Mokapo ya Ntuku Mibale na Mibale
Yisaya asakoli ‘mosala ya kokamwa’ ya Yehova
1, 2. Mpo na nini Yisalaele na Yuda bakanisi ete bazali na kimya?
NA BOUMELI ya mwa ntango moke, Yisalaele na Yuda bakanisi ete bazali na kimya. Bakonzi na bango basali boyokani ya politiki na mabota ya minene mpe ya nguya, mpo na kozala na kimya na kati ya mokili moko ya likama. Samalia, mboka-mokonzi ya Yisalaele, etyeli Sulia oyo ezali pembeni na yango motema, nzokande Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda etyeli bokonzi mabe ya Asulia motema.
2 Longola likambo ya kotyela baninga na bango ya sika ya politiki motema, ekoki kozala ete bato mosusu na bokonzi ya nɔrdi bazali kolikya ete Yehova akobatela bango—atako bazali kokoba kosambela bana ya ngɔmbɛ ya wolo. Yuda mpe amoni ete akoki kotya elikya na libateli ya Yehova. Kutu, tempelo ya Yehova ezali nde te na Yelusaleme, mboka-mokonzi na bango? Kasi bikólo yango mibale bakomona makambo oyo bakanisaki ata moke te. Yisaya apemami na Yehova mpo na kosakola makambo oyo basaleli na ye batomboki bakomona lokola makambo ya kokamwa. Mpe maloba na ye ezali na mateya ya ntina mingi mpo na moto nyonso lelo oyo.
“Balangwi masanga kati na Efelaima”
3, 4. Mpo na nini bokonzi ya Yisalaele na nɔrdi ezali na lolendo?
3 Yisaya abandi esakweli na ye na maloba ya kobangisa: “Mawa na motole ya nkembo ya balangwi masanga kati na Efelaima, mpe na [fololo, NW] ya kitoko na ye ya nkembo oyo ezali kokaoka; oyo ezali na [lobwaku ya mabele malamu ya baoyo, NW] bakweisami na vinyo! Talá, Nkolo azali na elombe ya makasi mpe ya nguya lokola mbula ya matandala, . . . [ya solo ye akokweisa kino na mabele na makasi, NW]. Motole ya nkembo ya balangwi masanga kati na Efelaima ekonyatama na nse na makolo.”—Yisaya 28:1-3.
4 Efelaima, libota oyo eleki lokumu kati na mabota zomi ya nɔrdi, ekómi komonisa bokonzi nyonso ya Yisalaele. Samalia, mboka-mokonzi na yango, etyami na esika moko kitoko mpe ya ntina mingi, na “lobwaku ya mabele malamu.” Bakonzi ya Efelaima bazali na esengo mpo na “mitole ya nkembo” na bango mpo bakómi na bonsomi na bokonzi ya Davidi na Yelusaleme. Kasi bazali “balangwe masanga,” balangwe na elimo mpo na boyokani na bango na Sulia mpo na kobundisa Yuda. Etikali moke, eloko nyonso oyo balingaka mingi, banguna na bango bakonyata yango na makolo.—Kokanisá na Yisaya 29:9.
5. Mikakatano nini ezali liboso ya Yisalaele, kasi elikya nini Yisaya apesi?
5 Efelaima ayebi te ete azali liboso ya mikakatano. Yisaya alobi lisusu ete: “[Fololo, NW] ya kitoko na ye ya nkembo oyo ezali kokaoka, oyo ezali na [lobwaku ya mabele malamu, NW], ekozala lokola mbuma ya kotela liboso na ntango na moi; ekomona moto yango, akomɛla yango, naino ezali yango na lobɔkɔ na ye.” (Yisaya 28:4) Efelaima akokwea na mabɔkɔ ya Asulia, lokola mwa ndambo ya mokate ya komɛla na monɔkɔ mbala moko. Na yango, ata elikya moko ezali te? Ya solo, mbala mingi, bisakweli ya Yisaya oyo elobelaka kosambisa elɛmbisamaka na elikya. Atako ekólo yango ekwei, kasi na lisalisi ya Yehova, bato ya sembo bakobika. “Yehova na bibele akokóma lokola motole ya kokembisama mpe lokola motole ya kitoko ya baoyo batikali kati na bato na ye, mpe lokola elimo ya bosembo epai na ye oyo afandi mpo na kosambisa, mpe lokola nguya epai na baoyo bazali kozongisa etumba mosika na ekuke.”—Yisaya 28:5, 6, NW.
