Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezekiele—I
TOZALI na mobu 613 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Mosakoli Yilimia azali na Yuda, azali kosakola na mpiko nyonso ete Yelusaleme ekobebisama mpe mabelé ya Yuda ekotikala mpamba. Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, amemi ebele ya Bayuda na boombo. Na kati na bango, tokoki kotánga Danyele ná baninga na ye misato, oyo bazali kosala epai ya mokonzi. Baombo mingi bazali pene na ebale Kebale, na “mokili ya Bakaladi.” (Ezekiele 1:1-3) Yehova atiki baombo wana te kozanga kopesa bango mosakoli. Aponi mosakoli Ezekiele oyo azali na mbula 30.
Mokanda ya Ezekiele esilaki kokomama na mobu 591 L.T.B., mpe ezali kolobela makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 22. Ezekiele akomi makambo nyonso na bosikisiki mpenza. Apesi badati ya bisakweli na ye, apesi kutu na bosikisiki mpenza mokolo, sanza mpe mbula oyo amonaki likambo mokomoko. Eteni ya liboso ya nsango ya Ezekiele ezali kolobela mingi kokwea mpe kobebisama ya Yelusaleme. Eteni ya mibale ezali kolobela bitumbu oyo Yehova akanaki kopesa bikólo ya zingazinga, mpe eteni ya nsuka ezali kolobela kozongisama ya losambo ya Yehova. Eteni oyo ezali kolobela makanisi ya ntina oyo ezali na Ezekiele 1:1–24:27, ezali kolobela bimonaneli, bisakweli mpe bilakiseli oyo ezalaki komonisa makambo oyo esengelaki kokómela Yelusaleme.
“NASILI KOZALISA YO MOKƐNGƐLI”
Nsima ya kozwa emonaneli moko ya nsɔmɔ ya kiti ya bokonzi ya Yehova, Ezekiele azwi mokumba na ye. Yehova alobi na ye ete: “Nasili kozalisa yo mokɛngɛli mpo na ndako ya Yisalaele. Yango wana oyoka liloba ya monɔkɔ na ngai, mpe okebisa bango na nkombo na ngai.” (Ezekiele 3:17) Mpo na kosakola ndenge Yelusaleme ekozingama mpe makambo oyo ekokómela yango, Ezekiele azwaki mokumba ya kosala bilakiseli mibale. Mpo na mokili ya Yuda, Yehova alobi na nzela ya Ezekiele ete: “Talá, ngai, bobele ngai, nakoyeisa mopanga na likoló na bino mpe nakobebisa bisika na bino ya likoló.” (Ezekiele 6:3) Mpo na bafandi ya Yuda, alobi ete: “Mpasi enene ekokwela yo.”—Ezekiele 7:7, Biblia Liloba lya Nzambe.
Na 612 L.T.B., Ezekiele amoni na emonaneli moko lokola akómi na Yelusaleme. Amoni makambo ya mabe mpenza ezali kosalema na tempelo ya Nzambe. Ntango Yehova akotinda mampinga na ye ya likoló (oyo bamonisamaki na “mibali motoba”) mpo na komonisa nkanda na ye epai ya bapɛngwi, kaka baoyo bazwaki ‘elembo na elongi’ nde bakobika. (Ezekiele 9:2-6) Kasi, liboso na yango, “makala ya mɔtɔ,” elingi koloba nsango ya nkanda ya Nzambe oyo etali libebi esengeli kosakolama na engumba mobimba. (Ezekiele 10:2) Atako ‘Yehova akoyeisa kotambola ya bato mabe likoló ya mitó na bango mpenza,’ alaki ete akoyanganisa Bayisalaele oyo bapalanganaki.—Ezekiele 11:17-21.
Elimo ya Nzambe ezongisi Ezekiele na Kaladi. Elakiseli moko emonisi ndenge mokonzi Sidikiya ná bato na ye bakokima Yelusaleme. Basakoli ya lokuta batondolami. Bikeko eboyami. Bakokanisi engumba ya Yuda na nzete ya vinyo oyo ebotaka te. Lisapo ya mpongo mpe vinyo emonisi makama oyo ekokómela bato ya Yelusaleme lokola baluki lisalisi na Ezipito. Lisapo yango esuki na elaka ete, ‘Yehova akolona etape ya motau likoló ya ngomba moko molai.’ (Ezekiele 17:22) Nzokande, na Yuda, ‘nzete ya bokonzi ekozala te.’—Ezekiele 19:14.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:4-28—Likalo ya likoló ezali elilingi ya nini? Likalo yango ezali elilingi ya ebongiseli ya Yehova na likoló, oyo ezali na bikelamu na ye ya elimo ya sembo. Nguya na yango eutaka na elimo santu ya Yehova. Motambwisi ya likalo yango, oyo azali komonisa Yehova, azali na nkembo ya koloba te. Kimya na ye emonisami na monama ya kitoko.
