Mokapo ya Ntuku Mibale na Moko
Lobɔkɔ ya Yehova ekómi likoló
1. Mpo na nini Yisaya akangami na Yehova makasi?
YISAYA alingi Yehova mingi mpe asepelaka kokumisa ye. Agangi ete: “Ɛ Yehova, yo ozali Nzambe na ngai. Nakokumisa yo, nakosanzola nkombo na yo.” Nini esalisi mosakoli yango mpo akangama makasi na Mozalisi na ye ndenge wana? Ntina monene ezali ete ayebi Yehova, ayebi mpe misala na ye. Maloba ya Yisaya oyo elandi emonisi boyebi yango: “Mpo osali makambo ya kokamwa, toli banda na ntango ya kala, ebongisami na bosembo, ebongi kotyelama motema.” (Yisaya 25:1, NW) Ndenge moko na Yosua oyo azalaki na bomoi liboso na ye, Yisaya ayebi ete Yehova azali sembo mpe ebongi kotyela ye motema mpe ete “toli” na ye nyonso—makambo oyo akanaka kosala—ekokisamaka.—Yosua 23:14.
2. Toli nini ya Yehova Yisaya alobeli sikawa, mpe ntina na yango ekoki kozala nini?
2 Maloba ya Yehova ya kosambisa mpo na kotɛmɛla banguna ya Yisalaele ezali na kati ya toli na ye. Yisaya alobeli sikawa moko na yango: “Okómisi [engumba lokola libondo ya mabanga, mpe engumba, NW] ya makasi bobele eloko mpamba. Ndako monene ya bapaya ezali [engumba, NW] lisusu te, libela ekotongama lisusu te.” (Yisaya 25:2) Engumba yango oyo batángi nkombo na yango te ezali nini? Ekoki kozala ete Yisaya azali kolobela Ale ya Moaba—Moaba azali monguna ya basaleli ya Nzambe kobanda kala.a To mpe azali kolobela engumba mosusu, engumba oyo eleki makasi—Babilone.—Yisaya 15:1; Sefania 2:8, 9.
3. Na lolenge nini banguna ya Yehova bazali kokumisa ye?
3 Banguna ya Yehova bakosala nini ntango toli na ye mpo na kotɛmɛla engumba na bango makasi ekokokisama? “Libota ya makasi bakokumisa yo, mboka ya mabota ya [banyokoli bakobanga, NW] yo.” (Yisaya 25:3) Banguna ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso bakobanga ye, mpe esengeli kozala mpenza bongo. Kasi, na ndenge nini bakokumisa ye? Bakosundola banzambe na bango ya lokuta mpo na kokɔta na losambo ya pɛto? Ezali mpasi mpo na kondima ete bakosala bongo! Kasi nde, motindo moko na Falo mpe Nebukadanesala, bakokumisa Yehova ntango bakondima ete ye nde aleki banzambe nyonso mpe nzambe moko te akokani na ye.—Exode 10:16, 17; 12:30-33; Danyele 4:37.
4. “Mboka ya mabota ya banyokoli” nini ezali lelo oyo, mpe na lolenge nini yango mpe esengeli kokumisa Yehova?
4 Lelo oyo “mboka ya mabota ya banyokoli” ezali “mboka yango monene oyo azali na bokonzi na liboso na bakonzi nyonso na mokili,” elingi koloba “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta ya mokili mobimba. (Emoniseli 17:5, 18, NW) Eteni monene ya lisangá yango ezali mangomba ya boklisto. Na lolenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali kokumisa Yehova? Bazali kondima na motema mpasi misala ya kokamwa oyo asali mpo na bolamu ya Batatoli na ye. Mingimingi na 1919 ntango Yehova azongisaki basaleli na ye na kati ya mosala monene ya kosakola nsima ya kosikola bango na boombo ya elimo na Babilone Monene, bakonzi yango “babangaki mingi, mpe bakumisi Nzambe ya Likoló.”—Emoniseli 11:13.b
5. Ndenge nini Yehova abatelaka baoyo batyelaka ye motema mobimba?
5 Atako banguna na ye bazali koyoka ye nsɔmɔ, kasi Yehova azali ekimelo mpo na bato ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa oyo balingi kosalela ye. Bato ya mangomba mpe ya politiki oyo bazali banyokoli bakoki kosala nyonso mpo na kobebisa kondima ya basambeli ya solo, kasi bakolonga te mpamba te basambeli ya solo batyelaka Yehova motema mobimba. Nsukansuka, Yehova asukisaka banguna yango, ezalaka lokola nde azali kozipa moi makasi ya esobe na lipata moko to kokangisa nguya ya mopɛpɛ makasi na efelo moko.—Tángá Yisaya 25: 4, 5.
