Engebene Biblia
Kolimbisa mpe kobosana—Ndenge nini ekoki kosalema?
“NAKOLIMBISA BOKESENE NA BANGO, NAKOKANISA MPE MABE NA BANGO LISUSU TE.”—YILIMIA 31:34.
MALOBA oyo makomamaki na mosakoli Yilimia mazali komonisa likambo moko ya kobenda likebi na ntina etali motema mawa ya Yehova: Ntango alimbisaka, abosanaka. (Yisaya 43:25) Biblia elobi lisusu ete: “Ndenge moko Yehova alimbisi bino, bino mpe bósala bobele bongo.” (Bakolose 3:13, NW) Na bongo, lokola tozali baklisto, tosengeli komekola lolenge ya kolimbisa ya Yehova.
Nzokande, mwa mituna ya ntina mizali kobima. Ntango Yehova alimbisaka, amikundolaka mpenza masumu na biso lisusu te? Mpe ntango biso tolimbisaka, tosengeli kobosana na lolenge oyo ete tozali lisusu te na likoki ya komikundola yango? Tokoki koloba ete ata soki tobosani na lolenge wana te, yango elingi koloba ete tolimbisi mpenza te?
Lolenge oyo Yehova alimbisaka
Kolimbisa esɛngaka kotika kokanga nkanda. Ntango Yehova alimbisaka, kolimbisa na ye ezalaka ya mobimba.a Davidi, mokomi na Nzembo, akomaki ete: “Mpamela na [Yehova] ekoumela te, akobatelaka nkanda na ye ntango molai te. Mosika pelamoko yango kati na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngwɛli na biso. Pelamoko tata akoyokela bana na ye mawa, boye Yehova akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye.”—Nzembo 103:9, 12, 13.
Kolimbisa ya Nzambe na mobimba elobelami lisusu na Misala 3:19: “Na bongo, bongola mitema, mpe butwa ete bopɛtwa na masumu.” Liloba ‘bopɛtwa’ euti na likelelo ya Greke (e·xa·leiʹpho) oyo elimboli “kopangwisa, kolongola na kokuluta.” (Talá Emoniseli 7:17; 21:4.) The New International Dictionary of New Testament Theology elimboli ete: “Likanisi oyo limonisami na likelelo awa, mpe mbala mosusu epai mosusu, ekoki kozala likanisi ya kopangwisa etánda ya cire mpo na kosalela yango lisusu ([elingi koloba] ‘kolongola makanisi ya kala’).” Soki tobongoli motema na ntina na masumu na biso, Yehova alongolaka yango nyonso. Yango elingi koloba ete akomikundolaka masumu na biso lisusu te? Tótalela ndakisa oyo elobelami kati na Biblia.
Ntango Mokonzi Davidi asalaki ekobo na Bata-Seba mpe na nsima amekaki kobomba likambo yango na kolukáká mwango mpo na kobomisa mobali na ye, Yehova atindaki mosakoli Natana mpo na kopamela Davidi. (2 Samwele 11:1-17; 12:1-12) Litomba nini emonanaki? Davidi abongolaki motema na bosembo nyonso mpe Yehova alimbisaki ye. (2 Samwele 12:13; Nzembo 32:1-5) Yehova abosanaki masumu ya Davidi? Soko moke te! Na nsima, Gada mpe Natana oyo bazalaki bakomi ya Biblia balobelaki likambo yango nyonso kati na mokanda ya 2 Samwele (oyo esilaki kokomama soko na 1040 L.T.B.) mwa ntango moke liboso ya liwa ya Davidi.
Na bongo, lisoló to bokundoli ya masumu ya Davidi—bakisá lisoló ya kobongola motema na ye mpe na nsima kolimbisa oyo Yehova amonisaki epai na ye—ezali kino lelo mpo na litomba ya batángi ya Biblia na ntango na biso. (Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:11) Ya solo, lokola “liloba na Yehova [oyo lizwami kati na Biblia] ezali koumela seko,” lisoló ya masumu ya Davidi likobosanama soko moke te!—1 Petelo 1:25.
Na yango, na lolenge nini tokoki koloba ete Yehova azimisaka makambo nyonso oyo tosalaki liboso, wana tobongoli mitema na biso na bosembo nyonso? Lolenge nini tokoki kososola maloba ya Yehova oyo ete: “Nakolimbisa bokesene na bango, nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te”?—Yilimia 31:34.
