Mokapo ya zomi na mwambe
Yehova alaki danyele mbano monene
1, 2. (a) Ezaleli nini ya ntina mopoti mbango asengeli kozala na yango mpo alonga? (b) Ndenge nini ntoma Paulo akokanisaki kozala sembo na mosala ya Yehova na lisano ya mbango?
MOPOTI mbango azali kopota makasi mpo na kokóma pene na molɔngɔ ya nsuka. Alɛmbi mingi kasi lokola mposa na ye ezali ete azwa mbano, abimisi makasi na ye nyonso na mwa ntaka ya bamɛtɛlɛ oyo etikali. Mopoti mbango abimisi misisa mpe makasi ya nzoto na ye nyonso mpe nsukansuka, akatisi molɔngɔ ya nsuka! Asepeli, motema ekiti mpo alongi. Lokola ayiki mpiko kino nsuka, azwi mbano.
2 Na nsuka ya mokapo ya 12 ya mokanda ya Danyele, tomoni ndenge mosakoli yango, oyo Nzambe alingaki mingi, akómi na nsuka ya “mbango” na ye—elingi koloba na nsuka ya mosala na ye mpo na Yehova. Nsima ya kotánga nkombo ya ebele na basaleli ya Yehova oyo bamonisaki kondima makasi liboso ya ntango na boklisto, ntoma Paulo akomaki ete: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, tólongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso tópota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima. Mpo na esengo etyami liboso na ye, ayikeli [nzete na mpasi, NW] mpiko, atyoli nsɔni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.”—Baebele 12:1, 2.
3. (a) Nini epusaki mosakoli Danyele ‘apota mbango na etingya’? (b) Wapi makambo misato anzelu ya Yehova ayebisaki mosakoli Danyele?
3 Mosakoli Danyele azalaki moko na ‘lipata monene na batatoli’ yango. Azalaki motatoli oyo asengelaki ‘kopota mbango na etingya,’ mpe asalaki yango mpo alingaki Nzambe mingi. Yehova asilaki koyebisa ye makambo mingi oyo masengelaki kokómela biyangeli ya mokili, kasi sikoyo alendisi mosakoli Danyele na nsango oyo: “Nde kendá na yo kino nsuka. Okopema, mpe okotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na yo na nsuka na mikolo.” (Danyele 12:13) Anzelu ya Yehova azalaki koyebisa mosakoli Danyele makambo misato: (1) ‘akokenda kino nsuka,’ (2) ‘akopema,’ mpe (3) ‘akotɛlɛma’ lisusu na mikolo mikoya. Ndenge nini maloba yango ekoki kolendisa baklisto lelo oyo mpo báyika mpiko kino nsuka ya mbango na bango mpo na kozwa bomoi?
“KENDÁ NA YO KINO NSUKA”
4. Anzelu ya Yehova alingaki koloba nini na maloba oyo: “kendá na yo kino nsuka,” mpe mpo na nini yango ekokaki kozala mpasi mpo na mosakoli Danyele?
4 Anzelu alingaki koloba nini ntango ayebisaki mosakoli Danyele ete: “Kendá na yo kino nsuka”? Nsuka ya nini? Ɛɛ, na ntembe te, ezalaki lolenge ya kolobela liwa ya mosakoli Danyele. Ezalaki kobɛlɛma mpo akómaki mobange mingi mpe alingaki kokokisa mbula 100.a Anzelu azalaki kolendisa ye ete ayika mpiko na bosembo nyonso kino liwa na ye. Kasi ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Mosakoli Danyele aumelaki mingi kino amonaki kokweya ya Babilone, kosikolama ya Bayuda na boombo mpe bozongi na bango na Yuda mpe na Yelusaleme. Na ntembe te, mobange mosakoli oyo asepelaki mingi mpenza. Kasi totángi esika moko te na mikanda ya kala ete azongaki elongo na Bayuda yango na kosaláká mobembo wana ya mpasi. Ntango mosusu, akómaki mobange mingi koleka mpe azalaki na nzoto makasi te. To ntango mosusu ezalaki mokano ya Yehova ete atikala na Babilone. Ezala ntina nini oyo ye atikalaki, na ntembe te, mosakoli Danyele ayokaki mawa ntango bato ya mboka na ye bazongaki na Yuda.
