Naḥmanides—Akweisaki nde boklisto ya solo?
ELEKO ebéngami Moyen-Âge. Ezali kokundwela yo makambo nini? Bitumba ya Croisades? Inquisitions? Konyokola bato? Atako eleko wana elobelamaka mingi te mpo na makambo matali bonsomi mpo na kobɛta ntembe na makambo makeseni kati na mangomba, nzokande na boumeli ya eleko yango, mpenzampenza na mobu 1263, ntembe moko monene ebɛtamaki na Mpótó kati na Bayuda mpe baklisto. Banani basanganaki na yango? Makambo nini malobelamaki? Lolenge nini yango ekoki kosalisa biso lelo oyo mpo na koyeba lingomba ya solo?
Eloko nini ebimisaki ntembe yango?
Na boumeli ya Moyen-Âge, Lingomba ya Katolike ya Loma emitángaki ete yango nde ezali lingomba ya solo. Nzokande, Bayuda batikaki te komikumisa ete bango nde bazali libota liponami na Nzambe. Lokola lingomba ezangaki likoki ya kondimisa Bayuda ete basengeli kobongwana, likambo yango epesaki nsɔni na lingomba mpe mbala mingi epusaki bango na kobimisa mobulu mpe minyoko. Na ntango ya bitumba ya Croisades, bankóto mingi ya Bayuda babomamaki to mpe batumbamaki na mɔ́tɔ likoló ya nzeté na ntango baboyaki kobatisama. Ezaleli ya koyina Bayuda oyo elendisamaki na lingomba epalanganaki mingi.
Nzokande, makambo mazalaki ndenge mosusu na Lingomba ya Katolike na mboka Espagne na ekeke ya 12 mpe ya 13. Bayuda bapesamelaki bonsomi ya losambo—ntango nyonso oyo batukaki losambo ya boklisto te—mpe bapesamelaki kútu bisika ya lokumu kati na ndako ya mokonzi. Kasi nsima ya pene na ekeke moko ya ngɔlu motindo wana, basángó Badominikɛ (Dominicains) babandaki koluka kokitisa bopusi ya Bayuda kati na mboka mpe babandaki kokómisa Bayuda na Lingomba ya Katolike. Mokonzi Jaime I wa Aragon azwaki bopusi epai na Badominikɛ ete apesa nzela na lisoló ya ntembe kati na Bayuda mpe bakatolike, mokano na yango ezalaki ya komonisa ete lingomba ya Katolike eleki oyo ya Bayuda mpe esengeli ete Bayuda nyonso bábongwana.
Wana ezalaki ntembe ya liboso te kati na Bayuda mpe baklisto. Na mobu 1240, lisoló ya ntembe lisalemaki na engumba Paris, na mboka France. Mokano na yango mpenza ezalaki ya kosambisa Talmud, búku mosantu mpo na Bayuda. Nzokande, Bayuda oyo basanganaki na ntembe yango bapesamelaki bobele bonsomi moke ya koloba. Nsima wana lingomba esakolaki elónga na yango na ntembe yango, batumbaki ebele na bakopi ya Talmud na bisika minene ya engumba Paris.
Kasi Mokonzi Jaime I wa Aragon, oyo azalaki na boboto mingi, apesaki nzela te na lisambisi wana ya lokuta. Komonáká bongo, Badominikɛ bamekaki mwango mosusu. Lokola Hyam Maccoby alobi yango kati na búku na ye Judaism on Trial, Badominikɛ babyangaki Bayuda na lisoló ya ntembe “lokola mwango ya komonisa bonkonde mpe kondimisa bango na boboto, na esika ya kotɔndɔla bango lokola esalamaki na Paris.” Badominikɛ baponaki Pablo Christiani, moyuda oyo akómaki na lingomba ya Katolike mpe oyo akómaki sángó modominikɛ, ete azala momonisi na bango monene. Lokola batyaki motema na boyebi ya Pablo Christiani ya Talmud mpe makomi ya Balabi, Badominikɛ bakanisaki ete bakolóngisa likanisi na bango.
Mpo na nini baponaki Naḥmanides?
