Kebá okóma te na motema ya lofundo
“Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo.”—YAKOBO 4:6.
1. Pesá ndakisa moko ya lolendo oyo ezali mabe te.
OSILÁ kosala likambo moko oyo epesaki yo mwa lolendo na motema? Mingi tosilá koyoka yango. Mwa lolendo oyo toyokaka ntango tosali likambo moko ya malamu, ezalaka mabe te. Na ndakisa, ntango baboti batali bulletin ya mwana na bango mpe bamoni ete azali na etamboli ya malamu na kelasi mpe azali koyekola malamu, bayokaka esengo mpe emonanaka na bilongi na bango. Ntoma Paulo ná baninga na ye bazalaki na esengo mpo na lisangá moko oyo bafungolaki, mpamba te bandeko bazalaki sembo mpe bayikaki mpiko na minyoko.—1 Batesaloniki 1:1, 6; 2:19, 20; 2 Batesaloniki 1:1, 4.
2. Mpo na nini mbala mingi lolendo ezalaka malamu te?
2 Bandakisa wana ezali komonisa ete lolendo ekoki kolimbola kaka esengo oyo moto akoki koyoka mpo na likambo moko ya malamu oyo asali to mpo na eloko moko oyo azali na yango. Kasi, mbala mingi, lolendo ezalaka nde komikumisa oyo ebongi te, komona ete oleki basusu mpo ozali na mayele mingi, ozali kitoko, ozali na bozwi, to mpo na mosala oyo osalaka. Mbala mingi, moto oyo azali na ezaleli yango alobaka na lofundo to mpe atombolaka mapeka. Biso baklisto tosengeli kokeba ete tókóma te na lolendo ya ndenge wana. Mpo na nini? Mpamba te tobotamaka na mposa ya moimi oyo nkɔkɔ na biso Adama atikelá biso. (Genese 8:21) Yango wana, mitema na biso ekoki kokosa biso tókóma na lolendo mpo na bantina oyo ebongi te. Na ndakisa, baklisto basengeli kokeba ete bákóma na lolendo te mpo na mposo, bozwi, bakelasi oyo batángi, mayele, to mosala oyo bayebi ntango bamikokanisi na bato mosusu. Kozala na lolendo mpo na makambo wana ebongi te mpe esepelisaka Yehova te.—Yilimia 9:23; Misala 10:34, 35; 1 Bakolinti 4:7; Bagalatia 5:26; 6:3, 4.
3. Lofundo ezali nini, mpe Yesu alobaki nini mpo na yango?
3 Ezali mpe na ntina mosusu oyo tosengeli koboya lolendo oyo ebongi te. Soki totiki yango ekola na mitema na biso, ekoki kobongwana na motindo moko ya lolendo ya mabe koleka oyo tobengi lofundo. Lofundo ezali nini? Moto ya lofundo asukaka te kaka na komimona ete aleki basusu, atyolaka mpe baoyo ye azali komona ete bazali na nse. (Luka 18:9; Yoane 7:47-49) Yesu atángaki “lofundo” na kati ya makambo oyo ebimaka “longwa na motema” mpe “ekómisaka moto mbindo.” (Malako 7:20-23) Baklisto bakoki komona polele ntina oyo basengeli mpenza kokeba ete bákóma te na motema ya lofundo.
4. Ndenge nini masolo ya Biblia oyo elobeli bato ya lofundo ekoki kosalisa biso?
4 Masolo ya Biblia oyo elobeli bato ya lofundo ekoki kosalisa yo okima ezaleli yango. Yango ekosalisa yo oyebaka mbala moko lolendo oyo ebongi te, oyo ntango mosusu okoki kozala na yango to oyo ekoki kokola mokemoke na motema na yo. Yango ekosalisa yo oboya makanisi oyo ekoki komema yo okóma na motema ya lofundo. Na ndenge yango, okobatelama ntango Nzambe akokokisa maloba na ye oyo: “Nakolongola na kati na yo bato oyo bayokaka esengo na lofundo; mpe okozala lisusu na lofundo te na ngomba na ngai mosantu.”—Sefania 3:11, NW.
