Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yilimia
YILIMIA asakolaki makambo ya nsɔmɔ oyo esengelaki kokómela ekólo na bango! Tempelo kitoko oyo ezalaki esika monene ya losambo na boumeli ya mbula koleka nkama misato esengelaki kotumbama nyonso. Engumba Yelusaleme mpe mokili ya Yuda esengelaki kotikala mpamba mpe bafandi na yango basengelaki komemama na boombo. Bitumbu yango mpe mosusu oyo asakolaki ezali na mokanda ya Yilimia, mokanda ya mibale oyo eleki monene na Biblia. Elobeli mpe makambo oyo Yilimia ye moko akutanaki na yango na boumeli ya mbula 67 oyo asalaki mosala na ye na bosembo nyonso. Masolo ya mokanda yango ekomamaki te na kotalela ndenge makambo ezalaki kolandana.
Mpo na nini tosengeli kotya likebi na mokanda ya Yilimia? Bisakweli na yango oyo esilá kokokisama ezali kolendisa kondima na biso epai ya Yehova, ye oyo akokisaka bilaka na ye. (Yisaya 55:10, 11) Mosala ya mosakoli oyo Yilimia asalaki, mpe ndenge oyo bato bazalaki kotalela nsango na ye ekokani na makambo oyo ezali kosalema lelo oyo. (1 Bakolinti 10:11) Lisusu, lisolo ya makambo oyo Yehova asalelaki bato na ye ezali komonisa bizaleli na ye mpe esengeli kosimba mitema na biso.—Baebele 4:12.
“BATO NA NGAI BASALI MASUMU MIBALE”
Yilimia akómaki mosakoli na mbula ya 13 ya boyangeli ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, mbula 40 liboso ya kobomama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. (Yilimia 1:1, 2) Makambo oyo Yilimia asakolaki mingimingi na boumeli ya bambula 18 ya nsuka ya boyangeli ya Yosiya ezali komonisa mabe ya bato ya Yuda mpe bitumbu oyo Yehova asengelaki kopesa bango. Yehova alobaki boye: “Nakobongola Yelusaleme kino mabondo . . . nakoyeisa mboka ya Yuda mpamba na mofandi te.” (Yilimia 9:11) Mpo na nini? Alobaki boye: “Zambi bato na ngai basali masumu mibale.”—Yilimia 2:13.
Nsango na ye elobelaki mpe kozongisama ya Bayisalaele oyo babongolaki motema. (Yilimia 3:14-18; 12:14, 15; 16:14-21) Kasi, bato basepelaki na Yilimia te. “Mokóló ya liboso kati na ndako ya [Yehova]” abɛtaki Yilimia mpe atyaki ye na bikangelo butu mobimba.—Yilimia 20:1-3.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:11, 12 (NW)—Mpo na nini bakokanisi lolenge oyo Yehova azali kokɛngɛla liloba na ye na “etape ya nzete ya amande?” Nzete ya amande ezali moko na banzete ya liboso oyo ebimisaka fololo na prɛnta. Na ndenge ya elilingi, Yehova azalaki “kolamuka ntɔngɔntɔngɔ . . . mpo na kotinda [basakoli na ye]” bákebisa bato na ye mpo na bitumbu oyo esengelaki koyela bango mpe azalaki “kokɛngɛla” kino bisakweli yango ezalaki kokokisama.—Yilimia 7:25.
2:10, 11—Nini ezalaki kokamwisa na makambo oyo Bayisalaele oyo bazangaki botosi bazalaki kosala? Bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki na ngámbo ya wɛsti, na Kitimi mpe na ngámbo ya ɛsti, na Kedala bazalaki kozwa banzambe ya bikólo mosusu mpe kosangisa bango na banzambe na bango, kasi ata mokolo moko te bakanisaki kolongola banzambe na bango mpo na kotya banzambe ya bapaya. Nzokande, Bayisalaele batikaki Yehova, basombitinyaki nkembo ya Nzambe ya bomoi na bikeko.
3:11-22; 11:10-12, 17—Mpo na nini Yilimia alobaki ete bitumbu yango esengelaki mpe kokómela ekólo ya mabota zomi ya Yisalaele nzokande, Samalia esilaki kobomama na mobu 740 L.T.B.? Yilimia alobaki bongo mpo kobomama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. ezalaki etumbu oyo Yehova apesaki na libota mobimba ya Yisalaele, kaka na ekólo ya Yuda te. (Ezekiele 9:9, 10) Lisusu, atako bokonzi ya mabota zomi esilaki kobebisama, ezalaki na bamonisi na Yelusaleme, mpamba te bansango ya basakoli ya Nzambe ezalaki mpe kotalela bato ya Yisalaele.
