Mokapo ya Zomi na Moko
Mawa na batomboki!
1. Libunga nini ya monene Yelobama asalaki?
NTANGO bato ya ekólo oyo esalaki kondimana na Yehova bakabwanaki mpe bakómaki bikólo mibale, Yelobama akómaki koyangela bokonzi ya nɔrdi oyo ezalaki na mabota zomi. Mokonzi yango ya sika azalaki mokonzi oyo akokaki mpenza mpe azalaki makasi. Kasi azalaki mpenza kondimela Yehova te. Yango wana, asalaki libunga moko monene oyo ebebisaki lisolo mobimba ya bokonzi ya nɔrdi. Na Mibeko ya Mose, Bayisalaele bazwaki etinda ya kokendaka mbala misato na mbula na tempelo ya Yelusaleme, oyo ezalaki sikawa na Yuda, bokonzi ya sudi. (Deteronome 16:16) Lokola azalaki kobanga ete mibembo yango ya mbala na mbala ekoki kosala ete bato oyo azali koyangela báluka kosangana lisusu na bandeko na bango ya sudi, Yelobama “asalaki bana mibale ya ngɔmbɛ na wolo. Alobaki na bango ete, Longwa na ntango molai, bosili kokendaka na Yelusaleme. Talá banzambe na bino, ɛ Yisalaele, baoyo balongoli bino na mokili ya Ezipito! Atɛmisaki moko na Betele mpe mosusu atyaki na Dani.”—1 Mikonzi 12:28, 29.
2, 3. Libunga ya Yelobama ebimisaki makambo nini na Yisalaele?
2 Emonanaki ete mokano ya Yelobama elongaki mpo na mwa ntango moke. Mokemoke, bato batikaki kokenda na Yelusaleme mpe bakómaki kosambela liboso ya bana ya ngɔmbɛ wana. (1 Mikonzi 12:30) Nzokande, misala ya losambo yango ya lipɛngwi ebebisaki bokonzi ya mabota zomi. Bambula mingi na nsima, ata Yehu, oyo amonisaki molende mpenza ya kosilisa losambo ya Baala na Yisalaele, akómaki kofukama liboso ya bangɔmbɛ ya wolo. (2 Mikonzi 10:28, 29) Mabe mosusu nini ebimaki mpo na ekateli mabe ya Yelobama? Makambo ya politiki ekómaki na mobulu mpe bato bakómaki konyokwama mingi.
3 Lokola Yelobama akómaki mopɛngwi, Yehova alobaki ete mombóto na ye ekoyangela na mokili yango te, mpe na nsuka bokonzi ya nɔrdi ekonyokwama na mpasi moko makasi. (1 Mikonzi 14:14, 15) Liloba ya Nzambe ekokisamaki. Bakonzi nsambo ya Yisalaele bayangelaki kaka na boumeli ya mbula mibale to na nse—basusu kaka na boumeli ya mwa mikolo. Mokonzi moko amibomaki, mpe bamosusu motoba babomamaki na bato oyo bazalaki koluka kozwa kiti ya bokonzi. Mingimingi na nsima ya boyangeli ya Yelobama II, oyo esukaki soki na mobu 804 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ntango Uziya azalaki koyangela na Yuda, Yisalaele ebebisamaki na bitumba, mobulu mpe kobomana. Ezali na ntango wana ya pɔtɔpɔtɔ nde Yehova, na nzela ya Yisaya, atindaki likebisi, to “liloba,” epai ya bokonzi ya nɔrdi. “[Yehova] atindi liloba epai na Yakobo, mpe ekweli Yisalaele.”—Yisaya 9:8.a
Lolendo mpe lofundo epelisi nkanda ya Nzambe
4. “Liloba” nini Yehova atindeli Yisalaele, mpe mpo na nini?