Kati na Espagne, ezalaki bobele na moto moko oyo azalaki na etɛlɛmɛlo ekoki mpo na kozala momonisi na ngámbo ya Bayuda kati na ntembe yango—Moses ben Naḥman, to Naḥmanides.a Abotamaki pene na mobu 1194 na engumba ya Gérone, na mboka Espagne, Naḥmanides asilaki koyebana lokola nganga-mayele na makambo ya Biblia mpe ya Talmud wana azalaki bobele na mbula 16. Na ntango akokisaki mbula 30, asilaki kokoma bakomantɛrɛ likoló na pene na Talmud mobimba, mpe mwa moke na nsima azalaki molobi monene mpo na koyokanisa Bayuda ya mboka wana oyo balingaki kokabwana na ntina na makomi ya Maimonides.b Naḥmanides atalelami lokola nganga-mayele moyuda oyo alekaki koyeba makambo ya Biblia mpe ya Talmud na eleko na ye mpe akoki kozala moto ya mibale nsima ya Maimonides mpo na oyo etali bopusi na ye na lingomba ya Bayuda na eleko wana.
Naḥmanides asalaki bopusi makasi likoló na Bayuda oyo bafandaki na etúká ya Catalogne, mpe ata Mokonzi Jaime I azalaki kotuna toli epai na ye mpo na makambo ndenge na ndenge matali ekólo. Makoki na ye ya kokanisa mozindo mapesaki ye limemya epai na Bayuda mpe ata epai na baoyo bazalaki Bayuda te. Badominikɛ bakanisaki ete mpo na koyokisa mpenza Bayuda nsɔni, esengelaki ete ye, Labi na bango ya lokumu, azala momonisi na ntembe yango.
Naḥmanides andimaki mpenza te ete atyana ntembe wana, koyebáká ete Badominikɛ bakozala sembo na makanisi te. Asengelaki kopesa biyano na mituna kasi akokaki kotuna ata motuna moko te. Nzokande, andimaki lisɛngisi ya mokonzi, na kosɛngáká ete bápesa ye ndingisa ya koloba na bonsomi nyonso na ntango azali kopesa biyano. Mokonzi Jaime I andimaki likanisi yango. Kopesamela bonsomi motindo wana atako ezalaki na ndelo esalemaki naino liboso te mpe esalamaki lisusu te na boumeli ya Moyen-Âge, yango emonisi polele ete mokonzi azalaki mpenza na limemya mpo na Naḥmanides. Kasi, Naḥmanides azalaki sé komitungisa. Soki emonani ete azali motɛmɛli makasi na ntembe yango, elingaki kozala likámá mpo na ye moko mpe Bayuda na mboka wana. Mobulu ekokaki kobima ata na ntango nini.
Ntembe kati na Naḥmanides mpe Pablo Christiani
Esika mpo na lisoló wana ya ntembe ezalaki ndako ya mokonzi na engumba Barcelone. Yango esalemaki mbala minei—Na mokolo ya 20, ya 23, ya 26, mpe ya 27 Yúli 1263. Mokonzi ye moko akambaki makita nyonso; bakonzi ndenge na ndenge ya lingomba mpe ya Letá bazalaki, mpe lisusu Bayuda ya mboka yango.
Mpo na lingomba nsuka ya ntembe eyebanaki na yango liboso. Kati na lapólo na bango, Badominikɛ balobaki ete mokano ya ntembe ezalaki ‘te mpo ete kondima ekoka kobɛtelama ntembe lokola nde ete ezalaki eloko ya kobɛtela yango ntembe, kasi ezalaki mpo na kotɔndɔla mabunga ya Bayuda mpe kolongola kondima oyo Bayuda mingi bazalaki kotyela yango motema.’
