Baoyo baponi pole bakozwa lobiko
“[Yehova] azali pole na ngai mpe kobika na ngai, nakobanga nani?”—NZEMBO 27:1.
1. Makambo nini Yehova abongisi mpo na kopesa bato bomoi?
YEHOVA azali Mopesi ya pole ya moi oyo ebatelaka bikelamu ya bomoi awa na mabele. (Genese 1:2, 14) Azali mpe Mozalisi ya pole ya elimo oyo elongolaka molili ya mokili ya Satana oyo ememaka na liwa. (Yisaya 60:2; 2 Bakolinti 4:6; Baefese 5:8-11; 6:12) Baoyo baponi pole bakoki koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “[Yehova] azali pole na ngai mpe kobika na ngai, nakobanga nani?” (Nzembo 27:1a) Kasi, se ndenge yango esalemaki na ntango oyo Yesu azalaki awa na mabele, baoyo baponi molili bakozwa etumbu.—Yoane 1:9-11; 3:19-21, 36.
2. Na ntango ya kala, nini ekómelaki baoyo baboyaki pole ya Yehova mpe nini ekómelaki baoyo batosaki liloba na ye?
2 Na mikolo ya Yisaya, bato mingi ya libota oyo Yehova asalaki na yango kondimana baboyaki pole. Yango wana, Yisaya amonaki ndenge oyo ekólo mobimba ya Yisalaele, bokonzi oyo ezalaki na nɔrdi, ebomamaki. Na nsima, na mobu 607 L.T.B., Yelusaleme na tempelo na yango, ebomamaki mpe bato oyo bazalaki kofanda kuna bakendaki na boombo. Kasi, baoyo batosaki liloba ya Yehova balendisamaki mpo bálanda bapɛngwi ya ntango wana te. Yehova alakaki ete bato oyo batosaki ye basengelaki kobika liboso ya makambo oyo esalemaki na mobu 607 L.T.B. (Yilimia 21:8, 9) Lelo oyo, biso baoyo tolingi pole tokoki kozwa liteya monene na makambo oyo esalemaki na ntango wana.—Baefese 5:5.
Esengo ya baoyo bazali na pole
3. Elikya nini tokoki kozala na yango lelo oyo, “libota” nini “ya boyengebene” tolingaka, mpe “mboka ya nguya” ya “libota” yango ezali nini?
3 “Mboka ya nguya ezali na biso, [Nzambe] atongi lobiko lokola mapango mpe bizingelo. Zipolá bikuke ete libota ya boyengebene mpe ya kobatela kondimana [ekɔta].” (Yisaya 26:1, 2) Oyo ezali maloba ya esengo, maloba ya bato oyo batyelaki Yehova motema. Bayuda oyo batikalaki sembo na mikolo ya Yisaya, batyaki elikya na bango epai ya Yehova mpo abatela bango, kasi na banzambe ya lokuta te oyo bandeko na bango bazalaki kosambela. Lelo oyo, biso mpe tozali na elikya motindo moko. Mpe lisusu, tolingaka “libota ya boyengebene” ya Yehova, elingi koloba “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Matai 21:43) Yehova mpe alingaka libota yango mpo na etamboli na yango ya sembo. Lokola azali kopambola yango, Yisalaele ya Nzambe ezali na “mboka ya nguya,” ebongiseli oyo ezali lokola mboka oyo ezali kosunga yango mpe kobatela yango.
4. Elimo nini tosengeli kolona?
4 Bato oyo bazali na “mboka” yango bayebi malamu ete “makanisi oyo ezali na moboko ya malamu, Yehova akobatela yango na kimya ya libela, mpamba te, bakotyela nde [Yehova] motema.” Yehova asungaka baoyo batyelaka ye motema mpe batosaka mibeko na ye ya sembo. Yango wana, bato ya sembo na Yuda batosaki elendiseli ya Yisaya ete: “Bótya elikya na bino epai ya Yehova mpo na libela, mpamba te Yah Yehova azali Libanga oyo ekoumela seko.” (Yisaya 26:3, 4, NW; Nzembo 9:10; 37:3; Masese 3:5) Baoyo bazali na makanisi motindo wana batalelaka “Yah Yehova” lokola Libanga na bango ya libateli. “Kimya ya libela” ezali na kati na bango na ye.—Bafilipi 1:2; 4:6, 7.
