Yehova azali na likambo epai na mabota
“Makɛlɛlɛ ekokoma ata kino na ndelo na mokili, mpɔ ete [Yehova] ajali na likambo epai na mabota.”—YILIMIA 25:31.
1, 2. (a) Likambo nini likómaki na Yuda nsima na liwa ya mokonzi Yosiya? (b) Nani azalaki mokonzi ya nsuka na Yuda, mpe mpasi nini azwaki mpo ete azangaki sembo?
MOKILI ya Yuda mokutanaki na eleko moko ya mpasi. Yosiya, Mokonzi malamu, akitisaki nkanda monene ya Yehova mpo na ntango mokuse. Kasi nini ekómaki nsima wana Yosiya abomamaki na mobu 629 L.T.B.? Bakonzi oyo balandanaki nsima na ye batyolaki Yehova.
2 Sidikiya, Mokonzi ya nsuka ya Yuda, mwana ya minei ya Yosiya, alandaki ‘kosala mabe na miso na Yehova, lokola yɔnsɔ esalaki [nkulutu na ye] Yoyakimi,’ lokola eyebisami na 2 Mikonji 24:19. Yango ebimisaki matomba nini? Nebukadenesala abutaki mpo na kobundisa Yelusaleme, akangaki Sidikya, akataki bana na ye nkingo na miso na ye mpe atobolaki ye miso mpe amemaki ye na Babilone. Lisusu, bato ya Babilone bakamataki mbeki nyonso ya losambo ya Yehova, batumbaki tempelo mpe mboka. Babiki bamemamaki na Babilone.
3. Eleko nini ebandaki na kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., mpe nini esengelaki kokóma na nsuka ya eleko yango?
3 Mobu wana ya 607 L.T.B., ezalaki bobele te kobomama ya Yelusaleme, kasi ezalaki lisusu ebandeli ya “ntango ya mabota” oyo elobelami na Luka 21:24. Eleko wana ya mibu 2 520 esukaki na ekeke na biso, na mobu 1914. Na mobu wana, ntango ekokaki mpo ete Yehova ayebisa mpe akokisa ekateli likoló na mokili oyo mosili kobeba, na nzela ya Yesu Klisto, Mwana na ye, oyo asili kokóma mokonzi, oyo azali monene koleka Nebukadenesala. Lisambisi yango libandaki na oyo ekokani lelo na Yuda, oyo ezali komiloba ete ezali komonisa Nzambe mpe Yesu Klisto awa na mabelé.
4. Mituna nini mitunami sikawa na ntina na esakweli ya Yilimia?
4 Tozali nde komona kokokana kati na yikiyiki oyo ezalaki na bambula ya nsuka ya Yuda elongo na bakonzi na yango mpe yikiyiki oyo ezali kati na boklisto ya lokuta na mikolo na biso—elongo na makambo ya nsɔmɔ oyo mazali kokwela mabota oyo mazingi yango? Tozali mpenza komona yango! Bongo, esakweli ya Yilimia ezali komonisa nini, mpo na lolenge oyo Yehova akosala na mikolo na biso? Tika tótalela yango.
5, 6. (a) Kobanda 1914, lolenge nini ezalela ya boklisto ya lokuta ekokani na oyo ya Yuda liboso na kobebisama na yango? (b) Nsango nini Yilimia ya ntango na biso asili koyebisa na boklisto ya lokuta?
5 Esili koleka mibu ntuku minei, Bertrand Russell, nganga-matematiki mpe filozofe moko ya ekólo Grande-Bretagne, alobaki ete: “Kobanda 1914, baoyo nyonso bayebi lolenge makambo mazali koleka na mokili bazali komitungisa mingi na oyo emonani lokola ete ezali komema libebi monene oyo lisilá kokanama mpe oyo likoki kopengolama te.” Mpe Konrad Adenauer, moto monene na Leta ya mboka Allemagne alobaki ete: “Kobatelama mpe kimya ebungaki na bomoi ya bato uta 1914.”