Nzambe asukisaka bato ya lofundo
5, 6. Ndenge nini Falao alakisaki lofundo, mpe asukaki wapi?
5 Okoki mpe koyeba ndenge oyo Yehova atalelaka lofundo soki otali makambo oyo asalaki bakonzi minene lokola Falao. Ntembe ezali te ete Falao azalaki na motema ya lofundo. Lokola azalaki komimona ete azali nzambe, azalaki kotyola Bayisalaele, oyo bazalaki baombo na mboka na ye. Yoká eyano na ye ntango basɛngaki ye atika Bayisalaele bákende na esobe mpo na “kosala elambo” mpo na Yehova. Na lofundo nyonso Falao alobaki ete: “[Yehova] azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye mpe natika Yisalaele kokende?”—Exode 5:1, 2.
6 Yehova atindaki malɔzi na Ezipito; nsima ya bolɔzi ya motoba, atindaki Moize atuna mokonzi yango boye: “Ozali naino kolakisa lofundo epai ya bato na ngai mpe oboyi kotika bango bákende?” (Exode 9:17, NW) Na nsima, Moize asakolaki bolɔzi ya nsambo: mbula ya mabanga oyo ebebisaki mboka mobimba. Na bolɔzi ya zomi, Falao atikaki Bayisalaele; kasi, na nsima abongolaki lisusu makanisi mpe alandaki bango. Nsukansuka, Falao ná basoda na ye bakufaki na Mai Motane. Kanisá makanisi oyo elekaki na mitó na bango ntango bazalaki kokita na nse ya mai! Falao asukaki wapi ná lofundo na ye? Basoda na ye ya mpiko balobaki boye: “Tókima na liboso ya Yisalaele mpo ete [Yehova] azali kobunda ná Baezipito na ntina na bango.”—Exode 14:25.
7. Ndenge nini bakonzi ya Babilone balakisaki lofundo?
7 Yehova akitisaki mpe bakonzi mosusu oyo bazalaki na lofundo. Moko na bango ezali Senakeliba, mokonzi ya Asulia. (Yisaya 36:1-4, 20; 37:36-38) Bato ya Babilone balongaki Asulia; kasi, Yehova akitisaki mpe bakonzi mibale ya Babilone oyo bazalaki na lofundo. Kanisá fɛti oyo Mokonzi Belesasala asalisaki; ye ná bapaya na ye bamɛlaki vinyo na bakɔpɔ oyo bazwaki na tempelo ya Yehova, mpe bazalaki kokumisa banzambe ya Babilone. Mbala moko, lobɔkɔ ya moto ebimaki mpe ebandaki kokoma na efelo. Ntango Belesasala asɛngaki mosakoli Danyele alimbwela ye makomi yango, Danyele alobaki na ye boye: “Nzambe oyo Aleki-Likoló apesaki tata na yo Nebukadanesala bokonzi . . . Kasi ntango motema na ye ekómaki na lofundo . . . , bakitisaki ye na kiti ya bokonzi na ye, mpe balongolaki ye lokumu na ye. . . . Nde yo, Belesasala mwana na ye, omikitisi te na motema na yo, atako oyebaki nyonso wana.” (Danyele 5:3, 18, 20, 22, NW) Kaka na butu wana, basoda ya Bamede ná Baperse balongaki Babilone, mpe babomaki Belesasala.—Danyele 5:30, 31.
8. Makambo nini Yehova asalaki bato ndenge na ndenge oyo bazalaki na lofundo?
8 Kanisá mpe bato mosusu ya lofundo oyo batyolaki libota ya Yehova: Goliata, engambe Mofilistia; Amana, Ministre-mokonzi ya Perse, ná Mokonzi Elode Akilipa, oyo ayangelaki etúká ya Yudea. Nzambe abomaki bato wana misato mpo bazalaki na lofundo. (1 Samwele 17:42-51; Esetele 3:5, 6; 7:10; Misala 12:1-3, 21-23) Ndenge oyo Yehova asalaki bato wana ya lofundo emonisi bosolo ya likambo oyo: “Lolendo liboso ya kobeba, [elimo, NW] ya nzombo liboso ya kokwea.” (Masese 16:18) Ntembe ezali te, “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo.”—Yakobo 4:6.
