Bato “uta na minɔkɔ nyonso” bazali koyoka nsango malamu
“Bato zomi uta na minɔkɔ ya bikólo nyonso [bakoloba ete]: ‘Tokokende elongo na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.’”—ZEKALIA 8:23, NW.
1. Ndenge nini Yehova aponaki libaku moko ya malamu mpo na kobandisa lisangá ya boklisto oyo esangisi bato ya minɔkɔ mpe mikili ndenge na ndenge?
MOKOLO ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) ezalaki libaku moko ya malamu mpenza. Mwa bapɔsɔ liboso, Bayuda ná baprozelite oyo bautaki na mikili soki 15 ya Ampire monene ya Loma mpe bikólo mosusu batondaki na Yelusaleme mpo na fɛti ya Elekeli. Na mokolo yango, ebele kati na bato yango bayokaki bato mpamba oyo batondaki na elimo santu, bazali kosakola nsango malamu na minɔkɔ mingi oyo ezalaki kolobama na Ampire ya Loma. Nzokande, ezalaki te ndenge esalemaki na Babele ntango bokeseni ya minɔkɔ ekɔtisaki mobulu na kati ya bato. (Misala 2:1-12) Na libaku yango, lisangá ya boklisto ebotamaki mpe mosala ya koteya bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge oyo ezali kosalema tii lelo oyo na mokili mobimba ebandaki.
2. Mpo na nini bato ya mikili ndenge na ndenge oyo bayokaki bayekoli ya Yesu na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. ‘batikalaki minɔkɔ polele’?
2 Ekoki kozala ete bayekoli ya Yesu bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki, oyo bato mingi bazalaki koloba na ntango wana. Bazalaki mpe kosalela monɔkɔ ya Liebele, oyo ezalaki kolobama na tempelo. Kasi, na mokolo ya Pantekote, bato ya mikili ndenge na ndenge oyo bazalaki koyoka bango “batikalaki minɔkɔ polele” ntango bayokaki bango bazali koloba na minɔkɔ ya mboka na bango. Yango ebimisaki litomba nini? Mateya ya solo oyo bato yango bayokaki na minɔkɔ ya mboka na bango esimbaki mpenza mitema na bango. Na nsuka ya mokolo yango, mwa etuluku wana ya bayekoli ekómaki na bato koleka 3 000!—Misala 2:37-42.
3, 4. Ndenge nini mosala ya kosakola epalanganaki ntango bayekoli batikaki Yelusaleme, Yudea mpe Galilai?
3 Mwa moke na nsima ya likambo wana, babandaki konyokola bayekoli na Yelusaleme, mpe “baoyo bapanzanaki bakatisaki mokili yango mobimba kosakoláká nsango malamu ya liloba.” (Misala 8:1-4) Na ndakisa, totángaka na Misala mokapo 8 lisolo ya Filipo, mopalanganisi ya nsango malamu, oyo na ntembe te azalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. Filipo asakolaki epai ya Basamalia. Asakolaki mpe epai ya Moetiopia moko oyo azalaki mosali ya Leta, mpe moto yango andimaki nsango etali Klisto.—Misala 6:1-5; 8:5-13, 26-40; 21:8, 9.
4 Ntango baklisto oyo batikaki Yelusaleme, Yudea mpe Galilai bazalaki koluka bisika ya kofanda na bamboka mosusu, bazalaki kokutana na bato ya bikólo mpe minɔkɔ mosusu. Ekoki kozala ete bamosusu kati na bango bazalaki kosakola kaka epai ya Bayuda. Kasi, Luka alobi boye: “Ezalaki na ndambo ya bato ya Sipele mpe ya Kilene oyo bayaki na Antiokia mpe babandaki kosolola ná bato oyo balobaka monɔkɔ ya Grɛki, kosakoláká nsango malamu ya Nkolo Yesu.”—Misala 11:19-21.
Nzambe oyo aponaka bilongi te azali na nsango mpo na bato nyonso
5. Ndenge nini nsango malamu oyo ezali kosakolama emonisi ete Yehova aponaka bilongi te?
5 Makambo nyonso wana esalemi ndenge mpenza Nzambe alingaka: Nzambe aponaka bilongi te. Ntango Yehova asalisaki ntoma Petelo abongola lolenge na ye ya kotalela bato ya bikólo mosusu, Petelo alobaki na botɔndi nyonso boye: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35; Nzembo 145:9) Ntango ntoma Paulo, moto oyo azalaki liboso konyokola baklisto, alobaki ete ‘mokano ya Nzambe ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika,’ amonisaki ete Nzambe aponaka bilongi te. (1 Timote 2:4) Emonani mpenza ete Mozalisi aponaka bilongi te, mpamba te elikya ya Bokonzi ezali mpo na bato ya lolenge nyonso, ezala basi to mibali, bato ya mposo, ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso.
