Mokapo ya ntuku mibale na mwambe
Paladiso ezongisami!
1. Mpo na nini mangomba mingi epesaka bato elikya ya kozala na bomoi na paladiso?
BUKU moko (The Encyclopedia of Religion) ekomi boye: “Mposa ya kofanda na paladiso ezali moko ya bamposa oyo eleki makasi oyo bato bazali na yango. Ekoki kozala mpenza mposa oyo eleki makasi mpe oyo ezali ntango nyonso na makanisi ya bato koleka bamposa mosusu nyonso. Mposa ya paladiso emonanaka polele na makambo nyonso ya losambo.” Mposa ya ndenge wana ezali mabe te, mpamba te Biblia eyebisi biso ete bomoi ya bato ebandaki na Paladiso—elanga moko kitoko epai maladi mpe liwa ezalaki te. (Genese 2:8-15) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge mangomba mingi na mokili epesaka bato elikya ya kozala na bomoi na mikolo ezali koya na kati ya paladiso ezala ya lolenge nini to nini.
2. Epai wapi tokoki kozwa elikya ya solosolo ya Paladiso ya mikolo ezali koya?
2 Na bisika mingi na Biblia, tokoki kotánga makambo oyo ezali kolobela elikya ya solosolo ya kozala na bomoi na Paladiso na mikolo ezali koya. (Yisaya 51:3) Na ndakisa, esakweli moko ya Yisaya oyo ezali na mokapo 35 elobi ete bisika oyo ekaoká ekokóma bisika kitoko oyo ekozala na banyama, banzete, mpe bilanga oyo ekobota malamu. Moto oyo akufá miso akomona, moto oyo alobaka te akoloba, mpe moto oyo akufá matoi akoyoka. Na Paladiso oyo elakami, mawa, kokimela, ata mpe liwa ekozala lisusu te. Oyo nde elaka kitoko! Ndenge nini tokoki kokanga ntina ya maloba yango? Maloba yango ezali na elikya moko mpo na biso lelo oyo? Kotalelama ya mokapo oyo ya Yisaya ekopesa biyano na mituna yango.
Mokili oyo etikalaki mpamba esepeli
3. Ndenge esakweli ya Yisaya elobi yango, mbongwana nini ekosalema na mokili yango?
3 Esakweli epemami ya Yisaya oyo ezali kolobela Paladiso oyo ezongisami ebandi na maloba oyo: “Lisobe mpe esika ekaoki ekosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa [fololo] na habeselete. Ekobimisa [fololo] mingi mpenza, ekosepela na esengo mpe na nzembo; nkembo ya Lebanona ekopesamela yango, lokumu ya Kalemele mpe Salono. Bakomona nkembo ya [Yehova, bonene, NW] ya Nzambe na biso.” —Yisaya 35:1, 2.
4. Ntango nini mpe ndenge nini mokili ya Bayuda ekómi lokola esobe?
4 Yisaya akomi maloba yango soki na mobu 732 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Nsima ya mbula soki 125, bato ya Babilone babebisi Yelusaleme mpe bamemi bato ya Yuda na boombo. Mokili na bango etikali mpamba, esundolami. (2 Mikonzi 25:8-11, 21-26) Yango wana, likebisi ya Yehova oyo alobaki ete soki bato ya Yisalaele bamonisi ezaleli ya kozanga bosembo bakokenda na boombo, ekokisami. (Deteronome 28:15, 36, 37; 1 Mikonzi 9:6-8) Ntango libota ya Baebele ekómi na boombo na mokili ya bapaya, bilanga na bango mpe bisika na bango ya kitoko ya milona etikali mpamba na boumeli ya mbula 70 mpe ekómi lokola esobe.—Yisaya 64:10; Yilimia 4:23-27; 9:10-12.
5. (a) Na lolenge nini bomoi lokola ya paladiso ezongi na mokili yango? (b) Na lolenge nini bato ‘bamoni nkembo ya Yehova’?