Lolenge oyo Yehova abosanaka
Likelelo ya Liebele oyo libongolami na “nakokanisa” (lolenge ya za·kharʹ) elimboli te bobele komikundola makambo maleká. Engebene búku Theological Wordbook of the Old Testament, ekoki mpe kolimbola “kolobela, koyebisa, kozongela, kosakola, kobelela, kokundola, kofunda, koyambola.” Búku Theological Dictionary of the Old Testament ebakisi ete: “Ya solo, mbala mingi, [za·kharʹ] emonisaka ekela to ezalaka esika moko na makelelo ya bikela.” Na yango, ntango Yehova azali koloba na bato na ye ya motó makasi ete “akokanisa mabungá na bango,” alingi koloba ete akozwa ekateli mpo na bango mpamba te baboyaki kobongola motema. (Yilimia 14:10) Nzokande, ntango Yehova alobi ete: “Nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te,” azali kondimisa biso ete wana alimbisi masumu na biso, akozongisa yango lisusu te mpo na kofunda, kokweisa to kopesa biso etumbu.
Na nzela ya mosakoli Ezekiele, Yehova alimbolaki lolenge oyo alimbisaka mpe abosanaka: “Soko nde moto mabe akobongwa na masumu masalaki ye mpe akotosa mibeko na ngai nyonso, mpe akosala yango ezali sembo mpe alima, akobika solo, akokufa te. Mabungá masalaki ye nyonso—makotángama na ntina na ye te; akobika mpo na boyengebene bosalaki ye.” (Ezekiele 18:21, 22; 33:14-16) Ya solo, ntango Yehova alimbisaka mosumuki oyo abongoli motema, alongolaka makambo mabe oyo asalaki kala mpe abosanaka na boye ete akozwa ekateli te mpo na moto yango na ntina na masumu wana na mikolo mizali koya.—Baloma 4:7, 8.
Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kolimbisa te na lolenge ya kokoka lokola Yehova alimbisaka; makanisi na ye mpe banzela na ye ezali likoló koleka ya biso. (Yisaya 55:8, 9) Na bongo, kino na meko nini tokoki, na lolenge ya malamu kolimbisa mpe kobosana wana basusu basaleli biso mabe?
Lolenge oyo tokoki kolimbisa mpe kobosana
“Bolimbisanaka moko na mosusu,” ezali toli tozali kokuta na Baefese 4:32, (NW). Engebene molimboli na maloba ya nkótá, William E. Vine, liloba ya Greke oyo libongolami na “bolimbisanaka” (kha·riʹzo·mai) elimboli “komoniselana ngɔlu kozanga nkaká.” Wana mabungá oyo basaleli biso mazali ya mike, tokoki kokakatana mingi te mpo na kolimbisa. Na komikundoláká ete biso mpe tozali bato ya kozanga kokoka, yango ekosalisa biso na kolimbisa mabungá ya basusu. (Bakolose 3:13) Ntango tolimbisi moto oyo asaleli biso mabe, tótika kokangela ye nkanda, boye, boyokani na biso elongo na ye ekobeba te. Nsima ya mikolo, likanisi ya mabungá yango mike likoki kolongwa.
Nzokande, ezali boni soki basusu basaleli biso mabe na lolenge ya mabe koleka, oyo epesi biso mpasi mingi na motema? Na makambo oyo maleki ndelo, lokola kosangisa nzoto kati na bandeko ya libota moko, kobebisa moto, mpe koluka koboma moto, kolimbisa ekoki kotalela makambo mingi. Yango ekozala mingimingi bongo na ntango mosali na mabe azali kondima te mabe oyo ye asali, azangi kobongola motema, azangi komilela.b (Masese 28:13) Yehova ye moko alimbisaka te bato oyo baboyi kobongola motema, oyo bazali kosala mabe na nkó. (Baebele 6:4-6; 10:26) Soki mabe basaleli biso ezali monene, mbala mosusu tokolónga te kolongola yango nyonso kati na makanisi na biso. Atako bongo, tokoki kobɔndisama na likambo oyo ete kati na mokili ya sika oyo mozali koya, “makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:4) Ezala eloko nini oyo tokokanisa na ntango wana, yango ekozokisa biso te, ekopesa mpe biso mpasi te motindo moko na oyo tokoki koyoka sikawa.
