Bikateli ya Yehova likoló na balakisi ya lokuta
“Epai na basakoli na Yelusaleme mpe namɔni likambo mabe mingi; bajali kosala ekobo mpe kotambola na bokosi . . . Bakomi yɔnsɔ liboso na ngai lokola Sɔdɔmɔ, mpe bafandi na yango lokola Gɔmɔla.”—YILIMIA 23:14.
1. Mpo na nini ye oyo azali koteya na nkombo ya Nzambe azali komema mokumba monene?
MOTO nyonso oyo azali koteya na nkombo ya Nzambe azali na mokumba monene. Yakobo 3:1 ekebisi ete: “Bojala milakisi mingi tɛ. Jambi boyebi ete biso tokosambisama na ekateli eleki makasi.” Ya solo, koleka baklisto nyonso mosusu, ezali likambo ya ntina ete balakisi ya Liloba na Nzambe bakokisa mokumba na bango malamu mpo ete bandimama. Yango ekolimbola nini mpo na baoyo bazali balakisi ya lokuta? Tika totalela makambo malekaki na eleko ya Yilimia. Tokomona ete yango esakolaki makambo oyo mazali koleka na mikolo na biso.
2, 3. Na nzela na Yilimia, bizaleli nini Yehova amonaki epai na balakisi ya lokuta ya Yelusaleme?
2 Na mobu 647 L.T.B., na mbula ya 13 ya boyangeli ya mokonzi Yosiya, Yilimia akómaki mosakoli ya Yehova. Yehova azalaki na likambo epai na Yuda mpe atindaki Yilimia ete akende kosakola yango. Basakoli ya lokuta, to balakisi ya lokuta ya Yelusaleme bazalaki kosala “makambo mabe mingi” na miso ya Nzambe. Mabe na bango makólaki mingi na boye ete Nzambe akokanisaki Yelusaleme mpe Yuda na Sodomo mpe Gomola. Yilimia mokapo 23 ezali koyebisa biso yango. Molɔngɔ́ 14 elobi ete:
3 “Epai na basakoli na Yelusaleme mpe namɔni likambo mabe mingi; bazali kosala ekobo mpe kotambola na bokosi, mpe bakembisi mabɔkɔ na basali na mabe kino mɔkɔ akopɛngwa na mabe na ye tɛ. Bakomi yɔnsɔ liboso na ngai lokola Sɔdɔmɔ, mpe bafandi na yango lokola Gɔmɔla.”
4. Lolenge nini bizaleli mabe ya balakisi ya Yelusaleme ekokani na oyo ya boklisto ya lokuta na mikolo na biso?
4 Ya solo, basakoli to balakisi wana, bango moko bazalaki kopesa ndakisa mabe mpo na oyo etali bizaleli, mpe na yango, bazalaki kolendisa bato nyonso ete basala lokola bango. Talá makambo oyo mazali koleka kati na boklisto ya lokuta na mikolo na biso! Bakokani mpenza na bato na eleko ya Yilimia, boye te? Na mikolo na biso, bakonzi ya mangomba bandimi ete bato na ekobo mpe baoyo bakosangisaka nzoto mibali na mibali bazala na molɔngɔ́ na bango, mpe bazali ata kopesa bango nzela ete bakambaka milulu ya losambo. Tokoki bongo kokamwa te ete basangani mingi ya mangomba bazali mpe na etamboli ya mbindo, boye te?
5. Mpo na nini tokoki koloba ete ezaleli mabe ya boklisto ya lokuta eleki oyo ya Sodomo mpe Gomola?
5 Yehova akokanisaki bafandi ya Yelusaleme na bato ya Sodomo mpe Gomola. Kasi etamboli ya mbindo ya boklisto ya lokuta eleki oyo ya Sodomo mpe Gomola. Ya solo, babongi mpe kozwa etumbu monene epai na Yehova. Basakoli na yango bazali kotyola mibeko ya Nzambe mitali bizaleli malamu. Mpe yango ebimisi mabe mingi kati na yango ezwami masenginya ya lolenge nyonso mpo na kosala makambo mabe. Ezalela oyo epalangani mingi na boye ete makambo mabe matalelami lokola makambo malamu na mikolo na biso.
