Mokanda ya Biblia nimero 26—Ezekiele
Mokomi: Ezekiele
Esika ya bokomi: Babylone
Nsuka ya bokomi: soko 591 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 613–soko 591 L.T.B.
1. Makambo nini bakangami bakutanaki na yango na Babilone, mpe mimekano nini mosusu bakutanaki na yango?
NA MOBU 617 L.T.B., Yoyakini, mokonzi ya Yuda, apesaki Yelusaleme na mabɔkɔ ya Nebukadanesala oyo amemaki bato ya lokumu ya mboka yango kino na Babilone, akamataki mpe biloko ya motuya ya ndako ya Yehova mpe ya ndako ya mokonzi. Libota ya mokonzi, mpe bankumu, bazalaki kati na bakangami wana; elongo na bato ya mpiko, ya nguya, bakisá mpe bato na misala ya maboko mpe bato ya misala ya botongi mpe Ezekiele mwana na nganga Buzi. (2 Mik. 24:11-17; Ezek. 1:1-3) Na mawa na mitema, bakangami Bayisalaele basukisaki mobembo na bango ya mpasi oyo ebandaki uta na mokili ya ngomba mingi, ya bitima, mpe ya mabwaku, bakómaki sikawa na mokili ya bisobe minene. Sikawa bakómi kofanda pene na ebale Kebale na nsé ya boyangeli moko ya nguya, awa bato oyo bafandi zingazinga na bango bazali na mimeseno ya bopaya mpe na losambo ya bapakano. Nebukadanesala apesaki nzela na Bayisalaele ete bátonga ndako mpo na bango moko, bázwa basáli, mpe básala mombongo. (Ezek. 8:1; Yil. 29:5-7; Ezl. 2:65) Soki bamipesaki na mosala, mbɛlɛ balingaki kokóma na bozwi mingi. Bakokwea nde na motambo ya lingomba ya Babilone mpe na ezaleli ya kotya biloko ya mosuni na esika ya liboso? Bakolanda kotombokela Yehova? Bakotalela boombo na bango lokola disipilini euti na Yehova? Mimekano misusu mizalaki kozela bango kati na mokili na bango ya boombo.
2. (a) Basakoli misato nini bayebanaki mingi na eleko ya mpasi oyo ezalaki liboso ya kobebisama ya Yelusaleme? (b) Ezekiele abéngami lolenge nini, mpe nkombo na ye elimboli nini? (c) Ezekiele asakolaki na boumeli ya mbula boni, mpe nini elobami na ntina na bomoi na ye mpe liwa na ye?
2 Na boumeli ya eleko wana ya mpasi oyo ezalaki liboso ya kobebisama ya Yelusaleme, Yehova azangaki basakoli te mpo na kosalela ye mpe mpo na kosalela Bayisalaele. Yilimia azalaki mpenza na Yelusaleme, Daniele azalaki kofanda kati na ndako ya mokonzi ya Babilone, mpe Ezekiele azalaki mosakoli epai na Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone. Ezekiele azalaki nganga mpe mosakoli, Yilimia mpe azwaki libaku motindo wana mpe na nsima, Zekalia. (Ezek. 1:3) Uta na ebandeli kino na nsuka ya mokanda na ye abéngami mbala 90 ete “mwana na moto,” ezali likambo ya ntina mingi oyo tosengeli kotalela wana ezali biso koyekola esakweli na ye, mpamba te, kati na Makomami ya Greke ya boklisto, Yesu abéngami mpe “Mwana na moto,” soko mbala 80. (Ezek. 2:1; Mat. 8:20) Nkombo na ye Ezekiele (na Liebele, Yechez·qeʼlʹ) elimboli, “Nzambe akopesaka makasi.” Ezalaki na mbula ya mitano ya boombo ya Yoyakini, na mobu 613 L.T.B. nde Ezekiele atindamaki na Yehova lokola mosakoli. Mokanda na ye momonisi biso ete akóbaki mosala na ye kino na mobu ya 27 ya boombo, elingi koloba mbula 22 na nsima. (Ezek. 1:1, 2; 29:17) Abalaki, kasi mwasi na ye akufaki na mokolo oyo Nebukadanesala abandaki kozingela Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka. (24:2, 18) Mokolo mpe lolenge oyo Ezekiele akufaki eyebani te.
3. Tokoki koloba nini mpo na komonisa ete Ezekiele nde akomaki mokanda oyo ebéngami na nkombo na ye, mpe nini emonisi bosolo na yango mpe esika na yango kati na kanɔ́ ya Biblia?
3 Likambo oyo ete Ezekiele nde akomaki mokanda oyo ebéngami na nkombo na ye mpe ete ebongi mpenza kotángama kati na kanɔ́ ya Makomami ekoki kobɛtɛlama ntembe te. Etángamaki kati na kanɔ́ ya eleko ya Ezela mpe ezwami kati na kataloge ya ntango ya baklisto ya liboso, na ndakisa, etángami mpe kati kanɔ́ ya Origène. Bosolo na yango emonisami polele mpo na bokokani monene oyo ezali kati na bililingi oyo bisalelami kuna mpe bililingi oyo bisalelami kati na mokanda ya Yilimia mpe kati na mokanda ya Emoniseli.—Ezek. 24:2-12—Yil. 1:13-15; Ezek. 23:1-49—Yil. 3:6-11; Ezek. 18:2-4—Yil. 31:29, 30; Ezek. 1:5, 10—Emon. 4:6, 7; Ezek. 5:17—Emon. 6:8; Ezek. 9:4—Emon. 7:3; Ezek. 2:9; 3:1—Emon. 10:2, 8-10; Ezek. 23:22, 25, 26—Emon. 17:16; 18:8; Ezek. 27:30, 36—Emon. 18:9, 17-19; Ezek. 37:27—Emon. 21:3; Ezek. 48:30-34—Emon. 21:12, 13; Ezek. 47:1, 7, 12—Emon. 22:1, 2.
