Mokapo ya Zomi na Mwambe
Mateya oyo etali likambo ya kozanga bosembo
1. Olingaki komona ndenge nini soki ozalaki na kati ya engumba moko ya kala oyo banguna bazingi yango mpo na etumba?
KANISÁ ete ozalaki na kati ya engumba moko ya ntango ya kala mpe banguna bazingi yango. Banguna yango batɛlɛmi na libándá ya bifelo ya engumba na bino—baleki bino na makasi mpe bazali ata na mawa te. Oyebi ete basili kokweisa bingumba mosusu. Sikawa bazali na ekateli ya kobɔtɔla mpe kopunza engumba na bino, kobebisa basi mpe koboma bato oyo bafandi na engumba yango. Mampinga ya banguna baleki bino na makasi mpe bokoki kobunda na bango te, botikali kaka na elikya moko ete, bakokoka te kokatisa bifelo ya engumba na bino. Ntango bozali kotala na likoló ya bifelo, bozali komona bisika oyo banguna batongi mpo na kobunda na bino na kati ya engumba. Bazali mpe na bamasini oyo ekoki kobwaka mabanga ya minene mpe kokweisa bifelo na bino. Bozali komona mpe bamasini ya kobuka bifelo mpe bibuteli, bozali komona lisusu basoda na bango oyo babundaka na matimbo, makalo na bango, mpe ebele ya basoda na bango. Oyo nde nsɔmɔ!
2. Lokola Yisaya mokapo 22 elobeli yango, ntango nini bazingaki engumba?
2 Yisaya mokapo 22 ezali kolobela likambo ya ndenge wana—ndenge bakozinga Yelusaleme. Yango esalemaki ntango nini? Ezali mpasi mpo na komonisa mpenza kozingama oyo ekokani na makambo nyonso oyo elobelami awa. Na ntembe te, esakweli yango ezali mpenza koyebisa liboso polelepolele kozingama ya Yelusaleme, yango ezali likebisi mpo na engumba yango mobimba mpo na makambo oyo ezali kozela yango.
3. Bafandi ya Yelusaleme basali nini ntango banguna bazingi engumba ndenge Yisaya alobelaki yango?
3 Ntango bazingi engumba na bango ndenge Yisaya alobaki, bato ya Yelusaleme basali nini? Lokola bazali bato oyo basalaki kondimana na Nzambe, bazali kobelela Yehova mpo abikisa bango? Te, bamonisi nde ezalela ya bozoba koleka, lokola oyo emonanaka epai na bato mingi oyo balobaka ete basambelaka Nzambe lelo oyo.
Banguna bazingi engumba moko
4. (a) “Lobwaku ya emonaneli” ezali nini, mpe mpo na nini ezali na nkombo yango? (b) Elimo ya bafandi ya Yelusaleme ezali ndenge nini?
4 Mokapo 21 ya Yisaya, ezali na nsango misato ya kosambisa oyo mokomoko ebandi na liloba “likebisi.” (Yisaya 21:1, 11, 13) Yisaya Mokapo 22 ebandi mpe ndenge wana: “[Likebisi etaleli, NW] lobwaku ya emonaneli: Likambo nini na yo ete osili kobuta, bino nyonso, kino likoló na ndako?” (Yisaya 22:1) “Lobwaku ya emonaneli” ezali Yelusaleme. Engumba yango ebengami lobwaku mpamba te atako ezali likoló na ngomba, kasi ezingami na bangomba oyo eleki yango na molai. Ezali na boyokani na “emonaneli” mpamba te bimonaneli mpe bimoniseli mingi oyo euti na Nzambe epesami wana. Yango wana, bafandi na yango basengelaki kotya likebi na maloba ya Yehova. Kasi, babwaki ye mpe bamipesi nde na losambo ya lokuta. Banguna oyo bazingi engumba yango bazali esaleli oyo Nzambe aponi mpo na kokokisa ekateli na ye likoló na bato na ye wana batomboki.—Deteronome 28:45, 49, 50, 52.