“Bapɛngwi”
6. Ntango nini Yisalaele ebebisami, kasi mpo na nini Yuda asengeli kosɛka te?
6 Mokolo oyo Samalia asengelaki kozongisa monɔkɔ ekómaki na mobu 740 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ntango Baasulia babebisaki mokili yango mpe bokonzi ya nɔrdi ezalaki lisusu te lokola ekólo ya bonsomi. Tokoloba nini mpo na Yuda? Asulia akobebisa mokili na ye, mpe na nsima Babilone akobebisa mboka-mokonzi na ye. Kasi na boumeli ya bomoi ya Yisaya, tempelo mpe bonganga ya Yuda ekosalelama naino mpe basakoli bakokoba kosakola. Yuda asengeli kosepela mpo na kokwea ya moninga na ye ya nɔrdi? Soki moke te! Yehova akosembola mpe makambo oyo Yuda azali na yango mpe bakonzi na ye mpo na ezaleli na bango ya kozanga botosi mpe ya kozanga kondima.
7. Na lolenge nini bakonzi ya Yuda balangwe, mpe yango ebimisi nini?
7 Ntango azalaki koloba na Yuda, Yisaya alobi lisusu ete: “Baoyo mpe bapɛngwi mpo na vinyo, balongwi na nzela mpo na masanga; nganga mpe [mosakoli, NW] bapɛngwi na masanga, babulunganisami na vinyo, balemalemi mpo na masanga; babungi na miso, [batɛngatɛngi mpo, NW] na kosambisa. Zambi mesa nyonso itondi na [bisanza, NW], esika te ezangi bosɔtɔ.” (Yisaya 28:7, 8) Likambo ya nsɔmɔ mpenza! Kolangwa masanga na ndako ya Nzambe ezali solo mabe. Kasi banganga mpe basakoli yango balangwe na elimo—makanisi na bango ekosami mpo na elikya makasi na boyokani oyo basali na bato. Bazali komikosa, bazali kokanisa ete lolenge bango bazali kosala, yango ezali nzela kaka moko ya malamu, mbala mosusu bazali kokanisa ete soki Yehova abateli bango te, bazali na lolenge mosusu ya kosala sikawa. Kati na milangwa na bango ya elimo, bakonzi yango ya lingomba bazali kobimisa maloba ya kotomboka mpe ya bosɔtɔ oyo ezali komonisa ete bazangi kondima ya solosolo na bilaka ya Nzambe.
8. Nsango ya Yisaya ebimisi nini?
8 Ndenge nini bakonzi ya Yuda bataleli likebisi ya Yehova? Batyoli Yisaya, bagangeli ye ete azali koloba na bango lokola bana mike: “Akomonisa boyebi epai na nani? Akolimbola bososoli epai na nani [na oyo toyoki, NW]? Epai na baoyo bakilisami libɛlɛ, balongolami mpe na mabɛlɛ na mama? Zambi ezali lilako nsima na lilako, lilako nsima na lilako, molɔngɔ nsima na molɔngɔ, molɔngɔ nsima na molɔngɔ, moke awa mpe moke wana.” (Yisaya 28:9, 10) Na matoi na bango, kozongelazongela makambo oyo Yisaya azali koloba ezali koyokana mabe mpenza! Akobi koloba ete: ‘Talá oyo Yehova asɛngi! Talá oyo Yehova asɛngi! Talá etinda ya Yehova! Talá etinda ya Yehova!’a Kasi etikali moke Yehova “akoloba” na bafandi ya Yuda na nzela ya misala na ye. Akotinda mampinga ya basoda ya Babilone—bapaya oyo balobaka monɔkɔ mosusu—mpo na kobundisa bango. Na ntembe te, mampinga ya basoda yango bakokokisa mitinda ya Yehova “lilako nsima na lilako,” mpe Yuda akokwea.—Tángá Yisaya 28:11-13.
