Mapamboli ya Yehova na “Mokili” na biso
“Epai nyonso oyo ebale ekokóma, biloko nyonso ekokóma na bomoi.”—EZEKIELE 47:9, NW.
1, 2. (a) Mai ezali na ntina nini? (b) Mai ya emonaneli ya Ezekiele ezali elilingi ya nini?
MAI ezali eloko ya ntina mingi. Bikelamu nyonso ya mosuni ezalaka na mposa ya mai. Moto moko te akoki koumela na bomoi ntango molai soki mai ezali te. Mai esalisaka biso mpe na kotya bopɛto, mpamba te mai elongolaka salite. Tosukolaka nzoto, bilamba, ata mpe bilei na mai. Kosala bongo ekoki kobikisa bomoi na biso.
2 Biblia esalelaka mai lokola elilingi ya makambo oyo Yehova azali kosala mpo na kopesa bomoi. (Yilimia 2:13; Yoane 4:7-15) Makambo yango ezali bongo kopɛtolama ya bato na ye na mbeka ya lisiko ya Klisto mpe boyebi ya Nzambe oyo ezali na Liloba na ye. (Baefese 5:25-27) Na emonaneli ya tempelo ya Ezekiele, ebale oyo ezali kobima na tempelo ezali elilingi ya mapamboli motindo wana. Kasi ebale yango ekobima ntango nini, mpe elimboli nini mpo na biso lelo oyo?
Ebale na mokili oyo ezongisami
3. Ezekiele amonaki makambo nini oyo eyebisami na Ezekiele 47:2-12?
3 Ntango bazalaki baombo na Babilone, Bayisalaele bazalaki na mposa mpenza ya bibongiseli ya Yehova. Na bongo, Ezekiele alendisamaki mpenza ntango amonaki ebale euti na tempelo ya emonaneli mpe mai na yango ezali kotyola libándá! Anzelu moko azali komeka bozindo ya mai na ntaka nyonso ya mapeko 1 000. Bozindo na yango ezali se kobakisama, na ebandeli mai ezali kosuka na matambi, na nsima ekómi na mabɔlɔngɔ, na loketo, tii ekómi na bozindo oyo esɛngi kobɛta mai. Ebale yango ezali kopesa bomoi mpe ezali kosala ete biloko ebotana. (Ezekiele 47:2-11) Bayebisi Ezekiele ete: “Na mabongo na ebale na bipai mibale, nzete na ndenge nyonso mpo na kolya ikokola.” (Ezekiele 47:12a) Ntango ebale yango ekɔti na Mbu Ekufá—mai oyo ezangi bikelamu ya bomoi—bikelamu ya bomoi ebotani! Mbisi etondi. Mosala ya koboma mbisi ekoli.
4, 5. Na nini esakweli ya Yoele na ntina na ebale ekokani na esakweli ya Ezekiele, mpe mpo na nini likambo yango ezali na ntina?
4 Ekoki kozala ete esakweli kitoko yango epusaki Bayuda oyo bazalaki baombo na kokanisa esakweli mosusu oyo esakolamaki koleka mbula nkama mibale liboso: “Liziba mpe ekobima na ndako na [Yehova], ekomɛlisa lobwaku na Sitimi mai.”a (Yoele 3:18) Ndenge moko na esakweli ya Ezekiele, esakweli ya Yoele elobi ete ebale moko ekobima na ndako ya Nzambe to na tempelo, mpe ekopesa bomoi na esika oyo ekauki.
5 Banda kala, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaka ete esakweli ya Yoele ezali kokokisama na mikolo na biso.b Yango wana, ntembe ezali te ete ezali mpe bongo mpo na emonaneli ya Ezekiele. Na mokili ezongisami ya basaleli ya Nzambe lelo oyo, ndenge moko na Yisalaele ya kala, Yehova asopi mapamboli na ye.