4 Moto moko te akotyola “liloba” ya Yehova. “Na ntembe te, bato bakoyeba yango, ɛɛ bango nyonso, Efelaima mpe bafandi ya Samalia, mpo na lolendo na bango mpe mpo na lofundo ya motema na bango.” (Yisaya 9:9, NW) “Yakobo,” “Yisalaele,” “Efelaima,” mpe “Samalia” nyonso wana ezali kolobela bokonzi ya Yisalaele ya nɔrdi, oyo Efelaima ezalaki libota oyo elekaki monene mpe Samalia ezalaki mboka-mokonzi na yango. Liloba oyo Yehova alobaki mpo na bokonzi yango ezali ekateli moko makasi, mpamba te Efelaima epɛngwi mingi mpenza mpe ekómi na lofundo makasi liboso ya Yehova. Nzambe akobatela bato yango te ntango mpasi oyo ekouta na banzela na bango mabe ekokwela bango. Bakosɛngisama koyoka, to kotya likebi na liloba ya Nzambe.—Bagalatia 6:7.
5. Na ndenge nini Bayisalaele batyoli misala ya kosambisa ya Yehova?
5 Lokola makambo ezali se kobeba, bato yango babungisi biloko mingi, bakisa mpe bandako na bango—oyo mbala mingi batongá na biliki ya mabele mpe na banzete ya ntalo mingi te. Mitema na bango elɛmbi mpo na yango? Bakoyoka maloba ya basakoli ya Yehova mpe bakozongela Nzambe ya solo?b Yisaya akomi eyano na bango ya kotyola: “Biliki ekwei, nde tokotonga na mabanga mabongisami; nzete ya mosuke ekatami, nde tokotya nzete ya eleze na bisika na yango.” (Yisaya 9:10) Bayisalaele babɛtɛli Yehova ntolo mpe baboi basakoli na ye oyo bayebisi bango ntina bazali kokutana na minyoko ya ndenge wana. Bato yango balingi koloba ete: ‘Tokoki kobungisa bandako ya babiliki ya mabele mpe ya banzete, kasi tokotonga bandako mosusu na biloko ya makasi—mabanga, mpe nzete ya eleze!’ (Kokanisá na Yobo 4:19.) Yehova akosala eloko mosusu te kaka kopesa bango lisusu etumbu.—Kokanisá na Yisaya 48:22.
6. Na lolenge nini Yehova abebisi mwango mabe oyo Sulia na Yisalaele basalaki mpo na Yuda?
6 Yisaya alobi lisusu ete: “[Yehova] akotɛmisela [ye] batɛmɛli ya Lesini.” (Yisaya 9:11a) Peka, mokonzi ya Yisalaele na Lesini, mokonzi ya Sulia basali boyokani. Bakani kolonga bokonzi ya mabota mibale ya Yuda mpe kotya mokonzi moko oyo akoyokela bango na ebonga ya bokonzi ya Yehova na Yelusaleme—“mwana” moko “ya Tabele.” (Yisaya 7:6) Kasi mayele mabe na bango elongaki te. Lesini azali na banguna ya makasi, mpe Yehova ‘akotɛmisela ye,’ Yisalaele, banguna yango. Elobeli ‘kotɛmisela’ elimboli kopesa bango nzela ya kolonga etumba oyo ekobebisa boyokani na bango mpe mikano na yango.
7, 8. Ndenge Asulia alongaki Sulia, yango ebimiseli Yisalaele nini?
7 Boyokani ebandi kobeba ntango Asulia abundisi Sulia. “Mokonzi ya Asulia abutelaki Damaseke [mboka-mokonzi ya Sulia] mpe alekaki yango, alongolaki bato na yango bakangami kino Kili mpe abomaki Leseni.” (2 Mikonzi 16:9) Lokola abungisi moninga na ye ya nguya, Peka amoni ete mikano na ye mpo na Yuda ebebi. Kutu, mwa moke nsima ya liwa ya Leseni, lokola Hosea alukaki kozwa ebonga ya bokonzi ya Samalia, Hosea abomaki Peka.—2 Mikonzi 15:23-25, 30.
