Mokapo ya libwa
Nani akoyangela mokili?
1-3. Lobelá ndɔtɔ mpe bimonaneli oyo Danyele amonaki na mbula ya liboso ya boyangeli ya Belesasala.
ESAKWELI kitoko ya Danyele ezongisi biso na mbula ya liboso ya boyangeli ya Belesasala, mokonzi ya Babilone. Danyele aumelaki mingi na boombo na Babilone, kasi abebisaki soko moke te bosembo na ye epai na Yehova. Ntango akómaki na mibu koleka 70, mosakoli oyo ya sembo alɔtaki ‘ndɔtɔ mpe amonaki bimonaneli ya [motó, NW] na ye wana elalaki ye na mbeto.’ Danyele ayokaki mpenza nsɔmɔ ntango amonaki bimonaneli yango!—Danyele 7:1, 15.
2 Danyele agangaki ete: “Talá, mipɛpɛ minei na lola mikitaki makasi na likoló na mai monene. Mpe banyama minene minei babimaki na mai monene, mpe bakesanaki.” Oyo nde banyama nsɔmɔ! Nyama ya liboso ezalaki nkosi oyo ezalaki na mapapu, mpe nyama ya mibale ezalaki lokola ngombolo (ours). Na nsima, nkoi moko oyo ezalaki na mapapu minei mpe na mitó minei ebimaki! Nyama ya minei ezalaki nyama moko ya makasi koleka, ezalaki na mino minene ya ebende mpe na maseke zomi. Na katikati ya maseke yango zomi, liseke moko ya “moke” ebimaki, ezalaki na “miso [lokola miso] ya moto” mpe na “monɔkɔ oyo ezalaki koloba makambo minene.”—Danyele 7:2-8.
3 Na nsima, Danyele amonaki bimonaneli ya makambo ya likoló. Mokóló na Mikolo afandaki na nkembo na kiti na ye ya bokonzi lokola Mosambisi na Esambiselo ya likoló. ‘Ezalaki na bankóto na bankóto oyo bazalaki kosalela ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi bazalaki kotɛlɛma liboso na ye.’ Asambisaki mpe akweisaki banyama yango, abɔtɔlaki yango bokonzi mpe abomaki nyama ya minei. Bokonzi epesamaki libela na mabɔkɔ ya “mwana na moto” mpo ayangela “mabota mpe mikili mpe nkota.”—Danyele 7:9-14.
4. (a) Epai ya nani Danyele alukaki koyeba ntina ya makambo yango? (b) Mpo na nini makambo oyo Danyele amonaki mpe ayokaki na butu yango ezali na ntina mpo na biso?
4 Danyele alobaki: “Bongo [makanisi, NW] na ngai, Danyele, etungisamaki mpe bimonaneli ya [motó, NW] na ngai bibangisaki ngai.” Na bongo, alukaki koyeba “ntina [ya makambo, NW] oyo nyonso” epai na anzelu. Mpe anzelu ayebisaki ye mpenza “ntina ya makambo [yango].” (Danyele 7:15-28) Makambo oyo Danyele amonaki mpe ayokaki na butu yango ezali na ntina mingi mpo na biso, mpamba te ezalaki elilingi ya makambo oyo masengelaki kosalema na mokili banda ntango wana kino ntango na biso oyo bayei kopesa “mwana na moto” bokonzi mpo ayangela “mabota mpe mikili mpe nkota” nyonso. Na lisalisi ya Liloba ya Nzambe mpe ya elimo na ye, biso mpe tokoki koyeba ndimbola ya bimonaneli ya bisakweli yango.a
NYAMA MINEI EBIMI NA MAI MONENE
5. Mai monene oyo mopɛpɛ makasi ebɛtaki ezalaki elilingi ya nini?
5 Danyele alobaki: “Banyama minene minei babimaki na mai monene.” (Danyele 7:3) Mai monene oyo mipɛpɛ makasi mibɛtaki likoló na yango elimbolaki nini? Bambula mingi na nsima, ntoma Yoane amonaki nyama na yauli oyo ezalaki na mitó nsambo kobima na “mai monene.” Mai monene yango elimboli “bibolo, na bibele, na mabota, na minɔkɔ” elingi koloba ebele ya bato oyo bamitangoli na Nzambe. Mai monene ezali bongo elilingi oyo ebongi mpenza mpo na kolobela ebele ya bato oyo bamitangoli na Nzambe.—Emoniseli 13:1, 2; 17:15; Yisaya 57:20.
6. Banyama minei oyo elobelami awa ezali elilingi ya nini?
6 Anzelu ya Nzambe alobaki boye: “Banyama minene minei oyo bazali bakonzi minei bakobima na mokili.” (Danyele 7:17) Anzelu alimbolaki polele ete banyama minei oyo Danyele amonaki ezalaki “bakonzi minei.” Na bongo, banyama yango ezalaki bililingi ya mikili oyo elekaki mikili nyonso na nguya na mokili mobimba. Kasi ezali mikili nini?
7. (a) Balimboli mosusu ya Biblia balobaka nini na ntina na emonaneli ya nyama minei oyo Danyele amonaki mpe ndɔtɔ ya ekeko monene oyo Mokonzi Nebukadanesala amonaki? (b) Eteni mokomoko kati na biteni minei ya ekeko ya ebende ezali komonisa nini?
7 Mbala mingi, balimboli ya Biblia basalaka bokeseni te kati na nyama minei ya ndɔtɔ ya emonaneli ya Danyele mpe ndɔtɔ ya ekeko monene oyo Nebukadanesala alɔtaki. Na ndakisa, buku moko (The Expositor’s Bible Commentary) elobi boye: “Mokapo 7 [ya mokanda ya Danyele] ekokani na mokapo 2.” Buku mosusu (The Wycliffe Bible Commentary) elobi: “Eyebani ete mikili minei oyo ezali kokitana na bokonzi moko nsima na mosusu . . . [na mokanda ya Danyele mokapo 7] ezali bobele mikili oyo milobelami na [mokanda ya Danyele] mokapo 2.” Mikili minei oyo elekaki mikili nyonso na nguya na mokili mobimba mpe emonisamaki na bibende minei na ndɔtɔ ya Nebukadanesala ezalaki bongo bokonzi ya Babilone (motó ya wolo), ya Bamede na Baperse (ntolo na mabɔkɔ ya palata), ya Grèce (libumu na bibɛlɔ ya motako) mpe bokonzi ya Loma (makolo ya ebende).b (Danyele 2:32, 33) Tiká tótalela ndenge bikonzi yango bikokani na nyama minene minei oyo Danyele amonaki na emonaneli.
NKANDA LOKOLA NKOSI MPE MBANGU LOKOLA MPÓNGÓ
8. (a) Ndenge nini Danyele alobelaki nyama ya liboso? (b) Bokonzi nini emonisamaki na nyama ya liboso, mpe ndenge nini yango ezalaki kosala makambo lokola nkosi?
8 Oyo nde banyama nsɔmɔ Danyele amonaki! Talá ndenge Danyele alobelaki moko na yango: “Oyo ya liboso azalaki lokola nkosi mpe azalaki na mapapu ya mpóngó. Na nsima ezalaki ngai kotala, mapapu na yango mapaswamaki, mpe [amataki] na mokili mpe atɛmisamaki na makolo mibale lokola moto, mpe motema ya moto epesamaki na ye.” (Danyele 7:4) Nyama oyo ezalaki elilingi ya bokonzi moko lokola bokonzi oyo emonisamaki na motó ya wolo ya ekeko monene, bokonzi ya Babilone oyo eyangelaki mokili mobimba (607-539 L.T.B.). Ndenge moko na “nkosi” oyo elyaka se misuni, Babilone ebebisaki mabota na nkanda makasi, ezala mpe libota ya Nzambe. (Yilimia 4:5-7; 50:17) Lokola nde bapesaki yango mapapu ya mpóngó mpo na kopumbwa, “nkosi” yango ezalaki kobɔtɔla mikili mosusu na bolɛmbu nyonso.—Bileli 4:19; Habakuku 1:6-8.
9. Makambo nini ekómelaki nyama oyo ezalaki lokola nkosi, mpe mbongwana yango esalaki nini likoló na nyama yango?
9 Na ntango moko, ‘bakataki’ mapapu ya nkosi yango. Pene na nsuka ya bokonzi ya Belesasala, Babilone ezalaki lisusu kobɔtɔla mikili na lombangu te lokola ezalaki kosala yango liboso. Mpe Babilone ezalaki lisusu na bokonzi likoló na mabota te lokola nkosi oyo ezali konguluma. Ata moto oyo azalaki kotambola na makolo alekaki bokonzi ya Babilone na mbango. Lokola bapesaki yango “motema ya moto,” Babilone elɛmbaki. Lokola ezalaki lisusu na ‘motema ya nkosi’ te, Babilone emimonaki lisusu te lokola mokonzi “katikati ya banyama ya zamba.” (Kokanisá na 2 Samwele 17:10; Mika 5:8.) Nyama mosusu ya monene elongaki yango.
