‘Bókima epai ya nkombo ya Yehova’
“Nakotika . . . ekólo moko ya komikitisa mpe oyo ezali komitombola te, mpe bakokima mpenza epai ya nkombo ya Yehova.”—SEF. 3:12.
1, 2. Mbula nini ya mopɛpɛ makasi ekoyela bato mosika te?
ESILÁ kokómela yo okende kobatama na nse ya gbagba mpo na kokima mbula monene to mbula ya mabanga? Gbagba ekoki kobatela yo na mbula monene to na mbula ya mabanga, kasi mbala mosusu ekobatela yo mpenza te soki ezali mbula ya mopɛpɛ makasi koleka to ekumbaki.
2 Mbula ya ndenge mosusu ezali koya, mbula oyo ekoki kolimwisa ata bomoi ya bato nyonso na mabele. Ezali “mokolo ya mbula ya mopɛpɛ makasi” ya elilingi. “Mokolo [yango] monene ya Yehova” ekoyela bato nyonso. Atako bongo, tokoki kozwa ekimelo oyo esengeli. (Tángá Sefania 1:14-18.) Ndenge nini tokoki kosala bongo na “mokolo ya nkɛlɛ ya Yehova” oyo ekobanda mosika te?
Mikolo ya mbula ya mopɛpɛ makasi na ntango ya kala
3. ‘Mbula nini ya mopɛpɛ makasi mpe ya bankake’ eyelaki Yisraele, bokonzi ya mabota zomi?
3 Mokolo ya Yehova ekobanda ntango mangomba nyonso ya lokuta ya mokili oyo ekobebisama. Mpo tóyeba ndenge ya kokima, tokoki kozwa eyano na lisolo ya basaleli ya Nzambe ya kala. Yisaya, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mwambe L.T.B., akokanisaki etumbu oyo Yehova akweiselaki Yisraele, bokonzi ya mabota zomi oyo bakómaki bapɛngwi na “mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya bankake,” oyo bato bakokaki kopekisa te. (Tángá Yisaya 28:1, 2.) Esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na mobu 740 L.T.B., ntango Asiri ekɔtelaki mokili ya mabota yango; Efraime nde eyebanaki mingi na mabota yango zomi.
4. Ndenge nini “mokolo monene ya Yehova” eyelaki Yerusaleme na mobu 607 L.T.B.?
4 Nsima ya etumbu ya ekólo Yisraele oyo ezangaki bosembo, “mokolo monene ya Yehova” eyelaki mpe Yerusaleme ná bokonzi ya Yuda na mobu 607 L.T.B. Likambo yango esalemaki mpo bato ya Yuda mpe bakómaki bapɛngwi. Bato ya Babilone oyo Nebukadenezare azalaki kokamba bakanelaki Yuda ná Yerusaleme, engumba-mokonzi na yango. Bato ya Yuda bakendaki koluka lisalisi epai ya “ekimelo ya lokuta,” elingi koloba na kondimana ya politiki oyo basalaki na Ezipito. Atako bongo, ndenge moko na mbula ya mabanga oyo ebebisaka, bato ya Babilone bakɔmbɔlaki “ekimelo” yango.—Yis. 28:14, 17.
5. Nini ekokómela lisangá ya basaleli ya Nzambe ntango mangomba nyonso ya lokuta ekobebisama?
5 Mokolo monene ya Yehova oyo eyelaki Yerusaleme emonisaki etumbu oyo ekokwela mangomba ya bokristo ya lokuta ya ntango na biso. Mangomba mosusu ya “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, ekobebisama mpe. Na nsima, biteni oyo etikali ya ebongiseli mabe ya Satana ekobebisama nyɛɛ. Nzokande, lisangá ya basaleli ya Yehova Nzambe bakobika mpo bazali kokima epai na ye.—Em. 7:14; 18:2, 8; 19:19-21.
Kobatelama na elimo mpe na mosuni
6. Ndenge nini basaleli ya Yehova bakoki kobatelama?
6 Ndenge nini basaleli ya Nzambe bakoki kobatelama ata sikoyo, na mikolo oyo ya nsuka? Sikoyo, tokoki kobatelama na elimo soki tozali ‘kokanisa nkombo ya Nzambe’ na limemya mpenza mpe soki tozali kosalela ye na molende. (Tángá Malaki 3:16-18.) Kasi, tóyeba ete tosengeli kosuka te kaka na kokanisa nkombo ya Nzambe. Biblia elobi boye: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Rom. 10:13) Kobelela nkombo ya Yehova mpe kozwa lobiko oyo ekouta epai na ye ezali na boyokani. Mpe bato mingi ya mitema sembo bakoki komona bokeseni oyo ezali kati na bakristo ya solo, oyo ‘bakanisaka nkombo [ya Nzambe]’ na limemya mpenza mpe bazali Batatoli na ye, mpe bato oyo bazali kosalela ye te.
