“Tyá motema na yo na” Tempelo ya Nzambe!
“Mwana na moto, . . . tyá motema na yango nyonso ekomonisa ngai yo, . . . [yebisá] nyonso emoni yo na ndako na Yisalalele.”—EZEKIELE 40:4.
1. Na mobu 593 L.T.B., libota ya Nzambe ezalaki na makambo nini?
NA MOBU 593 L.T.B., Bayisalaele basilaki kolekisa mbula 14 lokola baombo na mboka mopaya. Bayuda oyo bazalaki na Babilone bazalaki komona ete mboka na bango oyo balingaki mingi ezalaki mpenza mosika. Mingi kati na bango bamonaki Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka, wana mboka yango ezalaki kozika na mɔ́tɔ, bifelo na yango mineneminene ekweaki, bandako kitoko na yango ebebaki. Tempelo ya Yehova, oyo ezalaki kopesa lokumu ya mboka mpe ezalaki esika se moko oyo losambo ya pɛto ezalaki kosalema na mokili mobimba, babukaki yango. Bayisalaele bakómaki naino ata na katikati te ya bambula oyo basengelaki kolekisa na boombo. Basengelaki kozela lisusu mbula 56 liboso ya kosikwama lokola Nzambe alakaki.—Yilimia 29:10.
2. Mpo na nini Ezekiele azalaki na mawa soki akanisi tempelo ya Nzambe na Yelusaleme?
2 Na ntembe te Ezekiele, mosakoli ya sembo, azalaki mpenza na mawa soki akanisi ete na mosika mpenza, bakilomɛtɛlɛ na bakilomɛtɛlɛ, tempelo ya Nzambe ebebisami, ekómi esika ya banyama ya zamba. (Yilimia 9:11) Tata na ye Buzi, asalaki lokola nganga na tempelo yango. (Ezekiele 1:3) Ezekiele mpe alingaki kozwa libaku yango, kasi na mobu 617 L.T.B., wana azalaki naino elenge, bamemaki ye elongo na bankumu ya Yelusaleme lokola baombo na mboka mopaya. Na ntango yango, Ezekiele akómaki na mbula soki 50. Na ntembe te ayebaki ete akomona lisusu Yelusaleme te mpe akozwa libaku ya kopesa mabɔkɔ te na kotonga lisusu tempelo na yango. Bongo, kanisá ndenge Ezekiele ayokaki ntango azwaki emonaneli ya tempelo moko ya nkembo!
3. (a) Emonaneli ya tempelo ya Ezekiele ezalaki na ntina nini? (b) Tángá makambo minene minei oyo elobelami na emonaneli yango.
3 Emonaneli yango ezali molai. Ezwi mikapo libwa ya mokanda ya Ezekiele. Emonaneli yango epesaki Bayuda oyo bazalaki baombo elikya oyo elendisaki kondima na bango. Losambo ya pɛto esengelaki kozonga! Na bambula nyonso oyo elekaki banda ntango wana tii na mikolo na biso, emonaneli yango elendisaki bato oyo balingaka Yehova. Ndenge nini? Tótalela naino soki esakweli oyo Ezekiele azwaki elimbolaki nini mpo na Bayisalaele oyo bazalaki baombo na mboka mopaya. Emonaneli yango ezali na makambo minene minei: tempelo, mosala ya banganga, mokonzi, mpe mokili.
Tempelo etongami lisusu
4. Na ebandeli ya emonaneli, bamemi Ezekiele esika nini, amoni nini kuna, mpe nani atambwisi ye?
4 Libosoliboso, bamemi Ezekiele “likoló ya [ngomba] molai mingi.” Tempelo moko monene lokola mboka oyo ezingami na lopango ezali likoló ya ngomba yango, na sudi. Anzelu moko, oyo “komonana na ye ezalaki lokola motako,” atambwisi Ezekiele na ndako yango mobimba. (Ezekiele 40:2, 3) Na kolandana ya emonaneli, Ezekiele amoni anzelu yango azali komeka na likebi nyonso bolai ya bikɔtelo motoba oyo etalani mibale mibale mpe ezali na bisika mpo na bakɛngɛli, amoni mpe lopango ya libándá, lopango ya kati, bandako ya bolei, etumbelo, mpe ndako oyo ezalaki na Esika Mosantu na Esika eleki Bosantu.
