Mituna ya Batángi
Lokola Batatoli ya Yehova basalaka milende ya kozala na kolongobana mpe batyelanaka motema, mpo na nini bakanisaka ete ezali na ntina kosala mokanda ya boyokani ntango balingi kosala mombongo bango na bango?
Kosala bongo ezali likambo liyokani na Makomami, yango ezali likambo ya mayele mpe ya bolingo. Ndenge nini? Tiká tótalela makambo wana ya mikanda ya boyokani kati na makambo ya mombongo.
Biblia ezali na masoló ya makambo oyo Nzambe asalaki na Bayisalaele, libota oyo asalaki na yango kondimana. Ezali mpe na makambo ya mombongo kati na basambeli ya solo. Genese mokapo 23 ezali na lisoló moko oyo tokoki kotalela. Ntango molingami na ye Sala akufaki, Abalayama azalaki na mposa ya esika moko mpo na kokunda ye. Akómaki kosolola na Bakanana oyo bafandaki pene na Hebeloni. Vɛrsɛ́ 7 kino 9 emonisi ete apesaki motuya ya mosolo mokokani na eteni ya mabelé oyo azalaki na yango mposa. Vɛrsɛ́ 10 eyebisi ete apesaki motuya yango liboso na bato banso, mpe na matoi ya basusu oyo bafandaki na ekuke ya mboka. Vɛrsɛ́ 13 emonisi ete mokóló mabelé andimaki kopesa yango na Abalayama, kasi ye ayanolaki ete alingaki nde kosomba mabelé yango. Mpe vɛrsɛ́ 17, 18, mpe 20 elimboli ete esalemaki bongo, mpe likambo yango lindimisamaki “na miso na Bahiti mpe liboso na bato nyonso bazalaki kokɔta na ekuke na mboka na ye.”
Kasi, elingaki nde kozala ndenge mosusu soki bato yango mibale oyo bayokanaki na makambo ya mombongo bazalaki basambeli ya solo? Mokapo 32 ya mokanda ya Yilimia epesi eyano. Kobanda na vɛrsɛ́ 6, tozali kotánga ete Yilimia asengelaki kosomba mabelé epai na ndeko na ye. Vɛrsɛ́ 9 emonisi ete bayokanaki na mosolo oyo mokokaki mpenza. Na nsima, totángi boye na vɛrsɛ́ 10-12: “[Ngai Yilimia] nakomaki mpe mokanda mpe nakangaki yango, nabyangaki batatoli mpe [namekaki, NW] mosolo kati na [emekeli, NW] na bozito. Bongo nakamataki mokanda na lisombi oyo ekangami pelamoko mobeko mpe ezaleli, mpe oyo ezalaki polele lokola. Mpe napesaki mokanda na lisombi epai na Baluku, mwana na Neliya, mwana na Mahaseya, na miso na Hanamaele, mwana na ndeko na tata na ngai mpe na miso na batatoli baoyo bakomaki nkombo na mokanda na lisombi, liboso na Bayuda nyonso baoyo bafandaki na lopango na bakɛngɛli.”
Ɛɛ, atako Yilimia asombaki elanga epai na moninga na ye mosambeli, oyo azalaki kútu ndeko na ye, akokisaki makambo ya ntina oyo masɛngami na mibeko. Mikanda mibale mikomamaki—moko etikamaki polele mpo na kosalelama kozanga nkaká, mpe mosusu ekangamaki mpo na kozala elembeteli oyo esengeli kondimisa bosolo ya mokanda oyo motikamaki polele, soki ntembe ebimi likoló na yango. Makambo nyonso wana masalemaki “na miso na bango,” lokola vɛrsɛ́ 13 elobi yango. Boye, yango ezalaki likambo ya mombongo oyo limonisami liboso na bato banso, mpe oyo lindimami na mibeko. Na bongo, emonani polele ete ezali na kolandáká ndakisa ya makambo oyo mazali kati na Makomami nde basambeli ya solo basalaka makambo na lolenge yango, oyo endimami mpe etyami na mikanda.
