Esengo na baoyo bazali kotambola na pole
“Yaká, tótambola na pole ya [Yehova].”—YISAYA 2:5.
1, 2. (a) Pole ezali na ntina nini? (b) Mpo na nini esengeli kozwa na lisɛki te likebisi oyo elobi ete molili ekozipa mokili?
YEHOVA azali Mopesi ya pole. Biblia ebengi ye “ye oyo akopesaka moi mpo na pole na ntango ya moi mpe mibeko epai ya sanza mpe na [minzoto] mpo na pole na butu.” (Yilimia 31:35; Nzembo 8:3) Ye nde akelaki moi oyo ebimisaka nguya makasi oyo epesaka pole mpe molunge na mokili. Na nguya nyonso oyo moi ebimisaka, kaka mwa ndambo moke nde ekómaka awa na mabele, kasi yango nde ebatelaka biloko nyonso oyo ezali na bomoi. Soki pole ya moi ezalaki te, mbɛlɛ tozali na bomoi te. Mbɛlɛ ekelamu moko te ya bomoi ezali awa na mabele.
2 Lokola toyebi yango, tokoki mpenza komona ntina ya likambo moko oyo mosakoli Yisaya alobelaki. Ye alobaki boye: “Talá, molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota.” (Yisaya 60:2) Molili oyo balobeli awa, ezali molili oyo tomonaka na miso te. Yisaya alingaki koloba te ete mokolo mosusu moi, sanza mpe minzoto ekongɛnga lisusu te. (Nzembo 89:36, 37; 136:7-9) Azalaki nde kolobela molili ya elimo, mpe molili yango ebomaka. Tokoki kozala na bomoi molai te na elimo soki tozangi pole ya elimo, lokola mpe tokoki kozala na bomoi te soki pole ezali te na mokili.—Luka 1:79.
3. Na kolanda maloba ya Yisaya, baklisto basengeli kosala nini?
3 Yango wana, tóyeba ete atako maloba ya Yisaya ekokisamaki na ekólo ya Yuda na ntango ya kala, ezali kokokisama na monene na ntango na biso. Ya solo, lelo oyo molili ya elimo ezali kozipa mokili mobimba. Liboso ya likama monene boye, pole ya elimo ezali na ntina mingi mpenza. Yango wana, ebongi ete baklisto báyoka toli ya Yesu ete: “Tiká ete moi na bino engɛnga liboso ya bato.” (Matai 5:16) Baklisto ya sembo bakoki kongɛngisa bato ya komikitisa mpe kolakisa bango nzela ya bomoi.—Yoane 8:12.
Ntango ya molili na Yisalaele
4. Ntango nini maloba ya mosakoli Yisaya ekokisamaki mpo na mbala ya liboso, kasi makambo nini ezalaki ata na mikolo na ye?
4 Maloba oyo Yisaya alobaki ete molili ekozipa mabele ekokisamaki mpo na mbala ya liboso ntango ekólo ya Yuda ebebisamaki mpe bafandi na yango bakendaki na boombo na Babilone. Kasi, ata liboso na yango, na mikolo ya Yisaya, ebele ya bato ya ekólo yango bakómaki na molili ya elimo. Yango wana Yisaya alendisaki bato ya mboka na ye na maloba oyo: “Ɛ ndako ya Yakobo, yaká, tótambola na pole ya [Yehova]”!—Yisaya 2:5; 5:20.
5, 6. Makambo nini ememaki molili na mikolo ya Yisaya?
5 Yisaya azalaki kosakola na ekólo ya Yuda “na mikolo na Uziya mpe Yotama mpe Ahaza mpe Hizikiya, mikonzi na Yuda.” (Yisaya 1:1) Na ntango yango, kimya ezalaki te na mboka, bato bazalaki kosambela na bokosi, bazuzi bazalaki kokata makambo na bosembo te mpe babola bazalaki konyokwama. Ata na ntango oyo bakonzi ya malamu lokola Yotama bazalaki koyangela, batongaki bitumbelo ya losambo mpo na banzambe ya lokuta na ebele ya bisika ya likoló. Soki moto mabe akómi mokonzi, makambo ezalaki kobeba lisusu koleka. Na ndakisa, mokonzi mabe Ahaza apesaki ata bana na ye moko lokola mbeka epai ya nzambe Moleke. Mboka ezalaki mpenza na nsuka ya molili!—2 Mikonzi 15:32-34; 16:2-4.
