“Tempelo” mpe “Mokonzi” lelo oyo
“Wana ekokɔta bango, mokonzi akokɔta na bango elongo; mpe wana ekobima bango, ye akobima.”—EZEKIELE 46:10.
1, 2. Solo nini ya ntina mingi ezali kosalisa biso tósosola makambo mingi na emonaneli ya tempelo ya Ezekiele?
NA NTANGO ya kala, balakisi mosusu ya mibeko ya Bayuda bazalaki kolinga mokanda ya Ezekiele te. Talmud elobi ete bamosusu kutu bakanaki kolongola yango na molɔngɔ ya mikanda ya Makomami Mosantu. Kososola emonaneli ya tempelo ezalaki mpenza mokuwa mpo na bango; balobaki ete moto akoki kososola yango te. Emonaneli ya tempelo ya Yehova oyo Ezekiele azwaki ebulunganisaka banganga-mayele mosusu ya Biblia. Ezali boni mpo na biso?
2 Banda ntango losambo ya pɛto ezongaki, Yehova apesi basaleli na ye bingɛngiseli mingi na makambo ya elimo. Moko na bingɛngiseli yango ezali bososoli ya tempelo ya Nzambe na elimo, elingi koloba ebongiseli ya Yehova oyo ezali lokola tempelo mpo na losambo ya pɛto.a Likambo yango ezali na ntina mingi, ezali kosalisa biso tóyeba makambo mingi ya emonaneli ya tempelo ya Ezekiele. Sikoyo tótalela naino malamumalamu makambo minei oyo elobelami na emonaneli yango: tempelo, mosala ya banganga, mokonzi, mpe mokili. Makambo yango elimboli nini lelo oyo?
Tempelo mpe yo
3. Bolai ya esika oyo ekaboli mabelé na plafɔ mpe mayemi oyo ezali na bifelo ya bikɔtelo ya tempelo ezali koteya biso nini?
3 Kanisá ete tozali kotambola mpo na kotalatala tempelo yango ya emonaneli. Tomati basikalie nsambo ya moko na bikɔtelo minene. Totɛlɛmi na ekɔtelo na yango, tozali kotala likoló na kokamwa nyonso. Banda na mabelé tii na plafɔ ezali na mɛtɛlɛ 30! Yango ezongisi biso na makanisi ete masɛngami mpo na kokɔta na ebongiseli ya losambo ya Yehova ezali pɛtɛ te. Maninisa (fenêtre) ezali kokɔtisa pole oyo ezali kongɛngisa bifelo oyo ezali na mayemi ya banzete ya mbila, oyo Biblia esalelaka lokola elilingi ya makambo ya alima. (Nzembo 92:12; Ezekiele 40:14, 16, 22) Esika oyo ya bulɛɛ ezali mpo na baoyo makanisi mpe elimo na bango ezali alima. Yango wana, biso mpe tolingi kotikala ntango nyonso alima mpo Yehova andima losambo na biso.—Nzembo 11:7.
4. Banani bapekisami kokɔta na tempelo, mpe yango ezali koteya biso nini?
4 Na ngámbo mokomoko ya ekɔtelo yango ezali na bisika misato mpo na bakɛngɛli. Bakɛngɛli bakotika biso tókɔta na kati ya tempelo? Yehova alobi na Ezekiele ete mopaya oyo ‘akatami ngenga na motema te’ akoki kokɔta kuna te. (Ezekiele 40:10; 44:9) Yango elingi koloba ete Nzambe andimaka kaka bato oyo balingaka mpe batosaka mibeko na ye ete bázala basambeli na ye. (Yilimia 4:4; Baloma 2:29) Ayambaka bato wana na hema na ye ya elimo, elingi koloba ndako na ye ya losambo. (Nzembo 15:1-5) Banda ntango losambo ya solo ezongaki na 1919, ebongiseli ya Yehova awa na mabelé ezali kobatela mibeko na ye mpo na etamboli malamu mpe mokemoke ezali kolimbola yango polele. Baoyo baboyi kotosa yango na nko bazali kondimama lisusu te ete básangana na bato na ye. Lelo oyo, momeseno euti na Biblia ya kobimisa na lisangá basali na mabe oyo baboyi kobongola motema, ezali kobatela bopɛto ya losambo na biso.—1 Bakolinti 5:13.