Mapamboli mingi
6. Komwangisa makila na etumbelo ya emonaneli epusaki Bayuda na kokanisa eloko nini?
6 Mapamboli ya bato ya Nzambe oyo bazongisami na esika na bango mazali kouta wapi? Tomoni ete mai euti na tempelo ya Nzambe. Ndenge moko mpe lelo oyo, Yehova azali kopesa mapamboli na nzela ya tempelo na ye ya elimo: ebongiseli ya losambo ya pɛto. Emonaneli ya Ezekiele eyebisi mpe likambo mosusu ya ntina mingi. Na lopango ya kati ya tempelo, ebale yango eleki pembeni ya etumbelo, na sudi na yango. (Ezekiele 47:1) Etumbelo ezali mpenza na katikati ya tempelo ya emonaneli. Yehova alimboleli Ezekiele emonaneli yango ata na makambo mikemike mpe atindi ete bámwangisa makila ya mbeka likoló na yango. (Ezekiele 43:13-18, 20) Etumbelo yango ezalaki na ntina mingi mpo na Bayisalaele nyonso. Kondimana na bango na Yehova ezwaki nguya ntango Mose amwangisaki makila likoló ya etumbelo na Ngomba Sinai. (Exode 24:4-8) Na ntembe te komwangisa makila likoló ya etumbelo wana ya emonaneli epusaki bango na kokanisa ete na ntango bakokóma na mokili na bango oyo ezongisami, bakozwa mapamboli ya Yehova soki batosi kondimana oyo basalaki na ye.—Deteronome 28:1-14.
7. Etumbelo ya elilingi ezali na ndimbola nini mpo na baklisto lelo oyo?
7 Ndenge moko mpe lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazwi mapamboli na nzela ya kondimana ya malamu koleka to kondimana ya sika. (Yilimia 31:31-34) Kondimana yango ezwaki nguya na makila ya Yesu Klisto. (Baebele 9:15-20) Lelo oyo, ezala ete tozali bapakolami, oyo basali kondimana wana, to “bampate mosusu,” baoyo bazali kozwa litomba mpo na kondimana yango, etumbelo ya elilingi ezali na ndimbola monene mpo na biso. Elimboli mokano ya Nzambe na boyokani na mbeka ya Klisto. (Yoane 10:16; Baebele 10:10) Ndenge moko lokola etumbelo ya elilingi ezali na katikati ya tempelo ya elimo, mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto esimbi mpenza losambo ya pɛto. Yango nde esimbi bolimbisi ya masumu na biso, mpe na bongo, esimbi bilikya na biso nyonso mpo na mikolo ezali koya. (1 Yoane 2:2) Yango wana tozali kosala makasi ete tótosa mobeko oyo ekangani na kondimana wana ya sika, oyo tobéngi “Mobeko ya Klisto.” (Bagalatia 6:2, NW) Ntango nyonso oyo tozali kosala bongo, tokozwa litomba na makambo oyo Yehova azali kosala mpo na kopesa bomoi.
8. (a) Eloko nini ezangaki na lopango ya kati ya tempelo ya emonaneli? (b) Na tempelo ya emonaneli, banganga bakokaki komipɛtola na nini?
8 Moko na matomba yango ezali bongo komonana pɛto na miso ya Yehova. Eloko moko oyo ezalaki komonana polele na kati ya lopango ya hema mpe na tempelo ya Salomo, kasi ezali te na tempelo ya emonaneli: saani monene, oyo bakómaki kobénga mai monene. Banganga bazalaki kosukola na mai yango. (Exode 30:18-21; 2 Ntango 4:2-6) Na tempelo ya emonaneli ya Ezekiele, banganga bakokaki komipɛtola na nini? Na ebale oyo ezali koleka na katikati ya lopango ya kati! Ɛɛ, Yehova asengelaki kopesa bango likoki ya komonana pɛto, to lokola basantu.
