Biblia—Buku oyo ezali na bisakweli ya solosolo, Eteni 2
Bóbima na Babilone!
Masolo ya biteni mwambe oyo ya “Lamuká!” ezali kolobela masolo ya ntina mingi oyo etali Biblia—Bisakweli na yango. Masolo yango ekosalisa yo ozwa biyano na mituna oyo: Bisakweli ya Biblia ezali kaka makanisi ya bato ya mayele? Ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe? Tosɛngi yo otalela naino makambo oyo elandi.
NA ETENI ya liboso ya masolo oyo, totalelaki bisakweli misato ya Biblia oyo elobeli bakitani ya Abrahama. Makambo emonisi ete Nzambe akokisaki bilaka oyo alakaki Abrahama epai ya libota ya Yisraele, bakitani na ye.
Engumba ya Babilone ya kala mpe ezalaki na ntina mingi na lisolo ya Biblia, mingimingi na siɛklɛ ya nsambo liboso ya ntango na biso (L.T.B). Tótalela sikoyo bisakweli misato ya Biblia oyo elobeli bokonzi ya Babilone mpe tokomona soki bisakweli yango ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.
Mosakoli Moize akebisaki Bayisraele boye: “Soki obosani Yehova Nzambe na yo ata moke mpe olandi mpenza banzambe mosusu mpe osaleli bango mpe ogumbameli bango, . . . bokokufa mpenza.” (Kolimbola Mibeko 8:19; 11:8, 9) Kasi, Bayisraele batombokelaki Yehova mbala na mbala na ndenge bakómaki kosambela bikeko.—1 Bakonzi 14:22-24.
Nsukansuka, motema molai ya Nzambe ekómaki na nsuka mpe atikaki nzela ete bato ya Babilone bálonga basaleli na ye mpo bazangaki kondima. Mampinga ya basoda ya Babilone oyo etambwisamaki na mokonzi Nebukadenezare (ekomamaka mpe Nebukadrezare), bayaki kobundisa Yisraele mpe bazingaki Yerusaleme. Kozinga oyo bazingaki engumba yango ezalaki na ndimbola nini? Tótalela makambo oyo mosakoli Yirimia akomaki mbula soki 20 liboso ete likambo yango esalema.—Yirimia 25:1
Esakweli 1: “Lokola [Bayisraele] botosaki maloba na ngai [ya Nzambe] te, talá nazali kotinda . . . Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, . . . mpe nakomema bango [bato ya Babilone] bábundisa mokili oyo mpe bato oyo bafandi na yango . . . Mpe mokili oyo mobimba esengeli kokóma esika oyo ebebisami, eloko ya kokamwa, mpe bato ya bikólo oyo bakosalela mpenza mokonzi ya Babilone mbula ntuku nsambo (70).”—Yirimia 25:8-11.
Ndenge ekokisamaki: Nsima ya kozinga Yerusaleme ntango molai, Nebukadenezare azikisaki yango na mɔtɔ na mobu 607 L.T.B. Abɔtɔlaki mpe bingumba mosusu ya Yuda, ezala Lakishi mpe Azeka. (Yirimia 34:6, 7) Amemaki bato mosusu mingi oyo batikalaki na bomoi, mpe akómisaki bango baoombo na Babilone na boumeli ya mbula 70.
Makambo oyo eleká emonisi nini?:
● Biblia emonisi ete Nebukadenezare azalaki mokonzi ya Babilone na ntango Yerusaleme ebebisamaki. Boyekoli ya biloko ya kala endimisi ete Biblia elobi solo ete Nebukadenezare azalaki na bomoi. Na engumba Florence, na Italie, bazwaki mwa medayi moko esalemi na libanga ya onikisi. Ezalaki na makomi oyo ndambo na yango elobi boye: “Mpo na lokumu ya Merodake, nkolo na ye, Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, asalaki yango ntango azalaki na bomoi.” Nebukadenezare ayangelaki kobanda mobu 624 tii 582 L.T.B.
● Buku moko (The Bible and Archaeology) elobi ete biloko oyo bakundolaki na Lakisi mpo na kosala baankɛtɛ emonisi boye: “Kobebisama ya nsuka ezalaki ya nsɔmɔ mpenza na boye ete mɔtɔ oyo ezikisaki engumba [Lakishi] ezikisaki mpe mabanga ya bandako.”
Esakweli 2: “Ntango mbula ntuku nsambo (70) ekokoka na Babilone [Yehova] nakotyela bino [Bayuda oyo bamemamaki] likebi, mpe nakokokisela bino liloba na ngai ya malamu na ndenge nakozongisa bino na esika oyo [mokili ya Yuda].”—Yirimia 29:10.
Ndenge ekokisamaki: Nsima ya mbula 70 ya boombo, kobanda mobu 607 tii 537 L.T.B., Siruse, mokonzi ya Baperse abimisaki Bayuda na boombo mpe apesaki bango nzela bázonga na mokili na bango mpo bátonga lisusu tempelo na Yerusaleme.—Ezera 1:2-4.
Makambo oyo eleká emonisi nini?:
● Bayuda baumelaki na boombo na Babilone mbula 70 ndenge Biblia esakolaki? Talá ndenge Ephraim Stern, moto moko ya Israël oyo akambaki etuluku ya bato oyo bakundolaka biloko ya kala mpo na kosala baankɛtɛ alobi: “Kobanda mobu 604 L.T.B. tii 538 L.T.B., eloko moko te emonisi ete bato bafandaki na Yisraele. Na bambula wana nyonso, bato bazalaki kofanda lisusu te na bingumba nyonso oyo bato ya Babilone babebisaki.” Na ntango wana, Bayisraele bazalaki na boombo na Babilone kobanda mobu 607 tii 537 L.T.B.—2 Ntango 36:20, 21.