4. Bisakweli nini ya Ezekiele bikokisamaki na lolenge ya kokamwisa?
4 Elembeteli mosusu oyo emonisi bosolo na yango ezali bongo kokokisama ya bisakweli ya Ezekiele na lolenge ya kokamwisa likoló na mabota ya zingazinga ya Yisalaele, lokola Tulo, Ezipito, mpe Edome. Na ndakisa, Ezekiele asakolaki ete Tulo ekobebisama, mpe yango ekokisamaki na ndambo ntango Nebukadanesala akamataki engumba wana nsima ya kozingela yango na boumeli ya mbula 13. (Ezek. 26:2-21) Na ntango yango, Tulo ebebisamaki na mobimba te. Nzokande, ekateli ya Yehova ezalaki ete esengelaki kobebisama na mobimba. Asakolaki na nzela ya Ezekiele ete: “Nakopalola mabelé na ye, mpe nakozalisa ye libanga mpamba. . . . Bakobwaka mabanga na yo mpe nzeté na yo mpe mabelé na yo na kati na mai.” (26:4, 12) Nyonso wana ekokisamaki nsima ya mbula koleka 250, na ntango Alesandala Monene atɛmɛlaki engumba wana ya Tulo, na eteni na yango oyo etongamaki kati na esanga. Nsima ya kobebisa engumba oyo etongamaki kati na mokili, basodá ya Alesandala bayanganisaki mabanga na yango mpe babwakaki yango na mai monene mpe esalaki bongo gbagba ya mɛtɛlɛ 800 kino na engumba oyo etongamaki kati na esanga. Nsima ya kozingela yango na mokakatano nyonso, basodá bamataki bifelo oyo bizalaki na bosánda ya mɛtɛlɛ 46 mpe bakamataki engumba yango na mobu 332 L.T.B. Ebele ya bato babomamaki, mpe mingi mosusu batekamaki lokola baombo. Lokola Ezekiele asakolaki yango, Tulo ekómaki ‘libanga mpamba, esika na kotanda maluba.’ (26:14)a Na ngámbo mosusu ya Mokili ya Ndaka, Baedome bakabi-baninga, bango mpe basilisami nyɛɛ; yango ekokisi bongo esakweli ya Ezekiele. (25:12, 13; 35:2-9)b Mpe, ya solo, bisakweli ya Ezekiele na ntina na kobebisama ya Yelusaleme mpe ya kozongisama lisusu ya Yisalaele ekokisamaki mpe na bosikisiki mpenza.—17:12-21; 36:7-14.
5. Lolenge nini Bayuda batalelaki bisakweli ya liboso ya Ezekiele?
5 Na mibu ya ebandeli ya mosala na ye lokola mosakoli, Ezekiele asakolaki bisakweli ya sikisiki mpenza ya Nzambe likoló na Yelusaleme oyo ezangaki sembo mpe akebisaki bakangami Bayuda na ntina na losambo ya bikeko. (14:1-8; 17:12-21) Bakangami Bayuda bamonisaki ata elembo moko te ya kobongola motema na bosembo nyonso. Bakambi na bango bazalaki na momeseno ya kokende kotuna Ezekiele mituna, kasi bazalaki kotya likebi te na nsango euti na Yehova oyo Ezekiele azalaki koyebisa bango. Bakóbaki na losambo na bango ya bikeko mpe na momeseno na bango ya koluka bikolo mingi ya mosuni. Kobebisama ya tempelo na bango, ya engumba na bango ya bulɛɛ, ya libota na bango ya bokonzi epesaki bango mawa mingi, kasi bobele bato moke nde bamikitisaki mpe babongolaki motema na komonáká bongo.—Nz. 137:1-9.
6. Bisakweli oyo Ezekiele asakolaki na nsima bilobelaki mingi likambo nini, mpe lolenge nini kobulisama ya nkombo ya Yehova emonisami polele?
6 Na mibu oyo milandaki nsima, bisakweli ya Ezekiele bilobelaki mingi elikya ya kozongisama lisusu. Kati na bisakweli yango, azalaki mpe kopamela mabota ya zingazinga ya Yuda mpo ete basepelaki na kobebisama ya Yuda. Likambo oyo ete mabota yango masengelaki koyokisama nsɔ́ni, mpe ete Yisalaele esengelaki kozongisama lisusu, esengelaki kobulisa Yehova na miso na bango. Na mokuse, ntina ya boombo mpe ya kozongisama na bango lisusu ezalaki oyo: ‘Bato na Yisalaele mpe mabota bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].’ (Ezek. 39:7, 22) Kobulisama ya nkombo ya Nzambe elobelami mingi kati na mokanda yango mobimba, epai kuna maloba oyo masalelami koleka mbala 60: “Bokoyeba [to, bakoyeba] ete ngai nazali Yehova.”—6:7.
MAKAMBO MAZALI KATI NA EZEKIELE
7. Bisakweli ya Ezekiele bikabolami polele na biteni nini misato?
7 Mokanda yango ekabwani polele na biteni misato. Ya liboso, kobanda na mokapo 1 kino mokapo 24, elobeli makebisi na ntina na kobebisama oyo ekokwela Yisalaele kozanga ntembe. Eteni ya mibale, kobanda na mokapo 25 kino mokapo 32, elobeli bisakweli ya libebi na ntina na mabota mingi ya bapakano. Eteni ya nsuka, mokapo 33 kino mokapo 48, elobeli bisakweli ya kozongisama lisusu, oyo bisuki na emonaneli ya tempelo ya sika mpe ya engumba ya bulɛɛ. Eteni monene ya bisakweli yango bikomami moko nsima na mosusu engebene ntango na yango mpe engebene mitó na masoló.
