Mpo na nini kosakola ndako na ndako ezali na ntina mingi lelo oyo?
“Mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.”—Mis. 5:42.
1, 2. (a) Batatoli ya Yehova bayebani mingi mpo na lolenge nini ya kosakola? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
LIKAMBO yango eyebani malamu na mokili mobimba. Okomona bato mibale balati kitoko mpe bakɔti na ndako moko mpe basakweli moto oyo bakuti nsango ya Biblia oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Soki moto yango asepeli, bakopesa ye mokanda moko oyo elimbolaka Biblia mpe bakosɛnga ye abanda koyekola Biblia. Na nsima, bakokende na ndako mosusu. Soki osalaka mosala yango, na ntembe te omonaka ete bato bayebaka, liboso kutu obanda koloba, ete ozali Motatoli ya Yehova. Ya solo, Batatoli ya Yehova bayebani ete basakolaka ndako na ndako.
2 Tosalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kokokisa mokumba oyo Yesu apesá biso ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Tosakolaka na zando, na balabala mpe na bisika mosusu oyo bato bazalaka mingi. (Mis. 17:17) Tosololaka mpe na bato mingi na telefone mpe na mikanda. Toteyaka bato oyo tokutanaka na bango mokolo na mokolo na misala na biso mateya ya Biblia. Tozali mpe na esika moko na Internet, oyo ezali na mateya ya Biblia na minɔkɔ koleka 300.a Mayele nyonso wana ezali kobimisa matomba mingi. Nzokande, na bisika mingi, kosakola ndako na ndako ezali lolenge ya libosoliboso oyo tosalelaka mpo na kosakola nsango malamu. Likambo yango ya kosakola ndako na ndako eutá wapi? Ebandaki boni ete basaleli ya Nzambe bákóma kosalela yango mingi lelo oyo? Mpe mpo na nini ezali na ntina mingi lelo oyo?
Bantoma bazalaki kosakola ndako na ndako
3. Malako nini Yesu apesaki bantoma na ye na ntina na mosala ya kosakola, mpe yango emonisi ete basengelaki kosakolaka ndenge nini?
3 Emonani ete kosakola ndako na ndako eutá na Makomami. Ntango Yesu atindaki bantoma na ye bákende kosakola, alobaki na bango boye: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani kati na yango abongi.” Ndenge nini bakokaki koluka bato oyo babongi? Yesu alobaki na bango ete bákende na bandako ya bato. Alobaki boye: “Ntango bokokɔta na ndako, bópesa bato ya ndako mbote; mpe soki ndako yango ezali oyo ebongi, tiká kimya oyo botombeli yango ezala likoló na yango.” Basengelaki nde kokende epai ya bato kaka soki babengi bango? Yesu abakisaki lisusu boye: “Epai nyonso oyo moto akoyamba bino te to akoyoka maloba na bino te, ntango bokobima na ndako yango to na engumba yango bópupola putulu ya makolo na bino.” (Mat. 10:11-14) Malako wana emonisi ete ntango bantoma “bakatisaki teritware yango kolekáká mboka na mboka, kosakoláká nsango malamu,” basengelaki kokende kotala bato na bandako na bango.—Luka 9:6.
4. Biblia elobeli mosala ya kosakola ndako na ndako na esika nini?
4 Biblia elobi polele ete bantoma bazalaki kosakola ndako na ndako. Na ndakisa, Misala 5:42 elobi mpo na bango boye: “Mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.” Mbula soki 20 na nsima, ntoma Paulo akundwelaki bankulutu ya lisangá ya Efese ete: “Namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.” Paulo akendaki kotala bankulutu yango liboso bákóma bandimi? Emonani mpenza ete ezalaki bongo, mpo ateyaki bango mpe “oyo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondima na kati ya Nkolo na biso Yesu.” (Mis. 20:20, 21) Na ntina na Misala 20:20, 21, Robertson alobi boye na buku na ye (Word Pictures in the New Testament): “Emonani mpenza ete basakoli wana ya minene bazalaki kosakola ndako na ndako.”