4:3, 4 (NW)—Etinda yango elimbolaki nini? Bayuda oyo bazalaki sembo te basengelaki kobongisa, koyeisa pɛtɛɛ, mpe kopɛtola mabelé ya mitema na bango. Basengelaki kolongola “misutu” ya mitema na bango, elingi koloba kolongola makanisi mpe bamposa ya mbindo. (Yilimia 9:25, 26; Misala 7:51) Yango esɛngaki bábongwana, bátika kosala mabe mpe básala makambo oyo ememaka mapamboli ya Nzambe.
4:10; 15:18—Na ndenge nini Yehova akosaki bato na ye oyo bakómaki batomboki? Na ntango ya Yilimia ezalaki na basakoli oyo ‘bazalaki kosakola na lokuta.’ (Yilimia 5:31; 20:6; 23:16, 17, 25-28, 32) Yehova apekisaki bango te kosakola makambo ya lokuta.
16:16—Maloba oyo ya Yehova ete “nakotinda koluka baluki mingi ya mbisi” mpe “[babomi] mingi ya nyama” elimboli nini? Yango ekoki kolimbola ndenge oyo Yehova atindaki basoda ya banguna na bango báluka Bayuda oyo bakómaki batomboki, oyo etumbu na ye esengelaki kokómela bango. Kasi, na kotalela maloba ya Yilimia oyo ezali na Yilimia 16:15, vɛrsɛ yango ekoki mpe kolimbola koluka Bayisalaele oyo babongolaki motema.
20:7 (NW)—Na ndenge nini Yehova ‘asalelaki makasi na ye’ mpo na kotɛmɛla Yilimia mpe azimbisaki ye? Lokola bato bazalaki kosepela te na nsango oyo azalaki komemela bango mpe bazalaki kotɛmɛla ye ntango azali kosakwela bango bitumbu ya Yehova, Yilimia alɛmbaki nzoto mpe azalaki lisusu na makasi te ya kokoba mosala na ye. Kasi, Yehova asalelaki makasi na ye mpo na kotɛmɛla makanisi wana ya Yilimia mpe alendisaki ye akoba mosala. Na bongo, Yehova azimbisaki Yilimia na ndenge asalelaki ye mpo na kokokisa mosala oyo mosakoli ye moko azalaki komona ete akokoka yango te.
Mateya mpo na biso:
1:8. Na bantango mosusu Yehova akoki kobikisa bato na ye na minyoko; akoki kobimisa bazuzi ya sembo mpe kosala ete bakonzi ya makambo makasimakasi bálongwa mpe oyo ya mitema malamu bázwa bisika na bango to mpe akoki kopesa basaleli na ye makasi ya koyika mpiko na minyoko.—1 Bakolinti 10:13.
2:13, 18. Bayisalaele oyo bakómaki batomboki basalaki masumu mibale. Batikaki Yehova, ye oyo azalaki kopambola, kotambwisa mpe kobatela bango. Mpe na ndenge ya elilingi, bamitimwelaki mabulu na ndenge balukaki kosala boyokani na Ezipito mpe Asulia mpo básunga bango na ntango ya bitumba. Lelo oyo, kotika Nzambe ya solo mpo na kolanda bafilozofi ya bato mpe makanisi na bango mpe makambo ya politiki ya mokili oyo ezali lokola kolongola “liziba ya mai ya bomoi” mpo na kotya “mabulu matobwani.”
6:16 (NW). Yehova asɛngaki bato na ye oyo bakómaki batomboki báfanda mpe bámitalela, mpe bázonga na “banzela” oyo bankɔkɔ na bango batambolaki. Biso mpe, tomitalelaka mbala na mbala mpo na koyeba soki tozali kotambola na nzela oyo Yehova alingi tótambola?
7:1-15. Bayuda oyo batyaki elikya na bango na tempelo bazalaki kotalela yango lokola nkisi oyo ekoki kobatela bango, kasi yango ebikisaki bango te. Tosengeli kotambola na kondima kasi na komona te.—2 Bakolinti 5:7.