6 Na mikolo na biso, lokola na eleko ya Yilimia, kobɛlɛma na nsuka ya biloko mabe ezali komonana na kosopama ya makila ya bato mingi oyo basali likambo te, mingi mpenza oyo esopamaki na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba na ekeke oyo ya ntuku mibale. Bitumba wana bisalamaki, mingimingi, kati na mikili ya boklisto , oyo ezali koloba ete ezali kosambela Nzambe ya Biblia. Oyo nde bokosi! Ezali likambo ya kokamwa te ete Yehova atindi Batatoli na ye epai na bango mpo na koloba na lolenge eyebisami na Yilimia 25:4-6: “Bongwa moto na moto longwa na njela na ye mabe mpe longwa na mabe na misala na bino. . . . Botambola tɛ nsima na banjambe mosusu mpɔ na kosalela bango mpe kosambela bango, bopesa mpe nkanda na ngai simbisi tɛ na misala na mabɔkɔ na bino; boye nakosalela bino mabe tɛ.”
7. Bilembeteli nini bimonisi ete boklisto ya lokuta etii likebi te na makebisi ya Yehova?
7 Nzokande, mikili ya boklisto mibongwanaki te. Yango emonisamaki na mbeka oyo bapesaki lisusu epai na nzambe ya etumba na mboka Corée mpe Viêt Nam. Mpe bazali kolanda kopesa mbongo epai na batekisi na kufa, bango basali na bibundeli. Mikili ya boklisto mipesaki ndambo monene ya mosolo pene na nkóto moko ya bamiliare oyo ebimisamaki mbula na mbula mpo na bibundeli na boumeli ya bambula 1980. Kobanda 1951 kino 1991, mosolo mosalelamaki mpo na makambo matali basodá mpe bibundeli na Etats-Unis molekaki misolo mizwamaki na bakompanyi nyonso ya mboka yango. Uta nsuka ya matata kati na banguya mibale ya mokili mobimba, oyo basakolaki yango na makelele mingi, motuya ya bibundeli ya kala ya nikleere mosili kokita, kasi ezali naino na bibundeli misusu mingi oyo bizali na nguya ya koboma mpe bizali sé kobakisama. Mokolo mosusu, bibundeli wana bikoki kosalelama.
Ekateli likoló na boklisto ya lokuta oyo epesi nzela na mabe nyonso
8. Lolenge nini maloba ya Yilimia 25:8, 9 makokokana likoló na boklisto ya lokuta?
8 Lelo oyo, maloba ya Yehova oyo malandi oyo mazwami na Yilimia 25:8, 9, mazali mpenza kokokisama epai na boklisto ya lokuta, oyo ezali komitambwisa te engebene mitinda ya sembo ya boklisto, ete: “Bongo, [Yehova] na bibele alobi boye ete, Mpɔ ete boyokaki maloba na ngai tɛ, [Yehova] alobi ete, tala nakotinda mpe nakokamata bikolo yɔnsɔ epai na likolo mpe nakotinda epai na Nebukadalɛsala mokonji na Babɛlɛ, moombo na ngai, mpe nakoyeisa bango kotɛmɛla mokili oyo mpe kotɛmɛla bafandi kati na yango mpe kotɛmɛla mabota yɔnsɔ baoyo bajingeli yango. Nakobebisa bango nyɛɛ mpe nakokomisa bango elɔkɔ na kokamwa, elɔkɔ na kotiolama, elɔkɔ na mpamba libela na libela.” Na yango, bolozi monene ekokwea liboso likoló na boklisto ya lokuta, oyo ezali komitanga libota ya Nzambe, mpe na nsima ekopalangana na mabelé mobimba, mpe na ‘mabota nyonso oyo mazingi yango.’