5. Nini emonisi ete mosakoli Danyele ayikaki mpiko kino nsuka?
5 Mosakoli Danyele alendisamaki na maloba ya boboto oyo anzelu alobaki na ye ete: “Kendá na yo kino nsuka.” Tokoki kokanisa maloba oyo Yesu Klisto alobaki soko bikeke motoba na nsima ete: “Nde ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.”(Matai 24:13) Ezali yango nde mosakoli Danyele asalaki. Ayikaki mpiko na bosembo nyonso kino nsuka, apotaki mbango kino nsuka mpo na kozwa bomoi. Ekoki kozala mpo na ntina wana nde mikanda mosusu ya Liloba ya Nzambe ezali kopesa litatoli malamu na ntina na mosakoli Danyele. (Baebele 11:32, 33) Nini esalisaki ye ayika mpiko kino nsuka? Tótalela bomoi na ye mpo na koyeba yango.
TÓYIKA MPIKO NA KOYEKOLÁKÁ LILOBA YA NZAMBE
6. Ndenge nini toyebi ete mosakoli Danyele amipesaki na boyekoli ya Liloba ya Nzambe?
6 Mpo na mosakoli Danyele, koyika mpiko kino nsuka elimbolaki kokoba koyekola mpe komanyola na mozindo bilaka malamu ya Nzambe. Toyebi ete mosakoli Danyele azalaki moyekoli monene ya Liloba ya Nzambe. Soki bongo te, ndenge nini akokaki koyeba elaka oyo Yehova apesaki na mosakoli Yilimia ete boombo ya Bayuda ekoumela mbula 70? Ye moko mosakoli Danyele akomaki ete: “[Ngai] . . . nasosolaki na kati na mikanda motuya na mbula.” (Danyele 9:2; Yilimia 25:11, 12) Na ntembe te, asalaki bolukiluki na mikanda ya Liloba ya Nzambe oyo mizalaki na ntango wana. Na ndakisa, mikanda ya Mose, Davidi, Salomo, Yisaya, Yilimia na Ezekiele—to mokanda nyonso oyo akokaki kozwa—ezalaki solo mikanda oyo mosakoli Danyele alekisaki ntango mingi mpo na kotánga mpe komanyola likoló na yango.
7. Soki tokokanisi ntango na biso na ntango ya mosakoli Danyele, matomba nini tokoki kozwa na boyekoli ya Liloba ya Nzambe?
7 Mpo biso mpe tóyika mpiko lelo oyo, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mpe komipesa na boyekoli yango. (Baloma 15:4-6; 1 Timote 4:15) Mingi mpenza lokola tozali na Biblia mobimba oyo ezali komonisa ndenge bisakweli mosusu ya mokanda ya Danyele bikokisamaki. Lisusu, topambolami na ndenge tozali na bomoi na ‘ntango ya nsuka’ oyo esakolamaki na Danyele 12:4. Na mikolo na biso, bapakolami bapambolami na mayele ya elimo awa bazali kongɛnga lokola miinda mpe kopalanganisa mateya ya solo kati na mokili oyo motondi na molili tuu. Yango esali ete lelo oyo, tóyeba ndimbola mpe ntina ya bisakweli mingi ya mokanda ya Danyele oyo ye moko akokaki te kolimbola mosusu kati na yango. Na bongo, tiká tókoba koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo kasi tótyola yango te. Soki tosali bongo, tokoyika mpiko mpe tokolonga.
MOSAKOLI DANYELE ATIKAKI KOBONDELA TE
8. Ndakisa nini mosakoli Danyele apesaki na ntina na libondeli?
8 Soki mosakoli Danyele ayikaki mpiko kino nsuka, ezalaki mpe mpo na lisungi ya libondeli. Azalaki kobondela Yehova Nzambe mikolo nyonso mpe azalaki kofungola motema na ye polele na ntina na kondima mpe elikya oyo azalaki na yango. Ayebaki ete Yehova ‘ayokaka mabondeli.’ (Nzembo 65:2; kokanisá na Baebele 11:6.) Lokola mosakoli Danyele ayokaki mawa mingi mpo na botomboki ya Yisalaele, ayebisaki mabanzo na ye polele epai na Yehova. (Danyele 9:4-19) Ezala ntango Mokonzi Dalio apesaki mobeko ete bato básambela bobele ye na boumeli ya mikolo 30, mosakoli Danyele akobaki kobondela bobele Yehova Nzambe. (Danyele 6:10) Soki totali ndenge mobange mobali yango, moto ya sembo, andimaki ete bábwaka ye na libulu ya nkosi na esika ete atika libaku malamu oyo azalaki na yango ya kobondela, yango ezali kosimba biso na mitema, boye te? Ɛɛ, na bosembo nyonso, mosakoli Danyele akendaki kino nsuka, wana azalaki kobondela Yehova mokolo na mokolo na molende.
