Mokapo ya zomi
Nani akoki kotɛmɛla mokonzi ya bakonzi?
1, 2. Mpo na nini emonaneli oyo mosakoli Danyele amonaki na mbula ya misato ya Belesasala ezali na ntina mpo na biso?
MBULA 57 euti koleka banda tempelo ya Yehova oyo ezalaki na Yelusaleme ebebisamaki. Belesasala na tata na ye Nabonide bazalaki koyangela elongo na Babilone, mokili ya misato oyo elekaki nguya na mokili mobimba na kotalela esakweli ya Biblia.a Bamemaki Danyele, mosakoli ya Nzambe, moombo na Babilone. Na boumeli ya “mbula ya misato ya bokonzi ya mokonzi Belesasala,” Yehova amonisaki Danyele na emonaneli makambo oyo mazalaki na boyokani na kozongisama ya losambo ya pɛto.—Danyele 8:1.
2 Emonaneli ya esakweli oyo mosakoli Danyele amonaki esimbaki mpenza motema na ye mpe ezali na ntina monene mpo na biso baoyo tozali kobika na “ntango ya nsuka.” Anzelu Gabaliele alobaki na mosakoli Danyele ete: “Talá, nakoyebisa yo yango ekozala na nsuka na ntango na nkanda; mpo ete ezali likambo na ntango eponami na nsuka.” (Danyele 8:16, 17, 19, 27) Na likebi mpenza tótalela emonaneli oyo mosakoli Danyele amonaki mpe ndimbola na yango mpo na biso lelo.
MOBALI NA MPATE NA MASEKE MIBALE
3, 4. Nyama nini mosakoli Danyele amonaki etɛlɛmi pembeni ya mai monene, mpe yango elimboli nini?
3 Mosakoli Danyele akomaki ete: “Namonaki kati na emonaneli, mpe wana emonaki ngai nazalaki na mboka ya Susana, na ndako ya mokonzi, oyo ezalaki na [etúká, NW] ya Elama, mpe namonaki na emonaneli, mpe nazalaki na ebale ya Ulai.” (Danyele 8:2) Eyebisami mpenza polele te soki mosakoli Danyele azalaki na Susana (Susa)—mboka-mokonzi ya Elama oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ soko 350 na ɛsti ya Babilone—to azalaki kuna bobele na emonaneli.
4 Mosakoli Danyele alobaki lisusu ete: “Natombolaki miso na ngai mpe namonaki mobali na mpate atɛlɛmaki na libongo ya mai. Azalaki na maseke mibale.” (Danyele 8:3a) Ezalaki libombami te mpo na mosakoli Danyele koyeba soki mobali na mpate yango ezalaki elilingi ya nini. Anzelu Gabaliele alobaki na nsima ete: “Mobali na mpate oyo emonaki yo na maseke mibale, oyo izali mikonzi [ya Bamede na Baperse, NW].” (Danyele 8:20) Bamede bautaki na mikili ya ngomba na ɛsti ya Asulia, mpe Baperse bazalaki liboso batambolitamboli na etúká ya nɔrdi ya Libeke ya Perse (Golfe persique) banda bonkɔkɔ na bango. Kasi ntango bokonzi ya Bamede na Baperse ebandaki kokóma monene, banamboka bamipesaki na koluka bozwi mpe kosepela na bisengo na yango.
5. Ndenge nini liseke oyo ‘libimaki nsima’ ekómaki molai mpenza?
5 Mosakoli Danyele alobaki ete: “[Maseke] yango mibale ezalaki milai, nde moko elekaki oyo mosusu na molai, mpe oyo molai ebimaki na nsima.” (Danyele 8:3b) Liseke ya molai oyo ebimaki nsima ezalaki elilingi ya Baperse, nzokande liseke mosusu ezalaki Bamede. Na ebandeli, Bamede bayangelaki. Kasi na mobu 550 L.T.B., Sirise, mokonzi ya Perse alongaki Astyage, mokonzi ya Mede na etumba moko oyo ezalaki mpenza makasi te. Sirise asangisaki mimeseno mpe mibeko ya bikólo yango mibale, na bikonzi na yango mpe akómisaki bokonzi yango monene na kobɔtɔláká mikili mosusu. Banda wana, bikólo oyo mibale bikómaki bokonzi moko.
LOLENDO YA MOBALI NA MPATE
6, 7. Ndenge nini ata ‘nyama na yauli moko te ekokaki kotɛmɛla’ mobali na mpate?
