Ngai [Yehova] nakosalaka boboto mpe [bosembo, NW] mpe boyengebene kati na mokili. Mpo ete [Yehova] alobi ete, Nakosepela na makambo oyo.”—YILIMIA 9:24.
1. Elikya nini ya kitoko Yehova amonisaki ete ekokokisama?
YEHOVA alakaki ete mokolo mosusu bato nyonso bakoyeba ye. Na nzela ya mosakoli Yisaya alobaki ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:9) Oyo ezali solo elikya kitoko!
2. Koyeba Yehova esɛngi likambo nini? Mpo na nini?
2 Kasi, koyeba Yehova elimboli nini? Yehova amonisaki Yilimia likambo eleki ntina: ‘Kososola mpe koyeba ngai ete ngai [Yehova] nakosalaka boboto mpe [bosembo, NW] mpe boyengebene kati na mokili. Mpo ete nakosepela na makambo oyo.’ (Yilimia 9:24) Na yango, koyeba Yehova esɛngi mpe koyeba ndenge oyo amonisaka bosembo mpe boyengebene. Boye, soki tozali komonisa bizaleli wana, akosepela na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango? Kati na Biblia, Liloba na ye, Yehova abateli lisolo ya misala na ye epai ya bato ya kozanga kokoka na boumeli ya bikeke mingi. Soki toyekoli yango, tokoki koyeba ndenge oyo Yehova amonisaka bosembo mpe boyengebene mpe bongo tokomekola ye.—Baloma 15:4.
Azali mosembwi kasi azali mpe na motema mawa
3, 4. Mpo na nini Yehova azalaki na elonga ya koboma Sodomo na Gomola?
3 Etumbu oyo Nzambe apesaki Sodomo na Gomola ezali ndakisa malamu oyo emonisi mitindo ndenge na ndenge ya bosembo ya Yehova. Yehova asukaki te bobele na kopesa etumbu oyo esengeli kasi abikisaki mpe baoyo babongaki kobikisama. Ebongaki mpenza koboma bingumba wana? Abalayama, oyo emonani ete ayebaki mpenza bonene ya mabe ya Sodomo te, akanisaki liboso ete ebongi koboma yango te. Yehova ayebisaki Abalayama ete soki bayengebene zomi bamonani kuna, akobikisa engumba wana. Likambo yango emonisi polele ete boyengebene ya Yehova ezalaka na nkanda te to ezangaka mawa te.—Genese 18:20-32.
4 Kobeba ya bizaleli malamu na Sodomo emonanaki polelepolele ntango baanzelu mibale bakendaki kotala engumba yango. Ntango mibali ya engumba yango, “bilenge mpe banuni,” bayokaki ete mibali mibale bayaki na ndako ya Lota, bakendaki mbangu na ndako na ye mpo ete bango nyonso básangisa na bango nzoto na makasi. Misala na bango ya mbindo mikómaki mpenza ya bonyama! Na ntembe te, etumbu oyo Yehova apesaki na engumba yango ezalaki ya boyengebene.—Genese 19:1-5, 24, 25.
5. Ndenge nini Nzambe abikisaki Lota mpe libota na ye na Sodomo?
5 Nsima ya kolobela kobomama ya Sodomo mpe Gomola lokola elakiseli mpo na kokebisa, ntoma Petelo akomaki ete: “Nkolo ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama.” (2 Petelo 2:6-9) Soki moyengebene Lota na libota na ye babomamaki esika moko na bato mabe ya Sodomo, elingaki kozala bosembo te. Yango wana, anzelu ya Yehova akebisaki Lota na kobomama oyo ekómaki pene. Wana Lota azalaki koumela, baanzelu basimbaki ye, mwasi na ye, mpe bana na ye ya basi na mabɔkɔ mpe babimisaki bango na engumba “mpo ete [Yehova] ayokelaki ye mawa.” (Genese 19:12-16) Tokoki kondimisama ete Yehova akomibanzabanza lolenge moko mpo na bayengebene ntango akoboma ebongiseli oyo mabe, kobomama oyo ezali lisusu mosika te.