6, 7. Wapi bisakweli ya Biblia oyo elobelaki kopalangana ya nsango malamu na mokili mobimba, epai ya bato ya minɔkɔ nyonso?
6 Bisakweli emonisaki bikeke mingi liboso ete nsango malamu ekopalangana na mokili mobimba. Danyele asakolaki boye: “Nguya ná nkembo ná bokonzi epesamaki na [Yesu], ete mabota mpe mikili mpe [minɔkɔ] nyonso básalela ye.” (Danyele 7:14) Lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobimisama lelo oyo na minɔkɔ 151 mpe ezali kokabolama na mokili mobimba mpe epesi yo libaku ya kotánga nsango ya Bokonzi ya Yehova, yango emonisi ete esakweli yango ya Biblia ezali kokokisama.
7 Biblia esakolaki ntango moko oyo bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge bakoyoka nsango na yango oyo epesaka bomoi. Mpo na komonisa ndenge losambo ya solo ekobenda ebele ya bato, Zekalia asakolaki boye: “Na mikolo yango, ekozala ete bato zomi uta na minɔkɔ nyonso ya bikólo bakosimba makasi, ɛɛ, bakosimba makasi eteni ya nse ya elamba ya moto oyo azali Moyuda [moklisto oyo apakolami na elimo, moto ya “Yisalaele ya Nzambe”], bakoloba ete: ‘Tokokende elongo na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.’” (Zekalia 8:23, NW; Bagalatia 6:16) Ntoma Yoane mpe, ntango azalaki koyebisa makambo oyo amonaki na emonaneli moko, alobaki boye: “Talá! ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate.” (Emoniseli 7:9) Tomoni mpenza ndenge bisakweli yango ekokisami!
Tozali kosakola epai ya bato ya ndenge nyonso
8. Likambo nini ezali kosalema lelo, oyo esengeli kotinda biso tóbongola lolenge na biso ya kosakola?
8 Lelo oyo bato oyo bazali kokende kofanda na mboka mopaya bakómi mingi. Lokola mokili ekómi lokola kaka mboka moko, yango esali ete bato mingi bákóma kokende kofanda na mboka mopaya. Ebele ya bato bakimi bamboka na bango mpo na bitumba mpe mikakatano ya mbongo mpe bakei kofanda epai kimya mpe bozwi ezali, mpo na koluka kozala na bomoi ya malamu. Lokola bapaya mpe bato oyo bakimá bamboka na bango bakómi ebele na bikólo mingi, yango ebimisi mwa bakartye ya bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya na bikólo yango. Na ndakisa, na ekólo Finlande, minɔkɔ koleka 120 ezali kolobama mpe na Australie, minɔkɔ koleka 200. Na États-Unis, kaka na engumba San Diego yango moko, okoki koyoka minɔkɔ kokela 100.
9. Ndenge nini tosengeli kotalela bato ya minɔkɔ mosusu na teritware na biso?
9 Biso baklisto tozali nde kotalela bato wana ya minɔkɔ mosusu lokola mokakatano mpo na mosala na biso ya kosakola? Soki moke te! Tozali nde kotalela bango lokola bato mosusu oyo tozwi mpo na kosakwela bango nsango malamu, to ‘bilanga oyo eteli mpo na kobuka mbuma.’ (Yoane 4:35) Kozanga kotalela bikólo to minɔkɔ na bango, tozali kosala nyonso mpo na kokokisa mposa ya bato oyo bayebi bobola na bango ya elimo. (Matai 5:3) Yango wana, mbula na mbula, ebele ya bato ya “minɔkɔ nyonso” bazali kokóma bayekoli ya Klisto. (Emoniseli 14:6) Na ndakisa, na Augusto 2004, mosala ya kosakola na Allemagne esalemaki na minɔkɔ soki 40. Kaka na mbula yango, nsango malamu esakolamaki na Australie na minɔkɔ soki 30, nzokande mbula zomi liboso na ekólo yango, bazalaki kosakola kaka na minɔkɔ 18. Na Grèce, Batatoli ya Yehova basakolaki nsango malamu na minɔkɔ soki 20. Na mokili mobimba, atako Lingelesi ezali monɔkɔ oyo elobamaka mingi, Batatoli ya Yehova mingi (soki 80%) balobaka minɔkɔ mosusu.