5 Kasi, esakweli ya Yisaya elobi ete mokili yango ekotikala mpamba mpo na libela te. Ekozonga paladiso moko ya solosolo mpenza. Bakopesa yango “nkembo ya Lebanona” mpe “lokumu ya Kalemele mpe Salono.”a Ndenge nini? Ntango bauti na boombo, Bayuda bakoki lisusu kolona mpe kosopela bilanga na bango mai, mpe mabele na bango ekokóma lisusu kitoko mpo na milona ndenge ezalaki liboso. Mpo na yango, lokumu nyonso ekokenda kaka epai ya Yehova. Ezali mpo ete alingi yango mpe mpo na lisalisi na ye nde Bayuda bazali na bomoi ya ndenge wana lokola na paladiso. Bato bakoki komona “nkembo ya Yehova, bonene ya Nzambe na [bango]” ntango bakososola ete mokili na bango ekómi ndenge wana na lisalisi ya Yehova.
6. Kokokisama nini ya monene ya maloba ya Yisaya emonani?
6 Kasi, na mokili ya Yisalaele oyo ezongisami, maloba ya Yisaya ekokisamaki na ndenge moko ya monene koleka. Na lolenge ya elimo, Yisalaele ekaokaki, ekómaki lokola esobe na boumeli ya bambula mingi. Ntango bato yango bazalaki na boombo na Babilone, losambo ya pɛto ezalaki mpenza te. Tempelo ezalaki te, etumbelo ezalaki te, ebongiseli ya bonganga ezalaki mpe te. Mbeka ya mokolo na mokolo ezalaki lisusu kopesama te. Sikawa, Yisaya asakoli mbongwana moko. Na litambwisi ya mibali lokola Zelubabele, Ezela, mpe Nehemia, bamonisi ya mabota 12 ya Yisalaele bazongi na Yelusaleme, batongi lisusu tempelo, mpe basambeli Yehova na bonsomi. (Ezela 2:1, 2) Ezali mpenza paladiso ya elimo!
Bapeli na elimo
7, 8. Mpo na nini Bayuda oyo bazali baombo basengeli kozala na makanisi mabongi, mpe ndenge nini maloba ya Yisaya elendisi bango?
7 Maloba ya Yisaya mokapo 35 ezali maloba ya esengo. Mosakoli yango asakoli ete libota yango oyo ebongoli motema ekozala na bomoi moko kitoko na mikolo ezali koya. Ya solo, alobi likambo yango na elikya mpenza mpe na kondima solosolo ete ekozala mpenza bongo. Nsima ya bikeke mibale, mwa moke liboso ya kozonga, Bayuda oyo bazalaki baombo basengelaki kozala na elikya ya ndenge wana mpe na makanisi mabongi. Na lisalisi ya Yisaya, Yehova alendisi bango na maloba ya esakweli ete: “Bókembisa mabɔkɔ malɛmbi; bópesa nguya na mabɔlɔngɔ mazali na makasi te; bóloba na bango bazali [kotungisama, NW] kati na mitema ete, [Zalá makasi, NW]! Bangá te! Talá Nzambe na bino akoya na kobukanisa; na lifuti ya Nzambe mpenza akoya mpe akobikisa bino.”—Yisaya 35:3, 4.
8 Nsuka ya boombo yango ya molai ezali mpenza ntango ebongi mpo na kozwa ekateli. Sirise, mokonzi ya Perse, oyo azalaki lokola esaleli ya Yehova mpo na kotɛmɛla Babilone, apesi etinda ete losambo ya Yehova ezongisama na Yelusaleme. (2 Ntango 36:22, 23) Bankóto ya mabota ya Baebele basengeli komibongisa mpo na kosala mobembo moko ya nsɔmɔ, longwa na Babilone tii na Yelusaleme. Ntango bakokóma kuna, basengeli kotonga bandako ya kofanda mpe komilɛngɛla mpo na mosala monene ya kotonga lisusu tempelo mpe engumba yango. Mpo na Bayuda mosusu oyo bazali na Babilone, makambo nyonso wana ekoki kolɛmbisa nzoto. Nzokande, oyo ezali ntango ya kolɛmba nzoto te to ya kobanga te. Bayuda basengeli kolendisana mpe kotyela Yehova motema. Apesi bango elikya ete bakobika.