Mayoyo ya ntango na biso
5. Esakweli ya Yoele esaleli elilingi nini mpo na kolobela mosala ya kosakola?
5 Mosala ya kosakola oyo esalemaki na ekeke ya liboso ezalaki kaka komonisa mwa moke mosala ya monene koleka oyo ezali kosalema na ntango na biso. Mosakoli Yoele amonisaki ete mosala ya kosakola ya baklisto bapakolami ekokani na ndenge banyama-nkɛkɛ, na ndakisa mayoyo ebebisaka biloko. (Yoe. 1:4) Lokola limpinga ya basoda, mayoyo elekaka ata na bisika ya nkaka, ekɔtaka na bandako mpe ebebisaka eloko nyonso oyo ezali kokutana na yango. (Tángá Yoele 2:2, 7-9.) Yango ezali elilingi kitoko mpenza ya mpiko mpe molende oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango na mosala ya kosakola nsango malamu na mikolo na biso! Kosakola ndako na ndako ezali mayele ya libosoliboso oyo baklisto bapakolami ná baninga na bango “bampate mosusu” basalelaka mpo na kokokisa esakweli wana. (Yoa. 10:16) Ndenge nini biso Batatoli ya Yehova tokómaki kosalela mayele wana oyo ebandaki na bantoma?
6. Na 1922, elendiseli nini epesamaki mpo na kosakola ndako na ndako, mpe bato mosusu basalaki nini?
6 Kobanda na 1919, emonanaki polele ete moklisto mokomoko asengeli kosakolaka. Na ndakisa, lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo “kosakola ezali na ntina mingi,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1922 (na Lingelesi), ekundwelaki baklisto bapakolami ntina ya “komipesa mpo na komemela bato mikanda oyo elimbolaka Biblia na bandako na bango, mpe kosakwela bango ete Bokonzi ya likoló ekómi pene.” Bulletin (lelo oyo Mosala na biso ya Bokonzi) elimbolaki na mozindo ndenge ya kolakisa mikanda yango. Kasi na ebandeli, bato oyo bazalaki kosakola ndako na ndako bazalaki moke mpenza. Bamosusu bazalaki kokakatana kosala yango. Bazalaki kobimisa makanisi ndenge na ndenge mpo na kokima mosala yango, kasi likambo ya solo ezalaki ete bamosusu bazalaki komona ete kosakola ndako na ndako ekokitisa bango valɛrɛ. Lokola bakómaki kobɛta nsɛtɛ mingi mpo na mosala ya kosakola, mingi kati na bango bakómaki mokemoke kotika ebongiseli ya Yehova.
7. Mposa nini emonanaki na bambula ya 1950?
7 Na bambula oyo elandaki, bato mingi bakómaki komipesa na mosala ya kosakola. Kasi, emonanaki polele ete mosakoli mokomoko asengeli kozwa lisusu formasyo oyo ebongi mpo na kosakola ndako na ndako. Tózwa ndakisa moko na États-Unis. Na ebandeli ya bambula ya 1950, Batatoli mosusu (28 %) na ekólo yango bazalaki kosuka kaka na kokabola batrakte to kotɛlɛma na babalabala mpo na kokabola bazulunalo. Batatoli mosusu (koleka 40 %) bazalaki kosakola mingi te, bazalaki kolekisa basanza kozanga kobima na mosala ya kosakola. Ndenge nini bakokaki kosalisa baklisto nyonso bákóma kosakola ndako na ndako?
8, 9. Formasyo nini babandaki kopesa bandeko na 1953, mpe yango ebimisaki matomba nini?
8 Na liyangani moko ya mikili mingi oyo esalemaki na engumba New York na 1953, babɛtaki mpenza nsɛtɛ na likambo ya kosakola ndako na ndako. Ndeko Nathan H. Knorr alobaki ete mosala ya libosoliboso ya bakɛngɛli nyonso ezali ya kosalisa Motatoli nyonso asakolaka ndako na ndako sanza nyonso. Alobaki boye: “Moto nyonso asengeli kosakolaka nsango malamu ndako na ndako.” Mpo na kokokisa mokano yango, bapesaki bandeko formasyo na mokili mobimba. Baoyo babandaki naino te kosakola ndako na ndako bazwaki formasyo mpo na kokendaka kotala bato epai na bango, koteya bango Biblia mpe koyanola na mituna na bango.
9 Formasyo yango ebimisaki matomba ya koloba te. Nsima ya mbula zomi, motángo ya basakoli na mokili mobimba ebakisamaki mbala mibale (100 %), oyo ya bato oyo bazongelaki kotala ebakisamaki mbala mibale na ndambo (126 %) mpe oyo ya bato oyo bayekolaki Biblia ebakisamaki mbala misato (150 %). Lelo oyo, basakoli soki milio nsambo bazali kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Bokoli ya ndenge wana emonisi mpenza ete Yehova azali kopambola milende oyo basaleli na ye bazali kosala mpo na kosakola ndako na ndako.—Yis. 60:22.