10. Mokumba nini mosakoli mokomoko azali na yango na mosala ya kokómisa bato bayekoli “na bikólo nyonso”?
10 Ya solo, etinda oyo Yesu apesaki ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso’ ezali mpenza kokokisama lelo oyo! (Matai 28:19) Na molende nyonso, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mokumba yango na mikili 235, mpe bazali kokabolela bato mikanda na minɔkɔ koleka 400. Lokola ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa mikanda oyo tosengeli na yango mpo na kosakwela bato nsango malamu, mosakoli mokomoko asengeli kosala makasi mpo na komema nsango ya Biblia epai ya “bato ya ndenge nyonso,” na minɔkɔ oyo bayebi malamu. (Yoane 1:7) Milende wana esali ete ebele ya bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge báyoka nsango malamu. (Baloma 10:14, 15) Ya solo mpenza, mokomoko na biso azali mpenza na mokumba monene!
Ndenge tozali kokokisa mokumba yango
11, 12. (a) Mokakatano nini tosengeli kolonga, mpe ndenge nini elimo santu esalisaka biso? (b) Mpo na nini kosakwela bato nsango malamu na monɔkɔ na bango moko ezalaka na ntina mingi?
11 Lelo oyo, basakoli mingi ya Bokonzi bazali na mposa ya koyekola minɔkɔ mosusu, kasi bakoki kokanisa te ete bakoyeba minɔkɔ yango na ndenge ya likamwisi, na nzela ya elimo santu. (1 Bakolinti 13:8) Koyekola monɔkɔ mosusu ezalaka pɛtɛɛ te. Ata basakoli oyo bayebi monɔkɔ mosusu, basengeli kotalela malamumalamu makanisi mpe elobeli na bango mpo na kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ yango básepela na nsango ya Biblia, ata soki bazali na mimeseno mpe bonkɔkɔ ekeseni. Lisusu, mbala mingi bapaya oyo bayei na mboka sika bazalaka nsɔninsɔni; yango wana esɛngaka milende mingi mpo na koyeba lolenge batalelaka makambo.
12 Atako bongo, elimo santu esalisaka basaleli ya Yehova tii lelo mpo bákoka kosalisa bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu. (Luka 11:13) Na esika elimo santu epesa biso makoki ya koloba minɔkɔ mosusu na ndenge ya likamwisi, ekoki nde kopesa biso mposa makasi ya kosolola na bato oyo balobaka monɔkɔ na biso te. (Nzembo 143:10) Soki ozali kosakola to koteya bato nsango ya Biblia na monɔkɔ oyo bayebi malamu te, bakoki kokanga ntina na yango. Kasi, mpo na kosimba mitema ya bayoki na biso, esɛngaka mbala mingi tósolola na bango na monɔkɔ na bango moko, monɔkɔ oyo ekoki kolamwisa makanisi, bamposa mpe bilikya na bango.—Luka 24:32.
13, 14. (a) Nini etindaka basakoli mosusu bákóma kosakola na minɔkɔ ya bapaya? (b) Ndenge nini elimo ya komipimela ezali komonana?
13 Basakoli mingi ya Bokonzi bamipesaka na kosakola na minɔkɔ ya bapaya ntango bamoni ete bato mingi oyo balobaka monɔkɔ yango bazali kosepela na mateya ya Biblia. Bamosusu babakisaka milende na bango ntango bamoni ete mosala ekómi makasi mpe ezali kobota mbuma mingi. Biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova na Mpoto ya sudi elobaki boye: “Bato mingi oyo bazali kouta na Mpoto ya Ɛsti bazali na mposa makasi ya koyeba solo.” Ezalaka mpenza esengo kosalisa bato oyo bazali kosepela na solo ndenge wana!—Yisaya 55:1, 2.
14 Nzokande, mpo na kobota mbuma na mosala yango, tosengeli kozala na molende mpe komipimela. (Nzembo 110:3) Na ndakisa, mabota mingi ya Batatoli na Japon batiki bandako na bango ya kitoko na bingumba ya minene mpe bakei na bamboka ya mosika mpo na kosalisa bato ya Chine oyo bakendá kofanda na Japon báyeba Biblia. Na bamboka oyo ezali mpembeni ya bokula ya wɛsti ya États-Unis, basakoli basalaka mbala na mbala mobembo ya ngonga mibale na motuka mpo na kokende koyekola na bato Biblia na ekólo Philippines. Na ekólo Norvège, Motatoli moko ná mwasi na ye bayekolaka Biblia na libota moko eutá na Afghanistan. Bandeko yango basalelaka mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?a ya Lingelesi mpe ya monɔkɔ ya Norvège. Libota yango batángaka baparagrafe na monɔkɔ ya Perse, oyo ekokani mwa moke na Dari, monɔkɔ ya mboka na bango. Basololaka na Lingelesi mpe na monɔkɔ ya Norvège. Elimo wana ya komipimela mpe ya kondima mbongwana ezwaka mpenza mbano ntango bapaya bazail kondima nsango malamu.b
15. Ndenge nini biso nyonso tokoki kosakola epai ya bato ya minɔkɔ mosusu?
15 Yo mpe okoki kosakwela bato ya minɔkɔ mosusu? Ekozala malamu oluka koyeba minɔkɔ ya bapaya oyo elobamaka mingi na esika ofandi. Na nsima, okoki kozwa batrakte to mwa babuku ya minɔkɔ yango. Mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations, oyo ebimaki na 2004, esalisi basakoli mingi na kopalanganisa elikya ya Bokonzi; mwa buku yango ezali na nsango moko ya kolendisa mpe ya polele na minɔkɔ mingi.—Talá lisolo “Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations” na lokasa 32.