5. (a) Yehova andimisaki Ezekiele likambo nini? (b) “Bibembe na mikonzi na bango” oyo basengelaki kolongola na tempelo ezalaki nini, mpe mpo na nini ezalaki na ntina mingi?
5 Na nsima, Yehova ye moko amonani na kati ya emonaneli. Akɔti na tempelo mpe ayebisi Ezekiele ete Ye moko akofanda kuna. Kasi, Yehova asɛngi ete ndako na ye epɛtolama. Alobi boye: “Sikawa tiká bálongola bikobo na bango mpe bibembe na mikonzi na bango mosika na ngai, bongo ngai nakofanda na kati na bango lobiko na lobiko.” (Ezekiele 43:2-4, 7, 9) Na ntembe te “bibembe na mikonzi na bango” ezalaki bikeko. Bakonzi mosusu oyo bayangelaki na Yelusaleme mpe bato ya mabe babebisaki tempelo ya Nzambe na bikeko mpe bakómisaki bikeko yango bakonzi na bango. (Talá Amosa 5:26.) Bikeko yango ezalaki banzambe to bakonzi ya bomoi te; na miso ya Yehova ezalaki biloko ekufá mpe ya bosɔtɔ. Basengeli kolongola yango.—Levitike 26:30; Yilimia 16:18.
6. Komeka bolai ya tempelo ezalaki na ndimbola nini?
6 Likanisi nini ya ntina ezalaki na eteni oyo ya emonaneli? Endimisaki baombo ete losambo ya pɛto ekozonga na tempelo ya Nzambe. Lisusu, komeka bolai ya tempelo ezalaki lokola ndanga oyo Nzambe apesaki mpo na komonisa ete emonaneli yango ekokokisama. (Talá Yilimia 31:39, 40; Zekalia 2:2-8.) Losambo nyonso ya bikeko esengelaki kolimwa. Yehova asengelaki kopambola lisusu ndako na ye.
Banganga mpe mokonzi
7. Likambo nini eyebisami na ntina na Balevi na banganga?
7 Banganga basengelaki mpe kopɛtolama. Balevi basengelaki kopamelama mpo bamipesaki na losambo ya bikeko, nzokande bana ya Sadoko oyo bazalaki mpe banganga, basengelaki kozwa longonya mpe libonza mpo batikalaki pɛto.a Kasi, bango nyonso bakozala na mosala na kati ya ndako ya Nzambe oyo bakobongisa yango lisusu. Na ntembe te mikumba yango esengeli kopesama na kotalela bosembo ya moto na moto. Yehova abimisaki mpe mobeko ete: “Bakolakisa bato na ngai kokesena na biloko na bulɛɛ mpe biloko na mpamba, mpe bakoyebisa bango mayele na kopona kati na biloko na mbindo mpe biloko na pɛto.” (Ezekiele 44:10-16, 23) Yango elingi koloba ete mosala ya banganga esengelaki kozongisama, mpe banganga basengelaki kozwa mbano mpo na bokangami na bango ya sembo.
8. (a) Banani bazalaki bakonzi ya Yisalaele ya kala? (b) Mokonzi oyo alobelami na emonaneli ya Ezekiele azali kosala nini mpo na losambo ya pɛto?
8 Emonaneli elobeli mpe moto oyo abéngami mokonzi. Banda na mikolo na Mose, ekólo yango ezalaki na bakonzi. Liloba ya Liebele oyo ebongolamaka na mokonzi, na·si’ʹ, ezalaki kosalelama mpo na mokonzi ya ndako, ya etuluka, ata mpe ya ekólo. Na emonaneli ya Ezekiele, bapameli bayangeli nyonso ya Yisalaele mpo bazalaki konyokola bato ya mboka mpe balendisi bango ete bázala sembo. Atako azali nganga te, mokonzi azali na mosala monene na losambo ya pɛto. Azali kokɔta mpe kobima na lopango ya libándá na mabota mosusu oyo ezali ya banganga te, afandi na nse ya ekɔtelo ya ɛsti, mpe apesi banyama mosusu mpo bátumba mbeka. (Ezekiele 44:2, 3; 45:8-12, 17) Na bongo, emonaneli endimisaki Bayisalaele oyo bazalaki bandeko ya Ezekiele ete ntango bakozonga na mboka na bango, bakozala na bakonzi ya malamu; elingi koloba mibali oyo bakosunga banganga na kobongisa libota ya Nzambe mpe bakozala ndakisa malamu na makambo ya elimo.
