Mokapo ya Ntuku Mibale na Minei
Lisalisi moko te ekouta na mokili
1, 2. (a) Mpo na nini bafandi ya Yelusaleme bazali kobanga? (b) Na kotalela likama oyo ekómeli Yelusaleme, mituna nini ebongi kotuna?
BATO ya Yelusaleme bazali kobanga—mpe yango ezali na ntina! Asulia, mokili oyo elekaki makasi na eleko wana, abundisaki “mboka nyonso na mapango ya Yuda mpe apunzaki yango.” Sikawa, bilombe ya basoda ya Asulia balingi kobundisa mboka-mokonzi ya Yuda. (2 Mikonzi 18:13, 17) Mokonzi Hizikiya na bafandi ya Yelusaleme bakosala nini?
2 Lokola bingumba mosusu ya mokili yango esili kokwea, Hizikiya ayebi ete Yelusaleme ezali na makasi te mpo na kobunda na basoda ya Asulia. Lisusu, Baasulia bayebani ete bazali bato ya ezaleli mabe mpe ya matata koleka. Ndenge bato babangaka mampinga ya basoda ya ekólo yango, yango esalaka ete mbala mosusu banguna bákima kutu kozanga kobunda! Na mokakatano ya ndenge wana, bato ya Yelusaleme bakoki koluka lisalisi wapi? Nzela ya kokima mampinga ya basoda ya Asulia ezali? Mpe ndenge nini likambo ya ndenge wana ekómeli basaleli ya Nzambe? Mpo na koyanola na mituna yango, tosengeli naino kozongisa makanisi na nsima mpe komona ndenge Yehova atalelaki libota oyo esalaki kondimana na ye bambula mingi liboso.
Lipɛngwi na Yisalaele
3, 4. (a) Ntango nini mpe ndenge nini ekólo ya Yisalaele ekabwanaki na bikonzi mibale? (b) Na ndenge nini Yelobama abandisaki bokonzi ya mabota zomi ya nɔrdi na ndenge ya mabe?
3 Kobanda ntango oyo Yisalaele alongwaki na Ezipito tii na liwa ya Salomo mwana ya Davidi—esalaki mbula koleka 500—mabota zomi na mibale ya Yisalaele ezalaki ekólo moko. Nsima ya liwa ya Salomo, Yelobama atindaki mabota zomi ya nɔrdi bátombokela ndako ya Davidi, mpe banda ntango wana ekólo yango ekabwanaki na bikonzi mibale. Yango esalemaki na mobu 997 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
4 Yelobama azalaki mokonzi ya liboso na bokonzi ya Yisalaele ya nɔrdi, mpe akɔtisaki bato na ye na lipɛngwi, atyaki bonganga oyo endimami na Nzambe te na esika ya banganga ya libota ya Alona mpe losambo ya mwana ya ngɔmbɛ na esika ya losambo ya Yehova oyo eyokani na Mibeko. (1 Mikonzi 12:25-33) Yango ezalaki mabe mpenza na miso ya Yehova. (Yilimia 32:30, 35) Mpo na yango mpe mpo na ntina mosusu, Yehova atikaki Asulia anyokola Yisalaele. (2 Mikonzi 15:29) Mokonzi Hosea ayokanaki na Ezipito mpo na komeka kolongola monyoko ya Baasulia, kasi mokano na ye elongaki te.—2 Mikonzi 17:4.
Yisalaele aluki esika moko mabe ya kokima
5. Yisalaele akei koluka lisalisi epai ya nani?
5 Yehova alingi kosembola makanisi ya Bayisalaele.a Mpo na yango, atindi mosakoli Yisaya na likebisi oyo elandi: “Mawa epai na bango bakokitaka na Ezipito mpo na kosungama mpe bakotalelaka [bampunda, NW]; baoyo bakotalelaka makalo mpo ete mazali mingi mpe bato na [mpunda, NW] mpo ete bazali na makasi bɛ; nde bakotalelaka [Mosantu ya, NW] Yisalaele te, bakolukaka [Yehova] te.” (Yisaya 31:1) Oyo nde mpasi! Yisalaele atyeli bampunda mpe makalo ya etumba motema na esika ete atyela Yehova, Nzambe ya bomoi. Yisalaele, na makanisi na ye ya bomoto, amoni ete bampunda ya Ezipito ezali mingi mpe ezali na makasi. Na ntembe te Ezipito akozala moninga malamu mpo na kobunda na mampinga ya basoda ya Asulia! Nzokande, ekoumela te Bayisalaele bakomona ete boyokani na bango na Ezipito ezali na ntina te.