6. Mpo na nini tosengeli komitungisa mingi te na ntina na kobomama ya ebongiseli ya biloko mabe oyo ekómi pene?
6 Atako nsuka ya ebongiseli oyo ekozala ntango ya “kokata likambo na bosembo,” ezali na ntina te ete tómitungisa koleka. (Luka 21:22, NW) Na Armagedon, etumbu oyo Nzambe akopesa ekozala “yango nyonso na boyengebene.” (Nzembo 19:9) Lokola Abalayama amonaki yango, biso bato tokoki kotyela bosembo ya Yehova motema mobimba, mpamba te bosembo na ye etombwani mingi koleka oyo ya biso. Abalayama atunaki ete: “Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo te?” (Genese 18:25; kokanisá na Yobo 34:10.) To lokola Yisaya alobaki yango malamu ete, “Nani ayebisaki [Yehova] nzela na kosambisa-sembo?”—Yisaya 40:14.
Likambo ya boyengebene mpo na kobikisa bato
7. Boyokani nini ezali kati na boyengebene ya Nzambe mpe motema mawa na ye?
7 Nzambe amonisaka bosembo na ye bobele te na kopesáká basali na mabe etumbu. Yehova alobi ete ye azali “Nzambe na boyengebene, mpe mobikisi.” (Yisaya 45:21) Boyokani makasi ezali kati na boyengene to bosembo ya Nzambe mpe mposa na ye ya kobikisa bato na mabe oyo masumu ememaki. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia, ebimeli ya 1982) elimboli vɛrsɛ yango boye ete “bosembo ya Nzambe elukaka ndenge oyo ebongi mpenza mpo na komonisa motema mawa na Ye mpe kokokisa kobikisa na Ye.” Ezali te ete motema mawa nde esengeli kolɛmbisa bosembo ya Nzambe, kasi, motema mawa ezali lolenge ya komonisa bosembo ya Nzambe. Ebongiseli oyo Nzambe azwaki ya kopesa mbeka mpo na kobikisa bato ezali ndakisa monene ya lolenge wana ya bosembo ya Nzambe.
8, 9. (a) Likambo nini etángami kati ebéngeli, “mosala na boyengebene”? Mpo na nini? (b) Yehova azali kosɛnga na biso ete tósala nini?
8 Motuya ya mbeka yango moko—bomoi ya kokoka ya Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe, Yesu Klisto—ezalaki monene mpamba te mitinda ya Yehova mibongwanaka te, mpe ye moko atosaka yango. (Matai 20:28) Bomoi ya kokoka, oyo Adama azalaki na yango, ebebisamaki, yango wana, esengelaki kopesa bomoi mosusu ya kokoka mpo na kosomba lisusu bomoi mpo na bakitani ya Adama. (Baloma 5:19-21) Ntoma Paulo amonisi ete bomoi ya sembo oyo Yesu azalaki na yango, bakisa mpe kofuta lisiko, ezali “mosala na boyengebene.” (Baloma 5:18, NW, maloba na nse ya lokasa) Mpo na nini ezali bongo? Mpamba te na miso ya Yehova, kosomba bato ezalaki likambo ya malamu mpe sembo, atako esɛngaki ye ntalo mingi. Bakitani ya Adama bazalaki lokola “lititi litutami,” oyo Nzambe alingaki kobuka te, to lokola ‘lotambe lozali kozika mokemoke,’ oyo alingaki kozimisa te. (Matai 12:20) Nzambe amindimisaki ete basembwi mingi, mibali mpe basi bakozala kati na bakitani ya Adama.—Kokanisá na Matai 25:34.
9 Ndenge nini tosengeli kotalela likambo monene oyo emonisi bolingo mpe bosembo? Moko na makambo oyo Yehova azali kosɛnga na biso ezali ete ‘tósala boyengebene.’ (Mika 6:8) Ndenge nini tokoki kosala yango?
Luká bosembo, landá boyengebene
10. (a) Tángá lolenge moko oyo tokoki komonisa bosembo? (b) Ndenge nini tokoki koluka liboso bosembo ya moto ya Nzambe?