Mokili
9. (a) Mokili esengelaki kokabolama ndenge nini, kasi banani basengelaki kozwa libula te? (b) Ndambo na bulɛɛ ezalaki nini, mpe nini ezalaki kuna?
9 Na nsuka, Ezekiele amonaki mpe mokili mobimba ya Yisalaele na emonaneli. Esengelaki kokabolama mpe libota na libota esengelaki kozwa eteni na yango ya mabelé. Mokonzi mpe asengelaki kozwa eteni na ye ya mabelé. Kasi, banganga basengelaki kozwa libula te, mpamba te Yehova alobaki ete: “Ngai nazali libula na bango.” (Ezekiele 44:10, 28; Mituya 18:20) Emonaneli eyebisi ete mokonzi akozwa eteni ya mabelé oyo ezali na ngámbo nyonso mibale ya eteni oyo ebéngami ndambo na bulɛɛ. Yango ezalaki eteni ya mabelé oyo ngámbo na yango nyonso minei ezali na bolai ndenge moko, ekabwanaki na ndambo misato: na likoló mpo na Balevi oyo babongolaki motema, na kati mpo na banganga, mpe na nse mpo na mboka mpe bisika na yango oyo bakoki kosala bilanga. Tempelo ya Yehova esengelaki kozala na eteni ya mabelé ya banganga, na katikati mpenza ya mabelé oyo babéngi ndambo na bulɛɛ.—Ezekiele 45:1-7.
10. Esakweli ya kokabola mokili elimbolaki nini mpo na Bayuda ya sembo oyo bazalaki baombo na mboka mopaya?
10 Na ntembe te makambo oyo nyonso elendisaki mitema ya baombo wana! Libota na libota ezwaki elikya ya kozwa libula na yango ya mabelé na mokili yango. (Talá Mika 4:4.) Losambo ya pɛto esengelaki kozala na esika monene mpe ya lokumu na mokili yango. Tomoni mpe ete na emonaneli ya Ezekiele, mokonzi na banganga basengeli kofanda na mabelé oyo banamboka bapesi lokola likabo. (Ezekiele 45:16) Boye na mokili oyo ezongisami, bato basengelaki kosunga mosala ya baoyo Yehova aponaki lokola batambwisi, basengelaki kosunga bango mpe kotosa bango. Na mobimba na yango, mokili yango ezalaki komonisa ete ezali na molɔngɔ, bato bazali kosala elongo, mpe bazali na libateli.
11, 12. (a) Ndenge nini Yehova andimisi basaleli na ye na nzela ya esakweli ete akopambola mokili na bango? (b) Banzete oyo ezalaki pembenipembeni ya mai ezalaki elilingi ya nini?
11 Yehova alingaki nde kopambola mokili na bango? Esakweli epesi eyano na motuna yango na likambo moko oyo ezali kosimba motema. Mai ezali kotyola longwa na tempelo, mpe mokemoke ezali kokóma monene, mpe na ntango ekɔti na Mbu Ekufá, mai na yango ekómi mozindo mpe makasi. Kuna, epesi bomoi na mai oyo ezangaki bikelamu ya bomoi, mpe mosala ya koboma mbisi ekoli na eteni molai ya libongo na yango. Banzete mingi oyo ebotaka mbuma na bileko nyonso ezali pembenipembeni ya ebale yango. Ezali kopesa bato bilei mpe ezali kobikisa bango na maladi.—Ezekiele 47:1-12
12 Mpo na baombo, elaka oyo ezongelaki lisusu mpe endimisaki bisakweli oyo elobamaki liboso mpe oyo balingaki mingi; bisakweli yango elakaki kozongisama. Mbala mingi, basakoli bapemamaki na Yehova bazalaki kolobela Yisalaele lokola mboka kitoko oyo etongami lisusu mpe bato ebele bafandi kuna. Mbala na mbala bisakweli ezalaki koloba ete bato bafandaki lisusu na bitúká oyo etikalaki mpamba. (Yisaya 35:1, 6, 7; 51:3; Ezekiele 36:35; 37:1-14) Na bongo bato bakokaki kolikya ete mapamboli ya Yehova esengelaki kosopana lokola ebale oyo ezali kouta na tempelo oyo etongami lisusu. Yango wana, ekólo oyo ekufaki na elimo esengelaki kozonga na bomoi. Ekólo ezongisami esengelaki kozwa mibali oyo bazali na makoki ya elimo—mibali ya sembo mpe ya mpiko, baoyo bakokanisi bango na banzete oyo ezali pembenipembeni ya ebale ya emonaneli. Mibali yango basengelaki kokamba mosala ya kotonga lisusu mokili oyo ebebisamaki. Yisaya akomaki mpe likambo ya ‘banzete makasi na bosembo’ oyo basengelaki “kotonga lisusu mabondo mpamba na kala.”—Yisaya 61:3, 4.
