Tozali na ntina ya konganga na esengo
“Bakozwa esengo mpe kosepela, mawa mpe kokimela ikokima mbangu.”—YISAYA 35:10
1. Banani lelo oyo bazali na bantina monene ya kozala na esengo?
OSILI mbala mosusu komona ete bobele bato moke kati na mokili nde bazali na esengo ya solo lelo oyo. Nzokande, lokola bazali baklisto ya solo, Batatoli ya Yehova bazali na esengo. Mpe elikya ya kozwa esengo wana ezali mpenza liboso ya bamilió mosusu, bilenge mpe mikóló, oyo bazwi naino batisimo te, baoyo bazali kosangana elongo na Batatoli ya Yehova. Lokola ozali sikawa kotánga maloba oyo kati na zulunalo oyo, yango emonisi ete osili kozwa esengo wana to okoki mpenza kozwa yango.
2. Lolenge nini esengo ya moklisto ekeseni na ezalela oyo ebele ya bato bazali kati na yango?
2 Ntálo monene ya bato basosoli ete bomoi na bango ezangi eloko moko. Ezali boni mpo na yo? Ya solo, okoki kozanga biloko mosusu ya mosuni oyo okokaki kosalela. Mbala mosusu olingaka ete ozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe na makasi mingi. Nzokande, kozanga kokakatana, ekoki kolobama ete ozali na esengo mingi koleka basusu. Lolenge nini?
3. Maloba nini ya ntina mingi mabongi kosimba likebi na biso, mpe mpo na nini?
3 Omikundola maloba ya Yesu ete: “Nasololi makambo oyo na bino ete esengo na ngai ezala kati na bino mpe ete esengo na bino etondisama.” (Yoane 15:11) “Esengo na bino etondisama.” Oyo nde maloba kitoko! Boyekoli mozindo ya lolenge ya bomoi ya boklisto ekomonisa bantina mingi oyo tozali na yango mpo ete esengo na biso etonda mpenza. Kasi, sikawa kangá mwa maloba ya ntina oyo mazali na Yisaya 35:10. Maloba wana mazali mpenza na ndimbola monene mpamba te mataleli biso kati na makambo mingi lelo oyo. Tozali kotánga ete: “Babikisami na [Yehova] bakobutwa; bakoya epai na Siona na [konganga na esengo, NW], na esengo na seko likoló na mitó na bango; bakozwa esengo mpe kosepela, mawa mpe kokimela ikokima mbangu.”
4. Esengo ya lolenge nini elobelami na Yisaya 35:10, mpe mpo na nini tosengeli kotyela yango likebi?
4 “Esengo na seko.” Liloba “ya seko” ezali libongoli ya sikisiki ya liloba oyo Yisaya akomaki na Liebele. Kasi, lokola mikapo misusu ya Makomami mindimisi yango, liloba ya ntina kati na molɔngɔ́ oyo ezali “ya seko.” (Nzembo 45:6; 90:2; Yisaya 40:28) Na yango, kosepela ekosuka te, kati na ezalela ya makambo oyo ekopesa yango nzela—ee, oyo ekolóngisa yango—kosepela ya seko. Yango emonani mpenza ete ezali likambo ya kosepelisa, boye te? Mbala mosusu mokapo yango emonani epai na yo lokola maloba mpamba, kopusáká yo na kokanisa ete: ‘Yango etali mpenza ngai te, ekozala mpenza na bopusi te likoló na mikakatano mpe mitungisi na ngai.’ Kasi makambo mazali komonisa ete yango etaleli mpenza yo. Elaka oyo ezali kati na esakweli na Yisaya 35:10 ezali na ndimbola mpo na yo lelo. Mpo na koyeba soki yango etaleli yo na lolenge nini, tótalela mokapo kitoko oyo ya Yisaya 35, kotyáká likebi na eteni moko moko, mpe kotaleláká makambo oyo mazali na boyokani na yango. Omindimisa ete okozala na esengo ya komona yango.