9. Ndenge nini bapakolami mpe ebele monene bazali komonana pɛto lelo oyo?
9 Ndenge moko mpe lelo oyo, Yehova apesi bapakolami likoki ya komonana pɛto na miso na ye. Azali kotalela bango lokola basantu, azali kobénga bango bato ya sembo. (Baloma 5:1, 2) Tokoloba boni mpo na “ebele monene,” oyo bamonisami na mabota oyo ezalaki ya banganga te? Bango bazali kosambela na lopango ya libándá. Ebale yango eleki mpe na lopango wana. Yango wana, likambo oyo ntoma Yoane amonaki ebongi mpenza: ebele monene balati banzambala ya mpɛmbɛ, ya pɛto, wana bazali kosambela Nzambe na lopango ya tempelo ya elimo! (Emoniseli 7:9-14) Ata soki bato ya mokili oyo esili kobeba bazali kosala bango makambo nini, bakoki komindimisa ete soki bamonisi ntango nyonso kondima na mbeka ya lisiko ya Klisto, Yehova azali komona bango ete bazali pɛto. Ndenge nini bazali komonisa kondima yango? Na ndenge bazali kolanda matambe ya Yesu mpe batii elikya mobimba na mbeka ya lisiko.—1 Petelo 2:21.
10, 11. Likambo nini ya ntina emonisami na mai ya elilingi, mpe ndenge nini yango eyokani na ndenge oyo ebale yango ekómi monene mingi?
10 Ndenge tolobaki yango liboso, mai yango ezali mpe elilingi ya eloko mosusu ya ntina mingi: boyebi. Na Yisalaele oyo ezongisamaki, Yehova ateyaki libota na ye Makomami na nzela ya banganga. (Ezekiele 44:23) Lelo oyo mpe Yehova azali koteya libota na ye makambo mingi na ntina na Liloba na ye ya solo na nzela ya “banganga na bokonzi.” (1 Petelo 2:9) Na mikolo oyo ya nsuka, boyebi ya Yehova Nzambe, ya mikano na ye mpo na bato, mpe mingimingi ya Yesu Klisto mpe Bokonzi ya Masiya, esopani mingi lokola mai oyo ezali se kobakisama. Ezali mpenza esengo monene na kozwa ebele ya mai oyo ezali se kokóma mozindo mpe ezali kolendisa biso na elimo!—Danyele 12:4.
11 Ndenge moko na ebale oyo anzelu amekaki ezalaki se kokóma mozindo, mapamboli ya bomoi oyo Yehova azali kosopa ebakisami mingi mpo na kokokisa mposa ya ebele ya bato na mokili na biso ya elimo oyo ezali na mapamboli. Esakweli mosusu ya kozongisama elobaki ete: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota na makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango nakoyeisa yango mbango.” (Yisaya 60:22) Maloba oyo makokisami; bamilio ya bato bayei kosangana na biso na losambo ya pɛto! Yehova apesi “mai” mingi mpo na bato nyonso oyo bazali koya epai na ye. (Emoniseli 22:17) Azali kosala ete lisangá na ye awa na mabelé ekabola Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na mokili mobimba mpe na minɔkɔ ebele. Ndenge moko mpe, makita ya boklisto mpe mayangani ebongisami na mokili mobimba mpo ete bato nyonso bázwa mai ya solo oyo ezali pɛto mpe ezali kongɛnga lokola talatala. Makambo yango ezali na bopusi nini epai ya bato?
Mai epesi bomoi!
12. (a) Mpo na nini banzete ya emonaneli ya Ezekiele ekoki kobota mbuma ndenge wana? (b) Na mikolo oyo ya nsuka, banzete oyo ezali kobota mbuma ezali komonisa nini?
12 Na emonaneli ya Ezekiele, mai epesi bomoi mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Ntango Ezekiele ayoki ete banzete ekobima pembenipembeni ya ebale, balobi na ye ete: “Nkasa na yango ikokauka te, mpe mbuma na yango ikozanga te, . . . mbuma na yango ikozala mpo na kolya, mpe nkasa na yango mpo na kobikisa.” Mpo na nini banzete yango ezali kobota na ndenge ya kokamwa boye? Mpamba te ‘mai na yango euti na ndako na bulɛɛ.’ (Ezekiele 47:12b) Banzete yango ya elilingi emonisi makambo nyonso oyo Yehova azali kosala mpo na kozongisa bato na ezalela ya kokoka na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Na moi ya lelo, awa na mabelé batikali bapakolami bazali kokamba mosala ya kopesa bilei mpe kobikisa na elimo. Ntango ba 144 000 nyonso bakozwa mbano na bango na likoló, matomba ya mosala na bango lokola banganga mpe bayangeli elongo na Klisto ekolandana na mikolo mizali koya, tii ekosukisa liwa oyo Adama ayeisaki.—Emoniseli 5:9, 10; 21:2-4.
