Mokapo ya Zomi na Mibale
Kobanga Moasulia te
1, 2. (a) Na makanisi ya bomoto, mpo na nini ekoki komonana ete Yona azalaki na ntina ya solosolo ya koboya kokokisa mokumba na ye ya kokenda kosakola epai ya Baasulia? (b) Ndenge nini bato ya Ninive batalelaki nsango ya Yona?
NA KATIKATI ya ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yona, mosakoli Moebele, mwana ya Amitai, akendaki na Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia. Azalaki na nsango moko ya ntina mingi mpo na koyebisa bato. Yehova alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá mpe kendá epai na [Ninive], mboka yango monene, mpe sakwelá bango mpo ete mabe na bango esili koya liboso na ngai.”—Yona 1:2, 3.
2 Ntango azwaki etinda yango mpo na mbala ya liboso, Yona akendaki nde epai mosusu, na Talasisi. Na makanisi ya bomoto, Yona azalaki na ntina ya koboya etinda yango. Baasulia bazalaki bato mabe mpenza. Yoká ndenge mokonzi moko Moasulia asalaki banguna na ye: “Nakataki binama ya bakambi . . . Natumbaki bakangami mingi kati na bango, mpe mingi nakangaki bango. Nakataki basusu mabɔkɔ mpe misapi, mpe nakataki basusu zolo.” Kasi, nsukansuka ntango Yona asakolaki nsango ya Yehova, bato ya Ninive babongolaki mitema mpe Yehova abebisaki engumba yango te na ntango wana.—Yona 3:3-10; Matai 12:41.
Yehova azwi “lingenda”
3. Bokeseni nini ezali kati na lolenge oyo Bayisalaele batalelaki makebisi ya Yehova mpe lolenge oyo bato ya Ninive batalelaki yango?
3 Bayisalaele oyo Yona asakolaki epai na bango, babongoli mitema? (2 Mikonzi 14:25) Te. Bapesi losambo ya pɛto mokɔngɔ. Kutu, bakómi tii “kosambela ebolo mobimba na lola mpe kosalela Baala.” Lisusu, “balekisaki bana na bango babali mpe bana na bango basi kati na mɔ́tɔ: [balandaki makambo ya bonganga-nkisi mpe koluka koyeba makambo makoya, NW] bamitekisaki ete básala mabe na miso na [Yehova] mpe bápelisa nkanda na ye.” (2 Mikonzi 17:16, 17) Na kokesana na bato ya Ninive, Bayisalaele babongwani te ntango Yehova azali kotinda basakoli mpo na kokebisa bango. Yango wana, Yehova alingi kozwa bikateli ya makasi mpenza.
4, 5. (a) “Moasulia” elimboli nini mpe ndenge nini Yehova akosalela ye lokola “lingenda”? (b) Ntango nini Samalia ekwei?
4 Nsima ya kokenda ya Yona na Ninive, Baasulia bakitisaki matata na bango mwa moke.a Nzokande, na ebandeli ya ekeke ya mwambe L.T.B., Asulia akómi lisusu makasi na bitumba, mpe Yehova asaleli ye na ndenge ya kokamwa mpenza. Mosakoli Yisaya apesi likebisi oyo euti epai na Yehova na Yisalaele, bokonzi ya nɔrdi, ete: “[Ah, Ah! Moasulia, NW], lingenda ya nkanda na ngai, nzete na lobɔkɔ na bango ezali nkɛlɛ na ngai. Nakotinda ye kotɛmɛla libota ya [bapɛngwi, NW], mpe kotɛmɛla bato ya nkanda na ngai, nakolakisa ye; kopunza biloko, [biloko babɔtɔli na etumba, NW] mpe konyatela bango na nse lokola [mabele, NW] na nzela.”—Yisaya 10:5, 6.
5 Oyo nde nsɔni mpo na Bayisalaele! Nzambe asaleli libota moko ya bapakano—“Moasulia”—lokola “lingenda” mpo na kopesa bango etumbu. Na mobu 742 L.T.B., Salamanesele V, mokonzi ya Asulia, azingaki Samalia, mboka-mokonzi ya Yisalaele, libota ya bapɛngwi. Lokola mboka yango ezali likoló ya ngomba oyo ezali molai ya mɛtrɛ 90, esika ebongi mpo na kobundisa banguna, Basamalia babenganaki bango pene na mbula misato. Kasi mayele ya moto moko te ekoki kopekisa mokano ya Nzambe. Na mobu 740 L.T.B., Samalia ekwei, Asulia anyati yango na makolo mpenza.—2 Mikonzi 18:10.