Libota oyo lisengelaki kozala na esengo
5. Esakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 35 ezwami kati na kokokisama ya esakweli nini?
5 Mpo tókanga ntina ya esakweli kitoko oyo, tiká tótala soki yango ezalaki na ntango nini mpe kati na ezalela ya makambo nini. Mosakoli Moebele Yisaya akomaki yango pene na mobu 732 L.T.B. Ezalaki ntango molai liboso ete mampinga ya Babilone mabebisa Yelusaleme. Lokola Yisaya 34:1, 2 emonisi yango, Nzambe asakolaki ete alingaki kokweisa nkanda na ye likoló na mabota, lokola Edome, oyo elobelami na Yisaya 34:6. Na ntembe te, asalelaki bafandi ya Babilone ya kala mpo na kokokisa likambo yango. Bobele bongo, Nzambe asalelaki lisusu bafandi ya Babilone ete bábebisa Yuda mpamba te Bayuda bazangaki bosembo. Makambo nini mabimaki? Libota ya Nzambe ememamaki na boombo, mpe mokili na bango etikalaki mpamba na boumeli ya mibu 70.—2 Ntango 36:15-21.
6. Bokeseni nini ezali kati na makambo oyo masengelaki kokwela bafandi ya Edome mpe oyo masengelaki koyela Bayuda?
6 Nzokande, ezalaki na bokeseni monene kati na bafandi ya Edome mpe Bayuda. Etumbu oyo Nzambe apesaki na bafandi ya Edome ezalaki ya libela na libela; na nsima, libota yango elimwaki libela. Ee, kino lelo oyo okoki komona bisika mpamba na etúká epai libota ya Edome lizalaki, lokola bitikali ya Petra oyo eyebani na mokili mobimba. Kasi lelo oyo, ezali na libota moko te to ekólo moko te oyo ekoki kobéngama ‘Edome.’ Nzokande, kobebisama ya Yuda na bafandi ya Babilone ezalaki nde ya libela, kotikáká yango ete ezala ntango nyonso mboka ya mawa?
7. Lolenge nini Bayuda oyo bazalaki baombo na Babilone bayanolaki na Yisaya mokapo 35?
7 Awa, esakweli kitoko ya Yisaya mokapo 35 ezali na ndimbola mpenza ya kosepelisa. Tokoki kobénga yango esakweli ya kozongisama, mpamba te kokokisama na yango ya liboso esalemaki ntango Bayuda bazongaki na mokili na bango na mobu 537 L.T.B. Bayisalaele oyo bazalaki na boombo na Babilone bazwaki bonsomi ya kozonga na mboka na bango. (Ezɛla 1:1-11) Nzokande, liboso ete yango ekokisama, Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone, baoyo bazalaki kotalela esakweli wana ya Nzambe mbala mosusu bamitunaki soki ezalela ya makambo nini balingaki kokutana na yango na bozongi na bango na mboka na bango, Yuda. Mpe bango moko bakozala mpenza kati na ezalela nini? Biyano na yango bitaleli mpenza bantina oyo tozali na yango mpo na konganga na esengo. Tiká tótalela yango.
8. Makambo nini Bayuda balingaki kokutana na yango na bozongi na bango longwa na Babilone? (Kokanisá na Ezekiele 19:3-6; Hoseya 13:8.)
8 Na ntembe te, Bayuda bamonaki lokola ete ezalela ya makambo na bango epesaki bango nzela te ya kotya elikya ata ntango bayokaki ete bakokaki kozonga na mokili na bango. Mboka na bango etikalaki mpamba na boumeli ya bambula ntuku nsambo, bolai ya bomoi ya moto. Nini ekómelaki mboka yango? Bilanga nyonso oyo balónaká, bilanga ya miwiti, to bilanga ya nzeté ya mbuma bikómaki zámba na zámba. Bitando ya kolóna to mabelé oyo ezalaki na mwa mai ebongwanaki mabelé makauki to bisobe. (Yisaya 24:1, 4; 33:9; Ezekiele 6:14) Kanisá, lisusu lolenge banyama mabe ya zámba bayikanaki mpenza. Kati na yango banyama oyo elyaka misuni, na ndakisa nkosi mpe nkoi. (1 Mikonzi 13:24-28; 2 Mikonzi 17:25, 26; Loyembo 4:8) Basengelaki mpe kobosana ngombolo te, oyo ekokaki koboma mobali, mwasi to mwana. (1 Samwele 17:34-37; 2 Mikonzi 2:24; Masese 17:12) Ntina ezali te ya kolobela bitupa mpe banyoka mosusu ya ngɛngɛ, to bankotó. (Genese 49:17; Deteronome 32:33; Yobo 20:16; Nzembo 58:4; 140:3; Luka 10:19) Soki ozalaki elongo na Bayuda oyo bazalaki kolóngwa na Babilone na 537 L.T.B., mbɛlɛ okokakatana mpenza mpo na kotambola na esika wana. Yango ezalaki paladiso te ntango bakómaki.