8 Sulia, oyo asanganaki kala na Yisalaele, akómi sikawa moombo ya Asulia, ekólo oyo eleki na nguya na etúká yango. Yisaya asakoli ndenge Yehova akosalela ebongiseli yango ya politiki ya sika: “[Banguna na ye (Yisalaele) ye (Yehova) akoyanganisa. Sulia akouta na ɛsti mpe Bafilisitia bakouta na nsima, NW] mpe bakolya Yisalaele na monɔkɔ polele. Mpo na yango, nkanda na ye elongolami te, lobɔkɔ na ye esembolami naino.” (Yisaele 9:11b, 12) Na yango, Sulia akómi sikawa monguna ya Yisalaele, mpe Yisalaele asengeli komibongisa mpo Asulia na Sulia bakobundisa ye. Balongi kokɔta na mboka na bango. Asulia akómisi Hosea moombo na ye mpe asɛngi ye afuta amande moko monene. (Mwa bambula liboso, Asulia azwaki mbongo mingi oyo eutaki epai ya Menahema, mokonzi ya Yisalaele.) Maloba ya mosakoli Hosea ezalaki mpenza solo: “Bapaya balei nguya na ye [Efelaima]”!—Hosea 7:9; 2 Mikonzi 15:19, 20; 17:1-3.
9. Mpo na nini tokoki koloba ete Bafilisitia babundisaki na epai ya “nsima”?
9 Yisaya alobi mpe te ete Bafilisitia bakokɔta na “nsima”? Ɛɛ. Liboso ete eloko babengi boussole ebima, Baebele bazalaki kotɛlɛma mpe kotala epai moi ebimaka. Yango wana, “ɛsti” ezalaki epai ya liboso, nzokande wɛsti, bisika ya libongo ya mai monene epai Bafilisitia bazalaki kofanda, ezalaki epai “nsima.” Yuda mpe ekoki kozala na kati ya “Yisalaele” oyo elobelami na Yisaya 9:12 mpamba te Bafilisitia bakɔtaki na Yuda na ntango ya boyangeli ya Ahaza, ye azalaki na bokonzi na mikolo ya Peka. Babɔtɔlaki bingumba mpe bisika makasi mingi ya Yuda mpe bafandaki wana. Ndenge moko na Efelaima na nɔrdi, Yuda abongi kozwa etumbu yango ya Yehova, mpamba te ye mpe abebi na lipɛngwi.—2 Ntango 28:1-4, 18, 19.
Banda ‘na motó tii na mokɔndɔ’ —Libota moko ya batomboki
10, 11. Etumbu nini Yehova akopesa Yisalaele mpo ete azali kokoba kotomboka?
10 Atako azwaki minyoko wana nyonso—mpe atako basakoli ya Yehova basalelaki maloba ya makasi—bokonzi ya nɔrdi ezalaki kaka kotombokela Yehova. “Bato babongwani epai na ye te, ye oyo abɛti bango; baluki [Yehova] na bibele te.” (Yisaya 9:13) Yango wana, mosakoli alobi ete: ‘[Yehova] akokata longwa na Yisalaele motó na ye mpe mokɔndɔ na ye etape mpe mongendu na mokolo moko. Mpaka mpe moto ya lokumu azali motó; mosakoli oyo akolakisa nkuta azali mokɔndɔ. Zambi batambolisi na bato oyo bapɛngwisi bango, mpe baoyo batambolisami na bango [batelenganisami, NW].’—Yisaya 9:14-16.
11 “Motó” mpe “etape” ezali komonisa “mpaka mpe moto ya lokumu”—batambwisi ya mboka. “Mokɔndɔ” mpe “mongendu” ezali komonisa basakoli ya lokuta oyo balobaka maloba kitoko oyo esepelisaka batambwisi na bango. Nganga-mayele moko ya Biblia akomi ete: “Basakoli yango ya lokuta babengami mokɔndɔ mpamba te bazalaki na bizaleli mabe koleka bato mosusu nyonso, mpe mpamba te bazalaki bakosi mpe bazalaki kolendisa bakonzi mabe.” Profɛsɛrɛ Edward J. Young alobi mpo na basakoli yango ya lokuta ete: “Bazalaki batambwisi te, kasi ndenge bazalaki kolanda batambwisi bipai bazalaki kotambwisa bango, bazalaki kaka kokosa bango mpe kolɛngola bango, lokola mwa mokɔndɔ ya mbwa oyo ezali koningana.”—Kokanisá na 2 Timote 4:3.