7, 8. Bakristo ya ekeke ya liboso basalaki nini mpo bábika, mpe ekokani na nini lelo?
7 Nzokande, kobatelama na biso ezali kaka ya elimo te. Nzambe alaki biso mpe kobatelama na mosuni. Tokoki komona yango na makambo oyo esalemaki na mobu 66 T.B., nsima wana limpinga moko ya Baroma oyo Cestius Gallus atambwisaki ebundisaki Yerusaleme. Yesu asakolaki ete mikolo ya bolɔzi wana “ekoyeisama mokuse.” (Mat. 24:15, 16, 21, 22) Likambo yango esalemaki ntango mampinga ya Baroma elongwaki na pwasa na Yerusaleme, mpe mwa ‘bato,’ elingi koloba bakristo ya solo, bazwaki libaku ya ‘kobika.’ Bazwaki likoki ya kokima engumba yango mpe bamboka ya zingazinga. Bato mosusu bakatisaki Yordani mpe bakimaki na bangomba oyo ezalaki na ɛsti ya ebale yango.
8 Mwa bokokani ezali kati na bakristo wana mpe basaleli ya Nzambe lelo. Na ekeke ya liboso, bakristo balukaki esika ya kokima; biso basaleli ya Nzambe ya lelo mpe tokosala kaka bongo. Kasi, mpo na biso ekosɛnga te tókima mpenza na esika moko boye, mpo bakristo ya solo bazali bisika nyonso na mokili. Kasi, etuluku ya “baponami” mpe baninga na bango ya sembo bakokufa te ntango bokristo ya lokuta ekobebisama, soki bakimi epai ya Yehova mpe na ngomba ya elilingi, elingi koloba ebongiseli na ye.
9. Banani bazali koluka bato bábosana nkombo ya Yehova? Pesá ndakisa.
9 Na ngámbo mosusu, mangomba ya bokristo ebongi mpenza kobebisama mpo yango nde esali ete bato ebele oyo bakendaka ndako-nzambe bázanga boyebi ya solo ya Biblia mpe mpo mangomba yango ezali koyina nkombo ya Nzambe. Nzokande na Moyen Âge, nkombo ya Nzambe eyebanaki mingi mpenza na Mpoto. Nkombo yango, oyo ezali na balɛtrɛ minei ya monɔkɔ ya Ebre, oyo babengaka Tetragrami mpe ekomamaka mbala mingi YHWH (to JHVH), ezalaki komonana na mbongo ya bibende, na bifelo ya liboso ya bandako, na babuku mpe Babiblia, ata mpe na bandako-nzambe mosusu ya Lingomba ya Katolike mpe ya Protesta. Kasi mikolo oyo, bakómi na momeseno ya kolimwisa nkombo ya Nzambe na mabongoli ya Biblia mpe na bisika mosusu. Tózwa ndakisa ya mokanda moko na dati ya 29 Yuni 2008, oyo ebongiseli moko ya Katolike (Congrégation pour le Culte divin et la Discipline des Sacrements) etindelaki Baepiskɔpɔ na ntina etali ‘Nkombo ya Nzambe.’ Na mokanda yango, Lingomba ya Katolike elobaki ete na esika nyonso oyo babongolá Tetragrami, basengeli kotya liloba “Nkolo.” Vatican epesaki malako ete nkombo ya Nzambe esengeli te kosalelama to kotángama na banzembo mpe na mabondeli na misa ya Katolike. Mpe bakonzi ya mangomba mosusu, ezala ya bokristo to te, babombeli bamilio ya basambeli makambo mpo báyeba Nzambe ya solo te.
Libateli mpo na baoyo bazali kosantisa nkombo ya Nzambe
10. Banani bazali kokumisa nkombo ya Nzambe lelo?
10 Na bokeseni na ndenge mangomba mosusu ezali kosala, Batatoli ya Yehova bazali kokumisa mpe kopesa nkombo ya Nzambe nkembo. Bazali kosantisa yango mpo bazali kosalela yango na ndenge ya lokumu. Yehova asepelaka na baoyo batyelaka ye motema, mpe akómaka nyonso oyo esengeli mpo na kopambola mpe kobatela bato na ye. “Ayebaka baoyo bazali koluka esika ya kokima epai na ye.”—Nah. 1:7; Mis. 15:14.