LOKOSO LOKOLA NGOMBOLO
10. Bakonzi nini bamonisamaki na “ngombolo” ya elilingi?
10 Danyele alobaki: “Talá, nyama mosusu, oyo ya mibale, lokola ngombolo. [Emitombolaki, NW] na epai moko, mpe ezalaki na mikuwa na mopanzi misato na monɔkɔ, na kati na mino na ye; mpe elobamaki na ye ete, [Tɛlɛmá], lyá misuni mingi.” (Danyele 7:5) Mokonzi oyo “ngombolo” ezalaki elilingi na ye ezali bobele mokonzi oyo amonisamaki na ntolo mpe mabɔkɔ ya palata ya ekeko monene, elingi koloba bokonzi ya Bamede na Baperse (539-331 L.T.B.) oyo ebandaki na Dalio moto ya Mede na Sirise Monene mpe esukaki na Dalio III.
11. Komitombola ya ngombolo ya elilingi na epai moko mpe mikuwa ya mopanzi misato na yango elimboli nini?
11 Ngombolo oyo ya elilingi ‘emitombolaki na epai moko,’ ntango mosusu mpo na komibongisa mpo na etumba, mpo na kobɔtɔla mabota to koyangela mokili mobimba. To mpe komitɛlɛmisa wana na epai moko ekokaki komonisa ete bakonzi ya Perse bakoleka Dalio mpamba te moto mosusu te kati na Bamede akómaki mokonzi, longola bobele ye. Mikuwa na mopanzi misato oyo ngombolo ekangaki na mino ezalaki ntango mosusu elilingi ya ngámbo misato oyo nyama yango ezalaki kobɔtɔla bamboka. “Ngombolo” yango, elilingi ya bokonzi ya Bamede na Baperse, ekendaki na nɔrdi mpo na kobɔtɔla Babilone na mobu 539 L.T.B. Na nsima, ekendaki na wɛsti, kokatisáká Asie Mineure kino etúká ya Thrace. Nsukansuka, “ngombolo” yango ekendaki na sudi mpo na kobɔtɔla Ezipito. Lokola motángo misato elimbolaka ntango mosusu bonene ya likambo, mikuwa na mopanzi yango misato ekokaki komonisa lokoso mpenza oyo ngombolo yango ya elilingi ezalaki na yango mpo na kobɔtɔla bamboka.
12. Nini esalemaki nsima wana ngombolo ya elilingi etosaki etinda oyo: ‘Tɛlɛmá, lyá misuni mingi’?
12 “Ngombolo” yango ebundisaki mabota mpo na kokokisa maloba oyo: ‘Tɛlɛmá, lyá misuni mingi.’ Na kokweisáká Babilone mpo na kokokisa mokano ya Nzambe, bokonzi ya Bamede na Baperse ezwaki bongo libaku malamu mpenza mpo na kosala likambo moko ya malamu na ntina na basaleli ya Nzambe. Mpe esalaki yango! (Talá etanda oyo elobi ete “Mokonzi ya motema boboto,” na lokasa 149.) Na boyangeli ya Sirise Monene, Dalio I (Dalio Monene), mpe Alatazelezese I, bokonzi ya Bamede na Baperse esikolaki Bayuda na boombo ya Babilone mpe esungaki bango bátonga lisusu tempelo mpe bifelo ya Yelusaleme. Nsukansuka, bokonzi ya Bamede na Baperse ekómaki koyangela bitúká 127 mpe mokonzi Asierise (Zelezese I), mobali ya mokonzi-mwasi Esetele, azalaki “mokonzi longwa na [Inde] kino na Etiopia.” (Esetele 1:1) Nzokande, nyama mosusu elingaki kobima.
MBANGU LOKOLA NKOI OYO EZALI NA MAPAPU!
13. (a) Nyama ya misato ezalaki elilingi ya nini? (b) Tokoki koloba nini mpo na nyama ya misato oyo ezalaki na mbangu mpe mikili oyo yango ezalaki koyangela?
13 Nyama ya misato ezalaki “lokola nkoi; ezalaki na [mapapu minei ya ndɛkɛ na mokɔngɔ na yango, NW] mpe ezalaki na mitó minei, mpe bokonzi epesamaki na yango.” (Danyele 7:6) Ndenge moko na libumu mpe bibɛlɔ ya motako ya ekeko oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ, nkoi yango ya mapapu minei mpe ya mitó minei ezalaki elilingi ya bokonzi ya Makedonia to ya Grèce oyo ebandaki na Alesandala Monene. Kosaláká makambo na lombangu lokola nkoi, Alesandala akatisaki Asie Mineure, akitaki na sudi kino na Ezipito, mpe akómaki na ndelo ya Inde na wɛsti. (Kokanisá na Habakuku 1:8.) Alesandala Monene ayangelaki mikili mingi, na ndakisa Makedonia, Grèce mpe Perse; yango eleki teritware oyo “ngombolo” eyangelaki.—Talá etanda oyo elobi ete “Mokonzi moko elenge ayangeli mokili mobimba,” na lokasa 153.
14. Ndenge nini “nkoi” ekómaki nyama ya mitó minei?
14 “Nkoi” ekómaki na mitó minei ntango Alesandala akufaki na mobu 323 L.T.B. mpe bakonzi minei ya basoda bakabolaki bokonzi na ye na biteni minei mpe mokomoko ayangelaki na eteni moko. Séleucus azwaki Mesopotamia na Sulia. Ptolémée ayangelaki Ezipito na Palestine. Lysimaque ayangelaki Asie Mineure mpe etúká ya Thrace, mpe Cassandre azwaki Makedonia na Grèce. (Talá etanda oyo elobi ete “Bokonzi monene ekabolami,” na lokasa 162.) Na nsima, nyama mosusu ya nsɔmɔ ebimaki.
NYAMA YA NSƆMƆ OYO EKESENEKI NA NYAMA NYONSO OYO EZALAKI LIBOSO
15. (a) Lobelá ndenge nyama ya minei ezalaki. (b) Nyama ya minei ezalaki elilingi ya nini, mpe ndenge nini ebukaki mpe elyaki eloko nyonso oyo ezalaki na nzela na yango?
15 Danyele amonisi nyama ya minei lokola nyama ya “nsɔmɔ mpe na mabe mpe na nguya eleki nyonso.” Alobaki lisusu: ‘[Mpe] ezalaki na mino minene na ebende; mpe elyaki mpe ebukaki na biteni mpe enyataki [na makolo oyo nyonso etikalaki]. Nyama yango ekeseneki na banyama nyonso [oyo] ezalaki liboso na yango, mpe ezalaki na maseke zomi.’ (Danyele 7:7) Na ebandeli, nyama yango ya nsɔmɔ ezalaki bokonzi ya Loma, bokonzi oyo elekaki mikili nyonso na nguya na makambo ya politiki mpe ya bitumba. Mokemoke, ebɔtɔlaki bokonzi ya Grèce oyo ekabolamaki na biteni minei. Mpe banda mobu 30 L.T.B., Loma ekómaki mokili oyo elekaki mikili nyonso na nguya, lokola esakweli eyebisaki yango. Lokola ezalaki na mampinga ya basoda ya mpiko, bokonzi ya Loma ebɔtɔlaki mboka nyonso mpe na boumeli ya ntango ezwaki mokili longwa bisanga babéngi Iles britanniques kino mikili mingi ya Mpoto oyo mizali pene na Mai Monene ya Méditerranée, mpe bamboka na ngámbo mosusu ya Babilone kino Libeke ya Perse (Golfe persique).
16. Anzelu alobaki nini mpo na nyama ya minei?
16 Lokola alingaki koyeba na bosikisiki ndimbola ya nyama yango ya “nsɔmɔ mingi,” Danyele alandaki na likebi mpenza ndimbola oyo anzelu apesaki: ‘Mpo na maseke [na yango] zomi, bakonzi zomi bakobima na kati na bokonzi oyo, mpe moko mosusu akobima na nsima na bango; ye akokesana na baoyo na liboso, mpe akokitisa bakonzi misato.’ (Danyele 7:19, 20, 24) “Maseke zomi” to “bakonzi zomi” yango ezalaki banani?
17. “Maseke zomi” ya nyama ya minei ezalaki elilingi ya nini?
17 Lokola bokonzi ya Loma ekómaki na bozwi mingi mpenza mpe bayangeli na yango bamibebisaki na bizaleli mabe mpe na misala ya mbindo, yango elɛmbisaki mpe mpiko ya basoda na yango. Na boumeli ya ntango, emonanaki polele ete basoda ya Loma bazalaki lisusu makasi na bitumba te. Bokonzi yango ya nguya eyaki kokabwana na bikonzi mingi. Lokola Biblia esalelaka mbala mingi motángo zomi mpo na komonisa eloko ya kokoka, “maseke zomi” ya nyama ya minei emonisi bikonzi nyonso oyo ebimaki na bokabwani ya bokonzi ya Loma.—Kokanisá na Deteronome 4:13; Luka 15:8; 19:13, 16, 17.
18. Ndenge nini bokonzi ya Loma ekobaki koyangela mikili ya Mpoto na boumeli ya bikeke atako mokonzi na yango ya nsuka azalaki lisusu te?