13. Kobikisama nini ezali kosalema na mikolo na biso?
13 Ebale ya emonaneli ekei tii na Mbu Ekufá mpe ebikisi biloko nyonso oyo ekutani na yango. Mbu yango ezali elilingi ya esika oyo ekufá na elimo. Kasi, ‘bipai nyonso oyo ebale yango oyo ekoli mbala mibale ekómi,’ bikelamu ya bomoi ezali kobotama ebele. (Ezekiele 47:9, NW) Ndenge moko mpe na mikolo ya nsuka, na bisika nyonso oyo mai ya bomoi ezali kokɔta, bato bazali kozonga na bomoi na ndimbola ya elimo. Bato ya liboso oyo bazongisamaki na bomoi na elimo ezalaki bongo batikali bapakolami na 1919. Bazalaki bakufi, to bakokaki kosala eloko moko te, kasi bazongaki na bomoi na elimo. (Ezekiele 37:1-14; Emoniseli 11:3, 7-12) Mai yango ya bomoi ekómi mpe epai ya bakufi mosusu na elimo, mpe bazongisami na bomoi mpe bakómi ebele monene ya bampate mosusu oyo bazali se kobakisama. Bango mpe balingi Yehova mpe bazali kosalela ye. Etikali moke, ebele ya bato oyo bakosekwa bázwa mpe litomba ya ebongiseli wana.
14. Mosala ya koboma mbisi oyo ekoli na libongo ya Mbu Ekufá ezali mpenza komonisa nini lelo oyo?
14 Nguya ya bomoi na elimo ezali kobota mbuma mingi. Yango emonisami na mosala ya koboma mbisi oyo ekoli mingi na mabongo ya mai monene oyo liboso ezangaki bikelamu ya bomoi. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nakozalisa bino baluki na bato.” (Matai 4:19) Na mikolo oyo ya nsuka, mosala ya koboma mbisi ebandaki na koyanganisama ya batikali bapakolami; kasi esukaki wana te. Mai ya bomoi oyo ezali kouta na tempelo ya Yehova na elimo, bakisa mpe lipamboli ya boyebi ya sikisiki, ezali kokómela bato ya bikólo nyonso. Esika nyonso oyo ebale yango ekómi, epesi bomoi na elimo.
15. Eloko nini emonisi ete bato mosusu bakoboya bibongiseli ya Nzambe mpo na bomoi, mpe bato oyo bakoboya bakosuka wapi?
15 Ya solo, lelo oyo bato nyonso te nde bazali kondima nsango ya bomoi. Ndenge moko mpe, bato nyonso te oyo bakosekwa na boumeli ya Boyangeli ya Mbula nkóto ya Klisto nde bakondima yango. (Yisaya 65:20; Emoniseli 21:8) Anzelu alobi ete biteni mosusu ya Mbu ebikisami te. Bisika oyo ya pɔtɔpɔtɔ, oyo bizangi bomoi, “ikotikala mpo na mungwa.” (Ezekiele 47:11) Na eleko na biso, bato nyonso te oyo bazali kopesa bango mai ya bomoi euti na Yehova nde bazali kondima yango. (Yisaya 6:10) Na Armagedon, baoyo nyonso baponi kotikala na liwa mpe na maladi ya elimo ‘bakotikala mpo na mungwa’; elingi koloba ete bakobomama mpo na libela. (Emoniseli 19:11-21) Kasi, baoyo bazali ntango nyonso komɛla mai oyo bakoki kolikya ete bakozwa lobiko mpe bakomona ndenge esakweli oyo ekokokisama mpo na mbala ya nsuka.
