Yehova apambolaka mpe abatelaka bato ya botosi
“Nde ye oyo akoyokamela ngai akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.” —MASESE 1:33.
1, 2. Mpo na nini kotosa Nzambe ezali na ntina mingi? Pesá ndakisa.
BANA ya nsoso bazali kododa bilei na kati ya matiti, bazali ata koyeba te ete kombekombe azali kopumbwapumbwa likoló na bango. Na mbala moko, mama na bango asali makɛlɛlɛ makasi mpo na kobenga bango mpe atandi mapapu na ye. Bana na ye bayei mbangu, mpe na mwa ntango moke, babombami na nse ya mapapu na ye. Kombekombe alongwe wana mpe akei.a Mwa lisolo oyo eteyi biso nini? Eteyi biso ete botosi ebikisaka!
2 Liteya yango ezali na ntina mingi, mingimingi mpo na baklisto lelo oyo, mpamba te Satana abimisi manzaka na ye nyonso mpo na koluka kolya basaleli ya Nzambe. (Emoniseli 12:9, 12, 17) Mposa na ye ezali aboma biso na elimo mpo Yehova asepela na biso lisusu te mpe tózwa bomoi ya seko te. (1 Petelo 5:8) Nzokande, soki tozali pene na Nzambe mpe tozali kondima toli oyo azali kopesa biso na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye kozanga kokakatana, tokoki kotya motema ete akobatela biso. Mokomi moko ya nzembo akomaki ete: “Akozipa yo na nsala na ye mpe okobombama na nse ya mapapu na ye.”—Nzembo 91:4.
Banguna balongaki ekólo moko mpo ezangaki botosi
3. Lokola Bayisalaele bazalaki ntango nyonso matoi mangbongi, esukelaki bango ndenge nini?
3 Ntango ekólo Yisalaele ezalaki kotosa Yehova, azalaki ntango nyonso kobatela ekólo yango. Kasi, bato yango bazalaki kopesa Mozalisi na bango mokɔngɔ mingi mpe bazalaki kosambela banzambe oyo basalemi na mabaya mpe mabanga, “biloko ya mpamba oyo ekoki kosunga te to kobikisa te.” (1 Samwele 12:21) Lokola likambo yango eumelaki bankama ya bambula, ekólo yango mobimba epɛngwaki mpenza na boye ete likoki ya kozongisa yango na nzela ezalaki lisusu te. Yango wana, Yesu alobaki na mawa mpenza ete: “Yelusaleme, Yelusaleme, yo mobomi ya basakoli mpe mobambi-mabanga na baoyo batindamaki epai na yo,—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi ayanganisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye! Kasi bino bolingaki yango te. Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.”—Matai 23:37, 38.
4. Ndenge nini emonanaki polele na mobu 70 T.B. ete Yehova asundolaki Yelusaleme?
4 Na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.) nde emonanaki polele ete Yehova asundolaki Yisalaele, ekólo ya bapɛngwi. Na mbula wana, basoda ya Loma bakɔtaki na Yelusaleme na babɛndɛlɛ na bango oyo ezalaki na elilingi ya mpongo mpe babomaki bato na ndenge ya nsɔmɔ. Na mikolo yango, bato bazalaki ebele na engumba yango mpo na fɛti ya Elekeli. Ebele ya bambeka oyo bazalaki kopesa esalaki eloko te mpo Nzambe asepela na bango. Makambo ya nsɔmɔ wana elamusaki na makanisi na bango maloba oyo Samwele alobaki na Mokonzi Saulo oyo aboyaki kotosa, ete: “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba na bambeka koleka kotosa mongongo ya Yehova? Yoká! Kotosa eleki mbeka, kotya likebi eleki mafuta ya bampate mibali.”—1 Samwele 15:22, NW.
