Mokapo ya Ntuku Mibale na Misato
Kobá kozela Yehova
1, 2. (a) Yisaya mokapo 30 ezali na makambo nini? (b) Mituna nini tokotalela sikawa?
NA YISAYA mokapo 30, tozali kotánga maloba mosusu oyo Nzambe alobaki mpo na kotɛmɛla bato mabe. Kasi, eteni oyo ya esakweli ya Yisaya ezali komonisa bizaleli mosusu ya malamu oyo Yehova azali na yango. Kutu, bomoto ya Yehova elobelami na maloba ya kitoko mpenza, mpe na yango, ezali lokola nde tozali komona ye azali kobɔndisa, tozali koyoka mongongo na ye ezali kopesa toli, mpe tozali koyoka azali kosimba moto na nzoto mpo na kobikisa ye.—Yisaya 30:20, 21, 26.
2 Atako bongo, bato ya mboka ya Yisaya, bapɛngwi ya Yuda, baboi kozongela Yehova. Basepeli kutu kotya elikya na bango na moto. Yehova akanisi nini mpo na yango? Mpe ndenge nini eteni oyo ya esakweli ya Yisaya ezali kosalisa baklisto lelo ete bákoba kozela Yehova? (Yisaya 30:18) Tótalela yango.
Bozoba mpe libebi
3. Mwango nini Yehova atɔndɔli?
3 Kobanda mwa kala bakonzi ya Yuda bazali koluka mwango ya kokima mpo ete bákwea te na mabɔkɔ ya Asulia. Kasi, Yehova azali kaka kotala bango. Atɔndɔli sikawa mwango na bango: “[Yehova] alobi ete, Mawa epai na bana baoyo batomboki, baoyo bakobongisaka [toli, kasi nde oyo euti na ngai te; mpe bazali kosopa likabo ya masanga, kasi na elimo na ngai te, mpo, NW] ete bábakisa lisumu epai na lisumu; baoyo bakobimaka ete bákita na Ezipito.”—Yisaya 30:1, 2a.
4. Ndenge nini basaleli ya Nzambe oyo bakómaki batomboki batii Ezipito na esika ya Nzambe?
4 Oyo nde mpasi mpo na bakonzi yango oyo bazali koluka mwango bongo báyoka ete mokano na bango eyebani! Kokenda na Ezipito mpo na kosala boyokani na ye ezali te kaka likambo ya kosilikela Asulia; kasi ezali mpe kotombokela Yehova Nzambe. Na eleko ya Mokonzi Davidi, ekólo yango ezalaki kotalela Yehova lokola esika-makasi ya kobombana mpe ezalaki kokima ‘na nse na mapapu na ye.’ (Nzembo 27:1; 36:7) Kasi sikawa “bamibombi na esika-makasi ya Falo” mpe baluki “komibomba na nse ya Ezipito.” (Yisaya 30:2b, NW) Batii Ezipito na esika ya Nzambe! Oyo nde bokosi!—Tángá Yisaya 30:3-5.
5, 6. (a) Mpo na nini boyokani na Ezipito ezali libunga monene oyo ekomema na libebi? (b) Mobembo nini basaleli ya Nzambe basalaki liboso oyo emonisi ete mobembo oyo balingi kosala na Ezipito ezali mpenza bozoba?
5 Ezali lokola nde alingi koyanola na likanisi oyo bazali na yango ete kokenda na Ezipito ezali kaka mwa mobembo moko ya mbalakaka, Yisaya abakisi makambo mosusu. “Litatoli mpo na [kotɛmɛla, NW] banyama na epai ya ngɛlɛ: Koleka na mokili ya mobulu mpe ya mpasi, uta na yango nkosi mobali mpe [nkoi, NW] bakobima, etupa mpe nyoka na mɔ́tɔ oyo akopombwaka na lola, bazali kokumba bozwi na bango na mapeka na bampunda, mpe biloko na bango na motuya na mikɔngɔ na bakamela.” (Yisaya 30:6a) Ezali polele ete mobembo yango ebongisami malamu. Batindami bazali kobongisa molɔngɔ ya bakamela mpe bampunda, batondisi yango na biloko ya motuya mpe bakiti na Ezipito na nzela ya esobe oyo etondi na bankosi oyo ezali konguluma mpe na banyoka ya ngɛngɛ. Nsukansuka, batindami bakómi esika bazalaki kokenda mpe bapesi Baezipito biloko na bango ya motuya. Bakanisi ete basombi libateli. Kasi, Yehova alobi ete: “Mpo na bato bakosunga bango te. Mpe Baezipito bazali bobele mpamba, mpe bakosunga bobele mpamba. Yango wana nabyangi oyo ete, ‘Laba—baoyo bakofanda nyɛɛ.’” (Yisaya 30:6b, 7, NW) Emonani ete “Laba, dalagona . . . ya mai-na-monana,” ekómaki elilingi ya Ezipito. (Yisaya 51:9, 10) Alaki nyonso kasi azali kosala eloko moko te. Boyokani na ye na Yuda ezali mpenza libunga monene oyo ekomema na likama.