Ebale na paladiso
16. Ntango nini mpe ndenge nini emonaneli ya tempelo ya Ezekiele ekokokisama mpo na mbala ya nsuka?
16 Lokola bisakweli mosusu oyo elobeli kozongisama, emonaneli ya tempelo ya Ezekiele ekokokisama mpo na mbala ya nsuka na boumeli ya mbula nkóto. Na ntango yango, banganga bakozala lisusu awa na mabelé te. “Bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto; bakozala bakonzi [na likoló] esika moko na ye mbula nkóto.” (Emoniseli 20:6) Banganga wana ya likoló bakosangana na Klisto mpo na kopesa matomba nyonso ya mbeka ya lisiko ya Klisto. Na ndenge yango, bato ya sembo bakobikisama, bakozonga na ezalela ya kokoka.—Yoane 3:17.
17, 18. (a) Ndenge nini Emoniseli 22:1, 2 elobeli ebale ya bomoi, mpe esakweli yango esengelaki kokokisama libosoliboso ntango nini? (b) Na paladiso, mpo na nini ebale ya mai ya bomoi ekokóma monene mpenza?
17 Ɛɛ, na ntango yango, ebale oyo Ezekiele amonaki ekosopa mai ya bomoi na nguya makasi. Yango ekozala kokokisama monene ya esakweli oyo ezali na Emoniseli 22:1, 2: “Atalisi ngai ebale na mai na bomoi, kitoko lokola [kristale], kobima na kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate. Na kati na balabala na yango, mpe na ebale, na bipai nyonso mibale, ezalaki na nzete na bomoi kobotáká mbuma na mitindo zomi na mibale, sanza na sanza kobotáká mbuma na sanza, mbuma na sanza. Nkasa na nzete izali mpo na kobikisa bato na mabota.”
18 Na boumeli ya mbula nkóto, maladi nyonso, ezala ya nzoto, ya makanisi mpe ya mayoki, ekosila. Likambo yango emonisami malamu na ‘kobikisama ya mabota’ na banzete ya elilingi. Na nzela ya makambo oyo Klisto na ba 144 000 bakosala, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Na ntango yango, ebale ekokóma na monene na yango ya nsuka. Ekokóma monene mpe mozindo mpo na kokokisa bamposa ya bamilio, mbala mosusu mpe ya bamiliare ya bato oyo bakosekwa, oyo bakomɛla mai ya bomoi mpe ya pɛto. Na emonaneli ya Ezekiele, mai ebikisaki Mbu Ekufá, epesaki bomoi na bisika nyonso oyo elekaki. Na kati ya Paladiso, basi na mibali bakozonga na bomoi na ndenge ya solosolo; elingi koloba ete soki bamonisi kondima na matomba ya mbeka oyo bakolakisa bango, bakobika na liwa oyo bazwaki epai ya Adama. Emoniseli 20:12 esakoli ete na mikolo yango “barulo” ekofungwama. Barulo yango ekopesa bato oyo bakosekwa bingɛngiseli mosusu. Kasi likambo ya mawa ezali ete ata kati na Paladiso, bato mosusu bakoboya kobikisama. Batomboki yango ezali baoyo ‘bakotikala mpo na mungwa,’ elingi koloba libebi ya seko.—Emoniseli 20:15.
19. (a) Ndenge nini kokabolama ya mokili ekokokisama na Paladiso? (b) Mboka ezali elilingi ya likambo nini oyo ekozala na Paladiso? (c) Lokola engumba ezali mwa mosika na tempelo, yango elimboli nini?