5. Yehova alukaka botosi ya ndenge nini, mpe nini ezali kondimisa biso ete bato bakoki kozala na botosi ya ndenge yango?
5 Atako Yehova asɛngaka ete bato bátosa ye, abosanaka te ete bato bazali na bolɛmbu mpo bazali bikelamu ya kozanga kokoka. (Nzembo 130:3, 4) Asɛngaka ete moto azala motema sembo mpe ete kondima, bolingo mpe kobanga koyokisa ye mawa nde etinda ye na kotosa. (Deteronome 10:12, 13; Masese 16:6; Yisaya 43:10; Mika 6:8; Baloma 6:17) ‘Lipata monene ya batatoli oyo bazalaki liboso Klisto abotama awa na mabele’ batikalaki sembo na komekama makasi, ata tii na liwa; yango ezali komonisa ete moto akoki kotosa ndenge yango. (Baebele 11:36, 37; 12:1) Bato yango basepelisaki mpenza motema ya Yehova! (Masese 27:11) Kasi, ezali na bato mosusu oyo bazalaki sembo na ebandeli kasi balandaki kotosa te. Moko na bato oyo basalaki bongo ezali Yoasa, mokonzi moko ya Yuda na ntango ya kala.
Baninga mabe babebisi mokonzi
6, 7. Yoasa azalaki mokonzi ya ndenge nini ntango Yoyada azalaki naino na bomoi?
6 Mokonzi Yoasa abikaki na liwa ntango azalaki naino mwana moke. Ntango Yoasa akokisaki mbula nsambo, Nganga-Nzambe Monene Yoyada atyaki kobanga pembeni mpe abimisaki ye na esika oyo babombaki ye mpe atyaki ye mokonzi. Yoyada, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, azalaki lokola tata mpe mopesi-toli ya Yoasa; yango wana mokonzi yango oyo azalaki elenge “asalaki malamu na miso ya [Yehova] mikolo nyonso ya nganga Yoyada.”—2 Ntango 22:10–23:1, 11; 24:1, 2.
7 Moko na misala malamu oyo Yoasa asalaki ezalaki ya kobongisa lisusu tempelo, likambo oyo “Yoasa akanaki na motema na ye.” Alamusaki makanisi ya Nganga-Nzambe Monene Yoyada ete esengeli kokɔngɔla mpako ya tempelo na Yuda mpe na Yelusaleme, lokola ‘Moize akataki,’ mpo na kozwa mbongo ya kosala na yango misala ya kobongisa tempelo. Tomoni mpenza ete Yoyada alongaki kolendisa mokonzi yango oyo azalaki elenge ete ayekola mpe atosa Mibeko ya Nzambe. Yango wana, mosala ya kobongisa tempelo mpe kosala basaani ya tempelo esilaki noki.—2 Ntango 24:4, 6, 13, 14; Deteronome 17:18.
8. (a) Likambo nini mpenzampenza ememaki Yoasa na kokwea na elimo? (b) Mokonzi asalaki makambo nini lokola azangaki botosi?
8 Kasi, likambo ya mawa ezali ete Yoasa akobaki kotosa Yehova te. Mpo na nini? Liloba ya Nzambe elobi na biso boye: “Nsima ya kufa ya Yoyada, bakóló ya Yuda bayaki mpe bakumisaki mokonzi. Mokonzi ayokaki bango. Batikaki ndako ya [Yehova], Nzambe ya batata na bango, basalelaki [makonzí mosantu, NW] mpe bikeko. Mpasi eyelaki Yuda na Yelusaleme mpo na lisumu oyo na bango.” Boninga mabe oyo mokonzi asalaki na bakóló ya Yuda ememaki ye na koboya koyoka basakoli ya Nzambe; moko na basakoli yango ezalaki Yekalia, mwana ya Yoyada, ye abangaki te kopamela Yoasa mpe bato mpo na kozanga botosi na bango. Na esika abongola motema, Yoasa atindaki báboma Yekalia na mabanga. Talá kozanga botosi mpe motema makasi oyo Yoasa akómaki na yango; nyonso wana mpo na baninga mabe!—2 Ntango 24:17-22; 1 Bakolinti 15:33.