10 Ya liboso, tosengeli kolanda mitinda ya Nzambe mpo na bizaleli malamu. Lokola mitinda ya Nzambe mizali malamu mpe mizali ya boyengebene, ntango tozali kotosa yango, tozali kosala na bosembo. Yehova alingi bongo mpo na bato na ye. Yehova ayebisaki Bayisalaele ete, “Yekolá kosala malamu, luká bosembo.” (Yisaya 1:17, NW) Yesu apesaki toli motindo moko na bato oyo bayokaki Lisolo na ye likoló ya Ngomba, ntango ateyaki bango ete ‘bálukaka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye.’ (Matai 6:33) Paulo alendisaki Timote ete ‘alanda boyengebene.’ (1 Timote 6:11, NW) Ntango tozali kolanda mitinda ya Nzambe mpo na bizaleli mpe tolati bomoto ya sika, tozali kolanda bosembo mpe boyengebene ya solo. (Baefese 4:23, 24) Na maloba mosusu, tozali koluka bosembo ntango tozali kosala makambo na ndenge oyo Nzambe alingi.
11. Mpo na nini mpe ndenge nini tosengeli kobundisa bopusi ya masumu?
11 Lokola toyebi yango malamu, kosala makambo ya malamu mpe ya sembo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na bato ya kozanga kokoka. (Baloma 7:14-20) Paulo alendisaki baklisto ya Loma ete bábundisa bopusi ya masumu mpo bákoka komonisa nzoto na bango oyo bapesi na Nzambe lokola “bisaleli na boyengebene,” oyo bikozala na ntina epai ya Nzambe mpo na kokokisa mokano na ye. (Baloma 6:12-14) Bobele bongo, wana tozali ntango nyonso koyekola mpe kosalela Liloba ya Nzambe, tokoki kondima “makebisi ya Yehova” mpe ‘kozwa disipilini kati na boyengebene.’—Baefese 6:4, NW; 2 Timote 3:16, 17, NW.
12. Tosengeli koboya nini mpo na kosalela bato mosusu makambo ndenge oyo tolingi ete Yehova asalela biso?
12 Ya mibale, tozali komonisa bosembo ntango tozali kosalela basusu makambo na ndenge oyo tolingi ete Yehova asalela biso. Ezali mpasi te kozala na mitinda lolenge mibale—moko ya pɛtɛɛ mpo na biso moko, bongo mosusu ya makasi mpo na bato mosusu. Mabunga na biso moko, tolimbisaka yango nokinoki; kasi, towelaka kolobela mabe ya bato mosusu, oyo mbala mosusu kutu ezali mike soki tokokanisi yango na oyo ya biso. Yesu atuni mpenza malamu ete: “Mpo na nini ozali kotala mwa eloko moke oyo ekɔti na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo?” (Matai 7:1-3, Boyokani ya Sika) Tosengeli kobosanaka te ete moko te kati na biso akotɛlɛma soki Yehova alobi alandela mabunga na biso. (Nzembo 130:3, 4) Soki Yehova, na bosembo na ye, azali kosala ete atalela bolɛmbu ya bandeko na biso te, biso nde banani mpo ete tósambisa bango?—Baloma 14:4, 10.
13. Mpo na nini moyengebene ayokaka ete asɛngisami kosakola nsango malamu ya Bokonzi?
13 Ya misato, tomonisaka bosembo ya moto ya Nzambe ntango tomipesi na mosala ya kosakola. Yehova apesi biso toli ete, “[Bóboya] kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango, wana lobɔkɔ na [bino] ezwi eposa na kosala bongo.” (Masese 3:27) Ekozala malamu te soki tobombi boyebi oyo ezali kopesa bomoi oyo Nzambe apesi biso na motema ya bokabi. Ya solo, bato mingi bakoki koboya mateya na biso, kasi lokola Nzambe azali naino komonisela bango motema mawa, tosengeli kosepela kopesa bango libaku ya “kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Mpe lokola Yesu, tosepelaka ntango tosalisi moto moko ete alanda nzela ya bosembo mpe boyengebene. (Luka 15:7) Sikawa nde ntango malamu mpo ete ‘tómikonela boyengebene.’—Hosea 10:12.
