Ekomeli ya Cunéiforme mpe Biblia
NSIMA ya kobulunganisama ya minɔkɔ na Babilone, bato bakómaki na mitindo ndenge na ndenge ya kokoma. Bato oyo bazalaki kofanda na Mezopotamia, na ndakisa bato ya Sumer mpe ya Babilone, bazalaki kosalela ekomeli ebengami cunéiforme. Nkombo yango euti na Latin mpe elimboli “eloko oyo ezali na nsɔngɛ” mpe ezali komonisa makomi na lolenge ya triangle oyo bazalaki kokoma likoló ya bitanda ya pɔtɔpɔtɔ oyo ekauki naino te.
Bato ya arkeoloji bakundoli makomi mingi ya cunéiforme oyo elobeli bato mpe makambo oyo Biblia mpe elobeli. Makambo nini toyebi lelo mpo na ekomeli yango? Makomi yango ezali komonisa nini mpo na bosolo ya Biblia?
Makomi oyo eumeli mingi
Bato ya siansi balobaka ete na ebandeli, bato ya Mezopotamia bazalaki kokoma bilembo to bililingi oyo mokomoko ezalaki komonisa liloba to likanisi moko. Na ndakisa, mpo na kokoma ngɔmbɛ, bazalaki kosala elembo oyo ezali lokola motó ya ngɔmbɛ. Lokola bakómaki kokoma makambo mingi oyo esengeli kobatelama, babimisaki ekomeli ya cunéiforme. Buku moko (NIV Archaeological Study Bible) elobi ete “bakómaki kosalela bilembo kaka te mpo na kokoma liloba mobimba, kasi mpe eteni mokomoko ya liloba mpe bakokaki kokangisa bilembo mingi mpo na kobimisa liloba moko.” Nsukansuka, na lisalisi ya bilembo soki 200, ekomeli ya cunéiforme “epesaki nzela na kokoma ata lisolo mobimba, ná maloba mpe makambo mosusu nyonso oyo ezali na gramɛrɛ ya monɔkɔ moko.”
Ntango Abalayama azalaki na bomoi, na mobu soki 2000 L.T.B., ekomeli ya cunéiforme ekolaki mpenza. Na boumeli ya bikeke 20 oyo elandaki, minɔkɔ soki 15 ezalaki kosalela ekomeli yango. Lelo oyo, makomi mingi ya cunéiforme oyo bakundoli (koleka 99 %) ekomamaki likoló ya bitanda ya mabelé. Na boumeli ya mbula 150 oyo eleki, bakundolaki ebele ya bitanda yango na bisika oyo ezalaki bingumba lokola Ulu, Ourouk, Babilone, Nimroud, Nippour, Ashour, Ninive, Mari, Ebla, Ougarit, mpe Amarna. Buku moko (Archaeology Odyssey) elobi boye: “Bato ya mayele balobi ete bitanda oyo ezali na makomi ya cunéiforme oyo basili kokundola ekoki kozala kati na milio moko to mibale, mpe mbula na mbula bazali kokundola bitanda soki 25 000.”
Lelo oyo, bato ya mayele oyo bayekolaka makomi ya cunéiforme bazali na mosala monene ya kobongola yango. Moto moko alobi ete, “na mikolo na biso, kaka ndambo moko likoló na zomi ya makomi ya cunéiforme nde esili kotángama ata mbala moko.”
Bitanda oyo ezali na makambo ekomami na minɔkɔ mibale to misato esalisaki mpo na koyeba ndimbola ya makambo oyo ezali na ekomeli ya cunéiforme. Bato ya mayele bamonaki ete mokomoko na bitanda yango elobelaki likambo kaka moko, kasi na minɔkɔ ekeseni mpe nyonso na ekomeli ya cunéiforme. Likambo oyo esalisaki na koyeba ndimbola ya makambo yango ezali ete mbala mingi, bankombo, batitre, milɔngɔ ya bankɔkɔ ya bakonzi, ata mpe maloba ya komikumisa ezalaki kozongelama mbala na mbala.
Na bambula ya 1850, bato ya mayele bakómaki na likoki ya kotánga monɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba na Moyen-Orient, monɔkɔ ya Akkadien, to ya Asulia mpe ya Babilone, oyo ekomamaki na cunéiforme. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Nsima ya koyeba makambo ekomamaki na monɔkɔ ya Akkadien, bato ya mayele bayebaki ndenge oyo makambo ezalaki kokomama, mpe bazwaki modɛlɛ mpo na kobongola minɔkɔ mosusu oyo ezalaki na ekomeli ya cunéiforme.” Boyokani nini ezali kati na makomi yango mpe Biblia?
Makambo oyo ezali kondimisa bosolo ya Biblia
Biblia elobi ete bakonzi ya Bakanana bazalaki koyangela na Yelusaleme tii ntango Davidi abɔtɔlaki engumba yango, na mobu 1070 L.T.B. (Yos. 10:1; 2 Sam. 5:4-9) Kasi, bato mosusu ya mayele bazalaki kobɛtela likambo yango ntembe. Nzokande, na mobu 1887, mwasi moko oyo azalaki kofanda na mboka moko na Égypte, alɔkɔtaki etanda moko ya mabelé na el-Amarna. Bitanda soki 380 oyo bamonaki kuna, ezalaki nde mikanda oyo bakonzi ya Ezipito (Aménophis III mpe Akhenaton) bazalaki kotindelana na bakonzi ya Kanana. Mikanda motoba eutaki epai ya ‘Abdi-Heba, mokonzi ya Yelusaleme.
Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi boye: “Ndenge bitanda ya Amarna elobi polele ete Yelusaleme ezalaki engumba, kasi ekólo te, mpe ete ‘Abdi-Heba azalaki . . . guvɛrnɛrɛ oyo azalaki na ndako na Yelusaleme mpe basoda 50 ya Ezipito, ezali komonisa ete Yelusaleme ezalaki mwa bokonzi oyo ezalaki likoló ya bangomba.” Zulunalo yango ebakisaki boye: “Tokoki mpenza kondimisama, na kotalela mikanda ya Amarna, ete engumba moko oyo ezalaki kotángama na kati ya bingumba minene, ezalaki mpenza.”
Bankombo na mikanda ya Asulia mpe ya Babilone
Bato ya Asulia, mpe na nsima bato ya Babilone, bazalaki kokoma masolo na bango na bitanda ya mabelé, likoló ya mwa mabanga mpe likoló ya bamonima. Na yango, ntango bato ya mayele bakómaki na likoki ya kotánga monɔkɔ ya Akkadien oyo ezalaki na ekomeli ya cunéiforme, bamonaki ete ezalaki mpe na bankombo ya bato oyo Biblia elobeli.
Buku moko (The Bible in the British Museum) elobi boye: “Na lisolo oyo Doktere Samuel Birch asalaki na mobu 1870 liboso ya basangani ya Société d’archéologie biblique, ntango esalemaki sika, atángaki [na bitanda oyo ezali na makomi ya cunéiforme bankombo ya] bakonzi ya Baebele: Omili, Ahaba, Yehu, Azalia . . . , Menaheme, Peka, Hosea, Yizikiya mpe Manase, bakonzi ya Asulia: Tigilata-pilesele . . . [III], Salegone, Senakeliba, Ésar-haddôn mpe Assourbanipal, . . . mpe bakonzi ya Sulia: Hazaele mpe Lesini.”
Buku moko (The Bible and Radiocarbon Dating) elobeli lisolo ya Yisalaele mpe ya Yuda ndenge ezali na Biblia mpe ndenge ezali na makomi ya cunéiforme. Emonisi makambo nini? “Bakonzi 15 to 16 ya Yuda mpe ya Yisalaele batángami na makomi ya bato ya bikólo mosusu, kasi bankombo na bango mpe bileko oyo bayangelaki ekeseni ata moke te na ndenge elobelami na [mikanda ya] Mikonzi. Elobeli ata mokonzi moko te ete ayangelaki na eleko mosusu, mpe makomi yango etángi ata nkombo ya mokonzi moko te oyo azali te na mikanda ya Mikonzi.”
Cylindre de Cyrus, moko na makomi ya cunéiforme oyo eyebani mingi, oyo bakundolaki na mobu 1879, elobi ete nsima ya kokweisa Babilone na mobu 539 L.T.B., Sirise abimisaki mobeko oyo elobaki ete bakangami nyonso bázonga na bikólo na bango. Bayuda bazalaki na kati ya bakangami yango. (Ezl. 1:1-4) Na ekeke ya 19, bato mingi ya siansi bazalaki kondima te ete mobeko oyo Biblia elobeli epesamaki mpenza. Nzokande, makomi ya cunéiforme oyo ekomamaki na eleko ya Baperse, oyo moko na yango ezali Cylindre de Cyrus, ezali komonisa polele ete Biblia elobaki likambo ya solo.
Na mobu 1883, bakundolaki bitanda koleka 700 oyo ezalaki na makomi ya cunéiforme na Nippour, pembeni ya Babilone. Na kati ya bankombo 2 500 oyo etángami na kati, bankombo soki 70 ekokani na bankombo ya Bayuda. Edwin Yamauchi, moto moko ya mayele na masolo ya kala, alobi ete bato yango balobelami lokola “bato bazali kosala boyokani, bato ya misali, batatoli, bakɔngɔli-mpako, mpe basali ya Leta.” Elembeteli yango oyo ezali komonisa ete Bayuda mosusu bakobaki kosala misala ya ndenge wana na bamboka oyo ezali pembeni ya Babilone na eleko wana ezali na ntina mingi. Ezali kondimisa esakweli ya Biblia oyo elobaki ete “ndambo” ya Bayisalaele bakouta na Asulia mpe na Babilone mpe bakozonga na Yudea, kasi mingi mpe bakozonga te.—Yis. 10:21, 22.
Na boumeli ya mbula nkóto ya liboso L.T.B., ekomeli ya cunéiforme ezalaki kosalelama, atako bato mosusu bazalaki kosalela alfabɛ. Kasi, nsukansuka bato ya Asulia mpe ya Babilone batikaki ekomeli ya cunéiforme mpe bakómaki kosalela kaka alfabɛ.
Tii lelo oyo, bankóto na bankóto ya bitanda oyo ezali na makomi ya cunéiforme oyo eyekolami naino te ebombami na ba musée. Bitanda oyo bato ya mayele basili koyekola ezali kondimisa bosolo ya Biblia. Mbala mosusu bitanda oyo eyekolami naino te ekomonisa makambo mosusu oyo mpe ekondimisa biso bosolo ya Biblia.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]
Tokangi fɔtɔ yango na ndingisa ya British Museum