18 Nzokande, bokonzi ya Loma, mokili oyo elekaki mikili nyonso ya mokili na nguya, esukaki te ntango balongolaki mokonzi na yango ya nsuka na mobu 476 T.B. Na boumeli ya bikeke mingi, papa ya Loma akobaki kotambwisa makambo ya politiki mpe mingi mpenza makambo ya lingomba na mikili ya Mpoto. Asalaki bongo mpamba te ebongiseli oyo ebéngamaki système féodal ekómisaki bato mingi ya Mpoto baombo ya bankolo-mabelé oyo bazalaki bango moko basali ya mokonzi monene. Mpe bakonzi yango nyonso bazalaki na nse ya bokonzi ya papa. Na bongo, Bokonzi Mosantu ya Loma, oyo papa azalaki mokonzi na yango, eyangelaki mokili mobimba na boumeli ya eleko molai mpe ya minyoko oyo babéngaki Âge des ténèbres.
19. Ndenge nini nganga-mayele moko ya masolo ya kala akokanisaki bokonzi ya Loma na bikonzi oyo bizalaki liboso na yango?
19 Nani akoki kondima te ete nyama ya minei ‘ekeseneki na bikonzi mosusu nyonso’? (Danyele 7:7, 19, 23) Na yango, H. G. Wells, nganga-mayele ya masolo ya kala, akomaki boye: “Loma, nguya oyo ya sika . . . ekeseneki mingi mpenza na bikonzi nyonso oyo biyangelaki mokili liboso na yango. . . . Bagreke bazalaki mingi na [Loma] koleka bisika mosusu nyonso na mokili; nzokande na bokonzi yango, Bahamiti na Basemiti bazalaki mingi te lokola na bikonzi nyonso oyo bizalaki liboso na yango . . . Bokonzi ya Loma ezalaki mpenza bokonzi ya lolenge mosusu kati na lisolo ya bato . . . Bokonzi ya Loma epalanganaki bobele bongo na bongo, ebongiseli ya sikisiki ya kolendisa bokonzi bipai nyonso ezalaki te. Atako bazalaki na mwango to na manaka ya sikisiki mpo na kobongisa mboka te, bato ya Loma basilaki komikɔtisa na misala minene ya botongi mboka kozanga koyeba.” Nzokande, nyama oyo ya minei esengelaki kokola lisusu koleka.
LISEKE MOKO YA MOKE ELONGI MASEKE MOSUSU
20. Anzelu alobaki nini mpo na kokola ya liseke moke na motó ya nyama ya minei?
20 Danyele alobaki: “Ezalaki ngai [kotala] maseke, namonaki liseke mosusu kobima na kati na yango, liseke moke, mpe maseke misato ya liboso mapikolamaki na liboso na yango.” (Danyele 7:8) Na oyo etali kopalangana ya bokonzi yango, anzelu alobaki na Danyele ete: “Moko mosusu akobima na nsima na bango [bakonzi zomi]; ye akokesana na baoyo na liboso, mpe akokitisa bakonzi misato.” (Danyele 7:24) Mokonzi oyo ezali nani, ntango nini azwaki bokonzi, mpe bakonzi misato oyo ye akitisaki ezalaki banani?
21. Ndenge nini Angleterre ekómaki liseke moke ya elilingi ya nyama ya minei?
21 Tólanda makambo oyo masalemaki na nsima. Na mobu 55 L.T.B., Jules César, mokonzi ya basoda ya Loma, azingaki mboka Bretagne na etumba kasi aumelaki te. Na mobu 43 T.B., Mokonzi Claude nde abandaki mpenza kobɔtɔla sudi ya mboka Bretagne. Na nsima, na mobu 122 T.B., Mokonzi Adrien asalaki efelo longwa Ebale Tyne kino Solway Firth, mpo na kotya ndelo esika bokonzi ya Loma esuki na nɔrdi. Na ebandeli mpenza ya ekeke ya mitano, basoda ya Loma batikaki esanga yango. Nganga-mayele moko ya masolo ya kala ayebisaki ntina: “Na ekeke ya 16, Angleterre ezalaki mokili ya nguya mpenza te. Bozwi na yango ezalaki moke soki tokokanisi yango na oyo ya Hollande. Angleterre ezalaki na bato mingi te lokola France. Basoda na yango (basoda oyo babundaka na mai) bazalaki mingi te lokola oyo ya Espagne.” Ya solo, Grande-Bretagne ezalaki bongo bokonzi moko ya moke mpenza, oyo ebongaki solo komonisama na liseke moke ya elilingi ya nyama ya minei. Kasi mbongwana esengelaki kosalema.
22. (a) Wapi maseke mosusu misato ya nyama ya minei oyo liseke “moke” elongaki? (b) Na nsima, Angleterre ekómaki nini?
22 Na 1588, Philippe II, mokonzi ya Espagne, atindaki ebele ya masuwa mpo na kobunda na Grande-Bretagne. Ezalaki masuwa 130 na basoda koleka 24 000 oyo babundaki na Ebale La Manche kasi basoda ya Grande-Bretagne oyo babundaka na mai balongaki mampinga ya Espagne. Lisusu, mopɛpɛ makasi mpe ekumbaki oyo ebɛtaki na Mai Monene ya Atlantique ebomaki ebele ya basoda ya Espagne. Nganga-mayele moko na masolo ya kala alobaki ete, etumba yango “ematisaki nguya ya Angleterre na mai monene koleka Espagne.” Na ekeke ya 17, Hollande ekolisaki mombongo na yango na mai monene koleka bikólo mosusu nyonso. Nzokande, lokola Grande-Bretagne ebɔtɔlaki mikili mingi, elekaki Hollande. Na boumeli ya ekeke ya 18, Grande-Bretagne ebundaki na France na Amerika ya Nɔrdi mpe na Inde. Yango wana, na mobu 1763, basalaki boyokani oyo babéngaki Traité de Paris. Na ntina na boyokani yango, mokomi William B. Willcox alobaki ete: “[Boyokani oyo] endimi ete Grande-Bretagne ezali ekólo ya Mpoto oyo eleki mikili nyonso ya mokili na nguya.” Yango emonanaki mpenza polele ntango Grande-Bretagne elongaki France na mobu 1815 T.B. na boyangeli ya Napoléon. “Bakonzi misato” oyo Grande-Bretagne ‘ekitisaki’ ezalaki bongo Espagne, Hollande mpe France. (Danyele 7:24) Grande-Bretagne ebɔtɔlaki bikólo mingi mpe ekómaki mokili oyo elekaki mikili nyonso na mombongo. Ɛɛ, liseke “moke” ekolaki kino elekaki mikili nyonso ya mokili mobimba na nguya!
23. Na lolenge nini liseke moke ya elilingi ‘elyaki mokili mobimba’?
23 Anzelu alobaki na Danyele ete nyama ya minei, to bokonzi ya minei, “ekolya mokili mobimba.” (Danyele 7:23) Yango emonanaki mpenza solo mpo na etúká ya Loma oyo eyebanaki kala na nkombo ya Bretagne. Yango eyaki kokóma bokonzi ya Angleterre mpe ‘elongaki mokili mobimba.’ Na ntango moko, bokonzi yango ezwaki ndambo moko likoló na minei (1/4) ya mokili mobimba mpe ndambo moko likoló na minei ya bato oyo bafandaki na mabelé mobimba.
24. Nganga-mayele moko ya masolo ya kala alobaki nini na ntina etali bokeseni monene oyo emonanaka kati na bokonzi ya Angleterre na bikonzi mosusu?
24 Lokola bokonzi ya Loma ekeseneki na mikili oyo milekaki nguya na mokili mobimba liboso na yango, mokonzi oyo amonisamaki na liseke “moke” asengelaki mpe ‘kokesana na bakonzi oyo bazalaki liboso.’ (Danyele 7:24) Kolobeláká bokonzi ya Grande-Bretagne, H. G. Wells, nganga-mayele ya masolo ya kala alobaki boye: “Bokonzi ya motindo wana esalemaki naino liboso te. Likambo ya ntina koleka na ebongiseli yango mobimba ezalaki ete ‘repibliki yango etambwisamaki na mokonzi moko’ kati na Royaume Uni . . . Moto moko te akoki kososola bomoko ya bokonzi ya Grande-Bretagne. Ezalaki lisangani ya bibongiseli ndenge na ndenge oyo epanzanaki bobele bongo na bongo mpe yango ekesani mosika na bikonzi nyonso oyo bibéngami empire, oyo bizalaki liboso na yango.”
25. (a) Liseke moke ya elilingi ekomonisa nini ntango ekokola kino nsuka na yango? (b) Na lolenge nini liseke “moke” ezali na ‘miso lokola miso ya moto’ mpe na ‘monɔkɔ oyo ezali koloba makambo minene’?
25 Liseke “moke” esengelaki komonisama bobele na bokonzi ya Angleterre te. Na 1783, Angleterre epesaki bitúká 13 ya mokili ya Amerika lipanda. Yango nde ebandeli ya États-Unis oyo eyaki kokóma moninga ya Angleterre mpe na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, elekaki mikili nyonso na nguya. Kino lelo, ekólo yango na Angleterre ezali koyokana malamu mpenza. Boyokani yango ekómisi États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba to ‘liseke oyo ezali na miso.’ Ɛɛ, mokili yango oyo eleki nguya na mokili mobimba emonaka makambo mosika mpe ezalaka na mayele mabe! Yango ‘elobaka makambo minene,’ etambwisaka mokili mobimba na makanisi na yango moko mpe esili komikómisa molobeli ya mabota to “mosakoli ya lokuta.”—Danyele 7:8, 11, 20; Emoniseli 16:13; 19:20.