Banguna ya Nzambe bakitisami
5, 6. (a) Ndenge nini Babilone ya kala ekitisamaki? (b) Ndenge nini “Babilone Monene” ekitisamaki?
5 Tokoloba boni ntango bato oyo batyelaka Yehova motema bazali konyokwama? Basengeli kobanga te. Yehova atikaka nzela ete makambo motindo wana ekómela bango mpo na mwa ntango, kasi nsukansuka abikisaka bango mpe apesaka baoyo bazali konyokola bango etumbu. (2 Batesaloniki 1:4-7; 2 Timote 1:8-10) Tótalela likambo oyo ekómelaki “mboka oyo etombwani.” Yisaya alobi boye: “[Yehova] abwaki na nse baoyo bazalaki kofanda na likoló, mboka oyo etombwani. Akitisi yango, akitisi yango tii na mabele; asimbisi yango mputulu. Lokolo ekonyata yango, makolo ya ye oyo azali konyokwama, matambe ya baoyo mike.” (Yisaya 26:5, 6, NW) Ekoki kozala ete mboka etombwani oyo balobeli awa ezali Babilone. Mboka yango enyokolaki mpenza bato ya Nzambe. Kasi nini ekómelaki Babilone? Na mobu 539 L.T.B., Bamede na Baperse bakweisaki yango. Bakitisaki yango mpenza!
6 Na mikolo na biso, esakweli ya Yisaya ezali komonisa malamu mpenza likambo oyo ekómelaki “Babilone Monene” banda 1919. Mboka yango oyo etombwani ekweaki mpenza na 1919 ntango esɛngisamaki na makasi ete ebimisa basaleli ya Yehova na boombo ya elimo. (Emoniseli 14:8) Makambo oyo esalemaki na nsima ezalaki lisusu nsɔni koleka mpo na mboka yango. Mwa etuluku yango ya baklisto bakómaki ‘konyata’ ye oyo akangaki bango. Na 1922, babandaki kosakola ete etikali moke mangomba ya boklisto ebomama, bazalaki koyebisa lokito ya kelelo ya baanzelu minei oyo Emoniseli 8:7-12 elobeli mpe mawa misato oyo Emoniseli 9:1–11:15 esakolaki.
“Nzela ya moyengebene ezali sembo”
7. Ndenge nini bato oyo bazali kolanda pole ya Yehova bazali kotambwisama, mpe batyaka elikya epai ya nani mpe balingaka nini?
7 Yehova abikisaka baoyo balukaka pole na ye mpe atambwisaka makolo na bango, lokola maloba ya Yisaya oyo elandi emonisi yango: “Nzela ya moyengebene ezali sembo, yo okoleka na sembo, okobongisa [nzela] ya moyengebene. Ɛ na nzela ya kosambisa na yo, ɛ [Yehova totii elikya epai na] yo. Nkombo na yo mpe [ekaniseli] mpo na yo izali mposa na milimo na biso.” (Yisaya 26:7, 8) Yehova azali Nzambe ya sembo, mpe baoyo basambelaka ye basengeli kotosa mibeko na ye ya sembo. Ntango bazali kosala bongo, Yehova atambwisaka bango, abongisaka nzela na bango. Bato yango ya komikitisa bamonisaka ete batii elikya epai ya Yehova mpe balingi nkombo to “ekaniseli” na ye na ndenge batosaka malako na ye na motema na bango mobimba.—Exode 3:15.