1:5-11—Bikelamu ya bomoi minei ezali banani? Na mbala ya mibale oyo Ezekiele amonaki likalo yango, abengaki bikelamu ya bomoi minei wana bakeluba. (Ezekiele 10:1-11; 11:22) Na mbala wana, alobi ete ngɔmbɛ mobali azali na “elongi ya keluba.” (Ezekiele 10:14) Elilingi yango ebongi mpenza, mpamba te ngɔmbɛ ezalaka elembo ya nguya mpe ya makasi, mpe bakeluba bazali bikelamu ya elimo ya nguya.
2:6—Mpo na nini Ezekiele abengami mbala na mbala “mwana ya moto”? Yehova azali kobenga Ezekiele bongo mpo na kokundwela ye ete azli kaka moto, mpo na komonisa ye bokeseni monene oyo ezali kati na ye oyo azali komema nsango ya Nzambe mpe Nzambe ye moko, nkolo ya nsango yango. Yesu abengami mpe ndenge wana mbala soki 80 na baevanzile, mpe yango emonisi polele ete Mwana ya Nzambe ayaki lokola moto, kasi azalaki te ekelamu ya elimo oyo elataki nzoto ya moto.
2:9–3:3—Mpo na nini rulo ya mawa mpe ya kolela ezalaki elɛngi na monɔkɔ ya Ezekiele? Eloko esalaki ete Ezekiele ayoka rulo yango elɛngi ezali ndenge azalaki kotalela mokumba oyo bapesaki ye. Ezekiele azalaki na botɔndi mingi lokola azalaki mosakoli ya Yehova.
4:1-17—Ezekiele asalaki mpenza elakiseli oyo emonisaki ndenge banguna bakozinga Yelusaleme? Ndenge Ezekiele amilelaki epai na Yehova ete asalela eloko mosusu mpo na kopelisa mɔtɔ mpe ndenge Yehova ayokelaki ye emonisi ete mosakoli Yilimia asalaki mpenza elakiseli yango. Kolala na lobɔkɔ ya mwasi ezalaki mpo na mabe oyo bokonzi ya mabota zomi esalaki na boumeli ya mbula 390, banda na ebandeli na yango na 997 L.T.B. tii na kobebisama ya Yelusaleme na 607 L.T.B. Kolala na lobɔkɔ ya mobali ezalaki mpo na masumu oyo Yuda esalaki na boumeli ya mbula 40, kobanda na eleko oyo Yilimia akómaki mosakoli na 647 L.T.B. tii na 607 L.T.B. Na boumeli ya mikolo 430 wana, Ezekiele azalaki kobika kaka na mwa bilei mpe mai moke, yango emonisaki ete nzala makasi ekozala ntango Yelusaleme ekozingama.
5:1-3—Maloba oyo ete Ezekiele asengelaki kozwa ndambo ya nsuki na kati ya oyo asengelaki kopanza na mopɛpɛ mpe kokanga yango na nsɔngɛ ya elamba na ye ezalaki na ndimbola nini? Yango ezalaki mpo na komonisa ete mwa ndambo ya Bayuda basengelaki kozonga na Yuda mpe kozongela lisusu losambo ya solo nsima ya kotika mboka na bango mpamba mbula 70.—Ezekiele 11:17-20.
17:1-24, NW—Mpongo mibale ya minene ezali banani, ndenge nini bitape ya motau ya sɛdrɛ ebukamaki, mpe “etape ya motau” oyo Yehova alonaki ezali nini? Bampongo mibale ezali elilingi ya mokonzi ya Babilone mpe mokonzi ya Ezipito. Mpongo ya liboso eyaki na nsɔngɛ ya sɛdrɛ, elingi koloba epai ya mokonzi oyo afandaki na ebonga ya bakonzi ya libota ya Davidi. Mpongo yango ebukaki nsɔngɛ ya etape ya motau na ndenge alongolaki mokonzi Yoyakini ya Yuda mpe atyaki Sidikiya na esika na ye. Atako Sidikiya alapaki ndai ya kotikala sembo epai ya mokonzi ya Babilone, alukaki lisusu lisalisi epai ya mpongo mosusu, elingi koloba mokonzi ya Ezipito, kasi yango esungaki ye te. Bamemaki ye na boombo mpe akufaki na Babilone. Yehova abukaki mpe “etape motau,” elingi koloba Mokonzi Masiya. Alonaki yango na “ngomba ya molai mpenza,” Ngomba Siona ya likoló, epai akokóma “nzete ya sɛdrɛ ya kitoko,” oyo ekosopa mapamboli ya solosolo na mabelé.—Emoniseli 14:1.