6 Ntango Yisaya azali kolobela mobembo ya batindami yango, mbala mosusu bato oyo bazali koyoka ye bamikundoli mobembo ya ndenge wana oyo esalemaki na mikolo ya Mose. Bankɔkɔ na bango bakatisaki mpe kaka “lisobe monene mpe na nsɔmɔ” yango. (Deteronome 8:14-16) Nzokande, na mikolo ya Mose, Bayisalaele bazalaki kokima Ezipito mpe basikolamaki na boombo. Mbala oyo batindami basali mobembo na Ezipito mpe, na ntembe te, bakei komitika na boombo. Oyo nde bozoba! Tózwa ekateli mabe ndenge wana soki moke te mpe tótɛka bonsomi na biso ya elimo na boombo te!—Kokanisá na Bagalatia 5:1.
Batɛmɛli nsango ya mosakoli
7. Mpo na nini Yehova alobi na Yisaya akoma likebisi na ye oyo apesi Yuda?
7 Yehova alobi na Yisaya akoma nsango oyo auti kopesa mpo ete “ebonga mpo na ntango ekoya, mpo na litatoli libela.” (Yisaya 30:8) Yehova aboi likambo ya kotya boyokani na bato na esika ya liboso bongo na nsima kotyela ye motema, yango wana esengelaki kokoma likambo yango mpo na litomba ya mabota oyo ekoya nsima—ezala mpe biso lelo oyo. (2 Petelo 3:1-4) Kasi likambo yango esengelaki kokomama mpo na ntina moko ya nokinoki. “Bazali libota ya kotomboka, bana ya nkuta, bana ya baoyo [balingi koyoka mobeko ya Yehova, NW] te.” (Yisaya 30:9) Bato yango babwaki toli ya Nzambe. Yango wana, esengeli kokoma nsango yango mpo ete nsima báloba te ete bazwaki likebisi ya polele te.—Masese 28:9; Yisaya 8:1, 2.
8, 9. (a) Na lolenge nini bakonzi ya Yuda bazali komeka kozimbisa basakoli ya Yehova? (b) Ndenge nini Yisaya amonisi ete akotika te ete bábangisa ye?
8 Yisaya apesi sikawa ndakisa moko oyo emonisi ezaleli ya batomboki yango. “Bakolobaka na bamoni-na-makambo ete, Talá te! Mpe epai na [baoyo bazwaka bimonaneli ete, Osengeli komona makambo oyo ezali sembo te, NW]! Kasi loba na biso makambo kitoko, [moná makambo ya lokuta, NW].” (Yisaya 30:10) Lokola basɛngi basakoli ya sembo ete bátika koloba makambo ya “sembo,” to ya solo, mpe báloba nde oyo ezali “kitoko” mpe ya “lokuta,” elingi koloba oyo ezali solo te, bakonzi ya Yuda bamonisi ete balingi básepelisa matoi na bango. Balingi ete bákumisa bango, kasi bákweisa bango te. Na makanisi na bango, mosakoli oyo aboi kosakola ndenge bango balingi asengeli ‘kotika nzela, kopɛngwa na elekelo.’ (Yisaya 30:11a) Asengeli kaka koloba makambo oyo esepelisaka matoi na bango to kotika koloba!
