Nzete oyo “elelaka” basalaka na “mpisoli” na yango misala mingi
Yilimia 51:8 (NW) elobi ete: ‘Bókamata nkisi ya kopakola mpo na mpasi.’ Mpo na koyeba moko ya bisika oyo nkisi yango eutaka, nkisi oyo ekitisaka mpasi mpe ebikisaka maladi ndenge na ndenge, tókende na esanga ya Chios, na Mai Monene ya Eggée.
NA EBANDELI ya eleko ya molunge, basali-bilanga ya esanga ya Chios bamilɛngɛlaka na ndenge mosusu mpo na mosala ya kobuka mbuma. Nsima ya kokɔmbɔla na nse ya banzete oyo ebimisaka mastic, basopaka mabele ya mpɛmbɛ zingazinga ya banzete yango ya mikusemikuse oyo nkasa na yango ekaukaka noki te; nsima na yango bakómisaka mabele yango patatalu. Na nsima basali-bilanga yango bakataka bampota na mibimbi ya banzete yango mpo ekoka “kolela.” Ntango basali bongo, “mpisoli” ya mwa mpɛmbɛ ebandaka kotanga. Nsima ya pɔsɔ mibale to misato, mai yango ekokangama mpe basali-bilanga bakolongola yango, ezala mbala moko na mibimbi ya banzete to na nse, likoló ya mabele oyo basopaki zingazinga ya banzete yango. Ezali “mpisoli” wana, oyo babengi gomme de mastic, nde basalaka na yango nkisi ya kopakola, nkombo na yango baume.
Kasi, liboso ya kozwa mastic yango, esɛngaka kozala na motema molai mpe kosala mosala makasi. Nzete yango ya mibimbi ya mwa moindo, ezalaka nyokanyoka mpe ekolaka noki te. Mpo ekɔmela mpenza, elingi koloba ekóma na bolai ya mɛtrɛ kobanda mibale tii misato mpe ebanda kobimisa mastic, esɛngaka mbula 40 to 50.
Longola mosala ya kokatakata bampota na mibimbi ya banzete yango mpe kolongola “mpisoli” na yango, esɛngaka kosala misala mosusu mpo na kozwa mastic. Ntango basali-bilanga basilisi kolongola “mpisoli” ya nzete yango, banyongelaka yango, basukolaka yango, mpe bakabolaka yango na kotalela bonene to kitoko na yango. Na nsima, basukolaka mastic yango lisusu; soki mosala wana esili nde bakoki sikoyo kosala na yango misala ndenge na ndenge.
Lisolo ya nzete yango ya ntina mingi
Liloba ya Lifalanse“mastic” euti na liloba ya Grɛki oyo elimboli “kolya mino.” (Matai 8:12; Emoniseli 16:10) Nkombo wana emonisi ntango mosusu ete kobanda na ntango ya kala, basalelaka mastic mpo na kosala bazoka oyo batafunaka mpo na kosilisa nsolo mabe na monɔkɔ.
Moto ya liboso ya kolobela mastic ezalaki Hérodote, ye azalaki Mogrɛki mpe moto ya mayele na masolo ya kala oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bakomi mpe minganga mosusu ya ntango ya kala—na ndakisa Apollodore, Dioscoride, Théophraste, mpe Hippocrate—balobelaki ndenge bazalaki kosalela mastic na mosala ya monganga mpo na kosalisa bato ya maladi. Atako banzete ya mastic ekolaka pembenipembeni ya Mai Monene ya Méditerranée, kobanda na mobu soki 50 ya ntango na biso (T.B.), esanga ya Chios nde ekómi kosala mastic mingi koleka. Mpe mpo na bikólo oyo ebundisaki mpe elongaki esanga ya Chios, kobanda na Ba-Romain, Ba-Génois mpe Ba-Ottoman, eloko ya liboso oyo bazalaki kolanda ezalaki mastic.
Basalelaka mastic misala mingi
Minganga oyo bazalaki na Ezipito ya kala bazalaki kosalela mastic mpo na kosalisa maladi ndenge na ndenge, na ndakisa maladi ya pulupulu mpe maladi babengi arthrite. Bazalaki mpe kosalela yango lokola mpaka ya malasi mpe mpo na kokaukisa bibembe ya bato ete epɔla te. Ekoki kozala ete ‘nkisi ya Gilada’ oyo Biblia elobeli ezalaki mpe kouta na nzete ya mastic; Biblia emonisi ete nkisi yango ezalaki kobikisa bato ya maladi, bazalaki kosalela yango lokola mafuta ya kopakola mpe malasi, mpe mpo na kopakola bibembe mpo epɔla noki te. (Yilimia 8:22; 46:11) Bato mosusu balobaki kutu ete ekoki kozala ete nzete oyo ebimisaka setakete (stacté), moko ya biloko oyo bazalaki kosala na yango mpaka ya malasi mosantu oyo bazalaki kosalela kaka na mosala mosantu, ezali lolenge mosusu ya nzete ya mastic.—Exode 30:34, 35.
Lelo oyo, okoki kokuta mastic na kati ya langi (vernis) oyo bapakolaka na biloko ndenge na ndenge mpo na kobatela yango; na ndakisa mayemi (tableaux ) oyo basalaka na langi ya mafuta, biloko oyo babɛti-miziki basalelaka, bakiti, bamesa mpe biloko mosusu ya ndako. Basalelaka mpe mastic mpo elekisaka kura to molunge te, ekɔtisaka mai te mpe batalelaka yango lokola moko ya biloko oyo esalaka ete langi oyo batii na bilamba mpe na mayemi esila te. Basalelaka mpe mastic mpo na kolamba kɔle mpe kosala ekoto (cuir). Lokola ezali na nsolo kitoko mpe na biloko mosusu ya kitoko, basalelaka mastic mpo na kosala sabuni, mafuta ya kopakola, mpe malasi.
Na liste ya nkisi 25 ya monganga oyo eyebani na mokili mobimba, mastic mpe ezali na kati. Tii lelo, na mikili ya Ba-Arabe, basalelaka yango mbala mingi lokola nkisi ya bonkɔkɔ. Basalelaka mpe mastic mpo na kobamba madusu ya mino mpe bapakolaka yango na kati ya mabenga ya mikemike ya plastike (capsule) oyo batyaka nkisi.
Nkisi ya kopakola oyo babengi baume euti na “mpisoli” oyo basalelaka yango misala mingi, oyo nzete ya mastic ebimisaka ntango “elelaka”; tomoni mpe ete “mpisoli” yango ekitisi mpenza mpasi ya bato ebele mpe ebikisi bato ebele na boumeli ya bankama ya bambula. Yango wana, ebongi mpenza ete esakweli ya Yilimia eloba ete: “Bókamata nkisi ya kopakola mpo na mpasi.”
[Bililingi na lokasa 31]
Esanga ya Chios
Bazali kolongola ‘mastic’
Bazali kolongola “mpisoli” ya mastic na likebi mpenza
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Elilingi ya esanga ya Chios oyo ezali komonisa ndenge bazali kolongola mastic: Na ndingisa ya Korais Library; bafɔtɔ nyonso etikali: Kostas Stamoulis