5. Mbala mosusu mpo na nini bato yango bamataka na likoló ya ndako?
5 Yebá ete bafandi ya Yelusaleme ‘[bamati, NW] bango nyonso kino likoló ya ndako.’ Na ntango ya kala, likoló ya bandako ya Bayisalaele ezalaki patatalu mpe mabota bazalaki mbala mingi koyangana wana. Yisaya ayebisi te nini bazalaki kosala na mabaku yango, kasi maloba na ye emonisi ete ezalaki likambo oyo endimami te. Ekoki kozala ete bamataka na likoló mpo na kobelela banzambe na bango ya lokuta. Yango ezalaki momeseno na bango na bambula oyo ezalaki liboso ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).—Yilimia 19:13; Sefania 1:5.
6. (a) Makambo nini ezali na kati ya Yelusaleme? (b) Mpo na nini bato mosusu bazali na esengo, kasi nini ezali kozela bango?
6 Yisaya akobi koloba: “Otondi nde na koganga, yo mboka na makɛlɛlɛ, yo mboka na kosepela? Bibembe kati na yo babomami na mopanga te, bakufi na etumba mpe te.” (Yisaya 22:2) Engumba yango etondi na ebele ya bato mpe na loyenge. Na babalabala, bato bazali kosala makɛlɛlɛ mpe bazali kobanga. Kasi, bato mosusu bazali na esengo, mbala mosusu mpo bazali kokanisa ete kimya ezali to ete likama yango ekoleka.a Kasi, kozala na esengo na ntango ya boye ezali mpenza bozoba. Bato mingi na engumba yango bakokufa liwa moko mabe koleka kokufa na mopanga. Engumba oyo ezingami na banguna ezwaka lisusu biloko oyo eutaka libándá te. Biloko oyo babombaki ebandi kosila. Soki nzala ezali makasi mpe bato baleki ebele, yango ebimisaka bamaladi oyo epalanganaka. Yango wana, bato mingi na Yelusaleme bakokufa na nzala mpe na maladi mabe. Yango esalemaki na mobu 607 L.T.B. mpe na mobu 70 na ntango na biso (T.B.).—2 Mikonzi 25:3; Bileli 4:9, 10.b
7. Bakonzi ya Yelusaleme basali nini ntango banguna bazingi engumba, mpe nini ekómeli bango?
7 Na ntango ya mpasi boye, ndakisa nini bakonzi ya Yelusaleme bazali kopesa? Yisaya ayanoli ete: “Bakonzi na yo nyonso ya mabe bakimi mbala moko. Atako babendaki naino litimbo te bakómaki bakangami. Baoyo na yo nyonso oyo bamonani bakómisaki bango nyonso bakangami esika moko. Bakimaki mosika mpenza.” (Yisaya 22:3, NW) Bakonzi mpe mibali ya makasi bakimi, na nsima bakangi bango! Kozanga kutu ete bábendela bango litimbo, bakangi bango mpe bamemi bango baombo. Yango esalemi na mobu 607 L.T.B. Ntango banguna batɔbɔli efelo mpe bakɔti na kati ya engumba, Mokonzi Sidikiya na mibali na ye ya makasi bakimi na butu. Banguna bayoki likambo yango, balandi bango mpe bazwi bango na bisobe ya Yeliko. Mibali ya makasi bapanzani. Bakangi Sidikiya, batɔbɔli ye miso, bakangi ye na bansinga ya kwivre, mpe bakei na ye na Babilone. (2 Mikonzi 25:2-7) Oyo nde mawa mpo na kozanga bosembo na ye!
Abulungani na ntango ya mpasi
8. (a) Yisaya amiyoki ndenge nini mpo na esakweli oyo elobeli mawa oyo ekokómela Yelusaleme? (b) Makambo nini ekomonana na Yelusaleme?
8 Esakweli yango epesi Yisaya mpasi mpenza. Alobi ete: “Longolá miso epai na ngai, [nakolakisa bololo na ngai na kolela, NW]; meká kobɔndisa ngai te mpo na kopunzama na mwana mwasi na bato na ngai.” (Yisaya 22:4) Yisaya ayokaki mawa mpo na likambo ya esakweli oyo ekokómela Moaba mpe Babilone. (Yisaya 16:11; 21:3) Sikawa kobulungana na ye mpe kolela na ye ekómi lisusu makasi ntango azali kokanisa mawa oyo ekokómela bato na ye. Akoki kobɔndisama te. Mpo na nini? “Mpo ete Nkolo [Mokonzi Yehova] na bibele azali na mokolo [ya kobulunganisa, NW] mpe ya konyatela mpe ya [mobulu, NW] na kati ya lobwaku ya emonaneli; kobukabuka na mapango mpe koganga kino ngomba.” (Yisaya 22:5) Yelusaleme ekotonda na yikiyiki mpenza. Bato bakoyengayenga mpo na kobanga, bakozala na elikya te. Ntango banguna babandi kotɔbɔla bifelo ya engumba mpo na kokɔta, “koganga kino ngomba” ekoyokana. Yango elingi koloba ete bafandi ya engumba yango bakoganga nde epai ya Nzambe na tempelo na ye mosantu likoló ya Ngomba Moliya? Mbala mosusu. Kasi, lokola bazangi kondima, yango ekoki kozala mpenza ete koganga na bango ya nsɔmɔ ekoyokana na bangomba ya zingazinga wana.