Bato bazali kotyama elembo mpo na lobiko
10, 11. (a) Ndenge Ezekiele mokapo 9 emonisi yango, emonaneli nini Ezekiele amonaki? (b) Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama lelo oyo?
10 Emonaneli oyo mosakoli Ezekiele amonaki ezali kosalisa biso tómona ntina ya kosakola ndako na ndako. Na emonaneli yango, Ezekiele amonaki mibali motoba basimbi bibundeli na mabɔkɔ mpe amonaki mobali ya nsambo alati molikani mpe azalaki na molangi ya mai ya mokanda. Yehova alobaki na mobali ya nsambo boye: “Leká kati na mboka . . . mpe tyá elembo na bilongi ya mibali oyo bakokimela mpe bakolela na ntina na makambo ya mbindo nyonso masalami na kati ya mboka.” Ntango asilisaki kotya bilembo yango, Yehova asɛngaki mibali motoba oyo basimbaki bibundeli ete báboma bato nyonso oyo bazalaki na elembo te.—Tángá Ezekiele 9:1-6.
11 Toyebi ete moto oyo “alataki molikani” na esakweli yango ezali baklisto bapakolami. Na nzela ya mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, baklisto bapakolami bazali kotya bato oyo bazali kokóma “bampate mosusu” ya Klisto elembo na ndenge ya elilingi. (Yoa. 10:16) Elembo yango ezali nini? Ezali elembo oyo ezali komonisa polele ete bampate yango bazali bayekoli ya Yesu Klisto oyo bamipesi epai ya Nzambe mpe bazwi batisimo mpe balati bomoto ya sika. (Ef. 4:20-24) Ná bango ná baklisto bapakolami bakómi etonga moko mpe bazali kosalisa baklisto bapakolami na mosala monene oyo bazali na yango ya kotya bato mosusu elembo.—Emon. 22:17.
12. Ndenge nini emonaneli oyo Ezekiele amonaki ya kotyama ya elembo na bilongi ezali komonisa ntina oyo tosengeli kokoba koluka bampate?
12 Emonaneli ya Ezekiele ezali kosalisa biso tómona ntina moko oyo tosengeli kolɛmbisa mabɔkɔ te na mosala ya koluka bato oyo bazali ‘kokimela mpe kolela.’ Bomoi ya bato ezali na likama. Mosika te, baanzelu ya Yehova, oyo bamonisami na mibali motoba oyo basimbi bibundeli na mabɔkɔ, bakoboma bato oyo batyami elembo te. Mpo na mokolo wana ya kosambisa, ntoma Paulo akomaki ete Nkolo Yesu ná “baanzelu na ye ya nguya” bakozongisa “mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Tes. 1:7, 8) Tósimba ete bato bakosambisama na kotalela ndenge bazali koyamba nsango malamu. Yango wana, tosengeli kokoba kosakola nsango malamu na molende tii na nsuka. (Emon. 14:6, 7) Yango epesi basaleli ya Yehova nyonso mokumba monene.—Tángá Ezekiele 3:17-19.
13. (a) Paulo azalaki komona ete azali na mokumba nini, mpe mpo na nini? (b) Omonaka ete ozali na mokumba nini liboso ya bato ya teritware na yo?
13 Ntoma Paulo amonaki ete azali na mokumba ya kosakwela basusu nsango malamu. Akomaki boye: “Ezala epai ya Bagrɛki mpe Babarbare, ezala epai ya bato ya bwanya mpe bazoba nazali na nyongo: bongo nazali na mposa moko makasi ya kosakola nsango malamu mpe epai na bino baoyo bofandi na Loma.” (Lom. 1:14, 15) Botɔndi ya Paulo mpo na motema mawa oyo Nzambe amoniselaki ye etindaki ye asalisa basusu mpo Nzambe amonisela bango boboto monene ndenge kaka amoniselaki ye. (1 Tim. 1:12-16) Ezalaki lokola azali na nyongo ya moto nyonso oyo akutani na ye, mpe mpo na kofuta yango, asengelaki kosakwela moto yango nsango malamu. Yo mpe omonaka ete ozali na nyongo ya ndenge wana epai ya bato ya teritware na yo?—Tángá Misala 20:26, 27.
14. Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka na babalabala mpe na ndako na ndako?