8. Makambo nini Ezekiele amoni kati na emonaneli na ye ya liboso?
8 Yehova atye Ezekiele mosɛnzɛli (1:1–3:27). Kati na emonaneli na ye ya liboso, na 613 L.T.B., Ezekiele amoni mopɛpɛ makasi euti na nɔ́rdi, elongo na lipata moko monene mpe liboke ya mɔ́tɔ. Bikelamu na bomoi minei bizali na mapapu bibimi kati na yango, moko ezali na elongi ya moto, mosusu na elongi ya nkosi, mosusu ya ngɔmbɛ mobali, mpe mosusu ya mpongo. Bizali komonana lokola makala mapeli ngwaa, mpe mokomoko na bango alandani na liyika moko pene na ye oyo yango moko ezwami kati na liyika mosusu ya monene mingi koleka, oyo ezali na miso mingi na mipanzi na yango. Bango nyonso, mpe mayika yango nyonso bazali kokende elongo nzela moko. Eloko moko ekokani na etando ezali likoló na mitó ya bikelamu yango ya bomoi mpe likoló na etando yango ezali na kiti moko ya bokonzi oyo likoló na yango “elilingi na nkembo na [Yehova]” emonani.—1:28.
9. Mokumba ya Ezekiele motaleli nini?
9 Yehova abéngi Ezekiele wana afukamaki, ete: “Mwana na moto, tɛlɛmá.” Na nsima apesi ye mokumba ya kosala mosala ya mosakoli epai na Yisalaele mpe na mabota ya botomboki oyo ezali zingazinga na yango. Ata soki bakoyoka to bakoyoka te, etali bobele bango moko. Kasi bakoyeba ete mosakoli moko ya Nkolo Yehova azalaki katikati na bango. Yehova aleisi Ezekiele rulo ya mokanda moko, oyo ekómi na ɛlɛngi kati na monɔkɔ na ye lokola mafuta ya nzoi. Ayebisi ye ete: “Mwana na moto, nasili kozalisa yo mokɛngɛli [“mosɛnzɛli,” NW] mpo na ndako na Yisalaele.” (2:1; 3:17) Ezekiele asengeli kosakola likebisi wana, soki te akokufa.
10. Elembo nini Ezekiele asaleli lokola elakiseli mpo na Yisalaele?
10 Kozingelama ya Yelusaleme elobelemi na elilingi (4:1–7:27). Yehova ayebisi Ezekiele ete ayema etando ya Yelusaleme likoló na bilíki moko. Asengeli komonisa ete mboka ezingelami, ete ezala elembo mpo na Yisalaele. Mpo ete bato básimba likambo wana malamu, asengeli kolala pene na bilíki yango na boumeli ya mikolo 390 na mopanzi na ye na lobɔkɔ ya mwasi, mpe na boumeli ya mikolo 40 na mopanzi na ye na lobɔkɔ ya mobali, mpe na ntango yango akobanda kolya bobele mwa bilei moke. Likambo oyo ete Ezekiele asalaki bobele bongo emonani na lolenge oyo amilelaki epai na Yehova na kosɛngáká ete asalela eloko mosusu mpo na kopelisa na yango mɔ́tɔ ya kolamba bilei.—4:9-15.
11. (a) Elakiseli nini Ezekiele asali mpo na komonisa ete kozingelama ya engumba ekosuka na mpasi monene? (b) Mpo na nini kobikisama ekozala te?
11 Yehova atindi Ezekiele ete asala elakiseli mpo na komonisa mawa monene oyo ekobima na nsuka ya kozingelama ya mboka; na yango, asengeli kokata nsuki mpe mandefu na ye nyonso. Asengeli kokabola yango na ndambo misato: ndambo moko esengeli kotumbama, ndambo mosusu ekokatama na mopanga, mpe ndambo oyo etikali esengeli kopalanganisama na mopɛpɛ. Bongo, na nsuka ya kozingelama yango, ndambo moko ya bafándi ya Yelusaleme bakokufa na nzala, na maladi, mpe ndambo mosusu bakokufa na mopanga, mpe ndambo oyo ekotikala bakopalanganisama kati na mabota. Yehova akobebisa Yelusaleme. Mpo na nini? Mpamba te bafándi na yango batuki Nzambe na misala na bango ya mbindo na losambo ya bikeko. Bozwi na bango ekobikisa bango te. Na mokolo ya nkanda ya Yehova, bato na Yelusaleme bakobwaka paláta na bango na balabála, “mpe bango bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].”—7:27.