11, 12. Banani batikalaki sembo epai ya Yehova na Yuda ya kala, mpe banani bazali kosala yango na mikolo na biso?
11 Atako bato mingi na Yuda ya kala bakómaki bapɛngwi, ezalaki na bato mosusu oyo ‘bakimaki epai ya nkombo ya Yehova.’ (Tángá Sefania 3:12, 13.) Ntango Nzambe atikaki bato ya Babilone bálonga Yuda mpe bámema bato ya ekólo yango bakangami mpo na kopesa bango etumbu mpo na kozanga kondima na bango, bato mosusu, na ndakisa Yirimia, Baruke, Ebede-meleke, babikaki. Bafandaki na kati ya ekólo moko ya bapɛngwi kasi batikalaki sembo. Bamosusu batikalaki sembo esika bamemaki bango bakangami. Na mobu 539 L.T.B., Bamede ná Baperse oyo Siruse akambaki bakweisaki Babilone. Mwa moke na nsima, Siruse abimisaki mobeko moko oyo epesaki Bayuda nzela ya kozonga na mokili na bango.
12 Mpo na bato oyo basengelaki kozala na ntango wana oyo losambo ya solo ekozonga lisusu, Sefania asakolaki ete Yehova akobikisa bango mpe akosepela na bango. (Tángá Sefania 3:14-17.) Emonanaki mpe bongo na mikolo na biso. Nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na likoló, Yehova alongolaki batikali ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo na boombo ya elimo na Babilone Monene. Mpe azali kosepela na bango tii lelo.
13. Bato ya bikólo nyonso bazali kosikolama na nini?
13 Baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele, bango mpe babimá na Babilone Monene mpe bazali kosepela ndenge basikolami na mateya ya mangomba ya lokuta. (Em. 18:4) Na yango, maloba ya Sefania 2:3 ete: “Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele” ezali kokokisama mpenzampenza na ntango na biso. Bato ya komikitisa ya bikólo nyonso, bázala na elikya ya bomoi na likoló to na mabele, bazali lelo kokima epai ya nkombo ya Yehova.
Nkombo ya Nzambe ezali nkisi te
14, 15. (a) Bato mosusu basalelaka nini lokola nkisi? (b) Eloko nini esengeli kosalelama te lokola bikelakela?
14 Bayisraele mosusu bazalaki kotalela tempelo lokola nkisi oyo ekobatela bango na banguna na bango. (Yir. 7:1-4) Bikeke liboso, Bayisraele bamonaki sanduku ya kondimana lokola bikelakela oyo ekobatela bango na etumba. (1 Sa. 4:3, 10, 11) Constantin le Grand ayemaki balɛtrɛ ya Grɛki khi ná rhô, balɛtrɛ mibale ya liboso ya titre “Kristo” na Grɛki na banguba ya basoda na ye na elikya ete ekobatela basoda yango na etumba. Mpe balobaka ete Gustave Adolphe II, mokonzi ya Suède, oyo abundaki na etumba babengi guerre de Trente Ans azalaki kolata na nkingo ebende oyo ezali na lokasa 7. Nkombo Iehova etyamaki polele na ebende yango oyo balataka na nkingo.
15 Basaleli mosusu ya Nzambe oyo batungisamaki na bademo bazwaki libateli epai ya Yehova ntango babelelaki nkombo na ye na mongongo makasi. Atako bongo, tosengeli te komona ete eloko oyo ezali na nkombo ya Nzambe ezali nkisi to kosalela yango lokola bikelakela na bomoi ya mokolo na mokolo, lokola nde ezali na nguya moko ya maji mpo na kobatela biso. Kokima epai ya nkombo ya Yehova ezali bongo te.
Kokima epai ya Yehova lelo
16. Ndenge nini tokoki kobatelama na elimo lelo?
16 Lelo, tozali na esika ya kimya epai lisangá mobimba ya basaleli ya Nzambe babatelami na elimo. (Nz. 91:1) Na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ná bankulutu na lisangá, tokebisami na mimeseno ya mokili oyo ekoki kobebisa kimya yango. (Mat. 24:45-47; Yis. 32:1, 2) Kanisá mbala boni bakebisaka biso mpo na elimo ya konduka biloko ya mokili, mpe kanisá ndenge makebisi yango ezali kobatela biso na makama ya elimo. Tokoloba boni mpo na likama ya kokolisa elimo ya mafumafu, oyo ekoki kotinda biso tókóma na bolɛmbu na mosala ya Yehova? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Mafumafu ya bazoba nde ekobebisa bango. Kasi moto oyo azali koyokela ngai, akofanda na kimya mpe akotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.” (Mas. 1:32, 33) Kosala makasi mpo na kozala ntango nyonso na bizaleli ya pɛto esalisaka biso mpe tókoba kobatela kimya na biso ya elimo.