8. Elimo nini ya malamu Yisaya amonisaki?
8 Yisaya alingaki nkombo ya Yehova mingi. Maloba na ye oyo ezali na vɛrsɛ oyo elandi ezali komonisa yango: “Molimo na ngai ezali na yo na mposa na ntango na butu, [elimo, NW] na ngai kati na ngai ekolukaluka yo; zambi wana kosambisa na yo ekozala na mokili, bafandi na molɔ́ngɔ́ bakoyekola boyengebene.” (Yisaya 26:9) Yisaya alingaki Yehova na ‘molimo na ye,’ to na bomoto na ye mobimba. Salá lokola nde ozali komona mosakoli, wana azali kobondela Yehova na butu, ntango oyo makɛlɛlɛ ezalaka te, azali koyebisa ye makanisi ya motema na ye mpe azali koluka litambwisi ya Yehova na mposa makasi. Ezali ndakisa malamu mpenza mpo na biso! Mpe lisusu, bitumbu ya Yehova eteyaki Yisaya boyengebene. Na likambo yango, amonisi biso ntina ya kozala ntango nyonso na bokɛngi mpe ya kolala mpɔngi te mpo na kososola mokano ya Yehova.
Bato mosusu baponi molili
9, 10. Boboto nini Yehova asalelaki libota na ye oyo ezalaki sembo te, kasi ndenge nini bango batalelaki yango?
9 Yehova amoniselaki Yuda boboto mingi, kasi ezali mawa ete bango nyonso te nde bazalaki na botɔndi mpo na yango. Na esika bápona pole ya mateya ya solo ya Yehova, mbala na mbala, mingi kati na bango bazalaki kotomboka mpe kopɛngwa. Yisaya alobaki boye: “Soko moto mabe amonisami boboto, akoyekola boyengebene te; kati na mokili ya sembo, akosalaka na mobulu, akomona nkembo ya [Yehova] te.”—Yisaya 26:10.
10 Na mikolo ya Yisaya, ntango Yehova abatelaki bato ya Yuda mpo ete banguna na bango básala bango mabe te, mingi kati na bango baboyaki kondima likambo yango. Ntango azalaki kopesa bango kimya, libota yango emonisaki botɔndi ata moke te. Yango wana, Yehova asundolaki bango mpo básalela “bankolo mosusu,” mpe na nsuka, na mobu 607 L.T.B., atikaki ete bámema Bayuda na boombo na Babilone. (Yisaya 26:11-13) Atako bongo, bato ya ekólo yango bakufaki bango nyonso te; na nsuka, mwa ndambo batikalaki mpe, nsima ya kopɛtolama, bazongaki na mboka na bango.
11, 12. (a) Baoyo bakangaki Yuda na boombo basukaki ndenge nini? (b) Na 1919, bomoi ya ye oyo akangaki basaleli bapakolami ya Yehova ekómaki ndenge nini?
11 Kasi nini ekómelaki bato ya ekólo oyo ekangaki Bayuda? Yisaya apesi eyano na maloba ya esakweli ete: “Basili kokufa, bakobika te; bakitisami, bakotɛlɛma te. Mpo na yango, okómeli bango mpe obebisi bango, mpe osilisi ata kokanisa nyonso na bango.” (Yisaya 26:14) Ntango Babilone ekweaki na mobu 539 L.T.B., etɛlɛmaki lisusu te. Nsukansuka, mboka yango esengelaki kolimwa. Esengelaki ‘kokitisama,’ mpe bokonzi monene na yango elingaki kotikala kaka na mikanda ya masolo ya kala. Yango ezali mpenza likebisi mpo na baoyo bazali kotya elikya na bango epai ya bato ya makasi ya mokili oyo!
12 Makambo mosusu oyo esakweli yango elobeli ekokisamaki ntango Nzambe atikaki ete basaleli na ye bapakolami bákende na boombo ya elimo na 1918 mpe na nsima alongolaki bango na boombo yango na 1919. Kobanda ntango wana, bomoi ya ye oyo akangaki bango na boombo, mingimingi mangomba ya boklisto, ekómaki molili. Kasi, Yehova azalaki na mapamboli mingi mpenza mpo na basaleli na ye.
“Osili kofulukisa libota”
13, 14. Banda 1919, mapamboli nini basaleli ya Yehova bapakolami bazali kozwa?