6. Mpo na nini Yisalaele amonisi ete azangi mpenza kondima epai ya Yehova ndenge akei koluka lisalisi na Ezipito?
6 Na kondimana ya Mibeko, ezala bato ya Yisalaele to ya Yuda, bango nyonso bazalaki bato oyo bamipesá na Yehova. (Exode 24:3-8; 1 Ntango 16:15-17) Lokola aluki nde lisalisi ya Ezipito, Yisalaele amonisi mpenza ete azangi kondima epai ya Yehova mpe abuki mibeko ya kondimana mosantu yango. Mpo na nini? Mpamba te na kati ya maloba ya kondimana yango, Yehova alaki ete akobatela basaleli na ye soki bakangami kaka na ye moko. (Levitike 26:3-8) Yehova akokisaki elaka na ye, mbala na mbala amonisaki ete azali “ekimelo na bango na ntango ya mpasi.” (Nzembo 37:39; 2 Ntango 14:2, 9-12; 17:3-5, 10) Lisusu, na nzela ya Mose, moyokanisi ya kondimana ya Mibeko, Yehova ayebisaki bakonzi oyo bakoya nsima ete bákolisa motángo ya bampunda na bango te. (Deteronome 17:16) Soki batosi etinda yango, bakonzi yango bakomonisa ete bazali kotya motema na “Mosantu ya Yisalaele” mpo na kozwa libateli. Likambo ya mawa, bayangeli ya Yisalaele bazali na kondima ya ndenge wana te.
7. Liteya nini baklisto bakoki kozwa lelo oyo na ezaleli ya kozanga kondima ya Yisalaele?
7 Liteya moko ezali awa mpo na baklisto lelo oyo. Yisalaele atyelaki lisalisi ya Ezipito motema na esika ya kotya motema na lisalisi oyo eleki makasi, oyo Yehova apesaka. Ndenge moko mpe lelo oyo, baklisto bakoki komekama mpe kotya elikya na makambo oyo ezali komonana na miso ya bomoto ete ebatelaka—kozala na mbongo na banki, kozala moto ya lokumu, kozala moto oyo ayebani mingi na mokili—na esika ya kotyela Nzambe elikya. Ya solo, batata ya mabota batalelaka mokumba na bango ya kobɔkɔla mabota na bango na lisɛki te. (1 Timote 5:8) Kasi batyaka elikya na bango na biloko ya mosuni te. Mpe bakebaka na “lolenge nyonso ya bilulela.” (Luka 12:13-21, NW) Yehova Nzambe azali “esika makasi ya komibatela” kaka moko na “ntango na minyoko.”—Nzembo 9:9, NW; 54:7.
8, 9. (a) Atako emonani ete mayele oyo Yisalaele azwi ezali malamu, kasi nsuka na yango ekozala nini, mpe mpo na nini? (b) Bokeseni nini ezali kati na bilaka ya bato mpe bilaka ya Nzambe?
8 Yango wana, Yisaya asɛki bakonzi ya Yisalaele oyo basali boyokani na Ezipito, alobi ete: “Mpe ye azali na bwanya, mpe akoyeisa mpasi, akolongola maloba na ye; ɛɛ, akotɛmɛla ndako ya basali na mabe mpe akotɛmɛla lisungi ya baoyo bakosalaka oyo ezali mabe.” (Yisaya 31:2, NW) Mbala mosusu bakonzi ya Yisalaele bakanisi ete bazali bato ya bwanya. Kasi Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ nde aleki na bwanya, boye te? Emonani ete mayele oyo Yisalaele azwi ya koluka lisalisi na Ezipito ezali malamu. Kasi, na miso ya Yehova, kosala boyokani ya politiki ndenge wana ezali kosala ekobo na elimo. (Ezekiele 23:1-10) Yango wana, Yisaya alobi ete Yehova “akoyeisa mpasi.”