‘Elambo mpo na mabota nyonso’
6, 7. (a) Yehova asali elambo ya lolenge nini, mpe asali yango mpo na banani? (b) Elambo monene oyo Yisaya asakolaki ezali elilingi ya nini?
6 Lokola tata moko ya bolingo, Yehova asukaka kaka te na kobatela bana na ye, kasi mpe aleisaka bango, mingimingi na elimo. Nsima ya kosikola basaleli na ye na 1919, abongiselaki bango elambo moko mpo na kokumisa bolongi yango, na bilei ebele ya elimo: “Na ngomba oyo [Yehova] na bibele akobongisela mabota nyonso elambo ya bilei ya mafuta, elambo ya vinyo oyo esili koumela, na bilei kitoko bitondi na mafuta mpe na vinyo eumeli mpe eponami.”—Yisaya 25:6.
7 Elambo esalemi na “ngomba” ya Yehova. Ngomba yango ezali nini? Ezali “ngomba ya ndako ya Yehova” epai bikólo nyonso bizali kokenda “na mikolo ya nsuka.” Ezali “ngomba mosantu” ya Yehova, epai basambeli na ye ya sembo basalaka mabe moko te mpe babebisaka moto moko te. (Yisaya 2:2; 11:9) Na esika wana etombwani ya losambo, Yehova asali elambo moko monene mpo na bato na ye ya sembo. Mpe biloko kitoko ya elimo oyo ezali kopesama sikawa na boboto mpenza ezali elilingi ya biloko kitoko ya mosuni oyo ekopesama ntango Bokonzi ya Nzambe ekokóma boyangeli kaka moko mpo na bato nyonso. Na ntango wana nzala ekozala lisusu te. “Masango ekotonda na mokili ata kino likoló na [ngomba mpe biloko ekozala ebele mpenza, NW].”—Nzembo 72:8, 16.
8, 9. (a) Wapi banguna minene mibale ya bato bakolongolama? Limbolá. (b) Nzambe akosala nini mpo na kolongola nsɔni likoló na basaleli na ye?
8 Baoyo bazali sikawa kolya na elambo ya elimo oyo Nzambe abongisi bazali kozwa matomba mingi. Yoká maloba ya Yisaya oyo elandi. Akokanisi lisumu mpe kufa na “elamba” to “ezipeli” oyo ekokangaka mpema, mpe alobi ete: “Na ngomba oyo [Yehova] akobebisa ezipeli oyo etandisami likoló na bato nyonso mpe [elamba, NW] oyo etandisami [likoló] na mabota nyonso. Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Mokonzi Yehova, NW] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25: 7, 8a.
9 Ya solo, lisumu mpe kufa ekozala lisusu te! (Emoniseli 21:3, 4) Lisusu, nsɔni ya makambo ya lokuta oyo basaleli ya Nzambe bazali koyikela yango mpiko na boumeli ya bankóto ya bambula, yango mpe ekolongolama. “Akolongola mpe nsɔni ya bato na ye longwa na mokili mobimba, zambi [Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 25:8b) Ndenge nini yango ekosalema? Yehova akolongola mobandisi ya nsɔni yango, Satana na mombóto na ye. (Emoniseli 20:1-3) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge basaleli ya Nzambe bakoganga ete: “Talá oyo Nzambe na biso; [totyelaki ye motema, NW] mpe ye akobikisa biso. Oyo [ezali Yehova. Totyelaki ye motema, NW], tiká ete tósepela mpe tóyoka esengo na lobiko na ye.”—Yisaya 25:9.
Bato ya lolendo bakitisami
10, 11. Mpasi ya ndenge nini Yehova abombeli Moaba?