“Kotambola kati na bokosi”
6. Yilimia alobaki nini na ntina na mabe ya basakoli ya Yelusaleme?
6 Sikawa, talá oyo molɔngɔ́ 14 elobi na ntina na basakoli ya Yelusaleme. Bazalaki “kotambola kati na bokosi.” Mpe eteni ya nsuka ya molɔngɔ́ 15 elobi ete: “[Lipengwi libimi, NW] longwa na basakoli na Yelusaleme, epalangani na mokili mobimba.” Bongo, molɔngɔ́ 16 mobakisi ete: “[Yehova] na bibele alobi ete, Boyoka maloba na basakoli tɛ, baoyo bajali kosakwela bino. Bajali kolakisa bino makambo na mpamba; balobi mpɔ na emɔnɔnɛli na mitema na bango mpenja, kasi uta na mɔnɔko na [Yehova] tɛ.’”
7, 8. Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bakokani na basakoli ya lokuta ya Yelusaleme, mpe yango ezali na bopusi nini likoló na bandimi na bango?
7 Lolenge moko na basakoli ya Yelusaleme, bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokuta bazali mpe kotambola kati na bokosi, na kopalanganisáká mateya ya lipengwi, mateya oyo mazwami te kati na Liloba ya Nzambe. Wapi mosusu kati na mateya yango? Molimo ekokufaka te, Bosato, epongelo mpe lifelo ya mɔ́tɔ epai bato bakonyokwama seko. Bazali lisusu konyomitisa matoyi ya bayoki na bango na koteyáká makambo oyo bato balingaka koyoka. Bazali koloba mbala na mbala ete likámá moko te ezali liboso na boklisto ya lokuta, mpamba te yango ezali na kimya ya Nzambe. Kasi oyo bakonzi ya mangomba bazali koloba, ezali bobele “emɔnɔnɛli na mitema na bango.” Yango ezali lokuta. Baoyo bazali kondimela bokosi wana bazali komibebisa na elimo. Bazali komitika kozimbisama mpo na libebi na bango mpenza!
8 Talá oyo Yehova alobi epai na basakoli wana ya lokuta, na molɔngɔ́ 21: “Natindaki basakoli yango tɛ, nde bapotaki mbangu; nalobaki na bango tɛ, nde basakolaki.” Na mikolo na biso mpe, bakonzi ya mangomba batindami na Nzambe te, bazali mpe koteya solo na ye te. Yango eboti mbuma nini? Kozanga boyebi ya Biblia na mawa mingi kati na bandimi, mpo ete bateyi na bango bazali koleisa bango na bafilozofi ya mokili.
9, 10. (a) Motindo na ndoto nini oyo balakisi ya lokuta ya Yelusaleme bazalaki kolota? (b) Lolenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta basili koteya mpe “bandɔtɔ ya lokuta”?
9 Lisusu, bakonzi ya mangomba bazali kobimisa bilikya ya lokuta na mikolo na biso. Talá oyo elobami na molɔngɔ́ 25: “Nasili koyoka oyo elobi basakoli baoyo bajali kosakola na nkombo na ngai ete, Nalɔti lilɔtɔ! Nalɔti lilɔtɔ!” Ezali ndoto ya motindo nini? Molɔngɔ́ 32 eyebisi biso ete: “[Yehova] alobi ete, Tala, najali kotɛmɛla bango baoyo bakosakolaka ndɔtɔ na bokosi mpe bakoyebisa yango mpe bakopɛngwisa bato na ngai na nkuta na bango mpe na njombo na bango na mpamba. Kasi ngai natindaki bango tɛ mpe nalakisaki bango tɛ. [Yehova] alobi mpe ete, bakojuisa bato oyo litomba tɛ.”