Esakweli ekokisami na ntango nini?
13. (a) Na ndimbola nini Yehova apesaki basaleli na ye oyo basikwamaki “banzete makasi ya bosembo”? (b) Ndenge nini esakweli ya Mbu Ekufá ekokisamaki?
13 Bilikya ya baombo bikokisamaki? Ɛɛ! Na mobu 537 L.T.B., bato oyo batikalaki basikwamaki mpe bazongaki na mboka na bango oyo balingaki mingi. Na nsima, na litambwisi ya mibali oyo bakokanisami na ‘banzete makasi ya bosembo,’ na ndakisa mokomeli Ezela, mosakoli Hagai na mosakoli Zekalia, mpe nganga monene Yosua, batongaki lisusu bisika oyo na boumeli ya bambula ebele, etikalaki mpamba. Bakonzi lokola Nehemia na Zorobabele bayangelaki mokili na bosembo mpenza. Tempelo ya Yehova etongamaki lisusu, mpe bibongiseli na ye mpo na kopesa bomoi, elingi koloba mapamboli oyo eutaka na kotosa kondimana na ye esopanaki lisusu mingi. (Deteronome 30:19; Yisaya 48:17-20) Moko na mapamboli yango ezalaki boyebi. Mosala ya banganga ezongaki, mpe banganga bazalaki koteya bato Mibeko. (Malaki 2:7) Lokola litomba, bato bakómaki makasi na elimo mpe bakómaki basaleli ya Yehova oyo bazali kobota mbuma, ndenge emonisamaki na emonaneli ya Mbu Ekufá oyo ezongisamaki na bomoi mpe epesaki nzela na mosala ya koboma mbisi; mosala yango ezalaki kotambola malamu.
14. Mpo na nini esakweli ya Ezekiele esengelaki kokokisama lisusu na ndenge oyo eleki kokokisama oyo esalemaki ntango Bayuda bautaki na boombo na Babilone?
14 Kokokisama ya emonaneli ya Ezekiele esukaki se na makambo wana? Te; tozali na elembo oyo emonisi likambo moko ya monene koleka. Tókanisa naino likambo oyo: Tempelo oyo Ezekiele amonaki ekokaki kotongama na ndenge oyo elobelami te. Ezali solo ete Bayuda bapesaki emonaneli yango motuya; kutu, makambo mosusu bakokisaki yango na ndenge mpenza yango elobelami.b Kasi, tempelo mobimba ya emonaneli ezalaki monene mingi koleka ata Ngomba Molia, esika oyo tempelo ya kala ezalaki. Lisusu, tempelo ya Ezekiele ezalaki na kati ya mboka te kasi etongamaki mwa mosika, na eteni mosusu ya mabelé; nzokande tempelo ya mibale etongamaki kaka na esika oyo tempelo ya kala ezalaki: na kati ya Yelusaleme. (Ezela 1:1, 2) Lisusu, ebale moko ya solo ebimaki longwa na tempelo ya Yelusaleme te. Na yango, emonaneli ya Ezekiele ekokisamaki se mwa moke na Yisalaele ya kala. Elingi koloba ete esengeli kokokisama na makambo mosusu ya minene koleka to kokokisama ya elimo.