9. Ndenge nini bakonzi ya Tulo babalukelaki Yisalaele?
9 Na bokeseni na mokonzi ya Ezipito, ya Asulia, mpe bakonzi ya Babilone, oyo bazalaki bato ya lofundo, mokonzi moko ya Tulo asalisaki mpenza libota ya Nzambe. Na boyangeli ya Davidi mpe ya Salomo, mokonzi wana atindaki bato bayebi misala mpe biloko ya mosala mpo na kotonga bandako ya mokonzi mpe tempelo ya Nzambe. (2 Samwele 5:11; 2 Ntango 2:11-16) Kasi, na nsima, bakonzi ya Tulo babalukelaki libota ya Nzambe. Nini ememaki bango na kosala bongo?—Nzembo 83:3-7; Yoele 3:4-6; Amosa 1: 9, 10.
“Motema na yo ekómaki na lofundo”
10, 11. (a) Nani oyo tokoki kokokanisa ye na bakonzi ya Tulo? (b) Nini ebongolaki ndenge oyo bakonzi ya Tulo bazalaki kotalela Yisalaele?
10 Mosakoli Ezekiele apemamaki na Yehova mpo na kokoma makambo oyo etɔndɔlaki mpe ekweisaki bakonzi ya Tulo. Makambo wana oyo etalaki “mokonzi ya Tulo” ezali na maloba oyo emonisaki mpenza bakonzi ya Tulo mpe mokabi ya libosoliboso, Satana, oyo “atɛlɛmaki makasi te na kati ya solo.” (Ezekiele 28:12; Yoane 8:44) Satana azalaki liboso na kati ya bana ya sembo ya Yehova kuna na likoló. Na nzela ya Ezekiele, Yehova Nzambe amonisaki ntina oyo bakonzi ya Tulo, ata mpe Satana, batikalaki sembo te:
11 “Ozalaki na Edene, elanga ya Nzambe. Okembelami na ndenge nyonso ya mabanga ya motuya . . . Ozalaki keluba na mapapu masembwi . . . Ozalaki na likambo na kotambola na yo te longwa na mokolo ya kozalisama na yo kino ntango lisumu ezwani na yo. Na kati ya mombongo na yo mingi otondaki na mabe mpe okweaki na lisumu. . . . Mpe nabebisaki yo, yo keluba na mapapu masembwi . . . Motema na yo ezalaki na lolendo, na ntina na bonzenga na yo; obebisaki mayele na yo na ntina na nkembo na yo.” (Ezekiele 28:13-17) Tomoni ete lofundo nde etindaki bakonzi ya Tulo bákóma konyokola libota ya Nzambe. Tulo ekómaki na bozwi mingi mpo na mombongo mpe eyebanaki mpo na biloko kitoko oyo ezalaki kouta kuna. (Yisaya 23:8, 9) Bakonzi ya Tulo bakómaki na lolendo, mpe bakómaki konyokola libota ya Nzambe.
12. Nini esalaki ete Satana apesa Nzambe mokɔngɔ, mpe akobaki kosala nini?
12 Ndenge moko mpe, ekelamu ya elimo oyo akómaki Satana azalaki liboso na bwanya oyo esengeli mpo na kokokisa mokumba nyonso oyo Nzambe apesaki ye. Na esika azala na botɔndi, ‘avimbaki na lolendo’ mpe akómaki kotyola boyangeli ya Nzambe. (1 Timote 3:6) Akómaki komipesa valɛrɛ mingi mpe akómaki na mposa ete Adama ná Eva básambela ye. Mposa mabe wana ekolaki na motema na ye mpe ebotaki lisumu. (Yakobo 1:14, 15) Satana akosaki Eva mpe ye alyaki mbuma ya nzete oyo Nzambe apekisaki. Na nsima, Satana asalelaki Eva mpo na kotinda Adama alya mbuma oyo Nzambe apekisaki. (Genese 3:1-6) Na ndenge yango, Adama ná Eva baboyaki Nzambe ayangela bango mpe, tokoloba ete bakómaki kosambela Satana. Lofundo ya Satana eleki mpenza ndelo. Alukaki kobenda baanzelu nyonso kuna na likoló mpe bato nyonso awa na mabelé, ata Yesu Klisto, básambela ye mpe bápesa bokonzi ya Yehova mokɔngɔ.—Matai 4:8-10; Emoniseli 12:3, 4, 9.