9. Na lolenge nini ezalela ya elimo ya boklisto ya lokuta esili kokóma mabe mingi na mikolo na biso?
9 Na kala, kati na boklisto ya lokuta, Biblia etalelamaki na limemya, libala mpe bomoi ya libota etalelamaki lokola liziba ya esengo epai na bato nyonso, bato bazalaki na esengo ya kobima na ntongo mpo na kokokisa misala na bango ya mokolo na mokolo. Mingi bazalaki komilendisa na kotangáká mpe na koyekoláká Liloba ya Nzambe na mpokwa nyonso, na lisalisi ya mwinda. Kasi lelo oyo, pite, koboma mabala, kosalela bilangwiseli (drogue) mpe kolangwa masanga, mobulu, lokoso, goigoi na mosala, boombo ya televizyó, mpe misala misusu ya mabe esili kobebisa mpenza bomoi ya bato mingi. Makambo motindo wana mazali bongo kosakola libebi oyo Yehova azali pene ya kokweisa likoló na boklisto ya lokuta oyo epesi nzela na mabe nyonso.
10. Lobela ezalela ya boklisto ya lokuta nsima na kokokisama ya bikateli ya Yehova.
10 Yehova alobi, lokola tozali kotanga yango na Yilimia mokapo ya 25, molɔngɔ́ 10 mpe molɔngɔ́ 11 ete: “Nakolongwela bango mongongo na kosɛka mpe mongongo na esɛngo, mongongo na mobali mpe mongongo na mwasi mobalani, mongongo na mabanga na etutelo mpe pole na mwinda. Mokili mobimba ekojala esika na mpamba mpe na kokamwa.” Oyo nde likambo ya kokamwa ntango batempelo mpe bandakonzambe ya lokumu mingi ya boklisto ya lokuta ekobebisama! Libebi yango likozala na etando nini? Na eleko ya Yilimia, kobebisama ya Yuda mpe mabota ya zingazinga eumelaki mibu 70, oyo elobelami na Nzembo 90:10 lokola boumeli ya bomoi ya moto. Na mikolo na biso, bikateli ya Yehova bikokokisama nyonso mpenza, mpo na libela.
Ekateli likoló na Babilone Monene
11. Nani akosalelama mpo na koboma boklisto ya lokuta? Mpo na nini?
11 Lokola esakolamaki na Emoniseli 17:12-17, ntango ekoya wana Yehova akobanda mosala na ye ya kokamwa na kotyáká na motema ya “maseke zomi”—banguya ya basodá oyo bazali basangani ya Ebongiseli ya Mabota Masangani—“ete basala mokano na ye,” oyo ya kobebisa lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Kasi yango ekosalema lolenge nini? Ekozala na mitindo mingi oyo “maseke zomi” ya Emoniseli mokapo 17 ‘makoyina mwasi na pite mpe kotumba ye mpenza na moto,’ mpo na kozongela maloba oyo masalelami na molɔngɔ́ 16. Ezali solo ete bibundeli ya nikleere bibakisamaki mpe bizali kobakisama na bisika oyo bitumba bikoki kobima awa na mabelé. Kasi tosengeli kozela mpe komona lolenge nini Yehova akotya kati na mitema ya bayangeli ya politike likanisi ya kokokisa kobukanisa na ye.
12. (a) Nini ekómelaki Babilone nsima wana ebebisaki Yelusaleme? (b) Nini ekokómela mabota nsima na kobebisama ya boklisto ya lokuta?
12 Na ntango ya kala, nkanda monene ya Yehova esopamaki mpe likoló na Babilone. Mpo na yango, kobanda na Yilimia mokapo ya 25, molɔngɔ́ ya 12, esakweli emonisi na lolenge mosusu makambo oyo malingaki kobima nsima. Lokola bazalaki lisusu te na mokumba ya Mokokisi bikateli na Nzambe, Nebukadenesala mpe Babilone bakɔ́taki sikawa kati na molɔngɔ́ ya mabota nyonso ya mokili. Likambo yango likokani na oyo ya eleko na biso. “Maseke zomi” ya Emoniseli mokapo 17 makoboma losambo ya lokuta, kasi na nsima, bango mpenza bakobomama elongo na bakonzi mosusu ya mokili, lokola Emoniseli mokapo 19 emonisi yango. Yilimia 25:13, 14, elobeli kosambisama ya Babilone mpe ya “mabota nyonso” ya mokili oyo banyokolaki libota ya Yehova. Yehova asalelaki Nebukadenesala mpo na kopesa Yuda etumbu. Kasi mokonzi wana ya Babilone mpe baoyo bayangelaki nsima na ye bayaki komitombola na lolendo nyonso liboso na Yehova, na ndakisa, na kobebisáká bisaleli ya tempelo na ye. (Danyele 5:22, 23) Mpe, na ntango Babilone ebebisaki Yelusaleme, mabota mosusu ya zingazinga ya Yuda—Moaba, Amona, Tulu, Edome mpe mabota mosusu —basepelaki mpe basɛkaki libota ya Nzambe. Bango mpe basengelaki kozwa, epai na Yehova, etumbu oyo ebongaki na bango.