13 Na 1919, Nzambe apambolaki basaleli na ye bapakolami mpo na misala oyo basalaki oyo emonisaki ete babongoli motema mpe afulukisaki bango. Libosoliboso, likebi etyamaki na koyanganisama ya basangani ya nsuka kati na Yisalaele ya Nzambe, mpe na nsima, “ebele monene” ya “bampate mosusu” babandaki koyanganisama. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Esakweli ya Yisaya elobelaki mapamboli yango na maloba oyo: “Osili kofulukisa libota, Ɛ [Yehova] osili kofulukisa libota, okembisami; okómisi yango mosika kino [bandelo, NW] nyonso na mokili. Ɛ [Yehova] baluki yo kati na mpasi, babimisi libondeli wana etumbu na yo ezalaki likoló na bango.”—Yisaya 26:15, 16.
14 Lelo oyo, bandelo ya Yisalaele ya Nzambe ekómi tii na mabele mobimba, mpe ebele monene oyo bayei kobakisama bazali soki bato milio motoba, bango mpe bazali kosala mosala ya kosakola nsango malamu na esengo. (Matai 24:14) Yehova apamboli bango mpenza! Mpe yango ezali kopesa nkombo na ye nkembo mpenza! Lelo oyo, nkombo yango ezali koyokama na mikili 235. Ya solo, akokisi mpenza elaka na ye.
15. Lisekwa nini ya elilingi esalemaki na 1919?
15 Mpo ekólo yango elongwa na boombo na Babilone, esengelaki ete Yehova asalisa yango. Bakokaki kolongwa na boombo yango na makasi na bango moko te. (Yisaya 26:17, 18) Ndenge moko mpe, kolongwa ya Yisalaele ya Nzambe na boombo na 1919 emonisaki mpenza ete Yehova azali kosunga yango. Yisalaele ya Nzambe ekokaki kolongwa na boombo te soki Nzambe asalaki eloko moko te. Makambo na bango ebongwanaki na ndenge ya kokamwa mpenza yango wana Yisaya akokanisaki yango na lisekwa. Alobaki boye: “Bakufi na yo bakobika, bibembe na ngai ikotɛlɛma. Ɛ bafandi kati na mputulu, bólamuka! Bóyemba na esengo! Mpo ete mamwe na yo ezali mamwe ya pole, mpe [mabele ekokitisa (to ekobota) ata baoyo bazangi nguya na kati ya liwa, NW].” (Yisaya 26:19; Emoniseli 11:7-11) Tokoloba ete bato oyo bakufá bakobotama lisusu mpo na kosala lisusu misala!
Libateli na ntango ya makama
16, 17. (a) Na mobu 539 L.T.B., Bayuda basengelaki kosala nini mpo bábika ntango Babilone ekweaki? (b) Lelo oyo, “biteni ya ndako” ekoki kozala nini mpe ekoki kopesa biso litomba nini?
16 Basaleli ya Yehova bazalaka ntango nyonso na mposa ya libateli na ye. Kasi, etikali moke, Yehova akosembola lobɔkɔ na ye mpo na mbala ya nsuka mpo na kobebisa mokili ya Satana, mpe basambeli na ye bakozala na mposa mpenza ya lisalisi na ye koleka ndenge oyo ezalaka liboso. (1 Yoane 5:19) Mpo na ntango wana ya likama, [Yehova] alobi boye mpo na kokebisa biso: “Yaká bato na ngai, [kɔtá] na biteni ya ndako na yo, kangá bikuke nsima na yo; omibomba ntango mwa moke kino nkanda esili koleka. Zambi talá, [Yehova] azali kobima na esika na ye, mpo na kopesa bafandi ya mokili etumbu mpo na mabe na bango; mpe mokili ekozipola makila masopani likoló na yango, ekobomba lisusu babomami na yango te.” (Yisaya 26:20, 21; Sefania 1:14) Likebisi yango elakisaki Bayuda ndenge ya komibikisa ntango Babilone ekweaki na mobu 539 L.T.B. Baoyo batosaki likebisi yango bafandaki na bandako na bango mpo na kobombama mpo na basoda oyo bayaki kobɔtɔla mboka mpe bazalaki kotambolatambola na babalabala.