Ata mpe ‘basi bakufeli-mibali na bana mibali bitike’ bazali batomboki
12. Kino wapi mabe ebebisi bafandi ya Yisalaele?
12 Yehova azali Mokɔteli ya basi bakufeli-mibali mpe bana mibali bitike oyo bakufeli batata. (Exode 22:22, 23) Nzokande, tóyoka oyo Yisaya alobi sikawa: ‘[Yehova] akosepela na bilenge na bango te, akoyoka mawa mpe te mpo na bitike na batata na bango mpe basi bakufeli-mibali na bango. Zambi [bango nyonso bazali bapɛngwi, NW] mpe basali na mabe, monɔkɔ na monɔkɔ ekolobaka bilobaloba. Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye elongolami te, lobɔkɔ na ye esembolami naino.’ (Yisaya 9:17) Lipɛngwi ebebisi bato yango nyonso, ezala ata basi bakufeli-mibali to bilenge mibali bitike oyo bakufeli batata. Na motema molai mpenza, Yehova atindi basakoli na ye, na elikya ete bato yango bakotika bizaleli na bango. Na ndakisa, Hosea amileli ete: “Ɛ Yisalaele, [zongá epai na Yehova, NW], Nzambe na yo; mpo ete [otuti, NW] libaku mpo na mabe na yo.” (Hosea 14:1) Mokɔteli ya basi bakufeli-mibali na bilenge mibali bitike oyo bakufeli batata ayoki mpenza mpasi ndenge asengeli mpe kokweisela bango etumbu!
13. Liteya nini tokoki kozwa na ezalela oyo ezalaki na mikolo ya Yisaya?
13 Ndenge moko na Yisaya, tozali na mikolo ya mpasi oyo ezali liboso ya mokolo oyo Yehova akopesa bato mabe etumbu. (2 Timote 3:1-5) Yango wana, ezali likambo ya ntina mingi ete baklisto ya solo, ezala ata bomoi ya ndenge nini oyo bazali na yango, bátikala ntango nyonso pɛto na elimo, na bizaleli mpe na makanisi mpo Nzambe andima bango. Tiká ete mokomoko na biso abatela malamumalamu boyokani na ye na Yehova. Moto oyo akimi ‘Babilone Monene, asangana lisusu na masumu na ye te.’—Emoniseli 18:2, 4, NW.
Losambo ya lokuta ebimisi mobulu
14, 15. (a) Losambo ya bademo ebimisaka nini? (b) Minyoko mosusu nini Yisaya asakoli ete Yisalaele akozwa?
14 Losambo ya lokuta, ezali mpenza kosambela bademo. (1 Bakolinti 10:20) Lokola yango emonanaki liboso ya Mpela, bopusi ya bademo etindaka bato na mobulu. (Genese 6:11, 12) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te mpo na komona ete, ntango Yisalaele apɛngwi mpe abandi kosambela bademo, mobulu mpe mabe etondi na mokili yango.—Deteronome 32:17; Nzembo 106:35-38.
15 Na maloba ya kosimba motema, Yisaya alobeli ndenge mobulu mpe mabe etondi na Yisalaele: ‘Mpo ete mabe [epeli, NW] lokola mɔ́tɔ; ekozikisa nzube mpe matiti ya mpamba, [ekozikisa, NW] bisika makasi kati na zamba, ekotombwa likoló [lokola mapata minene ya molinga, NW]. Mpo na nkanda ya [Yehova] na bibele, mokili eziki; mpe bato [bakokóma, NW] lokola nkoni mpo na mɔ́tɔ, moto akolimbisa [ata] ndeko na ye te. Moto [akokata, NW] na epai na ye na mobali, nde akozala naino na nzala, akolya na epai na ye na mwasi nde bakotonda te. Moto na moto akolya mosuni na lobɔkɔ na ye. Manase akolya Efelaima mpe Efelaima akolya Manase; bango elongo bakotɛmɛla Yuda. Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye elongolami te, lobɔkɔ na ye esembolami naino.’—Yisaya 9:18-21.