9. Mpo na ntina nini bato oyo bazongaki bazalaki na moboko ya kozala na elikya mpe ya kotyela motema?
9 Nzokande, ezalaki Yehova nde azalaki kokamba basambeli na ye kino mboka na bango, mpe azali na likoki ya kobongola ezalela oyo ebebaki ete ebonga. Ondimi te ete Mozalisi akoki kosala yango? (Yobo 42:2; Yilimia 32:17, 21, 27, 37, 41) Na yango, esengelaki ete asala nini—asalaki nini—mpo na Bayuda oyo bazongaki mpe asalaki nini mpo na mokili na bango? Yango ezali na ntina nini mpo na libota ya Nzambe na mikolo na biso mpe yango ekozala na bopusi nini likoló na ezalela na yo—ya lelo mpe ya mikolo mizali koya? Liboso mpenza, tiká tótala oyo esalemaki na ntango wana ya kala.
Basepelaki mpo na mbongwana ya makambo
10. Mbongwana nini Yisaya 35:1, 2 esakolaki?
10 Nini esengelaki kobima ntango Siruse apesaki nzela ete Bayuda bázonga na mokili wana ya mpasi? Tángá esakweli yango ya kosimba motema kati na Yisaya 35:1, 2: “Lisobe mpe esika ekauki ikosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele na habaselete. Ekobimisa felele mingi mpenza, ekosepela na esengo mpe na nzembo; nkembo na Lebanona ekopesamela yango, lokumu na Kalemele mpe Salono. Bakomona nkembo na [Yehova], bokonzi na Nzambe na biso.”
11. Bitúká nini ya mabelé Yisaya akamataki lokola ndakisa?
11 Na ntango ya Biblia, Lebanona, Kalemele mpe Salono eyebanaki mpo na bazámba kitoko na yango. (1 Ntango 5:16; 27:29; 2 Ntango 26:10; Loyembo 2:1; 4:15; Hoseya 14:5-7) Yisaya asalelaki bandakisa wana mpo na kolobela lolenge oyo mokili mobongwani molingaki kozala, na lisalisi ya Nzambe. Kasi yango etalelaki bobele mbongwana ya mabelé? Soko moke te!
12. Mpo na nini tokoki koloba ete esakweli oyo ezwami na Yisaya mokapo 35 etaleli mpenzampenza bato?
12 Yisaya 35:2 ezali kolobela mokili yango ete ‘mokosepela mpe mokonganga na esengo.’ Toyebi ete mabelé mpe banzeté “isepelaki na esengo” te na lolenge ya solo. Nzokande, mabelé malamu mpe banzeté oyo izali kobota mbuma ikokaki kosala ete bato básepela na esengo. (Levitike 23:37-40; Deteronome 16:15; Nzembo 126:5, 6; Yisaya 16:10; Yilimia 25:30; 48:33) Mbongwana ya solosolo kati na mabelé yango elingaki komema mpe mbongwana epai na bato, mpamba te bato nde batalelami mpenzampenza kati na esakweli oyo. Na yango, tozali na ntina ya kososola malamu maloba ya Yisaya ete yango etali libosoliboso mbongwana kati na Bayuda oyo bazongaki, mingimingi ezaleli na bango ya esengo.
13, 14. Yisaya 35:3, 4 esakolaki mbongwana nini kati na bato?
13 Bongo, tiká tótalela na mozindo esakweli oyo ya kobɔndisa mpo tómona lolenge nini yango ekokisamaki nsima na kosikolama mpe kozonga na Bayuda longwa na Babilone. Na molɔngɔ́ 3 mpe na molɔngɔ́ 4, Yisaya alobeli mbongwana mosusu epai na bato oyo bazongaki: “Bókembisa mabɔkɔ malɛmbi; bópesa nguya na mabɔ́ngɔ́ mazali na makasi te; bóloba na bango bazali kobanga kati na mitema ete, Yiká mpiko! Bangá te! Talá Nzambe na bino akoya na kobukanisa; na lifuti na Nzambe mpenza akoya mpe akobikisa bino.”