12. Makambo nini ya mbindo Ezekiele amoni kati na emonaneli na ye ya Yelusaleme ya lipɛngwi?
12 Emonaneli ya Ezekiele na ntina na Yisalaele ya lipengwi (8:1–11:25). Tokómi sikawa na mobu 612 L.T.B. Kati na emonaneli moko, Ezekiele amemami mosika kati na Yelusaleme, epai kuna amoni makambo ya mbindo oyo mazali kosalema kati na tempelo ya Yehova. Kati na lopango, ezali na ekeko moko ya mbindo oyo ezali kotumola zúwa ya Yehova. Ezekiele atɔbɔli lidusu na efelo, amoni mibali 70 kati na mikóló bazali kosambela liboso na efelo yango, oyo nyama ya mbindo mpe bikeko ya mbindo biyemami katikati na yango. Bazali koluka komilóngisa na kolobáká ete: “[Yehova] amoni biso te. [Yehova] atiki mokili oyo.” (8:12) Na ekuke oyo ezali na nɔ́rdi, basi bazali kolela Tamuzu, nzambe ya bapakano. Kasi esuki bobele wana te! Bobele na ekɔtelo monene ya tempelo mpenza, mibali 25 batɛlɛmi wana, bapesi mokɔngɔ na tempelo, bazali kosambela moi. Bazali kotuka Yehova na miso na ye, mpe na ntembe te ye akoyeisa nkanda na ye!
13. Malako nini mobali oyo alati elamba ya molikani mpe mibali motoba oyo basimbi bibundeli bazali kokokisa?
13 Talá sikawa! Mibali motoba babimi, bazali na bibundeli ya koboma na nsɔ́mɔ. Kati na bango ezali na mobali mosusu, moto ya nsambo, oyo alati elemba ya molikani, asimbi molangi ya mai ya mokanda ya mokomeli. Yehova ayebisi mobali oyo alati molikani ete alekaleka kati na engumba mpe atya elembo na bilongi ya bato oyo bazali kokimela mpe komilela na ntina na makambo na mbindo oyo mazali kosalema kati na yango. Na nsima, ayebisi mibali motoba wana ete bálanda ye na nsima mpe báboma moto nyonso oyo azangi elembo, “mobali anuni, mobali elenge mpe moseka, bana mike mpe basi.” Basali yango, kobandáká na mikóló oyo bazalaki liboso na ndako. Moto oyo alati molikani alobi ete: “Nasili kosala nyonso oyo olakelaki ngai.”—9:6, 11.
14. Na nsuka, emonaneli yango emonisi nini mpo na oyo etali nkembo ya Yehova mpe bikateli na ye?
14 Ezekiele amoni lisusu nkembo ya Yehova, oyo ebimi likoló na bakeluba. Mokeluba moko akamati makala mapeli ngwaa katikati na mayika, mpe mobali oyo alati molikani akamati yango mpe apalanganisi yango likoló na engumba. Mpo na bato na Yisalaele oyo bapalangani, Yehova alaki ete akoyanganisa bango mpe akopesa bango elimo ya sika. Kasi ekozala boni mpo na bato mabe, basambeli na bikeko, baoyo bazali kati na Yelusaleme? Yehova alobi ete: “Nakoyeisa kotambola na bango na likoló na mitó na bango mpenza.” (11:21) Nkembo ya Yehova emonani ete ezali kokita uta na likoló kino engumba, mpe na nsima Ezekiele ayebisi emonaneli yango epai na Bayuda oyo bakangami.
15. Elakiseli nini mosusu Ezekiele asali mpo na komonisa ete ya solo mpenza, bafándi na Yelusaleme bakomemama na boombo?
15 Bisakweli mosusu bikomami na Babilone na ntina na Yelusaleme (12:1–19:14). Ezekiele asali elakiseli mosusu. Na moi, akangi bisaka mpo na kokenda na mboka mosusu, mpe na nsima, na butu, abimi na lidusu moko etɔbɔlami na efelo ya engumba wana azipi elongi na ye. Ayebisi ete yango ezali elembo ete: “Bakokɔta na kokangama, na boombo.” (12:11) Basakoli oyo bazangi mayele batamboli engebene nzela na bango moko! Bazali konganga ete: “Kimya,” nzokande kimya ezali te. (13:10) Ata soki Noa, Danyele, mpe Yobo bazalaki na Yelusaleme, mbɛlɛ bakokaki kobikisa ata moto moko te bobele bango moko.
16. Lolenge nini Yelusaleme emonisami ete ezali na motuya te, kasi mpo na nini ekozongisama lisusu?
16 Engumba ezali lokola nzeté ya vinyo ezangi ntina. Mabaya na yango mabongi mpo na kosala ata makonzí te, ata mwa motongá te! Ezikisami na ngámbo nyonso mibale mpe ezali kopela na katikati—ezangi motuya. Yelusaleme etikali lisusu sembo te mpe ezali lisusu na ntina te! Uta na mabelé ya Kanana epai abotamaki, Yehova alɔkɔtaki ye lokola mwana etike. Abɔkɔlaki ye mpe asalaki kondimana ya libala elongo na ye. Akómisi ye kitoko, ‘abongi mpo na mokonzi.’ (16:13) Kasi ayei kokóma mwasi na pite, amitekisi epai na mabota nyonso oyo maleki epai na ye. Asambeli bikeko na bango mpe atumbi bana na ye kati na mɔ́tɔ. Na nsuka, bobele mabota wana nde bakobebisa ye, bango mibali oyo basali na ye pite. Azali na etamboli mabe koleka bandeko na ye ya basi, Sodomo mpe Samalia. Atako bongo, Yehova, Nzambe na motema mawa, akopɛtola ye mpe akozongisa ye engebene kondimana na ye.