9. Mpo na nini tosengeli soko moke te komona libaku ya kosala libondeli lokola likambo moko ya ntina mingi te?
9 Libondeli ezali eloko ya mpasi te. Tokoki kobondela ntango nyonso, bipai nyonso, na maloba to na motema. Kasi tosengeli te komona likabo yango lokola eloko mpamba. Ezali na ntina mingi. Biblia emonisi ete tosengeli koyika mpiko, kolendendela na libondeli mpe kolala mpɔngi te na elimo. (Luka 18:1; Baloma 12:12; Baefese 6:18; Bakolose 4:2) Ezali likambo ya kokamwa te ete tózala na bonsomi ya kosolola ntango nyonso tolingi na moto oyo aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba? Mpe azali koyoka biso! Tókanisa ntango mosakoli Danyele abondelaki Nzambe mpe Yehova atindelaki ye anzelu. Anzelu akómaki wana mosakoli Danyele azalaki naino kobondela! (Danyele 9:20, 21) Na ntango na biso, baanzelu bayaka lisusu bongo te kasi tóyeba ete Yehova abongwanaka te. (Malaki 3:6) Lokola ayokaki libondeli ya mosakoli Danyele, akoyoka mpe libondeli na biso. Mpe ntango tozali kobondela Yehova, tozali koyeisa boyokani na biso na ye makasi mpe bomoko yango ekosalisa biso tóyika mpiko kino nsuka lokola mosakoli Danyele.
TÓYIKA MPIKO NA KOTEYÁKÁ LILOBA YA NZAMBE
10. Mpo na nini koteya Liloba ya Nzambe ezalaki likambo ya ntina mpo na mosakoli Danyele?
10 Ezali na lolenge mosusu oyo mosakoli Danyele asengelaki ‘kokenda kino nsuka.’ Asengelaki koyika mpiko na koteyáká solo. Mosakoli Danyele abosanaki ata moke te ete azalaki moto ya libota oyo liponamaki na Nzambe, oyo Makomami elobaki na ntina na yango ete: “[Yehova] alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai mpe moombo na ngai, oyo nasili kopona yo.” (Yisaya 43:10) Mosakoli Danyele asalaki nyonso oyo akokaki kosala mpo na kokokisa mokumba na ye oyo etalaki mpe koteya bato ya libota na ye oyo bazalaki baombo na Babilone. Toyebi mpenzampenza te lolenge ya boyokani oyo mosakoli Danyele azalaki na yango na Bayuda mosusu. Toyebi bobele ete azalaki na boyokani makasi elongo na “baninga na ye” misato—Hanania, Misaele na Azalia. (Danyele 1:7; 2:13, 17, 18) Ya solo, boyokani yango ya makasi esalisaki moko na moko mpo ayika mpiko. (Masese 17:17) Lokola Yehova apambolaki mosakoli Danyele na kopesáká ye mayele mingi koleka baninga na ye, na ntembe te, azalaki koteya bango makambo mingi. (Danyele 1:17) Kasi azalaki mpe na bato mosusu oyo ye asengelaki koteya.
11. (a) Na likambo nini mosala ya mosakoli Danyele ekesanaki na misala mosusu nyonso? (b) Ndenge nini mosakoli Danyele akokisaki mokumba na ye?
11 Koleka basakoli mosusu nyonso, mosakoli Danyele azalaki na mokumba ya kopesa litatoli epai na bakonzi oyo bazalaki Bayuda te. Atako mbala mingi asengelaki koyebisa bango bansango oyo ezalaki kosepelisa bango te, mosakoli Danyele ayinaki bayangeli yango te mpe amonaki bango bato mpamba te. Alobaki na bango na limemya mpe na boboto nyonso. Baguvernere mosusu bayokelaki ye zuwa mpe balingaki koboma ye. Kasi na nsima, bamosusu bakómaki kopesa ye limemya. Lokola Yehova apesaki mosakoli Danyele mayele mpo na kolimbola mabombami oyo mazalaki kotungisa bakonzi na bato ya mayele, mosakoli oyo azwaki lokumu mingi. (Danyele 2:47, 48; 5:29) Ya solo, lokola azalaki konuna, akokaki lisusu te kosala mosala makasi lokola ntango azalaki elenge. Kasi, na ntembe te, mosakoli Danyele akufaki na bosembo na ye wana azalaki koluka libaku nyonso mpo na kotatola na ntina na Nzambe oyo ye alingaki mingi.