Ekateli likoló na “mabota nyonso”
13. Nini elimbolami na “kɔpɔ na vinyo na nkɛlɛ oyo,” mpe nini ekokómela baoyo bakomɛla kɔpɔ yango?
13 Yango wana, Yilimia asakolaki, lokola eyebisami na Yilimia mokapo 25, molɔngɔ́ 15 mpe 16, ete: “Jambi [Yehova], Njambe na Yisalaele, alobaki boye na ngai ete, Kamata kɔpɔ na vinyo na nkɛlɛ oyo kati na lobɔkɔ na ngai mpe mɛlisa mabota yɔnsɔ yango baoyo nakotinda yɔ epai na bango. Bakomɛla yango mpe bakotetema epai na epai mpe bakobongwana bibɛbɛ mpɔ na mopanga mokotinda ngai kati na bango.” Mpo na nini ezali likambo ya ‘kɔpɔ na vinyo na nkɛlɛ na Yehova?’ Na Matai 26:39, 42 mpe na Yoane 18:11, Yesu alobelaki “kɔpɔ” moko oyo ezalaki komonisa mokano ya Yehova mpo na ye. Bobele bongo, kɔpɔ esalelami lokola elilingi ya mokano ya Yehova mpo na mabota, ete bamɛla kobukanisa na ye. Yilimia mokapo 25:17-26 etangi molɔngɔ́ ya mabota oyo mazalaki elilingi ya mabota ya ntango na biso.
14. Engebene esakweli ya Yilimia, nani asengeli komɛla kɔpɔ ya vinyo ya nkɛlɛ ya Yehova, mpe yango ezali na ndimbola nini na mikolo na biso?
14 Lokola Yuda, ntango boklisto ya lokuta ekokóma “esika na mpamba, mpe eloko na kokamwa, mpe na kotyola mpe na kolakelama mabe,” libebi likokwela mosika te eteni oyo etikali ya lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. Na nsima, mokili mobimba, oyo emonisami na Ezipito, ekomɛla kɔpɔ ya vinyo na nkanda ya Yehova! Ya solo, “mikonji yɔnsɔ na epai na likolo baoyo na pɛnɛpɛnɛ mpe bango na mosika, [moko nsima na mosusu; mpe epai na bikonzi bizali na mokili, NW]” basengeli komela yango. Na nsuka, “mokonzi na Sesaka akomela na nsima na bango.” “Mokonzi na Sesaka” wana azali nani? Sesaka ezali nkombo ya elilingi, oyo ezali kobomba (cryptogramme) to ekomami na elembo, mpo na Babilone. Lokola Satana azalaki mokonzi azangi komonana ya Babilone, bobele bongo mpe azali “mokolo na mokili” kino lelo oyo, lokola Yesu amonisi yango na Yoane 14:30. Na yango, Yilimia mokapo 25:17-26 ekokani na Emoniseli mokapo 18 kino mokapo 20, na komonisáká lolenge makambo mazali kolandana wana kɔpɔ ya nkanda ya Yehova epesami ete bamela yango. Liboso, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta nde ekobomama, na nsima banguya ya politiki, na nsuka na yango, Satana ye moko akobwakama kati na libulu mozindo.—Emoniseli 18:8; 19:19-21; 20:1-3.