Baoyo balangwaka na elimo lelo oyo
9, 10. Ntango nini mpe ndenge nini maloba ya Yisaya ekokisamaki mpo na bato oyo babotamaki nsima?
9 Bisakweli ya Yisaya ekokisamaki kaka na Yisalaele mpe na Yuda ya kala? Te, ezali bongo te! Ezala Yesu to Paulo batángaki maloba yango mpe basalelaki yango mpo na libota ya mikolo na bango. (Yisaya 29:10, 13; Matai 15:8, 9; Baloma 11:8) Lelo mpe, likambo moko ebimi lokola oyo ebimaki na mikolo ya Yisaya.
10 Mbala oyo, ezali bakonzi ya mangomba ya boklisto nde batyelaka bato ya politiki motema. Bazali kotambola na kotɛngatɛnga, lokola balangwe ya Yisalaele mpe ya Yuda, bamikɔtisaka na makambo ya politiki, mpe balingaka ete bato oyo bamibengaka bato minene ya mokili bákendaka kosolola na bango. Na esika ya kosakola solo ya Biblia oyo ezali pɛto, bazali koloba nde maloba ya mbindo. Lokola makanisi na bango ya elimo ezali mobulumobulu, bazali kokamba bato na ndenge ya malamu te.—Matai 15:14.
11. Ndenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto batalelaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe?
11 Ndenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto basalaka ntango Batatoli ya Yehova babendaka likebi na bango na elikya kaka moko ya solo, Bokonzi ya Nzambe? Bakokaka kokanga ntina te. Mpo na bango, bamonaka ete Batatoli ya Yehova balobalobaka lokola bana mike. Bakonzi ya mangomba batyolaka bamemi-nsango yango mpe basɛkaka bango. Ndenge moko na Bayuda ya mikolo ya Yesu, balingaka Bokonzi ya Nzambe te mpe balingaka te ete bálobela bandimi na bango likambo yango. (Matai 23:13) Yango wana, Yehova akebisi bango ete akoloba ntango nyonso te na nzela ya bamemi-nsango na ye, oyo bazalaka likama te mpo na bato. Ntango ekoya wana baoyo bakondima Bokonzi ya Nzambe te ‘bakobukama, bakozwama mpe bakokangama,’ ɛɛ, bakobebisama nyɛɛ.
“Kondimana na Kufa”
12. “Kondimana na Kufa” oyo Yuda akanisi ete asali ezali nini?
12 Yisaya alobi lisusu ete: “Bino bolobi ete: ‘Tosali kondimana na Kufa; mpe na Sheole tomoni emonaneli; mpela ya monene mpenza, soki eyei koleka, ekokómela biso te, mpamba te tokómisi lokuta ekimelo na biso mpe tomibombi na kati ya bokosi.’” (Yisaya 28:14, 15, NW) Bakonzi ya Yuda bazali komikumisa ete bato ya politiki oyo basali na bango boyokani bazali kobatela bango mpo bákwea te. Bakanisi ete basali “kondimana na Kufa” mpo etika bango nyɛɛ. Kasi ekimelo na bango ya makanisi mpamba ekobatela bango te. Boyokani na bango ezali mpenza lokuta, bokosi mpamba. Ndenge moko mpe lelo oyo, boyokani makasi oyo mangomba ya boklisto basali na bakonzi ya mokili oyo ekobatela bango te ntango Yehova akosɛnga bango bázongisa monɔkɔ. Kutu, yango ekozala nde libebi na bango.—Emoniseli 17:16, 17.