9. Lobelá limpinga ya basoda oyo balingi kobundisa Yelusaleme.
9 Monguna ya ndenge nini azali kobundisa Yelusaleme? Yisaya alobi ete: “Elama akumbaki etyelo-na-mbanzi elongo na makalo [ya moto oyo auti na mabele, elongo na bambalata, NW]; mpe Kili azipolaki nguba.” (Yisaya 22:6) Banguna batondi na bibundeli. Babundi na matimbo na bango batondisi bityelo-na–mbanzi na bango na mbanzi. Basoda bazali kobongisa banguba na bango mpo na etumba. Bazali na makalo mpe na bambalata oyo emeseni na bitumba. Limpinga ya basoda yango ezali na basoda ya Elama, oyo ezali na nɔrdi ya oyo ezali lelo golfe Persique, mpe longwa na Kili, mbala mosusu pene na Elama. Lokola batángi bikólo wana, yango emonisi ete banguna yango bauti mosika mpenza. Emonisi mpe ete basoda ya Elama oyo babundaka na matimbo bazalaki na kati ya limpinga ya basoda oyo babundisaki Yelusaleme na mikolo ya Hizikiya.
Bameki kobunda
10. Likambo nini ezali kosalema lokola elembo ya mpasi oyo ekokómela engumba yango?
10 Yisaya alobeli likambo oyo ezali koleka: “Ekokóma ete bisobe na yo ya patatalu oyo ezali na nse mpe ezali malamu koleka ekotonda na makalo ya etumba, mpe na ntembe te bampunda mpenza ekotɛlɛma na ekuke, mpe moto moko akolongola ezipeli ya Yuda.” (Yisaya 22:7, 8a, NW) Makalo mpe bampunda etondi na bisobe ya patatalu na libándá ya engumba Yelusaleme mpe emibongisi mpo na kokɔta na bikuke ya engumba yango. “Ezipeli ya Yuda” oyo elongolami ezali nini? Na ntembe te, ezali ekuke moko ya engumba yango, soki bazwi yango, ezalaka likama mpo na baoyo bazali kobundela engumba.c Ntango balongoli ezipeli yango, engumba ekwei na mabɔkɔ ya banguna.
11, 12. Bato oyo bafandi na Yelusaleme bakamati meko nini mpo na komibatela?
11 Yisaya alobeli mingi sikawa ndenge bato yango bazali komeka kobunda mpo na komibatela. Likanisi na bango ya liboso—bibundeli! “Na mokolo yango, okoluka bibundeli na ndako ya zamba, mpe na ntembe te bokomona bisika oyo babuki na mboka ya Davidi, mpamba te ekozala mingi mpenza. Bokobomba ebele ya mai ya liziba ya nse.” (Yisaya 22:8b, 9, NW) Bazalaki kobomba bibundeli na ebombelo ya ndako ya zamba. Salomo nde atongaki ebombelo yango. Lokola batongaki yango na banzete minene oyo eutaki na Lebanona, bakómaki kobenga yango “Ndako ya Zamba ya Lebanona.” (1 Mikonzi 7:2-5) Bazali kotalatala bisika oyo batɔbɔli na efelo. Babombi mai—mayele mpo na komibatela. Bato basengeli na mai mpo na kobikela. Soki mai ezali te, engumba ekoki kobika te. Kasi, tomoni ete balobeli ata esika moko te ete bazali koluka lobiko epai ya Yehova. Kutu, batii motema nde na makoki na bango moko. Tósala libunga ya ndenge wana soki moke te!—Nzembo 127:1.