Mateya mpo na biso:
2:6-8; 3:8, 9, 18-21. Tosengeli kobanga bato mabe te to kotika kosakwela bango nsango ya Nzambe, oyo ezali mpe na likebisi mpo na bango. Soki bato bazali kosepela na nsango yango te to kotɛmɛla biso, tosengeli kolɛmba te. Kasi, tosengeli mpe kokeba ete tózala te bato oyo bazangá mawa. Yesu azalaki koyokela bato oyo azalaki koteya mawa. Biso mpe tosengeli koyokelaka bato mawa mpe kosakwela bango nsango malamu.—Matai 9:36.
3:15. Nsima ya kozwa mokumba ya mosakoli, Ezekiele afandaki na Tel-abiba ‘mikolo nsambo na mawa monene’ mpe azalaki kokanisa nsango oyo asengelaki kosakola. Tosengeli te kozwaka ntango ya koyekolaka na molende mpe kokanisaka na mozindo mpo na kososola makambo mozindo ya Biblia?
4:1–5:4. Esengelaki Ezekiele azala na komikitisa mpe na mpiko mpo na kosala bilakiseli mibale wana. Biso mpe tosengeli kozala na komikitisa mpe na mpiko mpo na kosala mosala nyonso oyo Nzambe apesi biso.
7:4, 9; 8:18; 9:5, 10. Tosengeli te koyokela bato oyo Nzambe apesi etumbu mawa.
7:19. Ntango Yehova akopesa mokili oyo bitumbu, mbongo ekozala na ntina ata moke te.
8:5-18. Lipɛngwi ebebisaka boyokani ya moto na Nzambe. “[Mopɛngwi, NW] akobebisa mozalani na ye na nzela ya monɔkɔ na ye.” (Masese 11:9) Tokomonisa bwanya soki tozali koboya mpenza koyoka bapɛngwi.
9:3-6. Mpo na kobika na ‘bolɔzi monene,’ tosengeli kotyama elembo, elingi koloba komonisa ete tozali basaleli ya Nzambe oyo bamipesi na ye mpe bazwi batisimo, mpe kozala na bizaleli oyo ebongi na moklisto. (Matai 24:21) Baklisto bapakolami, oyo bamonisami na moto oyo azali na mai ya mokanda ya mokomeli, bazali kotambwisa mosala ya kotya bato elembo, elingi koloba mosala ya kosakola bokonzi mpe ya kokómisa bayekoli. Soki tolingi te kobungisa elembo na biso, tosengeli na molende mpenza kosalisa baklisto bapakolami na mosala ya kosakola.
12:26-28. Ezala epai na baoyo bazalaki kotyola nsango na ye, Ezekiele asengelaki koloba ete: “Maloba ya [Yehova] ekoumela lisusu te.” Tosengeli kosala nyonso mpo na kosalisa basusu bátyela Yehova motema liboso abebisa mokili oyo.
14:12-23. Lobiko na biso etali biso moko, etali moto mosusu te.—Baloma 14:12
18:1-29. Mikakatano mosusu ekómelaka biso mpo na mabe na biso moko.
“NAKOZALISA YANGO LIBEBI, LIBEBI, LIBEBI”
Na mbula ya nsambo ya boombo, na mobu 611 L.T.B., mikóló ya Yisalaele bayaki epai na Ezekiele mpo na “kotuna Yehova.” Bayokaki lisolo molai ya botomboki ya Yisalaele mpe likebisi oyo Yehova apesaki bango ete ‘akobenda mopanga na ye’ mpo na koboma bango. (Ezekiele 20:1; 21:3) Yehova ayebisaki mokonzi ya Yisalaele (Sidikiya) ete: “Longola elamba ya motó mpe longola motole; makambo makotikala lokola mazali sikawa te. Yango ekitisami ekonetwa, mpe yango enetwisami ekokita. Nakozalisa yango libebi, libebi, libebi; kasi ata oyo ekotikala te kino ekokóma ye oyo abongi na yango, oyo ngai nakopesa yango na ye.”—Ezekiele 21:26, 27.