LISEKE YA MOKE EZALI KOTƐMƐLA NZAMBE MPE BABULAMI NA YE
26. Anzelu asakolaki nini na ntina na maloba mpe misala ya liseke ya elilingi mpo na Yehova mpe basaleli na ye?
26 Danyele alandaki koyebisa emonaneli na ye na maloba oyo: “Ezalaki ngai kotala, liseke oyo esalaki etumba na bato na bulɛɛ, mpe elekaki bango.” (Danyele 7:21) Na ntina na “liseke” oyo to mokonzi oyo, anzelu ya Nzambe asakolaki boye: “Ye akoloba mabe na ntina na Oyo-Aleki-Likoló, mpe akonyokola bato ya bulɛɛ ya Oyo-Aleki-Likoló, mpe akokanisa kobongola bilaka ya bulɛɛ mpe mibeko; mpe bango bakopesama na lobɔkɔ na ye mpo na ntango moko, ntango mibale, mpe ndambo na ntango.” (Danyele 7:25) Ndenge nini mpe ntango nini eteni oyo ya esakweli ekokisamaki?
27. (a) Banani bazali “bato ya bulɛɛ” oyo bazali konyokolama na liseke “moke”? (b) Ndenge nini liseke ya elilingi ekanaki “kobongola bilaka ya bulɛɛ mpe mibeko”?
27 “Bato ya bulɛɛ” oyo banyokolami na liseke “moke”—nguya ya mokili mobimba, États-Unis na Angleterre—ezali bongo bayekoli ya Yesu bapakolami oyo bazali na mabelé. (Baloma 1:7; 1 Petelo 2:9) Bambula mingi liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, batikali bapakolami bakebisaki polele ete 1914 ekozala mbula oyo ekosukisa “bilaka ya mabota.” (Luka 21:24) Ntango etumba ebandaki na mbula yango, emonanaki polele ete liseke “moke” etyolaki likebisi yango, mpamba te ekobaki konyokola bapakolami “bato ya bulɛɛ.” États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba, etɛmɛlaki kutu milende na bango mpo na kokokisa lisɛngami ya Yehova (to “mibeko”) etali kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba na batatoli na ye. (Matai 24:14) Na yango, liseke “moke” emekaki “kobongola bilaka mpe mibeko.”
28. Eleko ya “ntango moko, ntango mibale, mpe ndambo na ntango” eumelaki ntango boni?
28 Anzelu ya Yehova alobelaki eleko moko ya esakweli oyo ekoumela “ntango moko, ntango mibale, mpe ndambo na ntango.” Ezali ntango boni? Mingimingi, balimboli ya Biblia bandimaka ete elobeli oyo elimboli ntango misato na ndambo—kobakisa ntango moko na ntango mibale mpe na ndambo na ntango. Lokola “ntango nsambo” ya ligboma ya Nebukadanesala ezalaki mpenza mbula nsambo, bobele bongo ntango misato na ndambo ezali mbula misato na ndambo.c (Danyele 4:16, 25) Na libongoli moko ya Biblia (An American Translation), tozali kotánga boye: “Bakopesama na lobɔkɔ na ye na boumeli ya mbula moko, mbula mibale, mpe ndambo na mbula.” Libongoli ya James Moffatt elobi ete: “Na boumeli ya mbula misato mpe ndambo na mbula.” Eleko yango mpe elobelami na Emoniseli 11:2-7, ete batatoli ya Nzambe bakosakola balati basaki na boumeli ya sanza 42 to mikolo 1 260, mpe na nsima bakobomama. Ntango nini eleko yango ebandaki mpe ntango nini esukaki?
29. Ntango nini mpe ndenge nini eleko ya esakweli ya mbula misato na ndambo ebandaki?
29 Mpo na baklisto bapakolami, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki ntango ya komekama makasi. Banda nsuka ya 1914, bayebaki ete bakonyokwama. Yango wana, mokapo mpo na mobu 1915 ezalaki motuna ya Matai 20:22 oyo Yesu atunaki bayekoli na ye ete, “Bokoki nde komela kɔpɔ ekomela ngai?” Na yango, banda sanza ya Desɛmbɛ 1914, etuluku moke ya batatoli yango basakolaki ‘balati basaki.’
30. Na lolenge nini baklisto bapakolami banyokolamaki na États-Unis na Angleterre na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
30 Ntango etumba ekómaki ndongo, baklisto bapakolami bakutanaki na botɛmɛli makasi. Bakangaki bamoko na bango na bolɔkɔ. Ndeko Frank Platt, moto ya Angleterre mpe Ndeko Robert Clegg, moto ya Canada, banyokwamaki mpenza na bakonzi ya mitema mabe. Na mokolo ya 12 Febwali 1918, Canada mpe epekisaki volimi ya nsambo ya buku Études des Écritures, oyo eutaki kobima mpe ezalaki na motó ya likambo ete Le mystère accompli. Kati na mikanda yango oyo mipekisamaki ezalaki mpe na batrakte oyo ezalaki na motó ya likambo ete The Bible Students Monthly (Bayekoli ya Biblia—Trakte ya sanza na sanza). Na nsanza oyo elandaki, departema ya makambo matali bosembo na États-Unis ya Amerika epekisaki mpe kokabolama ya volimi ya nsambo ya buku yango. Ndenge nini makambo masukaki? Balukaki Batatoli na bandako, babɔtɔlaki mikanda mpe bakangaki basambeli ya Yehova!
31. Ntango nini mpe ndenge nini eleko ya “ntango moko, ntango mibale, mpe ndambo ya ntango” esukaki?
31 Monyokoli ya bapakolami ya Nzambe ekómaki ndongo na mokolo ya 21 Yuni 1918 ntango bakangaki prezida J. F. Rutherford mpe basangani minene ya Watch Tower Bible and Tract Society na bolɔkɔ. Bafundaki bango na bifundeli ya lokuta mpe bakatelaki bango bitumbu ya mbula mingi na bolɔkɔ. Lokola liseke “moke” ezalaki na mokano ya “kobongola bilaka mpe mibeko,” ebomaki mpenza mosala ya kosakola oyo mozalaki kosalema na lisangá. (Emoniseli 11:7) Na bongo, eleko oyo esakolamaki ya “ntango moko, ntango mibale, mpe ndambo na ntango” esukaki na Yuni 1918.
32. Mpo na nini tokoki koloba ete liseke “moke” esilisaki “bato ya bulɛɛ” te?
32 Kasi “bato ya bulɛɛ” basilaki te na ntina na minyoko ya liseke “moke.” Lokola esakolamaki na mokanda ya Emoniseli, nsima ya mwa ntango mokuse ya bolɛmbu, baklisto bapakolami bazongelaki molende na bango mpe basakolaki lisusu na nguya mpenza. (Emoniseli 11:11-13) Na mokolo ya 26 Marsi 1919, prezida ya Watch Tower Bible and Tract Society na baninga na ye ya mosala babimaki na bolɔkɔ, mpe na nsima basambisi balongolaki bifundeli nyonso ya lokuta oyo bafundaki bango. Mwa ntango moke na nsima, batikali bapakolami babandaki komibongisa lisusu mpo na mosala ya kosakola. Nini ezalaki kozela liseke “moke”?
MOKÓLÓ NA MIKOLO AZALI KOSAMBISA
33. (a) Nani azali Mokóló na Mikolo? (b) “Mikanda oyo mifungwaki” na Esambiselo na likoló ezalaki mikanda nini?
33 Nsima ya kolobela nyama minei yango, Danyele atikaki nyama ya minei mpo na kotala makambo oyo mazalaki kosalema na likoló. Amonaki Mokóló na Mikolo afandi na nkembo na kiti na ye ya bokonzi lokola Mosambisi. Mokóló na Mikolo oyo balobeli ezali moto mosusu te bobele Yehova Nzambe. (Nzembo 90:2) Ntango basambisi bafandaki na bisika na bango na Esambiselo na likoló, Danyele amonaki “mikanda mifungwaki.” (Danyele 7:9, 10) Lokola Yehova azali na ebandela te mpe na nsuka te, ayebi makambo nyonso ya bomoi ya bato lokola nde akomá yango na buku moko. Yehova asili kotalela banyama nyonso minei oyo ya elilingi mpe akosambisa yango na boyebi nyonso.
34, 35. Nini ekokómela liseke “moke” mpe bikonzi mosusu ya nguya oyo bizali na elilingi ya nyama?
34 Danyele alobaki lisusu: “Natalaki na ntango yango mpo na maloba minene malobaki liseke. Ezalaki ngai kotala, nyama yango abomamaki, mpe nzoto na ye ebebisamaki mpe ebwakamaki na mɔ́tɔ mpo na kozika. Mpo na banyama mosusu, bokonzi na yango elongwaki, nde koumela na bomoi na bango eponamaki kino ntango na elaka.” (Danyele 7:11, 12) Anzelu alobaki na Danyele ete: “Basambisi bafandaki mpe balongolaki nguya na ye mpo na kolimwisa ye mpe kobebisa ye nyɛɛ.”—Danyele 7:26, NW.