5. (a) Bokokani nini ezali kati na emonaneli ya tempelo ya Ezekiele mpe emonaneli ya Yoane oyo ekomami na Emoniseli 7:9-15? (b) Na emonaneli ya Ezekiele, mabota 12 oyo mazali kosambela na lopango ya libándá mazali elilingi ya banani?
5 Nzela yango ebimi na lopango ya libándá, epai bato bazali kosambela mpe kokumisa Yehova. Yango ezongisi makanisi na biso na emonaneli oyo ntoma Yoane amonaki “ebele monene” bazali kosambela Yehova “butu na moi kati na tempelo na ye.” Na bimonaneli yango mibale balobeli banzete ya mbila. Na emonaneli ya Ezekiele, banzete ya mbila yango eyemami na bifelo ya ekɔtelo ya tempelo. Na emonaneli ya Yoane basambeli basimbi bitape ya mbila na mabɔkɔ na bango; ezali komonisa esengo na bango ya kokumisa Yehova mpe koyamba Yesu Klisto lokola Mokonzi na bango. (Emoniseli 7:9-15) Na emonaneli ya Ezekiele, mabota 12 ya Yisalaele ezali elilingi ya “bampate mosusu.” (Yoane 10:16; talá Luka 22:28-30.) Yo mpe ozali moko na baoyo bazali kosepela kopesa Yehova nkembo na ndenge bazali kosakola Bokonzi na ye?
6. Bandako ya bolei na lopango ya libándá ezalaki na ntina nini, mpe ekoki kopusa bampate mosusu na kokanisa libaku malamu nini?
6 Wana tozali kotambola mpo na kotala lopango ya libándá, tomoni bandako ya bolei 30, epai bato balyaka makabo na bango ya bolingo malamu. (Ezekiele 40:17) Lelo oyo, ebele monene bapesaka mbeka ya banyama te. Kasi bazali koya mabɔkɔ mpamba te na tempelo ya elimo. (Talá Exode 23:15.) Ntoma Paulo akomaki ete: “Mpo na [Yesu], tótombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye. Bóbosana te kosala boboto mpe kokabela bamosusu biloko mpo ete Nzambe akosepela na mbeka na motindo yango.” (Baebele 13:15, 16; Hosea 14:2) Kopesa Yehova mbeka motindo oyo, ezali mpenza libaku monene.—Masese 3:9, 27.
7. Komeka bolai ya tempelo epesi biso elikya na likambo nini?
7 Ezekiele azali kotala ndenge anzelu azali komeka bolai ya tempelo ya emonaneli. (Ezekiele 40:3) Ndenge moko mpe, bayebisaki ntoma Yoane ete: “Tɛlɛmá [mpe meká] monene na Tempelo na Nzambe, na etumbelo, na basambeli kati na yango.” (Emoniseli 11:1) Komeka bolai yango elimboli nini? Na bimonaneli oyo nyonso mibale, yango ezalaki lokola ndanga ete eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kokokisa mikano na ye mpo na losambo ya pɛto. Ndenge moko mpe lelo oyo, tokoki komindimisa ete eloko moko te ekoki kopekisa kozongisama ya losambo ya pɛto, ezala botɛmɛli ya baguvernema oyo ezali na nguya mingi.
8. Nani azali kokɔta na bikɔtelo ya lopango ya libándá, mpe bikɔtelo yango ezali kopusa biso na kokanisa eloko nini?
8 Wana tozali kokatisa lopango ya libándá, tomoni ete ezali na bikɔtelo misato mpo na koleka na lopango ya kati; ekɔtelo mokomoko ya kati etalana na ekɔtelo ya libándá mpe ezali na bonene ndenge moko. (Ezekiele 40:6, 20, 23, 24, 27) Kaka banganga nde bakoki kokɔta na lopango ya kati. Bikɔtelo ya kati ezali kolamusa makanisi na biso ete mitinda mpe mibeko ya Nzambe oyo bapakolami basengeli kotosa etaleli mpe baklisto mosusu nyonso. Banganga bazali na mosala nini, mpe yango elimboli nini mpo na biso lelo?
Banganga ya sembo
9, 10. Ndenge nini “bonganga ya bokonzi,” lokola emonisami na banganga ya emonaneli ya Ezekiele, ezalaki koteya makambo ya elimo?