9 Batɛmɛli ya Yisaya balobi lisusu makasi ete: “Bólimwisa Mosantu ya Yisalaele mpo na biso.” (Yisaya 30:11b, NW) Elingi koloba Yisaya atika koloba na nkombo ya Yehova, “Mosantu ya Yisalaele”! Nkombo yango kutu ezali kopesa bango nkanda mpamba te mitinda ya Yehova ekweisi polele ezalela na bango ya nsɔni. Yisaya asali nini? Alobi ete: “[Mosantu ya, NW] Yisalaele alobi ete.” (Yisaya 30:12a) Kozanga kokakatana, Yisaya alobi kaka maloba oyo batɛmɛli na ye balingaka koyoka te. Akobanga te. Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso! Mpo na oyo etali kosakola nsango ya Nzambe, baklisto basengeli soki moke te komitika ete bábangisa bango. (Misala 5:27-29) Lokola Yisaya, bakobaka kosakola ete: ‘Yehova alobi ete’!
Mbeba ya botomboki
10, 11. Botomboki ya Yuda ekobimisa makambo nini?
10 Yuda abwaki liloba ya Nzambe, atii elikya na lokuta mpe atii motema na oyo ezali “yauli.” (Yisaya 30:12b) Nini ekokómela ye? Na esika ete atika likambo yango ndenge bato ya ekólo yango balingi, Yehova akolimwisa nde bango! Kolimwa ekosalema na mbalakaka mpe mpo na bango nyonso, ndenge Yisaya alobeli yango na lisese moko. Botomboki ya ekólo yango ezali lokola “efelo oyo esali nzela mpe elingi kokwea, litutu na efelo moko ya molai mpenza, oyo kokwea na yango ekoki kosalema na mbalakaka, na mwa ntango.” (Yisaya 30:13, NW) Kaka ndenge esalaka soki efelo ya molai etɛngami makasi, nsukansuka ekweaka, ndenge moko mpe botomboki ya bato ya Yisaya oyo ezali se kobakisama ekokweisa ekólo yango.
11 Na lisese mosusu, Yisaya amonisi ete kobebisama yango oyo ekómi pene ekozala na mobimba mpenza: “Kokwea na yango ezali lokola mbeki ya moyemi, oyo ebukami nde na mawa te; kino mwa ndambo ekomonana kati na ndambo na yango te oyo ekoki na kolubola makala longwa na mɔ́tɔ, soko mai kati na liziba.” (Yisaya 30:14) Kobebisama ya Yuda ekozala mpenza mobimba mpe eloko moko ya motuya ekotikala te—ata eteni moko te ya mbeki ekotikala oyo ekokoka kolubola makala na mɔ́tɔ to kotoka mai na liziba. Oyo nde nsuka ya mawa! Kobebisama oyo ezali kozela baoyo bazali lelo oyo kotombokela losambo ya solo ekozala mpe ya mbalakaka mpe ya mobimba mpenza.—Baebele 6:4-8; 2 Petelo 2:1.
Babwaki likanisi ya Yehova
12. Ndenge nini bato ya Yuda bakoki kokima kobebisama oyo elingi koya?
12 Nzokande, bato oyo bazali koyoka Yisaya bakoki kokima kobebisama oyo ezalaki liboso na bango. Nzela moko ya kobika ezali. Mosakoli alobi ete: “Nkolo [Mokonzi Yehova, Mosantu ya, NW] Yisalaele alobi ete, Na nzela ya [kozonga, NW] mpe ya kofanda na kimya bokobika, [makasi na bino ekozwama bobele na kofandáká kimya mpe na kotyáká motema, NW].” (Yisaya 30:15a) Yehova azali pene ya kobikisa basaleli na ye—soki batii motema mpe ‘bafandi kimya,’ elingi koloba bámeka te koluka lobiko na bango na nzela ya boyokani elongo na bato, mpe kozala “kimya,” elingi koloba kotya motema na nguya ya libateli ya Nzambe mpe kobangabanga te. Yisaya alobi na bato yango ete, “Nde bolingaki te.”—Yisaya 30:15b.