35 Yehova Nzambe, Mosambisi Monene, azwaki meko ete liseke oyo efingaki ye mpe enyokolaki ‘bato na ye ya bulɛɛ’ esengelaki kozwa etumbu ndenge moko na bokonzi ya Loma oyo enyokolaki baklisto ya liboso. Bokonzi na yango ekoumela te. Ata mpe boyangeli ya nguya moke lokola liseke moke, oyo “bakonzi” na yango bautaki na bokonzi ya Loma. Ekozala boni mpo na biyangeli oyo biutaki na mikili ya nguya oyo mizalaki kala mpe mimonisamaki na banyama ya elilingi? Lokola esakolamaki, banyama yango ya elilingi bakoumela “kino ntango na elaka.” Kino lelo, bato bazali naino kofanda na bisika oyo bikonzi yango bizalaki. Na ndakisa, ekólo Irak ezali sikoyo na esika oyo bokonzi ya Babilone ezalaki na ntango ya kala. Perse (Iran) mpe Grèce ezali kino sikoyo. Bikólo oyo biuti na mikili yango ya nguya bizali na kati ya ONU. Bikonzi yango mpe bikobebisama elongo na ekólo oyo ekosukisa koyangela mokili mobimba. Biyangeli nyonso ya bato bikolongolama na “etumba na mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14, 16) Kasi, na nsima, nani akoyangela mokili?
BOKONZI OYO EKOUMELA LIBELA EBƐLƐMI!
36, 37. (a) Nani azali “mwana na moto,” ntango nini mpe mpo na nini amonisamaki na Esambiselo na likoló? (b) Nini etyamaki na 1914 T.B.?
36 Danyele akamwaki: “Namonaki na bimonaneli na butu, mpe namonaki lokola mwana na moto koya na mapata na likoló, mpe akómaki epai na [Mokóló na Mikolo, NW] mpe abɛlɛmisamaki na ye.” (Danyele 7:13) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu Klisto amibéngaki “Mwana na moto” mpo na komonisa ete abotamaki kati na bato. (Matai 16:13; 25:31) Na Sanedrina to Esambiselo monene ya Bayuda, Yesu alobaki: “Bokomona Mwana na moto kofanda na lobɔkɔ ya mobali na nguya mpe koya na mapata na likoló.” (Matai 26:64) Na emonaneli ya Danyele, moto oyo azalaki koya mpe amonanaki na miso ya bato te, oyo abɛlɛmaki na Yehova Nzambe, ezalaki bongo Yesu Klisto ntango asekwaki na nkembo. Ntango nini likambo yango esalemaki?
37 Nzambe asalaki kondimana elongo na Yesu Klisto mpo na bokonzi, lokola asalaki yango na Mokonzi Davidi. (2 Samwele 7:11-16; Luka 22:28-30) Ntango “bilaka ya mabota” bikómaki na nsuka na 1914 T.B., Yesu Klisto, mokitani ya Davidi, azalaki na lotomo ya kosangola Bokonzi. Tozali kotánga boye na esakweli ya Danyele: “Nguya na nkembo na bokonzi ipesamaki na ye, ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso básalela ye. Nguya na ye ezali nguya ya lobiko na lobiko, ekosila te, mpe bokonzi na ye ekobebisama te.” (Danyele 7:14) Bokonzi ya Masiya etyamaki na likoló na 1914. Nzokande, bato mosusu mpe bakosangana na bokonzi yango.
38, 39. Nani akozwa bokonzi ya mokili libela?
38 Anzelu alobaki: “Bato na bulɛɛ ya Oyo-Aleki-Likoló bakozwa bokonzi.” (Danyele 7:18, 22, 27) Yesu Klisto azali mokonzi ya bulɛɛ. (Misala 3:14; 4:27, 30) ‘Bato mosusu ya bulɛɛ’ oyo basangani na bokonzi yango ezali bongo baklisto ya sembo bapakolami 144 000, basangoli ya Bokonzi elongo na Klisto. (Baloma 1:7; 8:17; 2 Batesaloniki 1:5; 1 Petelo 2:9) Bazali kosekwa na liwa lokola bikelamu ya elimo oyo bikokufa lisusu te mpo na koyangela elongo na Klisto na Ngomba Siona na likoló. (Emoniseli 2:10; 14:1; 20:6) Nsima ya lisekwa ya baklisto bapakolami, Yesu Klisto akoyangela mokili elongo na bango.
39 Na ntina na bokonzi yango ya Mwana na moto elongo na “bato ya bulɛɛ” ntango bakosekwa, anzelu ya Nzambe alobaki ete: “Bokonzi mpe nguya mpe lokumu na bokonzi na nse na lola mobimba ikopesama na bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló; bokonzi na bango ekozala bokonzi ya lobiko na lobiko, mpe bokonzi nyonso bokosalela bango mpe bokotosa bango.” (Danyele 7:27) Oyo nde mapamboli bato ya botosi bakozwa na Bokonzi yango!
40. Matomba nini tokoki kozwa soki totii likebi na ndɔtɔ mpe bimonaneli ya Danyele?
40 Danyele ayebaki te ntango nini bimonaneli ya kokamwa oyo Nzambe apesaki ye bikokokisama. Alobaki: “Oyo ezali nsuka na likambo yango. Ngai, Danyele, nabangaki mingi mpo na makanisi na ngai, mpe elongi na ngai ebongwanaki; nde nabombaki likambo yango na motema na ngai.” (Danyele 7:28) Nzokande biso tozali na ntango oyo tokoki kokanga ntina ya kokokisama ya bimonaneli oyo Danyele amonaki. Soki totii likebi na esakweli yango, tokolendisa kondima na biso mpe elikya oyo tozali na yango ete Masiya, mokonzi oyo aponami na Yehova, akoyangela mokili.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koloba polele mpe kozongela likambo moko mbala na mbala te, tokolimbola vɛrsɛ mokomoko ya Danyele 7:15-28 na kokokanisáká yango na vɛrsɛ mokomoko ya bimonaneli oyo bikomami na Danyele 7:1-14.
b Talá mokapo 4 ya buku oyo.
c Talá mokapo 6 ya buku oyo.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• ‘Nyama mokomoko kati na nyama minei ya minene oyo ebimaki na mai monene’ ezalaki elilingi ya nini?
• Liseke “moke” emonisi nini?
• Ndenge nini liseke moke ya elilingi enyokolaki “bato ya bulɛɛ” na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
• Nini ekokómela liseke moke ya elilingi mpe bikonzi mosusu oyo bimonisamaki na banyama?
• Matomba nini ozwi mpo na likebi oyo otii na ndɔtɔ ya Danyele mpe bimonaneli ya “banyama minene minei”?
[Etanda/Bililingi na nkasa 149-152]
MOKONZI YA MOTEMA BOBOTO
NA EKEKE ya mitano L.T.B., mokomi moko ya ekólo Grèce alobelaki ye lokola mokonzi ya motema boboto mpe ndakisa monene. Na Biblia, babéngi ye “mopakolami” ya Nzambe mpe “ndɛkɛ oyo esalaka bokila,” oyo eutaki “epai moi ebimaka.” (Yisaya 45:1; 46:11, NW) Mokonzi oyo alobelami awa ezali bongo Sirise Monene, moto ya Perse.
Lokumu ya Sirise ebandaki soki na mobu 560 to 559 L.T.B. ntango akitanaki tata na ye Cambyse I na kiti ya bokonzi na Ansana, yango ezalaki engumba to etúká moko ya Perse na ntango ya kala. Na ntango wana, Ansana ezalaki koyangelama na Mokonzi Astyage, moto ya Mede. Lokola atombokelaki bakonzi ya Mede, Sirise alongaki bango na etumba mpamba te basoda ya Astyage bamityaki na ngámbo na ye. Mpo na yango, Bamede bamipesaki na Sirise. Na nsima, Bamede na Baperse babundaki bango nyonso esika moko na litambwisi ya Sirise. Yango ebimisaki bongo bokonzi ya Mede na Perse oyo na boumeli ya ntango ebɔtɔlaki mikili mosusu mpe epalanganaki longwa Mai Monene ya Égée kino Ebale Indus.—Talá kalati.
Na mampinga masangani ya Bamede na Baperse, Sirise akendaki liboso kosukisa mobulu—na wɛsti ya Mede epai kuna Crésus, mokonzi ya Ludia, asilaki kobɔtɔla bamboka kino na Mede. Lokola akómaki esika bokonzi ya Ludia esuki na ɛsti na Asie Mineure, Sirise alongaki Crésus mpe abɔtɔlaki Sardes, mboka-mokonzi na yango. Na bongo, Sirise abɔtɔlaki bingumba ya etúká ya Ionie mpe etúká mobimba ya Asie Mineure ekómaki na bokonzi ya Bamede na Baperse. Sirise akómaki bongo monguna monene ya Babilone mpe ya mokonzi na yango Nabonide.
Sirise amibongisaki mpo na kobunda na engumba makasi ya Babilone. Banda ntango yango, eyebanaki ete Sirise akokokisa esakweli moko ya Biblia. Soko bikeke mibale liboso, na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova atángaki Sirise na nkombo lokola mokonzi oyo akokweisa Babilone mpe akosikola Bayuda na boombo. Ezali na esakweli yango nde Makomami ebéngi Sirise “mopakolami” ya Yehova.—Yisaya 44:26-28, NW.
Ntango Sirise amibongisaki mpo na kobundisa Babilone na mobu 539 L.T.B., akutanaki na mokakatano monene. Lokola Babilone ezingamaki na bifelo mineneminene mpe ezalaki na terase minene ya mozindo oyo esalemaki na Ebale Pelata, emonani ete ezalaki mpenza mpasi mpo na kobɔtɔla engumba yango. Na bisika oyo mai ya Ebale Pelata ezalaki koleka na kati ya Babilone, batongaki efelo ya monene mpe ya likoló lokola ngomba, mpe ezalaki na bikuke minene ya motako. Ndenge nini Sirise akokaki kolonga Babilone?