15. (a) Tempelo ya Yehova na elimo efungwamaki ntango nini? (b) Nini emonisi ete emonaneli ya Ezekiele ekokisamaki na ntango oyo Klisto azalaki awa na mabelé te?
15 Tomoni polele ete tosengeli koluka koyeba ndenge emonaneli ya Ezekiele ekokokisama na tempelo monene ya Yehova na elimo. Ntoma Paulo alobeli mingi tempelo yango ya elimo na mokanda ya Baebele. Tempelo yango efungwamaki na mobu 29 T.B. ntango Yesu Klisto apakolamaki lokola Nganga Monene oyo akosala na tempelo yango. Kasi, tokoki koloba ete emonaneli ya Ezekiele ekokisamaki ntango Yesu azalaki awa na mabelé? Te. Lokola Nganga Monene, Yesu akokisaki ndimbola ya Mokolo ya Mbɔndi na ndenge azwaki batisimo, akufaki liwa ya mbeka, mpe na ndenge akɔtaki kati na Esika eleki Bosantu, elingi koloba kuna na likoló. (Baebele 9:24) Kasi, likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete ata mbala moko te emonaneli ya Ezekiele elobeli nganga monene to Mokolo ya Mbɔndi. Yango emonisi ete emonaneli yango ekokaki mpenza kokokisama na ekeke ya liboso T.B. te. Boye, esengeli kokokisama na eleko nini?
16. Esika oyo Ezekiele amonaki makambo ya emonaneli ezongisi makanisi na biso na esakweli nini, mpe ndenge nini likambo yango esalisi biso na kososola ntango ya kokokisama monene ya emonaneli ya Ezekiele?
16 Mpo na kozwa eyano, tótalela lisusu emonaneli yango moko. Ezekiele akomaki ete: “Na bimonaneli na Nzambe akambaki ngai na mokili na Yisalaele, mpe afandisaki ngai na likoló na [ngomba] molai mingi, kuna ezalaki ndako etongami lokola mboka epai na [sudi].” (Ezekiele 40:2) “Ngomba molai mingi,” esika oyo Ezekiele amonaki makambo ya emonaneli, ezongisi makanisi na biso na Mika 4:1, oyo elobi ete: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na [ngomba mike, NW] mpe mabota bakokenda wana.” Esakweli yango ekokisami na ntango nini? Mika 4:5 emonisi ete ebandi na ntango oyo mabota bazali naino kosambela banzambe ya lokuta. Ezali na ntango na biso, na ‘mikolo ya nsuka’ nde losambo ya pɛto etombwani, ezongisami na esika oyo ebongi na yango mpenza na bomoi ya basaleli ya Nzambe.
17. Ndenge nini esakweli ya Malaki 3:1-5 esalisi biso na koyeba ntango oyo tempelo ya emonaneli ya Ezekiele epɛtolamaki?
17 Eloko nini epesi nzela na kozongisama yango? Tóbosana te ete na likambo oyo eleki monene na emonaneli ya Ezekiele, Yehova ayei na tempelo mpe alobi ete bálongola losambo ya bikeko na ndako na ye. Tempelo ya Nzambe na elimo epɛtolamaki ntango nini? Na Malaki 3:1-5, Yehova asakoli ntango oyo ‘akoya na tempelo na Ye’ elongo na ‘ntoma na kondimana’ na ye, Yesu Klisto. Akoya kosala nini? Akoya “lokola mɔ́tɔ na mopɛtoli-na-ebende mpe lokola sabuni na batuti bilamba.” Kopɛtolama yango ebandaki na ntango ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba. Yango ebimisaki litomba nini? Yehova afandaki na ndako na ye mpe apambolaki mokili ya elimo ya bato na ye banda 1919. (Yisaya 66:8) Na yango, tokoki koloba ete esakweli ya Ezekiele ezali kokokisama na bonene na yango na mikolo ya nsuka.