● Bato ya bikólo ya kala na Mezopotamia bazalaki kokoma na bitanda oyo esalemi na mabele ya lima oyo ekauki naino te. Etanda moko ya ndenge wana oyo eumeli mbula nkama, oyo eyebani na nkombo ya Etanda ya Siruse, esalemaki soki na mobu 539 L.T.B., kaka mbula oyo mokonzi ya Baperse, Siruse akweisaki bokonzi ya Babilone. Likomi moko elobi boye: “Ngai Siruse, . . . Mokonzi ya Babilone.” Likomi yango ebakisi ete: “Nazongisaki bingumba mosantu [bingumba mosusu oyo atangaki liboso] na ngambo mosusu ya ebale Tigrɛ, oyo bitumbelo na yango mosusu esilaki kobebisama ntango molai liboso, ná bikeko (oyo ezakaki) na yango . . . (Lisusu) Nasangisaki bato oyo bafandaki (kala) kuna mpe nazongiselaki bango bisika na bango ya kofanda.”
Makambo oyo ezali na etanda wana eyokani na esakweli ya Biblia oyo elobi ete Bayuda basengelaki kozonga na mokili na bango; mpe esakweli yango ekomamaki mbula soki 200 liboso.
Esakweli 3: “Babilone, kitoko ya makonzi, bonzenga ya lolendo ya Bakaladea, ekokóma mpenza lokola ntango Nzambe akweisaki Sodoma ná Gomora. Bato bakofanda epai na ye ata mokolo moko te.”—Yisaya 13:19, 20.
Ndenge ekokisamaki: Na ndenge moko ya kokamwa, Babilone oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba, ekweaki na mabɔkɔ ya Bamede ná Baperse na mobu 539 L.T.B.a Engumba yango ezongaki lisusu te ndenge ezalaki liboso. Kutu, mokemoke, ebandaki kokufa mpe nsukansuka etikalaki mpamba mpe tii lelo oyo ‘moto afandaka kuna te.’—Yirimia 51:37.
Makambo oyo eleká emonisi nini?:
● Babilone ebebisamaki mpenza nyɛɛ, mpamba te Tom Boiy, profesɛrɛ moko na iniversite alobi mpo na “bakomi ya makambo ya kala mpe basali-mibembo na mikili ya Mpoto na siɛklɛ ya zomi na motoba tii zomi na mwambe” oyo bamesanaki mpenza na engumba yango, kasi bakokaki lisusu te koyeba malamu “esika ezalaki.”
● Na 1919, Henry Hall, moto oyo abatelaka biloko ya kala ya Ezipito mpe ya Asiri na British Museum, alobaki boye mpo na Babilone: “Ezali libondo ya bifelo oyo ebukaná . . . etondá na zɛlo.”
Tokoloba nini mpo na kokokisama ya bisakweli oyo touti kotalela? Yango emonisi mpenza ete Biblia ezali buku ya bisakweli ya solosolo. Bisakweli oyo etalaki Yuda mpe Babilone ekokisamaki na mobimba kaka ndenge esakolamaki!
Yerusaleme ebebisamaki mpo bato na yango baboyaki kondima makebisi ya Nzambe oyo etali kobongola bizaleli ya mabe. Nsima ya mbula 70 ya boombo na Babilone, Bayisraele bazwaki ndingisa ya kozonga na Yerusaleme. Engumba ya Babilone ya kala ebebisamaki kaka ndenge esakweli elobaki, mpe bato bafandaka kuna lisusu te tii lelo oyo. Wana ezali kaka mwa ndambo ya bisakweli oyo ezali na Biblia.
Lamuká! ya mbala ekoya ekolobela ndenge oyo makambo mosusu oyo esakolamaki bambula mingi liboso ekokisamaki na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Kokokisama ya bisakweli yango mpe etindaka biso tóndima ete Biblia ezali na bisakweli ya solosolo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbula soki 200 liboso, Yisaya asakolaki mpe ete Bamede bakokokisa mokumba monene ntango Babilone ekokwea.—Talá Yisaya 13:17-19; 21:2.
[Etanda na nkasa 14, 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BADATI OYO ETALI BABILONE
Soki na mobu 732 L.T.B.: Yisaya asakolaki kokwea ya Babilone
(L.T.B.)
647 Yehova akómisi Yirimia mosakoli
632 Bokonzi ya Babilone ekweisi bokonzi ya Asiri
625 Nebukadenezare abandi koyangela
617 Danyele mpe Ezekiele bamemami na Babilone
607 Nebukadenezare abebisi Yerusaleme
582 Boyangeli ya Nebukadenezare esuki
539 Bamede ná Baperse bakweisi bokonzi ya Babilone
537 Bayuda oyo bazalaki na boombo bazwi ndingisa ya kozonga na Yerusaleme
Bayuda baumelaki na boombo na Babilone mbula 70
[Elilingi na lokasa 14]
Mikanda ya Lakishe endimisi bisakweli ya Yirimia oyo elobeli kobebisama ya Yuda na bato ya Babilone
[Elilingi na lokasa 15]
Etanda ya Siruse elobeli ndenge oyo Siruse apesaki ndingisa mpo baoombo bázonga na mokili na bango
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
Lokasa 14, mokanda ya Lakishe: Fɔtɔ ezwami na ndingisa ya British Museum; lokasa 15, Etanda ya Siruse: © The Trustees of the British Museum