9. Ndenge nini nsuka ya Yoasa na mikóló ezali komonisa ete kozanga botosi ezali likambo ya mayele te?
9 Lokola Yoasa na baninga na ye mabe batikaki Yehova, makambo nini ekómelaki bango? Basoda ya Sulia—bazalaki kutu “bato mingi te”—bayaki na Yuda mpe “babebisaki mikóló nyonso kati na bato.” Basoda yango basɛngisaki mokonzi apesa bango bozwi na ye na wolo na palata ya tempelo. Atako basoda yango babomaki Yoasa te, batikaki ye na mpasi mpe na maladi. Mwa moke na nsima, basaleli na ye moko, basalelaki ye likita mpe babomaki ye. (2 Ntango 24:23-25; 2 Mikonzi 12:17, 18) Maloba oyo Yehova alobaki na Yisalaele ekokisamaki mpenza: “Soko nde okotosa mongongo na [Yehova] Nzambe na yo te, mpe okosɛnzɛla te ete osala malako na ye mpe mibeko na ye nyonso . . . , mbɛlɛ bilakeli mabe oyo nyonso bikokwela yo mpe bikozwa yo.”—Deteronome 28:15.
Mokomeli moko abiki mpo na botosi na ye
10, 11. (a) Mpo na nini ezali malamu kotalela toli oyo Yehova apesaki Baluku? (b) Toli nini Yehova apesaki Baluku?
10 Ntango mosusu olɛmbaka nzoto mpo bato moke kaka nde bazali kosepela na nsango malamu oyo ozali komemela bango? Na bantango mosusu olulaka mwa moke bato oyo bazali na bomɛngo mpe bomoi na bango? Soki ezali bongo, talelá ndakisa ya Baluku, mokomeli ya Yilimia, mpe toli malamu oyo Yehova apesaki ye.
11 Baluku azalaki kokoma esakweli moko ntango oyo Yehova alobaki makambo oyo etalelaki ye. Mpo na nini? Mpamba te Baluku akómaki koyoka mawa mpo na bomoi oyo azalaki na yango mpe akómaki na mposa ya kotika mosala ya ntina mingi oyo Nzambe apesaki ye mpo na koluka makambo mosusu. Ntango Yehova amonaki ete Baluku akómi na makanisi mosusu, alobaki na ye polele, kasi na boboto, mpo na kopesa ye toli oyo: “Ozali nde koluka makambo minene mpo na yo moko? Luká yango te zambi talá, nakoyeisa mabe likoló na nzoto nyonso. . . . Kasi nakopesa bomoi na yo epai na yo lokola libonza na bisika nyonso bikokenda yo wana.”—Yilimia 36:4; 45:5.
12. Mpo na nini tosengeli koluka “makambo minene” te na mokili oyo?
12 Ozali komona na maloba ya Yehova epai ya Baluku ete azalaki komibanzabanza mingi mpo na moto malamu yango oyo asalelaki ye na bosembo mpe na mpiko elongo na Yilimia? Lelo oyo mpe, Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na baoyo bazali kobendama na makanisi ya koluka oyo bango bazali kokanisa ete ezali bomoi ya malamu koleka na mokili oyo. Likambo malamu ezali ete, lokola Baluku, mingi kati na bato yango bazali kondima toli oyo bandeko oyo bakɔmeli na elimo bazali kopesa bango na bolingo mpenza. (Luka 15:4-7) Tómikosa te, eloko moko ya malonga ezali te mpo na baoyo bazali koluka “makambo minene” na mokili oyo! Bolamu ya solo oyo bazali koluka bazali mpe kozwa yango te; kutu, likambo ya mabe mingi ezali ete etikali moke báleka elongo na mokili oyo na bamposa na yango.—Matai 6:19, 20; 1 Yoane 2:15-17.