15:16, 17. Na ndakisa ya Yilimia biso mpe tokoki kolonga makanisi ya kolɛmba nzoto. Tokoki kosala yango soki tozali kotánga Biblia, kosanzola nkombo ya Yehova na mosala ya kosakola, mpe kokima baninga ya mabe.
17:1, 2. Masumu ya bato ya Yuda esalaki ete Yehova aboya mbeka na bango. Etamboli ya mbindo ekosala ete mbeka na biso ya masanzoli eboyama.
17:5-8. Tokoki kotyela bato mpe bibongiseli na bango motema kaka soki bazali kosala makambo oyo eyokani na mokano ya Nzambe mpe babuki mibeko na ye te. Kasi, na makambo lokola lobiko, kimya mpe libateli ya solosolo tosengeli kotya elikya na biso kaka epai ya Yehova.—Nzembo 146:3.
20:8-11. Tosengeli te kotika ete molende na biso mpo na mosala ya kosakola Bokonzi ekita mpo bato bazali koboya nsango yango, bazali kotɛmɛla biso, to konyokola biso.—Yakobo 5:10, 11.
“BÓYEISA NKINGO NA BINO NA NSE YA EKANGELI YA MOKONZI YA [BABILONE]”
Yilimia asakolaki bitumbu oyo esengelaki kokómela bakonzi minei ya nsuka ya Yuda, ná basakoli ya lokuta, babateli mabe ya mpate, mpe banganga-nzambe ya mabe. Yehova abengaki basaleli na ye ya sembo oyo batikalaki ete mbuma malamu; mpe alobaki boye: “Nakotya miso na ngai likoló na bango mpo na kosalela bango malamu.” (Yilimia 24:5, 6) Mokapo 25 elobeli na mokuse bisakweli misato oyo elobelami na molai na mikapo oyo elandi.
Banganga-nzambe ná basakoli bayokanaki ete báboma Yilimia. Ayebisaki bango ete basengeli kosalela mokonzi ya Babilone. Yilimia ayebisaki mokonzi Sidikiya boye: “Bóyeisa nkingo na bino na nse ya ekangeli ya mokonzi ya [Babilone].” (Yilimia 27:12) Kasi, “Ye oyo apanzaki Yisalaele akoyanganisa [Yisalaele].” (Yilimia 31:10) Yango wana elaka epesamaki epai ya Balekaba. Bakangaki Yilimia mpe batyaki ye “na lopango ya bakɛngɛli.” (Yilimia 37:21) Yelusaleme ebomamaki mpe bafandi na yango mingi bamemamaki na boombo. Yilimia ná mokomeli na ye Baluku, bazalaki na kati ya bato oyo batikalaki. Bato yango bazalaki kobanga mingi mpe nsukansuka bakendaki na Ezipito atako Yilimia apekisaki bango. Mokapo 46 tii 51 ezali na maloba oyo Yilimia alobaki mpo na bikólo mosusu.
Biyano na mituna ya Biblia:
22:30—Mobeko yango elongolaki mpe lotomo ya Klisto ya kofanda na kiti ya bokonzi ya Davidi? (Matai 1:1, 11) Te. Mobeko yango epekisaki mokitani nyonso ya Yoyakini ‘kofanda na kiti ya bokonzi ya Davidi . . . na Yuda.’ Yesu asengelaki koyangela uta na likoló, kasi te na kiti moko ya bokonzi na Yuda.
23:33—“Mokumba ya [Yehova]” ezali nini? Na mikolo ya Yilimia, makambo ya nsɔmɔ oyo mosakoli asakolaki mpo na kobomama ya Yelusaleme ezalaki mokumba mpo na bato ya ekólo na ye. Epai mosusu, bato oyo baboyaki koyoka nsango na ye bazalaki mokumba mpo na Yehova yango wana asengelaki kobwaka bango. Ndenge moko mpe lelo oyo, nsango ya Biblia oyo ezali kosakola kobomama ya mangomba ya boklisto ezali mokumba mpo na bato ya mangomba yango, mpe bato oyo bazali koboya koyoka bazali mokumba mpo na Nzambe.
31:33—Ndenge nini tokoki koloba ete mibeko ya Nzambe ekomami na kati ya mitema? Ntango moto azali kolinga mibeko ya Nzambe mingi mpe azali na mposa makasi ya kosala mokano ya Yehova, tokoki koloba ete mobeko ya Nzambe ekomami na kati ya motema na ye.