Yelusaleme etondaki mpenza na makambo mabe. Mabe ya Ohola (Yisalaele) mpe ya Oholiba (Yuda) emonisami polele. Ohola asilaki kopesama na “mabɔkɔ ya baoyo bazalaki kolula ye, na mabɔkɔ ya Baasulia.” (Ezekiele 23:9, NW) Kobebisama ya Oholiba ezali lisusu mosika te. Sanza 18 ya kozingama ya Yelusaleme ebandi na mobu 609 L.T.B. Ntango engumba yango ekokwea, Bayuda bakotikala minɔkɔ polele mpe bakokoka ata kolela te. Ezekiele asengeli te koyebisa Bayuda oyo bazalaki na boombo nsango ya Nzambe kino ntango “mokimi” akopesa nsango ete Yelusaleme ebebisami.—Ezekiele 24:26, 27.
Biyano na mituna ya Biblia:
21:3—“Mopanga” oyo Yehova asengelaki kobenda na loposo na yango ezali nini? “Mopanga” oyo Yehova asaleli mpo na kopesa Yelusaleme mpe Yuda etumbu ezali Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone mpe mampinga na ye. Ekoki mpe kozala ebongiseli ya Nzambe oyo ezali na likoló, elingi koloba bikelamu ya elimo oyo etondi na nguya.
24:6-14—Bosɔtɔ ya mbɛki elakisi nini? Mbɛki yango ezali elilingi ya Yelusaleme ntango ezingamaki. Bosɔtɔ na yango ezali etamboli ya mbindo mpe nyongo ya makila oyo engumba wana ezalaki na yango. Lokola mbindo ya mbɛki yango elekaki ndelo, ata soki batɛlɛmisi yango mpamba likoló ya makala ya mɔtɔ mpe eyei mɔtɔ makasi, bosɔtɔ yango ekolongwa te.
Mateya mpo na biso:
20:1, 49. Makambo oyo mikóló ya Yisalaele balobaki emonisi ete bazalaki kotya ntembe na maloba ya Ezekiele. Tókolisa soki moke te ezaleli ya kotyaka ntembe na makebisi ya Nzambe.
21:18-22. Atako Nebukadanesala asalelaki bikelakela, Yehova nde apesaki nzela ete mokonzi oyo azalaki mopakano abebisa Yelusaleme. Likambo yango emonisi ete ata bademo bakoki te kopekisa bato oyo Yehova atindi mpo bákokisa mokano na ye.
22:6-16. Yehova aboyaka lokuta, etamboli mabe, kosalela bokonzi na ndenge ya mabe mpe kanyaka. Tosengeli kozala mpenza na ekateli makasi ya koboya makambo wana ya mabe.
23:5-49. Kosala boyokani na bikólo mosusu etindaki Yisalaele mpe Yuda bakóma kolanda losambo ya lokuta ya bikólo yango. Tókeba makasi ete tokangamaka te na bato ya mokili oyo bakoki kobebisa kondima na biso.—Yakobo 4:4.
Nsango oyo ezali na bomoi mpe na nguya
Oyo nde mateya kitoko tozwi na mikapo 24 ya liboso ya Mokanda ya Ezekiele! Mitinda oyo ezali na mikanda yango emonisi makambo oyo ekoki kosala ete Nzambe aboya moto, ndenge nini tokoki kosala mpo ayokela biso mawa mpe ntina oyo tosengeli kokebisa bato mabe. Esakweli oyo elobeli kobebisama ya Yelusaleme emonisi polele ete Yehova azali Nzambe oyo ‘ayebisaka bato na ye makambo ya sika liboso ebanda kobima.’—Yisaya 42:9, NW.
Bisakweli lokola oyo ezali na Ezekiele 17:22-24 mpe 21:26, 27 elobelaki kotyama ya Bokonzi ya Masiya na likoló. Mosika te, bokonzi yango ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé. (Matai 6:9, 10) Soki tozali na kondima mpe elikya makasi, tokozela na motema moko mapamboli ya Bokonzi. Ɛɛ, “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—Baebele 4:12.
[Elilingi na lokasa 12]
Likalo ya likoló ezali elilingi ya nini?
[Elilingi na lokasa 14]
Komipesa na molende na mosala ya kosakola esalisaka biso tóbatela “elembo” na biso