12 Esengeli kosala nini mpo na bisika oyo batɔbɔli efelo ya engumba yango? “Bokotánga motuya ya bandako na Yelusaleme, bokobuka bandako mpo na kosala ete banguna bákóma na efelo te.” (Yisaya 22:10, NW) Bazali kotalela bandako mpo na koyeba oyo basengeli kobuka mpo na kozwa biloko ya kobongisa efelo yango. Bazali kosala molende yango mpo monguna azwa efelo nyonso te.
Bato oyo bazangi kondima
13. Bato bazali kosala nini mpo na kobomba mai, kasi babosani nani?
13 ‘Bokosala mpe libulu kati na [bifelo, NW] mibale mpo na mai na liziba [ya kala, NW]; kasi bokotalela te ye oyo asalaki yango to ye oyo abongisaki yango kala.’ (Yisaya 22:11) Milende oyo basali mpo na kobomba mai, ndenge yango elobelami awa mpe na Yisaya 22 vɛrsɛ 9, ezali kokundolela biso meko oyo Mokonzi Hizikiya azwaki mpo na kobatela engumba liboso na banguna Baasulia. (2 Ntango 32:2-5) Kasi, bato ya engumba yango, ndenge bamonisami na esakweli oyo ya Yisaya bazangi mpenza kondima. Na bokeseni na Hizikiya, wana bazali kosala mpo na kobatela engumba na bango, bakanisi ata Mozalisi te.
14. Atako Yehova apesi nsango ya kokebisa, ezaleli nini ya bozoba bato bazali na yango?
14 Yisaya alobi lisusu ete: “Na mokolo yango, Nkolo [Yehova] na bibele abyangaki epai na kolela mpe koyoka mawa, epai na kokolola mpe kolatisama ngɔtɔ. Mpe talá, esengo mpe kosepela, koboma bangɔmbɛ mpe koboma bampate! Kolya mosuni mpe komɛla vinyo ete, Tólya mpe tómɛla zambi lobi tokokufa.” (Yisaya 22:12, 13) Bato ya Yelusaleme bazali komonisa ata mawa moko te mpo na ndenge batombokeli Yehova. Baleli te, bakati nsuki te, balati ngɔtɔ te lokola elembo ya kobongola motema. Soki basalaki bongo, mbala mosusu Yehova akokaki kobikisa bango na mpasi oyo ezalaki kozela bango. Kutu, bamipesi nde na bisengo ya mbindo. Ezaleli ya ndenge wana ezali lelo oyo na kati ya bato mingi oyo bazali na kondima epai ya Nzambe te. Lokola bazali ata na elikya moko te—ezala elikya ya lisekwa to ya bomoi ya seko na Paladiso awa na mabele—bazali na bomoi ya komisepelisa, mpe balobaka ete: “Tólya mpe tómɛla zambi lobi tokokufa.” (1 Bakolinti 15:32) Bato yango bamonaka mosika te! Soki batyelaki kaka Yehova motema, mbɛlɛ bazali na elikya makasi!—Nzembo 4:6-8; Masese 1:33.
15. (a) Nsango nini ya kosambisama oyo euti epai na Yehova elobelami mpo na Yelusaleme, mpe nani akokisi kosambisama na ye? (b) Mpo na nini mangomba ya boklisto bakonyokwama ndenge moko na Yelusaleme?
15 Bato ya Yelusaleme oyo bazingami na banguna bakozala na kimya te. Yisaya alobi ete: “[Yehova] na bibele asili komiyebisa na matoi na ngai ete, Solo masumu oyo makolimbisamela bino te kino bokokufa. Nkolo [Mokonzi Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 22:14) Mpo na motema makasi ya bato yango, bakolimbisama te. Na ntembe te, bakokufa. Yango ekosalema mpenza. Nkolo Mokonzi, Yehova na bibele, alobi yango. Na kokokisama ya maloba ya esakweli ya Yisaya, mpasi ekómeli Yelusaleme mbala mibale. Yelusaleme ebebisamaki na mampinga ya basoda ya Babilone mpe na nsima na mampinga ya basoda ya Loma. Ndenge moko mpe, mpasi ekokómela mangomba ya boklisto oyo ezangi kondima, oyo bandimi na yango balobaka ete basambelaka Nzambe nzokande bawanganaka ye na misala na bango. (Tito 1:16) Masumu ya mangomba ya boklisto, bakisa mpe oyo ya bato ya mangomba mosusu ya mokili oyo balingaka kolanda banzela ya Nzambe te, ekómi “kino na likoló.” Ndenge moko na mbeba ya Yelusaleme oyo epɛngwi, mbeba na bango eleki monene mpe ekoki kolimbisama te.—Emoniseli 18:5, 8, 21.