6 Mosakoli Danyele akobaki koloba na ntina na mobali na mpate ete: “Namonaki mobali na mpate kotuta na maseke epai na kolimwa na ntango mpe epai na likoló mpe epai na ngɛlɛ; nyama moko akokaki kotɛlɛma liboso na ye te, mpe kobika na nguya na ye ezalaki te; asalaki [lokola] moko na mokano na ye, mpe amikumisaki.”—Danyele 8:4.
7 Na emonaneli ya liboso oyo mosakoli Danyele amonaki, Babilone emonisamaki na elilingi ya nyama na yauli oyo euti na mai monene mpe ezali lokola nkosi oyo bapesi yango mapapu ya mpóngó. (Danyele 7:4, 17) Nyama yango ya elilingi ezalaki na nguya te ya kotɛmɛla “mobali na mpate” ya emonaneli oyo. Babilone ekweyaki na mabɔkɔ ya Sirise Monene na mobu 539 L.T.B. Pene na mbula 50 kobanda wana, ‘nyama na yauli moko te’ to boyangeli moko te ya politiki, etɛmɛlaki bokonzi ya Bamede na Baperse—nguya ya minei na mokili mobimba na kotalela esakweli ya Biblia.
8, 9. (a) Ndenge nini “mobali na mpate” ‘etutaki maseke na bipai ya wɛsti mpe ya nɔrdi mpe ya sudi’? (b) Mokanda ya Esetele elobi nini na ntina na mokitani ya Dalio I, mokonzi ya Perse?
8 Bokonzi ya Bamede na Baperse, oyo eutaki ‘epai moi ebimaka’—na ɛsti—ezalaki kosala makambo ndenge yango elingi, ‘kotutáká maseke na wɛsti, na nɔrdi mpe na sudi.’ (Yisaya 46:11) Cambyse II, mokitani ya Sirise Monene, abɔtɔlaki Ezipito. Mokitani na ye, Dalio I, moto ya Perse, akendaki bipai ya wɛsti, akatisaki mongala ya Bospore na mobu 513 L.T.B. mpe na mikili ya Mpoto azingaki etúká ya Thrace, oyo mboka-mokonzi na yango ezalaki Byzance (lelo oyo Istanbul). Na mobu 508 L.T.B., abɔtɔlaki Thrace, mpe ayangelaki Makedonia na mobu 496 L.T.B. Na bongo, banda ntango ya Dalio, “mobali na mpate” to bokonzi ya Bamede na Baperse ebɔtɔlaki mikili na ngámbo misato oyo: na nɔrdi kino na etúká ya Babilone mpe Asulia, na wɛsti koleka Asie Mineure mpe na sudi kino Ezipito.
9 Mpo na komonisa bonene ya bokonzi ya Bamede na Baperse, Biblia elobi na ntina na Zelezese I, mokitani ya Dalio, ete ‘Asierise oyo azalaki mokonzi longwa na [Inde, NW] kino Etiopia, likoló na [bitúká, NW] mokama na ntuku mibale na nsambo na mokili.’ (Esetele 1:1) Kasi bokonzi monene yango esengelaki kokweya na mabɔkɔ ya bokonzi mosusu, mpe na likambo oyo, emonaneli ya mosakoli Danyele emonisi mwa makambo ya kokamwa oyo ekolendisa kondima na biso na liloba ya esakweli ya Nzambe.
MOBALI NA NTABA EBƐTI MOBALI NA MPATE
10. Na emonaneli ya mosakoli Danyele, nyama nini ebɛtaki “mobali na mpate”?
10 Kanisá naino ndenge mosakoli Danyele azali kokamwa na makambo oyo azali komona. Lisolo elobi ete: “Ezalaki ngai kokanisa, talá, mobali na ntaba autaki [epai moi elalaka, NW], mpe alekaki na likoló na mokili mobimba, mpe anyataki mokili te; mpe ntaba yango azalaki na liseke monene na kati na miso na ye. Abɛlɛmaki na mobali na mpate oyo na maseke mibale, oyo emonaki ngai kotɛlɛma na libongo na ebale, mpe apotaki epai na ye na nkanda makasi. Namonaki ye kobɛlɛma penepene na mobali na mpate, mpe ayokelaki ye nkɛlɛ mpe abɛtaki mobali na mpate mpe abukaki maseke mibale na ye, mpe nguya ezalaki na mobali na mpate na kotɛlɛma liboso na ye te, nde abwakaki ye na nse mpe anyataki ye, mpe kobikisa mobali na mpate na nguya na ye ezalaki te.” (Danyele 8:5-7) Oyo nyonso elimboli nini?