13. Lofundo ememi makambo nini?
13 Omoni ete lofundo ebandaki na Satana; yango ememaki lisumu, bampasi, ná makambo mabe oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili. Lokola Satana azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” azali kokoba kolendisa bato bázala na lolendo mpe lofundo. (2 Bakolinti 4:4) Lokola ayebi ete atikali na ntango mokuse, azali kobundisa baklisto ya solo. Mokano na ye ezali amema bango bápesa Nzambe mokɔngɔ, bákóma bato oyo bamilingaka bango moko, bato ya lolendo, mpe ya lofundo. Biblia esakolaki ete bato mingi bakokóma na bizaleli yango na “mikolo ya nsuka.”—2 Timote 3:1, 2; Emoniseli 12:12, 17.
14. Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo bazali na lofundo?
14 Nzokande, Yesu Klisto amonisaki polele mbuma mabe ya lofundo ya Satana. Mbala soki misato, liboso ya banguna oyo bazalaki komimona sembo, Yesu amonisaki makanisi ya Yehova na maloba oyo: “Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama mpe moto oyo azali komikitisa akotombolama.”—Luka 14:11; 18:14; Matai 23:12.
Batelá motema na yo mpo ekóma na lofundo te
15, 16. Nini ekómisaki Agala lofundo?
15 Mbala mosusu omoni ete bato nyonso ya lofundo oyo touti kolobela bazalaki bato minene. Yango elingi nde koloba ete bato mpamba bakómaka mpenza na lofundo te? Te. Tótalela likambo moko oyo esalemaki na ndako ya Abalayama. Abalayama azalaki na mwana te oyo akokaki kotikela bozwi na ye soki akufi, mpe mwasi na ye Sala akómaki na mbula oyo akokaki lisusu kobota te. Na ntango wana, mobali oyo akutani na likambo ya ndenge wana akokaki kozwa mwasi ya mibale mpo abota na ye bana. Nzambe atikaki nzela mabala ya ndenge wana esalemaka mpamba te ntango ekokaki naino te mpo azongisa mobeko ya libala ndenge ezalaki na ebandeli mpo na basambeli ya solo.—Matai 19:3-9.
16 Abalayama andimaki likambo oyo mwasi na ye asɛngaki ye ete abota na Agala, Moezipito moko oyo azalaki moombo ya Sala, mpo azala na mwana oyo akotikela bozwi na ye. Abalayama akómisaki Agala mwasi ya mibale, mpe mwasi yango azwaki zemi. Esengelaki azala na botɔndi mingi mpo na lokumu oyo bapesaki ye. Kasi, atikaki nzela ete motema na ye ekóma na lofundo. Biblia elobi boye: “Na ntango yango emonaki Agala ete azwaki zemi atyolaki nkolo na ye mwasi.” Likambo wana etyaki mobulu na ndako ya Abalayama mpe nsukansuka Sala abenganaki Agala. Kasi, na nsima basilisaki likambo yango. Anzelu ya Nzambe apesaki Agala toli ete: “Zongá epai ya nkolo na yo mpe omikitisa liboso na ye.” (Genese 16:4, 9, NW) Emonani ete Agala alandaki toli yango, azongelaki kotosa Sala, mpe akómaki nkɔkɔ ya ebele ya bato.
17, 18. Mpo na nini biso nyonso tosengeli kokeba na lofundo?
17 Likambo ya Agala emonisi ete soki moto akómi na bomoi ya malamu, ntango mosusu akómaka na lofundo. Liteya tozwi ezali ete ata moklisto oyo azali na motema ya malamu na mosala ya Nzambe akoki kokóma na lofundo soki akómi na bozwi to na bokonzi. Moklisto akoki mpe kokóma na lofundo soki bato mosusu bazali kokumisa ye mpo na makambo minene oyo azali kosala, mpo na bwanya, to mayele na ye. Ya solo, moklisto asengeli kokeba ete motema na ye ekóma na lofundo te. Mingimingi soki azali kosala makambo minene to akómi na mikumba ya minene.