9. Elaka nini kitoko epesami mpo na Bayuda oyo bakozonga?
9 Baoyo bakosikolama na boombo na Babilone basengeli kosepela, mpamba te bomoi kitoko ezali kozela bango na Yelusaleme na mikolo ezali koya. Yisaya asakoli ete: “Na eleko wana, miso ya bato bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato bakufá matoi ekofungwama. Na eleko wana ebɔsɔnɔ akomata likoló lokola mboloko, mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.”—Yisaya 35:5, 6a, NW.
10, 11. Mpo na Bayuda oyo bazongi, mpo na nini maloba ya Yisaya ezali na ndimbola ya elimo, mpe yango elingi koloba nini?
10 Na ntembe te Yehova azali kokanisa ezalela ya elimo ya basaleli na ye. Bazwaki etumbu ya kokóma baombo mbula ntuku nsambo mpo na lipɛngwi na bango. Kasi, ntango apesi bango etumbu, Yehova akómisi bango bato bakufá miso te, bakufá matoi te, bibɔsɔnɔ te, to bato balobaka te. Yango wana, mpo azongisa libota ya Yisalaele, azali na mposa te abikisa bango na maladi na bango ya nzoto. Yehova azali kozongisa nde oyo ebungaki, elingi koloba bokolɔngɔnɔ ya elimo.
11 Bayuda oyo babongoli motema babiki, elingi koloba bazongeli bokolɔngɔnɔ na bango ya elimo —komona na bango ya elimo mpe likoki na bango ya koyoka, ya kotosa mpe koloba liloba ya Yehova. Bayebi sikawa ntina ya kokangama na Yehova. Na etamboli na bango malamu, ‘bazali koyemba’ na esengo mpo na kokumisa Nzambe na bango. Moto oyo azalaki liboso “ebɔsɔnɔ” akómi na molende mpe makasi na losambo oyo azali kopesa Yehova. Na lolenge ya elilingi, “akomata likoló lokola mboloko.”
Yehova abikisi basaleli na ye
12. Na meko nini Yehova akopesa mokili yango mai?
12 Ezali mpasi mpo na kokanisa paladiso oyo ezangi mai. Na Paladiso ya ebandeli, na Edene, mai ezalaki mingi. (Genese 2:10-14) Mokili oyo bapesaki Yisalaele ezalaki mpe “mokili ya bitima ya mai mpe ya maziba mpe ya mitó ya mai oyo ezali kobima.” (Deteronome 8:7) Yango wana, na lolenge ebongi mpenza, Yisaya apesi elaka oyo: “Mai makopunzwa kati na lisobe, bitima kati na mokili mokaoki. Zɛlo oyo ekaoki ekobongwana liziba mpe mabele na mposa ekozala bitima ya mai; na efandelo ya [shakale, NW], esika elalaki bango, ekozala na matiti mpe mingendu.” (Yisaya 35:6b, 7) Ntango Bayisalaele bakobongisa lisusu mokili na bango, bisika oyo etikalaki mpamba epai shakale ezalaki kotambola, ekokóma zamba kitoko. Mabele oyo ekaoká mpe ya zɛlozɛlo ekokóma “esika ya pɔtɔpɔtɔ” epai mingendu mpe matiti mosusu ya mai ekobima.—Yobo 8:11, NW.