10 Yehova abikisaka bato na ye oyo bazali na komikitisa. Kasi, Moaba, oyo azali pene ya Yisalaele, azali na lolendo, mpe Yehova ayinaka lolendo. (Masese 16:18) Yango wana, Moaba asengeli kokitisama. “Lobɔkɔ ya [Yehova] ekoumela na ngomba oyo mpe Moaba akonyatama na esika na ye lokola matiti makonyatama na libulu na nyei. Akotandisa mabɔkɔ na kati na yango lokola monyanyi na mai akosembola mabɔkɔ na ye; nde [Yehova] akokitisa lolendo na ye esika moko na mayele na mabɔkɔ na ye. Mpe esika molai makasi likoló na [bifelo, NW] na yo, akokitisa yango, akokweisa yango, akobwaka yango na mabele, ɛɛ epai na mputulu mpenza.”—Yisaya 25:10-12.
11 Lobɔkɔ ya Yehova “ekoumela” likoló na ngomba na ye mosantu mpo na kobatela yango. Nzokande, Moaba oyo azali na lolendo akobɛtama mpe akonyatama lokola “matiti makonyatama na libulu na nyei.” Na eleko ya Yisaya, bazalaki kosangisa matiti na libondo ya nyei mpe kotuta yango na makolo mpo na kosala bipɔli oyo ebongisaka mabele mpo na milona; Yisaya azali kosakola mpenza ndenge Moaba akokitisama, atako azali na bifelo milai oyo ezali komonana ete ekoki kokweisama te.
12. Mpo na nini kaka Moaba nde atalelami mpo na maloba ya kosambisama oyo euti epai na Yehova?
12 Mpo na nini Yehova alobeli kaka Moaba maloba makasi ndenge wana? Bamoaba bazali bakitani ya Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama mpe oyo azalaki kosambela Yehova. Bazali kaka te bato oyo bafandi pene ya libota oyo esalaki kondimana na Nzambe, kasi bazali mpe bandeko na bango. Atako bongo, bakangami na banzambe ya lokuta mpe bazali komimonisa ete bazali banguna mpenza ya Yisalaele. Babongi na kozwa mpasi oyo esakolami mpo na bango. Mpo na yango, Moaba azali lokola banguna ya basaleli ya Yehova lelo oyo. Akokani mingimingi na mangomba ya boklisto, oyo elobaka ete euti na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso, kasi lokola tomonaki yango liboso, ezali eteni monene ya Babilone Monene.
Loyembo moko ya lobiko
13, 14. Wapi “engumba ya nguya” oyo basaleli ya Yehova bazali na yango lelo, mpe nani apesameli ndingisa ya kokɔta kuna?
13 Tokoloba nini mpo na basaleli ya Nzambe? Lokola bazali na esengo ndenge Yehova azali kondima bango mpe kobatela bango, batomboli mingongo na bango mpe bayembi. “Na mokolo yango, loyembo oyo ekoyembama na mokili ya Yuda: [Engumba, NW] ya nguya ezali na biso, atongi lobiko lokola [bifelo, NW] mpe bizingelo. Zipolá bikuke ete libota ya boyengebene mpe ya kobatela kondima báingela.” (Yisaya 26:1, 2) Atako maloba yango ekokisamaki na ntango ya kala, na ntembe te ezali mpe kokokisama lelo oyo. “Libota ya boyengebene” ya Yehova, Yisalaele ya elimo, ezali na ebongiseli moko makasi, oyo ezali lokola engumba. Yango ezali mpenza ntina ya kozala na esengo mpe koyemba!
14 Bato ya ndenge nini bazali koya na kati ya “engumba” yango? Loyembo yango epesi eyano: “Makanisi oyo ebongisami malamu, yo [Nzambe] okobatela yango na kimya oyo ekoumela, mpamba te ezali epai na yo nde atii elikya. Tyá motema na yo epai na Yehova mpo na ntango nyonso, mpo epai na Yah Yehova ezali Libanga mpo na seko.” (Yisaya 26:3, 4, NW) “Makanisi” oyo Yehova abatelaka ezali mposa ya kotosa mitinda na ye ya sembo mpe ya kotyela ye motema, kasi te kotyela ebongiseli mpamba ya makambo ya mombongo, ya politiki, mpe ya losambo motema. “Yah Yehova” azali Libanga kaka moko oyo ekoki kotyelama motema mpo na kozwa libateli. Baoyo bazali kotyela Yehova motema mobimba bazali kozwa libateli na ye mpe “kimya” ya ntango nyonso.—Masese 3:5, 6; Bafilipi 4:6, 7.