9 Eyebani malamu ete bilaka oyo bato bapesaka ekokisamaka te, mpe libateli oyo balakaka elongaka mpenza te. Nzokande, Yehova ‘alongolaka maloba na ye na nsima te.’ Akosala mpenza oyo ye alaki. Maloba na ye ezongelaka ye te kozanga ete ekokisa mokano na ye.—Yisaya 55:10, 11; 14:24.
10. Nini ekokómela Ezipito mpe Yisalaele?
10 Baezipito bakobatela mpenza Yisalaele malamu? Te. Yisaya ayebisi Yisalaele ete: “Baezipito bazali bato, bazali Nzambe te; mpe [bampunda, NW] na bango bazali mosuni, bazali [elimo, NW] te. Wana ekosembola [Yehova] lobɔkɔ, mosungi [akobɛta libaku, NW] mpe mosungami akokwea, [mpe na ntango yango, bango nyonso bakokóma na nsuka na bango, NW].” (Yisaya 31:3) Ezala mosungi (Ezipito) to mosungami (Yisalaele) bakobɛta libaku, bakokwea mpe bakokóma na nsuka na bango ntango Yehova akosembola lobɔkɔ na ye mpo na kokokisa mokano na ye na nzela ya Asulia.
Kokwea ya Samalia
11. Masumu ya ndenge nini Yisalaele akómisi yango libondo, mpe nsuka na yango ezali nini?
11 Na motema mawa na ye, mbala na mbala Yehova atindi basakoli mpo na kolendisa Yisalaele abongola motema mpe azongela losambo ya pɛto. (2 Mikonzi 17:13) Atako bongo, longola lisumu ya losambo ya mwana ya ngɔmbɛ, Yisalaele abakisi lisusu misala ya soloka mpe losambo ya mbindo ya Baala, mpe kosalela makonzí mosantu mpe bisika bitombwami. Bayisalaele bazali kutu kolekisa “bana na bango babali mpe bana na bango basi kati na mɔ́tɔ,” kopesa bademo mbeka ya mbuma ya nzoto na bango. (2 Mikonzi 17:14-17; Nzembo 106:36-39; Amosa 2:8) Mpo na kosilisa mabe ya Yisalaele, Yehova alobi ete: “[Samalia mpe mokonzi na yango bakolimwa, NW] lokola mfulu likoló na mai.” (Hosea 10:1, 7) Na mobu 742 L.T.B., mampinga ya basoda ya Asulia babundisi Samalia, mboka-mokonzi ya Yisalaele. Nsima ya kozinga yango na boumeli ya mbula misato, Samalia ekwei, mpe na mobu 740 L.T.B., bokonzi ya mabota zomi elimwe.
12. Mosala nini Yehova apesi lelo oyo, mpe nini ekokómela baoyo bazali koboya likebisi yango?
12 Na mikolo na biso, Yehova apesi mokumba ya kosakola na mokili mobimba mpo na kokebisa “bato nyonso na bisika nyonso ete bábongola mitema.” (Misala 17:30; Matai 24:14) Bato oyo baboi nzela ya Nzambe oyo ememaka na lobiko bakokóma lokola “mfulu,” bakobebisama ndenge moko na libota ya bapɛngwi ya Yisalaele. Nzokande, bato oyo batii elikya na Yehova “bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Yango wana, ezali mpenza malamu kosala mabunga te ndenge bokonzi ya Yisalaele ya kala esalaki! Tiká ete tótya elikya na biso nyonso na Yehova mpo na kozwa lobiko.
Nguya ya kobikisa ya Yehova
13, 14. Maloba nini ya kobɔndisa Yehova alobi mpo na Siona?
13 Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda ezali na ntaka ya mwa bakilomɛtrɛ na esika Yisalaele esuki na epai ya sudi. Bato ya Yelusaleme bayebi malamu mpenza nini ekómelaki Samalia. Sikawa, kaka monguna yango ya nsɔmɔ oyo asukisaki bazalani na bango ya nɔrdi, alingi mpe kobundisa bango. Bakozwa liteya na oyo ekómelaki Samalia?