11. (a) Anzelu Gabaliele apesaki ndimbola nini na ntina na “mobali na ntaba” mpe “liseke monene” oyo ebimelaki ye? (b) Nani azalaki elilingi ya liseke yango ya kokamwa?
11 Ezala mosakoli Danyele to biso, tozangi lisungi te mpo na koyeba ndimbola ya emonaneli oyo. Anzelu Gabaliele ayebisaki mosakoli Danyele ndimbola na yango na maloba oyo: ‘Mobali na ntaba ezali mokonzi na [Grèce, NW]; mpe liseke monene na kati na miso na ye ezali mokonzi na liboso.’ (Danyele 8:21) Na mobu 336 L.T.B., Dalio III (Codoman), mokonzi ya nsuka ya Perse, atyamaki mokonzi. Na mbula yango moko, Alesandala akómaki mokonzi na Makedonia. Masolo ya kala mamonisi ete Alesandala Monene azali ‘mokonzi ya liboso ya Grèce’ oyo asakolamaki. Longwa ‘epai moi elalaka,’ to na wɛsti, Alesandala abɔtɔlaki mikili na lombangu na mobu 334 L.T.B. Lokola nde ‘azalaki konyata mabelé na makolo te,’ abɔtɔlaki bamboka mingi mpe akweisaki “mobali na mpate.” Grèce esukisaki bokonzi ya Bamede na Baperse oyo eumelaki pene na bikeke mibale mpe ekómaki bokonzi ya mitano oyo eyangelaki mokili mobimba na kotalela ndimbola ya Biblia. Oyo nde kokokisama ya kokamwa ya esakweli ya Nzambe!
12. Ndenge nini “liseke monene” ya ntaba yango ya elilingi “ebukanaki,” mpe maseke minei oyo mabimaki wana ezalaki nini?
12 Kasi bokonzi ya Alesandala esengelaki koumela ntango mokuse. Emonaneli elobaki lisusu ete: “Bongo mobali na ntaba amikumisaki mingi mpenza; nde wana ezalaki ye makasi liseke monene ebukanaki, mpe na esika na yango maseke minei minene matalaki epai na mipɛpɛ minei na likoló.” (Danyele 8:8) Anzelu Gabaliele akobaki kolimbola esakweli ete: “Mpo na liseke oyo ebukanaki, mpe minei mosusu ebimaki na esika na yango, makonzi minei makobima na mokili yango, nde makozala na nguya na ye te.” (Danyele 8:22) Bobele lokola esakweli elobaki yango, ntango akómaki na lokumu makasi mpenza, Alesandala ‘abukanaki’ to akufaki, wana azalaki bobele na mbula 32! Na nsima, bokonzi monene oyo ye asalaki ekabwanaki kati na bakonzi na ye minei ya basoda.
LISEKE MOKO YA MOKE EZALI KOKAMWISA
13. Nini ekolaki na esika oyo moko na maseke yango minei ezalaki, mpe yango esalaki nini?
13 Kokokisama ya eteni oyo elandi ya emonaneli ezali kosalema na eleko ya mbula koleka 2 200 kino ntango na biso. Mosakoli Danyele akomaki ete: “Liseke moke ebimaki na moko na [maseke minei] yango, mpe ekolaki monene mingi epai na ngɛlɛ mpe epai [moi ebimaka, NW], mpe epai na mokili kitoko. Yango ekolaki monene kokóma na ebele na likoló, mpe ebwakaki ndambo na ebele mpe na [minzoto] na nse mpe enyataki yango. Yango [emataki, NW] kino mokonzi na ebele; mpe elongolaki na ye mbeka ya kotumba oyo ekabamaki mikolo nyonso, mpe esika na bulɛɛ na ye ebwakamaki na nse. Ebele epesamaki na yango esika moko na mbeka ya kotumba oyo ekabamaki mikolo nyonso, na ntina na lisumu; mpe liseke yango ebwakaki likambo na solo na nse, mpe esalaki misala mpe [elongaki, NW].”—Danyele 8:9-12.
14. Anzelu Gabaliele alobaki nini na ntina na makambo oyo liseke moke ya elilingi ekosala, mpe nini ekokómela yango?
14 Liboso tókoka koyeba ndimbola ya maloba oyo touti kotánga, tóyoka naino anzelu ya Nzambe. Nsima ya kolobela koya ya bikonzi minei oyo bikobima na bokonzi ya Alesandala, anzelu Gabaliele alobaki ete: “Na ntango ya nsuka ya bokonzi na bango, wana esili bato mabe kotondisa masumu na bango, mokonzi na elongi ya [nkandankanda, NW], mpe oyo asosoli makambo na nkuku akobima. Nguya na ye ekozala monene, nde ekozala nguya na ye mpenza te, mpe akobebisa na libebi monene, mpe yango ekosala ye ekobonga, mpe akobuka bato makasi mpe bato na bulɛɛ. Mpo na mayele na ye [lokuta, NW] ekobonga malamu na lobɔkɔ na ye, mpe [akomikumisa, NW] na miso na ye mpenza. Akoboma bato mingi na ntango na kimya; mpe akotɛmɛla ata mokonzi [ya bakonzi, NW]; nde akobukana, kasi na lobɔkɔ na moto te.”—Danyele 8:23-25.