17 Lelo oyo, na ntembe te “biteni ya ndako” ya esakweli ezali elilingi ya ebele ya masangá ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba. Masangá yango ezali esika ya libateli ata lelo oyo, ezali bisika oyo baklisto bazwaka libateli kati na bandeko na bango; mpe bankulutu basungaka bango na bolingo nyonso. (Yisaya 32:1, 2; Baebele 10:24, 25) Ezali mpenza bongo, mingimingi lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, ntango oyo esengeli kozala na botosi mpo na kobika.—Sefania 2:3.
18. Ndenge nini, mosika te, Yehova ‘akoboma dalagona oyo azali na mai-na-monana’?
18 Mpo na ntango wana, Yisaya asakoli boye: “Na mokolo yango, na nzela ya mopanga na ye ya makasi mpe na monene mpe na nguya, [Yehova] akopesa etumbu na Leviatana, nyoka oyo akokima, mpe Leviatana, nyoka oyo [egumbami]; akoboma mpe dalagona oyo azali kati na mai-na-monana.” (Yisaya 27:1) Na ntango na biso “Leviatana” ezali nini? Ekoki mpenza kozala Satana, “nyoka ya kalakala,” elongo na mokili mabe na ye oyo azali kosalela mpo na kobundisa Yisalaele ya Nzambe. (Emoniseli 12:9, 10, 17; 13:14, 16, 17) Na 1919, basaleli ya Nzambe balongwaki na mabɔkɔ ya Leviatana. Na nsuka, Leviatana ekolimwa mpo na libela. (Emoniseli 19:19-21; 20:1-3, 10) Na bongo, Yehova ‘akoboma dalagona oyo azali kati na mai-na-monana.’ Na ntango oyo ezali naino na bomoi, Leviatana ekoki kosala basaleli ya Yehova mabe moko te oyo ekoumela ntango molai. (Yisaya 54:17) Elaka yango ezali mpenza kobɔndisa biso!
“Elanga ya miwiti oyo fulu ya vinyo na yango ezali kosopana”
19. Batikali bazali ndenge nini lelo oyo?
19 Soki tokanisi pole nyonso oyo Yehova azali kopesa, omoni te ete tosengeli mpenza kozala na esengo? Ɛɛ, ezali mpenza bongo! Yisaya asaleli maloba kitoko mpo na kolimbola esengo ya basaleli ya Nzambe ntango akomi boye: “Na mokolo yango, elanga ya miwiti [oyo fulu ya vinyo na yango ezali kosopana, NW], yembelá yango; ngai [Yehova] nazali mobateli na yango; nakosopa mai wana ntango nyonso; ete moto abebisa yango te nazali kobatela yango na butu na moi.” (Yisaya 27:2, 3) Yehova abateli “elanga ya miwiti” na ye, elingi koloba batikali ya Yisalaele ya Nzambe, mpe baninga na bango oyo bazali kosala na bango mosala makasi. (Yoane 15:1-8) Yango wana eboti mbuma oyo ezali kokumisa nkombo na ye mpe ezali kopesa esengo na basaleli na ye awa na mabele.