6 Boyokani na mikili mosusu ezalaki mpe malamu te. Mokili ya Moaba, ya Edome mpe ya Filistia ezalaki kokanela ekólo ya Yuda na bitumba. Bato ya Yisalaele, bokonzi oyo ezalaki na nɔrdi, atako bazalaki bandeko ya Yuda, bazalaki koyokana ata moke te. Ekólo Sulia, oyo ezalaki na ngámbo ya nɔrdi, ezalaki mpe kokanela ekólo ya Yuda. Likama monene mpenza mpo na ekólo ya Yuda ezalaki Asulia, mboka oyo ezalaki koluka kobɔtɔla bamboka mosusu mpe koyangela yango. Na eleko oyo Yisaya azalaki kosakola, ekólo Asulia elongaki ekólo ya Yisalaele mobimba mpe etikalaki moke ebebisa ekólo ya Yuda. Na eleko moko, ekólo ya Asulia ebɔtɔlaki bamboka nyonso ya ekólo ya Yuda, longola kaka Yelusaleme.—Yisaya 1:7, 8; 36:1.
7. Nzela nini ekólo ya Yisalaele na ya Yuda baponaki, mpe Yehova asalaki nini mpo na yango?
7 Libota oyo Nzambe asalaki na yango kondimana enyokwamaki na ndenge yango mpamba te ekólo ya Yisalaele na ya Yuda ezalaki sembo epai na ye te. Ndenge moko na bato oyo mokanda ya Masese elobeli, bazalaki ‘kotika nzela ya sembo mpo na kotambola na nzela ya molili.’ (Masese 2:13) Atako Yehova ayokelaki libota na ye nkanda, kasi asundolaki bango libela te. Atindaki Yisaya mpe basakoli mosusu mpo na kopesa pole ya elimo na moto nyonso oyo azalaki na mposa ya kosalela Yehova na bosembo. Pole oyo Yehova azalaki kopesa na nzela ya basakoli yango ezalaki na motuya mpenza. Ezalaki pole ya bomoi.
Ntango ya molili lelo oyo
8, 9. Makambo nini ezali komema molili na mokili lelo oyo?
8 Makambo oyo ezalaki na ntango ya Yisaya ekokani mpenza na makambo oyo tozali komona na moi ya lelo. Na mikolo na biso, bakonzi ya mokili bapesi Yehova mokɔngɔ mpe bapesi mokɔngɔ epai ya Yesu Klisto, Mokonzi oyo ye atii na kiti ya bokonzi. (Nzembo 2:2, 3) Bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali kokosa bandimi na bango. Bakonzi yango ya mangomba bazali koloba ete basalelaka Nzambe, kasi soki totali malamu, bazali nde kolendisa bato básambela banzambe ya mokili oyo lokola bolingo ya ekólo, konduka bibundeli, bozwi, koluka kokóma bato minene, bakisa mpe koteya mateya oyo ezali ya boklisto te.
9 Na bisika mingi, mangomba ya boklisto emikɔtisi na bitumba mpe na makambo ya koboma bato ya ekólo moko na mokano ya kosilisa bango mpe makambo mosusu ya nsɔmɔ. Mpe lisusu, mangomba mingi, na esika eteya bato bizaleli malamu oyo Biblia emonisi, ezali nde kokanga miso liboso na makambo ya mbindo lokola pite mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to mpe ezali kolendisa bato básala makambo yango. Lokola baboyi kolanda mitinda ya Biblia, bandimi ya mangomba ya boklisto bazali lokola bato oyo mokomi ya nzembo alobelaki na maloba oyo: “Bayebi eloko te, bazali ata na mayele te; bazali kotambola kati na molili.” (Nzembo 82:5) Mangomba ya boklisto ezali mpenza na nsuka ya molili lokola kaka ekólo ya Yuda na ntango ya kala.—Emoniseli 8:12.
10. Lelo oyo, ndenge nini pole ezali kongɛnga na kati ya molili, mpe ezali kopesa bato ya komikitisa litomba nini?
10 Na kati ya molili yango, Yehova azali kongɛngisa bato oyo bazali na komikitisa. Yango wana, azali kosalela basaleli na ye bapakolami oyo bazali awa na mabele, elingi koloba “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe bango bazali “kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Matai 24:45; Bafilipi 2:15) Moombo yango na bamilio ya “bampate mosusu” oyo bazali nsima na ye, bazali kongɛngisa pole ya elimo oyo euti na Biblia, Liloba ya Nzambe. (Yoane 10:16) Na kati ya mokili oyo ya molili, pole yango ezali kopesa bato ya komikitisa elikya, ezali kosalisa bango bázala na boyokani malamu na Nzambe mpe ezali kosalisa bango bákima makambo oyo ezali mitambo ya elimo. Pole yango ezali mpenza na motuya, ezali pole oyo epesaka bomoi.