17. Yehova amonisi nini kati na sambole ya mpongo mpe vinyo?
17 Yehova apesi sambole moko epai na mosakoli mpe na nsima ayebisi ye ndimbola na yango. Emonisi ete Yelusaleme ekozwa litomba soko moke te na lisungi oyo asengi epai na Ezipito. Mpongo monene (Nebukadanesala) ayei mpe alongoli nsɔngɛ́ ya nzeté molai ya ɛlɛzɛ (Yoyakini), akumbi ye na Babilone, mpe aloni nzeté ya vinyo (Sidikiya) na esika na yango. Vinyo epalanganisi misisa na yango kino epai na mpongo mosusu (Ezipito), kasi ezwi elónga? Misisa na yango mipikolami! Yehova ye moko akokata etape moko ya pɛtɛɛ uta na nsɔngɛ́ ya nzeté ya ɛlɛzɛ mpe akolóna yango likoló na ngomba moko molai mpenza. Kuna, ekokóla kino ekokóma nzeté moko monene ya ɛlɛzɛ, mpe ekokóma efandelo ya “ndɛkɛ nyonso na mapapu.” Bato nyonso bakoyeba ete Yehova nde asali bongo.—17:23, 24.
18. (a) Mitindá nini Yehova asaleli mpo na kopamela bakangami Bayuda? (b) Ekateli nini ezali kozela bakonzi ya Yuda?
18 Yehova apameli bakangami Bayuda mpo na maloba na bango ya lisese ete: “Batata balei miwiti na ngaingai, mpe mino na bana mayoki mpasi.” Te, “molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (18:2, 4) Moyengebene akokóba kozala na bomoi. Yehova asepelaka te na liwa ya bato mabe. Asepelaka nde komona ete moto mabe abongwana na mabe na ye. Bakonzi ya Yuda, na motindo ya bana na nkosi, bakangami na motambo ya Ezipito mpe ya Babilone. Mongongo na bango ‘mokoyokana lisusu te na likoló na nkeka na Yisalaele.’—19:9.
19. (a) Atako alobelaki libebi, Ezekiele ayebisaki mpe elikya nini? (b) Lolenge nini amonisi ezaleli ya kozanga bosembo ya Yisalaele mpe ya Yuda mpe mbano oyo ekobima mpo na yango?
19 Yelusaleme etɔndɔlami (20:1–23:49). Sikawa tokómi na mobu 611 L.T.B. Lisusu, mikóló kati na bakangami bayei epai na Ezekiele mpo na koyeba makanisi ya Yehova. Mosakoli ayebisi bango lisoló molai ya botomboki ya Yisalaele mpe ya losambo ya mbindo ya bikeko mpe akebisi bango ete Yehova akobimisa mopanga mpo na kokokisa bikateli na ye likoló na Yelusaleme. Akokómisa Yelusaleme “libebi, libebi, libebi.” Kasi, oyo nde elikya monene! Yehova akobomba bokonzi (“motole”) mpo na ye oyo “abongi na yango” mpe akopesa yango epai na ye. (21:26, 27) Ezekiele alobeli makambo ya mbindo oyo mazali kosalema na Yelusaleme, “mboka na makila.” Ndako na Yisalaele ekómi lokola ‘eloko mpamba’ mpe esengeli koyanganisama na Yelusaleme mpe ekonyangwisama kuna lokola kati na litumbu ya mɔ́tɔ. (22:2, 18) Kozanga sembo ya Samalia (Yisalaele) mpe oyo ya Yuda emonisami na bandeko basi mibale. Samalia, to Ohola, asali pite na Baasulia mpe bato oyo basali na ye pite babomi ye. Yuda, to Oholiba, azwi liteya te na makambo oyo makómeli ndeko na ye; kútu asali mabe mingi koleka, asali pite na Asulia liboso, mpe na nsima, asali yango na Babilone. Akobebisama nyɛɛ, “mpe bokoyeba ete ngai nazali Nkolo [Yehova].”—23:49.
20. Yelusaleme oyo ezingelami ekokanisami na nini, mpe elembo nini ya nguya Yehova apesi mpo na kolobela makasi ekateli oyo ye akoyeisa likoló na yango?
20 Kozingelama ya Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka ebandi (24:1-27). Tokómi sikawa na mobu 609 L.T.B. Yehova ayebisi Ezekiele ete mokonzi ya Babilone asili kozingela Yelusaleme na mokolo ya zomi ya sanza ya zomi. Akokanisi engumba yango, oyo ezingelami na bifelo, na nzungu moko ya monene, mpe akokanisi bato ya lokumu ya engumba yango na misuni oyo mizali kati na nzungu wana. Tyelá yango mɔ́tɔ! Tɔkisá bosɔtɔ nyonso ya Yelusaleme mpe ya losambo na mbindo ya bikeko na yango! Bobele na mokolo yango, mwasi ya Ezekiele akufi, kasi mpo na komonisa botosi epai na Yehova, mosakoli aleli te. Yango ezali elembo ete bato bakolela te mpo na kobebisama ya Yelusaleme, mpamba te ezali ekateli ya Yehova, mpo ete báyeba ye soko azali nani. Yehova akotinda mobikisami mpo aya koyebisa bango ete ‘eloko na kosepela mpe na nkembo na bango’ ebebisami, liboso ete akoka koya, Ezekiele akoyebisa lisusu likambo moko te epai na bakangami.—24:25.
21. Lolenge nini mabota bakoyeba Yehova mpe nkanda na ye?
21 Bisakweli na ntina na makambo oyo makokwela mabota (25:1–32:32). Yehova asakoli ete mabota ya zingazinga bakosepela mpo na libebi ya Yelusaleme mpe bakosalela yango lokola libaku ya kotyola Yehova Nzambe ya Yuda. Bakozwa etumbu! Amona ekopesama na mabɔkɔ ya bato na ebimelo na ntango, ekozala mpe bongo mpo na Moaba. Edome ekobebisama, mpe misala minene ya bobekoli mikokweisama likoló na Bafilisitia. Yehova alobi ete bango nyonso “bakoyeba ete ngai nazali [Yehova], wana ekokweisa ngai kobukanisa na ngai na likoló na bango.”—25:17.