15. Anzelu alobaki na mosakoli Danyele ete asala nini na kotalela emonaneli?
15 Anzelu alobaki na mosakoli Danyele ete: “Nde [bombá, NW] emonaneli, mpo ete ezali na ntina na mikolo mingi na nsima.” (Danyele 8:26) Eteni ya emonaneli oyo esengelaki kokokisama bobele nsima ya “mikolo mingi,” na bongo, mosakoli Danyele asengelaki ‘kobomba emonaneli’ yango. Emonani ete ndimbola na yango etikalaki libombami mpo na mosakoli Danyele. Nzokande, sikoyo, “mikolo mingi” yango misili kokóma na nsuka. Na yango totuni motuna oyo: ‘Masolo ya kala malobeli kokokisama ya emonaneli yango ya esakweli?’
LISEKE MOKE EKÓMI NA NGUYA
16. (a) Liseke moke eutaki na liseke nini ya elilingi? (b) Ndenge nini bokonzi ya Loma ekómaki mokili ya motoba oyo eyangelaki mokili mobimba na kotalela esakweli ya Biblia, mpe mpo na nini yango ezalaki liseke moke ya elilingi te?
16 Na kotalela masolo ya kala, liseke moke ezalaki mombóto ya moko na maseke minei yango ya elilingi—oyo ezalaki mosika mpenza na wɛsti. Yango ezalaki bokonzi moko kati na biteni minei ya bokonzi ya Alesandala oyo ekabolamaki mpe etambwisamaki na Cassandre, mokonzi ya basoda. Ye ayangelaki Makedonia na Grèce. Na nsima, Lysimaque, mokonzi ya etúká ya Thrace na Asie Mineure, abɔtɔlaki bokonzi yango. Na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso, bokonzi ya Loma ebɔtɔlaki mikili ya wɛsti oyo mizalaki na nse na boyangeli ya Alesandala. Banda mobu 30 L.T.B., Loma eyaki kobɔtɔla bikonzi nyonso oyo bizalaki biteni ya bokonzi ya Alesandala oyo ekabolamaki. Ekómaki mokili ya motoba oyo elekaki nguya na mokili mobimba na kotalela esakweli ya Biblia. Kasi Loma ezalaki te liseke moke ya emonaneli ya mosakoli Danyele, mpamba te bokonzi yango ekobaki te kino “ntango eponami na nsuka.”—Danyele 8:19.
17. (a) Boyokani nini Grande-Bretagne ezalaki na yango na bokonzi ya Loma? (b) Boyokani nini ezalaki kati na Grande-Bretagne na eteni moko ya bokonzi ya Alesandala oyo eyangelaki Makedonia mpe Grèce?
17 Na kotalela masolo ya kala, mokili nini ya nguya emonisamaki na “mokonzi na elongi ya [nkandankanda, NW]”? Na ebandeli, Grande-Bretagne ezalaki bobele mombóto ya bokonzi ya Loma na nɔrdi-wɛsti. Kino na ebandeli ya ekeke ya mitano ya ntango na biso, bitúká ya bokonzi ya Loma bizalaki na esika oyo Grande-Bretagne ezali lelo. Na nsima, bokonzi ya Loma elɛmbaki kasi mimeseno ya Baloma na Bagreke etikalaki na Grande-Bretagne mpe na mikili mosusu ya Mpoto oyo eyangelamaki na Loma. Octavio Paz, oyo azwaki prix Nobel, moto ya ntɔki mpe mokomi na ekólo Mexique, akomaki ete: “Ntango bokonzi ya Loma ekweyaki, Lingomba ezwaki esika na yango.” Abakisaki ete: “Batata ya Lingomba mpe banganga-mayele oyo bayaki nsima bakɔtisaki mateya ya filozofi ya Bagreke na mateya ya boklisto.” Bertrand Russell, nganga-mayele ya filozofi na matematiki na ekeke ya 20, apesaki likanisi oyo: “Mimeseno ya mikili ya Mpoto, oyo miutaki na Grèce, miutaki mpenza na filozofi mpe na siansi oyo ebandaki na engumba Milet [engumba ya Grèce na Asie Mineure] eleki lelo mbula nkóto mibale na nkama mitano.” Na bongo, ebongi koloba ete mimeseno ya bokonzi ya Grande-Bretagne miuti mpenza na eteni ya bokonzi ya Alesandala oyo eyangelaki Makedonia mpe Grèce.