18 Ntina ya libosoliboso oyo tosengeli koboya lofundo ezali ndenge oyo Nzambe atalelaka ezaleli yango. Liloba na ye elobi boye: “Miso ya lolendo mpe motema ya nzombo mpe mwinda ya bato mabe, nyonso ezali masumu.” (Masese 21:4) Kutu, Biblia ekebisi mpenzampenza baklisto oyo “bazali bato ya bomɛngo na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” ete “bázala na lolendo te” to lofundo. (1 Timote 6:17; Deteronome 8:11-17) Baklisto oyo bazali na bozwi te basengeli kokeba na “liso ya likunya,” mpe basengeli kobosana te ete moto nyonso, mozwi to mobola, akoki kokóma na lofundo.—Malako 7:21-23; Yakobo 4:5.
19. Ndenge nini Uziya abebisaki lokumu malamu na ye?
19 Lofundo mpe bizaleli mosusu ya mabe ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Na ndakisa, tótalela ndenge Mokonzi Uziya azalaki na ebandeli ya boyangeli na ye: “Asalaki yango ekokaki na miso ya [Yehova] . . . Amityaki koluka Nzambe . . . Mikolo nyonso ya bomoi na ye wana elukaki ye [Yehova], Nzambe alongisaki ye.” (2 Ntango 26:4, 5) Kasi, likambo ya mawa, Uziya abebisaki lokumu malamu oyo azalaki na yango na miso ya Nzambe, mpamba te “akómaki na lolendo mpe abebaki.” Akómaki komimona na valɛrɛ mingi mpe akɔtaki na tempelo mpo na kotumba mpaka ya malasi. Ntango banganga-nzambe bakebisaki ye ete asala likambo mabe wana te, “Uziya ayokaki nkanda.” Nsukansuka, Yehova apesaki ye maladi ya maba mpe azalaki lisusu na boyokani ya malamu te na Nzambe tii ntango akufaki.—2 Ntango 26:16-21.
20. (a) Ndenge nini lokumu malamu ya Mokonzi Yizikiya elingaki kobeba? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Sikoyo, talá bokeseni ná Mokonzi Yizikiya. Mokolo mosusu, lokumu malamu mingi ya mokonzi yango elingaki kobeba mpamba te “motema na ye [ekómaki, NW] na lolendo.” Kasi, likambo ya malamu mpo na ye, “Yizikiya amisɔkisaki mpo na lolendo ya motema na ye” mpe Nzambe asepelaki na ye lisusu. (2 Ntango 32:25, 26) Tomoni ete eloko esilisaki lolendo ya Yizikiya ezalaki komikitisa. Ya solo, komikitisa nde elongolaka lofundo. Yango wana, na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge oyo biso baklisto tokoki kolona komikitisa mpe kobatela ezaleli yango.
21. Baklisto oyo bazali na komikitisa bakoki kozala na elikya nini?
21 Kasi, tóbosana te makambo nyonso ya mabe oyo lofundo ebimisi. Lokola “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,” tózwa ekateli ya koboya mpenza ezaleli mabe wana. Wana tozali kosala makasi tózala baklisto oyo bazali na komikitisa, tokoki kozala na elikya ya kobika na mokolo monene ya Nzambe, ntango bato ya lofundo bakolongolama na mabelé, nzela moko na makambo mabe na bango. Na ntango wana, “nzombo ya moto ekosɔkisama mpe lolendo ya bato ekokitisama; mpe [Yehova] akokumisama, bobele ye moko, na mokolo yango.”—Yisaya 2:17.
Makanisi mpo na komanyola
• Moto ya lofundo azalaka na makambo nini?
• Lofundo ebandaki na nani?
• Nini ekoki kokómisa moto lofundo?
• Mpo na nini tosengeli kokeba ete tókóma na lofundo te?
[Elilingi na lokasa 23]
Falao moto ya lofundo asukaki na kosambwa
[Elilingi na lokasa 24]
Ntango Agala akómaki mwa moto, akómaki na lofundo
[Elilingi na lokasa 25]
Yizikiya amikitisaki mpe Nzambe asepelaki na ye lisusu