14 Maloba ya Yisaya oyo elandi ebɔndisi bato ya Yelusaleme. Ayebisi bango ete Yehova azali ntango nyonso kolinga basaleli na ye oyo basalaki kondimana na ye, alobi ete: “[Yehova] alobi boye epai na ngai ete, Lokola nkosi to elenge ya nkosi akonguluma likoló na bilei, wana ebolo ya babateli na mpate babyangameli ye, mpe ayoki nsɔmɔ mpo na koganga na bango te, abangisami mpe na makɛlɛlɛ na bango te, boye [Yehova] na bibele akokita na nse, ete abunda na ngomba ya Siona mpe likoló na [ngomba moke, NW] na yango.” (Yisaya 31:4) Lokola elenge ya nkosi oyo afandi likoló na bilei na ye, Yehova akobatela Siona makasi mpenza, yango ezali engumba na ye mosantu. Ata soki mampinga ya basoda ya Asulia basali lolendo, balobilobi, basali na makɛlɛlɛ ndenge nini, eloko moko te ekobongola mokano ya Yehova.
15. Nini emonisi ete Yehova asaleli bato ya Yelusaleme makambo na boboto mpe na motema mawa?
15 Talá sikawa ndenge Yehova akosalela bato ya Yelusaleme makambo na boboto mpe na motema mawa: “Lokola bandɛkɛ bazali kopumbwa, boye Yehova na bibele akobatela Yelusaleme; akobatela yango mpe akobikisa yango, akoleka likoló na yango mpe akokɛngɛla yango.” (Yisaya 31:5) Mama ya ndɛkɛ azalaka ntango nyonso na ekɛngɛ mpo na kobatela bana na ye. Apumbwakapumbwaka likoló ya bana na ye, mpe atalaka bipai nyonso mpo na komona esika likama moko ekoki kouta. Soki monguna moko ayei pene, mbala moko akokitela ye mbangu mpo na kobatela bana na ye. Ndenge moko mpe, Yehova akobatela bato ya Yelusaleme liboso na banguna na bango Baasulia.
“Bózonga”
16. (a) Libyangi nini ya bolingo Yehova apesi basaleli na ye? (b) Ntango nini botomboki ya bato ya Yuda ekómaki mpenza polele? Limbolá.
16 Sikawa Yehova akundoleli basaleli na ye ete basali lisumu mpe alendisi bango bálongwa na nzela na bango ya mabe: “[Bózonga, NW] epai na ye oyo bosili kotombokela ye na mabe, ɛ bato ya Yisalaele.” (Yisaya 31:6) Elingi koloba te ete kaka bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele nde etombokaki. Bato ya Yuda, bazali mpe “bato ya Yisalaele,” basili “kotombokela ye na mabe.” Yango ekomonana mingimingi mwa moke nsima wana Yisaya akosukisa nsango na ye ya esakweli, ntango Manase, mwana ya Hizikiya akokóma mokonzi. Lisolo ya Biblia elobi ete, “Manase asalisaki Yuda mpe bafandi na Yelusaleme masumu kino balekaki na mabe mabota oyo [Yehova] abebisaki.” (2 Ntango 33:9) Kanisá naino likambo ya ndenge wana! Yehova abomaki bikólo ya bapakano mpamba te bazalaki na bizaleli ya mbindo, nzokande bato ya Yuda oyo basalaki kondimana na Yehova, bazali kutu mabe koleka bato ya bikólo wana.
17. Na lolenge nini bizaleli ya lelo ekokani na oyo ya Yuda na ntango ya Manase?
17 Na ebandeli ya ekeke ya 21, bizaleli ya bato ezali lokola oyo ezalaki na Yuda na mikolo ya Manase. Mokili ezali se kobeba mpo na koyinana na kati ya bato oyo bakeseni mangomba, mposo mpe bikólo. Bamilio ya bato bakutani na makambo ya nsɔmɔ, na ndakisa kobomana, konyokola, kobebisa basi, mpe oyo babengaka kopɛtola ekólo. Na ntembe te, bato mpe bikólo—mingimingi bikólo ya mangomba ya boklisto—bakómi mosika ‘na botomboki na bango.’ Kasi, tokoki mpenza kondima ete Yehova akotika te ete mabe ekoba libela na libela. Mpo na nini? Mpo na makambo oyo esalemaki na mikolo ya Yisaya.