19 Na ntango wana mpe, kokabolama ya mokili oyo elobelami na emonaneli ya Ezekiele ekokokisama mpo na mbala ya nsuka. Ezekiele amonaki mokili ekabolami malamu; ndenge moko mpe, moklisto ya sembo mokomoko akoki kozala na elikya ete akozwa esika to na libula na Paladiso. Na ntembe te mposa ya moto nyonso ya kozala na ndako na ye moko mpo na kofanda mpe kobatela yango ekokokisama na kozanga mobulu. (Yisaya 65:21; 1 Bakolinti 14:33) Mboka oyo Ezekiele amonaki emonisi na ndenge ebongi mpenza boyangeli oyo Yehova akani mpo na mabelé ya sika. Banganga bapakolami bakozala lisusu na bato awa na mabelé te. Emonaneli epesi biso likanisi yango na ndenge emonisi ete engumba yango etongami kati na mokili “ya bulɛɛ te,” kasi mwa mosika na tempelo. (Ezekiele 48:15) Wana ba 144 000 bakoyangela elongo na Klisto kuna na likoló, Mokonzi akozala na bamonisi na ye awa na mabelé. Bato oyo akoyangela awa na mabelé bakozwa matomba mingi na litambwisi ya bolingo ya kelasi ya mokonzi. Nzokande, guvernema yango moko ekozala na mabelé te, kasi na likoló. Moto na moto awa na mabelé, ezala mpe kelasi ya mokonzi, akotosa Bokonzi ya Masiya.—Danyele 2:44; 7:14, 18, 22.
20, 21. (a) Mpo na nini nkombo ya engumba yango ebongi mpenza? (b) Bososoli na biso ya emonaneli ya Ezekiele esengeli kopusa biso tómituna mituna nini?
20 Yoká maloba ya nsuka ya esakweli ya Ezekiele: “Nkombo na mboka longwa na mokolo yango ekozala [Yehova Ye moko, NW] azali kuna.” (Ezekiele 48:35) Mboka yango ekozala wana mpo na kopesa bato nguya to lokumu te; ekozala mpe mpo na kokokisa mikano ya moto te. Ezali nde mboka ya Yehova. Makanisi na ye mpe lolenge na ye ya kosala makambo na bolingo nyonso mpe na boboto nde ekomonana kuna. (Yakobo 3:17) Yango epesi biso elikya oyo ezali kolendisa motema ete Yehova akopambola ‘mabelé na ye ya sika,’ elingi koloba bato oyo bakoumela libela na libela.—2 Petelo 3:13.
21 Makambo malamu oyo ezali liboso na biso mazali kopesa biso esengo te? Yango wana, mokomoko na biso asengeli komituna: ‘Ndenge nini nazali kotalela mapamboli oyo elakisami polele na emonaneli ya Ezekiele? Na bosembo nyonso, nazali mpenza kosunga bankulutu ya bolingo, ezala batikali bapakolami mpe baoyo bakozala na kelasi ya mokonzi na mosala oyo bazali kosala? Nasalaka ete losambo ya pɛto ezala likambo oyo eleki ntina na bomoi na ngai? Nazali mpenza kozwa litomba na mai ya bomoi oyo ezali kosopama mingi lelo oyo?’ Tiká ete mokomoko na biso alanda kosala bongo mpe kosepela na bibongiseli ya Yehova libela na libela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lobwaku oyo ekoki kozala Lobwaku ya Kidolono, oyo ebandi na sudi-ɛsti ya Yelusaleme mpe esuki na Mbu Ekufá. Eteni na yango ya ngɛlɛ ekauká mpe ezalaka na mai te ata na eleko nini.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1881 (ebimeli ya Lingelesi), mpe ya 15 Sɛtɛmbɛ 1981 (ebimeli ya Lifalanse).
Okopesa eyano nini?
◻ Mai oyo ezali kouta na tempelo ezali elilingi ya nini?
◻ Kobikisama nini Yehova asali na nzela ya ebale ya elilingi, mpe mpo na nini ebale yango ekómi monene?
◻ Banzete oyo ezali pembenipembeni ya ebale ezali elilingi ya nini?
◻ Engumba ekomonisa nini na boumeli ya mbula nkóto, mpe mpo na nini nkombo na yango ebongi mpenza?
[Bililingi na lokasa 23]
Ebale ya bomoi ezali elilingi ya ebongiseli ya Nzambe mpo na lobiko