Esilaki koleka ekeke moko, Yehova ayebisaki ete ‘mai na yango ekokaoka,’ mpe ‘ekokaoka mpenza nyɛɛ.’ (Yilimia 50:38, NW) Mpo na kokokisa esakweli yango, basoda ya Sirise balekisaki mai ya Ebale Pelata na mwa bakilomɛtɛlɛ na nɔrdi ya Babilone. Na nsima, basoda yango bakatisaki ebale na makolo, bamataki na mipanzi ya bifelo mpe bakɔtaki na bolɛmbu nyonso na engumba, lokola mpe bikuke bitikalaki polele. Ndenge moko na “ndɛkɛ oyo esalaka bokila,” oyo emibwakaka na lombangu likoló na ndɛkɛ mosusu mpo na kolya yango, mokonzi oyo ‘autaki epai moi ebimaka’—na ɛsti—abɔtɔlaki Babilone na butu moko!
Lokola Sirise alongaki Babilone, Bayuda oyo bazalaki na boombo na engumba yango bayebaki ete ntango ya kosikolama oyo bazalaki kozela banda kala ekómaki. Mbula 70 oyo mabelé na bango etikalaki mpamba ekómaki mpe na nsuka. Bayokaki mpenza esengo ntango Sirise apesaki bango ndingisa ya kozonga na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu tempelo! Sirise azongiselaki bango mpe bisaleli ya motuya oyo bizalaki na tempelo, oyo Nebukadanesala amemaki na Babilone. Apesaki bango mpe ndingisa ya kobéngisa nzete ya Lebanona mpo na misala ya botongi. Apesaki mpe mobeko ete bábimisela bango mosolo na kɛsi ya mokonzi mpo na kosala mosala yango.—Ezela 1:1-11; 6:3-5.
Sirise azalaki kosalela bato ya mikili oyo ye abɔtɔlaki makambo na boboto. Ntango mosusu ezalaki mpo na mateya ya lingomba na ye. Ekoki kozala ete Sirise azalaki kondima mateya ya profeta Zoroastre, moto ya Perse, mpe azalaki kosambela Ahura Mazda—oyo atalelamaki lokola nzambe oyo azalisaki biloko nyonso ya malamu. Na buku na ye (The Zoroastrian Tradition), Farhang Mehr akomaki boye: “Zoroastre azalaki komona Nzambe lokola moto oyo azali na bizaleli malamu nyonso. Azalaki koteya bato ete Ahura Mazda azongisaka mabe na mabe te kasi azalaka sembo mpe mpo na yango, esengeli kobanga ye te kasi kolinga ye.” Ntango mosusu lokola azalaki kondima nzambe moko oyo atondi na bizaleli ya malamu mpe azali sembo, yango ebongolaki etamboli ya Sirise mpe epesaki ye mpiko mpo na komoniselaka bato boboto mingi mpe kozalaka na makambo makasi te.
Nzokande, mokonzi azalaki kokoka kofanda na Babilone te mpamba te na bileko ya moi, molunge ezalaki makasi mpenza. Atako Babilone ezalaki mboka-mokonzi mpe esika monene ya losambo na mimeseno ya mboka, mokonzi azalaki kofanda kuna mingimingi na eleko ya mpio. Yango wana, nsima ya kolonga Babilone, Sirise azongaki noki na Ekibatana, engumba oyo mokonzi azalaki kofanda mingi na eleko ya molunge. Engumba yango ezalaki na esika oyo etombwamá na mɛtɛlɛ soko 1 900 longwa na mai monene mpe etongamaki na nse ya Ngomba Elvend. Sirise azalaki kokoka moi mpe mpio ya engumba yango. Atongaki mpe ndako kitoko ya mokonzi na Pasargades (pene na engumba Persépolis), oyo ezalaki kala mboka-mokonzi, oyo ezwami na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 640 na sudi-ɛsti ya Ekibatana. Mokonzi azalaki kokenda kopema kuna.
Sirise ayebani lokola mokonzi oyo azalaki na nguya mpe na motema boboto. Boyangeli na ye ya mbula 30 esukaki ntango akufaki na bitumba na mobu 530 L.T.B. Mwana na ye ya mobali, Cambyse II, akitanaki ye na kiti ya bokonzi ya Perse.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Ndenge nini Sirise amonisaki ete azalaki “mopakolami” ya Yehova?
• Likambo nini ya malamu mpenza Sirise asalaki mpo na basaleli ya Yehova?
• Ndenge nini Sirise azalaki kotalela bato oyo bazalaki na mikili oyo ye abɔtɔlaki?
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BAMEDE NA BAPERSE
MAKEDONIA
Memphis
EZIPITO
ETIOPIA
Yelusaleme
Babilone
Ekibatana
Susa
Persépolis
INDE
[Elilingi]
Lilita ya Sirise na Pasargades
[Elilingi]
Etanda moko na Pasargades oyo ezali kolobela Sirise
[Etanda/Bililingi na nkasa 153-161]
MOKONZI MOKO ELENGE AYANGELI MOKILI MOBIMBA
ESILI koleka mbula pene na 2 300, mokonzi moko ya basoda, oyo azalaki na mbula mwa moke koleka 20, atɛlɛmaki na bokula ya Mai Monene ya Méditerranée. Azalaki kotala na ntaka ya kilomɛtɛlɛ moko liboso na ye, engumba moko oyo ezalaki na esanga. Lokola bapesaki ye nzela akɔta na esanga yango te, mokonzi yango ya basoda, oyo azalaki naino elenge, ayokaki nkanda mpe azwaki meko ete akosala nyonso mpo na kobɔtɔla esanga yango. Mwango na ye ya etumba ezalaki nini? Kotonga gbagba kino na esanga mpe koyanganisa mampinga na ye mpo na kobundisa engumba yango. Abandaki bongo kotonga gbagba.
Kasi nsango moko eutaki epai ya mokonzi monene ya Perse mpe yango esalaki ete elenge mokonzi ya basoda oyo atika mwango yango. Lokola alingaki mpenza kosala boyokani, mokonzi ya Perse alakaki ete akopesa ye likabo monene: talenta 10 000 ya wolo (motuya na yango eleki dolare miliare mibale lelo), akopesa ye mpe mwana na ye ya mwasi na libala mpe bamboka nyonso oyo ezali na wɛsti ya bokonzi na ye. Mokonzi ya Perse apesaki likabo monene bongo mpo mokonzi oyo ya basoda azongisela ye bato ya libota na ye oyo akangaki bango baombo na etumba.
Mokonzi yango ya basoda oyo akómaki kokakatana soki akondima to akoboya likabo oyo ezalaki bongo Alesandala III, moto ya Makedonia. Asengelaki kondima likabo yango? Ulrich Wilcken, nganga-mayele ya masolo ya kala, alobaki: “Ezalaki ntango moko oyo ekokaki kobongola makambo mingi na mokili na ntango wana ya kala. Mpamba te makambo oyo mabimaki nsima ya ekateli na ye mapalanganaki na Azia mpe na Mpoto na boumeli ya eleko oyo babéngi Moyen-Âge kino na mikolo na biso.” Kasi liboso ya koyeba eyano ya Alesandala, tótalela naino makambo oyo mabimisaki mokakatano yango.
BABONGISAKI YE MPO ABƆTƆLAKA BAMBOKA
Alesandala abotamaki na engumba Pella na Makedonia na mobu 356 L.T.B. Tata na ye ezalaki Mokonzi Philippe II mpe nkombo ya mama na ye Olympias. Mama na ye azalaki koyebisa ye ete bakonzi ya Makedonia bazalaki bakitani ya Héraclès (Hercule), mwana ya Zeu, nzambe moko ya Grèce. Na makanisi ya mama na ye Olympias, nkɔkɔ ya Alesandala ezalaki Achille, elombe ya lisapo na nkombo Iliade oyo ekomamaki na Homère, nganga-mayele ya ntɔki. Lokola baboti na ye basilaki kokɔtisela ye likanisi ya kobɔtɔla bamboka mpe kokóma mokonzi ya lokumu, elenge Alesandala azalaki kokanisa makambo mosusu te, bobele oyo wana. Ntango batunaki ye soki akoki kosakana na masano ya Jeux olympiques, Alesandala alobaki ete akoki kosala yango kasi bobele elongo na bakonzi. Azalaki bongo na mposa mpenza ya kosala makambo minene koleka oyo tata na ye asalaki mpe kozwa lokumu.