16. Ndenge nini maloba ya Yisaya 9:18-21 ekokisamaki?
16 Lokola mɔ́tɔ oyo ezali kopalangana longwa na lititi moko ya nzube tii na lititi mosusu ya nzube, mobulu epalangani mpe ekómi mpasi mpo na kosilisa yango, ekómi na ‘bisika ya nzete mingi na kati ya zamba,’ ebimisi mobulu makasi lokola mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa zamba. Keil na Delitzsch, bato oyo balimbolaka Biblia, balobeli mobulu yango lokola “kobomana ya nsɔmɔ ntango mobulu ebimisi etumba kati na bana-mboka. Lokola bazalaki lisusu na motema mawa te, bazalaki ntango nyonso kobomana bango na bango.” Na ntembe te, mabota ya Efelaima mpe ya Manase nde elobelami mingimingi awa mpamba te bango nde bazali mpenza bamonisi ya bokonzi ya nɔrdi mpe, lokola bazali bakitani ya bana mibali mibale ya Yosefe, bango nde bazali mpenza bandeko ya solosolo koleka kati na mabota yango zomi. Nzokande, atako bongo, batiki kobomana bango na bango kaka ntango bakómi kobunda na Yuda na sudi.—2 Ntango 28:1-8.
Basambisi ya mabe bakutani na mosambisi na bango
17, 18. Mabe nini emonani na makambo ya kosambisa mpe na makambo ya kotambwisa mboka na Yisalaele?
17 Na nsima, Yehova atii miso na ye ya mosambisi epai ya basambisi ya Yisalaele mpe batambwisi oyo bazali na bizaleli mabe. Bazali kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe, kobɔtɔla biloko ya babola mpe banyokwami oyo bayaka epai na bango mpo bákata makambo na bango na bosembo. Yisaya alobi ete: “Mawa na baoyo babimisaka mibeko ya mabe mpe na baoyo, kokomáká ntango nyonso, bakomi makambo ya mobulu, mpo na kolongola bato ya komikitisa na esambiselo mpe kobɔtɔla bosembo ya bato na ngai oyo bazali konyokwama, mpo ete basi bakufeli-mibali bákóma lokola biloko na bango oyo bazwi na etumba, ete bápunza bilenge mibali bitike oyo bakufeli batata!”—Yisaya 10:1, 2, NW.
18 Mobeko ya Yehova epekisi lolenge nyonso ya kozanga bosembo: “Bokokata makambo na kozanga bosembo te. Okoyokela oyo ya moke mawa te mpe okobanga moto ya lokumu te.” (Levitike 19:15, NW) Lokola batosi mobeko yango te, bakonzi yango batii “mibeko ya mabe” euti na bango moko. Basali ndenge wana mpo misala oyo ekokani mpenza na moyibi, eyokana na mibeko—mpamba te bazali koyiba mwa biloko ya basi bakufeli-mibali mpe bilenge mibali bitike oyo bakufeli batata. Banzambe ya lokuta oyo Yisalaele azali kosambela bazali mpe komona te likambo yango ya kozanga bosembo, kasi Yehova te. Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova atii sikawa likebi na ye likoló na basambisi mabe yango.
19, 20. Ndenge nini ezaleli ya basambisi mabe ya Yisalaele ekobongwana, mpe nini ekokómela “nkembo” na bango?
19 “Bino bokosala nini na mokolo ya bitumbu mpe ya kobebisama oyo ekolongwa na mosika? Bokokenda epai na nani mpo na kosungama, bokotika [nkembo, NW] na bino wapi? Bakogumbama bobele elongo na bakangami, bakokwea na nse na babomami.” (Yisaya 10:3, 4a) Basi bakufeli-mibali mpe bilenge mibali bitike oyo bakufeli batata bazangi basambisi ya sembo oyo bakoki kosɛnga bákata likambo na bango. Ebongi mpenza ete sikawa Yehova atuna basambisi mabe yango ya Yisalaele soki bakokenda epai ya nani lokola ye moko sikawa akotuna bango bázongisa monɔkɔ. Na ntembe te, etikali moke báyeba ete “ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi.”—Baebele 10:31.