13. Liteya nini ya komikitisa lisolo ya Baluku ezali koteya biso?
13 Lisolo ya Baluku ezali mpe koteya biso komikitisa. Tóbosana te ete ezali Yehova ye moko te nde alobaki na Baluku; alobaki na ye na nzela ya Yilimia, moto oyo Baluku ayebaki malamu mabunga mpe bolɛmbu na ye. (Yilimia 45:1, 2) Kasi, Baluku atyaki lolendo liboso te; amikitisaki mpe asosolaki ete toli yango eutaki nde na Yehova. (2 Ntango 26:3, 4, 16; Masese 18:12; 19:20) Biso mpe soki ‘tobɛti libaku liboso ete tóyeba yango,’ bongo bapesi biso toli oyo euti na Liloba ya Nzambe, tólanda ndakisa ya moto oyo akɔmeli, oyo azali na bososoli ya elimo mpe na komikitisa oyo Baluku amonisaki.—Bagalatia 6:1.
14. Mpo na nini ezali malamu tótosaka baoyo bazali kokamba biso?
14 Soki tozali na komikitisa ndenge wana, yango ekosalisa mpe bato oyo bazali kopesa biso toli. Baebele 13:17 elobi boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo yango ekozala likama mpo na bino.” Bankulutu babondelaka Yehova mingi mpo na kosɛnga ye mpiko, bwanya, mpe mayele oyo ebongi mpo na kopesa toli, oyo ezali likambo moko ya mpasi na mosala na bango ya kobatela bampate! Tiká ete ‘tóndimaka bato ya ndenge wana.’—1 Bakolinti 16:18.
15. (a) Ndenge nini Yilimia amonisaki ete atyelaki Baluku motema? (b) Ndenge nini Baluku azwaki mbano mpo na botosi mpe komikitisa na ye?
15 Emonani ete Baluku abongolaki makanisi na ye, mpamba te na nsima, Yilimia apesaki ye mokumba ya mpasi koleka; asɛngaki ye akende na tempelo mpe atánga na mongongo makasi nsango ya bitumbu oyo Yilimia azalaki kotánga, oyo ye moko akomaki. Baluku atosaki? Ɛɛ, asalaki “nyonso elakaki mosakoli Yilimia ye.” Kutu, atángaki nsango ya bitumbu yango ata na matoi ya bakóló ya Yelusaleme, likambo oyo esɛngaki mpenza kozala na mpiko. (Yilimia 36:1-6, 8, 14, 15) Kanisá botɔndi oyo Baluku azalaki na yango mbula 18 na nsima lokola abikaki ntango bato ya Babilone babebisaki engumba, mpamba te ayokaki likebisi ya Yehova mpe atikaki koluka “makambo minene”!—Yilimia 39:1, 2, 11, 12; 43:6.
Botosi ebikisaki bato mosusu ntango banguna bazingaki Yelusaleme
16. Ndenge nini Yehova amonisaki motema mawa mpo na Bayuda ya Yelusaleme ntango bato ya Babilone bazingaki engumba yango na mobu 607 L.T.B.?
16 Ntango Yelusaleme ebomamaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Nzambe amonisaki lisusu motema mawa na ye mpo na bato ya botosi. Ntango mpasi elekaki makasi lokola basoda bazingaki engumba, Yehova alobaki na Bayuda boye: “Talá, natii liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa. Ye oyo akotikala na mboka oyo, akokufa na mopanga to na nzala to na maladi; kasi ye oyo akobima mpe akokima epai na Bakaladi baoyo bazali kozingela bino, akobika mpe bomoi na ye ekozala lokola eloko epunzami na ye.” (Yilimia 21:8, 9) Atako ebongaki ete bato ya Yelusaleme bábomama, Yehova amonisaki motema mawa mpo na baoyo batosaki ye, ata na ntango wana ya nsuka.b
17. (a) Na makambo nini mibale botosi ya Yilimia emekamaki ntango Yehova alobaki na ye ayebisa Bayuda oyo bazalaki na engumba ete ‘bákima epai ya Bakaladi’? (b) Litomba nini tokoki kozwa na ndakisa ya botosi mpe ya mpiko oyo Yilimia amonisaki?