15. Ndenge nini “engumba etombolami likoló” ekitisamaki na mikolo na biso, mpe na lolenge nini “makolo ya babola” ezali konyata yango?
15 Oyo nde bokeseni na oyo ekómelaka banguna ya basaleli ya Nzambe! “Asili kokitisa bafandi kati na likoló, [engumba, NW] etombolami likoló akitisi yango, akweisi yango na mabele, abwaki yango na mputulu. Lokolo ekonyatela yango, ata makolo ya babola, matambe ya bazangi.” (Yisaya 26:5, 6) Lisusu, mbala mosusu Yisaya azali kolobela awa “engumba etombolami likoló” oyo ezali na Moaba, to mpe azali kokanisa engumba mosusu, lokola Babilone, oyo emitomboli mpenza na lolendo. Ezala ata ndenge nini, Yehova abaloli ezalela ya “engumba etombolami likoló,” mpe bato na ye ‘babola mpe bazangi’ bakonyatela yango. Lelo oyo esakweli yango ebongi mpenza na Babilone Monene, mingimingi na mangomba ya boklisto. Na 1919, “engumba etombolami likoló” esengelaki kobimisa basaleli ya Yehova—yango emonisi kokwea na ye ya nsɔni mpenza—mpe na nsima, basaleli ya Yehova babandi mpe konyata bato oyo bakangaki bango kala na boombo. (Emoniseli 14:8) Na lolenge nini? Basakoli epai ya bato nyonso ete etikali moke nkanda ya Yehova ekitela mangomba ya boklisto.—Emoniseli 8:7-12; 9:14-19.
Mposa ya boyengebene mpe ya “ekaniseli” ya Yehova
16. Ndakisa nini malamu ya kokangama na Nzambe Yisaya apesi?
16 Nsima ya loyembo yango ya bolongi, Yisaya amonisi bozindo ya bokangami na ye na Nzambe mpe matomba oyo eutaka na kosalela Nzambe ya boyengebene. (Tángá Yisaya 26:7-9, NW.) Mosakoli apesi ndakisa moko malamu mpo na likambo etali ‘kotyela Yehova elikya’ mpe kozala na mposa makasi mpo na “nkombo” mpe “ekaniseli” na ye. Ekaniseli ya Yehova ezali nini? Exode 3:15 (NW) elobi ete: “Yehova . . . ezali nkombo na ngai seko na seko, mpe oyo ezali ekaniseli na ngai libota na libota.” Yisaya alingi nkombo ya Yehova mingi mpe makambo nyonso oyo nkombo yango emonisaka, kati na yango mitinda na ye mpe banzela na ye ya boyengebene. Bato oyo balukaka kokóma na bolingo ya ndenge wana mpo na Yehova bandimaka ete bakozwa mapamboli na ye.—Nzembo 5:8; 25:4, 5; 135:13; Hosea 12:5.
17. Mabaku malamu nini bato mabe bakozwa yango te?
17 Kasi, bato nyonso te nde balingaka Yehova mpe mitinda na ye. (Tángá Yisaya 26:10.) Ata soki basɛngi bato mabe ete básala bongo, baboyaka na motó makasi mpenza koyekola boyengebene mpo na kokɔta na “mokili ya sembo,” mokili oyo basaleli ya Yehova oyo bazali sembo na bizaleli mpe na elimo bafandi. Mpo na yango, moto mabe “akomona nkembo ya Yehova te.” Bakobika te mpo na kozwa mapamboli oyo ekosopanela bato nsima ya kosantisama ya nkombo ya Yehova. Ata na mokili ya sika, ntango mabele mobimba ekozala “mokili ya sembo,” bato mosusu bakotya likebi na motema mawa ya Yehova te. Nkombo ya bato ya ndenge wana ekokomama na buku ya bomoi te.—Yisaya 65:20; Emoniseli 20:12, 15.