13. Nani azali “libanga oyo emekami,” mpe ndenge nini mangomba ya boklisto babwaki ye?
13 Na bongo, bakonzi ya mangomba yango basengeli kotalela nani? Yisaya akomi sikawa elaka ya Yehova: “Talá nazali kotya libanga lokola moboko kati na Siona, libanga oyo emekami, litumu ya kitoko ya moboko ya solo. Moto oyo akomonisa kondima akobanga te. Mpe nakosala ete bosembo ezala nsinga mpe boyengebene nivo; matandala esengeli kokɔmbɔla ekimelo ya lokuta, mpe ebele ya mai ekozindisa mpenza ebombamelo.” (Yisaya 28:16, 17, NW) Ntango Yisaya alobi maloba yango, eumeli te Hizikiya, mokonzi ya sembo, atyami na ebonga ya bokonzi na Siona, mpe bokonzi na ye ebiki, ebiki mpo na boyokani ya baninga ya pembenipembeni te kasi na lisalisi ya Yehova. Kasi, maloba yango oyo epemami ekokisami epai ya Hizikiya te. Ntango ntoma Petelo atángaki maloba ya Yisaya, amonisaki ete Yesu Klisto, mokitani moko oyo abotamaki nsima na libota ya Hizikiya, nde azali “libanga oyo emekami” mpe ete moto nyonso oyo akondima ye azali na ntina ya kobanga te. (1 Petelo 2:6) Oyo nde mawa mpo na bakonzi ya mangomba ya boklisto, atako bazali koloba ete bazali baklisto kasi bazali kosala oyo Yesu aboyaki kosala! Bazali koluka lokumu mpe bokonzi na mokili oyo na esika ya kozela ete Yehova atya Bokonzi na ye oyo Mokonzi na yango ezali Yesu Klisto.—Matai 4:8-10.
14. Ntango nini “kondimana na Kufa” oyo Yuda asali ekosila?
14 Ntango “mpela ya monene mpenza” oyo elimboli mampinga ya basoda ya Babilone ekoleka na mokili yango, Yehova akomonisa ete ekimelo ya politiki ya Yuda ezali kaka lokuta mpamba. Yehova alobi ete: “Kondimana na bino na kufa ekotɛlɛma tɛ . . . [Mpela ya monene mpenza, ntango ekoleka, NW], bokonyatama na yango. Ntango na ntango na [koleka, NW] na yango, . . . ekozala nsɔmɔ monene kososola ntina na [makambo oyo moto ayoki, NW].” (Yisaya 28:18, 19) Ya solo, tokoki kozwa liteya moko monene na oyo ekómeli baoyo balobaka ete basalelaka Yehova kasi elikya na bango ezali na boyokani oyo basali na mabota.
15. Na ndakisa nini Yisaya amonisi ete libateli ya Yuda ezali na ntina te?
15 Talelá ezalela oyo bakonzi yango ya Yuda bazali na yango sikawa. “Mbeto eleki mokuse mpo na moto komisembola wana, mpe bolangiti eleki moke mpo na komizingela na yango.” (Yisaya 28:20) Ezali lokola nde balingi komilalisa mpo na komiyoka mwa malamu, kasi ezali kobonga te. Ekoki kozala ete makolo na bango ezali kobima libándá na malili to mpe bazali kogumba makolo kasi bolangiti eleki moke mpo na komizinga mpe koyoka mwa molunge. Yango ezalaki ezaleli ya mpasi na mikolo ya Yisaya. Mpe ezali ezalela ya lelo mpo na moto nyonso oyo akotya elikya na ekimelo ya lokuta ya mangomba ya boklisto. Lokola bamikɔtisi na politiki, bakonzi mosusu ya mangomba ya boklisto bazali mpenza na ngambo monene na makambo ya mabe, na ndakisa koboma bato ya ekólo moko na mokano ya kosilisa bango mpe koboma bato ebele na mbala moko!
“Mosala ya kokamwa” ya Yehova
16. “Mosala ya kokamwa” ya Yehova ezali nini, mpe mpo na nini ezalaka mosala ya kokamwa?
16 Nsuka ya makambo yango ekokesana makasi na oyo bakonzi ya lingomba ya Yuda bazalaki kolikya. Yehova akosala balangwi yango ya Yuda na elimo likambo moko ya kokamwa. “[Yehova] akotɛlɛma lokola na ngomba ya Pelasimi, akosilika lokola na lobwaku na Gibona, ete asala mosala na ye, mosala [na ye, NW] ya kokamwa; ete abongisa likambo na ye, likambo ya kokamwa.” (Yisaya 28:21) Na mikolo ya Mokonzi Davidi, Yehova apesaki basaleli na ye bolongi ya minene likoló na Bafilisitia na Ngomba ya Pelasimi mpe na lobwaku ya Gibona. (1 Ntango 14:10-16) Kutu na mikolo ya Yosua, atɛlɛmisaki moi likoló na Gibona mpo ete Yisalaele alonga Baamola na mobimba. (Yosua 10:8-14) Ezalaki mpenza likambo ya kokamwa! Lelo oyo Yehova akobunda lisusu kasi na mbala oyo akobunda na baoyo bazali koloba ete bazali basaleli na ye. Yango ezali solo likambo ya kokamwa te? Ya solo mpenza soki tokanisi ete Yelusaleme ezali esika monene ya losambo ya Yehova mpe engumba ya mokonzi mopakolami ya Yehova. Kino ntango oyo, libota ya bokonzi ya Davidi na Yelusaleme ekweisamá naino te. Kasi, Yehova akokokisa mpenza ‘mosala na ye ya kokamwa.’—Kokanisá na Habakuku 1:5-7.