9 Na eleko oyo ezalaki liboso ya koya ya Klisto, banganga bazalaki na mosala makasi na tempelo. Bazalaki koboma banyama ya mbeka, kotya yango likoló ya etumbelo, mpe kosalela banganga mosusu mpe bato nyonso. Nyonso wana ezalaki kosɛnga kozala na nzoto makasi. Kasi bazalaki mpe na mosala mosusu ya ntina mingi. Yehova apesaki etinda oyo mpo na banganga: “Bakolakisa bato na ngai kokesana na biloko na bulɛɛ mpe biloko mpamba, mpe bakoyebisa bango mayele na kopona kati na biloko na mbindo mpe biloko na pɛto.”—Ezekiele 44:23; Malaki 2:7.
10 Ozalaka na botɔndi mpo na mosala makasi mpe ya komikitisa oyo kelasi ya bapakolami, “banganga na bokonzi,” basali mpo na losambo ya pɛto? (1 Petelo 2:9) Ndenge moko na banganga ya libota ya Levi na ntango ya kala, bapakolami bazali na molɔngɔ ya liboso na mosala ya koteya bato makambo ya elimo, ya kosalisa bato báyeba makambo oyo ezali pɛto mpe endimami na miso ya Nzambe mpe makambo nini oyo endimami te. (Matai 24:45) Mateya yango, oyo mazali kopesama na nzela ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, na nzela ya makita mpe ya mayangani, esalisi bamilio ya bato bázongisa boyokani malamu elongo na Nzambe.—2 Bakolinti 5:20.
11. (a) Ndenge nini emonaneli ya Ezekiele emonisi mpenza ete banganga basengeli kozala pɛto? (b) Na mikolo ya nsuka, ndenge nini bapakolami bapɛtolami na elimo?
11 Kasi, mosala ya banganga esuki kaka te na koteya bato ete bázala pɛto; bango moko mpe basengeli kozala pɛto. Yango wana Ezekiele amonaki ndenge banganga ya Yisalaele bazalaki kopɛtolama. (Ezekiele 44:10-16) Ndenge moko, makambo oyo elekaki emonisi ete na 1918, Yehova afandaki na tempelo na ye ya elimo “lokola mopɛtoli” mpe azalaki kotala banganga bapakolami nyonso. (Malaki 3:1-5) Baoyo bamonanaki ete bazali pɛto na elimo to babongolaki motema mpe batikaki losambo ya bikeko bapesaki bango nzela ya kokoba mosala na kati ya tempelo na ye ya elimo. Kasi, lokola bato mosusu nyonso, mosangani moko ya kelasi ya bapakolami akoki kokóma mbindo, na elimo mpe na makanisi. (Ezekiele 44:22, 25-27) Basalaki makasi mpo na kotikala ntango nyonso bato oyo ‘bamibateli pɛto na makambo ya mokili.’—Yakobo 1:27; talá Malako 7:20-23.
12. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na mosala ya bapakolami?
12 Mokomoko na biso asengeli komituna ete: ‘Nasepelaka na ndakisa oyo bapakolami bapesi na ndenge oyo balekisi bambula ebele na kosalela Nzambe na bosembo? Nalandaka ndakisa ya kondima na bango?’ Ezali malamu ete basangani ya ebele monene bábosana te ete bakozala elongo na bapakolami awa na mabelé libela na libela te. Yehova alobaki na ntina na banganga oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ete: “Bakozala na libula [na mokili] te; ngai nazali libula na bango.” (Ezekiele 44:28) Ndenge moko mpe, bapakolami bazali na esika ya seko awa na mabelé te. Libula na bango ezali kuna na likoló; basangani ya ebele monene bazali kosepela na libaku malamu ya kosunga mpe kolendisa bapakolami lokola bazali naino na mabelé.—Matai 25:34-40; 1 Petelo 1:3, 4.
Mokonzi azali elilingi ya nani?
13, 14. (a) Mpo na nini tolobi ete mokonzi azali na kati ya bampate mosusu? (b) Mokonzi azali elilingi ya banani?