Yelusaleme ebikisami
18. Likebisi nini Laba-sake akebisaki Hizikiya?
18 Bakonzi ya Asulia bazalaki koloba ete bazalaki kolonga na bitumba mpo na banzambe na bango. Buku moko (Ancient Near Eastern Texts) ezali na makomi ya Asurbanipal, mokonzi ya Asulia oyo azalaki koloba ete atambwisamaki “na Asur, Bel, Nebo, banzambe minene, bankolo [na ye], oyo bazali (ntango nyonso) kotambola pembeni [na ye], [ntango] alongaki basoda (oyo bamesani) na etumba . . . na etumba moko ya monene.” Na mikolo ya Yisaya, maloba oyo Laba-sake, momonisi ya Saneheliba, mokonzi ya Asulia, alobaki na Mokonzi Hizikiya, emonisaki mpe likanisi ya ndenge wana mpe alobaki ete banzambe bakɔtaka na bitumba ya bato. Akebisi mokonzi Moyuda ete atya motema na ye epai ya Yehova te ete akobikisa ye mpe amonisaki ete banzambe ya bikólo mosusu balongaki te kobatela bato na bango liboso ya bilombe ya etumba ya Asulia.—2 Mikonzi 18:33-35.
19. Hizikiya asalaki nini na matumoli ya Laba-sake?
19 Mokonzi Hizikiya asalaki nini? Lisolo ya Biblia elobi ete: “Eyokaki mokonzi Hizikiya yango, apasolaki bilamba na ye, amizipaki na ngɔtɔ mpe akendaki na ndako ya [Yehova].” (2 Mikonzi 19:1) Hizikiya ayebaki ete ezali kaka na Moto moko oyo akoki kosalisa ye na likambo oyo ya nsɔmɔ. Amikitisaki mpe alukaki Yehova mpo na kozwa toli.
20. Ndenge nini Yehova akosala mpo na bolamu ya bato ya Yuda, mpe liteya nini basengeli kozwa na yango?
20 Yehova apesaki ye toli oyo alukaki. Na nzela ya mosakoli Yisaya, alobi ete: “Na mokolo yango bakobwaka moto na moto banzambe na ye ya mpamba ya palata mpe banzambe na ye ezangi ntina ya wolo, oyo mabɔkɔ na bino esaleli bino lokola lisumu.” (Yisaya 31:7, NW) Ntango Yehova akobundela basaleli na ye, banzambe ya Saneheliba bakomonana polele kaka ndenge bazali—elingi koloba bakozala na ntina moko te. Yango ezali liteya oyo bato ya Yuda basengeli kosimba na motema. Atako Mokonzi Hizikiya azali sembo, mokili ya Yuda, ndenge moko na Yisalaele, etondi na bikeko. (Yisaya 2:5-8) Mpo bato ya Yuda bázongela boyokani na Yehova, yango ekosɛnga ete bábongola mitema na masumu na bango mpe bábwaka “moto na moto banzambe na ye ya mpamba ya palata.”—Talá Exode 34:14.
21. Na maloba nini Yisaya asakoli ndenge Yehova akobebisa Asulia?
21 Sikawa Yisaya asakoli ndenge Yehova akobebisa monguna ya nsɔmɔ ya Yuda: “Asulia akokwea na mopanga nde na moto te, mopanga nde na moto te ekolya ye; akokima liboso na mopanga mpe bilenge na ye [bakokóma bato babongi na mosala ya makasi, NW].” (Yisaya 31:8) Ntango etumba ekoya, bato ya Yelusaleme bakozala kutu na ntina te ya kobimisa mipanga na bango. Mafuta ya mampinga ya basoda ya Asulia makolyama na mopanga ya moto te, kasi nde na mopanga ya Yehova. Saneheliba, mokonzi ya Asulia, “akokima liboso na mopanga.” Nsima ya liwa ya basoda na ye 185 000 oyo anzelu ya Yehova abomi, Saneheliba azongi epai na ye. Na nsima, ntango azalaki kofukamela nzambe na ye Nisiloko, bana na ye mpenza babomaki ye.—2 Mikonzi 19:35-37.