10 Ndoto, to bilikya nini ya bokosi bakonzi ya mangomba bazali koteya yango? Balobi ete O.N.U. nde ezali elikya bobele moko oyo bato bazali na yango mpo na kotyama ya kimya mpe kobatelama na eleko na biso. Na boumeli ya bambula oyo euti koleka, babéngaki O.N.U. ete “elikya bobele moko ya boyokani mpe ya kimya,” “esika eleki monene mpo na koloba na ntina na kimya mpe bosembo.” “Elikya ya nsuka mpo na kimya na mokili mobimba.” Oyo nde libunga! Elikya bobele moko mpo na bato ezali Bokonzi ya Nzambe. Kasi bakonzi ya mangomba bazali kosakola solo te, mpe bazali koteya solo te na ntina na boyangeli ya likoló, oyo ezalaki motó ya likambo na mosala ya kosakola ya Yesu.
11. (a) Bopusi mabe nini balakisi ya lokuta ya Yelusaleme bazalaki na yango likoló na nkombo ya Nzambe mpenza? (b) Na kokesana na kelasi ya Yilimia ya ntango na biso, balakisi ya lokuta ya mangomba basili kosala nini na ntina na nkombo ya Nzambe?
11 Molɔngɔ́ 27 moyebisi biso na bolai ete: “[Bakani ete babosanisa, NW] bato na ngai nkombo na ngai mpo na ndɔtɔ na bango oyo bakolobaka moto na moto koyebisa mojalani na ye lokola batata na bango batikaki nkombo na ngai mpɔ na Bala.” Basakoli ya lokuta ya Yelusaleme bamemaki bato na kobosana nkombo ya Nzambe. Na mikolo na biso, basakoli ya lokuta ya mangomba bazali mpe kosala motindo moko, boye te? Oyo ezali lisusu mabe koleka, bazali kobomba nkombo ya Nzambe, Yehova. Bazali koteya ete ezali na ntina te kosalela yango, mpe bazali kolongola yango na mabongoli na bango ya Biblia. Bazali kotemela makasi moto nyonso oyo azali koteya ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Nzokande, kelasi na Yilimia, batikali bapakolami ya elimo, bakisa mpe baninga na bango, bazali kosala mpenza lokola Yesu asalaki. Basili koteya nkombo ya Nzambe epai na bamilió ya bato.
Komonisa mabe na bango polele
12. (a) Mpo na nini nyongo ya makila likoló na balakisi ya lokuta ya mangomba ezali mpenza monene? (b) Mokumba nini bakonzi ya mangomba bazalaki na yango kati na bitumba mibale ya mokili mobimba?
12 Mbala na mbala, kelasi ya Yilimia esili kotɔndɔla bakonzi ya mangomba na kolobáká ete bazali balakisi ya lokuta oyo bazali kokamba bandimi na bango na nzela monene oyo ezali komema na libebi. Ya solo, batikali basili komonisa polele ntina oyo baloti ndoto wana bakweisami na Yehova. Na ndakisa, mbala mingi basaleli ya Yehova balobelaka Emoniseli 18:24, oyo elobi ete kati na Babilone Monene, bakutaki makila ya “bango yɔnsɔ babomamaki na mokili.” Kanisa naino na ntina na bitumba nyonso oyo bisili kobima mpo na matáta kati na mangomba. Oyo nde nyongo monene ya makila ezali likoló na balakisi ya mangomba ya lokuta! Mateya na bango mabimisi bokabwani mpe mangalisi koyinana kati na bato ya mangomba mpe bikólo bikeseni. Na ntina na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mokanda Preachers Present Arms (Bateyi batalisi bibundeli) elobi ete: “Bakonzi ya mangomba bakɔ́tisi bitumba kati na makambo ya elimo mpe bakómisi yango nguya oyo ezali kopusa bato. . . . Yango wana, Lingomba lisanganaki na molende nyonso kati na etumba.” Ezalaki mpe bongo na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bakonzi ya mangomba bapesaki mabɔ́kɔ na bikólo oyo bizalaki kobunda mpe bapambolaki mampinga na bango. Bitumba mibale ya mokili mobimba bibandaki kati na boklisto ya lokuta, oyo na boumeli na yango bandimi ya mangomba babomanaki. Bobele bongo lelo oyo, bituluku ya batomboki oyo bazali bato bamipesa na makambo ya Nzambe mpe bandimi mosusu kati na boklisto ya lokuta, bazali kolanda kosopa makila. Oyo nde mbuma mabe ya mateya na bango ya lokuta!