6. Na lolenge nini Moasulia alekisi ndelo na oyo Yehova azali kokanisa mpo na ye?
6 Atako Yehova asaleli bango mpo na kopesa basaleli na ye liteya, Baasulia bango moko bandimi Yehova te. Yango wana alobi lisusu ete: “Atako [Moasulia] azali naino bongo te, akoluka kozala bongo; atako motema na ye ekani bongo te, akokanisa, mpamba te na motema na ye ezali na likambo oyo, kosilisa mpe kolongola mabota na motuya moke te.” (Yisaya 10:7, NW) Yehova alingi ete Moasulia azala esaleli na lobɔkɔ na ye. Kasi Moasulia azali na likanisi ya kozala eloko mosusu. Motema na ye ezali kotinda ye akana kosala likambo moko ya monene—ayangela mokili mobimba oyo eyebanaki na ntango wana!
7. (a) Limbolá elobeli “bankumu na ngai nyonso bazali nde mikonzi te?” (b) Baoyo bazali kosundola Yehova lelo basengeli kokanisa likambo nini?
7 Bingumba mingi oyo ezalaki ya Yisalaele te oyo Moasulia abɔtɔlaki ezalaki liboso koyangelama na bakonzi. Bakonzi yango ya kala basengeli sikawa kotosa mokonzi ya Asulia lokola bankumu oyo bakómi baombo, mpe na yango alobi na lolendo nyonso ete: “[Bankumu, NW] na ngai nyonso bazali nde mikonzi te?” (Yisaya 10:8) Banzambe ya lokuta ya bingumba minene ya mabota yango bakokaki te kobikisa basambeli na bango na libebi. Banzambe oyo bato ya Samalia basambelaka, na ndakisa Baala, Moleke, mpe bana ya ngɔmbɛ ya wolo, bakobatela engumba yango te. Lokola basundoli Yehova, Basamalia bazali na lotomo te ya kozela ete abundela bango. Lelo oyo, tiká ete moto nyonso oyo asundoli Yehova akanisa likambo oyo ekómelaki Samalia! Moasulia akoki mpenza kodondwa mpo na Samalia mpe mpo na bingumba mosusu oyo abɔtɔli: “Kalano ezali lokola Kalekemisi te? Hamata lokola Alapada te? Samalia lokola Damaseke te?” (Yisaya 10:9) Ezali nyonso ndenge moko na miso ya Moasulia—kaka eloko ya kozwa.
8, 9. Mpo na nini Moasulia akei mosika ntango azali kokana kolonga Yelusaleme?
8 Kasi, Moasulia amikumisi mingi koleka. Alobi ete: “Lokola lobɔkɔ na ngai esili kozwa [bikonzi ya nzambe oyo azangi ntina, NW], oyo bikeko na yango elekaki yango na Yelusaleme mpe na Samalia, ngai nakosalela nde Yelusaleme mpe bikeko na ye te lokola nasili kosalela Samalia mpe bikeko na ye?” (Yisaya 10:10, 11) Bikonzi oyo Moasulia alongi ezalaki na bikeko mingi koleka Yelusaleme to kutu koleka Samalia. Alobi ete, ‘Nini ekopekisa ngai nasala na Yelusaleme ndenge nasalaki na Samalia?’
9 Azali moto ya lolendo mpenza! Yehova akotikela ye nzela te akamata Yelusaleme. Ya solo, Yuda asimbi mpenza losambo ya solo na motema moko te. (2 Mikonzi 16:7-9; 2 Ntango 28:24) Yehova akebisaki Yuda ete mpo na kozanga bosembo na ye, akonyokwama mingi ntango Moasulia akokɔta na mboka na ye. Kasi, Yelusaleme akobika. (Yisaya 1:7, 8) Ntango Moasulia akɔti, Hizikiya azali mokonzi na Yelusaleme. Hizikiya azali lokola tata na ye Ahaza te. Yango wana, kaka na sanza ya yambo mpenza ya boyangeli na ye, Hizikiya afungoli lisusu bikuke ya tempelo mpe azongisi losambo ya pɛto.—2 Ntango 29:3-5.