17. Lityo ekosala nini na kokokisama ya esakweli ya Yisaya?
17 Yango wana, Yisaya akebisi ete: “Bózala batyoli te ete nkanga na bino ekómisama na makasi te. Zambi nayoki nsango [ya kobebisama, ɛɛ eloko moko ekanami, nayoki yango na Nkolo Mokonzi, Yehova, NW] na bibele mpo na mokili mobimba.” (Yisaya 28:22) Atako bakonzi bazali kotyola, nsango ya Yisaya ezali solo. Ayokaki yango na Yehova, mpe bakonzi yango bazali na boyokani ya kondimana na ye. Ndenge moko mpe lelo oyo, ntango bayokaka nsango ya “mosala ya kokamwa” ya Yehova, bakonzi ya mangomba ya boklisto batyolaka. Kutu bagangelaka mpe bapamelaka Batatoli ya Yehova. Kasi, nsango oyo Batatoli ya Yehova basakolaka ezali solo. Ezali na Biblia, buku oyo bakonzi yango balobaka ete bazali bamonisi na yango.
18. Ndenge nini Yisaya amonisi ete Yehova apesaka etumbu na bokatikati?
18 Mpo na bato ya motema malamu oyo balandaka bakonzi yango te, Yehova akosembola bango mpe akondima bango. (Tángá Yisaya 28:23-29.) Kaka ndenge moloni-bilanga atutaka mbuma ya pɛtɛpɛtɛ na lolenge ete ebeba te, na ndakisa kumina, Yehova mpe asalaka ete etumbu na ye ekoka na moto oyo azali kozwa yango mpe atalelaka likambo na likambo na ndenge na yango. Asalaka makambo bisalela te to na makasimakasi te, kasi asalaka ete baoyo babungi nzela bákoka kozonga. Ya solo, soki bato bandimi libyangi ya Yehova, elikya ezali. Ndenge moko mpe lelo, atako ndenge makambo ekosuka mpo na mangomba ya boklisto esili koyebisama, kasi moto nyonso oyo akondima Bokonzi ya Yehova akoki kokima etumbu oyo elingi kokwela bango.
Mawa na Yelusaleme!
19. Na lolenge nini Yelusaleme ekokóma “esika ya etumbelo,” mpe ntango nini mpe ndenge nini yango esalemaki?
19 Kasi, Yehova azali koloba nini sikawa? “Mawa epai na Aliele, Aliele! Mboka wana Davidi afandaki. Bakisá [mbula moko na mbula, NW] mosusu, tiká ete bilambo biyaka. Nde nakoyokisa Aliele mpasi, mawa mpe bileli ikozala, akozala epai na ngai lokola [esika ya etumbelo ya Nzambe, NW].” (Yisaya 29:1, 2) “Aliele” mbala mosusu elimboli “esika ya etumbelo ya Nzambe,” mpe awa ezali komonisa mpenza Yelusaleme. Ezali kuna nde tempelo na etumbelo na yango ya mbeka ezali. Bayuda bazali na momeseno ya kosala bilambo mpe kopesa mbeka kuna, kasi Yehova azali kondima losambo na bango te. (Hosea 6:6) Kutu, alobi ete engumba yango ekokóma “esika ya etumbelo” na lolenge mosusu. Lokola etumbelo, ekotanga makila mpe ekozika na mɔ́tɔ. Yehova alobi kutu ndenge likambo yango ekosalema: “Nakozingela yo na etumba epai na epai, nakotongela yo ndako milai na etumba, nakotɛmisela yo bisika makasi. Okokitisama na nse mpe okoloba longwa na mabele, maloba na yo makouta na nse kati na mputulu.” (Yisaya 29:3, 4) Yango ekokisamaki mpo na Yuda mpe mpo na Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. ntango mampinga ya basoda ya Babilone bazingaki mpe babebisaki engumba yango mpe batumbaki tempelo. Yelusaleme ekitisami tii na mabele oyo likoló na yango etongamaki.