13. Mai nini ya elimo libota oyo ezongisami ekozala na yango mingi?
13 Kasi, oyo eleki ntina ezali mai ya solo ya elimo, oyo Bayuda oyo bazongi na mboka na bango bakozwa yango mingi. Yehova akopesa bango boyebi, akolendisa bango, mpe akobɔndisa bango na nzela ya Liloba na ye. Lisusu, mikóló mpe bankumu ya sembo bakozala lokola “bitima ya mai kati na esika ekaoki.” (Yisaya 32:1, 2) Bato oyo bazali kotombola losambo ya pɛto, na ndakisa, Ezela, Hagai, Nehemia, Yesua, Zekalia, Zelubabele, bakozala mpenza litatoli monene ya kokokisama ya esakweli ya Yisaya.—Ezela 5:1, 2; 7:6, 10; Nehemia 12:47.
“Nzela ya bosantu”
14. Lobelá mobembo ya kolongwa na Babilone tii na Yelusaleme.
14 Nzokande, liboso ete Bayuda oyo bazali baombo bákoka kozala na bomoi lokola na paladiso ndenge wana, na nzoto mpe na elimo, bakosala mobembo moko molai mpe ya nsɔmɔ kobanda na Babilone tii na Yelusaleme. Mpo na kokóma noki, basengeli kokatisa kilomɛtrɛ soki 800 na nzela moko ekaoká mpe ya makama. Nzokande nzela mosusu oyo ezali na makama mingi te ezali na kilomɛtrɛ soki 1600. Ata ndenge nini, mobembo yango esɛngi kotambola basanza mingi, mpe bazali na likama ya kokutana na banyama ya zamba mpe na bato oyo bazali na bizaleli lokola banyama. Kasi, baoyo bandimi esakweli ya Yisaya bazali komitungisa koleka ndelo te. Mpo na nini?
15, 16. (a) Ndenge nini Yehova akobatela Bayuda ya sembo na mobembo na bango ya kozonga na mokili na bango? (b) Na lolenge mosusu nini Yehova atambwisi Bayuda na nzela moko ya monene?
15 Na nzela ya Yisaya, Yehova alaki ete: “Balabala ekozala wana, nzela mpenza; ekobyangama ete, [Nzela ya Bosantu, NW]; baoyo na mbindo bakoleka wana te; kasi [ekozala mpo na oyo azali kotambola na nzela, mpe bazoba bakolekaleka na yango te, NW]. Nkosi akozala wana te, ata nyama ya [zamba, NW] akobuta na yango te; bakomonana wana te, kasi basikolami bakotambola wana.” (Yisaya 35:8, 9) Yehova alingi kosikola basaleli na ye! Bazali “basikolami” na ye, mpe alaki ete akobatela bango na mobembo ya kozonga na mokili na bango. Ezali na nzela moko oyo babongisi yango malamu, batomboli yango mpe bazingi yango na bifelo, kobanda na Babilone tii na Yelusaleme? Te, kasi libateli oyo Yehova alaki basaleli na ye na mobembo na bango ekozala ya malamu mpenza, yango wana ezali lokola nde bazali kotambola na nzela moko ya ndenge wana.—Kokanisá na Nzembo 91:1-16.
16 Bayuda babatelami mpe na makama ya elimo. Nzela yango ya elilingi ezali “Nzela ya Bosantu.” Bato oyo batyolaka biloko ya bosantu to oyo bazali mbindo na elimo babongi te mpo na kotambola na nzela yango. Bazali na mposa na bango te na mokili oyo ezongisami. Bato oyo bandimami bazali na makanisi malamu. Bazongi na Yuda mpe na Yelusaleme na makanisi ya lolendo ya bolingi-ekólo te to mpo na matomba na bango moko te. Bayuda oyo bazali komibanzabanza mpo na makambo ya elimo bayebi ete ntina ya liboso oyo bazongi ezali mpo na kozongisa losambo ya pɛto ya Yehova na mokili yango. —Ezela 1:1-3.