10. Yehova alaki nini mpo na Moasulia?
10 Yehova andimi mokano ya Moasulia te ya kobundisa Yelusaleme. Yehova alaki ete nguya yango ya lofundo ya mokili mobimba azongisa monɔkɔ: “Wana esili [Yehova] kosala mosala na ye mobimba epai na ngomba na Siona mpe na Yelusaleme, akopesa etumbu mpo na kobuna na motema ya [lofundo] ya mokonzi ya Asulia mpe mpo na nzombo na miso na ye.”—Yisaya 10:12.
Babundisi Yuda mpe Yelusaleme!
11. Mpo na nini Moasulia akanisi ete ekozala mpasi te mpo na kobebisa Yelusaleme?
11 Mbula mwambe nsima ya kokwea ya bokonzi ya nɔrdi na mobu 740 L.T.B., Saneheliba, mokonzi ya sika ya Asulia, ayei kobundisa Yelusaleme. Na maloba kitoko mpenza, Yisaya alobeli mokano ya lolendo oyo Saneheliba azali na yango: “Nalongoli ndelo ya mabota, napunzi biloko na bango ya motuya, lokola elombe, nakitisi baoyo bafandi wana. Lobɔkɔ na ngai ezwi zumbu ya ndɛkɛ, bozwi ya mabota; mpe lokola bato bakoyanganisa makei matikali, bongo ngai nayanganisi mokili mobimba; moko azalaki te oyo [aningisi, NW] lipapu, soko akozipola monɔkɔ soko kosala makɛlɛlɛ.” (Yisaya 10:13, 14) Saneheliba akanisi ete lokola bingumba mosusu ekwei mpe ete Samalia ezali lisusu te, yango wana ekozala mpasi te mpo na kozwa Yelusaleme! Engumba yango ekoki komeka kobunda, kasi ntango ekolela lokola ndɛkɛ, bafandi na yango bakokóma baombo, bakolongola bozwi na bango lokola balongolaka maki na zumbu oyo ndɛkɛ esundolá yango.
12. Yehova amonisi nini mpo na lolenge malamu ya kotalela lolendo ya Moasulia?
12 Kasi, Saneheliba abosani likambo moko. Samalia abongi na etumbu oyo azwi mpo ete apɛngwi. Nzokande, na boyangeli ya Mokonzi Hizikiya, Yelusaleme ekómi lisusu esika-makasi ya losambo ya pɛto. Moto oyo akomeka kosimba Yelusaleme akobunda mpenza nde na Yehova. Na nkanda mpenza, Yisaya atuni ete: “[Epasola, NW] ekomitombola nde na lolendo likoló na ye oyo akokata na yango? Mosumani ekomiyeisa monene likoló na ye oyo akotambolisa yango? Lingenda ekobɛtisa ye oyo atomboli yango? Nzete ekotombola ye oyo azali nzete te?” (Yisaya 10:15) Bokonzi ya Asulia ezali kaka esaleli mpamba na mabɔkɔ ya Yehova, lokola epasola, mosumani, to lingenda oyo mokati-nzete, mosali-mabaya to mobateli na mpate azali kosalela. Talá ndenge lingenda ezali sikawa komeka komitombola likoló ya moto oyo azali kosalela yango!
13. Yebisá mpe lobá makambo oyo ekómeli (a) “bato . . . ya mafuta.” (b) ‘nzube mpe matiti ya mpamba.’ (c) “nkembo ya zamba na ye.”