13. Bakonzi ya Yuda batii elikya na nini, mpe kosala bongo ebongi mpenza?
13 Na nsima Yisaya amonisi ete: “Bolobaki ete, Te, zambi tokokima na [bampunda, NW], bongo bokokima mbango mpenza! Mpe ete, Tokokenda likoló na [bampunda, NW] na mbango, bongo, baoyo [bakolanda, NW] bino bakoya mbango.” (Yisaya 30:16) Bato ya Yuda bakanisi ete na esika ete ezala Yehova, bampunda ya mbango makasi nde ekobikisa bango. (Deteronome 17:16; Masese 21:31) Kasi, mosakoli azongisi ete, elikya na bango ekozala ndɔtɔ mpamba zambi banguna na bango bakokanga bango. Ata soki bazali mingi mpenza ekosalisa bango te. “Nkóto [bakolɛnga mpo na mpamela, NW] na moko; bokokima mpo na mpamela na mitano.” (Yisaya 30:17a) Mampinga ya basoda ya Yuda bakobanga mpe bakokima kaka mpo na koganga ya mwa ndambo ya banguna na bango.a Na nsuka, bobele mwa ndambo moke bakotikala, bango moko, “lokola nzete ya bɛndɛlɛ likoló na [ngomba, NW] to lokola bɛndɛlɛ likoló na [ngomba moke, NW].” (Yisaya 30:17b) Kaka ndenge esakweli yango elobaki, ntango Yelusaleme ebebisamaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), kaka mwa bato moke babikaki.—Yilimia 25:8-11.
Libɔndisi na kati ya kokweisama
14, 15. Libɔndisi nini maloba ya Yisaya 30:18 epesaki bafandi ya Yuda na ntango ya kala mpe baklisto lelo oyo?
14 Ntango maloba yango oyo ezali kotinda bango bákanisa malamu ezali naino na matoi ya bato oyo bazali koyoka Yisaya, lolaka ya nsango na ye ebongwani. Likama etiki esika na elaka moko ya mapamboli. “Boye [Yehova akokoba kozela, NW] ete amonisa bino boboto, bongo [akotɛlɛma, NW] ete ayokela bino mawa, mpo ete [Yehova] azali Nzambe ya kosambisa-sembo, baoyo nyonso [bakokoba kozela ye bakozala na esengo, NW].” (Yisaya 30:18) Oyo nde maloba ya kolendisa! Yehova azali Tata ya boboto oyo alingaka mingi kosalisa bana na ye. Asepelaka koyokela bango mawa.—Nzembo 103:13; Yisaya 55:7.
15 Maloba yango ya kolendisa ezali mpo na batikali ya Bayuda oyo bayokeli bango mawa mpe bapesi bango likoki ya kobika ntango Yelusaleme ekobebisama na mobu 607 L.T.B., ezali mpe mpo na mwa ndambo ya bato oyo bazongaki na Mokili ya Ndaka na mobu 537 L.T.B. Kasi, maloba ya mosakoli yango ezali mpe kobɔndisa baklisto lelo oyo. Ezali kokundolela biso ete Yehova “akotɛlɛma” mpo na bolamu na biso, akotya nsuka na mokili oyo mabe. Basambeli ya sembo bakoki kolikya ete Yehova—“Nzambe ya kosambisa-sembo”—akopesa nzela te ete mokili ya Satana ebakisa mokolo ata moko koleka ndenge bosembo esɛngi. Yango wana, ‘baoyo nyonso bakobaka kozela ye’ bazali na ntina ya kozala na esengo.
Yehova abɔndisi basaleli na ye mpe ayoki mabondeli na bango
16. Ndenge nini Yehova abɔndisaka baoyo balɛmbi?
16 Kasi, ekoki kozala ete basusu balɛmbi nzoto mpamba te lobiko eyaki noki te ndenge bango bakanisaki. (Masese 13:12; 2 Petelo 3:9) Tiká ete bázwa libɔndisi na maloba ya Yisaya oyo elandi, oyo ezali komonisa bomoto mpenza ya Nzambe. “[Ntango, NW] bato bakofanda na Siona kati na Yelusaleme; okolela lisusu te. Na mongongo ya kolela na yo, akozala na boboto epai na yo. Ekoyoka ye yango, akozongisela yo liloba.” (Yisaya 30:19) Yisaya akɔtisi maloba ya boboto, na Yisaya 30 vɛrsɛ 18 alobi na boike “bino” kasi na Yisaya 30 vɛrsɛ 19 alobi na bomoko “yo.” Ntango Yehova abɔndisaka baoyo bazali kati na mpasi, atalelaka moto na moto. Lokola Tata, atunaka te mwana oyo alɛmbi ete, ‘Mpo na nini ozali makasi te lokola ndeko na yo?’ (Bagalatia 6:4) Ayokamelaka nde mokomoko na likebi mpenza. Kutu, ‘ekoyoka ye yango, akozongisa liloba.’ Oyo nde maloba ya kobɔndisa! Bato oyo balɛmbi nzoto bakoki kolendisama soki babondeli Yehova.—Nzembo 65:2.