Basaleli ya Yehova basepeli
17. Ndenge nini esakweli ya Yisaya ebɔndisaki Bayuda na ntango ya boombo na bango molai?
17 Mokapo 35 ya esakweli ya Yisaya esuki na maloba kitoko: “Babikisami ya [Yehova bakozonga, NW]; bakoya epai na Siona na nzembo, na esengo ya seko likoló ya mitó na bango; bakozwa esengo mpe kosepela, mawa mpe kokimela ekokima mbango.” (Yisaya 35:10) Bayuda oyo bazalaki baombo oyo balukaki kobɔndisama mpe elikya na esakweli yango na ntango ya boombo na bango, bakokaki komituna mpo na koyeba ndenge ebele ya makambo yango ekokokisama. Ekoki kozala ete basosolaki te makambo mingi ya esakweli yango. Kasi, ezalaki mpenza polele ete “bakoya epai na Siona.”
18. Na lolenge nini mawa mpe kokimela oyo ezalaki na Babilone ekómi esengo mpe kosepela na mokili oyo ezongisami?
18 Yango wana, na mobu 537 L.T.B., mibali soki 50000 (kati na bango baombo 7000) elongo na basi na bana, basali mobembo ya sanza minei mpo na kozonga na Yelusaleme, mpe bazali na elikya epai na Yehova. (Ezela 2:64, 65) Kaka nsima ya mwa basanza, batongaki lisusu etumbelo ya Yehova, yango ezalaki ebandeli ya misala ya kotonga lisusu tempelo. Esakweli yango ya Yisaya ekokisamaki nsima ya mbula 200. Mawa mpe kokimela ya libota yango, ntango bazalaki na Babilone, ebongwani esengo mpe kosepela na mokili oyo ezongisami. Yehova akokisi elaka na ye. Paladiso—na mosuni mpe na elimo—ezongisami!
Ekólo moko ya sika ebotami
19. Mpo na nini ekoki kolobama ete esakweli ya Yisaya ekokisamaki kaka na ndambo na ekeke ya motoba L.T.B.?
19 Ya solo, na ekeke ya motoba L.T.B., esakweli ya Yisaya mokapo 35 ekokisamaki na ndambo. Bomoi lokola ya paladiso oyo Bayuda oyo bazongi bazalaki na yango eumelaki te. Nsima ya mwa ntango, mateya ya losambo ya lokuta mpe ezaleli ya bolingi-ekólo ebebisaki losambo ya pɛto. Na elimo, Bayuda bazongelaki lisusu mpasi mpe kokimela. Nsukansuka, Yehova atalelaki bango lisusu te lokola basaleli na ye. (Matai 21:43) Ndenge bakwei lisusu na ezalela ya kozanga botosi, esengo na bango ezali ya ntango molai te. Makambo wana nyonso emonisi ete esakweli yango ya Yisaya mokapo 35 ekokokisama mpenzampenza nsima.
20. Yisalaele nini ebotamaki na ekeke ya liboso T.B.?
20 Na ntango oyo Yehova abongisaki, Yisalaele mosusu, Yisalaele ya elimo ebotamaki. (Bagalatia 6:16) Yesu abongisaki kobotama ya Yisalaele yango ya sika na boumeli ya mosala na ye ya kosakola awa na mabele. Azongisaki losambo ya pɛto, mpe na mateya na ye, mai ya solo ebandaki lisusu kobima. Abikisaki bato ya maladi, na mosuni mpe na elimo. Koganga ya esengo eyokanaki mpamba te nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esakolamaki. Pɔsɔ nsambo nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, Yesu oyo akómi na lokumu, abandisaki lisangá ya boklisto, Yisalaele ya elimo oyo esangisi Bayuda mpe babikisami mosusu na lisalisi ya makila na ye oyo esopamaki, babotami lokola bana ya Nzambe na elimo mpe bandeko ya Yesu, mpe bapakolami na elimo santu. —Misala 2:1-4; Baloma 8:16, 17; 1 Petelo 1:18, 19.