‘Bolingo mpo na mopaya’
16. Ndenge nini bankulutu bakoki komipimela mpo na kosalisa bato ya minɔkɔ mosusu?
16 Ezala toyekoli monɔkɔ mosusu to te, tokoki koteya makambo ya elimo epai ya bapaya oyo bafandi na mboka na biso. Yehova apesaki libota na ye etinda ya ‘kolinga mopaya.’ (Deteronome 10:18, 19) Na ndakisa, na engumba moko ya monene na Amerika ya Nɔrdi, masangá mitano eyanganaka na Ndako ya Bokonzi moko. Ndenge esalemaka na Bandako ya Bokonzi mingi, mikolo mpe ngonga ya makita ya masangá yango ebongwanaka mbula nyonso, mpe yango elingaki kosala ete lisangá ya monɔkɔ ya Chinois ekóma kosala makita mokolo ya lomingo na mpokwa. Nzokande, soki esalemaka bongo, bandeko mingi oyo bautá na Chine, oyo basalaka na barestora balingaki kozala na likoki ya koyanganaka na makita te. Na boboto nyonso, bankulutu ya masangá mosusu basalaki ete lisangá ya monɔkɔ ya Chinois esalaka makita na moi.
17. Tokomiyoka ndenge nini soki bandeko mosusu basepeli kokende kopesa mabɔkɔ na etuluku moko ya boyekoli ya monɔkɔ mosusu?
17 Bakɛngɛli ya bolingo bapesaka bandeko ya makoki longonya na ndenge bandimaka kokende kosalisa bituluku ya boyekoli ya minɔkɔ mosusu. Masangá na bango ekoki mpenza kozala na mposa na bango, kasi bankulutu ya masangá yango bazalaka na makanisi ndenge moko na oyo ya bankulutu ya Lisitala mpe Ikoni. Atako Timote azalaki na motuya mingi na masangá na bango, bankulutu yango bandimaki akóma kotambola na Paulo. (Misala 16:1-4) Lisusu, basakoli ya molende babangaka te bonkɔkɔ, bizaleli to mimeseno ndenge na ndenge oyo bapaya bazalaka na yango. Bandimaka bokeseni yango mpe balukaka kozala na boyokani na bapaya yango mpo na kozwa likoki ya kosakwela bango nsango malamu.—1 Bakolinti 9:22, 23.
18. Ekuke monene nini ya mosala efungwami mpo na basakoli nyonso?
18 Ndenge Biblia elobaki, nsango malamu ezali kosakolama na “minɔkɔ ya bikólo nyonso.” Ezali mpenza komonana ete bato mingi lisusu ya minɔkɔ ya bapaya bakondima nsango malamu. Bankóto ya basakoli ya makoki bakɔti na “ekuke [yango] monene oyo ezali komema na mosala.” (1 Bakolinti 16:9) Kasi, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, makambo mingi ya kosala ezali naino na bateritware ya ndenge wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Mpo na bandakisa mosusu, talá lisolo “Komipimela makambo ya mike ememeli biso mapamboli ya minene,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2004, nkasa 24-28.
Okoki kolimbola?
•Ndenge nini tokoki komekola Yehova na likambo ya kopona bilongi te?
• Ndenge nini tokoki kotalela bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya na teritware na biso?
• Mpo na nini ezali malamu mingi kosakwela bato na monɔkɔ na bango moko?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na bapaya oyo bafandi na mboka na biso?
[Map/Picture on page 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Loma
AZIA
KRƐTI
LIBYA
FILIGIA
PAMOFILIA
Yelusaleme
YUDEA
EZIPITO
PONTO
KAPADOSI
MEZOPOTAMIA
MEDE
ELAMA
ALABIA
PARTHIE
[Mai]
Mai Monene ya Méditerranée
Mer Noire
Mbu Motane
Golfe Persique
[Elilingi]
Na mokolo ya Pentekote ya mobu 33 T.B., bato oyo bautaki na mikili 15 ya Ampire ya Loma mpe bikólo mosusu bayokaki nsango malamu na minɔkɔ ya mboka na bango
[Bililingi na lokasa 24]
Bapaya mingi basepelaka na solo ya Biblia
[Elilingi na lokasa 25]
Ndako ya Bokonzi oyo eyambaka masangá ya minɔkɔ mitano