14 Ezali likambo ya kolendisa mpo na biso na kokanisa ete Nzambe na biso, oyo azali na likoki ya kobongola ezalela ya mabelé, azali mpenza kotyela basambeli na ye likebi mingi, boye te? Alingaki te ete Bayuda oyo bakómaki baombo bámiyoka ete bazangi nguya, balɛmbi, to bázala na bobángi mpo na mikolo mizalaki koya. (Baebele 12:12) Kanisá ezalela ya Bayuda wana oyo bazalaki na boombo. Longolá elikya oyo bakoki kozwa na bisakweli ya Nzambe na ntina na mikolo mizalaki koya, elingaki kozala mpasi mpo na bango ete bázala na elikya. Emonanaki lokola nde bazalaki kati na bolɔ́kɔ moko ya molili, kozanga bonsomi mpo na kotambola mpe mpo na kosalela Yehova mosala. Mbala mosusu emonanaki epai na bango lokola ete pole ezalaki te liboso na bango.—Kokanisá na Deteronome 28:29; Yisaya 59:10.
15, 16. (a) Tokoki koloba ete Yehova asalaki nini mpo na bato oyo bazongaki? (b) Mpo na nini bato oyo bazongaki basengelaki te komizela na kobikisama ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na nzela ya makamwisi, kasi Nzambe asalaki nini na boyokani na Yisaya 35:5, 6?
15 Nzokande, mbongwana esalamaki mpenza ntango Yehova asalelaki Siruse mpo na kobimisa bango ete bázonga na mboka na bango! Ezali na elembeteli te kati na Biblia oyo emonisi ete kuna, na lolenge ya ekamwiseli, Nzambe afungolaki miso na Bayuda nyonso oyo bazalaki bakufeli miso, to afungolaki matoi ya bakufeli matoi nyonso, to abikisaki makolo na batɛngumi nyonso to baoyo nyonso bakatamaki makolo. Nzokande, asalaki solo likambo moko ya monene koleka. Azongisaki bango na kongɛnga mpe na bonsomi na mboka na bango oyo balingaki mingi!
16 Ezali na elembo moko te oyo emonisi ete baoyo bazongaki bamizelaki ete Yehova asala makamwisi ya kobikisama na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Basilaki mbala mosusu kokanga ntina ete Nzambe asalaki bongo te epai na Yisaka, Samson to Eli. (Genese 27:1; Basambisi 16:21, 26-30; 1 Samwele 3:2-8; 4:15) Kasi soki bamizelaki ete Nzambe akobongola ezalela na bango na ndimbola ya elilingi, bazalaki na mawa te. Ya solo, ezali na motindo ya elilingi nde molɔngɔ́ 5 mpe molɔngɔ́ 6 ekokanaki. Yisaya asakolaki na bosolo nyonso ete: “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemu na ebubu ekoyemba na esengo.”
Bakómisaki mboka na bango lokola paladiso
17. Mbongwana nini ya mosuni Yehova akɔtisaki mpenza?
17 Bazongi wana bazalaki solo na ntina ya konganga na esengo na ntina na makambo lokola oyo Yisaya akóbi kolobela ete: “Zambi mai makopunzwa kati na lisobe, bitima kati na mokili mokauki. Zɛlɔ oyo ekauki ekobongwana liziba mpe mabelé na mposa ekozala bitima na mai; na efandelo na ngombolo, esika elalaki bango, ekozala na matiti mpe mingendu.” (Yisaya 35:6b, 7) Atako mbala mosusu tokoki te kotala etúká wana mobimba lelo oyo, elembeteli ezali komonisa ete etúká oyo ezalaki kala Yuda ezalaki “paladiso mpo na kobɔkɔla bibwele.”a
18. Lolenge nini Bayuda oyo bazongaki bayanolaki na mapamboli ya Nzambe?
18 Mpo na oyo etali bantina ya esengo, kanisá lolenge batikali ya Bayuda bayokaki ntango bazongisamaki na Mokili na Ndaka! Bazalaki na likoki ya kokamata mabelé oyo matikamaki mpamba, oyo mafandamaki na ngombolo mpe na nyama mosusu ya motindo yango, mpe ya kobongisa yango. Olingaki mpenza kozala na esengo mpo na kosala mosala yango ya bobongisi, mingi mpenza soki oyebaki ete Nzambe azalaki kopambola milende na yo, boye te?