Kati na makambo mosusu tosengeli kokamata bibongiseli mpo na kosilisa mikakatano, mbala mosusu na kosololáká elongo na moto oyo asaleli biso mabe, liboso ete tókoka kolimbisa. (Baefese 4:26) Na kosaláká motindo oyo, mokakatano ekoki kosilisama, moko akosɛnga bolimbisi mpe mosusu akondima kolimbisa. Ezali boni mpo na kobosana? Mbala mosusu, tokobosana na mobimba te likambo oyo lisalamaki, kasi tokoki kobosana na lolenge oyo ete tokokangela moto oyo asaleli biso mabe nkanda te to tokozongela likambo yango lisusu te na mikolo mizali koya. Tokolobela yango epai na bato mosusu te, mpe tokomitangola mpe te na moto oyo asaleli biso mabe. Nzokande, ekoki kokamata mwa ntango mpo ete boyokani na biso na moto yango ezonga, mpe mbala mosusu, tokozala lisusu te na boninga lokola oyo tozalaki na yango liboso.
Tókamata ndakisa moko: Oyebisi likambo na yo moko ya nkuku epai na moninga na yo oyo otyelaka motema mpe na nsima oyei koyoka ete ayebisi yango epai na bato mosusu; yango epesi yo mpasi mingi na motema. Okei kokutana na ye mpo ete bosolola na ntina na likambo yango, mpe ayoki mawa, amileli mpe asɛngi bolimbisi. Na koyokáká komilela na ye ya motema mobimba, motema na yo etindi yo na kolimbisa ye. Obosani mpenza likambo oyo lisalemaki? Mpenza te; na ntembe te okozala na ekɛngɛ mpo na koyebisa ye makambo na yo na mikolo mizali koya. Nzokande; olimbisi ye, okozongela mbala na mbala te likambo yango elongo na ye. Okokanga nkanda te, okolobela yango mpe na basusu te. Mbala mosusu, okozala na boyokani ya penepene te elongo na ye lokola ozalaki na yango liboso, kasi ozali kokóba kolinga ye lokola ndeko na yo moklisto.—Kokanisá na Masese 20:19.
Nzokande, ezali boni soki atako milende na yo mpo na kosilisa makambo, moto oyo asaleli yo mabe aboyi kondima mbeba na ye mpe aboyi kosɛnga bolimbisi? Okoki kolimbisa na lolenge ya kozanga kokanga nkanda? Kolimbisa basusu elingi koloba te ete kokanga miso to kotalela mpamba likambo oyo basali biso. Nkanda ezali mokumba ya bozito mpo na komema; ekoki kozindisa makanisi na biso mpe kolongola biso kimya. Soki tozali kozela kosɛnga bolimbisi oyo ekoki koya te, yango ekoki kopesa biso lisusu mpasi koleka. Ya solo, tozali kopesa nzela na moto oyo asali biso mabe ete ayangela mayoki na biso. Na yango, tosengeli kolimbisa basusu, to kozanga kokanga nkanda, ezali bobele te mpo na matomba na bango kasi mpe mpo na oyo ya biso moko mpo ete tókoba kozala malamu na bomoi na biso kozanga ete tóbulungana.
Kolimbisa basusu ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, soki kobongola motema ya solosolo emonani, tokoki komeka komekola lolenge oyo Yehova alimbisaka. Ntango alimbisaka basáli na mabe oyo babongoli mitema, akangaka nkanda te—abwakaka makambo oyo masalemaki mpe abosanaka yango na boye ete akotalela lisusu masumu na bango wana te na mikolo mizali koya. Biso mpe tokoki kosala makasi na kotika kokanga nkanda wana moto oyo asaleli biso mabe abongoli motema. Nzokande, ekoki kozala na makambo mosusu oyo tosengeli ata kolimbisa te. Moto oyo basaleli ye bokesene to mabe koleka ndelo asɛngisami te na kolimbisa mosáli na mabe oyo aboi kobongola motema. (Kokanisá na Nzembo 139:21, 22.) Kasi na makambo mingi, ntango basusu basaleli biso mabe, tokoki kolimbisa na boye ete tótika kokanga nkanda mpe tokoki kobosana na boye ete tokozongela makambo yango lisusu te mpo na bandeko na biso na mikolo mizali koya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló “Engebene Biblia: Lolenge nini kolimbisa ya Nzambe ezali ya mobimba?” kati na Lamuká! ya 8 Desɛ́mbɛ 1993, nkasa 18-19, (ebimeli ya Lifalansé).
b Búku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, lokasa 1135 elobi ete: “Baklisto basengeli te kolimbisa baoyo bazali kosala makambo na mayele mabe, bazali kosala masumu na nkó mpe bazangi kobongola motema. Bato motindo wana bakómaka banguna ya Nzambe.”—Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 9]
Yosefe mpe bandeko na ye