12. (a) Mokumba nini motali koteya biso baklisto tomipesi na yango lelo oyo? (b) Ndenge nini tokoki kolanda toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete ‘tózalaka na bizaleli na mayele liboso na bato ya libándá’?
12 Na lisangá ya boklisto lelo oyo, tozali na baninga ya sembo oyo bazali kosalisa biso mpo tóyika mpiko, ndenge moko mosakoli Danyele na baninga na ye misato basalisanaki. Tozali koteyana mpe ‘kolendisana.’ (Baloma 1:11, 12) Ndenge moko na mosakoli Danyele, tozali na mokumba ya kotatola epai na baoyo bazali naino bandimi te. (Matai 24:14; 28:19, 20) Na bongo, tosengeli kobongisa lolenge na biso ya koteya mpo ‘tósalela malamumalamu liloba ya solo’ ntango tozali kosolola na bato na ntina na Yehova. (2 Timote 2:15) Tokozwa matomba soki totosi toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete: “Bózalaka na bizaleli ya mayele liboso na bato ya libándá.” (Bakolose 4:5) Mayele yango elimboli mpe ete tózalaka na makanisi mabongi mpo na baoyo tozali na bango lingomba moko te. Tosengeli kotyola bango te to kozala na lolendo te. (1 Petelo 3:15) Nzokande, tokoteya bango solo na lolenge ya kobenda likebi na bango, na kosaleláká Liloba ya Nzambe na mayele mpo na kosimba mitema na bango. Oyo nde esengo tokozala na yango soki tosimbi motema ya moko na bango! Esengo ya ndenge wana ekosalisa biso tóyika mpiko kino nsuka lokola mosakoli Danyele.
“OKOPEMA”
13, 14. Mpo na nini bato mingi na Babilone bazalaki kobanga liwa, mpe na meko nini mosakoli Danyele akesanaki na bango na likambo yango?
13 Na nsima, anzelu apesaki mosakoli Danyele elikya na kolobáká na ye ete: “Okopema.” (Danyele 12:13) Maloba yango elimboli nini? Mosakoli Danyele ayebaki ete liwa ezali kozela ye. Banda Adama kino lelo oyo, moto moko te akoki kokima liwa. Yango ezali “monguna” mpenza, lokola Biblia ebéngi yango. (1 Bakolinti 15:26) Nzokande, mosakoli Danyele azalaki kotalela liwa ndenge moko na bato ya Babilone te. Lokola bazalaki kosambela banzambe ya lokuta soko 4 000, bazalaki na bindimeli ndenge na ndenge mpe ya nsɔmɔ na ntina na liwa. Bazalaki kokanisa ete nsima ya liwa, baoyo bazalaki na bomoi ya mpasi to baoyo babomamaki na ndenge ya nsɔmɔ bakokóma bilima mpe bakobanda kosala bato mabe. Bato ya Babilone bazalaki mpe kokanisa ete mboka moko ezali na kati ya mabelé, epai kuna bilima bazalaka.
14 Mpo na mosakoli Danyele, liwa ezalaki bongo te. Bankama ya bambula liboso ya ntango na ye, Mokonzi Salomo alobaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe ete: “Nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Mpo na moto oyo akufi, mokomi na nzembo alobaki na loyembo moko ete: “Soko [elimo, NW] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” (Nzembo 146:4) Na yango, mosakoli Danyele ayebaki ete liloba oyo anzelu ayebisaki ye ekokokisama. Liwa ezali bopemi. Makanisi, komilela, mitungisi, bilima ezalaka te na ntango moto akufi. Yesu Klisto alobaki ndenge moko ntango Lasalo akufaki. Alobaki boye: “Lasalo asili kolala mpɔngi.”—Yoane 11:11.