Tóyoka mongongo ya Yehova oyo etambwisaka biso ntango tozali kotánga Liloba na ye
17, 18. Ata na ntango ya mpasi, ndenge nini Yehova apesaka toli?
17 Ntango Yisaya azali kokoba na lisolo na ye, akundoleli bayoki na ye ete mpasi ekoya. Bato yango bakozwa “[limpa na motindo, NW] na mpasi mpe mai [na motindo] na minyoko.” Mpasi mpe monyoko oyo ekokómela bango ntango bakozinga bango ekokóma likambo ya momeseno lokola limpa mpe mai. Atako bongo, Yehova azali pene ya kosalisa baoyo bazali sembo. “[Molakisi na yo Monene akomibomba, NW] lisusu te, nde miso na yo makomona [Molakisi na yo Monene, NW]. Mpe matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na [lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi, NW].”—Yisaya 30:20b, 21.b
18 Yehova azali “Molakisi Monene.” Akokani na molakisi mosusu te. Kasi, ndenge nini bato bakoki ‘komona’ ye mpe ‘koyoka’ ye? Yehova amimonisaka na nzela ya basakoli na ye, oyo maloba na bango ekomami na Biblia. (Amosa 3:6, 7) Lelo oyo, ntango basambeli ya sembo bazali kotánga Biblia, ezali lokola nde Nzambe, na mongongo na ye ya botata, azali koyebisa bango nzela oyo basengeli kolanda mpe kolendisa bango bábongola bizaleli na bango mpo bátambola na nzela yango. Moklisto mokomoko asengeli koyoka na likebi mpenza ntango Yehova azali koloba na nzela ya Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo ebimisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Tiká ete mokomoko amipesa na kotánga Biblia, mpamba te ‘yango elimboli bomoi.’—Deteronome 32:46, 47; Yisaya 48:17.
Tókanisa mapamboli ya mikolo ezali koya
19, 20. Mapamboli nini ezali kozela baoyo bazali koyoka mongongo ya Molakisi Monene?
19 Baoyo bakoyoka mongongo ya Molakisi Monene bakopanza bikeko na bango, bakotalela yango lokola mbindo na miso na bango. (Tángá Yisaya 30:22.) Na nsima, baoyo bakoyoka bakozwa mapamboli ya kitoko. Yisaya alobeli bato yango, lokola ekomami na Yisaya 30:23-26, esakweli moko kitoko ya kozongisama oyo ekokisamaki mpo na mbala ya liboso ntango ndambo ya Bayuda bautaki na boombo na mobu 537 L.T.B. Lelo oyo, esakweli yango ezali kosalisa biso tóyeba mapamboli kitoko oyo Masiya azali kopesa sikawa na paladiso ya elimo mpe oyo akopesa na Paladiso oyo ezali koya.
20 “[Ya solo akopesa mbula mpo na mboto na bino oyo bokoni na mabele, mpe lokola mbuma na mabele limpa, oyo esengeli kokóma monene mpe ya mafuta. Na mokolo wana bibwele na yo bikolya na elanga ya monene mpenza, NW]. Bangɔmbɛ mpe bampunda baoyo bakotimolaka mabele bakolya bilei ya kitoko oyo esili kopɛtolama na kanya mpe na epɛpɛli.” (Yisaya 30:23, 24) Limpa ya “monene mpe ya mafuta”—elingi koloba bilei kitoko—ekozala bilei ya moto mokolo na mokolo. Mokili yango ekobota biloko ebele mpe ata nyama ekozwa matomba na yango. Bibwele ekoleisama “bilei ya kitoko”—bilei ya kitoko oyo epesamaka mbala nyonso te. Kutu bilei yango ‘ekopɛtolama’—mosala oyo basalaka kaka mpo na bilei oyo bato balyaka. Oyo nde makambo kitoko Yisaya alobeli awa mpo na komonisa ebele ya mapamboli oyo Yehova akosopela bato ya sembo!