17, 18. Nini ezali kosalisa bamilio ya bato bákima epai ya nkombo ya Yehova lelo?
17 Kanisá mpe elendiseli oyo moombo ya sembo apesaki biso ya kotosa etinda oyo Yesu apesá biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba esika bato bafandi. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Sefania alobelaki mbongwana moko oyo ekosalisa bato bákima epai ya nkombo ya Nzambe. Biblia elobi boye: “Na ntango yango, nakopesa bato ya bikólo monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.”—Sef. 3:9.
18 Monɔkɔ ya pɛto ezali nini? Monɔkɔ ya pɛto ezali solo oyo etali Yehova Nzambe mpe mikano na ye oyo ezali na Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Na ndakisa, tolobaka monɔkɔ yango ntango tozali kosalisa basusu báyeba mpenza soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini mpe ndenge ekosantisa nkombo na ye, ntango tozali kolobela kolongisama ya boyangeli ya Nzambe, mpe ntango tozali kolobela na esengo mapamboli ya seko oyo bato ya sembo bakozwa. Lokola bato mingi bazali koloba monɔkɔ yango ya elilingi, bato mingi bakómi ‘kobelela nkombo ya Yehova,’ mpe ‘kosalela ye na bomoko.’ Ya solo, bamilio ya bato na mokili mobimba bazali lelo kokima epai ya nkombo ya Yehova.—Nz. 1:1, 3.
19, 20. Na ntango ya kala, ndenge nini kotya elikya na “ekimelo ya lokuta” esimbaki te?
19 Lelo, bato mingi bazali kokutana na mikakatano minene mpenza. Lokola bazali koyeba ndenge ya kosala te, bato mingi bazali kotalela kaka baninga na bango bato ya kozanga kokoka. To mpe bazali kolikya na bibongiseli ya politiki mpo na kosilisa mikakatano yango, kaka ndenge na bantango mosusu Yisraele ya kala etalelaki bikólo ya zingazinga mpo na koluka lisalisi, mpe esalaki kondimana na bikólo yango. Nzokande oyebi ete kosala bongo esalisaki Yisraele te. Lelo mpe, ekólo moko te, ata mpe ONU, ekokoka kosilisa mpenza mikakatano ya bato. Na yango mpo na nini kokima epai ya bibongiseli ya politiki? Esakweli ya Biblia ebengaki yango “ekimelo ya lokuta.” Tosengeli mpenza komona yango ndenge wana mpo bato oyo bazali kotya elikya epai na yango bakosambwa mpenza.—Tángá Yisaya 28:15, 17.
20 Mosika te, mbula makasi ya elilingi, elingi koloba mokolo ya Yehova ekobɛta na mabele. Bibongiseli ya bato ekokoka kobatela te; ezala mpe bibundeli ya nikleere to bozwi, ekokoka kobatela moto te. Yisaya 28:17 elobi boye: “Mbula ya mabanga ekokɔmbɔla mpenza ekimelo ya lokuta, mpe mai ekozindisa esika ya kobombana.”
21. Litomba nini tokoki kozwa soki tosaleli mokapo ya mobu 2011?
21 Ezala sikoyo to ntango makambo wana ekosalema na mikolo ezali koya, basaleli ya Nzambe bakobatelama na esika ya kimya mpenza, epai ya Yehova Nzambe na bango. Nkombo Sefania, oyo elimboli “Yehova abombi,” emonisi ete Yehova nde esika ya kobombana ya solosolo. Yango wana, ebongi mpenza mokapo ya mobu 2011 ezala toli oyo: ‘Bókima epai ya nkombo ya Yehova.’ (Sef. 3:12) Ata sikoyo tokoki mpe tosengeli kokima epai ya nkombo ya Yehova mpe kotyela ye motema mobimba. (Nz. 9:10) Mokolo na mokolo, tóbatela na makanisi elaka oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ete: “Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi. Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.”—Mas. 18:10.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini tokoki kokima epai ya nkombo ya Yehova lelo?
• Mpo na nini tosengeli te kotya elikya epai ya “ekimelo ya lokuta”?
• Ekimelo nini tozali na yango mpo na mikolo oyo ezali koya?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Mokapo ya mobu 2011 ezali: ‘Bókima epai ya nkombo ya Yehova.’—Sefania 3:12.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Thüringer Landesmuseum Heidecksburg Rudolstadt, Waffensammlung “Schwarzburger Zeughaus”