13. Lolenge nini Yilimia 23:22 ezali komonisa ete bakonzi ya mangomba bazali na boyokani moko te elongo na Yehova?
13 Totalela oyo ekomami na Yilimia, mokapo 23, molɔngɔ́ 22: “Kasi sɔkɔ batɛlɛmaki na eyanganelo na ngai, mbɛlɛ bayokisi bato na ngai maloba na ngai, mpe bapɛngwisi bango longwa na njela na bango mabe mpe longwa na mabe na misala na bango.” Soki basakoli ya mangomba ya boklisto ya lokuta bazalaki kati na eyanganelo ya Yehova, na boyokani makasi elongo na ye lokola moombo na sembo mpe na mayele, mbɛlɛ bakokaki kotosa malako ya Nzambe. Mbɛlɛ bango mpe balingaki koyebisa maloba mpenza ya Nzambe epai na basangani ya boklisto ya lokuta. Na esika ya kosala bongo, balakisi ya lokuta ya mikolo na biso bakómisi bandimi na bango basaleli bakufi miso ya Satana Zábolo, Monguna ya Nzambe.
14. Lolenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bamonisamaki polele na 1958 ete bazali bakosi?
14 Kelasi ya Yilimia ezali kotɔndɔla bakonzi ya mangomba na nguya nyonso. Na ndakisa, na liyangani ya mokili mobimba oyo lizalaki na motó na likambo “Mokano ya Nzambe” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na 1958, na New York, prezidá-molandi ya la Société Watch Tower amonisaki makanisi oyo ndambo na yango elobaki ete: “Kozanga kokakatana, totɔndɔli polele ete ekumu wana ezali ntina ya makambo nyonso ya mobulu, mabe, koyinana, bitumba, kokanisela baninga mabe, . . . mpe mobulungano euti na lingomba ya mabe, ya lokuta; oyo monguna azangi komonana, Satana Zábolo, amibombi nsima na yango. Bato oyo babongi mpenza kopamelama na ntina na ezalela ya mokili ezali bongo balakisi mpe bakambi ya mangomba; mpe baoyo bazali mpenza na ngambo eleki monene ezali bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta. . . . Nsima na bambula nyonso oyo esili koleka kobanda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, epai na Nzambe, boklisto ya lokuta ezali kati na ezalela motindo moko na oyo ezalaki na Yisraele na mikolo ya Yilimia. Ya solo, libebi monene lizali liboso na boklisto ya lokuta, koleka oyo Yilimia amonaki na Yelusaleme.”
Bikateli likoló na balakisi ya lokuta
15. Bisakweli nini bakonzi ya mangomba bapesaki na ntina na kimya? Bikokokisama?
15 Atako likebisi oyo, lolenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bazali kosala uta ntango wana? Bobele lokola Yil 23 molɔngɔ́ 17 momonisi yango ete: “Bajali koloba ntango yɔnsɔ epai na baoyo bakotiolaka ngai ete, [Yehova] asili koloba ete Bokojala na kimia; mpe epai na mɔkɔ na mɔkɔ oyo akotambolaka kobila lolɛndo na motema na ye mpenja, balobi ete, Likambo mɔkɔ mabe ekokwela bino tɛ!” Yango ezali solo? Te! Yehova akotɔndɔla lokuta ya bisakweli oyo ya bakonzi ya mangomba. Akokokisa te oyo bazali koloba na nkombo na ye. Nzokande, maloba na lokuta ya bakonzi na mangomba oyo mazali kondimisa basusu ete bazali na kimya elongo na Nzambe mazali ya bokosi mpenza!
16. (a) Bizaleli nini tozali komona lelo na mokili, mpe nani asengeli kopamelama mpo na yango? (b) Kelasi ya Yilimia ezali kosala nini liboso na bizaleli ya mbindo ya mokili oyo?