18. Liseke moke oyo likómi “mokonzi na elongi ya [nkandankanda]” na “ntango ya nsuka” ezali nini? Limbola.
18 Na mobu 1763, bokonzi ya Grande-Bretagne elongaki banguna na yango: Espagne mpe France. Banda ntango wana, ezwaki bokonzi na mai monene mpe ekómaki mokili ya nsambo oyo eyangelaki mokili mobimba na kotalela esakweli ya Biblia. Ata nsima wana mikili 13 ya Amerika etombokaki mpe esakolaki lipanda na yango na Grande-Bretagne na mobu 1776 mpe esalaki États-Unis, bokonzi ya Grande-Bretagne epalanganaki kino eyangelaki eteni moko likoló na biteni minei ya mokili mpe moto moko likoló na bato minei azalaki na nse na bokonzi na yango. Bokonzi oyo ya nsambo, oyo eyangelaki mokili mobimba, ekómaki lisusu na nguya mingi ntango esanganaki na États-Unis mpo na kokóma mikili mibale ya nguya koleka na mokili mobimba. Na makambo matali nkita mpe bitumba, bokonzi oyo emimonisaki mpenza “mokonzi na elongi ya [nkandankanda, NW].” Liseke moke yango, oyo ekómi mokili ya nguya mpe ya nkanda na “ntango ya nsuka,” ezali bongo États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba.
19. “Mokili kitoko” oyo elobelami na emonaneli ezali nini?
19 Mosakoli Danyele amonaki ete liseke moke “ekolaki monene mingi” na “mokili kitoko.” (Danyele 8:9) Mokili ya Ndaka, oyo Yehova apesaki libota na ye, ezalaki kitoko mpenza na boye ete babéngaki yango “mokili moleki mikili nyonso na nkembo,” elingi koloba elekaki mikili nyonso ya mabelé na kitoko. (Ezekiele 20:6, 15) Ya solo, na mokolo ya 9 Desɛmbɛ 1917, Yelusaleme ekweyaki na mabɔkɔ ya Grande-Bretagne mpe na 1920, Société des Nations epesaki Grande-Bretagne ndingisa ya koyangela etúká ya Palestine kino 14 Mai 1948. Kasi emonaneli oyo ezali emonaneli ya esakweli mpe etondi na bilembo. Mpe “mokili kitoko” ya emonaneli yango ezali elilingi ya Yelusaleme te kasi ya ezalela ya bato oyo bamonani bulɛɛ na miso ya Nzambe na ntango oyo mokili ya nsambo ezali koyangela mokili mobimba. Tiká tómona ndenge États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba, enyokoli bato ya bulɛɛ.
‘ESIKA NA YE YA BULƐƐ’ EKWEISAMI
20. Banani bazali “ebele na likoló” mpe “minzoto” oyo liseke moke ezali koluka kokweisa?
20 Liseke moke “ekolaki monene kokóma na ebele na likoló, mpe ebwakaki ndambo na ebele mpe na [minzoto] na nse.” Na kotalela ndimbola ya anzelu, “ebele na likoló” mpe “minzoto” oyo liseke moke ezali kolinga kokweisa ezali “bato ya bulɛɛ.” (Danyele 8:10, 24) “Bato ya bulɛɛ” yango ezali baklisto bapakolami. Lokola kondimana ya sika eyokanisi bango na Nzambe na nzela ya mbeka ya makila ya Yesu Klisto, babulisami mpe bapɛtolami mpe baponami mpo na kosala bobele mosala ya Nzambe. (Baebele 10:10; 13:20) Lokola aponi bango bázala basangoli ya libula ya bokonzi na likoló elongo na Mwana na ye, Yehova azali komona bango bulɛɛ. (Baefese 1:3, 11, 18-20) Na bongo, na emonaneli ya mosakoli Danyele, “ebele na likoló” ezali batikali awa na mabelé kati na “bato ya bulɛɛ” 144 000 oyo bakoyangela na likoló elongo na Mwana na Mpate.—Emoniseli 14:1-5.
21. Banani bazali na “esika ya bulɛɛ” na boye ete mokili ya nsambo oyo ezali koyangela mokili mobimba elingi kobebisa bango?