20. Na nsuka, nini ekokómela banguna ya Nzambe?
20 Liboso ete ntango wana ya mawa ekóma, na bileko mosusu Yuda azalaki na mokonzi moko oyo azalaki kotosa mibeko ya Yehova. Na bongo nini ezalaki kosalema? Yehova azalaki kobundela basaleli na ye. Atako banguna batondi na mokili yango, bakokóma lokola “mputulu moke” mpe “matiti makaoki.” Na ntango oyo ye moko aponi, Yehova akopanza bango na “nkake mpe na [koningana ya mabele, NW] mpe na makɛlɛlɛ monene, na mopɛpɛ makasi mpe na mbula monene mpe na ndemo na mɔ́tɔ na kozikisa nyɛɛ.”—Yisaya 29:5, 6.
21. Limbolá lisese ya Yisaya 29:7, 8.
21 Mbala mosusu mampinga ya basoda ya nkanda bazali kozela na motema likoló mpo na kobebisa Yelusaleme mpe kopunza biloko ya etumba. Kasi bakolamuka na kokamwa ya mabe! Ndenge moko lokola moto oyo azali na nzala azali kolɔta ete azali kolya na fɛti, na nsima alamuki kasi azali na nzala makasi koleka, fɛti oyo banguna ya Yuda bazali mpenza kozela na motema likoló bakosala yango te. (Tángá Yisaya 29:7, 8.) Talelá oyo ekómelaki mampinga ya basoda ya Asulia oyo etambwisamaki na Saneheliba ntango balingaki kokɔta na Yelusaleme na mikolo ya mokonzi ya sembo Hizikiya. (Yisaya, mikapo 36 mpe 37) Na butu moko kaka, kozanga ete ata moto moko atombola lobɔkɔ, masini ya etumba ya Asulia ebebisami—basoda ya mpiko 185000 bakufi! Bilikya ya kolonga ekokokisama mpe te ntango masini ya etumba ya Gog ya Magog ekotɛmɛla basaleli ya Yehova na mikolo ezali koya.—Ezekiele 38:10-12; 39:6, 7.
22. Molangwa ya elimo oyo Yuda alangwe esali ye nini?
22 Na ntango oyo Yisaya azali koloba eteni oyo ya esakweli na ye, bakonzi ya Yuda bazali na kondima te lokola Hizikiya. Balangwe mpe bamizindisi na elimo na nzela ya boyokani oyo basali na mabota ya mbindo. “Bómitɛlɛmisa nyɛɛ mpe bókamwa! [Bókufisa miso na bino, mpe bózala bakufi miso, NW]. Bazali kolangwa nde na vinyo te, bazali [kotɛngatɛnga, NW] nde na masanga te.” (Yisaya 29:9) Lokola balangwe na elimo, bakonzi yango bazali na likoki te ya kososola ntina ya emonaneli oyo bapesi mosakoli ya solosolo ya Yehova. Yisaya alobi ete: “Likoló na bino Yehova asopi elimo ya mpɔngi makasi; akangi miso na bino, basakoli, mpe azipi ata mitó na bino, bamoni na bimonaneli. Mpe mpo na bino emonaneli ya eloko nyonso ekómi lokola maloba ya buku oyo ekangami, oyo bapesi na moto moko oyo ayebi mokanda, kolobáká ete: ‘Tobondeli yo, tángá yango na mongongo makasi,’ mpe ye akoloba ete: ‘Nakokoka te, mpo ekangami’; mpe buku yango esengeli kopesama na moto oyo ayebi mokanda te, moto mosusu akoloba ete: ‘Tobondeli yo, tángá oyo na mongongo makasi,’ mpe akoloba ete: ‘Nayebi mokanda ata moke te.’”—Yisaya 29:10-12, NW.