13 Nini ekokómela Moasulia? “Nkolo [ya solo, Yehova, NW] na bibele, akotinda kokɔnda kati na bato na ye ya mafuta; mpe na nse na nkembo na ye, [akopelisa] kozika, lokola kozika ya mɔ́tɔ mpenza. Pole na Yisalaele ekobongwana mɔ́tɔ mpe [Mosantu, NW] na ye lolemo ya mɔ́tɔ; ekozikisa mpe ekobebisa nzube na ye mpe matiti ya mpamba na mokolo moko. Mpe nkembo ya zamba na ye mpe na elanga na ye malamu, [Yehova] akobebisa yango na molimo mpe na mosuni; lokola kokɔnda ya moto ya [maladi]. Ndambo oyo ekotikala na nzete ya zamba na ye ekozala na motuya bobele moke; oyo mwana akoyeba kokoma yango.” (Yisaya 10:16-19) Yehova akokómisa mpenza “lingenda” ya Moasulia mokuse! “Bato ya . . . mafuta” ya mampinga ya basoda ya Asulia, basoda na ye ya mpiko, ‘bakokɔnda.’ Bakomonana lisusu makasi te! Ndenge moko na nzube mpe matiti ya mpamba, basoda na ye oyo babundaka na mabele bakozika na Pole ya Yisalaele, Yehova Nzambe. Mpe “nkembo ya zamba na ye,” bakomanda na ye, bakokóma na nsuka na bango. Ntango Yehova akosilisa makambo na Moasulia, bakomanda bakotikala mingi te mpe elenge mobali akokoka kotánga bango na misapi!—Talá mpe Yisaya 10:33, 34.
14. Lobelá ndenge Asulia azalaki kopusana pene na mabele ya Yuda na mobu 732 L.T.B.
14 Kasi, Bayuda oyo bafandi na Yelusaleme na mobu 732 L.T.B., bakoki komona ete ezali mpasi mpo Moasulia akwea. Limpinga monene ya basoda ya Asulia bazali kaka kopusana. Yoká molɔngɔ ya bingumba ya Yuda oyo esili kokwea: “Akómi na Ayata . . . Migilono . . . Mikemase . . . Geba . . . Lama . . . Gibea ya Saulo . . . Galimi . . . Laisa . . . Anatoto . . . Madamena . . . Gebimi . . . Nobo.” (Yisaya 10:28-32a)b Nsukansuka, banguna yango bakómi na Lakisi, kaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 50 na Yelusaleme. Eumeli te, limpinga monene ya basoda ya Asulia babundisi engumba yango. “Akobɛta ebɔtu na ye na [ngomba, NW] ya mwana mwasi ya Siona, [ngomba moke ya, NW] Yelusaleme.” (Yisaya 10:32b) Eloko nini ekopekisa Moasulia?
15, 16. (a) Mpo na nini Mokonzi Hizikiya asengeli kozala na kondima makasi? (b) Nini esalisi Hizikiya mpo andima ete Yehova akosalisa ye?
15 Na kati ya ndako na ye na engumba, Mokonzi Hizikiya azali kobanga mingi. Apasoli bilamba na ye mpe alati saki. (Yisaya 37:1) Atindi mibali epai na mosakoli Yisaya mpo atuna Yehova mpo na bolamu ya Yuda. Eumeli te, bazongi na eyano ya Yehova: “Bangá . . . te . . . Nakobatela mboka oyo.” (Yisaya 37:6, 35) Kasi, Baasulia balingi kaka kobundisa mpe bazali na elikya makasi ya kolonga.
16 Kondima ezali eloko oyo ekosalisa Mokonzi Hizikiya na ntango oyo ya mpasi. Kondima ezali “elimbweli na biloko bizangi komonana.” (Baebele 11:1) Esɛngaka komona mosika koleka oyo emonani na miso. Kasi kondima eutaka na boyebi. Na ntembe te Hizikiya ayebi ete Yehova asilaki koloba maloba ya kolendisa oyo: “Ɛ bato na ngai, baoyo bafandi na Siona, bangá Baasulia te . . . Zambi na ntango moke moke, etumbu ekosuka mpe nkanda na ngai ekozala mpo na kobebisa bango. Mpe [Yehova] na bibele, akobongisa fimbo kotɛmɛla bango lokola wana ebɛtaki ye Midiana na libanga na Olebe; mpe nzete na ye ekozala likoló na mai-na-monana, akotombola yango likoló lokola na nzela na Ezipito.” (Yisaya 10:24-26)c Ya solo mpenza, kala basaleli ya Nzambe bakutanaki na mikakatano. Bankɔkɔ ya Hizikiya bamonanaki lokola bazali na elikya te liboso ya mampinga ya makasi ya basoda ya Ezipito na Mai Motane. Bikeke mingi liboso, Gideona amonanaki mpamba ntango Bamidiana na Baamaleki bakɔtaki ebele mpenza mpo na kobundisa Yisalaele. Kasi, Yehova abikisaki basaleli na ye na makama wana mibale.—Exode 14:7-9, 13, 28; Basambisi 6:33; 7:21, 22.