32:10-15—Kokoma boyokani moko na mikanda mibale ezalaki na ntina nini? Mokanda oyo efungwamá ezalaki mpo etángamaka. Mokanda oyo ekangamá ezalaki mpo na kotala soki makambo oyo ezali na mokanda oyo efungwamá ezali mpenza bongo. Yilimia atikelaki biso ndakisa malamu na likambo etali kolanda makambo oyo esɛngami na mibeko ata soki tozali kosala boyokani moko na ndeko na biso ya mosuni to ya elimo.
33:23, 24—“Mabota mibale” oyo elobelami awa ezali mabota nini? Libota moko ezali ya bokonzi oyo euti na libota ya Davidi, mpe libota mosusu ezali ya banganga-nzambe, bakitani ya Alona. Ntango Yelusaleme mpe tempelo ya Yehova ebebisamaki, Yehova abwakaki mabota yango mibale mpe bokonzi mpe losambo na ye ezalaki lisusu te awa na mabelé.
46:22—Mpo na nini bakokanisi mongongo ya Ezipito na oyo ya nyoka? Yango ekoki kozala makɛlɛlɛ makasi oyo bafandi na yango bazalaki kosala ntango bakimi liboso ya banguna na bango to mpe ndenge oyo mingongo na bango ezalaki kokita ntango bakutani na makambo ya mpasi. Yilimia asalelaki mpe maloba yango mpo na komonisa ete Bafalao ya Ezipito bazalaki komikosa na kokanisa ete kolata ekɔti oyo ezalaki na elilingi ya nyoka oyo ezalaki komonisa nzambe-mwasi Ouadjet ezalaki kobatela bango.
Mateya mpo na biso:
21:8, 9; 38:19. Ata ntango etikalaki moke ete Yelusaleme ebebisama, Yehova atikelaki bafandi na yango oyo basengelaki kobomama libaku ya kopona nzela ya malamu. Ya solo, “mawa na ye ezali monene.”—2 Samwele 24:14; Nzembo 119:156.
31:34. Ezali mpenza kolendisa na koyeba ete ntango Yehova alimbisi masumu ya moto, akanisaka yango lisusu te mpo na kopesa ye etumbu!
38:7-13; 39:15-18. Yehova abosanaka te mosala ya sembo oyo tosalelaka ye; yango esangisi mpe ‘kosalela basantu.’—Baebele 6:10.
45:4, 5. Ndenge ezalaki liboso Yuda ebomama, “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ezali mpe ntango te mpo na “koluka makambo minene” lokola bozwi, lokumu, to konduka biloko ya mokili.—2 Timote 3:1; 1 Yoane 2:17.
YELUSALEME ETUMBAMI
Na mbula ya 11 ya bokonzi ya Sidikiya, na mobu 607, basoda ya Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, basilaki kozingela Yelusaleme na boumeli ya sanza 18. Na sanza ya mitano, na mokolo ya nsambo, na mbula ya 19 ya boyangeli ya Nebukadanesala, Nebuzaladana, mokóló ya bakɛngɛli, “ayaki na” Yelusaleme. (2 Mikonzi 25:8) Ekoki kozala ete wana azalaki na kaa na ye na pembeni ya engumba, Nebuzaladana azalaki kolandela makambo oyo ezalaki koleka na kati ya engumba mpe azalaki kobongisa malamumalamu ndenge akozwa engumba yango. Mikolo misato na nsima, elingi koloba, na mokolo ya libwa ya sanza yango ‘akɔtaki’ na Yelusaleme. Mpe atumbaki engumba yango.—Yilimia 52:12, 13.
Yilimia alobeli lisolo mobimba ya kokwea ya Yelusaleme. Ndenge oyo alobeli makambo yango ya nsɔmɔ emonisi ntina oyo alelaki. Mokanda ya Bileli emonisi ndenge oyo alelaki.
[Elilingi na lokasa 8]
Nsango ya Yilimia ezalaki mpe na bitumbu oyo Yehova akanaki kopesa Yelusaleme
[Elilingi na lokasa 9]
Ndenge nini Yehova ‘asalelaki makasi na ye’ mpo na kotɛmɛla Yilimia?
[Elilingi na lokasa 10]
“Lokola mbuma oyo malamu, nakotánga bakangami ya Yuda bongo.”—Yilimia 24:5