22. Nsango nini ekeseni epesami na ntina na Tulo, mpe lolenge nini Yehova akobulisama na Sidona?
22 Tulo azwi nsango oyo ekeseni mpenza. Lokola atondi na lolendo mpo na mombongo na ye oyo ezali sé kokóla, azali lokola masuwa moko kitoko ezwami katikati na mai monene, kasi nokinoki, ekopanzana mpe ekozinda na nsé ya mai. Motambwisi na yango amikumisi ete: “Nazali nzambe.” (28:9) Yehova atindi mosakoli na ye ete ayemba loyembo ya mawa mpo na mokonzi ya Tulo: azalaki kati na Edene, elanga ya Nzambe, lokola mokeluba moko kitoko, mopakolami; kasi Yehova akobengana ye na ngomba na Ye lokola motyoli, mpe akozikisama nyɛɛ na mɔ́tɔ oyo ekouta epai na ye moko. Yehova alobi ete akobulisama lisusu na koyeisáká libebi likoló na Sidona, motyoli monene.
23. Ezipito ekoyeba mpenza likambo nini, mpe lolenge nini yango ekosalema?
23 Sikawa Yehova ayebisi Ezekiele ete abalola elongi na ye epai na Ezipito mpe na Falo na yango mpo na kosakola makambo oyo makokwela ye. Falo atuti ntolo ete: “Ebale na ngai ezali na ngai mpenza; ngai nazalisaki yango.” (29:3) Falo, mpe Baezipito oyo bandimeli ye, bango mpe basengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe, mpe bakoyeba yango wana bakozwa etumbu na boumeli ya mibu 40. Awa Ezekiele atángi mpe makambo mosusu oyo azwaki na nsima na nzela ya emonaneli, na mobu 591 L.T.B. Yehova akopesa Ezipito na mabɔkɔ ya Nebukadanesala, lokola mbano mpo na mosala oyo asalaki na kokweisáká Tulo. (Nebukadanesala azwaki biloko mingi te kati na Tulo, mpamba te bato na Tulo bakimaki na biloko na bango kino engumba na bango oyo etongamaki kati na esanga.) Na loyembo moko ya mawa, Ezekiele amonisi ete Nebukadanesala akosilisa lolendo ya Ezipito, mpe “bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].”—32:15.
24. (a) Mokumba ya Ezekiele lokola mosɛnzɛli ezali nini? (b) Wana ayoki ete Yelusaleme ekwei, nsango nini Ezekiele asakoli epai na bakangami? (c) Elaka nini ya lipamboli emonisami polele na mokapo 34?
24 Mosɛnzɛli mpo na bakangami; kozongisama lisusu esakolami (33:1–37:28). Yehova akundweli Ezekiele mokumba na ye ya mosɛnzɛli. Bato bazali koloba ete: “Nzela na Nkolo ezali na boyengebene te.” Na yango, Ezekiele asengeli komonisa bango polele ete bazali mpenza na libungá. (33:17) Sikawa tokómi na mobu 607 L.T.B., mokolo ya mitano ya sanza ya zomi.c Mobikisami moko auti na Yelusaleme ayei koyebisa mosakoli ete: “Mboka ekangami.” (33:21) Sikawa, Ezekiele azwi lisusu bonsomi ya koloba na bakangami, ayebisi bango ete soki bakanisi ete Yelusaleme ekobikisama, basali mosala mpamba. Atako bazali koya epai na Ezekiele mpo na koyoka liloba ya Yehova, kasi bazali kotalela ye lokola moyembi ya nzembo kitoko, lokola moto oyo azali na mongongo kitoko mpe ayebi kobɛta lindanda malamu. Batye likebi na maloba na ye te. Nzokande, na ntango ekokokisama solo, bakoyeba ete mosakoli moko azalaki katikati na bango. Ezekiele apameli babateli na mpate ya lokuta, oyo basundoli etongá mpo na komileisa bobele bango moko. Yehova, Mobateli na mpate ya kokoka, akoyanganisa mpate oyo epalangani mpe akomema yango na etando kitoko ya matiti na ngomba ya Yisalaele. Kuna, akotyela bango mobateli moko na mpate, ‘bobele moombo na ye Davidi.’ (34:23) Yehova ye moko akokóma Nzambe na bango. Akosala kondimana ya kimya mpe akosopela bango mapamboli lokola mbula.
25. (a) Mpo na nini mpe lolenge nini Yehova akokómisa mokili yango lokola elanga ya Edene? (b) Nini emonisami kati na emonaneli ya mikuwa mikauki? na emonaneli ya mangenda mibale?
25 Ezekiele asakoli lisusu libebi oyo ekokwela Ngomba Seili (Edome). Nzokande, bisika bibebisami ya Yisalaele bikotongama lisusu, mpamba te Yehova akoyoka mawa mpo na nkombo na ye ya bulɛɛ, mpo na kosantisa yango liboso na mabota. Akopesa na bato na ye motema ya sika mpe elimo ya sika, mpe mokili na bango mokokóma lisusu “lokola elanga na Edene.” (36:35) Sikawa, kati na emonaneli moko, Ezekiele amoni Yisalaele elakisami lokola lobwaku moko ya mikuwa mikauká. Ezekiele asakoli na ntina na mikuwa yango. Na lolenge ya likamwisi, mikuwa yango mibandi kokóma na misuni, mibandi kopema, mpe mizongi na bomoi. Bobele bongo, Yehova akofungola nkunda oyo ete Babilone, oyo ekangi Yisalaele kati na boombo mpe Yisalaele ekozongisama na mokili na yango. Ezekiele akamati mangenda mibale mpo na komonisa ndako mibale ya Yisalaele, Yuda mpe Efelaima. Ekómi bobele lingenda moko kati na mabɔkɔ na ye. Na yango, na ntango Yehova akozongisa lisusu Yisalaele, bana na ye bakokóma na bomoko kati na kondimana ya kimya na nsé ya mosaleli na ye “Davidi.”—37:24.