17. Ndenge nini ekangelo ya Moasulia ‘elongolami’ mpe mpo na nini?
17 Yehova akosala lisusu ndenge asalaki mbala mibale oyo eleki? Ɛɛ. Yehova alaki ete: “Na mokolo yango, mokumba na ye ekolongolama na lipeka na yo mpe ekangelo na ye na nkingo na yo; ekobebisama mpo na kopakola mafuta.” (Yisaya 10:27) Ekangelo oyo Baasulia batii na lipeka mpe na nkingo ya libota oyo esalaki kondimana na Nzambe ekolongolama. Ekangelo yango “ekobebisama”—mpe ebebisami mpenza! Na butu moko mpamba, anzelu ya Yehova abomi Baasulia 185 000. Matata esili, mpe Baasulia balongwe na mabele ya Yuda mpo na libela. (2 Mikonzi 19:35, 36) Mpo na nini? “Mpo na kopakola mafuta.” Mbala mosusu ezali kolobela mafuta oyo bapakolaki Hizikiya ntango akómaki mokonzi na molɔngɔ ya bakitani ya Davidi. Na lolenge yango, Yehova akokisi elaka na ye: “Ngai nakobatela mboka oyo mpo na kobikisa yango mpo na nkombo na ngai mpe mpo na Davidi, moombo na ngai.”—2 Mikonzi 19:34.
18. (a) Esakweli ya Yisaya ezali na kokokisama kaka moko? Limbolá. (b) Ebongiseli nini lelo ekokani na Samalia ya kala?
18 Makambo Yisaya alobeli na mokapo oyo, ezali makambo oyo esalemaki na Yuda esili koleka mbula 2 700. Kasi makambo yango ezali mpenza na ntina mingi lelo oyo. (Baloma 15:4) Yango elingi koloba ete ezali na bato oyo bakokani na baoyo balobelami na lisolo yango kitoko—bafandi ya Samalia mpe ya Yelusaleme, bakisa mpe Baasulia—na mikolo na biso? Ɛɛ, ezali bongo. Ndenge moko na Samalia oyo emipesaki na losambo ya bikeko, bato ya mangomba ya boklisto balobaka ete basambelaka Yehova, nzokande bazali mpenza bapɛngwi. Kati na mokanda Kopalangana ya mateya ya boklisto (na Lingelesi), kardinalɛ John Henry Newman alobi ete biloko oyo mangomba ya boklisto ezali kosalela banda bikeke mingi, na ndakisa mpaka ya malasi, babuji, mai masantu, bilamba ya basango, mpe bililingi, “nyonso euti na losambo ya bopakano.” Lokola aboyaki kondima losambo ya bikeko ya Samalia, Yehova andimaka mpe te losambo ya bopakano ya mangomba ya boklisto.
19. Mangomba ya boklisto ezwi likebisi nini, mpe nani apesi yango?
19 Banda bambula mingi, Batatoli ya Yehova bazali kokebisa mangomba ya boklisto ete Yehova azali kosepela na yango te. Na ndakisa, na 1955, lisukulu ya bato nyonso oyo ezalaki na motó ya likambo “Nani azali ‘pole ya mokili’—mangomba ya boklisto to boklisto ya solo?” esalemaki na mokili mobimba. Lisukulu yango elimbolaki malamumalamu ndenge mangomba ya boklisto ebwaki mpenza mateya mpe misala ya boklisto ya solo. Na nsima, batindelaki bakonzi ya mangomba na bikólo mingi bakopi ya lisukulu yango ya kafukafu. Ebongiseli mobimba ya mangomba ya boklisto elandaki likebisi yango te. Batikeli Yehova apona eloko mosusu te kaka kopesa bango etumbu na “lingenda.”
20. (a) Nani akozala Moasulia ya mikolo na biso, mpe ndenge nini akosalelama lokola lingenda? (b) Na meko nini mangomba ya boklisto ekopesamela etumbu?