18. Na lolenge nini bato mosusu ya ntango ya Yisaya baponi kozala bakufi-miso, mpe ntango nini basengeli ‘komona’ Yehova?
18 “Ɛ [Yehova] lobɔkɔ na yo [etombwani] likoló, kasi bamoni yango te; [bakomona mpe bakoyoka nsɔni mpo na molende mpo na bato na yo. Ɛɛ, mɔtɔ mpenza mpo na banguna na yo ekozikisa bango nyɛɛ, NW].” (Yisaya 26:11) Na mikolo ya Yisaya, lobɔkɔ ya Yehova etombwanaki ntango Yehova abatelaki basaleli na ye liboso ya banguna na bango. Kasi, mingi kati na banguna yango bandimi likambo yango te. Bato yango, oyo baponi kozala bato bakufá miso na elimo, nsukansuka ‘bakomona,’ to bakondima Yehova ntango bakozika na mɔtɔ ya molende na ye. (Sefania 1:18) Na nsima, Nzambe alobaki na Ezekiele ete: “Bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].”—Ezekiele 38:23.
“Yehova akopesaka bitumbu epai na baoyo akolingaka bango”
19, 20. Mpo na nini mpe ndenge nini Yehova azalaki kopesa basaleli na ye bitumbu, mpe banani bazwaki liteya na bitumbu yango?
19 Yisaya ayebi ete kimya mpe bolamu ya bato ya ekólo na ye euti na lipamboli ya Yehova. “Ɛ [Yehova], okobongisela biso kimya, osili kosalela biso misala na biso nyonso.” (Yisaya 26:12) Atako bongo mpe atako likoki oyo Yehova atyaki liboso ya basaleli na ye mpo bákóma “bokonzi na banganga mpe libota [mosantu, NW],” Yuda amipesaki na makambo ndenge na ndenge, ya malamu mpe ya mabe. (Exode 19:6) Mbala na mbala, bato na ye bamikɔtisaki na losambo ya banzambe ya lokuta. Yango wana, mbala na mbala bazalaki kozwa etumbu. Kasi, etumbu yango ezali komonisa bolingo ya Yehova mpamba te “[Yehova] akopesaka bitumbu epai na baoyo akolingaka bango.”—Baebele 12:6.
20 Mbala mingi, Yehova apesaka basaleli na ye etumbu mpe atikaka bikólo mosusu, “bankolo mosusu” ete báyangela bango. (Tángá Yisaya 26:13.) Na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), atikaki bato ya Babilone bámema bango na boombo. Yango epesaki bango litomba? Monyoko epesaka moto litomba te. Kasi, soki moto oyo azali konyokwama azwi liteya na likambo oyo ekómeli ye, abongoli motema mpe amipesi mobimba na Yehova, na bongo nde akozwa litomba. (Deteronome 4:25-31) Bayuda babongolaki motema na ndenge Nzambe asɛngaka? Ɛɛ! Yisaya asakoli ete: “Nde tokotosa bobele nkombo na yo.” Ntango bautaki na boombo na mobu 537 L.T.B., mbala mingi Bayuda basengelaki kozwa bitumbu mpo na masumu na bango mosusu, kasi bakweaki lisusu te na lisumu ya kosambela banzambe ya mabanga.
21. Nini ekokómela bato oyo banyokolaka basaleli ya Nzambe?
21 Tokoloba nini mpo na baoyo bakangi Yuda na boombo? “Basili kokufa, bakobika te; bakitisami, bakotɛlɛma te. Mpo na yango, okómeli bango mpe obebisi bango, mpe osilisi ata kokanisa nyonso na bango.” (Yisaya 26:14) Babilone akomona mpasi mpo na mabe oyo asalelaki ekólo oyo Nzambe aponi. Na nzela ya Bamede na Baperse, Yehova akobwaka Babilone ya lolendo mpe akosikola basaleli na ye na boombo. Babilone, engumba yango monene, ekozala lisusu na makasi te, ekokóma lokola ekufi. Nsukansuka, ekozala lisusu te.