15. Nini ekosalama ntango kosakolama ya “kimya mpe kobatelama” ekoyokama?
15 Bazali kolobela mingi kimya mpe kobatelama uta basakolaki ete matata to guerre froide esili, mpe etikali bobele nguya moko eleki makasi na mokili mobimba. Lokola Emoniseli 17:10 eyebisi yango, nguya wana eleki makasi, motó ya nsambo ya nyama na yauli, asengeli “koumela mwa ntango moke.” Kasi “mwa ntango moke” wana ebɛlɛmi na nsuka na yango. Mosika te, kosakolama ya “kimya mpe kobatelama” ya politiki ekolandana na “libebi ya pwasa [oyo ekoya] likoló na bango.” Ntoma Paulo alobi bongo.—1 Batesaloniki 5: 2, 3.
16, 17. (a) Nini ekosalema soki bato bameki kokima bikateli ya Yehova? (b) Na nzela ya kobebisama nini mokano ya Yehova ekosalama mosika te na mabelé?
16 Ebongiseli ya Satana na mokili mobimba, kobanda na boklisto ya lokuta, esengeli komela kɔpɔ ya nkanda ya Yehova. Yango emonisami na etindá na ye epai na Yilimia, na Yil mokapo 25, molɔngɔ́ 27 kino molɔngɔ́ 29, ete: “Okoloba mpe na bango ete, [Yehova] na bibele, Njambe na Yisalaele alobi boye ete, Bomɛla mpe bolangwa, mpe bosanja mpe bokwea mpe botɛma lisusu tɛ mpɔ na mopanga mokotinda ngai kati na bino. Ekojala mpe ete sɔkɔ [bakoboya] kokamata kɔpɔ na lobɔkɔ na yɔ mpɔ na komɛla yango, okoloba na bango ete, [Yehova] na bibele alobi ete, Bokomɛla komɛla mpenja! Jambi [Yehova] na bibele alobi ete, Tala, nakobanda kosala mabe na mboka oyo ebiangami na nkombo na ngai mpe bino bokojanga nde etumbu na sɔlɔ? Bokojanga etumbu tɛ, mpɔ ete nakobianga mpɔ na mopanga likolo na bafandi yɔnsɔ na mokili.”
17 Wana ezali maloba ya nguya, ezali mpenza maloba ya kobangisa, mpamba te ezali Yehova Nzambe Nkolo Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba nde alobi yango. Na boumeli na bambula nkóto mingi, asili koyika mpiko na motema molai nyonso na maloba ya kotuka, na nsoni mpe na botɛmɛli oyo ebwakami likoló na nkombo na ye mosantu. Kasi ntango ekoki mpo ete ayanola na libondeli oyo Mwana molingami na ye, Yesu Klisto, alakisaki bayekoli na ye wana azalaki awa na mabelé, ete: “Bino bobondɛla boye ete, Tata na biso oyo ajali na Likolo, Nkombo na yɔ ejala mosanto, Tika Bokonji na yo eya, tika mokano na yo esalema na nse pelamɔkɔ na Likoló.” (Matai 6:9, 10) Mokano ya Yehova ezali ete Yesu azala mopanga na Ye mpo na kobukanisa.
18, 19. (a) Motamboli nini na mpunda azali kolónga etumba na nkombo na Yehova, mpe azali kozela nini mpo na kosukisa elónga na ye? (b) Wana baanzelu bakotika mipepe makasi na nkɛlɛ ya Yehova, makambo nini ya nsɔmɔ makobima na mabelé?
18 Na Emoniseli mokapo 6, totangi liboso ete Yesu azali likoló na mpunda mpɛmbɛ mpe “abimi mpo na kolonga mpe kolonga lisusu.” (Em 7 Molɔngɔ́ 2) Yango ebandaki uta kotyama na ye lokola Mokonzi na likoló na 1914. Bampunda mosusu mpe bafandi na yango oyo bazali kolanda ye, bazali elilingi ya bitumba, ya nzala, mpe maladi mabe oyo, uta ntango yango, ezali konyokola bafandi na mabelé. Kasi ntango nini yikiyiki wana nyonso ekosila? Emoniseli mokapo 7 elobi na biso ete baanzelu minei basimbi makasi “mipepe minei ya mokili” kino ntango oyo Yisraele ya elimo mpe ebele monene oyo euti na mabota nyonso bakosila koyanganisama mpo na lobiko. (Em 7 Molɔngɔ́ 1) Nini ekosalema na nsima?