21 Lelo, batikali kati na bato 144 000 bazali bamonisi ya “Yelusaleme ya likoló” awa na mabelé—yango ezali bokonzi ya Nzambe oyo ekokani na engumba—mpe ebongiseli ya tempelo na yango. (Baebele 12:22, 28; 13:14) Na lolenge yango, bazali na “esika ya bulɛɛ” oyo nguya ya nsambo ya mokili mobimba ezali koluka konyata mpe kotika mpamba. (Danyele 8:13) Kolobáká mpe mpo na esika ya bulɛɛ ete ezali ‘esika ya bulɛɛ ya [Yehova],’ mosakoli Danyele alobaki ete: “Elongwaki na ye [Yehova] mbeka ya kotumba oyo ekabamaki mikolo nyonso, mpe [esika na ye ya bulɛɛ] ebwakamaki na nse. Ebele epesamaki na yango esika moko na mbeka ya kotumba oyo ekabamaki mikolo nyonso, na ntina na lisumu; mpe liseke yango ebwakaki likambo ya solo na nse, mpe esalaki misala mpe [elongaki, NW].” (Danyele 8:11, 12) Ndenge nini yango ekokisamaki?
22. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ndenge nini mokili ya nsambo oyo eleki nguya na mokili mobimba esalaki “lisumu” monene?
22 Makambo nini ekómelaki Batatoli ya Yehova na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba? Banyokwamaki makasi! Monyoko yango ebandaki na Allemagne na ntango ya Banazi (boyangeli ya Hitler) mpe na Italie na ntango ya Bafasiste (boyangeli ya Mussolini). Na mwa ntango moke, ‘solo ebwakamaki na mabelé’ na mikili mingi epai kuna ‘liseke moke ezalaki koyangela.’ Mosala ya “ebele” ya basakoli ya Bokonzi ya kosakola “nsango malamu” epekisamaki na bikólo mingi oyo biyangelamaki na Grande-Bretagne. (Malako 13:10) Ntango babandaki kokanga bato mpo na kotinda bango na mosala ya soda, balingaki mpe kokanga Batatoli ya Yehova. Emonanaki ete bazalaki komemya te mosala ya Teokrasi oyo basaleli ya Nzambe baponami bazalaki kosala. Na États-Unis, bituluku ya bato banyokolaki basaleli ya sembo ya Yehova na bisika oyo bazalaki kofanda mpe basalelaki bango makambo ya mabe mingi. Mokili ya nsambo oyo eyangelaki mokili mobimba emekaki kolongola mbeka ya masanzoli—“mbuma na bibebu”—oyo basaleli ya Yehova bamesanaki kopesa ye mbala na mbala lokola “mbeka ya kotumba” ya losambo na bango. (Baebele 13:15) Mokili oyo eyangelaki mokili mobimba esalaki bongo “lisumu” na kozingáká esika mpenza ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló—‘esika na ye ya bulɛɛ.’
23. (a) Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ndenge nini nguya ya mokili mobimba ya États-Unis na Angleterre ‘etɛmɛlaki Mokonzi ya bakonzi’? (b) Nani azali ‘Mokonzi ya bakonzi’?
23 Na konyokoláká “bato ya bulɛɛ” na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, liseke moke emikumisaki ‘kino epai na mokonzi na ebele.’ Na maloba mosusu, lokola anzelu Gabaliele alobaki yango, liseke moke ‘etɛmɛlaki ata mokonzi ya bakonzi.’ (Danyele 8:11, 25) Nkombo ‘mokonzi ya bakonzi’ esalelamaka bobele mpo na Yehova Nzambe. Liloba ya Liebele sar oyo libongolami na “mokonzi” euti na verbe moko oyo elimboli “koyangela.” Longola ete nkombo yango esalelamaka mpo na kolobela mwana ya mokonzi to moto oyo abotami na libota ya mokonzi, esalelamaka mpe mpo na motambwisi to mokonzi. Mokanda ya Danyele ezali mpe kolobela baanzelu mosusu oyo babéngamaka bakonzi—na ndakisa Mikaele. Nzambe azali Mokonzi oyo aleki bakonzi wana nyonso. (Danyele 10:13, 21; kokanisá na Nzembo 83:18.) Tokoki kokokanisa moto moko na Yehova—Mokonzi ya bakonzi?