13 Sikoyo, motuna moko ebimi. Mokonzi yango azali elilingi ya nani? Lokola alobelami lokola moto moko mpe lokola bato mingi, tokoki kokanisa ete azali komonisa etuluku ya bato. (Ezekiele 44:3; 45:8, 9) Kasi ezali banani? Ekoki kozala bapakolami te. Mpamba te na emonaneli, mokonzi yango azali kosala elongo na banganga, kasi ye moko azali nganga te. Na bokeseni na banganga, mokonzi azwi libula na mokili. Na bongo, na mikolo mizali koya, akozala bobele awa na mabelé kasi na likoló te. (Ezekiele 48:21) Mpe lisusu, Ezekiele 46:10 elobi ete: “Wana [mabota oyo ezali ya bonganga te] ekokɔta bango [na lopango yango ya libándá ya tempelo], mokonzi akokɔta na bango elongo; mpe wana ekobima bango, ye akobima.” Akɔti na lopango ya kati te kasi azali kosambela na lopango ya libándá. Azali kokɔta na tempelo mpe kobima na tempelo elongo na bato. Makambo oyo emonisi mpenza ete mokonzi azali na kati ya ebele monene ya bampate mosusu.
14 Tozali komona polele ete mokonzi azali na mikumba na libota ya Nzambe. Na lopango ya libándá, afandi na nse ya ekɔtelo ya ɛsti. (Ezekiele 44:2, 3) Yango emonisi ete azali na mokumba ya kokɛngɛla, mokumba oyo ekokani na mokumba ya mibange ya Yisalaele oyo bazalaki kofanda na ekɔtelo ya mboka mpo na kokata makambo. (Luta 4:1-12; Masese 22:22) Na kati ya bampate mosusu, banani bazali na mosala ya kokɛngɛla lelo oyo? Ezali bongo bankulutu oyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé mpe baponami na elimo santu. (Misala 20:28) Na bongo, kelasi ya mokonzi ezali kobongisama mpo na mosala ya kotambwisa makambo na mokili ya sika na mikolo ekoya.
15. (a) Ndenge nini emonaneli ya Ezekiele engɛngisi boyokani ya bankulutu oyo bazali na kati ya bampate mosusu mpe banganga bapakolami? (b) Na makambo nini bankulutu bapakolami bazwaki esika ya liboso na kati ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabelé?
15 Kasi, lelo oyo boyokani nini ezali kati na kelasi ya banganga bapakolami mpe mibange basangani ya ebele monene oyo bazali kosala mosala ya bakɛngɛli? Emonaneli ya Ezekiele emonisi ete bankulutu oyo bazali basangani ya ebele monene bazali wana mpo na kosunga mpe kosala na litambwisi ya bapakolami. Bapakolami bazali kotambwisa mosala ya elimo. Na lolenge nini? Tóbosana te ete banganga oyo balobelami na emonaneli bazwaki mokumba ya koteya bato makambo ya elimo. Basengelaki mpe kosala lokola basambisi mpo na kokata makambo na kolanda mibeko. Lisusu, Balevi bazwaki mokumba ya ‘kobatela’ bikɔtelo ya tempelo. (Ezekiele 44:11, 23, 24) Tomoni polele ete mokonzi asengelaki, na komikitisa nyonso, kondima misala ya elimo mpe kotosa litambwisi ya banganga. Na bongo, ezali mpenza malamu ete bapakolami bákamba losambo ya pɛto na mikolo na biso. Na ndakisa, baoyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova baponamaka kati na bapakolami. Banda bambula mingi, bankulutu bapakolami wana ya sembo bazali kobongisa kelasi ya mokonzi oyo ezali se kokola. Bazali kobongisa baoyo bakozala basangani ya kelasi yango mpo na mikumba na bango ntango bakozwa bokonzi na bango nyonso na mokili ya sika ya Nzambe.
16. Yisaya 32:1, 2 eyebisi makambo nini oyo bankulutu nyonso basengeli kosala?
16 Bato oyo bakokóma basangani ya kelasi ya mokonzi, baoyo bakozwa mikumba mosusu lokola basangani ya kelasi ya mokonzi, bazali bakɛngɛli ya ndenge nini? Esakweli ya Yisaya 32:1, 2 elobi ete: “Talá mokonzi akozala na lokumu kati na boyengebene, mpe bana na mokonzi kati na kosambisa-sembo; moto na moto akozala lokola ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekaoki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.” Esakweli yango ezali kokokisama lelo oyo wana bankulutu baklisto—bázala bapakolami to bampate mosusu—bazali kosala mosala ya kobatela bampate na minyoko mpe kolɛmba nzoto oyo ekokanisami na “mbula makasi.”