26. Mpo na nini Gogo ya Magogo abimisi etumba, mpe yango esuki boni?
26 Gogo ya Magogo abundisi Yisalaele na nsima ya kozongisama na yango (38:1–39:29). Na nsima mokili mosusu mokobundisa bango! Kimya mpe bolamu ya libota ya Nzambe oyo ezongisami lisusu epesi Gogo ya Magogo zúwa, yango ekopusa ye ete abundisa bango. Akoluka nokinoki kobebisa libota yango. Kasi, Yehova akobimisa mɔ́tɔ ya nkanda na ye. Akopusa bango ete bábomana moko na mosusu mpe akokweisela bango maladi mpe makila mpe mbula makasi ya mabanga, ya mɔ́tɔ, mpe ya sufulu. Bakokitisama mpe bakoyeba ete Yehova azali “Oyo na bulɛɛ na Yisalaele.” (39:7) Na bongo, libota ya Nzambe likopelisa mɔ́tɔ na lisalisi ya bibundeli ya banguna mpe bakokunda mikuwa kati na “Lobwaku-na-Ebele-na-Gogo.” (39:11) Ndɛkɛ mpe nyama ekolya mosuni ya baoyo bakobomama mpe ekomela makila na bango. Na nsima, Yisalaele ekofanda na kimya, moto moko te akobangisa bango mpe Yehova akosopa elimo na ye likoló na bango.
27. Kati na emonaneli na ye ya mobembo mpo na kotala mokili ya Yisalaele, Ezekiele amoni nini, mpe lolenge nini nkembo ya Nzambe emonani?
27 Ezekiele amoni emonaneli na ntina na tempelo (40:1–48:35). Tokómi na mobu 593 L.T.B. Ezali bongo mobu ya 14 na nsima ya kobebisama ya tempelo ya Salomo, mpe bato na kobongola motema oyo bazali kati na bakangami bazali na mposa ya elendiseli mpe elikya. Kati na emonaneli moko, Yehova amemi Ezekiele kino mokili na Yisalaele mpe akitisi ye likoló na ngomba moko molai mpenza. Sikawa, kati na emonaneli yango, amoni tempelo mpe “ndako etongami lokola mboka epai na ngɛlɛ.” Anzelu moko ayebisi ye ete: “Tɔndɔlá nyonso emoni yo na ndako na Yisalaele.” (40:2, 4) Na nsima, amonisi Ezekiele makambo nyonso matali tempelo mpe mapango na yango, komekáká bonene ya bifelo, ya bikuke, ya ndako ya bakɛngɛli, ya ndako ya bolei, mpe ya tempelo yango moko, mpe na Esika mosantu na yango mpe Esika eleki bosantu. Amemi Ezekiele kino na ekuke ya ɛ́sti. “Mpe talá, nkembo na Nzambe na Yisalaele ekómaki longwa na epai na ebimelo ya ntango; mpe lokito na koya na ye ezalaki lokola lokito na mai mingi; mpe mokili engɛngaki mpo na nkembo na ye.” (43:2) Anzelu ayebisi mpenza Ezekiele makambo nyonso matali Ndako (to tempelo); etumbelo mpe mbeka na yango; ntómo mpe mikumba ya banganga, Balevi, mpe ya nkumu; kokabolama ya mabelé lokola libula.
28. Emonaneli ya Ezekiele emonisi nini na ntina na mongálá oyo mozali kobima uta na Ndako, mpe nini eyebisami na ntina na engumba mpe na ntina na nkombo na yango?
28 Anzelu azongisi lisusu Ezekiele na ekɔtelo ya Ndako, epai kuna mosakoli amoni mai mazali kobima uta na nsé ya ekɔtelo ya Ndako na ɛ́sti, mpe makiti kino na súdi ya etumbelo. Mabandi lokola litangá, kasi na nsima mayei mingi mpenza kino kokóma mongálá monene. Na bongo, makei kokwea na Mbu Ekufá, mpe mbisi na yango ezongi na bomoi mpe mosala ya kolɔ́ba mbisi mokóli kuna. Ngámbo na ngámbo ya mongálá yango, nzeté izali kobimisa bilei mpe lobiko mpo na bato. Na nsima, emonaneli yango eyebisi libula ya mabota zomi na mibale, kozanga kobosana bapaya oyo bafandi kati na bango mpe bankumu, mpe elobeli mboka mosantu na súdi, na bikuke na yango 12 ebéngami na nkombo ya mabota ya Yisalaele. Engumba na yango esengeli kobéngama na nkombo eleki lokumu: “[YEHOVA] AZALI KUNA.”—48:35.
LITOMBA NA YANGO
29. Lolenge nini bakangami Bayuda bazwi litomba kati na esakweli ya Ezekiele?
29 Bisakweli, bimonaneli, mpe bilaka nyonso oyo Yehova apesaki epai na Ezekiele eyebisamaki na bosembo mpenza epai na Bayuda oyo bamemamaki na boombo. Atako mingi batyolaki mpe basɛkaki mosakoli, kasi ndambo bandimaki ye. Bango bazwaki litomba monene. Balendisamaki na bilaka ya kozongisama. Na bokeseni na mabota mosusu oyo mamemamaki na boombo, babatelaki bizaleli oyo bizalaki kokesenisa bango na bikólo mosusu, mpe na 537 L.T.B. Yehova azongisaki batikali na bango, lokola asakolaki yango. (Ezek. 28:25, 26; 39:21-28; Ezl. 2:1; 3:1) Batongaki lisusu ndako ya Yehova mpe bazongisaki losambo ya solo kuna.