19. Na ndimbola nini bozongi longwa na Babilone ezalaki mpo na bato nyonso te?
19 Nzokande, ezalaki likambo ya moombo Moyuda moko moko te na kokata ye moko ete akozonga na Mokili ya Ndaka mpo na kosangana na mosala wana ya kobongisa. Nzambe atyaki masɛngami. Moto nyonso oyo amibebisaki na mimeseno ya Babilone, na misala ya losambo ya bapakano, azalaki na lotómo ya kozonga te. (Danyele 5:1, 4, 22, 23; Yisaya 52:11) Ezalaki mpe bongo mpo na bato oyo bamipesaki na bozoba nyonso kati na etamboli moko ya mabe. Bato nyonso ya motindo wana babongaki te mpo na kozonga. Epai mosusu, baoyo bakokisaki masɛngami ya Nzambe, oyo batalelamaki lokola basantu, bakokaki kozonga na Yuda. Bakokaki kosala mobémbo lokola nde na Nzela ya bulɛɛ. Yisaya amonisaki yango polele na molɔngɔ́ 8: “Balabála ekozala wana, nzela mpenza; ekobyangama ete, Nzela na bulɛɛ; baoyo na mbindo bakoleka wana te; kasi ekozala mpo na bango [basikolami, NW]; batamboli, ɛɛ ata bazoba mpenza bakobunga wana te.”
20. Eloko nini Bayuda basengelaki kobanga te wana ezalaki bango kozonga, yango ebimisaki litomba nini?
20 Bayuda oyo bazalaki kozonga basengelaki kobanga te kobundisama ya bato oyo bakokani na banyama na yauli to na bituluku ya babɔtɔli. Mpo na nini? Mpamba te Yehova akokaki kolinga te ete yango esalema na Nzela wana kati na yango libota na ye lisikolami lizalaki kotambola. Na yango, bakokaki kosala mobémbo na motema esengo, mpe na elikya nyonso. Tótala lolenge Yisaya asukisi esakweli na ye: “Nkosi akozala wana te, ata nyama na yauli moko akobuta na yango te; bakomonana wana te, kasi basikolami bakotambola wana. Mpe babikisami na [Yehova] bakobutwa; bakoya epai na Siona na [konganga na esengo, NW], na esengo na seko likoló na mitó na bango; bakozwa esengo mpe kosepela, mawa mpe kokimela ikokima mbangu.”—Yisaya 35:9, 10.
21. Lolenge nini tosengeli lelo oyo kotalela kokokisama lisusu ya Yisaya mokapo 35?
21 Oyo nde esakweli ya kosimba motema tomoni awa! Nzokande, tosengeli te kotalela yango lokola ezali bobele makambo masilá koleka, lokola lisoló mpamba oyo ezali te kotalela ezalela na biso ya lelo to bomoi na biso ya mikolo mizali koya. Likambo ya ntina ezali ete esakweli yango ezali kokokisama na lolenge ya kokamwa kati na libota ya Nzambe lelo oyo; na bongo, yango ezali kotalela moko moko kati na biso. Ezali kopesa biso bantina ya konganga na esengo. Biteni wana oyo bitali bomoi na yo sikawa mpe na mikolo mizali koya, bitalelami na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nsima ya boyekoli oyo asalaki na ntina na etúká wana, agronome Walter C. Lowdermilk (momonisi ya FAO [ebongiseli ya O.N.U. mpo na bilei mpe mosala ya bilanga]) akómaki na bosukisi oyo: “Kala etúká oyo ezalaki paladiso ya kobɔkɔla bibwele.” Amonisaki lisusu ete klima ebongwani kuna mingi te “kobanda ntango ya Baloma,” mpe “bato nde basalaki ete etúká oyo ezalaki mabelé na kobota mbuma mingi ekóma ‘mabelé makauki,’ kasi ekómaki bongo yango moko te.”
Ozali komikundola?
◻ Ntango nini Yisaya mokapo 35 ekokisamaki mpo na mbala ya liboso?
◻ Kokokisama ya esakweli yango ya ebandeli ezalaki na bopusi nini?
◻ Lolenge nini Yehova akokisaki Yisaya 35:5, 6?
◻ Mbongwana nini kati na mabelé mpe kati na ezalela na bango Bayuda oyo bazongaki bamonaki yango?
[Elilingi na lokasa 9]
Bitikali ya Petra, oyo kala ezalaki teritware ya Edome
[Bililingi na lokasa 10]
Ntango Bayuda bazalaki na boombo, eteni monene ya Yuda ekómaki lokola zámba, oyo etondaki na banyama mabe lokola ngombolo mpe nkosi
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Garo Nalbandian
Ngombolo mpe nkosi: Safari-Zoo of Ramat-Gan, Tel Aviv