15. Ndenge nini mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na malamu?
15 Talá ntina mosusu oyo mosakoli Danyele akokaki kobanga liwa te. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo na kufa eleki mokolo na kobotama na malamu.” (Mosakoli 7:1) Ndenge nini mokolo ya liwa, mokolo oyo bato bazalaka na mawa mingi, ezala mokolo malamu koleka mokolo ya kobotama, mokolo ya esengo? Eyano ezali na ndimbola ya liloba “nkombo.” “Mafuta na motuya” ezali ntalo mingi mpenza. Malia, ndeko ya Lasalo, apakolaki Yesu malasi oyo ntalo na yango ezalaki mbongo oyo moto akokaki kozwa nsima ya kosala mosala mbula mobimba na ntango wana! (Yoane 12:1-7) Ndenge nini nkombo mpamba ekoki koleka yango na motuya? Na Mosakoli 7:1, Biblia ya Septante na Greke ebéngi yango “nkombo malamu.” Ezali bobele nkombo ya mpamba te kasi lokumu oyo ekangami na nkombo yango nde ezali na motuya mingi koleka. Mwana oyo abotami mpe bapesi ye nkombo ayebani naino te, asali naino likambo moko ya malamu te, bomoto mpe bizaleli na ye eyebani naino te. Kasi na liwa ya moto, nkombo na ye elimboli makambo nyonso oyo ye asalaki. Mpe soki moto yango azalaki na nkombo malamu na miso ya Yehova, nkombo na ye ekoleka biloko nyonso ya mosuni na motuya.
16. (a) Milende nini mosakoli Danyele asalaki mpo na kozala na nkombo malamu na miso ya Nzambe? (b) Mpo na nini mosakoli Danyele akendaki kopema na elikya ete asilaki kozwa nkombo malamu na miso ya Yehova?
16 Na bomoi na ye mobimba, mosakoli Danyele asalaki nyonso oyo ezalaki na makoki na ye mpo na kozala na nkombo malamu na miso ya Nzambe, mpe Yehova azalaki kotalela makambo nyonso wana. Azalaki kotala misala na ye nyonso mpe makanisi ya motema na ye. Mpo na makambo mingi oyo Nzambe asalelaki ye, Mokonzi Davidi ayembelaki Ye na maloba oyo: “Ɛ [Yehova], osili kotala motema na ngai mpe oyebi ngai solo. Oyebi ntango wana nakofanda mpe wana nakotɛlɛma; oyebi makanisi na ngai longwa na mosika.” (Nzembo 139:1, 2) Ya solo, mosakoli Danyele azalaki moto ya kozanga kokoka. Autaki na Adama moto ya masumu, mpe abotamaki na libota ya basumuki. (Baloma 3:23) Kasi mosakoli Danyele abongolaki motema na masumu na ye mpe atambolaki ntango nyonso na bosembo na miso ya Nzambe. Mosakoli yango ya sembo azalaki na elikya ete Yehova akolimbisa masumu na ye mpe akokangela ye nkanda te. (Nzembo 103:10-14; Yisaya 1:18) Yehova abosanaka te misala malamu oyo basaleli na ye ya sembo basalaka. (Baebele 6:10) Yango wana, anzelu ya Yehova alobaki na mosakoli Danyele mbala mibale ete azalaki ‘moto oyo alingami mingi.’ (Danyele 10:11, 19) Elingi koloba ete Nzambe alingaki ye mingi. Akokaki kokenda kopema na esengo na motema, lokola ayebaki ete azali na nkombo malamu na miso ya Yehova na ntina na misala na ye.
17. Mpo na nini tosengeli kosala na lombangu lelo oyo mpo na kozala na nkombo malamu na miso ya Yehova?
17 Mokomoko na biso akoki komituna boye: ‘Nasili kozwa nkombo malamu na miso ya Yehova?’ Ntango oyo tozali ezali ntango mabe. Mpo na koloba solo kasi mpo na kobanga liwa te, tosengeli kondima biso nyonso ete liwa eponi moto te, eponi mpe ntango te. (Mosakoli 9:11) Ezali malamu ete mokomoko na biso azwa ekateli ya kozala na nkombo malamu epai na Nzambe sikoyo, kozanga koumela. Soki tosali bongo, tokobanga liwa te. Ezali bopemi—lokola mpɔngi. Mpe lokola mpɔngi, tokolamuka!
“OKOTƐLƐMA”
18, 19. (a) Anzelu alingaki koloba nini ntango asakolaki ete mosakoli Danyele ‘akotɛlɛma’ na mikolo mizali koya? (b) Mpo na nini mosakoli Danyele ayebaki malamumalamu elikya ya lisekwa?