30. Mitindá nini mimonisami kati na Ezekiele mizali na ntina mpo na biso lelo?
30 Mitindá oyo mimonisami kati na mokanda ya Ezekiele mizali mpe na motuya mingi koleka mpo na biso lelo oyo. Lipɛngwi mpe losambo ya bikeko, bakisá mpe botomboki, nyonso wana ekokaki bobele komema bango na kobungisa ngɔlu ya Yehova. (Ezek. 6:1-7; 12:2-4, 11-16) Moto na moto akozongisa monɔkɔ mpo na masumu na ye moko, kasi Yehova akolimbisa ye oyo akobongwana na nzela mabe na ye. Ye wana akomonisamela motema mawa mpe akobika. (18:20-22) Basaleli ya Nzambe basengeli kozala basɛnzɛli ya sembo lokola Ezekiele, ata soki mokumba oyo mopesameli bango mozali ya mpasi, kati kotyolama mpe kotukama. Tosengeli te kotika moto mabe akufa mpo ete apesamelaki likebisi te, noki makila na ye makotángama likoló na mitó na biso. (3:17; 33:1-9) Babateli na mpate na libota ya Nzambe bazali na mokumba monene ya kobatela etongá.—34:2-10.
31. Bisakweli nini ya Ezekiele bimonisi koya ya Masiya?
31 Mokanda ya Ezekiele elobeli mingi bisakweli bitali Masiya. Abéngami “ye oyo abongi” na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe epai na ye nde esengeli kopesama. Na bisika mibale, abéngami “mosaleli na ngai Davidi,” mpe “mobateli na mpate,” “mokonzi,” mpe “nkumu.” (21:27; 34:23, 24; 37:24, 25) Lokola Davidi asilá kokufa uta kala, emonani ete Ezekiele azalaki kolobela Ye oyo asengelaki kozala Mwana ya Davidi mpe Nkolo na ye. (Nz. 110:1; Mat. 22:42-45) Ezekiele alobelaki yango, Yisaya mpe alobeli etape moko ya pɛtɛɛ oyo ekolónama, oyo Yehova ye moko akokólisa yango.—Ezek. 17:22-24; Yis. 11:1-3.
32. Lolenge nini tokoki kokokanisa emonaneli ya tempelo ya Ezekiele na emonaneli ya “mboka mosantu” kati na Emoniseli?
32 Ezali na ntina ete tókokanisa emonaneli ya tempelo oyo ezwami na Ezekiele mpe emonaneli oyo elobelami kati na Emoniseli na ntina na “Yelusaleme, mboka mosantu.” (Emon. 21:10) Mwa bokeseni emonani kati na bimonaneli yango mibale; na ndakisa, tempelo ya Ezekiele ekabwani na engumba mpe ezwami na nɔ́rdi na yango, nzokande kati na Emoniseli, Yehova ye moko azali tempelo ya engumba. Nzokande, elobami na ntina na tempelo wana mibale ete mai ya bomoi mazali kobima kuna, ete nzeté na kobota mbuma sanza na nsanza izali kuna mpe na nkasa na yango ya lobiko, mpe nkembo ya Yehova ezali kuna. Mokomoko na bimonaneli yango ezali kosalisa biso ete tósosola malamu bokonzi ya Yehova mpe bibongiseli ya lobiko oyo akamati mpo na baoyo bazali kosalela ye mosala na bulɛɛ.—Ezek. 43:4, 5—Emon. 21:11; Ezek. 47:1, 8, 9, 12—Emon. 22:1-3.
33. Mokanda ya Ezekiele elobeli mingi likambo nini mpe nini ekokómela baoyo bazali lelo kobulisa nkombo ya Yehova kati na bomoi na bango?
33 Mokanda ya Ezekiele ezali kolobela mingi likambo oyo ete Yehova azali bulɛɛ. Ezali komonisa ete kobulisama ya nkombo ya Yehova ezali na ntina mingi koleka eloko mosusu nyonso. “Nakolóngisa bulɛɛ na nkombo monene na ngai, . . . mpe mabota bakoyeba ete ngai nazali [Yehova], . . . Nkolo [Yehova] alobi bongo.” Lokola esakweli emonisi yango, Nzambe akobulisa nkombo na ye na kobomáká baoyo nyonso bazali kotyola nkombo na ye, bakisá mpe Gogo ya Magogo. Baoyo nyonso bazali sikawa kobulisa nkombo ya Yehova na kokokisáká kati na bomoi na bango masɛngami na ye matali losambo ya solo bazali bongo bato na mayele. Bakobikisama mpe bakozwa bomoi ya seko na nzela ya ebale oyo ezali kotíyola uta na tempelo na ye. Engumba oyo ebéngami “[YEHOVA] AZALI KUNA” ezali na nkembo monene mpe na bonzenga mingi!—Ezek. 36:23; 38:16; 48:35.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 531, 1136.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 681-682.
c Atako makomi ya Bamasorete mamonisi ete moto wana oyo akimaki uta na Yelusaleme ayaki na mobu ya 12, bamaniskri mosusu elobi “mbula ya zomi na moko,” mpe makomi yango mabongolami bongo na Bible Crampon-Tricot mpe na Traduction Œcuménique de la Bible.