20 Yehova akosalela nani mpo na kopesa mangomba ya boklisto ya botomboki etumbu? Tozali kozwa eyano na mokapo ya 17 ya mokanda ya Emoniseli. Kuna, balakisi biso mwasi ya pite, “Babilone Monene,” oyo azali komonisa mangomba nyonso ya lokuta ya mokili mobimba, bakisa mpe mangomba ya boklisto. Mwasi ya pite yango azali kotambola likoló na nyama moko ya yauli ya langi motane oyo ezali na mitó nsambo mpe maseke zomi. (Emoniseli 17:3, 5, 7-12) Nyama yango ya yauli ezali komonisa ONU.d Kaka ndenge Asulia ya kala abebisaki Samalia, nyama ya yauli ya langi motane ‘akoyina mwasi ya pite, akobebisa ye, mpe akozalisa ye bolumbu; akolya mosuni na ye, mpe akotumba ye na mɔ́tɔ.’ (Emoniseli 17:16) Yango wana, Moasulia ya mikolo na biso, (bikólo oyo esangani na ONU) akobɛta mangomba ya boklisto lingenda makasi mpenza mpe akolimwisa ye.
21, 22. Nani akotinda nyama ya yauli mpo abundisa basaleli ya Nzambe?
21 Batatoli ya Yehova ya sembo bakokufa elongo na Babilone Monene? Te. Bazali na likambo na Nzambe te. Losambo ya pɛto ekotikala. Kasi, nyama ya yauli oyo akoboma Babilone Monene azali mpe kotala basaleli ya Yehova na liso mabe mpenza. Ntango azali kosala bongo, azali kokokisa mokano ya Nzambe te, kasi mokano ya moto mosusu. Moto yango nani? Satana Zabolo.
22 Yehova atɔndɔli mokano ya lolendo ya Satana: “Na ntango yango makanisi makokɔta na motema na yo [Satana], mpe okoanga mwango mabe mpe okoloba ete, . . . Nakobimela baoyo [bazali] na kimya, baoyo bafandi na kobanga te, bango nyonso bafandi kuna na [bifelo, NW] [ya kobatelama] te . . . [Ekozala, NW] mpo na kobɔtɔla mpe kopunza.” (Ezekiele 38:10-12) Satana akokanisa ete, ‘Mpo na nini te kotinda mabota bábundisa Batatoli ya Yehova? Bazali na makasi te, bazali na mobateli te, bazali mpe makasi te na makambo ya politiki. Bakokoka kobunda te. Ekozala mpenza lokola kozwa maki na zumbu oyo moto ya kobatela yango azali te!’
23. Mpo na nini Moasulia ya mikolo na biso akokoka te kosala basaleli ya Nzambe ndenge akosala mangomba ya boklisto?
23 Kasi, bino mabota, bókeba! Bóyeba ete soki botumoli basaleli ya Yehova, bokobunda nde na Nzambe! Yehova alingaka basaleli na ye, mpe akobundela bango kaka ndenge asalaki mpo na Yisalaele na mikolo ya Hizikiya. Ntango Moasulia ya mikolo na biso akokana kosilisa basaleli ya Yehova, akobunda nde na Yehova Nzambe mpe na Mwana na Mpate, Yesu Klisto. Yango ezali etumba oyo Moasulia akoki kolonga soki moke te. Biblia elobi ete: “Mwana na Mpate akoleka bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi.” (Emoniseli 17:14; kokanisá na Matai 25:40.) Lokola Moasulia ya ntango ya kala, nyama ya yauli ya langi motane ‘akokenda kino libebi.’ Bakobanga ye lisusu te.—Emoniseli 17:11.
24. (a) Baklisto ya solo bakani kosala nini mpo na komilɛngɛla mpo na mikolo ezali koya? (b) Na lolenge nini Yisaya azali kotala mosika? (Talá etanda na lokasa 155.)
24 Baklisto ya solo bakoki kotalela mikolo ezali koya na elikya mpenza soki basali boyokani malamu na Yehova mpe soki bazali kosala ete kokokisama ya mokano ya Nzambe ezala lobanzo na bango ya liboso. (Matai 6:33) Yango wana, basengeli ‘kobanga likambo moko ya mabe te.’ (Nzembo 23:4) Na miso ya kondima, bakomona lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe etombwami likoló mpo na kopesa bango etumbu te, kasi mpo na kobatela bango liboso na banguna na ye. Mpe matoi na bango ekoyoka maloba oyo ya kolendisa: “Bangá . . . te.”—Yisaya 10:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Étude perspicace des Écritures, volumi 1, lokasa 212.