20 “Nkembo” ya basambisi mabe yango—lolendo, lokumu, mpe bokonzi ya mokili oyo euti na bozwi na bango mpe esika na bango ya lokumu—ekoumela te. Basusu bakokóma bakangami ya bitumba, “bakokwea” to bakofukama, kati na bakangami mosusu, nzokande baoyo bakotikala bakobomama mpe bibembe na bango ekozipama na bibembe mosusu ya bitumba. Biloko oyo bazali kobɔtɔla bato ezali na kati ya bozwi oyo ezali kopesa bango “nkembo,” oyo monguna akopunza yango.
21. Bitumbu oyo Yisalaele azwaki elɛmbisaki nkanda ya Yehova likoló na bango?
21 Yisaya asukisi eteni ya maloba ya loyembo oyo ya nsuka na likebisi moko ya mawa: “Mpo na makambo oyo nyonso [bampasi nyonso oyo libota yango ezwi kino wana], nkanda na ye elongolami te, lobɔkɔ na ye esembolami naino.” (Yisaya 10:4b) Ya solo, Yehova azali naino na likambo mosusu ya koloba na Yisalaele. Yehova akozongisa naino te lobɔkɔ na ye oyo asemboli liboso ya kopesa etumbu ya nsuka, etumbu ya kobebisa mpenza bokonzi ya nɔrdi.
Tókwea te na motambo ya makambo ya lokuta mpe ya moimi
22. Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Yisalaele?
22 Liloba oyo Yehova abimisaki na monɔkɔ ya Yisaya ekwelaki Yisalaele mpe ‘ezongaki epai na ye mpamba te.’ (Yisaya 55:10, 11) Masolo ya kala elobeli kolimwa ya bokonzi ya Yisalaele ya nɔrdi, mpe tokoki kaka kokanisa minyoko oyo bafandi na yango basengelaki koyikela mpiko. Ya solo mpenza, Liloba ya Nzambe ekokokisama likoló na ebongiseli ya ntango oyo, mingimingi likoló na mangomba ya boklisto ya lipɛngwi. Ezali mpenza malamu ete baklisto bákanga matoi na maloba ya lokuta oyo ezali kotɛmɛla Nzambe. Na lisalisi ya Liloba ya Nzambe, kobanda kala mayele mabe ya Satana ezali kotɔndɔlama, mpe na bongo tosengeli te kokosama na yango lokola bato ya Yisalaele ya kala. (2 Bakolinti 2:11) Tiká ete biso nyonso tólɛmba te kosambela Yehova “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Soki tosali bongo, lobɔkɔ na ye oyo esembolami ekobɛta basambeli na ye te ndenge ebɛtaki batomboki ya Efelaima, mabɔkɔ na ye ekozinga bango na bolingo nyonso, mpe akosalisa bango na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paladiso.—Yakobo 4:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yisaya 9:8–10:4 ezali na biteni minei (ekomami lokola nzembo), eteni mokomoko esuki na mondimo (refrain) oyo ezali mpenza kobangisa: “Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye elongolami te, lobɔkɔ na ye esembolami naino.” (Yisaya 9:12, 17, 21; 10:4) Lolenge yango ya kokoma ezali mpo na komonisa boyokani oyo ezali kati na Yisaya 9:8–10:4 na makambo ya “liloba” moko. (Yisaya 9:8) Tóbosana mpe te ete “lobɔkɔ [ya Yehova] esembolami naino,” mpo na kosɛnga boyokani te, kasi mpo na kosambisa.—Yisaya 9:13.
b Basakoli oyo Yehova atindi na bokonzi ya Yisalaele ya nɔrdi ezali Yehu (oyo ya mokonzi te), Eliya, Mikaia, Elisa, Yona, Odede, Hosea, Amosa mpe Mika.
[Elilingi na lokasa 139]
Mabe mpe mobulu epalangani na Yisalaele lokola mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa zamba
[Elilingi na lokasa 141]
Yehova akosɛnga baoyo banyokolaka bazalani na bango bázongisa monɔkɔ