“ESIKA YA BULƐƐ” EZONGI LOKOLA EZALAKI LIBOSO
24. Elikya nini ezali mpo na biso soki totaleli Danyele 8:14?
24 Moto moko te akoki kotɛmɛla Mokonzi ya bakonzi—ezala ata “mokonzi na elongi ya nkandankanda” oyo amonisami na nguya ya mokili mobimba ya États-Unis na Angleterre! Mokonzi yango amekaki kobebisa esika ya bulɛɛ ya Nzambe kasi alongaki te. Nsima ya eleko ya ‘mikolo nkóto mibale na nkama misato,’ anzelu motindami alobaki ete, “esika ya bulɛɛ ekozongisama lokola ezalaki liboso” to “ekolonga.”—Danyele 8:13, 14; The New English Bible.
25. Eleko ya esakweli ya mikolo 2 300 eumelaki ntango boni, mpe yango ezali na boyokani na likambo nini?
25 Mikolo 2 300 ezali eleko ya esakweli. Na bongo, ezali mbula ya esakweli, yango ezalaka na mikolo 360. (Emoniseli 11:2, 3; 12:6, 14) Eleko oyo ya mikolo 2 300 ezali bongo mbula 6 na sanza 4 na mikolo 20. Ntango nini eleko yango ebandaki? Na bambula ya 1930, basaleli ya Nzambe banyokwamaki na bikólo mingi. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova banyokwamaki makasi na mikili oyo mizalaki na nse ya boyangeli ya États-Unis na Angleterre, bokonzi oyo eleki nguya na mokili mobimba. Mpo na nini? Mpamba te balandaki ‘kotosa Nzambe lokola mokonzi na esika ya kotosa bato.’ (Misala 5:29, NW) Na bongo, eleko oyo ya mikolo 2 300 ezali na boyokani na mikolo ya etumba yango.b Kasi ntango nini eleko oyo ya esakweli ebandaki mpe esukaki?
26. (a) Ntango nini tosengeli mpenza kobanda kotánga eleko ya mikolo 2 300? (b) Ntango nini eleko yango ya mikolo 2 300 esukaki?
26 Mpo ‘esika ya bulɛɛ ezongisama’ lokola ezalaki liboso, eleko ya mikolo 2 300 esengelaki kobanda ntango esika ya bulɛɛ ezalaki na ‘etɛlɛmɛlo malamu’ na miso ya Nzambe. Ezalaki libosoliboso na mokolo ya 1 Yuni 1938 ntango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ebimeli ya Lingelesi) ebimisaki lisolo ya boyekoli oyo eteni ya liboso ezalaki na motó na likambo ete “Ebongiseli.” Eteni ya mibale ya boyekoli ebimaki na nimero ya 15 Yuni 1938. Na kotángáká mikolo 2 300 (mbula 6 na sanza 4 na mikolo 20 na manaka ya Liebele) banda mokolo ya 1 Yuni to mokolo ya 15 Yuni 1938, yango ememi biso na 8 Ɔkɔtɔbɛ to na 22 Ɔkɔtɔbɛ 1944. Na mokolo ya liboso ya liyangani moko ya sipesiale oyo esalemaki na engumba Pittsburgh na etúká ya Pennsylvanie na États-Unis, na mokolo ya 30 Sɛtɛmbɛ mpe 1 Ɔkɔtɔbɛ 1944, prezida ya Société Watch Tower asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Ebongiseli ya Teokrasi lelo oyo.” Na likita ya mbula na mbula oyo basangani ya Société Watch Tower basalaki na mokolo ya 2 Ɔkɔtɔbɛ, malako ya la Société mabongisamaki mpo na kokómisa yango mpenza ebongiseli ya Teokrasi, na meko oyo mibeko ya mboka mipesaki nzela. Babimisaki mikanda oyo emonisaki polele masɛngami ya Biblia mpo masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova matambwisama noki na ebongiseli ya Teokrasi mpe mapikama kati na yango.
27. Nini emonisi ete na boumeli ya minyoko ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, “mbeka ya kotumba” epekisamaki?
27 Wana eleko ya mikolo 2 300 ezalaki kokoba na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba oyo ebandaki na 1939, “mbeka ya kotumba” na esika ya bulɛɛ ya Nzambe epekisamaki makasi. Na 1938, Société Watch Tower ezalaki na Biro minene 39 mpo na kotambwisa mosala ya Batatoli na mokili mobimba, kasi na 1943 etikalaki bobele 21. Motángo ya basakoli mpe ebakisamaki te na boumeli ya eleko yango.
28, 29. (a) Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba elingaki kokóma na nsuka, likambo nini esalemaki na lisangá ya Yehova? (b) Tokoloba nini mpo na ebele ya myango ya mabe oyo banguna bamekaki mpo na kobebisa mpe kotika “esika ya bulɛɛ” mpamba?