21. Makambo nini esalemaki na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso oyo ekoki komonana ete ezali kokokisama ya makambo mosusu ya esakweli ya Yisaya?
21 Ntango azalaki kokomela bato ya Yisalaele ya elimo, ntoma Paulo atángaki maloba ya Yisaya 35:3 mpe alobaki ete: “Bótombola mabɔkɔ mazali kokita na nse mpe bókembisa mabɔlɔngɔ mazali kolɛmba.” (Baebele 12:12) Na bongo, emonani polele ete na ekeke ya liboso T.B., maloba ya Yisaya mokapo 35 ekokisamaki. Na lolenge ya mosuni, Yesu na bayekoli na ye babikisaki bato oyo bakufá miso mpe bato oyo bakufá matoi. Basalisaki “bibɔsɔnɔ” bátambola mpe bato oyo balobaka te bakómaki koloba. (Matai 9:32; 11:5; Luka 10:9) Oyo eleki ntina, bato ya motema malamu babimaki na lingomba ya lokuta mpe bakɔtaki na paladiso ya elimo na lisangá ya boklisto. (Yisaya 52:11; 2 Bakolinti 6:17) Ndenge moko na Bayuda oyo bautaki na Babilone, babikisami yango bamonaki ete kozala na makanisi mabongi mpe na mpiko, ezalaki likambo ya ntina mingi.—Baloma 12:11.
22. Ndenge nini baklisto ya motema malamu oyo bazalaki koluka solo na mikolo na biso bakɔtaki na boombo na Babilone?
22 Tokoki koloba nini mpo na mikolo na biso? Esakweli ya Yisaya ezali na kokokisama mosusu ya monene koleka mpo na lisangá ya baklisto lelo oyo? Ezali bongo. Nsima ya liwa ya bantoma, motángo ya baklisto bapakolami ya solosolo ekitaki makasi mpenza, mpe baklisto ya lokuta, “matiti mabe,” batondaki na mokili. (Matai 13:36-43; Misala 20:30; 2 Petelo 2:1-3) Ata na ekeke ya 19 ntango bato ya motema malamu babandaki kokima mangomba ya boklisto mpo na koluka losambo ya pɛto, lisosoli na bango ekangamaki naino na mateya oyo eyokani na Makomami te. Na 1914, Yesu atyamaki Mokonzi Masiya, kasi mwa moke na nsima, ezalela ya bato yango oyo bazalaki mpenza koluka solo ekómaki na likama. Na kokokisama ya esakweli yango, mabota ‘babundi na bango mpe balongi bango,’ mpe milende oyo baklisto yango ya motema malamu bazalaki kosala mpo na kosakola nsango malamu ekitaki. Mpo na yango, bakɔtaki na boombo na Babilone.—Emoniseli 11:7, 8.
23, 24. Na lolenge nini maloba ya Yisaya ezali kokokisama epai na basaleli ya Yehova kobanda 1919?
23 Kasi, na 1919, makambo ebongwanaki. Yehova abimisaki basaleli na ye na boombo. Babandaki kobwaka mateya ya lokuta oyo ezalaki liboso kobebisa losambo na bango. Na yango, babikisamaki. Bakɔtaki na kati ya paladiso ya elimo, oyo ata lelo oyo ezali kokoba kopanzana na mabele mobimba. Na elimo, bato oyo bakufá miso bazali koyekola komona mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyekola koyoka—sikawa bayebi ete elimo santu ya Nzambe esalaka, bayebi ete basengeli kokangama na Yehova ntango nyonso. (1 Batesaloniki 5:6; 2 Timote 4:5) Lokola bazali lisusu bababa te, baklisto ya solo bazali na mposa ya ‘koyemba na esengo,’ elingi koloba kosakola solo ya Biblia epai na bato mosusu. (Baloma 1:15) Baoyo balɛmbaki na elimo, to ‘bibɔsɔnɔ,’ bazali sikawa na molende mpe bazali kosepela. Na elobeli ya elilingi, bazali na likoki ya ‘komata likoló lokola mboloko.’