‘Bana na mokonzi kati na bosembo’
14. Bankulutu bazali na mokumba nini na ntina na bosembo?
14 Biso nyonso tosengeli kotambola na nzela ya boyengebene, kasi bankulutu kati na lisangá ya boklisto bazali na mokumba monene na likambo yango. Boyangeli ya Yesu lokola mwana ya mokonzi ‘etɛlɛmi na bosembo mpe na boyengebene.’ Yango wana, bankulutu basengeli kolandaka bosembo ya Nzambe. (Yisaya 9:7) Babosani te makambo oyo mamonisami na esakweli ya Yisaya 32:1 ete: “Talá mokonzi akozala na lokumu kati na boyengebene, mpe bana na mokonzi kati na [bosembo, NW].” Lokola bazali bakɛngɛli oyo baponami na elimo santu, to ‘basungi na ndako ya Nzambe,’ bankulutu basengeli kosala makambo na ndenge Nzambe alingi.—Tito 1:7.
15, 16. (a) Ndenge nini bankulutu bamekolaka mobateli na mpate ya sembo oyo alobelami na lisese ya Yesu? (b) Bankulutu bayokaka ndenge nini mpo na baoyo babungi na elimo?
15 Yesu amonisaki ete bosembo ya Yehova ezalaki na boboto, na motema mawa, mpe na makambo makasi te. Likoló na nyonso, alukaki kosunga baoyo bazalaki na mikakatano mpe “koluka mpe kobikisa yango ebungani.” (Luka 19:10) Lokola mobateli na mpate na lisese ya Yesu oyo alukaki na etingya kino amonaki mpate oyo ebungaki, bankulutu balukaka baoyo bapɛngwi nzela na elimo mpe basalaka nyonso mpo na komema bango bázonga na etonga.—Matai 18:12, 13.
16 Na esika ya kozomela baoyo mbala mosusu basalaki masumu minene, bankulutu balukaka kobikisa bango mpe komema bango na kobongola motema soki likoki ezali. Basepelaka soki bakoki kosalisa moto moko oyo apɛngwaki nzela. Nzokande, bazalaka na mawa soki mosali na mabe aboyi kobongola motema. Na ntango wana, mitinda ya sembo ya Nzambe misɛngisaka bango ete bábimisa moto oyo aboyi kobongola motema na lisangá. Kasi, atako bongo, lokola tata ya mwana na kilikili, balikyaka ete mokolo mosusu moto oyo abungi nzela ‘akokanisa malamu na motema na ye.’ (Luka 15:17, 18) Na yango, bankulutu bakamataka bibongiseli mpo na kokende kotala bato mosusu oyo babimisamá na lisangá mpo na koyebisa bango lisusu ndenge bakoki kosala mpo na kozonga na lisangá ya Yehova.a
17. Bankulutu bazalaka na mokano nini ntango bazali kosambisa moto oyo asali mabe, mpe ezaleli nini ekosalisa bango ete bákokisa mokano yango?
17 Mingimingi, bankulutu basengeli komekola bosembo ya Yehova ntango bazali kosambisa bato oyo basalaki mabe. Basumuki ‘bazalaki ntango nyonso kobɛlɛma’ na Yesu mpamba te bamonaki ete azalaki komitya na esika na bango mpe azalaki kosalisa bango. (Luka 15:1; Matai 9:12, 13) Ya solo, Yesu akangaki miso na mabe te. Ngonga oyo Yesu alekisaki na kolya elongo na Zakai, oyo ayebanaki lokola mobɔtɔli, esalisaki moto yango ete abongola motema mpe asɛnga bolimbisi mpo na mabe nyonso oyo asalelaki bato mosusu. (Luka 19:8-10) Lelo oyo, bankulutu bazalaka na mokano moko ntango bazali kosambisa moto: kosalisa moto oyo abungi nzela ete abongola motema. Soki bazali na boboto lokola Yesu, basali mingi na mabe bakokakatana te mpo na koluka lisungi na bango.