21. Limbolá nini oyo emonisi ete mapamboli oyo ekoya ekozala na mobimba mpenza.
21 “Likoló ya ngomba nyonso ya molai mpe likoló ya ngomba nyonso ya moke oyo etombwami milúká ekozala.” (Yisaya 30:25a, NW)c Yisaya alobi maloba kitoko ya elilingi mpo na komonisa ete mapamboli ya Yehova ekozala na mobimba mpenza. Mai ekozanga te—eloko wana ya ntina mingi ekozala kaka te na mikili ya patatalu kasi mpe na ngomba nyonso, ata mpe “likoló ya ngomba nyonso ya molai mpe likoló ya ngomba nyonso ya moke oyo etombwami.” Ya solo mpenza, nzala ekozala eloko moko oyo eleká ngala. (Nzembo 72:16) Lisusu, mosakoli atii likebi na biloko oyo eleki kutu bangomba na bolai. “Pole ya sanza ekozala lokola pole ya moi mpe pole ya moi ekoleka mbala nsambo lokola pole ya mikolo nsambo na mokolo yango wana [Yehova] akozipa mpasi ya libota na ye mpe akobikisa mpota esili bango kozwa na kobɛta na ye.” (Yisaya 30:26) Esakweli yango esuki na ndenge moko ya kitoko mpenza! Nkembo ya Nzambe ekongɛngisa pole na yango nyonso. Mapamboli oyo ezali kozela basambeli ya sembo ekoleka—mbala nsambo—nyonso oyo bazwaki liboso.
Kosambisama mpe esengo
22. Na bokeseni na mapamboli oyo ezali kozela bato ya sembo, Yehova abombeli bato mabe nini?
22 Lolaka ya nsango ya Yisaya ebongwani lisusu. Lokola nde alingi kobenda likebi ya bayoki na ye, alobi ete: “Talá nkombo ya [Yehova] ekolongwa na mosika, apeli na nkanda na ye mpe na [bibakata ya mapata, NW]; bibɛbu na ye etondi na [maloba ya kotɔndɔla, NW] mpe lolemo na ye ezali lokola mɔ́tɔ mokozikisa nyɛɛ.” (Yisaya 30:27) Kino sikawa, Yehova azali naino mosika, atiki banguna ya basaleli na ye bálanda nzela na bango. Sikawa, azali koya penepene—lokola mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ekómi mpenza pene—mpo na kopesa etumbu na ye. “[Elimo, NW] na ye ezali lokola mai makoleka na mpela, makokóma likoló kino nkingo; ete [ayungula bikólo na kiyungulu, NW] na kobebisa mpe ete atya na mbanga na mabota etambwiseli oyo [ekotindaka bato na koyengayenga, NW].” (Yisaya 30:28) Banguna ya basaleli ya Nzambe bakozingama na “mai makoleka na mpela,” baningisami makasi na “kiyungulu,” mpe batindikami na “etambwiseli.” Bakobebisama mpenza.
23. Nini epesaka baklisto “esengo na motema” lelo oyo?
23 Lolaka ya Yisaya ebongwani lisusu ntango azali kolobela esengo ya basambeli ya sembo oyo bakozonga mokolo mosusu na mokili na bango. “Bokozala na loyembo lokola na butu wana [oyo moto akomisantisa mpo na fɛti, NW], mpe na esengo na motema lokola wana moto akobima na pololo mpo na [kokɔta, NW] na ngomba ya [Yehova], ɛɛ na libanga ya Yisalaele.” (Yisaya 30:29) Lelo oyo baklisto ya solo bayokaka “esengo na motema” ndenge wana ntango bakanisaka kosambisama ya mokili oyo ya Satana; ndenge Yehova, “Libanga ya lobiko” azali kobatela bango; mpe mapamboli ya Bokonzi oyo ezali koya.—Nzembo 95:1.
24, 25. Ndenge nini esakweli ya Yisaya ezali komonisa ete etikali moke Asulia akosambisama?