Ntango akómaki na mbula 13, Alesandala akómaki koyekola mateya ya filozofi ya Aristote, moto ya Grèce. Ye asalaki ete Alesandala alinga mateya ya filozofi, ya monganga mpe bolukiluki to siansi. Nzokande, toyebi mpenza malamumalamu te na meko nini mateya ya Aristote ebongolaki makanisi ya Alesandala. Bertrand Russell, moto na filozofi na ekeke oyo ya 20, alobaki ete: “Likambo ya kokamwa ezali ete bango mibale bazalaki koyokana te na makambo mingi. Makanisi ya Aristote na ntina na politiki eutaki na makambo oyo mazalaki kosalema na engumba na ye, oyo lokumu na yango lokola ekólo ezalaki lisusu mingi mpenza te.” Likanisi ya kozala na bingumba mikemike oyo bizali koyangelama lokola bikólo ezalaki kosepelisa mwana oyo ya mokonzi te mpamba te ye azalaki na mokano ya kosala bokonzi moko monene. Alesandala asepelaki mpe te na likanisi ya Aristote ya komona bapaya lokola baombo. Nzokande, Alesandala azalaki kokanisa kosala bokonzi oyo ekokolisa boninga kati na bato oyo balongi bitumba na baoyo bayangelami.
Nde na ntembe te, Aristote akolisaki mposa ya kotánga mpe koyekola epai na Alesandala. Na boumeli ya bomoi na ye, Alesandala alingaki kotánga mingi mpe mingi mpenza kotánga makomi ya Homère. Balobaka ete ayebaki lisapo ya Iliade na motó; nzokande makomi yango ya ntɔki ezalaki na milɔngɔ ya kotánga 15 693!
Mateya oyo Aristote azalaki kopesa ye esukaki na mbalakaka na mobu 340 L.T.B. ntango mwana yango ya mokonzi ya mbula 16 azongaki na Pella mpo na koyangela Makedonia lokola tata na ye azalaki te. Mwana yango abongisamaki mpo na kosangola bokonzi mpe talá abandaki kolonga bitumba. Tata na ye Philippe asepelaki mpamba te mwana na ye asukisaki noki botomboki ya Bamede na etúká ya Thrace, abɔtɔlaki mpe mbala moko mboka-mokonzi na bango mpe apesaki yango nkombo Alexandroupolis, yango euti na nkombo na ye.
ALANDI KOBƆTƆLA BAMBOKA
Ntango babomaki tata na ye Philippe na mobu 336 L.T.B., Alesandala akitanaki ye na bokonzi na Makedonia wana azalaki na mbula 20. Lokola akɔtaki na Azia na libongo ya Hellespont (lelo Dardanelles) na ebandeli ya sanza ya Mai na mobu 334 L.T.B., Alesandala akendaki na bitumba na limpinga moke kasi ya mpiko oyo ezalaki na basoda 30 000 oyo babundaka na makolo mpe basoda 5 000 oyo babundaka na mpunda. Alesandala amemaki mpe ba ingénieurs, bakɛngɛli misala ya botongi, ba architectes, banganga-mayele ya siansi mpe banganga-mayele ya masolo ya kala.
Na Ebale Granique na ngámbo ya nɔrdi-wɛsti ya Asie Mineure (sikoyo ekólo Turquie), Alesandala alongaki etumba na ye ya liboso oyo abundaki na bato ya Perse. Na eleko yango ya mpio, Alesandala abɔtɔlaki wɛsti ya Asie Mineure. Na ebandeli ya eleko ya mpio oyo elandaki, etumba monene ya mibale na Baperse esalemaki na engumba Issos na sudi-ɛsti ya Asie Mineure. Mokonzi monene ya Perse Dalio III, asangisaki limpinga monene ya basoda pene na nkóto nkama mitano, mpe ayaki kobunda na Alesandala. Lokola amonaki mpenza ete akolonga, Dalio amemaki mama na ye, mwasi na ye mpe bandeko mosusu ya libota na ye mpo bámona bango moko na miso ndenge akopanza banguna na ye. Kasi basoda ya Perse bamibongisaki te mpo na kobunda na basoda ya Makedonia oyo balekaki bango na mbangu mpe na mpiko. Basoda ya Alesandala balongaki basoda ya Perse na bolongi monene na boye ete Dalio akimaki mpe asundolaki libota na ye na mabɔkɔ ya Alesandala.
Na esika ya kolanda basoda ya Perse oyo bazalaki kokima, Alesandala akendaki na sudi na bokula ya Mai Monene ya Méditerranée epai kuna abɔtɔlaki mabongo oyo basoda ya Perse basɛmisaki masuwa na bango. Kasi bato ya esanga ya Tulo batɛmɛlaki ye. Lokola azalaki se na ekateli ya kobɔtɔla esanga yango, Alesandala azingaki yango na boumeli ya sanza nsambo. Ezalaki na ntango wana nde, mpo na kosala boyokani na ye, Dalio alakaki kopesa ye biloko oyo touti kolobela na ebandeli ya lisolo. Motuya monene mpenza ya biloko yango epusaki Parménion, mopesi-toli oyo Alesandala atyelaki motema, na koloba ete: ‘Soki nazalaka Alesandala, nalingaki kondima.’ Kasi Alesandala, elenge mokonzi ya basoda, azongisaki ete: ‘Soki nazalaka Parménion, nalingaki kondima.’ Lokola aboyaki boyokani, Alesandala akobaki kozinga engumba yango ya lokumu koleka na mai monene mpe abebisaki yango na sanza ya Yuli na mobu 332 L.T.B.
Alesandala abebisaki Yelusaleme te mpo yango emipesaki, na bongo, akitaki na sudi mpo na kobɔtɔla Gaza. Lokola Ezipito elɛmbaki bokonzi ya Perse, eyambaki Alesandala lokola mosikoli. Na Memphis, Alesandala apesaki nzambe Apis mbeka ya ngɔmbɛ mpe yango esepelisaki mpenza banganga ya Ezipito. Alesandala abandaki kotonga engumba ya Alexandrie, oyo ezalaki engumba ya bato ya mayele lokola Athènes. Kino lelo, Alexandrie eyebani mingi na likambo yango.
Na nsima, Alesandala akendaki na nɔrdi-ɛsti, na Palestine kino Ebale ya Tigre. Na mobu 331 L.T.B., abundaki etumba monene mpo na mbala ya misato na mampinga ya Perse, na lisobe ya Gaugamèles, pene na esika engumba ya kala ya Ninive ezaláká. Atako mampinga ya Perse emibongisaki lisusu malamumalamu mpe esangisaki ebele ya basoda 250 000, basoda ya Alesandala, atako bazalaki bobele 47 000, balongaki bango! Dalio akimaki mpe na nsima bato ya mboka na ye babomaki ye.
Lokola abɔtɔlaki bamboka mingi, Alesandala abalukaki epai ya sudi mpe abɔtɔlaki Babilone, engumba ya malili, mboka-mokonzi ya Perse. Abɔtɔlaki mpe mboka-mokonzi Suse na Persépolis mpe esika biloko ya motuya ya Perse ezalaki mpe azikisaki ndako monene ya Mokonzi Zelezese. Nsukansuka, mboka-mokonzi Ekibatana ekweaki na mabɔkɔ na ye. Moto oyo azalaki kobɔtɔla bamboka na bitumba abɔtɔlaki noki eteni ya bokonzi ya Perse oyo etikalaki, akómaki mosika kino na ɛsti ya Ebale Indus oyo ezwami lelo na ekólo Pakistan.
Ntango alingaki kokatisa Ebale Indus, Alesandala akutanaki na monguna monene, Mokonzi Poros na Inde, na etúká oyo ekabolaki bango na etúká ya Taxila na Perse. Na sanza ya Yuni na mobu 326 L.T.B., Alesandala abundaki bongo etumba na ye ya minei, ya monene mpe ya nsuka. Limpinga ya Poros ezalaki na basoda 35 000 mpe nzoku 200, oyo ebangisaki bampunda ya basoda ya Makedonia. Etumba yango ezalaki nsɔmɔ koleka mpe makila esopanaki mingi kasi nsukansuka basoda ya Alesandala balongaki. Poros amipesaki na mabɔkɔ ya Alesandala mpe asalaki boyokani elongo na ye.
Koleka mbula mwambe banda bakɔtaki na Azia, basoda ya Alesandala balɛmbaki mingi mpe bayokaki mposa ya kozonga mboka. Etumba monene oyo bautaki kobunda na Poros elɛmbisaki bango mpenza na boye ete balingaki kozonga mboka. Atako Alesandala alingaki mpenza te kotika bango bákenda, ayaki kondima na nsima. Grèce ekómaki bongo mokili oyo elekaki mikili nyonso na nguya. Lokola Bagreke bakómaki kofanda na mikili oyo Alesandala abɔtɔlaki, lokota ya Greke mpe mimeseno na yango epalanganaki na bisika yango nyonso.
AZALAKI MOTO LOKOLA BATO NYONSO
Bomoko oyo esangisaki basoda ya Makedonia na boumeli ya bambula ya bokonzi ya Alesandala ezalaki mpenzampenza mpo na bomoto na ye. Nsima ya etumba nyonso, Alesandala azalaki kotala basoda oyo bazokaki, kotala bampota na bango, kokumisa bango mpo na mpiko oyo bamonisaki mpe kopesa bango mbongo mpo na misala na bango. Mpo na baoyo bakufaki na etumba, Alesandala azalaki kobongisa molulu monene mpo na kokunda bango. Baboti mpe bana ya baoyo bakufaki na etumba basengelaki kofuta mpako te to kosala misala mosusu miyokani na yango te. Azalaki kosepelisa bato nsima ya bitumba na kobongisáká masano mpe mimekano. Kutu na mbala mosusu, Alesandala apesaki basoda oyo bautaki kobala nzela ete bázonga na Makedonia mpo na kolekisa eleko ya mpio elongo na basi na bango. Makambo ya ndenge wana esalaki ete basoda na ye bálinga ye mingi mpe bákumisa ye.