28 Lokola touti komona yango, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kokóma na nsuka na yango, Batatoli ya Yehova bazwaki lisusu ekateli makasi mpo na kosanzola bokonzi ya Yehova na kosaleláká ye lokola lisangá ya Teokrasi. Ezalaki mpo na mokano yango nde na 1944, babongisaki lisusu mosala na bango mpe lolenge na bango ya kotambwisa lisangá. Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1944 (ebimeli ya Lingelesi) ebimisaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tobongisami mpo na mosala oyo ekómi na nsuka.” Lisolo yango mpe masolo mosusu oyo etalelaki mosala ya kosakola na eleko wana emonisaki ete eleko ya mikolo 2 300 esilaki mpe ete “esika ya bulɛɛ” ezongaki ‘lokola ezalaki liboso.’
29 Banguna bamekaki ebele ya myango ya mabe mpo na kobebisa “esika ya bulɛɛ” kasi bakokaki te. Nzokande, batikali ya “bato ya bulɛɛ” oyo bazali na mabelé mpe baninga na bango “ebele monene” basili kolonga. (Emoniseli 7:9) Mpe lokola esika ya bulɛɛ esili kozongisama na esika na yango kati na Teokrasi, ezali sikoyo kokoba kosala mosala ya bulɛɛ mpo na Yehova.
30. Nsima ya ntango moke mpenza, nini ekokómela “mokonzi na elongi ya [nkandankanda]”?
30 Nguya ya mokili mobimba, États-Unis na Angleterre ezali naino koyangela. ‘Nde ekobukana, kasi na lobɔkɔ na moto te,’ lokola anzelu Gabaliele alobaki yango. (Danyele 8:25) Nsima ya ntango moke, mokili ya nsambo oyo ezali koyangela mokili mobimba na kotalela esakweli ya Biblia—yango “mokonzi na elongi ya [nkandankanda]”—ekobebisama, na mabɔkɔ ya moto te, kasi na nguya ya Nzambe na etumba ya Armagedon. (Danyele 2:44; Emoniseli 16:14, 16) Oyo nde esengo mingi koyeba ete bokonzi ya Yehova Nzambe, Mokonzi ya bakonzi, ekolongisama!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mikili nsambo oyo milandi, mikili oyo eleki nguya na mokili mobimba, ezali na ndimbola monene na lisolo ya Biblia. Ezali bongo Ezipito, Asulia, Babilone, Bamede na Baperse, Grèce, Loma, États-Unis na Angleterre. Bikonzi oyo nyonso biyebani mpo na makambo oyo yango esalelaki libota ya Yehova.
b Danyele 7:25 elobeli mpe eleko mosusu oyo ‘bato ya bulɛɛ ya Oyo Aleki Nyonso bazalaki konyokwama ntango nyonso.’ Lokola elimbolami na mokapo oyo touti kotalela, ezalaki na ntango ya etumba ya liboso ya mokili mobimba.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Nini emonisamaki na elilingi ya
“mobali na mpate” ya “maseke mibale”?
“mobali na ntaba” na “liseke monene” na ye?
maseke minei oyo mabimaki na esika oyo “liseke monene” ezalaki?
liseke moke oyo ebimaki na moko na maseke minei?
• Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ndenge nini États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba, emekaki kotika “esika ya bulɛɛ” mpamba, kasi elongaki?
[Karte/Elilingi na lokasa 166]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bokonzi ya Bamede na Baperse
MAKEDONIA
EZIPITO
Memphis
ETIOPIA
Yelusaleme
Babilone
Ekibatana
Susa
Persépolis
INDE
[Karte/Elilingi na lokasa 169]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bokonzi ya Grèce
MAKEDONIA
EZIPITO
Babilone
Ebale ya Indus
[Karte na lokasa 172]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bokonzi ya Loma
GRANDE-BRETAGNE
ITALIE
Loma
Yelusaleme
EZIPITO
[Elilingi na lokasa mobimba 164]
[Bililingi na lokasa 174]
Bamoko na bakonzi ya nguya ya États-Unis na Angleterre:
1. George Washington, prezida ya liboso ya États-Unis (1789-1797)
2. Mokonzi-mwasi Victoria ya Angleterre (1837-1901)
3. Woodrow Wilson, prezida ya États-Unis (1913-1921)
4. David Lloyd George, ministre-mokonzi ya Angleterre (1916-1922)
5. Winston Churchill, ministre-mokonzi ya Angleterre (1940-1945, 1951-1955)
6. Franklin D. Roosevelt, prezida ya États-Unis (1933-1945)