22. Na mikolo na biso, mapamboli nini basaleli ya Nzambe bazwi?
22 Na kokokisama ya mikolo na biso, batikali ya Yisalaele ya elimo oyo bazwaki etumbu basikolamaki na Babilone Monene mpe bazongisamaki na mosala ya Yehova na 1919. Lokola bazwaki lisusu nguya, baklisto bapakolami bamipesaki mobimba na mosala na bango ya kosakola. (Matai 24:14) Yehova mpe apamboli bango, bokoli mpe emonani, abimisi kutu ebele monene ya “bampate mosusu” mpo na kosala elongo na bango. (Yoane 10:16) “Obakisi na libota; ɛ Yehova, obakisi na libota; omikumisi. Opusi bandelo ya ekólo mosika mpenza. Ɛ Yehova, na ntango ya mpasi batii likebi na bango epai na yo; basopi libondeli na koimaima ntango etumbu na yo ezalaki likoló na bango.”—Yisaya 26:15, 16, NW.
“Bakotɛlɛma”
23. (a) Na lolenge nini ya kokamwa nguya ya Yehova emonisamaki na mobu 537 L.T.B.? (b) Na lolenge nini nguya yango emonisamaki mpe na mobu 1919 T.B.?
23 Yisaya azongeli ezalela ya Yuda ntango azali naino na boombo na Babilone. Akokanisi ekólo yango na mwasi oyo azali na mpasi ya kobota kasi soki lisalisi ezali te akoki kobota te. (Tángá Yisaya 26:17, 18.) Lisalisi yango eyaki na mobu 537 L.T.B., mpe basaleli ya Yehova bazongaki na mokili na bango, na mposa makasi ya kotonga lisusu tempelo mpe kozongisa losambo ya solo. Ya solo, ezali nde lokola ekólo yango esekwi kati na bakufi. “Bakufi na yo bakobika, bibembe na yo [bikotɛlɛma]. Ɛ bafandi kati na mputulu, bólamuka! Bóyemba na esengo! Mpo ete mamwɛ na yo ezali mamwɛ na pole, mpe [mabele ekokweisa, elingi koloba ekobota, ata baoyo bazangi nguya na kati ya kufa, NW].” (Yisaya 26:19) Oyo nde elakiseli ya nguya ya Yehova! Oyo nde elakiseli mosusu monene ntango maloba yango ekokisamaki na lolenge ya elimo na 1919! (Emoniseli 11:7-11) Mpe tozali kozela na motema likoló ntango maloba yango ekokokisama na mobimba mpenza na mokili ya sika mpe baoyo bazali na nguya te kati na kufa ‘bakoyoka mongongo ya Klisto mpe bakobima’ na nkunda ya kokanisama!—Yoane 5:28.
24, 25. (a) Ndenge nini na mobu 539 L.T.B., Bayuda batosaki etinda ya komibomba? (b) “Biteni ya ndako” na mikolo na biso ekoki kozala nini, mpe ezaleli ya ndenge nini tosengeli kolona mpo na yango?
24 Nzokande, soki bato yango ya sembo balingi kozwa mapamboli ya elimo oyo elakamaki na nzela ya Yisaya, basengeli kotosa mibeko ya Yehova: “Yaká bato na ngai, ingelá na biteni ya ndako na yo, kangá bikuke nsima na yo; omibomba ntango mwa moke kino nkanda esili koleka. Zambi talá, [Yehova] azali kobima na esika na ye, mpo na kopesa bafandi ya mokili etumbu mpo na mabe na bango; mpe mokili ekozipola makila masopani likoló na yango, ekobomba lisusu babombami na yango te.” (Yisaya 26:20, 21; kokanisá na Sefania 1:14.) Ekoki kozala ete esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso ntango Bamede na Baperse, oyo batambwisamaki na Mokonzi Sirise, balongaki Babilone na mobu 539 L.T.B. Xénophon, moto ya ekólo Grèce mpe moto ya mayele ya Istware, alobi ete ntango Sirise akɔti na Babilone, apesi etinda ete bato nyonso báfanda na bandako na bango mpamba te basoda na ye bazwaki “mitinda ya koboma moto nyonso oyo bakokuta libándá.” Lelo oyo, “biteni ya ndako” ya esakweli yango ekoki mpenza kokokana na bankóto ya masangá ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba. Masangá yango ekokoba kozala na ntina mingi na bomoi na biso, ata na ntango ya “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:14) Ezali mpenza na ntina ete tózala ntango nyonso na makanisi malamu mpo na lisangá mpe tóyanganaka wana mbala na mbala!—Baebele 10:24, 25.