17 Na ntembe te, botosi ya Yilimia emekamaki na ndenge esengelaki ayebisa Bayuda ete bámikaba epai ya Bakaladi. Ya liboso, azalaki na zuwa mpo na nkombo ya Nzambe. Alingaki te ete banguna básambwisa nkombo yango ntango bakoloba ete balongi mpo na banzambe na bango ya bikeko. (Yilimia 50:2, 11; Bileli 2:16) Lisusu, Yilimia ayebaki ete soki ayebisi bato ete bámikaba, akotya bomoi na ye na likama mpenza, mpamba te mingi bakokanisa ete azali kotinda bato bátombokela bakonzi. Kasi, abangaki te, atosaki Yehova mpe asakolaki bitumbu na ye. (Yilimia 38:4, 17, 18) Biso mpe tozali lokola Yilimia; tozali kosakola nsango oyo ezali kosepelisa bato te. Bato batyolaki Yesu mpo azalaki kosakola nsango yango. (Yisaya 53:3; Matai 24:9) Yango wana, tózala lokola Yilimia, ‘tóbanga bato’ te, kasi tózala na mpiko, tótosa Yehova, mpe tótyela ye elikya na biso nyonso.—Masese 29:25.
Botosi na ntango ya etumba ya Koko
18. Botosi ya basaleli ya Yehova ekomekama lisusu ndenge nini na mikolo oyo ezali koya?
18 Etikali moke, ebongiseli mobimba ya makambo mabe oyo Satana azali kotambwisa ekobomama na “bolɔzi moko monene” oyo esalemá naino te. (Matai 24:21) Na ntembe te, liboso mpe na boumeli ya ntango yango, basaleli ya Nzambe bakomekama makasi mpo na kotala kondima mpe botosi na bango. Na ndakisa, Biblia elobi na biso ete Satana, na mokumba na ye ya ‘Koko ya mokili ya Makoko,’ akobundisa basaleli ya Yehova, akozala na “basoda mingi . . . lokola lipata lizipi mokili.” (Ezekiele 38:2, 14-16) Lokola basaleli ya Nzambe bakozala na bibundeli te mpe basoda yango bakozala mingi koleka bango, bakoluka kobombama na “nsala” ya Yehova oyo akofungola mpo na kobomba bato ya botosi.
19, 20. (a) Mpo na nini botosi ezalaki na ntina mingi mpo na bana ya Yisalaele ntango bazalaki na Mai Motane? (b) Ndenge nini komanyola na lisolo ya Mai Motane ekoki komemela biso litomba?
19 Yango ezali kotinda biso na kokanisa lisusu makambo oyo ezalaki ntango bana ya Yisalaele babimaki na Ezipito. Nsima ya kobimisa malɔzi zomi oyo ebɛtaki mokili ya Ezipito, na esika ete Yehova akamba basaleli na ye na Mokili ya Ndaka na nzela ya mokuse, ye akendaki na bango tii na Mai Motane, epai banguna bakokaki kozingela bango mpe kobundisa bango. Soki totaleli makambo na ndenge ya mayele ya bitumba, tokomona ete kokende na nzela wana ezalaki mpenza likama. Soki ozalaki wana, olingaki nde kotosa liloba ya Yehova oyo Moize azalaki koloba mpe kotambola na elikya tii na Mai Motane, ata soki oyebaki ete botiki nzela ya Mokili ya Ndaka na ngámbo mosusu?—Exode 14:1-4.