16 Mbala mosusu ozali kokanisa ete: “Nini, nakosami na mateya ya lokuta ya bakonzi na mangomba? Soko moke te.” Kasi, komindimisa bongo te. Kobosana te ete mateya ya lokuta ya bakonzi na mangomba na ntina na bizaleli malamu, malendisi ezaleli ya mbindo mingi oyo ezali mpasi mpo na koyeba yango. Mateya na bango ya bongo na bongo mazali kolóngisa ezaleli nyonso, ata ezaleli na mbindo mingi. Mpe mopepe wana mabe mopalangani kati na lolenge nyonso ya kominanola; bafilime, televizyó, bazulunalo mpe miziki. Na yango, tosengeli kosɛnzɛla ete tozwama te na bopusi ya mopepe wana mabe, nguya ya kolengola oyo ezali mpasi mpo na koyeba yango. Bilenge bakoki kozimbisama na miziki mpe na bafilime ya vidéo oyo ezali kobebisa bizaleli malamu. Kobosana te ete elimo ya lipanda oyo ezali komonana epai na bato ya mikolo na biso, ezali mbuma ya mateya ya lokuta ya bakonzi na mangomba, mpe bopotu na bango mpo na kosimba mitinda ya sembo ya Nzambe. Kelasi ya Yilimia ezali kobundisa makanisi wana ya mbindo mpe ezali kosalisa basaleli ya Yehova na kobwaka makanisi yango ya mbindo.
17. (a) Engebene Yilimia, ekateli nini esengelaki kokwela Yelusaleme mabe? (b) Nini ekokómela boklisto ya lokuta mosika te?
17 Bikateli nini Yehova, Mosambisi Monene, akokamata na ntina na balakisi ya boklisto ya lokuta? Yil 23 Milɔngɔ́ 19, 20, 39 mpe Yil 23 40 miyanoli ete: “Tala mopɛpɛ makasi na [Yehova]! Nkɛlɛ na ye ebimi! Mopɛpɛ mojali kobalukabaluka ekokweaka likolo na motó na bato mabe. Nkanda na Yehova ekobutwa tɛ kino esili ye kosala mosala mpe kino esili ye kosukisa mikano na motema na ye. . . . Nakobunga bino sɔlɔ mpe nakobwaka bino mpe mboka oyo epɛsaki ngai epai na bino mpe na batata na bino, nakobwaka yango longwa na elongi na ngai. Nakoyeisa likolo na bino nsɔni na seko oyo bato bakobosana tɛ.” Nyonso oyo ekómelaki Yelusaleme ya mabe mpe tempelo na yango, mpe mosika te, mawa ya motindo moko ekokómela boklisto ya lokuta mpe ya mabe.
Tósakola “bozito ya Yehova”
18, 19. Nini ezali “bozito ya Yehova” oyo Yilimia asakolaki epai na Yuda, mpe esengelaki kosuka na nini?
18 Na yango, mokumba ya kelasi na Yilimia mpe baninga na bango mozali nini? Yil 23 Molɔngɔ́ 33 moyebisi biso ete: “Wana bato oyo, sɔkɔ mosakoli, sɔkɔ nganga, bakotuna yo ete, [Bozito, NW] na [Yehova] ezali nini? Okoloba na bango ete, Bino bozali [bozito, NW]! Yehova alobi ete, Nakobwaka bino na nse.”
19 Liloba na Liebele oyo libongolami na “bozito” lizali na ndimbola mibale. Ekoki kolimbola maloba makasi ya kokanela mauti na Nzambe to eloko oyo ezali konyata moto to kolembisa ye. Awa, liloba “bozito na Yehova” elimboli esakweli ya makasi ya kokanela, liloba oyo lizalaki koyebisa ete Yelusaleme elakamaki na libebi. Bato bazalaki kolinga koyoka bisakweli wana ya makasi, oyo Yilimia azalaki koyebisa bango mbala na mbala uta na Yehova? Te, bato batyolaki Yilimia ete: ‘Esakweli (bozito) nini ozali na yango sikawa? Toyebi ete esakweli na yo ekozala bobele maloba mosusu ya bozito!’ Kasi Yehova alobaki na bango nini? Alobaki ete: “Bino bojali [bozito, NW]! Nakobwaka bino na nse.” Ya solo, bato wana bazalaki bozito mpo na Yehova, mpe alingaki kolimwisa bango mpo na kolongola bozito oyo bazalaki kopesa ye.