Na ntina na libala ya Alesandala na Roxane, mwana mwasi ya mokonzi ya Bactriane, Plutarque moto ya Grèce akomaki boye: “Ezalaki liboso likambo ya lolango kati na mwasi na mobali, nzokande yango ebombaki likambo moko ya ntina. Libala yango esepelisaki bato oyo bayangelamaki mpamba te mokonzi aponaki mwasi na ye kati na bana na bango, mpe yango esalaki ete bálinga Alesandala mingi. Epai mosusu, atako Alesandala ayebanaki lokola moto oyo akangaka motema na makambo mingi, alingaki mobandami na ye mingi mpenza. Kasi asangisaki na ye nzoto te kino abalaki ye na lokumu nyonso lokola mibeko ezalaki kosɛnga.”
Alesandala mpe azalaki komemya mabala ya bato mosusu. Atako akangaki mwasi ya Mokonzi Dalio na boombo, alingaki komona ete bazalaki komemya ye. Ndenge moko, ntango bayebisaki ye ete basoda na ye mibale basangisaki nzoto na basi ya bato oyo bazalaki bapaya, atindaki báboma bato yango soki basalaki mpenza bongo.
Lokola mama na ye Olympias, Alesandala alingaki kosambela mingi. Azalaki kopesa mbeka liboso ya kokenda na etumba mpe nsima ya kozonga na etumba. Azalaki mpe kotuna banganga-nkisi ndimbola ya bilembo mosusu. Azalaki mpe kotuna makanisi ya Ammon na Libye. Mpe na Babilone, azalaki kosalela toli ya Bakaladi na lolenge ya kopesa mbeka, mingi mpenza na nzambe ya Babilone Bel (Maladuku).
Atako Alesandala azalaki kolya mingi te, ayaki kokóma momeli monene. Azalaki koloba mingi wana asimbi kɔpɔ ya masanga na lobɔkɔ mpe azalaki komikumisa mpo azalaki kolonga bitumba. Likambo oyo ebebisaki mpenza lokumu ya Alesandala ezalaki liwa ya moninga na ye Clitos oyo ye abomaki na molangwa ya masanga. Kasi Alesandala alelaki mingi mpo na likambo oyo ye asalaki mpe mikolo misato mobimba, alalaki se na mbeto, azalaki kolya te, komela mpe te. Baninga na ye bayaki kobondela ye, nde na nsima abandaki kolya.
Lokola ntango ezalaki koleka, lokoso ya Alesandala mpo na lokumu mingi koleka epusaki ye asala makambo mosusu ya mabe mpenza. Abandaki kondima noki bifundeli ya lokuta mpe kokatela bato bitumbu ya makasimakasi. Na ndakisa, lokola bayebisaki ye ete Philotas na bato mosusu balingaki koboma ye, Alesandala abomaki ye elongo na tata na ye Parménion, mopesi-toli oyo mokonzi atyelaki mpenza motema.
LIWA YA ALESANDALA
Mwa moke nsima ya kozonga na Babilone, Alesandala abɛlaki malaria mpe akufaki na yango. Na mokolo ya 13 Yuni na mobu 323 L.T.B., wana azalaki bobele na mbula 32 mpe na sanza mwambe, Alesandala akweyaki liboso na monguna monene koleka, elingi koloba liwa.
Yango ekokanaki na maloba malandi oyo bato ya mayele ya Inde balobelaki ye: “Ɛɛ, Mokonzi Alesandala, moto na moto azali na ndambo ya mabelé oyo ekokani na esika oyo totɛlɛmi. Kasi yo, atako ozali moto lokola bato nyonso, longola bobele ete ozali na makambo mingi ya kosala mpe olɛmbaka te mpe obɔtɔli mabelé oyo nyonso mosika na mboka na yo, kominyokoláká mpe konyokoláká bato mosusu. Kasi mosika te okokufa mpe okozwa bobele mwa ndambo ya mabelé mpo na lilita na yo.”
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Alesandala Monene azalaki nani?
• Mwa moke nsima ya kosangola bokonzi na Makedonia, bitumba nini Alesandala akobaki kobunda?
• Lobelá mwa mikili oyo Alesandala abɔtɔlaki.
• Tokoki koloba nini na ntina na bomoto ya Alesandala?
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MIKILI OYO ALESANDALA ABƆTƆLAKI
MAKEDONIA
EZIPITO
Babilon
Ebale Indus
[Elilingi]
Alesandala
[Elilingi]
Aristote na moyekoli na ye Alesandala
[Elilingi na lokasa mobimba]
[Elilingi]
Ebende ya palata oyo elobelaki Alesandala
[Etanda/Bililingi na nkasa 162, 163]
BOKONZI MONENE EKABOLAMI
KOLOBELÁKÁ bokonzi ya Alesandala Monene, Biblia eyebisaki liboso ete bokonzi yango ekokweya mpe ekokabwana, “mpe ekozala mpo na bakitani na ye te.” (Danyele 11:3, 4) Na boyokani na esakweli yango, na boumeli ya mbula 14 oyo elandaki liwa ya mbalakaka ya Alesandala na mobu 323 L.T.B., babomaki mwana na ye mpenza Alesandala IV mpe Héraclès, mwana na ye oyo ye abotaki na mwasi mosusu.
Banda na mobu 301 L.T.B., bakonzi minei ya basoda ya Alesandala bamikómisaki bakonzi ntango bakabolaki bamboka oyo Alesandala abɔtɔlaki mpe bayangelaki yango. Mokonzi ya basoda na nkombo Cassandre ayangelaki Makedonia na Grèce. Lysimaque azwaki Asie Mineure mpe etúká ya Thrace. Séleucus I Nicator azwaki Mesopotamia na Sulia. Mpe Ptolémée Lagus to Ptolémée I ayangelaki Ezipito na Palestine. Na bongo, bokonzi monene ya Alesandala ekabwanaki na bikonzi minei ya Grèce.
Na bikonzi yango minei ya Grèce, bokonzi ya Cassandre eumelaki te lokola bikonzi mosusu. Mwa bambula nsima wana Cassandre akómaki mokonzi, bana na ye ya mibali oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakufaki, mpe na mobu 285 L.T.B., Lysimaque abɔtɔlaki bamboka ya bokonzi ya Grèce oyo ezalaki na Mpoto. Mbula minei na nsima, Lysimaque akweyaki na etumba liboso na Séleucus I Nicator mpe atikelaki ye bokonzi ya eteni monene ya bamboka ya Azia. Séleucus akómaki bongo mokonzi ya liboso na libota ya bakonzi oyo bakitanaki ye na Sulia. Asalaki engumba ya sika ya Antiokia ya Sulia mpe akómisaki yango mboka-mokonzi. Séleucus abomamaki na mobu 281 L.T.B. kasi bato ya libota na ye bakitanaki ye na bokonzi kino mobu 64 L.T.B., ntango Pompée, mokonzi ya basoda ya Loma, akómisaki Sulia etúká ya Loma.
Na biteni minei ya bokonzi ya Alesandala, bokonzi ya Ptolémée eumelaki koleka bikonzi nyonso. Ptolémée I akómaki mokonzi na mobu 305 L.T.B. mpe azalaki mokonzi ya liboso ya bakonzi ya Makedonia to Falo ya Ezipito. Lokola akómisaki engumba ya Alexandrie mboka-mokonzi, abandaki kobongisa engumba yango nokinoki. Moko na misala minene ya botongi oyo ye asalaki ezalaki bongo Ebombelo monene ya mikanda ya Alexandrie. Ptolémée abyangaki Démétrios de Phalère, nganga-mayele monene ya Athènes, mpo atambwisa mosala yango. Balobaka ete na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ebombelo yango monene ya mikanda ebombaki bamaniskri milio moko. Bakitani ya Ptolémée bakobaki koyangela Ezipito kino ntango yango ekweyaki na mabɔkɔ ya Loma na mobu 30 L.T.B. Na ntango yango, Loma ekómaki bongo mokili oyo elekaki mikili nyonso na nguya na esika ya Grèce.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Ndenge nini bokonzi monene ya Alesandala ekabwanaki?
• Kino ntango nini bakitani ya Séleucus bakobaki koyangela na Sulia?
• Ntango nini bokonzi ya Ezipito oyo eyangelamaki na bakitani ya Ptolémée esukaki?
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
KOKABOLAMA YA BOKONZI YA ALESANDALA
Cassandre
Lysimaque
Ptolémée I
Séleucus I
[Bililingi]
Ptolémée I
Séleucus I
[Etanda/Elilingi na lokasa 139]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MIKILI OYO ELEKAKI NGUYA ENGEBENE ESAKWELI YA DANYELE
Ekeko monene (Danyele 2:31-45)
Nyama minei oyo ebimaki na mai monene (Danyele 7:3-8, 17, 25)
BABILONE banda 607 L.T.B.
BAMEDE na BAPERSE banda 539 L.T.B.
GRÈCE banda 331 L.T.B.
LOMA banda 30 L.T.B.
ÉTATS-UNIS na ANGLETERRE banda 1763 T.B.
MOKILI EKABWANI NA MAKAMBO YA POLITIKI na ntango ya nsuka
[Elilingi na lokasa mobimba 128]
[Elilingi na lokasa mobimba 147]