20. Ndenge nini Yehova abatelaka lisangá ya boklisto?
20 Tokoki mpenza kosepela lokola Yehova atiki nkanda oyo ayokelaki basaleli na ye bapakolami, nkanda oyo etindaki ye ete atika bango bákende na boombo na mobu 1918. Yehova ye moko alobi boye: “Nkanda ezali na ngai te; ɛɛ soko nazalaki na nzube mpe matiti mpamba mpo na kobunda etumba! mbɛlɛ natɛmɛli yango, mbɛlɛ nazikisi yango elongo moko. Soko ete bándima nguya na ngai, bákata na ngai kondimana ya kimya, ɛɛ bákata na ngai kondimana ya kimya.” (Yisaya 27:4, 5) Mpo ete miwiti na ye ekoba kobota mingi “vinyo oyo fulu na yango ezali kosopana,” Yehova akati mpe atumbi matiti mabe nyonso, elingi koloba makambo nyonso oyo ekoki kobebisa yango. Yango wana, tiká ete moto moko te abebisa bolamu ya lisangá ya boklisto! Biso nyonso ‘tóndima nguya ya Yehova,’ tóluka ete andima mpe abatela biso. Soki tosali bongo, tokotya kimya kati na biso na Nzambe. Ezali likambo ya ntina mingi mpenza, yango wana Yisaya azongeli yango mbala mibale.—Nzembo 85:1, 2, 8; Baloma 5:1.
21. Ndenge nini mokili etondi na “mbuma”?
21 Mapamboli esili naino te: “Na mikolo mikoya, Yakobo akobimisa misisa, Yisalaele akobimisa felele mpe akotoa, akotondisa mokili mobimba na mbuma.” (Yisaya 27:6) Maloba ya vɛrsɛ oyo ebandaki kokokisama na 1919, mpe ezali komonisa polele mpenza nguya ya Yehova. Baklisto bapakolami batondisi mokili na “mbuma,” elingi koloba bilei kitoko ya elimo. Bazali na esengo ya kotosa mibeko ya Nzambe na kati ya mokili oyo etondi na mabe. Yehova azali mpe kokolisa mosala na bango. Yango wana, bamilio ya baninga na bango bampate mosusu ‘bazali kosalela [Nzambe] butu na moi.’ (Emoniseli 7:15) Tiká tóbatela malamu libaku monene oyo tozali na yango ya kolya “mbuma” mpe kokabola yango na bato mosusu!
22. Bato oyo bazali kondima pole bakozwa mapamboli nini?
22 Na ntango oyo ya mpasi, awa molili ezipi mabele mobimba mpe molili tuu ezipi bikólo, tozali mpenza na botɔndi lokola Yehova azali kopesa basaleli na ye pole ya elimo! (Yisaya 60:2; Baloma 2:19; 13:12) Pole yango ezali kopesa bato nyonso oyo bazali kondima yango kimya ya makanisi mpe esengo mpe ekopesa bango bomoi ya seko na mikolo ekoya. Yango wana, ebongi mpenza ete biso baoyo tolingaka pole tókumisa Yehova na mitema na biso mpe tóloba lokola mokomi ya nzembo alobaki: “[Yehova] azali ekimelo ya bomoi na ngai, nakolɛnga mpo na nani? Talelá [Yehova], zalá na molende, lendisá motema, ɛɛ, talá epai na [Yehova].”—Nzembo 27:1b, 14.
Ozali koyeba lisusu?
• Baoyo bazali konyokola libota ya Yehova bakozala ndenge nini na mikolo oyo ezali koya?
• Bokoli nini Yisaya asakolaki?
• Lelo oyo “biteni ya ndako” oyo tosengeli kotikala na kati na yango ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kotikala na kati na yango?
• Mpo na nini ezalela ya basaleli ya Yehova ezali kokumisa ye?
[Etanda na lokasa 22]
MOKANDA YA SIKA
Makambo mingi oyo tolobeli na masolo mibale oyo ya boyekoli tolandaki yango na masukulu na liyangani ya etúká ya mobu 2000 mpe 2001. Na nsuka ya lisukulu, molobi alakisaki mokanda moko ya sika oyo ebimaki, motó ya likambo na yango elobi Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso I. Buku yango ya nkasa 416 ezali kolimbola vɛrsɛ mokomoko banda na mokapo 1 tii mokapo 40 ya mokanda ya Yisaya.
[Elilingi na lokasa 18]
Kaka bayengebene nde bakoki kokɔta na “mboka makasi” ya Yehova, elingi koloba ebongiseli na ye
[Elilingi na lokasa 19]
Yisaya alukaki Yehova “na butu”
[Elilingi na lokasa 21]
Yehova azali kobatela “elanga ya miwiti” na ye mpe azali kosala ete ebota mingi