Atako azalaki pene na mbula 70, Naḥmanides amonisaki makoki na ye ya kokanisa mozindo na kolukáká kolobela bobele mateya ya moboko na boumeli ya lisoló yango. Abandaki na kolobáká boye: “Bantembe [oyo esalamaki liboso] kati na bapakano mpe Bayuda etalelaki makambo ndenge na ndenge ya milulu ya mangomba oyo likoló na yango mitindá ya moboko ya kondima mitalelami te. Nzokande, na lisoló oyo kati na ndako ya mokonzi, nazali kolikya ete nakosolola bobele makambo oyo ntembe nyonso ekangisami likoló na yango.” Na bongo bayokanaki ete masoló makosuka na likambo ya koyeba soki Masiya asila koya, soki azali Nzambe to moto, mpe soki ezali Bayuda to baklisto nde bazali na mobeko ya solo.
Na maloba na ye ya ebandeli, Pablo Christiani alobaki ete akomonisa uta na Talmud ete Masiya asila koya. Naḥmanides azongisaki ete soki ezali bongo, mpo na nini Balabi oyo bandimaki Talmud bandimi Yesu te? Na esika ya kotonga maloba na ye likoló na makanisi ya polele ya Makomami, Christiani azalaki kotánga mikapo ya Talmud oyo mizali polele te mpo na kolongisa makanisi na ye. Na likambo mokomoko Naḥmanides akweisaki yango na komonisáká ete mikapo wana mizalaki kotángama kozanga kotalela lisoló mobimba epai mizwami. Emonanaki polele ete Naḥmanides alekaki na boyebi ya makomi yango oyo amipesaki mpo na koyekola yango bomoi na ye mobimba. Ezala na ntango Christiani atángaki Makomami, makanisi na ye ezalaki kolobela mingi makambo oyo makoki kokweisama kozanga nkaká.
Atako bapesaki ye bobele likoki ya koyanola na mituna, Naḥmanides alóngaki kobimisa makanisi ya nguya oyo mamonisaki ntina mpo na yango likanisi ya lingomba ya Katolike ekokaki kondimama te ezala na Bayuda to mpe na bato nyonso oyo bakanisaka na bozindo. Mpo na liteya ya Bósato (Trinité), alobaki ete: “Makanisi ya moyuda nyonso to mpe ya moto nyonso ekopesa ye nzela te na kondima ete Mozalisi ya likoló mpe mabelé . . . akokaki kokɔta na libumu ya mwasi moko moyuda . . . mpe [akokaki] na nsima [komipesa] na mabɔkɔ ya banguna na ye, baoyo . . . babomaki ye.” Naḥmanides alobaki na mokuse ete: “Oyo bozali kondima—mpe oyo ezali moboko ya kondima na bino—ekoki kondimama te epai na moto nyonso oyo azali na makanisi [mabongi].”
Komonisáká polele kozanga kolongobana ya makanisi oyo kino lelo mazali kopekisa Bayuda mingi na kotalela Yesu ete azali Masiya, Naḥmanides alobelaki makasi nyongo monene ya makila oyo lingomba ezali na yango. Alobaki boye: “Mosakoli alobi ete na ntango Masiya akoya, . . . bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te. Uta na ntango ya moto na Nasalete kino sikawa, mokili mobimba motondi na mobulu mpe moyibi. [Kútu], baklisto bazali kosopa makila mingi koleka mabota nyonso mosusu, mpe bazali mpe na lolenge ya bomoi ya mbindo. Ekozala mpasi mpenza mpo na yo, mokonzi na ngai, mpe basodá na yo oyo soki bakokoka . . . lisusu koyekola bitumba te!”—Yisaya 2:4.
Nsima ya bokutani ya mbala ya minei, mokonzi asukisaki ntembe yango. Apesaki Naḥmanides longonya na kolobáká na ye ete: “Namoná naino te ete moto azala na elobeli kitoko boye kati na ntembe ya kozanga kolongobana lokola oyo ozalaki na yango.” Mpo na kotosa elaka na ye, ya kobatela bonsomi ya koloba mpe libateli mpo na Naḥmanides, Mokonzi Jaime I wa Aragon azongisaki ye na ndako na ye, mpe apesaki ye libonza ya denali 300. Na lisɛngami ya episkɔ́pɔ ya engumba Gérone, Naḥmanides akomaki lisoló ya ntembe yango na mokanda.