24 Nsima ya maloba yango ya esengo, Yisaya azongi lisusu na motó ya likambo ya kosambisama mpe amonisi nani akozwa nkanda ya Yehova. “[Yehova] akoyokisa [nkembo ya mongongo na ye, NW] mpe akomonisa [kokita ya lobɔkɔ na ye, NW] na nkanda monene mpe na lolemo na mɔ́tɔ mozali [kozikisa] nyɛɛ, mpe na mopɛpɛ monene mpe na mbula makasi mpe na matandala. Na mongongo ya [Yehova], Asulia akoyoka nsɔmɔ, wana akotutatuta ye na lingenda na ye.” (Yisaya 30:30, 31) Na elobeli wana ya polelepolele, Yisaya azali komonisa ete kosambisama ya Asulia na mabɔkɔ ya Nzambe ezali likambo ya solo. Ezali lokola nde Asulia atɛlɛmi liboso ya Nzambe mpe azali kolɛnga ntango amoni ‘lobɔkɔ na ye’ ya kosambisa.
25 Mosakoli alobi lisusu ete: “Mbala na mbala na kobɛta na lingenda ya etumbu oyo [Yehova] akobɛta ye na yango, ekozala elongo na ngɔmɔ na nzɛnzɛ; [mpe akobunda na bango na bitumba mpenza bibundeli likoló, NW]. Longwa ntango [oyo, NW], Tofese [na ye] esili kobongisama; ɛɛ ebongisameli mokonzi; ezikiselo na yango ezali na bozindo mpe na monene; na nkoni mpe na mɔ́tɔ mingi mingi. Mpema ya [Yehova] lokola ebale ya sufulu ekobambola yango.” (Yisaya 30:32, 33) Tofese, na lobwaku ya Hinomo, esalelami awa lokola esika moko ya elilingi oyo mɔ́tɔ ezali kopela. Lokola amonisi ete Asulia akosuka kuna, Yisaya azali komonisa kobebisama ya mbalakaka mpe ya mobimba oyo esengeli kokómela ekólo yango.—Kokanisá na 2 Mikonzi 23:10.
26. (a) Maloba ya Yehova mpo na kotɛmɛla Asulia ezali na ndimbola nini lelo oyo? (b) Ndenge nini lelo baklisto bazali kokoba kozela Yehova?
26 Atako nsango yango ya kosambisama etaleli Asulia, ndimbola ya esakweli ya Yisaya ezali monene. (Baloma 15:4) Ekozala lokola Yehova auti na esika moko mosika, mpo na kozindisa, koningisa, mpe kotambwisa na makasi baoyo nyonso bazali konyokola basaleli na ye. (Ezekiele 38:18-23; 2 Petelo 3:7; Emoniseli 19:11-21) Tiká ete mokolo yango eya noki mpenza! Baklisto bazali kozela na motema likoló mokolo ya kosikolama. Bazwaka nguya ntango bazali kokanisa maloba oyo ekomami na Yisaya mokapo 30. Maloba yango ezali kolendisa basaleli ya Nzambe básepela na libaku malamu ya kobondela, bámipesa na koyekola Biblia, mpe bámanyola mapamboli ya Bokonzi oyo ezali koya. (Nzembo 42:1, 2; Masese 2:1-6; Baloma 12:12) Na yango, maloba ya Yisaya ezali kosalisa biso nyonso ete tókoba kozela Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yebá ete soki Yuda azalaki sembo, makambo mbɛlɛ esalemi ndenge mosusu.—Levitike 26:7, 8.
b Yango ezali esika kaka moko na Biblia epai Yehova abengami “Molakisi Monene.”
c Na Yisaya 30:25b totángi boye: “Na mokolo ya kobomama monene ntango bandako milai ekokwea.” Na kokokisama na yango ya liboso mpenza, yango ezali mbala mosusu kolobela kokwea ya Babilone, oyo epesaki Yisalaele nzela ya kozwa mapamboli oyo elobelamaki na Yisaya 30:18-26. (Talá paragrafe 19.) Mbala mosusu ezali mpe kolobela kobebisama oyo ekosalema na Armagedon, oyo ekopesa nzela na kokokisama monene ya mapamboli yango na mokili ya sika.
[Bililingi na lokasa 305]
Na mikolo ya Mose, Bayisalaele bakimaki Ezipito. Na mikolo ya Yisaya, Yuda akei na Ezipito koluka lisalisi
[Elilingi na lokasa 311]
“Likoló ya ngomba nyonso ya moke oyo etombwami, milúká ekozala”
[Elilingi na lokasa 312]
Yehova akoya na nkanda “na bibakata ya mapata”