“Nakokumisa nkombo na yo”
11. Makambo nini Yehova ayebisaki na mikolo ya Yisaya?
11 Ndenge nini Yehova azalaki kotambwisa bato na mikolo wana ya molili ntango Yisaya azalaki na bomoi, mpe na mikolo ya molili makasi oyo elandaki ntango bato ya Babilone bamemaki libota ya Yehova na boombo? Azalaki kopesa malako mpo na etamboli malamu. Lisusu, banda kala mpenza amonisaki polele ndenge oyo alingaki kokokisa mikano na ye mpo na libota na ye. Na ndakisa, tótalela bisakweli kitoko oyo ezali na Yisaya mokapo 25 tii mokapo 27. Makambo oyo ezali na mikapo yango emonisi ndenge oyo Yehova atambwisaki bato na ntango wana mpe ndenge oyo azali kosala yango lelo oyo.
12. Yisaya alobaki makambo nini oyo eutaki mpenza na motema na ye?
12 Ya liboso, Yisaya alobi boye: “Ɛ [Yehova], yo Nzambe na ngai; nakokumisa yo, nakosanzola nkombo na yo.” Maloba yango ezali mpenza masanzoli oyo euti na motema! Kasi, likambo nini etindaki mosakoli asala libondeli motindo yango? Ntina monene mpenza ezali na eteni ya nsuka ya vɛrsɛ yango, epai tozali kotánga boye: “Mpo ete [Yehova] osali makambo ya kokamwa, myango kala na solo mpe na sembo.”—Yisaya 25:1.
13. (a) Makambo nini Yisaya ayebaki, oyo etindaki ye asepela lisusu koleka na Yehova? (b) Ndakisa ya Yisaya ekoki koteya biso nini?
13 Na ntango Yisaya azalaki na bomoi, Yehova asilaki kosala makambo mingi ya kokamwa mpo na Yisalaele, mpe makambo yango ekomamaki na mikanda. Na ntembe te, Yisaya ayebaki mikanda yango. Na ndakisa, ayebaki ete Yehova alongolaki bato na ye na boombo na Ezipito mpe abikisaki bango na Mai Motane liboso ya basoda ya Falo oyo bazalaki na nkanda makasi. Ayebaki ete Yehova atambwisaki bato na ye na kati ya mokili mokauki mpe amemaki bango na Mokili ya Ndaka. (Nzembo 136:1, 10-26) Masolo lokola oyo wana emonisaki ete Yehova Nzambe azali sembo mpe ebongi kotyela ye motema. “Myango” na ye, elingi koloba makambo nyonso oyo akanaka, ekokisamaka. Boyebi ya solosolo oyo Nzambe apesaki Yisaya elendisaki ye mpo atambola ntango nyonso na kati ya pole. Na bongo, azalaki ndakisa malamu mpo na biso. Soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe na likebi mpenza mpe soki tozali kosalela yango na bomoi na biso, biso mpe tokotikala na pole.—Nzembo 119:105; 2 Bakolinti 4:6.
Mboka moko ebomami
14. Makambo nini esakolamaki mpo na mboka moko, mpe na ntembe te ezalaki mboka nini?
14 Ndakisa moko ya mwango ya Nzambe ezali na Yisaya 25:2, epai tozali kotánga boye: “Okómisi mboka lokola libondo, mpe mboka na makasi bobele eloko mpamba. Ndako monene ya bapaya ezali mboka lisusu te, libela ekotongama lisusu te.” Ezali mboka nini? Ekoki mpenza kozala ete Yisaya azalaki kosakola mpo na Babilone. Esalemaki mpenza bongo mpo na Babilone, ekómaki mpenza libondo mpamba ya mabanga.
15. “Mboka monene” nini ezali lelo oyo, mpe likambo nini ekokómela yango?
15 Na mikolo na biso, ezali na eloko oyo ekokani na mboka oyo Yisaya alobelaki? Ɛɛ. Mokanda ya Emoniseli elobeli ‘mboka monene oyo ezali na bokonzi na liboso ya bakonzi nyonso ya mokili.’ (Emoniseli 17:18) Mboka monene yango ezali “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 17:5) Lelo oyo, eteni monene ya Babilone Monene ezali mangomba ya boklisto; bakonzi na yango bazali bato ya liboso oyo bazali kotɛmɛla mosala ya kosakola Bokonzi oyo basaleli ya Yehova bazali kosala. (Matai 24:14) Kasi, lokola Babilone ya kala, etikali moke Babilone Monene ebomama mpo na libela.
16, 17. Ndenge nini banguna ya Yehova bakumisaki ye na ntango ya kala mpe na mikolo na biso?