20 Soki tolandi kotánga Exode mokapo 14, tokomona ndenge oyo Yehova abikisaki bato na ye na nguya ya kokamwa. Ntango tozali koyekola masolo ya ndenge yango mpe tozali komanyola likoló na yango, ekoki mpenza kolendisa kondima na biso! (2 Petelo 2:9) Kondima makasi oyo ekopesa biso ekolendisa biso na kotosa Yehova, ata na ntango oyo, na ndenge ya kokanisa ya biso bato, tomoni ete masɛngami na ye ebongi te. (Masese 3:5, 6) Yango wana, omituna motuna oyo, ‘Nazali kosala makasi mpo na koyekola Biblia na mozindo, kobondela, komanyola, mpe kosangana elongo na basaleli ya Nzambe, mpo na kotonga kondima na ngai?’—Baebele 10:24, 25; 12:1-3.
Botosi epesaka elikya
21. Bato oyo bazali kotosa Yehova bazali kozwa mapamboli nini sikoyo mpe mapamboli nini bakozwa na mikolo ezali koya?
21 Bato oyo batosaka Yehova bazali komona, ata sikoyo, ndenge oyo Masese 1:33 ezali kokokisama na bomoi na bango; yango elobi ete: “Nde ye oyo akoyokamela ngai [na botosi] akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.” Maloba yango ya kobɔndisa ekokokisama malamumalamu na mokolo ya nkanda ya Yehova, mokolo oyo ezali lisusu mosika te! Kutu, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Ntango makambo wana ekobanda kobima, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpamba te kosikolama na bino ekómi pene.” (Luka 21:28) Ezali polele ete kaka bato oyo bazali kotosa Nzambe nde bakolanda maloba yango na elikya mpenza.—Matai 7:21.
22. (a) Mpo na nini basaleli ya Yehova bazali na elikya? (b) Makambo nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
22 Ntina mosusu ya kozala na elikya ezali ete “Nkolo [Mokonzi Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.” (Amosa 3:7) Lelo oyo, Yehova azali kotinda basakoli te lokola na ntango ya kala; kasi, apesi moombo ya sembo mokumba ya kopesa bato ya ndako na ye bilei ya elimo na ntango ebongi. (Matai 24:45-47) Yango wana, ezali na ntina mingi tótosa “moombo” yango! Lisolo oyo elandi ekomonisa ete botosi yango ezali mpe komonisa ndenge na biso ya kotalela Yesu, nkolo ya “moombo” yango. Ezali ye nde oyo ‘bato ya bikólo nyonso bakotosa ye.’—Genese 49:10, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako bato mosusu balobaka ete mama ya nsoso abangabangaka, buku moko ya lisangá moko mpo na kobatela banyama elobi ete “abangaka liwa te mpo na kobundela bana na ye soki bazali na likama.”
b Yilimia 38:19 emonisi ete Bayuda mosusu ‘bakimaki’ epai ya Bakaladi mpe babikaki, kasi bamemaki bango na boombo. Toyebi te soki bamikabaki mpo balandaki maloba ya Yilimia. Atako bongo, ndenge babikaki emonisi ete mosakoli alobaki solo.
Ozali koyeba lisusu?
• Bayisalaele basukaki wapi lokola bazalaki mbala na mbala kozanga botosi?
• Makambo nini bato oyo bazalaki na Mokonzi Yoasa na ebandeli babendaki ye na kosala mpe baoyo azalaki na bango na nsuka ya bomoi na ye?
• Lisolo ya Baluku ekoki koteya biso makambo nini?
• Mpo na nini basaleli ya Yehova oyo bazali na botosi bazali kobanga te atako nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo ekómi pene?
[Elilingi na lokasa 13]
Toli ya Yoyada esalisaki elenge Yoasa na kotosa Yehova
[Elilingi na lokasa 15]
Baninga mabe batindaki Yoasa abomisa mosakoli ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 16]
Olingaki nde kotosa Yehova mpe komona nguya na ye ya kokamwa mpo na kobikisa?