Kapita ya moimi
16, 17. (a) Nani azwi sikawa nsango ya kokebisa oyo euti epai ya Yehova, mpe mpo na nini? (b) Nini ekokómela Sebena mpo na bamposa na ye ya koluka lokumu?
16 Mosakoli alongoli sikawa likebi na ye epai ya bato ya ekólo mobimba oyo bazangi sembo mpe atii likebi epai ya moto moko oyo azangi sembo. Yisaya alobi ete: “Talá oyo Nkolo Mokonzi, Yehova na bibele, alobi: ‘Kendá, kɔtá epai na kapita oyo, epai na Sebena, oyo azali likoló ya ndako, “Eloko nini ezali kosepelisa yo awa, mpe nani azali kosepelisa yo awa, ete omitimolela lilita awa?” Na esika ya likoló azali kotimola lilita na ye; na libanga azali kotimola efandelo na ye.’ ”—Yisaya 22:15, 16, NW.
17 Sebena ‘azali kapita ya ndako’ mobimba, mbala mosusu ndako ya Mokonzi Hizikiya. Mpo na mokumba yango, azali na esika moko monene, moto ya mibale nsima ya mokonzi. Bazali kotyela ye motema na makambo mingi. (1 Bakolinti 4:2) Kasi, na ntango oyo asengelaki kotya likebi liboso na makambo ya ekólo, Sebena azali nde koluka lokumu na ye moko. Amisaleli lilita ya motuya mpenza—lokola ya mokonzi—batimoli yango na kati ya libanga. Yehova, azali kotala likambo yango, apemisi Yisaya na elimo santu na ye mpo na kokebisa kapita yango oyo azangi sembo: “Talá, Yehova azali kobwaka yo na kobwaka monene, Ɛ mobali ya nkonzo, mpe akofina yo na makasi mpenza. Na ntembe te akokanga yo makasi mpenza, lokola bale mpo na mokili monene. Okokufa kuna, mpe kuna makalo ya nkembo na yo ekozala nsɔni ya ndako ya nkolo na yo. Mpe nakotindika yo mosika na esika na yo; mpe uta na esika na yo ya lokumu moto moko akobebisa yo.” (Yisaya 22:17-19, NW) Lokola azali kokanisa kaka mpo na ye moko, Sebena akozwa ata mwa lilita ya bongobongo te na Yelusaleme. Kutu, bakobwaka ye lokola bale, mpe akokufa na mboka moko mosika. Maloba yango ezali na likebisi moko mpo na baoyo nyonso bazali na mikumba minene na kati ya basaleli ya Nzambe. Moto oyo akosalela mokumba na ye na ndenge ya mabe, akobungisa yango mpe akoki kotika esika yango.
18. Nani akokitana Sebena, mpe lokola moto yango akozwa bilamba ya bokonzi ya Sebena mpe lifungola ya ndako ya Davidi, yango elimboli nini?
18 Kasi, ndenge nini Sebena akolongolama na esika na ye? Na nzela ya Yisaya, Yehova alobi ete: “Na mokolo yango mpe nakobyanga moombo na ngai, Eliakimi, mwana ya Hilikiya, nakolatisa ye na elamba na yo mpe nakokanga ye na nkamba na yo mpe nakopesa bokonzi na yo na lobɔkɔ na ye. Ye akozala tata epai na bafandi ya Yelusaleme mpe epai na ndako ya Yuda. Nakotya lifungola ya ndako ya Davidi na lipeka na ye; boye akofungola mpe mosusu akofunga te; akofunga mpe mosusu akofungola te.” (Yisaya 22:20-22) Eliakimi akokitana Sebena mpe bakopesa ye bilamba ya bokonzi elongo na lifungola ya ndako ya Davidi. Biblia esalelaka liloba “lifungola” mpo na kolobela bokonzi, boyangeli, to nguya. (Kokanisá na Matai 16:19.) Na ntango ya kala, moto oyo azalaki kopesa mokonzi toli, oyo bazalaki kopesa ye mafungola, azalaki kokɛngɛla bandako ya mokonzi, ata mpe kopona bato oyo bazalaki kokɔta na mosala ya mokonzi. (Kokanisá na Emoniseli 3:7, 8.) Na yango, mokumba ya kapita ezali na ntina mingi, mpe bazali kotyela moto oyo azwi mokumba yango motema na makambo mingi. (Luka 12:48) Mbala mosusu Sebena azali na makoki, kasi mpo na kozanga sembo na ye, Yehova akotya moto mosusu na esika na ye.