16 Yisaya asakoli lisusu nini mpo na “mboka ya makasi”? Yisaya alobi na Yehova boye: “Libota ya makasi bakokumisa yo, mboka ya mabota ya yauli bakotosa yo.” (Yisaya 25:3) Ndenge nini mboka yango mabe, “mboka ya mabota ya yauli,” ekokumisa Yehova? Mpo tókanga ntina na yango, tózongisa makanisi na makambo oyo ekómelaki Nebukadanesala, mokonzi monene ya Babilone. Akutanaki na likambo moko oyo etindaki ye akanisa malamu mpe emonisaki ye bolɛmbu na ye, yango wana etindaki ye na kotatola bonene ya Yehova mpe nguya na Ye oyo eleki nguya nyonso. (Danyele 4:34, 35) Soki Yehova alakisi nguya na ye, ata banguna na ye—bálinga, bálinga te—bandimaka misala na ye ya kokamwa.
17 Babilone Monene esi endimá misala ya kokamwa ya Yehova? Ɛɛ. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, basaleli ya Yehova, bapakolami na elimo banyokwamaki mpenza wana bazalaki kosakola. Na 1918 bakendaki na boombo ya elimo ntango bakambi ya la Société Watch Tower bakɔtaki bolɔkɔ. Mosala ya kosakola ezalaki lisusu kosalema mpenza te. Bongo na nsima, na 1919, Yehova alongolaki bango na boombo mpe apesaki bango lisusu elimo na ye mpo bázwa makasi, mpe bamibongisaki mpo na kokokisa mosala ya kosakola nsango malamu na mabele mobimba. (Malako 13:10) Mokanda ya Emoniseli esakolaki makambo nyonso wana mpe eyebisaki oyo yango ekosalela banguna na bango. Banguna na bango “babangaki mingi, mpe bakumisaki Nzambe ya Likoló.” (Emoniseli 11:3, 7, 11-13) Yango elingi koloba te ete bango nyonso babongwanaki, kasi bakokaki te koboya kondima mosala ya kokamwa oyo Yehova asalaki ntango wana, se ndenge Yisaya asakolaki yango.
‘Esika makasi mpo na mobola’
18, 19. (a) Mpo na nini banguna balongaki te kozongisa basaleli ya Yehova nsima? (b) Ndenge nini ‘loyembo ya bato ya yauli’ ekolongolama?
18 Sikoyo Yisaya atii makanisi na ye na boboto oyo Yehova asalelaka baoyo batambolaka na pole mpe alobi na Yehova boye: “Osili kozala esika ya makasi mpo na [baoyo mike, NW;], esika ya makasi [mpo na mobola, NW] kati na mpasi na ye; [esika ya kokima, NW] liboso ya mbula monene mpe molili na ntango ya moi makasi; mpo ete mopɛpɛ ya bato ya yauli ezali lokola mbula monene oyo ebɛtabɛti lopango, lokola moi makasi na esika ekaoki. Okokitisa makɛlɛlɛ ya bapaya, lokola moi ekitisami na molili ya lipata; boye loyembo ya bato ya yauli ekozalisama nyɛɛ.”—Yisaya 25:4, 5.
19 Banda 1919, bato ya yauli basalaki nyonso mpo na kozongisa basambeli ya solo nsima, kasi balongaki te. Mpo na nini? Mpamba te Yehova azali esika makasi mpe esika ya kokima ya basaleli na ye. Apesaka bango esika ya mpiɔ mpo na komibomba na ntango ya molunge makasi, elingi koloba minyoko mpe atɛlɛmaka lokola efelo makasi liboso ya mipɛpɛ makasi, to botɛmɛli. Biso baoyo tozali kotambola na pole ya Nzambe, tozali kozela na elikya nyonso ntango oyo ‘loyembo ya bato ya yauli ekozalisama nyɛɛ.’ Tozali mpenza kozela mokolo oyo banguna ya Yehova bakozala lisusu te.
20, 21. Elambo nini Yehova abongisi, mpe biloko nini ekozala na elambo yango na mokili ya sika?
20 Yehova asukaka kaka te na kobatela basaleli na ye. Lokola azali Tata ya bolingo, aleisaka mpe bango. Nsima ya kosikola basaleli na ye na boombo ya Babilone Monene na 1919, asalelaki bango elambo ya bolongi, apesaki bango ebele ya bilei ya elimo. Yisaya 25:6 esakolaki likambo yango na maloba oyo: “Na ngomba oyo [Yehova] na bibele akobongisela mabota nyonso elambo ya bilei ya mafuta, elambo ya vinyo oyo esili koumela, na bilei kitoko bitondi na mafuta mpe na vinyo iumeli mpe iponami.” Tozali mpenza na lipamboli ya kozala na fɛti yango! (Matai 4:4) “Mesa ya Nkolo” etondi mɛkɛ na bilei kitoko. (1 Bakolinti 10:21) Na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” tozali kozwa nyonso oyo tosengeli na yango na elimo.