18 Na nsuka ya mokanda na ye, mosakoli Danyele alobelaki elaka malamu oyo Yehova apesaki ye koleka bilaka nyonso oyo Nzambe asilá kopesa bato. Anzelu ya Yehova alobaki na mosakoli Danyele ete: “Okotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na yo na nsuka na mikolo.” Anzelu alingaki koloba nini? Lokola ‘kopema’ elimboli liwa, elaka oyo elobi ete mosakoli Danyele ‘akotɛlɛma’ na ntango moko ezali bobele—lisekwa!b Banganga-mayele mosusu balobaka ete elikya ya lisekwa elobelami polele, mpo na mbala ya liboso na Makomami ya Liebele, bobele na mokapo 12 ya mokanda ya Danyele. (Danyele 12:2) Kasi ezali solo te. Mosakoli Danyele ayebaki malamumalamu elikya ya lisekwa.
19 Na ndakisa, mosakoli Danyele ayebaki ndimbola ya maloba oyo mosakoli Yisaya akomaki bikeke mibale liboso ete: “Bakufi na yo bakobika, bibembe na ngai bikotɛlɛma. Ɛ bafandi kati na mputulu, bólamuka! Bóyemba na esengo! Mpo . . . [mabelé yango moko ekotika baoyo bakufá básekwa, NW].” (Yisaya 26:19) Liboso mpenza ya ntango wana, mosakoli Eliya mpe mosakoli Elisa basekwisaki bato na nguya ya Yehova. (1 Mikonzi 17:17-24; 2 Mikonzi 4:32-37) Ata liboso mpenza ya eleko na bango, Hana, mama ya mosakoli Samwele, ayebaki ete Yehova akoki kolamwisa bato na nkunda. (1 Samwele 2:6) Kutu liboso mpenza ya eleko yango, Yobo, moto ya sembo, amonisaki elikya oyo azalaki na yango na maloba oyo: “Soko moto akokufa, akobika nde lisusu? Nakozila kino mikolo nyonso na ntango ekoki na ngai, kino kolongwa na ngai ekoya. Okobyanga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.”—Yobo 14:14, 15.
20, 21. (a) Mosakoli Danyele andimaki ete akosekwa na lisekwa oyo wapi? (b) Ndenge nini lisekwa ekosalema na Paladiso?
20 Ndenge moko na Yobo, mosakoli Danyele mpe azalaki na elikya ete Yehova akosepela mpenza kosekwisa ye mokolo mosusu na ntango ekoya. Nzokande, mosakoli Danyele abɔndisamaki mingi na komona ete ekelamu ya elimo mpe ya nguya kondimisa ye ete elikya yango ezali solo. Ɛɛ, mosakoli Danyele akotɛlɛma na ntango ya “lisekwa ya bayengebene” oyo ekosalema na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. (Luka 14:14) Lisekwa yango ekolimbola nini mpo na mosakoli Danyele? Liloba ya Nzambe eyebisi biso yango na bozindo.
21 Yehova azali “[Nzambe] ya mobulu te kasi ya kimya.” (1 Bakolinti 14:33) Na bongo, lisekwa ekosalema na mobulu te kati na Paladiso. Ntango mosusu ekoki kosalema mwa ntango moke nsima ya Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Nsima ya kobomama ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo esili konuna, bitikali na yango nyonso bikolongolama mpo na kobongisa mabelé mpe koyamba bato bakufá oyo bakosekwa. Mpo na komonisa ete bakufi bakosekwa na mobulu te, Biblia elobi boye: “Moto na moto na [ngala, NW] na ye.” (1 Bakolinti 15:23) Ekoki kozala ete na ntango ‘bato ya sembo mpe bato ya sembo te bakosekwa,’ bato ya sembo bakosekwa liboso. (Misala 24:15) Na ndenge wana, bato ya sembo ya ntango ya kala, lokola mosakoli Danyele, bakopesa mabɔkɔ mpo na kotambwisa makambo ya mokili mpe koteya bamiliare ya ‘bato ya sembo te’ oyo bakosekwa.—Nzembo 45:16.