25 Etikali moke mokili ya Satana ekóma na nsuka. Toyebi naino te ndenge nini Yehova akobatela basaleli na ye na ntango wana ya nsɔmɔ. (Sefania 2:3) Kasi, toyebi ete lobiko na biso ekotalela kondima na biso, bosembo na biso mpe botosi na biso epai na Yehova.
26. Na mikolo ya Yisaya mpe na eleko na biso “Lewiatana” ezali nini, mpe nini ekokómela “dalagona” yango “oyo azali kati na mai-na-monana”?
26 Ntango akanisi eleko wana, Yisaya asakoli ete: “Na mokolo yango, na nzela na mopanga na ye ya makasi mpe ya monene mpe ya nguya, [Yehova] akopesa etumbu na Leviatana, nyoka oyo ekokima, mpe Leviatana, nyoka oyo angunzami; akoboma mpe dalagona oyo azali kati na mai-na-monana.” (Yisaya 27:1) Na kokokisama ya liboso, “Leviatana” ezali kolobela mikili epai bato ya Yisalaele bapalanganaki, na ndakisa Babilone, Ezipito, mpe Asulia. Mikili yango ekokoka te kopekisa basaleli ya Yehova kozonga na mokili na bango na ntango ebongi. Kasi, nani azali Leviatana ya mikolo na biso? Emonani ete ezali Satana—“nyoka ya kalakala”—mpe mokili mabe na ye, esaleli oyo azali kobundisa na yango Yisalaele ya elimo. (Emoniseli 12:9, 10; 13:14, 16, 17; 18:24) “Leviatana” abungisaki nguya na ye likoló na basaleli ya Nzambe na 1919, mpe etikali moke akolimwa ntango Yehova “akoboma . . . dalagona oyo azali kati na mai-na-monana.” Kino ntango yango ekóma, nyonso oyo “Leviatana” akomeka kosala na basaleli ya Yehova, ekolonga te.—Yisaya 54:17.
“Elanga ya vinyo oyo vinyo etondi na fulu”
27, 28. (a) Elanga ya vinyo ya Yehova etondisi mabele mobimba na nini? (b) Ndenge nini Yehova azali kobatela elanga na ye ya vinyo?
27 Na loyembo mosusu, Yisaya alobeli sikawa kobota mbuma mingi ya basaleli ya Yehova na maloba kitoko mpenza: “[Na mokolo yango bóyembela yango: ‘Elanga ya vinyo oyo vinyo etondi na fulu! Ngai Yehova,’ NW] nazali mobateli na yango; nakosopa mai wana ntango nyonso; ete moto abebisa yango te nazali kobatela yango na butu na moi.” (Yisaya 27:2, 3) Batikali ya Yisalaele ya elimo mpe baninga na bango oyo bamipesi na mosala ya kosakola batondisi mpenza mabele mobimba na mbuma ya elimo. Yango ezali mpenza ntina ya kosepela—ya koyemba! Lokumu nyonso ezali kopesama epai ya Yehova, ye nde azali kobatela elanga na ye ya vinyo na bolingo mpenza.—Kokanisá na Yoane 15:1-8.