22. Liteya nini baklisto bakoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Hizikiya mpe mampinga ya basoda ya Asulia?
22 Moto moko te, ezala Hizikiya, akokaki koyeba ndenge Yehova akobikisa Yelusaleme na mabɔkɔ ya mampinga ya basoda ya Asulia. Kasi, lolenge Hizikiya asalaki na ntango ya mpasi ezali kopesa ndakisa moko monene mpo na baoyo bazali kokutana na komekama lelo oyo. (2 Bakolinti 4:16-18) Na kotalela nsɔmɔ oyo Baasulia bazalaki koyokisa bato, ndenge bazalaki koluka kobundisa Yelusaleme, Hizikiya asengelaki kaka kobanga. (2 Mikonzi 19:3) Kasi, azalaki na kondima epai ya Yehova, mpe alukaki toli epai na ye, kasi epai ya bato te. Oyo nde lipamboli mpo na Yelusaleme na oyo Hizikiya asalaki! Lelo oyo, baklisto oyo babangaka Nzambe bakoki mpe koyoka nsɔmɔ ntango bakutani na likambo moko. Na mabaku mingi, ntina ya kobanga ezalaka. Nzokande, soki ‘totii mitungisi na biso nyonso likoló na Yehova,’ ye akosalisa biso. (1 Petelo 5:7, NW) Akosalisa biso tólonga kobanga mpe akolendisa biso tóyika mpiko na likambo oyo ezali kotungisa biso.
23. Mpo na nini Saneheliba nde atikali na kobanga, kasi Hizikiya te?
23 Na nsuka, Saneheliba nde atikali na kobanga, kasi Hizikiya te. Akokenda epai ya nani? Yisaya asakoli ete: “Libanga na ye ekolimwa na nsɔmɔ, [bankumu, NW] na ye bakobanga liboso na bɛndɛlɛ, [Yehova] alobi bongo, oyo [pole, NW] na ye ezali na Siona, mɔ́tɔ na ye makasi ezali na Yelusaleme.” (Yisaya 31:9) Banzambe ya Saneheliba—“libanga” na ye, ekimelo oyo azalaki kotyela motema—basundoli ye. Ezali lokola nde ‘balimwe na nsɔmɔ.’ Lisusu, ata bankumu ya Saneheliba basungi ye ata moke te. Bango mpe bakufi na nsɔmɔ.
24. Nsango nini ya polele ekoki kozwama na oyo ekómelaki Baasulia?
24 Eteni oyo ya esakweli ya Yisaya ezali kopesa nsango moko ya polele mpo na moto nyonso oyo akotɛmɛla Nzambe. Ebundeli moko te, nguya moko te, mwango moko te ekoki kopekisa mikano ya Yehova. (Yisaya 41:11, 12) Nzokande, bato oyo bazali koloba ete basalelaka Nzambe kasi bazali koluka libateli na biloko ya mosuni bakolɛmba nzoto. Baoyo “bakotalelaka Oyo Mosantu ya Yisalaele te” bakomona ndenge Yehova “akoyeisa mpasi.” (Yisaya 31:1, 2) Ya solo mpenza, ekimelo kaka moko mpe ya solosolo ezali nde Yehova Nzambe.—Nzembo 37:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntembe te, vɛrsɛ misato ya liboso oyo ezali na Yisaya 31 vɛrsɛ 1-3 ezali kolobela mingimingi Yisalaele. Mpe emonani ete vɛrsɛ motoba ya nsuka Yisaya 31:4-9 ezali kolobela nde Yuda.
[Elilingi na lokasa 319]
Baoyo batyelaka biloko ya mosuni motema bakolɛmba nzoto
[Elilingi na lokasa 322]
Lokola nkosi oyo azali kobatela bilei na ye, Yehova akobatela engumba na ye mosantu
[Bililingi na lokasa 324]
Mokili ebebi mpo na koyinana na kati ya bato oyo bakeseni mangomba, mposo mpe bikólo
[Elilingi na lokasa 326]
Hizikiya akendaki na ndako ya Yehova koluka lisalisi