23. Mpo na nini Yehova akosɛnga Yuda azongisa monɔkɔ, mpe ndenge nini akosala yango?
23 Bakonzi ya lingomba ya Yuda bazali koloba ete bazali na bososoli na elimo, kasi basundoli Yehova. Kutu bazali nde koteya makanisi na bango moko ya bongolabongola na oyo etali malamu mpe mabe, mpo na kolongisa misala na bango oyo ezangi kondima mpe ya mbindo mpe kosala ete bato bándimama na Nzambe te. Na nzela ya “makambo ya kokamwa”—‘mosala na ye ya kokamwa’—Yehova akosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na bokosi na bango. Alobi ete: “Mpo ete bato oyo babɛlɛmi na monɔkɔ na bango, mpe bakumisi ngai kaka na mbɛbu na bango, mpe balongoli mitema na bango mosika na ngai, mpe kobanga oyo bazali kobanga ngai ekómi nde mitindo ya bato, mitindo oyo ezali koteyama, yango wana ngai oyo, Moto oyo akosala na lolenge ya kokamwa epai ya bato oyo, na lolenge moko ya kokamwa mpe na makambo ya kokamwa; bwanya ya bato ya bwanya esengeli kobeba, mpe bososoli ya bato ya mayele ekobombama.” (Yisaya 29:13, 14, NW) Bwanya mpe bososoli oyo Yuda alobi ete azali na yango ekobeba ntango Yehova akotambwisa makambo na lolenge ete Babilone, nguya ya mokili mobimba, alongola ebongiseli nyonso ya losambo ya bapɛngwi. Likambo ya ndenge wana esalemaki na ekeke ya liboso ntango bakonzi ya Bayuda bapɛngwisaki ekólo yango. Likambo ya ndenge wana ekosalema na mikolo na biso epai na mangomba ya boklisto.—Matai 15:8, 9; Baloma 11:8.
24. Ndenge nini bato oyo bafandi na Yuda bamonisi ete babangaka Nzambe te?
24 Kasi, sikawa, bakonzi ya lolendo ya Yuda bakanisi mpenza ete bazali na mayele mingi mpenza mpo na kokima etumbu ya kobebisama na ndenge oyo babebisi losambo ya solo. Bazali mpenza na mayele? Yisaya asosoli bango, atɔndɔli bango ete bazali kobanga Nzambe te mpe na yango bazali na mayele ya solosolo te: “Mawa epai na bango baluki na bozindo ete bábombela [Yehova toli, NW] na bango; baoyo misala na bango mizali na molili, mpe bakolobaka ete, Nani amoni biso? Nani ayebi biso? Bozali kobulunganisa likambo! Moyemi atángama nde lokola [libazi, NW]? Eloko esalami eloba mpo na mosali na yango ete, Ye asali ngai te? Soko eloko etongami eloba mpo na motongi na yango ete, Ye azali na [mayele, NW] te?” (Yisaya 29:15, 16; kokanisá na Nzembo 111:10.) Atako bakanisi ete babombami malamu, nzokande batɛlɛmi “bolumbu mpe bamonisami polele” na miso ya Nzambe.—Baebele 4:13.
“Bakufeli matoi bakoyoka”
25. Na lolenge nini “bakufeli matoi” bakoyoka?
25 Kasi, bato oyo bakomonisa kondima bakozwa lobiko. (Tángá Yisaya 29:17-24; kokanisá na Luka 7:22.) “Bakufeli matoi bakoyoka maloba ya mokanda,” nsango oyo euti na Liloba ya Nzambe. Kasi, yango ezali te kobikisama na mpasi ya kokufa matoi. Ezali nde kobikisama na elimo. Awa Yisaya alobeli lisusu kotyama ya Bokonzi ya Masiya mpe kozongisama ya losambo ya solo na mabele na boyangeli ya Masiya. Yango esalemi na mikolo na biso, mpe bamilio ya bato ya motema malamu bazali komitika ete Yehova abongisa bango mpe bazali koyekola kokumisa ye. Oyo nde kokokisama kitoko! Nsukansuka, mokolo ekoya wana moto nyonso, eloko nyonso oyo ezali kopema, ekokumisa Yehova mpe ekosantisa nkombo na ye mosantu.—Nzembo 150:6.