20. “Bozito ya Yehova” ezali nini na mikolo na biso?
20 Lelo oyo, “bozito ya Yehova” bozali nini? Ezali nsango ya esakweli makasi ya kokanela oyo ezwami na Liloba ya Nzambe. Etondi na makambo ya mawa, mpamba te ezali koyebisa kobomama oyo esili kobɛlɛma mpo na boklisto ya lokuta. Biso basaleli ya Yehova nde tozali na mokumba monene ya koyebisa “bozito ya Yehova.” Awa nsuka ebɛlɛmi, tosengeli koyebisa epai na bato nyonso ete bato ya mitó makasi kati na boklisto ya lokuta bazali “bozito,” ee “bozito mpenza” mpo na Yehova Nzambe mpe mosika te, akolongola bozito wana na kosundoláká boklisto ya lokuta kati na libebi.
21. (a) Mpo na nini Yelusaleme ebebisamaki na 607 L.T.B.? (b) Nsima ya kobebisama ya Yelusaleme, nini ekómelaki basakoli ya lokuta mpe nini ekómelaki mosakoli ya solo ya Yehova, mpe yango epesi biso elikya nini lelo?
21 Na mikolo ya Yilimia, bikateli ya Yehova bikokisamaki na ntango bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Lokola esilaki kosakolama, kobebisama wana ezalaki nsɔni monene mpe kokitisama mpo na Bayisraele na mitó makasi, baoyo bazangaki sembo. (Yilimia 23:39, 40) Emonisaki bango ete Yehova, oyo mbala na mbala bazangaki komonisela ye limemya, asukaki na kosundola bango ete bazwa mpasi euti na mabe na bango. Basakoli na bango ya lokuta oyo batondaki na lolendo basukaki na kokanga minoko. Nzokande, Yilimia alandaki kosakola. Yehova atikaki ye te. Bobele bongo, Yehova akotika kelasi ya Yilimia te wana ekateli na ye monene ekolimwisa bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta mpe baoyo bazali kondima lokuta na bango.
22. Engebene bikateli ya Yehova, boklisto ya lokuta ekokóma nini?
22 Ee, mangomba ya boklisto ya lokuta makokokana mpenza na Yelusaleme oyo ebebisamaki mpe efandamaki lisusu te na mobu 607 L.T.B. Yango nde ekateli oyo Yehova asili kosakola mpo na balakisi ya lokuta. Ekateli wana ekokokisama solo. Lokola makebisi nyonso ya Yilimia oyo mapemamaki na Nzambe, makokanaki na ntango ya kala, ekozala mpe bongo mpo na kokokisama na yango na mikolo na biso. Na yango, tika ete tózala lokola Yilimia. Tósakola bozito ya Yehova epai na bato kozanga kobanga. Toyebisa bango ntina oyo bikateli na ye ya sembo bikokwea na bozito nyonso likoló na balakisi nyonso ya mangomba ya lokuta !
Mituna ya bozongeli
◻ Lolenge nini Yelusaleme ya kala emonanaki mabe na miso na Yehova?
◻ Na makambo nini boklisto ya lokuta ‘etambolaki na bokosi’?
◻ Lolenge nini mabe ya bakonzi ya mangomba ya mikolo na biso mamonisamaki polele?
◻ Wapi “bozito ya Yehova” oyo ezali kosakolama lelo?
[Elilingi na lokasa 8]
Basakoli ya Yelusaleme bazalaki kosala “makambo mabe mingi”
[Elilingi na lokasa 9]
“Balobi mpo na emononeli na mitema na bango mpenza”
[Elilingi na lokasa 10]
Yelusaleme nsima ya kobebisama na yango ezali komonisa ndenge boklisto ya lokuta ekosuka