b Mpo ezala polele, Yisaya 10:28-32 etalelami liboso ya Yisaya 10:20-27.
c Mpo na kotalela Yisaya 10:20-23, talá etanda “Yisaya azali kotala mosika,” na lokasa 155.
d Makambo mosusu oyo etaleli mwasi ya pite yango mpe nyama ya yauli ya langi motane elimbolami na mikapo 34 mpe 35 ya buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na nkasa 155, 156]
YISAYA AZALI KOTALA MOSIKA
Mokapo ya zomi ya Yisaya ezali kolobela mingimingi ndenge Yehova akosalela Asulia mpo na kokɔta na Yisalaele mpe kopesa yango etumbu, ezali kolobela mpe elaka ya Nzambe ya kobundela Yelusaleme. Lokola Yisaya 10 vɛrsɛ 20 tii 23 ezali na katikati ya esakweli yango, tokoki kokanisa ete ekokisamaki mobimba kaka na eleko wana. (Kokanisá na Yisaya 1:7-9.) Kasi, elobeli oyo ezali na bavɛrsɛ yango emonisi ete ezali kolobela mingimingi mikolo ezali koya ntango Yelusaleme mpe akozongisa monɔkɔ mpo na masumu ya bato na ye.
Mokonzi Ahaza ameki komibatela na koluka lisalisi ya Asulia. Mosakoli Yisaya asakoli ete na ntango moko ekoya, babiki ya ndako ya Yisalaele bakosala lisusu bozoba wana te. Yisaya 10:20 elobi ete “bakogumbama likoló na [Yehova, Mosantu, NW] ya Yisalaele, na sembo.” Kasi, Yisaya 10 vɛrsɛ 21 emonisi ete kaka mwa motángo moke bakosala bongo: “Ndambo ekozonga.” Yango ekundoleli biso Sala-Yasubu, mwana mobali ya Yisaya, oyo azali elembo na Yisalaele mpe nkombo na ye elimboli “mwa ndambo moke ya batikali bakozonga.” (Yisaya 7:3) Yisaya 10 Vɛrsɛ 22 ya mokapo ya zomi ekebisi mpo na koya ya “libebi” oyo ekanamaki. Libebi ya ndenge wana ekozala ya sembo mpamba te ezali etumbu oyo ebongi na libota ya batomboki. Yango wana, na kati ya libota ya bato ebele oyo bazali ‘lokola zɛlo ya mai monene,’ kaka mwa batikali bakozonga. Yisaya 10 Vɛrsɛ 23 ekebisi ete kobebisama yango ekoyela ekólo mobimba. Mbala oyo, Yelusaleme ekobikisama te.
Bavɛrsɛ yango elobeli malamumalamu makambo oyo esalemaki na mobu 607 L.T.B. ntango Yehova asalelaki bokonzi ya Babilone lokola “lingenda” na ye. Banguna balongaki ekólo mobimba, bakisa mpe Yelusaleme. Bayuda bakendaki na boombo na Babilone mbula 70. Kasi, nsima na yango, basusu—atako ezalaki kaka ‘mwa ndambo moke ya batikali’—bazongaki mpo na kotonga lisusu losambo ya solo na Yelusaleme.
Esakweli ya Yisaya 10:20-23 ekokisamaki lisusu na ekeke ya liboso, lokola yango emonisami na Baloma 9:27, 28. (Kokanisá na Yisaya 1:9; Baloma 9:29.) Paulo alobi ete na elimo, “batikali” ya Bayuda ‘bazongaki’ epai ya Yehova na ekeke ya liboso T.B., mpamba te motángo moke ya Bayuda ya sembo bakómaki bayekoli ya Yesu Klisto mpe babandaki kosambela Yehova “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24, NW) Na nsima, bato ya bikólo mosusu oyo bamonisaki kondima babakisamaki, mpe basalaki ekólo moko ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Na libaku wana nde maloba ya Yisaya 10:20 ekokisamaki: Libota moko oyo emipesi na Yehova ekopesa ye mokɔngɔ “lisusu te” mpo na koluka lisalisi epai ya bato.
[Elilingi na lokasa 147]
Saneheliba akanisi ete kokamata mabota ezali pɛtɛɛ lokola kokamata maki na zumbu