Yango ezali mpe likambo ya mayele. Toyebi malamumalamu bosolo ya maloba oyo ete “ntango mpe makambo makanami te ezali kokwela bango nyonso.” (Mosakoli 9:11, NW) Yango etaleli mpe baklisto ya sembo oyo bamipesi. Yakobo 4:13, 14 emonisi yango na maloba oyo: “Yakani bino bato bozali koloba ete, Lelo soko lobi tokokenda na mboka oyo, tokolekisa mbula moko wana, tokosala mombongo, tokozwa litomba. Boyebi makambo na lobi te. Bomoi na bino [ekozala] nini?” Na bongo, tokoki kobanda mwango moko; na ndakisa kosomba biloko, kosala boyokani mpo na mosala, to koyikanisa biloko mosusu mpo na moto moko. Kasi lobi—to sanza ekoya to mbula ya nsima—ekomema makambo nini? Ekozala boni soki moko kati na biso mpe mosalani na biso azwi likámá? Yango ekoki komonana ete likoki ya kolanda boyokani yango ekozala lisusu te. Ezali boni soki tokoki te kosala mosala, to moto oyo tolingi kosalela azali lisusu na likoki ya kolanda kofuta te to kotosa te makambo oyo ye asengeli kosala na kotalela boyokani? Soki ezali ata na mokanda moko te ya boyokani, mikakatano ya solosolo mikoki kobima, oyo mikokaki kopɛngolama to kosilisama soki mokanda ya boyokani mozalaki.
Lisusu, tosengeli kobosana te ete lokola makambo mingi ya bomoi mabimelaka biso mbalakaka, ekoki kokóma ete moto mosusu nde akoya kokóba mpe kosukisa misala na biso ya mombongo to mpe misala ya mombongo ya mosalani na biso. Yakobo abakisaki na vɛrsɛ́ 14 ete: “Bozali bobele londende, komonana mwa ntango moke na nsima kolimwa.” Ezali solo ete tokoki kokufa na ntango oyo tokanisaki te. Kontrá, to mokanda ya boyokani oyo ekomami, ekoki mpenza kosalisa baoyo bakoya nsima na bino, soki likambo moko oyo likanamaki te libimi na ngámbo moko to na ngámbo mosusu.
Na ndimbola mosusu, yango ememi biso mpe na likambo ya misato—mikanda ya boyokani ezali likambo moko ya bolingo mpenza. Ya solo, soki moko kati na baoyo basalaki boyokani akufi to azwi likámá oyo libebisi makoki na ye, boye ekozala likambo ya bolingo mpo na moklisto oyo asilaki kokoma makambo nyonso masɛngami na ye to mikumba na ye. Mpe na esika ya komonisa kozanga kotyelana motema, yango ezali nde komonisa bolingo mpo na ndeko oyo tozali kosala na ye na kokomáká mokanda ya boyokani oyo ekoloba polele mpe na bosikisiki oyo asengeli kosala to oyo asengeli kozwa. Litambe wana ya bolingo ekolɛmbisa likambo nyonso oyo likoki kobimisa nkanda to nkɛlɛ soki moko kati na basalani mibale, oyo bazali bato ya kozanga kokoka, abosani mwa makambo to mikumba mosusu. Mpe nani kati na biso azali moto ya kozanga kokoka te, nani abosanaka te, to nani ekómelaka ye te na koyoka malamu te makambo to makanisi oyo malobami?—Matai 16:5.
Tokoki ata kokóba kotánga mitindo mingi lisusu oyo mpo na yango mikanda ya boyokani na makambo ya mombongo mizali komonisa bolingo mpo na ndeko na biso, mpo na libota na biso, mpe mpo na lisangá mobimba. Kasi esengeli kozala polele ete longola komonisa bolingo, likambo lileki ntina ezali ete mikanda motindo wana mizali likambo ya mayele mpe milobelami kati na Makomami.