18. Nini ekosalisa bankulutu ete bázala lokola ‘ebombamelo mpo na mopɛpɛ’?
18 Motema mawa ekosalisa bankulutu bámonisa bosembo ya Nzambe, oyo ezali na makambo makasi te mpe ezali na boboto. Likambo moko ezali kobenda likebi na biso ezali ete Ezela abongisaki motema na ye mpo na koteya Bayisalaele bosembo, kasi bobele makanisi na ye te. (Ezela 7:10) Soki bankulutu bazali koyeba komitya na esika ya basusu ekosalisa bango ete básalela mitinda mibongi ya Makomami mpe kotalela malamu ezalela ya moto na moto. Ntango Yesu abikisaki mwasi oyo azalaki kotanga makila, amonisaki ete bosembo ya Yehova elimboli kososola oyo ekomami kati na mibeko mpe ndimbola na yango. (Luka 8:43-48) Bankulutu oyo bazali komonisa bosembo na motema mawa bakoki kokokanisama na ‘ebombamelo mpo na mopɛpɛ’ mpo na baoyo bazali kotɛngatɛnga na ntina na bolɛmbu na bango to ebongiseli ya biloko mabe oyo.—Yisaya 32:2.
19. Ndeko moko ya mwasi azalaki na mayoki nini nsima wana basalelaki ye bosembo ya moto ya Nzambe?
19 Ndeko moko ya mwasi oyo asalaki lisumu monene amonaki mpenza bosembo ya Nzambe. Alobi ete, “Mpo na koloba solo, nazalaki kobanga kokende epai ya bankulutu. Kasi bamoniselaki ngai motema mawa mpe batalaki ngai lokola eloko mpamba te. Bankulutu bazalaki lokola batata kasi bazuzi bazangi mawa te. Basalisaki ngai nasosola ete Yehova akosundola ngai te soki nazwi ekateli ya kobongisa etamboli na ngai. Namonaki mpenza ndenge apesaka biso disipilini lokola Tata oyo azali na bolingo. Nazwaki makasi ya kozipwela Yehova motema na ngai, nazalaki na elikya ete akoyoka lilɔmbɔ na ngai. Soki nakanisi likambo yango, nakoki koloba na bosolo ete ndenge nakutanaki na bankulutu, eleki sikawa mbula nsambo, ezalaki lipamboli eutaki epai na Yehova. Banda ntango yango, boyokani na ngai na Yehova ezali makasi koleka.”
Batelá bosembo mpe salá oyo ezali malamu
20. Wapi matomba ya kososola mpe komonisa bosembo mpe boyengebene?
20 Tokoki kosepela ete bosembo ya Nzambe esuki te na kopesa moto na moto oyo ebongi na ye. Bosembo ya Yehova epusaki ye ete apesa bomoi ya seko na baoyo bazali komonisa kondima. (Nzembo 103:10; Baloma 5:15, 18) Nzambe azali kosalela biso makambo na ndenge yango mpamba te bosembo na ye ezali mpe kotalela ezalela na biso, mpe elukaka kobikisa kasi kokweisa te. Ya solo, soki tososoli malamumalamu bozindo ya bosembo ya Yehova, boyokani na biso elongo na ye ekokóma makasi koleka. Mpe wana tozali kosala makasi mpo na komekola lolenge yango ya bomoto na ye, biso mpe bato mosusu tokozwa mapamboli mingi kati na bomoi na biso. Tata na biso ya likoló akozanga te komona milende oyo tozali kosala mpo na koluka bosembo. Yehova alaki biso ete: “Bósambisa sembo, bósala mpe boyengebene; zambi lobiko na ngai ebɛlɛmi penepene, kosikola na ngai ekomonana. Mapamboli epai na moto oyo asali bongo.”—Yisaya 56:1, 2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1991, nkasa 22-23.
Ozali komikundola?
◻ Kobomama ya Sodomo na Gomola ezali koteya biso nini na ntina na bosembo ya Yehova?
◻ Mpo na nini lisiko ezali elembo monene ya bosembo mpe bolingo ya Nzambe?
◻ Na makambo misato nini tokoki komonisa bosembo?
◻ Na lolenge nini ya sikisiki bankulutu bakoki komekola bosembo ya Nzambe?
[Bililingi na lokasa 15]
Na nzela ya mosala ya kosakola, tozali komonisa bosembo ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 16]
Ntango bankulutu bazali komonisa bosembo ya Nzambe, baoyo bazali na mikakatano bakakatanaka te mpo na koluka lisalisi na bango