28 Ya solo, nkanda oyo Yehova azalaki na yango liboso esili, ekómi nde esengo! “Nkanda makasi nazalaki na yango ezali te. Nani akopesa ngai nzube mpe matiti mabe na etumba? Nakotambola likoló na yango. Nakotumba yango mbala moko. Tiká ete akanga esika makasi na ngai, tiká ete asala boyokani ya kimya elongo na ngai; tiká ete asala boyokani ya kimya elongo na ngai.” (Yisaya 27:4, 5, NW) Lokola alingi ete elanga na ye ya vinyo ekoba kobimisa “vinyo oyo etondi na fulu,” Yehova asali lokola alongolilongoli makanisi nyonso ya mabe oyo ezali lokola matiti mabe oyo ekoki kobebisa elanga na ye ya vinyo mpe atumbi yango na mɔ́tɔ. Yango wana, moto moko te ameka kobebisa kimya ya lisangá ya boklisto! Tiká ete bato nyonso nde ‘bándima nguya ya Yehova,’ báluka kondimama na ye mpe báluka libateli na ye. Soki basali bongo, bakosala boyokani ya kimya elongo na Nzambe—eloko yango ezali na ntina mingi, yango wana Yisaya alobeli yango mbala mibale. Ekobimisa matomba nini? “Na mikolo mikoya, Yakobo akobimisa misisa, Yisalaele akobimisa [fololo] mpe akotoa, akotondisa mokili mobimba na mbuma.” (Yisaya 27:6)c Kokokisama ya vɛrsɛ yango ezali mpenza kopesa elembeteli monene ya nguya ya Yehova! Kobanda 1919, baklisto bapakolami bazali kotondisa mabele na “mbuma,” bilei kitoko ya elimo. Yango epesi nzela ete bamilio ya bampate mosusu ya sembo, elongo na bango, ‘básalela [Nzambe] mosala mosantu butu moi.’ (Emoniseli 7:15, NW) Kati na mokili oyo ebebisami, bazali kotosa mitinda na ye na esengo mpenza. Mpe Yehova azali kokoba kopambola bango mpe kokolisa bango. Tóbosana soki moke te libaku monene oyo tozali na yango ya kozwa matomba na “mbuma” yango mpe kokabola yango na bato mosusu na lisalisi ya mongongo na biso ya kokumisa Nzambe!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo Ale mbala mosusu elimboli “Engumba.”
c Yisaya 27:7-13 etalelami na etanda na lokasa 285.
[Etanda na lokasa 285]
“Liseke monene” esakoli bonsomi
Na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yuda ayoki lisusu mpasi mingi ntango Yehova apesi ekólo na ye ya batomboki etumbu ya kokenda boombo. (Tángá Yisaya 27:7-11, NW.) Mbeba ya ekólo yango elekaki monene mpe mbeka ya banyama ekokaki te kopesa mbɔndi mpo na yango. Yango wana, kaka ndenge moto akoki kopanza bampate to bantaba na “mongongo ya kobangisa” to kofula “mopɛpɛ” likoló na nkasa mpe komema yango na mopɛpɛ makasi, Yehova abengani Yisalaele na mokili na bango. Na nsima, ata bato ya makasi te, oyo balobelami na elilingi lokola basi, bazali na likoki ya kosalela oyo etikali na mokili yango.
Kasi, mokolo ekoya, Yehova akosikola basaleli na ye na boombo. Asikoli bango lokola moloni-bilanga asikolaka mbuma ya olive oyo ekangami likoló ya nzete. “Ekokóma ete na mokolo yango ete Yehova akobuka mbuma, banda na mokɛli ya Ebale [Efrate] kino lobwaku ya Ezipito, mpe na bongo bokolɔkɔtama mokomoko, Ɛ bana ya Yisalaele. Mpe ekokóma ete na mokolo yango bakoyula na liseke ya monene, mpe baoyo babebi na mokili ya Asulia mpe baoyo bapalangani na mokili ya Ezipito bakoya mpe bakofukama liboso ya Yehova na ngomba mosantu na Yelusaleme.” (Yisaya 27:12, 13, NW) Nsima ya kolonga na ye na mobu 539 L.T.B., Sirise apesi etinda ya kosikola Bayuda nyonso na bokonzi na ye, bakisa mpe baoyo bazali na Asulia mpe na Ezipito. (Ezela 1:1-4) Ezali lokola nde “liseke monene” ebɛti, ezali kopanza lolaka ya loyembo ya bonsomi ya basaleli ya Nzambe.
[Bililingi na lokasa 275]
“Elambo ya bilei ya mafuta”
[Elilingi na lokasa 277]
Babilone anyatami na baoyo bazalaki bakangami
[Elilingi na lokasa 278]
“Kɔtá na biteni ya ndako na yo”