19 Yilimia mokapo 25, molɔngɔ́ 30 mpe molɔngɔ́ 31, elandisi ete: “Boye, sakola maloba oyo yɔnsɔ mpɔ na kotɛmɛla bango, loba mpe na bango ete, [Yehova] akonguluma longwa na likolo, akobimisa liloba na ye longwa na efandelo na ye na bulɛɛ; akonguluma mingi mpenja epai na lopango na ye; akongala lokola bango baoyo bakonyata miwiti, mpɔ na kotɛmɛla bafandi yɔnsɔ na mokili. [Yehova] alobi ete, Makɛlɛlɛ ekokoma ata kino ndelo na mokili, mpɔ ete [Yehova] ajali na likambo epai na mabota, akowelana na yɔnsɔ baoyo bajali na njoto; mpɔ na bato mabe, akopɛsa bango epai na mopanga.” Libota moko te likokima komɛla kɔpɔ ya nkanda na Yehova. Na yango, ezali likambo ya nokinoki ete bato nyonso ya motema sembo bamikabola na mabe ya mabota liboso ete baanzelu minei batika mipepe makasi ya nkanda na Yehova. Ezali mpenza mipepe makasi, mpamba te esakweli ya Yilimia elandisi na Yil 25 molɔngɔ́ 32 mpe molɔngɔ́ 33, ete:
20. Makambo nini mazali komonisa bonene ya ekateli ya Yehova, kasi mpo na nini yango ezali na ntina?
20 “[Yehova] na bibele alobi boye ete, Tala [mpasi] ekobima, longwa na libota kino libota; mpe mopɛpɛ makasi ekotombwa likolo, longwa na ndelo na nsuka na mokili. Mpe babomami na [Yehova] na mokolo yango bakojala longwa na molelo mɔkɔ na mokili kino molelo mosusu na mokili; bakobimisamela bileli tɛ, bakoyanganisama tɛ; bakokundama mpe tɛ; bakozala lokola [bipoli] likolo na mabele.” Yango ezali solo likambo ya nsɔmɔ, kasi yango ekozala na ntina mpo ete mabelé ekoka kopɛtolama na mabe nyonso liboso na kotyama ya Paladiso oyo elakámi na Nzambe.
Babateli ya mpate bakonganga makasi mpe bakolela
21, 22. (a) Na Yilimia 25:34-36, banani bazalaki “babateli” ya Yisraele, mpe mpo na nini basengelaki konganga makasi? (b) Babateli nini ya mikolo na biso bakozwa nkanda na Yehova, mpe mpo na nini babongi solo kozwa yango?
21 Yil 25 Molɔngɔ́ 34 kino molɔngɔ́ 36 ebakisi na ntina na bikateli na Yehova ete: “Bino babateli, [bonganga makasi] mpe bolela, bino mikolo na etɔnga bolelalela na mputulu; mpɔ ete mikɔlɔ na kobomama na bino isili koya mpe na kopalangana na bino, bokokwea lokola mbeki malamu. Mpe babateli bakojala na njela na kokima tɛ, mikolo na etɔnga mpe bakojala na njela na kolongwa tɛ. [Yoka!, NW] Mongongo na kolela na babateli mpe na konguluma na mikolo na etɔnga! Jambi [Yehova] ajali kobebisa bilanga na bango.”