26. Makambo nini ya elimo oyo bazali kozongela oyo “bakufeli matoi” bazali koyoka lelo oyo?
26 “Bakufeli matoi” oyo bazali koyoka Liloba ya Nzambe lelo bazali koyekola nini? Baklisto nyonso, mingimingi baoyo lisangá ezali kotalela lokola ndakisa, basengeli kosɛnzɛla ete ‘bápɛngwa te mpo na vinyo.’ (Yisaya 28:7) Lisusu, tosengeli kolɛmba te mpo na koyoka makambo oyo Yehova azongelaka, oyo esalisaka biso tózwa likanisi ya elimo na makambo nyonso. Atako baklisto batosaka bakonzi ya Leta mpe batalelaka bango mpo na makambo mosusu, lobiko eutaka na mokili te, kasi na Yehova Nzambe. Lisusu, tosengeli kobosana soki moke te ete ndenge moko na kosambisama ya Yelusaleme ya bapɛngwi, ya solo mpenza, Nzambe akosambisa mpe bato ya mikolo na biso. Atako botɛmɛli ezali, na lisalisi ya Yehova tokoki kokoba kosakola makebisi na ye, lokola Yisaya asalaki.—Yisaya 28:14, 22; Matai 24:34; Baloma 13:1-4.
27. Mateya nini baklisto bakoki kozwa na esakweli ya Yisaya?
27 Bankulutu mpe baboti bakoki kozwa liteya na lolenge oyo Yehova apesaka etumbu, ntango nyonso alukaka ete bázongela boyokani malamu na Nzambe, kasi alukaka kaka te kopesa bango etumbu. (Yisaya 28:26-29; kokanisá na Yilimia 30:11.) Biso nyonso, bakisa mpe bilenge, bakundoleli biso ntina ya kosalela Yehova na motema mobimba, tosengeli kaka te komimonisa lokola baklisto mpo na kosepelisa bato. (Yisaya 29:13) Tosengeli komonisa ete na bokeseni na bafandi ya Yuda oyo bazangi kondima, tozali na bobangi ya solo ya Yehova mpe tozali na limemya mpenza mpo na ye. (Yisaya 29:16) Lisusu, tosengeli komonisa ete tozali kolinga ete Yehova asembola biso mpe ateya biso.—Yisaya 29:24.
28. Ndenge nini basaleli ya Yehova batalelaka misala na ye ya kobikisa?
28 Ezali mpenza na ntina mingi kozala na kondima mpe na elikya epai ya Yehova mpe na lolenge oyo ye asalaka makambo! (Kokanisá na Nzembo 146:3.) Nsango ya kokebisa oyo tosakolaka emonanaka mpamba na miso ya bato mingi. Koloba ete ebongiseli ya mangomba ya boklisto oyo elobaka ete esalelaka Nzambe ekobebisama mokolo mosusu, likambo yango ezali kokamwisa bato mpe ezali komonana ete ekosalema te. Kasi Yehova akokokisa ‘mosala na ye ya kokamwa.’ Mpo na yango ntembe ekoki kozala soki moke te. Yango wana, na boumeli ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo, basaleli ya Nzambe bazali kotya elikya na bango na Bokonzi na ye mpe na Mokonzi oyo ye aponi, Yesu Klisto. Bayebi ete misala ya kobikisa ya Yehova—oyo akosala elongo na ‘mosala na ye ya kokamwa’—ekopesa bato ya botosi matomba ya seko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na makomi ya liboso mpenza na Liebele, Yisaya 28:10 ezali maloba ya kozongelazongela, oyo ekokani na loyembo moko ya mwana moke. Na yango, na matoi ya bakonzi yango ya lingomba, nsango ya Yisaya ezali koyokana lokola kozongelazongela makambo lokola bana mike.
[Bililingi na lokasa 289]
Mangomba ya boklisto batii elikya na boyokani oyo basali na bakonzi ya mokili na esika ete bátya elikya na Nzambe
[Elilingi na lokasa 290]
Yehova akokisi ‘mosala na ye ya kokamwa’
ntango atiki Babilone abebisa Yelusaleme
[Elilingi na lokasa 298]
Baoyo bazalaki bakufeli matoi bakoki ‘koyoka’ Liloba ya Nzambe