Wana bazalaki kosakola elónga monene, emonanaki polele ete Badominikɛ bakómaki mpenza na nkanda. Na nsima bafundaki Naḥmanides ete atukaki lingomba, mpe basalelaki makomi na ntina na ntembe yango lokola bilembeteli. Lokola basepelaki te na lolenge mokonzi amonisaki boboto epai na Naḥmanides, Badominikɛ bamemaki likambo yango epai ya Pápa Clément IV. Atako azalaki na mbula koleka 70, babénganaki Naḥmanides na Espagne.c
Solo ezali wapi?
Makanisi oyo mapesamaki na ngámbo nyonso mibale makoki kosalisa biso na koyeba lingomba ya solo? Wana ngámbo mokomoko ezalaki kobimisa mabunga ya ngámbo mosusu, bamonisaki te nsango ya solo mpe ya polele. Oyo Naḥmanides akweisaki na makoki mpenza ezalaki boklisto ya solo te, kasi, bindimeli biuti na bato, lokola liteya ya Bósato, oyo ebimisamaki na mangomba ya boklisto bikeke mingi nsima ya kozala ya Yesu awa na mabelé. Mimeseno ya mbindo ya mangomba ya boklisto mpe kosopa makila na lolenge ya nsɔ́mɔ, oyo Naḥmanides atɔndɔlaki yango na molende mpenza, ezali mpe makambo oyo mazali komonana polele kati na lisoló ya bato.
Kati na ezalela wana, ezali mpasi te koyeba ntina mpo na yango Naḥmanides mpe Bayuda mosusu babéndamaki te na makanisi ya kolóngisa boklisto. Lisusu, makanisi ya Pablo Christiani matongamaki nde likoló na makomi ya Balabi oyo mpe alimbolaki yango mabe, kasi te likoló na Makomami ya Liebele.
Mpo na koloba solo, Naḥmanides akweisaki boklisto ya solo te. Na ntango na ye pole ya solo ya mateya ya Yesu mpe bilembeteli bimonisi ete azali Masiya bizipamaki na bamonisi ya lokuta. Yesu na bantoma na ye basakolaki komonana ya mateya motindo wana ya lipɛngwi.—Matai 7:21-23; 13:24-30, 37-43; 1 Timoté 4:1-3; 2 Petelo 2:1, 2.
Nzokande, lingomba ya solo ezali komonana polele lelo oyo. Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango. . . . Bongo, nzeté malamu na nzeté malamu ekobota mbuma malamu nde nzeté mabe na nzeté mabe ekobota mbuma mabe.” (Matai 7:16, 17) Tobyangi yo na kosala bolukiluki wana. Tiká ete Batatoli ya Yehova básunga yo na kosala bolukiluki ya sembo na kosaleláká bilembeteli biuti na Makomami. Na lolenge yango okoyekola ndimbola ya solo ya bilaka nyonso ya Nzambe oyo bitaleli Masiya mpe boyangeli na ye.
[Maloba na nse]
a Bayuda mingi babéngaka Naḥmanides na nkombo ya “Ramban,” nkombo mokuse esalami uta na balɛtɛlɛ ya nkombo “Rabbi Moses Ben Naḥman.”
b Talá na lisoló “Maimonides—Moto oyo apésaki na losambo ya Bayuda ndimbola ya sika” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mársi 1995, nkasa 20-23.
c Na 1267, Naḥmanides akómaki na mboka oyo eyebani lelo ete Israël. Asalaki makambo mingi na bambula ya nsuka ya bomoi na ye. Asalaki ete Bayuda bazala lisusu na eteni wana ya mokili mpe asalaki esika ya boyekoli na Jérusalem. Lisusu, asilisaki kokoma búku moko ya komantɛrɛ likoló na Torah, oyo ezali liboke ya mikanda mitano ya liboso ya Biblia, mpe akómaki motambwisi monene ya Bayuda oyo bafandaki na engumba Acre ezwami na nɔ́rdi ya bokúla, epai akufaki na mobu 1270.
[Elilingi na lokasa 20]
Naḥmanides asambaki likambo na ye na engumba Barcelone