22 Babateli yango bazali banani? Bazali bakonzi ya mangomba te, baoyo basili komɛla nkanda ya Yehova. Bazali bongo babateli oyo bazali basodá, baoyo balobelami lisusu na Yilimia 6:3, baoyo bazali koyanganisa mampinga na bango lokola etongá mpo na kobɛtɛla Yehova ntembe. Bazali bongo bakonzi ya politiki baoyo basili kokóma bazwi wana bazali kopesa mpasi na bayangelami na bango. Mingi na bango bazali bato minene na mimbongo, baoyo balingi kanyáka. Bazali na bolembu mpo na kosilisa nzala oyo ezali konyokola bato na mikili ya bobolá. Bazali koyeisa “mikóló na etongá” bazwi, na ndakisa batɛkisi na bibundeli mpe bato na lokoso oyo babebisi ezingelo, wana baboyi kopesa lisungi ya bankisi mpe bilei oyo, bobele na mosolo moke, mbɛlɛ ebikisi bamilió na bana oyo bazali kokufa.
23. Lobelá ezalela ya ebongiseli ya Satana nsima na misala ya kobebisa miuti na Yehova.
23 Ezali likambo ya kokamwa te ete Yilimia mokapo 25 esukisi na Yil 25 molɔngɔ́ 37 mpe molɔngɔ́ 38, na kolobáká na ntina na bato yango oyo bazali komilukela kimya na moimi nyonso ete: “Mapango na kimia ijikisami nyɛɛ mpɔ na makasi na nkanda na [Yehova]. Abimi na efandelo na ye lokola nkɔsi, mpɔ ete mokili na bango ekomi esika na kokamwa mpɔ na mopɔtu na mopanga mojali konyɔkɔla, mpe mpɔ na makasi na nkanda na ye.” Oyo likambo na kokamwa! Nzokande, nkanda monene ya Yehova ekokokisama na nzela na Ye oyo abyangami “Mokonji na bakonji mpe Nkolo na bankolo” na Emoniseli mokapo 19, molɔngɔ́ 15 mpe molɔngɔ́ 16, oyo azali kokɛngɛla mabota na mfimbo ya ebende. Mpe nini ekolanda nsima?
24. Mapamboli nini bato ya sembo bakozwa nsima na kobomama ya mangomba ya lokuta mpe ya eteni mosusu ya mokili ya Satana?
24 Osilá kokutana na mopepe makasi oyo babéngi ekumbaki? Ekoki mpenza kozala nsɔmɔ. Kasi na ntongo ya mokolo mokolanda, atako okozingama na bitiká ya bandako oyo ekweikwei, mbala mingi mopepe mokozalaka peto mpe ezalaka na kimya na kolendisa oyo ekoki kopusa yo na kotóndo Yehova mpo na mokolo wana kitoko. Lolenge moko, ntango mipepe ya bolozi monene mikokita, okokoka kotala mabelé na botɔ́ndi na likambo oyo ete ozali na bomoi mpe omilɛngɛli mpo na kosangana na mosala mosusu oyo Yehova akopesa mpo na kosala ete mabelé mapetolama mpo na kokómisa yango paladiso kitoko. Likambo oyo Yehova azali na yango epai na mabota akosila kokata yango na lolenge ya kokamwa, na kokumisáká nkombo na ye mpe na kobongisáká nzela mpo ete mokano na ye mosalema awa na mabelé na nzela na Bokonzi ya Mbula Nkóto oyo epesami na Masiya. Tika ete Bokonzi yango eya noki!
Bozongeli paragrafe 5 kino paragrafe 24 ya lisoló oyo
◻ Misala nini ya bokosi ya boklisto ya lokuta mikomi sikawa na kosambisama?
◻ Lolenge nini lisambisi etalisami kati na Yilimia 25:12-38?
◻ Kɔpɔ nini ya kobukanisa epesameli mabota nyonso ete bamela yango?
◻ Banani babateli oyo bazali konganga makasi mpe kolela, mpe mpo na nini babulungani?
[Elilingi na lokasa 18]
Yehova asili kɔpɔna esaleli oyo ekobebisa boklisto ya lokuta
[Elilingi na lokasa 23]
Nsima na mipepe makasi ya bolozi monene, mabelé mapɛtolami makobima