14 Ata soki kobikisa bomoi ya bato ezali na ntina mingi, ezali mpe na ntina mosusu ya monene koleka oyo tosengeli kosakolaka ndako na ndako. Na esakweli ya Malaki 1:11, Yehova alobi boye: “Longwa na kobima ya moi kino kolimwa na yango, nkombo na ngai ezali monene kati na mabota; mpo na bisika nyonso, mpaka ya malasi ekabelami nkombo na ngai, mpe likabo ya pɛto; zambi nkombo na ngai ezali monene kati na mabota.” Mpo na kokokisa esakweli yango, basaleli ya Yehova bazali kosanzola nkombo na ye na mabelé mobimba ntango bazali kosakola nsango malamu na komikitisa nyonso. (Nz. 109:30; Mat. 24:14) Kopesa Yehova “mbeka ya lisanzoli” nde ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka na babalabala mpe na ndako na ndako.—Ebe. 13:15.
Makambo mosusu ya minene ezali koya
15. (a) Ndenge nini Bayisalaele basalaki makambo mingi lisusu ntango batambolaki zingazinga ya Yeliko na mokolo ya nsambo? (b) Likambo yango emonisi nini mpo na mosala ya kosakola?
15 Wapi makambo mosusu ya minene oyo ekosalema na mosala ya kosakola? Kozingama ya Yeliko, oyo elobelami na mokanda ya Yosua, epesi biso mwa likanisi. Tóbosana te ete liboso Nzambe aboma Yeliko, asɛngaki Bayisalaele ete bátambola zingazinga na engumba yango mbala moko na mokolo, na boumeli ya mikolo motoba. Kasi na mokolo ya nsambo, basengelaki kosala makambo mingi lisusu. Yehova ayebisaki Yosua ete: “Bokotambola na kozinga mboka mbala nsambo mpe banganga bakoyula na kelelo. Mpe wana ekoyula bango ntango molai na liseke ya mpate, . . . bato nyonso bakoganga na koganga monene, mpe lopango ya mboka ekokwea kalee.” (Yos. 6:2-5) Ekoki kozala ete mosala ya kosakola mpe ekobakisama ndenge wana. Na ntembe te, tii mokili oyo ebomama, nkombo ya Nzambe mpe Bokonzi na ye ekosakolama mingi lisusu koleka.
16, 17. (a) Nini ekokokisama liboso “bolɔzi monene” esila? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
16 Ekozala na ntango moko oyo nsango oyo tozali kosakola ekokóma koyokana lokola “koganga monene.” Na mokanda ya Emoniseli, nsango ya bitumbu makasi oyo Yehova akopesa bato ekokanisami na “mbula-ya-mabanga ya monene, libanga mokomoko ezalaki na kilo soki ya talanta moko.”b Mpe Emoniseli 16:21 elobi ete: “Bolɔzi na yango ezalaki ya monene mpenza.” Toyebi te makambo mosusu oyo kosakola ndako na ndako ekosala na oyo etali kosakolama monene ya bitumbu wana oyo Nzambe akopesa. Kasi, tokoki mpenza kondima ete liboso “bolɔzi monene” esila, nkombo ya Yehova ekoyebana na ndenge oyo eyebaná naino liboso te.—Emon. 7:14; Ezek. 38:23.
17 Wana tozali kozela makambo ya nsɔmɔ oyo ezali liboso, tókoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende. Ntango tozali kokokisa mokumba yango, mikakatano nini tozali kokutana na yango na mosala ya kosakola ndako na ndako, mpe ndenge nini tokoki kolonga yango? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo ekolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Adrɛsi na biso ya Internet ezali www.watchtower.org.
b Soki talanta oyo balobeli awa ezali talanta ya Bagrɛki, libanga mokomoko ekokaki kozala na kilo soki 20.
Okopesa eyano nini?
• Wapi mikapo ya Biblia oyo emonisi ete tosengeli kosakolaka ndako na ndako?
• Ndenge nini babɛtaki nsɛtɛ na likambo ya kosakola ndako na ndako na ntango na biso?
• Mpo na nini basaleli ya Yehova bazali na mokumba ya kosakola?
• Makambo nini ya nsɔmɔ ezali liboso na biso?
[Bililingi na lokasa 4]
Lokola ntoma Paulo, yo mpe omonaka ete ozali na mokumba ya kosakwela basusu?
[Bililingi na lokasa 5]
Ndeko Knorr, na 1953