17. Baklisto oyo bazali bakɛngɛli ya mpate basengeli komitalela ndenge nini, mpe bampate basengeli kotalela bango ndenge nini?
17 Maloba “mwana ya mokonzi” mpe “mokonzi,” oyo ezali na ndimbola se moko na Liebele, esalelami lokola batitre mpo na kopesa bato lokumu te. Kasi ezali komonisa mokumba oyo mibali yango basengeli kokokisa mpo na kobatela bampate ya Nzambe. Yehova apesi likebisi makasi ete: “Tiká ekoka, ɛ bino mikonzi na Yisalaele! Longolá yauli mpe monyoko, mpe katá makambo na sembo mpe na boyengebene.” (Ezekiele 45:9) Lelo oyo, ebongi ete bankulutu nyonso básimba toli oyo malamu. (1 Petelo 5:2, 3) Na ngámbo na bango, bampate bayebi ete Yesu apesaki bakɛngɛli wana lokola “makabo na motindo na mibali.” (Baefese 4:8, NW) Masɛngami oyo basengeli kokokisa ekomami na Liloba epemami na Nzambe. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9) Na bongo baklisto balandaka litambwisi ya bankulutu.—Baebele 13:7.
18. Yebisá mwa mikumba ya etuluku ya baoyo bakozala kelasi ya mokonzi lelo oyo, mpe etuluku yango ekozala na mokumba nini na mikolo ezali koya?
18 Na ntango ya kala, bakonzi mosusu bazalaki na bokonzi monene, basusu bazalaki na bokonzi mingi te. Lelo oyo, bankulutu oyo bazali basangani ya ebele monene bazali na mikumba ndenge na ndenge. Bamoko bazali kosala na lisangá moko; basusu bazali kosalela masangá mingi lokola bakɛngɛli-batamboli; basusu bazali kosala mpo na mboka mobimba lokola basangani ya bakomite ya filiale; basusu bazali kosunga bakomite ndenge na ndenge ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na mokili ya sika, Yesu akotya “bana na mokonzi na mokili mobimba” mpo na kokamba basambeli ya Yehova awa na mabelé. (Nzembo 45:16) Na ntembe te, Yesu akopona bango na kati ya bankulutu ya sembo ya mikolo na biso. Lokola bato yango bazali komonisa makoki na bango sikoyo, akopesa basusu mikumba minene mpenza na mikolo ezali koya ntango akomonisa mosala ya mokonzi na mokili ya sika.
Mokili ya basaleli ya Nzambe lelo oyo
19. Mokili na emonaneli ya Ezekiele ezali elilingi ya nini?
19 Emonaneli ya Ezekiele emonisi mpe mokili ya Yisalaele oyo ezongisami. Likambo oyo ya emonaneli ezali komonisa nini? Bisakweli mosusu ya kozongisama esakolaki ete Yisalaele ekozala paladiso lokola Edene. (Ezekiele 36:34, 35) Lelo oyo, tozali na kati ya mokili oyo ezongisami, mpe na ndimbola mosusu, ezali lokola Edene. Ndenge moko mpe, tolobelaka mingi paladiso na biso ya elimo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki “mokili” yango lokola “teritware ya mosala” ya libota eponami ya Nzambe.b Na esika nyonso oyo mosaleli ya Nzambe azali, azali na kati ya mokili yango oyo ezongisami, ntango nyonso azali kosala makasi ya kosimba losambo ya solo wana azali kolanda matambe ya Klisto Yesu.—1 Petelo 2:21.
20. Tokoki kozwa liteya nini na “ndambo na bulɛɛ” ya emonaneli ya Ezekiele, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango?
20 Tokoloba boni mpo na eteni ya mabelé oyo ebéngami “ndambo na bulɛɛ”? Yango ezalaki likabo oyo bato bapesaki mpo na kosunga banganga mpe kosunga mboka. Ndenge moko mpe, “bato na mokili mobimba” basengelaki kopesa eteni ya mabelé mpo na mokonzi. Yango elingi koloba nini lelo oyo? Yango elingi koloba te ete basaleli ya Nzambe basengeli kozwa mokumba ya kofuta bakonzi ya lingomba. (2 Batesaloniki 3:8) Kasi, bazali kosunga bankulutu libosoliboso na makambo ya elimo. Lisungi yango ezali na makambo lokola kopesa mabɔkɔ na mosala oyo ezali kosalema sikoyo mpe kosala na bango elongo mpe kozala na botosi. Nzokande, lokola na eleko ya Ezekiele, likabo yango epesami “na Yehova,” kasi epai na moto te.—Ezekiele 45:1, 7, 16.