Makonzí mibale ya elilingi
19, 20. (a) Ndenge nini Eliakimi akozala lipamboli mpo na bato na ye? (b) Nini ekokómela baoyo bakokoba kotyela Sebena motema?
19 Na nsima, na elobeli ya elilingi, Yehova alobeli ndenge bokonzi ekouta epai ya Sebena mpe ekokenda epai ya Eliakimi. Alobi ete: “Nakotya ye [Eliakimi] lokola [likonzí, NW] na esika makasi, akozala lokola kiti ya bokonzi ya nkembo epai na ndako na tata na ye. Bakokakisela ye [nkembo, NW] mobimba ya ndako ya tata na ye, babotami mpe bakitani, eloko na eloko moke moke kino kɔpɔ mpe milangi [ya minene. Yehova] na bibele alobi ete, Na mokolo yango [likonzí, NW] oyo etyamaki na esika makasi [Sebena] ekolongolama, ekokatama mpe ekokwea; mpe mokumba mokakisami na yango ekokatama, zambi [Yehova] asili koloba.”—Yisaya 22:23-25.
20 Na bavɛrsɛ yango, likonzí ya liboso ezali Eliakimi. Akokóma “kiti ya bokonzi ya nkembo” na ndako ya tata na ye, Hilikiya. Na bokeseni na Sebena, akobwaka nsɔni te likoló ya ndako ya tata na ye to akobebisa lokumu na yango te. Eliakimi akosunga mpenza biloko ya ndako, elingi koloba basaleli mosusu ya mokonzi. (2 Timote 2:20, 21) Nzokande, likonzí ya mibale ezali kolobela Sebena. Atako akoki komonana makasi, akolongolama. Bato nyonso oyo bakokoba kotya elikya epai na ye, bakokwea.
21. Na mikolo na biso, nani bakitani na esika na ye lokola bakitanaki Sebena, mpo na nini, mpe nani akitani ye?
21 Likambo oyo ekómeli Sebena ezali kokundolela biso ete kati na bato oyo balobaka ete basambelaka Nzambe, baoyo bandimaka mikumba basengeli kokokisa yango mpo na kosalela basusu mpe kosanzola Yehova. Basengeli te kosalela mikumba na bango mpo na konduka bomɛngo to mpo na komitombola. Na ndakisa, kobanda kala, mangomba ya boklisto elobaka ete ezali kapita oyo atyami, momonisi ya Yesu Klisto awa na mabele. Kasi, kaka ndenge Sebena abwakaki nsɔni likoló na tata na ye ndenge azalaki koluka lokumu na ye moko, bakonzi ya mangomba mpe babwaki nsɔni likoló na Mozalisi ndenge bazali koluka bomɛngo mpe komitombola bango moko. Yango wana, ntango eleko ya kosambisama oyo esengelaki ‘kobanda na Ndako ya Nzambe’ ekokaki na 1918, Yehova alongolaki mangomba ya boklisto. Kapita mosusu amonanaki—“kapita ya sembo, ya mayele”—mpe atyamaki likoló na ndako ya Yesu awa na mabele. (1 Petelo 4:17; Luka 12:42-44, NW) Kelasi ya bato yango emonisi ete ebongi mpo na komema “lifungola” ya bokonzi ya ndako ya Davidi na lipeka na ye. Lokola “likonzí” oyo ebongi na kotyela motema, emonisi ete ezali lisungi oyo ebongi mpo na “eloko na eloko,” elingi koloba baklisto bapakolami oyo bazali kokokisa mikumba ndenge na ndenge mpe bazali kosɛnzɛla mpo na kopesa bilei ya elimo. “Bampate mosusu” mpe, lokola ‘bapaya na kati ya lopango’ ya Yelusaleme ya kala, bazali kotalela “likonzí” yango, Eliakimi ya mikolo na biso.—Yoane 10:16; Deteronome 5:14.