18. Ntango nini emonaneli ya tempelo ekokokisama mpo na mbala ya nsuka?
18 Ndenge moko na bisakweli mosusu oyo elobeli kozongisama, emonaneli ya Ezekiele ekokokisama lisusu, mpo na mbala ya nsuka, na Paladiso. Na ntango yango nde bato ya sembo bakozwa matomba nyonso ya ebongiseli ya tempelo ya Nzambe. Na ntango wana Klisto, na bato na ye 144 000 oyo bazali banganga ya likoló, akosalela litomba ya mbeka ya lisiko na ye. Bato nyonso ya botosi oyo bakofanda na mokili oyo Yesu akoyangela bakokóma bato ya kokoka. (Emoniseli 20:5, 6) Kasi, emonaneli ya Ezekiele ekokokisama libosoliboso na Paladiso te. Mpo na nini tolobi bongo?
Emonaneli etaleli mikolo na biso
19, 20. Mpo na nini kokokisama monene ya emonaneli esengeli kosalema na mikolo oyo kasi na Paladiso te?
19 Ezekiele amonaki tempelo oyo losambo ya bikeko mpe na pite ya elimo esengelaki kolongolama kuna. (Ezekiele 43:7-9) Likambo yango ekoki kotalela losambo ya Yehova na kati ya Paladiso te. Lisusu, banganga ya emonaneli bazali elilingi ya kelasi ya banganga bapakolami na ntango bazali naino na mabelé, kasi nsima ya lisekwa na bango mpo na kokende na likoló to na boumeli ya mbula nkóto te. Mpo na nini? Tóbosana te ete banganga bamonani wana bazali kosala na lopango ya kati. Masolo mosusu ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete lopango yango ya kati ezali komonisa esika ya elimo oyo ekokani na esika mosusu te ya banganga-basungi ya Klisto ntango bazali naino awa na mabelé.c Kobosana te ete emonaneli yango elobeli mpe kozanga kokoka ya banganga. Balobi na bango bápesa mbeka mpo na masumu na bango moko. Bakebisi bango na likama ya kokóma mbindo na elimo mpe na makanisi. Yango wana, bazali elilingi ya bapakolami oyo basekwi te; mpamba te ntoma Paulo akomaki na ntina na bango ete: “Kelelo ekoloba mpe bakufi bakosekwa na kozanga kopola.” (1 Bakolinti 15:52; Ezekiele 44:21, 22, 25, 27) Na emonaneli, banganga bazali esika moko na bato mpe bazali kosalela bato mosala. Ekozala bongo te na Paladiso ntango banganga bakozala na likoló. Na bongo, emonaneli oyo emonisi malamu mpenza ndenge oyo bapakolami bazali lelo oyo kosala elongo na “ebele monene” awa na mabelé.—Emoniseli 7:9; Ezekiele 42:14.
20 Na yango, emonaneli ya Ezekiele ezali kolakisa matomba ya kopɛtolama ya elimo oyo ezali kosalema lelo oyo. Kasi yango elimboli nini mpo na yo? Yango ezali te likambo moko makasi oyo etali boyekoli ya teoloji. Emonaneli yango etaleli mpenza losambo oyo ozali kopesa mokolo na mokolo epai ya Yehova, Nzambe moko ya solo. Na lisolo elandi, tokomona na ndenge nini.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntembe te likambo oyo esimbaki motema ya Ezekiele, mpamba te elobami ete ye moko azalaki na libota ya bonganga ya Sadoko.
b Na ndakisa, Mishnah ya kala elobi ete na tempelo oyo etongamaki lisusu, etumbelo, bikɔtelo oyo efungwamaka na ngámbo mibale, mpe bisika ya kolamba, etongamaki na ndenge elobelami na emonaneli ya Ezekiele.
c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1996, lokasa 16; 1 Marsi 1973, lokasa 142 (ebimeli ya Lifalanse).
Ozali koyeba lisusu?
◻ Ndenge nini emonaneli ya tempelo ya Ezekiele mpe bonganga na yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso?
◻ Ndenge nini emonaneli ya Ezekiele mpo na kokabolama ya mokili ekokisamaki liboso?
◻ Ntango Yisalaele ya kala ezongaki, banani basalaki lokola bakonzi ya sembo mpe banani basalaki lokola “banzete makasi ya bosembo”?
◻ Mpo na nini emonaneli ya tempelo ya Ezekiele esengeli kokokisama na mikolo ya nsuka?