21. Liteya nini tokoki kozwa na kokabolama ya mokili na emonaneli ya Ezekiele?
21 Ezali kaka mokonzi na banganga te nde bazali na esika na mokili oyo ezongisami. Ndenge mokili ekabolami emonisi ete libota mokomoko na kati ya mabota 12 ezwi libula na yango mpenza. (Ezekiele 47:13, 22, 23) Na bongo, basangani ya ebele monene bazali na esika na kati ya paladiso ya elimo mpe bakozwa eteni ya mabelé ntango bakozwa esika na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya Nzambe.
22. (a) Na emonaneli ya Ezekiele, mboka ezali elilingi ya nini? (b) Likambo oyo ete engumba ezalaki na bikɔtelo na bipai nyonso ekoki koteya biso likambo nini?
22 Mpo na kosukisa, mboka oyo elobelami na emonaneli ezali elilingi ya nini? Ezali mboka ya likoló te, mpamba te mboka yango ezali kati na mokili ya “bulɛɛ te.” (Ezekiele 48:15-17) Na bongo, esengeli kozala awa na mabelé. Mboka ezali nini? Ntango toyokaka mboka, tozalaka na likanisi ya etuluku ya bato bafandi esika moko mpe bazali na ebongiseli malamu. Na yango, tomoni ete mboka yango ezali elilingi ya boyangeli oyo ekozala awa na mabelé mpo na matomba ya bato nyonso oyo bakozala libota ya sembo awa na mabelé. Boyangeli yango ekosala mosala na yango mobimba mpenza na “mabelé ya sika.” (2 Petelo 3:13) Lokola bikɔtelo ya mboka ezali bipai nyonso mpe etuluka mokomoko ezali na ekuke na yango, yango emonisi ete moto nyonso oyo alingi akoki kokɔta. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bayangelami na ebongiseli moko ya nkuku te. Bandeko oyo bazali kokamba mosala basengeli kozala bato oyo bandeko mosusu bakoki kokende epai na bango kozanga kobanga. Mitinda oyo bazali kolanda miyebani malamu na bato nyonso. Lokola bato oyo bauti na bituluka nyonso bazali kosala bilanga na mabelé mpo na kosunga mboka, ezali kopesa biso makanisi ete bampate mosusu bazali kosunga, ezala na mosuni, bibongiseli ya mosala oyo bizali kokamatama mpo na basaleli ya Nzambe na mokili mobimba.—Ezekiele 48:19, 30-34.
23. Tokolobela nini na lisolo elandi?
23 Kasi, ebale oyo ezali kobima na tempelo ezali elilingi ya nini? Ndimbola na yango mpo na lelo mpe na mikolo ezali koya ekolobelama na lisolo ya misato mpe ya nsuka na molɔngɔ ya masolo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, lokasa 64, paragrafe 22, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1995, lokasa 20.
Bozongeli
◻ Na emonaneli ya Ezekiele, tempelo ezali elilingi ya nini?
◻ Banganga oyo bazali kosala na tempelo bazali elilingi ya banani?
◻ Mokonzi ezali banani, mpe tángá mwa mikumba na bango.
◻ Na emonaneli ya Ezekiele, mokili elimboli nini, mpe na ndimbola nini ekabolami na bituluka 12?
◻ Mboka ezali elilingi ya nini?
[Etanda/Map on page 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Ndenge oyo mokili ekabolamaki na emonaneli ya Ezekiele
MABOTA ZOMI NA MIBALE
Mai Monene
Mai ya Galilai
Ebale Yaladene
Mai ya mungwa
DANI
ASELE
NAFATALI
MANASE
EFELAIMA
LUBENE
YUDA
MOKONZI
BENYAMINA
SIMEONA
YISAKALA
ZEBULUNA
GADA
[Etanda]
NDAMBO YA BULƐƐ EMONISAMI NA MONENE
A. “Yehova Ye moko azali kuna” (Yehova Shammah); B. mabelé ya bilanga
Eteni ya Balevi
Sanctuary of Jehovah
Eteni ya banganga
B A B