24 Baklisto oyo bazongisami bazali kotambola na “Nzela ya Bosantu.” “Nzela” yango, oyo euti na Babilone Monene tii na paladiso ya elimo, ezali polele mpo na basambeli nyonso oyo bazali pɛto. (1 Petelo 1:13-16) Bakoki kotya elikya na libateli ya Yehova mpe komindimisa ete Satana akolonga te na matumoli na ye ya bonyama oyo azali kosala mpo na koboma losambo ya solo. (1 Petelo 5:8) Bato oyo bazangi botosi mpe baoyo bazali komitambwisa lokola nyama ya zamba bapesameli nzela te mpo na kobebisa baoyo bazali kotambola na nzela ya bosantu ya Nzambe. (1 Bakolinti 5:11) Na esika yango oyo ebatelami, babikisami ya Yehova—bapakolami mpe “bampate mosusu”—bazali na esengo ya kosalela Nzambe kaka moko ya solo.—Yoane 10:16.
25. Yisaya mokapo 35 ekokokisama na lolenge ya mosuni? Limbolá.
25 Ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? Esakweli ya Yisaya ekokokisama na lolenge ya mosuni? Ɛɛ, ezali bongo. Makamwisi ya kobikisa bato oyo Yesu na bantoma na ye basalaki na ekeke ya liboso emonisaki ete Yehova azali na mposa mpe na likoki ya kosala makambo ya ndenge wana na lolenge moko monene na mikolo ezali koya. Nzembo oyo epemami elobeli bomoi ya seko kati na kimya awa na mabele. (Nzembo 37:9, 11, 29) Yesu alakaki bomoi na Paladiso. (Luka 23:43) Kino na mokanda na yango ya nsuka mpenza, Biblia epesi elikya ya paladiso. Na ntango wana, bato oyo bakufá miso, bato oyo bakufá matoi, bibɔsɔnɔ, mpe bato oyo balobaka te bakobika, mpe yango ekozala mpo na libela. Mawa mpe kokimela ekozala lisusu te. Ya solo mpenza, esengo ekozala libela na libela, mpo na seko.—Emoniseli 7:9, 16, 17; 21:3, 4.
26. Ndenge nini maloba ya Yisaya ezali kolendisa baklisto lelo oyo?
26 Atako baklisto ya solo bazali kozela kozongisama ya Paladiso awa na mabele, sikoyo mpe bazali kozwa mapamboli ya paladiso ya elimo. Bazali mawamawa te atako bazali koyikela minyoko mpe mitungisi mpiko. Lokola batyeli Yehova elikya makasi, balendisanaka, batalelaka toli oyo elobi ete: “Bókembisa mabɔkɔ malɛmbi; bópesa nguya na mabɔlɔngɔ mazali na makasi te; bóloba na bango bazali kobanga ete, Yiká mpiko! Bangá te!” Bazali na elikya mpenza na elaka ya esakweli oyo elobi ete: “Talá Nzambe na bino akoya na kobukanisa; na lifuti ya Nzambe mpenza akoya mpe akobikisa bino.” —Yisaya 35:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Makomami elobeli Lebanona ya kala lokola mokili moko ya bazamba kitoko mpe na banzete ya eleze ya minene, lokola na Elanga ya Edene. (Nzembo 29:5; 72:16; Ezekiele 28:11-13) Salono eyebanaki mpo na bitima na yango ya mai mpe mpo na bazamba na yango ya kitoko; Kalemele eyebanaki mingi mpo na bilanga na yango ya vinyo, ya banzete ya mbuma, mpe ya bafololo kitoko.
[Elilingi na lokasa mobimba 370]
[Bililingi na lokasa 375]
Bisika oyo ekauká ekokóma bisika ya mai epai matiti mpe mingendu ekobima
[Elilingi na lokasa 378]
Yesu abikisaki bato ya maladi, na elimo mpe na mosuni