21 Nyonso esuki kaka te na elambo yango oyo Nzambe abongisi. Fɛti ya elimo oyo tozali na yango lelo oyo ezali kotinda biso tókanisa ebele ya bilei oyo ekozala na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Na ntango wana, bilei ekozala bebo na “elambo ya bilei ya mafuta.” Moto moko te akokufa nzala, ezala na mosuni to na elimo. Ekozala mpenza libɔndisi mpo na baninga na biso oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo lelo oyo kasi bazali konyokwama na “nzala” oyo esakolamaki lokola “elembo” ya kozala ya Yesu! (Matai 24:3, 7) Maloba ya mokomi ya nzembo ezali mpenza kobɔndisa bango. Alobaki boye: “Masango ikotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.”—Nzembo 72:16.
22, 23. (a) “Elamba” to “ezipeli” oyo ekolongolama ezali nini mpe ndenge nini ekolongolama? (b) Ndenge nini ‘nsɔni ya bato ya Yehova’ ekolongolama?
22 Yoká sikoyo elaka mosusu ya malamu koleka. Yisaya akokanisi lisumu mpe liwa na “elamba,” to “ezipeli” mpe alobi boye: “Na ngomba oyo akobebisa ezipeli oyo etandisami likoló ya bato nyonso mpe [elamba, NW] oyo etandisami epai ya mabota nyonso.” (Yisaya 25:7) Kanisá naino! Lisumu na liwa oyo ezali lokola bolangiti oyo ezipi bato mpe ezali kokanga bango mpema, ekozala lisusu te. Tozali kozela na motema likoló mokolo oyo bato ya botosi mpe ya sembo bakozwa bolamu nyonso ya mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola biso!—Emoniseli 21:3, 4.
23 Mpo na ntango wana ya nkembo, mosakoli oyo apemamaki alobi na biso ete: “[Nzambe] akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Mokonzi Yehova] akokomba mpisoli na bilongi nyonso; akolongola mpe nsɔni ya bato na ye longwa na mokili mobimba, zambi [Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 25:8) Moto moko te akokufa na maladi to mpo akómi mobange, to akolela mpo ndeko na ye to moninga na ye akufi. Ekozala mbongwana ya malamu mpenza! Lisusu, na mabele mobimba, tokoyoka ata epai moko te makambo oyo toyokaka banda kala ete bato bazali kofinga Nzambe mpe koloba makambo ya lokuta mpo na ye mpe mpo na basaleli na ye. Mpo na nini makambo yango ekozala lisusu te? Mpamba te Yehova akolongola mobandisi ya makambo yango, tata ya lokuta, Satana Zabolo, akolongola ye nzela moko na mombóto na ye.—Yoane 8:44.
24. Bato oyo bazali kotambola na pole bazali kosala nini ntango bazali kokanisa misala ya minene oyo Yehova azali kosalela bango?
24 Ntango bazali kokanisa makambo yango oyo ekolakisa nguya ya Yehova, mitema ya baoyo bazali kotambola na pole ezali kotinda bango báganga ete: “Talá oyo Nzambe na biso; [tozeli] ye mpe ye akobikisa biso. Oyo azali [Yehova], [tozeli] ye, tiká ete tósepela mpe tóyoka esengo na lobiko na ye.” (Yisaya 25:9) Etikali moke, bato ya sembo bakosepela mpenza. Molili nyonso ekolongwa mpe bato ya sembo bakozala na pole ya Yehova libela na libela. Ekoki kozala na elikya oyo eleki oyo? Te, ezali te!
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini ezali na ntina tótambola kati na pole lelo oyo?
• Mpo na nini Yisaya akumisaki nkombo ya Yehova?
• Mpo na nini banguna bakolonga ata mokolo moko te kozongisa basaleli ya Nzambe nsima?
• Baoyo bazali kotambola na kati ya pole bakozwa mapamboli nini?
[Elilingi na lokasa 13]
Bato ya Yuda bakabaki bana lokola mbeka epai ya Moleke
[Bililingi na lokasa 15]
Lokola Yisaya ayebaki misala minene ya Yehova yango etindaki ye akumisa nkombo ya Yehova
[Elilingi na lokasa 16]
Bato ya sembo bakozala na pole ya Yehova libela na libela