22. (a) Mpo na nini ntango oyo bakitanaki Sebena na mosala ya kapita esalemaki na ntango ebongi? (b) Na mikolo na biso, mpo na nini kotyama ya “kapita ya sembo, ya mayele,” esalemi na ntango ebongi?
22 Eliakimi akitanaki Sebena ntango Saneheliba na mampinga ya basoda na ye bazalaki koluka kobundisa Yelusaleme. Ndenge moko mpe, “kapita ya sembo, ya mayele,” atyamaki mpo na kosala na ntango ya nsuka, oyo ekosuka ntango Satana na banguya na ye bakobundisa “Yisalaele ya Nzambe” mpe baninga na bango bampate mosusu mpo na mbala ya nsuka. (Bagalatia 6:16) Lokola ezalaki na eleko ya Hizikiya, etumba yango ekosuka na kobomama ya bato oyo balingi boyengebene te. Baoyo bazali kokangama na “likonzí na esika makasi,” elingi koloba kapita ya sembo, bakobika, lokola bato ya sembo oyo bafandaki na Yelusaleme babikaki ntango Baasulia bakɔtaki na Yuda. Yango wana, ezali mpenza malamu te kokangama na “likonzí” mabe ya mangomba ya boklisto!
23. Nini ekómeli Sebena na nsima, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
23 Nini ekómeli Sebena? Toyebi te ndenge esakweli oyo elobeli ye, oyo ezali na Yisaya 22:18, ekokisamaki. Ntango azali komikumisa ye moko mpe na nsima balongoli ye, akokani na mangomba ya boklisto, kasi mbala mosusu azwaki liteya na etumbu yango. Mpo na yango, akeseni makasi na mangomba ya boklisto. Ntango Moasulia Laba-sake asɛngaki Yelusaleme ete amipesa, Eliakimi, kapita ya sika ya Hizikiya, akambaki batindami mpo na kokutana na ye. Kasi, Sebena azalaki pembeni na ye lokola mokomeli ya mokonzi. Na ntembe te, Sebena azalaki kaka na mosala ya mokonzi. (Yisaya 36:2, 22) Oyo nde liteya malamu mpo na baoyo babungisi mikumba na ebongiseli ya Nzambe! Na esika ya kosilika mpe kokanga nkanda, basengeli nde komonisa ezaleli ya mayele ete bákoba kosalela Yehova esika nyonso oyo akotya bango. (Baebele 12:6) Soki basali bongo, bakozwa mpasi te oyo ekokómela mangomba ya boklisto. Bakondimama na Nzambe mpe bakozwa mapamboli libela na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mobu 66 T.B., Bayuda mingi bazalaki na esengo ntango Baloma oyo bazingaki Yelusaleme bakendaki.
b Josèphe, moto ya Istware na ekeke ya liboso alobi ete, na mobu 70 T.B., nzala elekaki makasi na Yelusaleme mpe bato bakómaki kolya mposo ya nyama oyo basalaka na yango sapato, mokaba to sakosi, bakómaki mpe kolya matiti mpe matiti ya kokauka oyo bapesaka bibwele. Kutu mama moko akalingaki mwana na ye ya mobali mpe alyaki ye.
c “Ezipeli ya Yuda” ekoki mpe kozala eloko mosusu oyo ebatelaka engumba, na ndakisa bandako makasi epai babombaka bibundeli mpe epai basoda bafandaka.
[Elilingi na lokasa 231]
Ntango Sidikiya akimi, bakangi ye mpe batɔbɔli ye miso
[Elilingi na lokasa 232, 233]
Makambo ekozala malamu te mpo na Bayuda oyo bakangami na kati ya Yelusaleme
[Elilingi na lokasa 239]
Hizikiya akómisi Eliakimi “likonzí na esika makasi”
[Elilingi na lokasa 241]
Ndenge moko na Sebena, mingi kati na bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali kobwaka nsɔni likoló na Mozalisi ndenge bazali konduka bozwi
[Bililingi na lokasa 242]
Na mikolo na biso, kelasi moko ya kapita ya sembo etyami mokonzi ya ndako ya Yesu