22. Wapi mwa mituna oyo na ntembe te mosakoli Danyele akolinga mpenza kozwa biyano na yango?
22 Liboso ete mosakoli Danyele andima mokumba yango, na ntembe te, akomituna mwa mituna. Tokanisi bongo mpamba te alobaki na ntina na bisakweli mosusu ya makasi oyo ye asakolaki ete: “Nayokaki yango, nde nasosolaki te.” (Danyele 12:8) Akozala mpenza na esengo mpo akoyeba mabombami ya Nzambe! Na ntembe te, akosepela koyoka makambo nyonso na ntina na Masiya. Mosakoli Danyele akosepela mpenza koyeba ndenge banguya ya mokili mobimba ekitanaki na bokonzi banda ntango na ye kino ntango na biso. Akozala mpe na esengo ya koyeba banani bazali bato ya sembo “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló”—baoyo bayikaki mpiko na minyoko na boumeli ya “ntango ya nsuka.” Mosakoli Danyele akozala mpenza na esengo mpo na koyeba ndenge Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ ya Masiya ebomaki biyangeli nyonso ya bato.—Danyele 2:44; 7:22; 12:4.
MBANO YA MOSAKOLI DANYELE NA PALADISO—MPE OYO YA YO!
23, 24. (a) Wapi bokeseni monene mosakoli Danyele akomona soki akokanisi mokili oyo ezalaki na ntango na ye na oyo ye akokuta ntango akosekwa? (b) Ezali solo ete mosakoli Danyele akozwa esika na Paladiso, mpe ndenge nini toyebi yango?
23 Mosakoli Danyele akolinga koyeba mokili oyo ye akokuta na ntango wana—ekozala mokili oyo ekeseni mpenza na mokili oyo ezalaki na ntango na ye. Bitumba mpe minyoko oyo mibebisaki mokili ya ntango na ye ekozala lisusu te. Mawa, maladi mpe liwa ekozala lisusu te. (Yisaya 25:8; 33:24) Kasi bilei bikozala mingi, moto na moto akozala na ndako na ye mpe akosepela na mosala na ye. (Nzembo 72:16; Yisaya 65:21, 22) Bato bakokóma na bomoko, na esengo, lokola bato ya libota moko.
24 Mosakoli Danyele akozwa esika na mokili yango. Anzelu alobaki na ye ete, “Okotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na yo.” Liloba ya Liebele oyo ebongolami awa na “yango eponami” ezali ndenge moko na liloba oyo bazalaki kobénga eteni ya mabelé.c Ntango mosusu mosakoli Danyele ayebaki malamu esakweli ya Ezekiele oyo elobelaki ndenge mabelé ya Yisalaele ekokabolama nsima ya boombo. (Ezekiele 47:13–48:35) Ndenge nini esakweli yango ya mosakoli Ezekiele ekokokisama na Paladiso? Ekokokisama na boye ete basaleli nyonso ya Nzambe bakozwa moto na moto esika na ye na Paladiso mpe mabelé ekokabolama na kimya mpe na bosembo. Kasi mbano oyo mosakoli Danyele akozwa na Paladiso ekozala bobele eteni ya mabelé te. Akozwa mpe mokumba mosusu na Paladiso mpo na kokokisa mokano ya Nzambe kuna. Elaka oyo Nzambe apesi mosakoli Danyele ezali ndanga.
25. (a) Makambo nini okosepela komona na Paladiso? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete bato basalamá mpo na kozala na bomoi na Paladiso?
25 Ezali boni mpo na mbano na yo? Bilaka yango ezali mpe mpo na yo. Yehova alingi ete bato ya botosi ‘bátɛlɛma’ mpo na kozwa mbano, elingi koloba esika na Paladiso. Kanisá naino! Ekozala mpenza esengo komona mosakoli Danyele na miso, elongo na basi mpe mibali ya sembo oyo bazalaki na ntango ya Biblia. Ebele ya bato oyo bakosekwa, na motángo moyebani te, bakoteyama mpo báyeba Yehova Nzambe mpe bálinga ye. Kanisá naino mbongwana oyo ekozala wana tokobongisa mabelé mpo ekóma paladiso mpe mokemoke ekotonda na biloko ndenge na ndenge mpe ya kitoko ya bileko na bileko. Talá naino libaku malamu oyo osili kozwa ya koteyama na Yehova, ya koyeba kotambola na nzela oyo ye alingi ete bato bátambola na yango. (Yisaya 11:9; Yoane 6:45) Ɛɛ, esika ezali mpo na yo kati na paladiso. Atako mpo na bato mosusu Paladiso ezali bobele ndɔtɔ, tóbosana te ete na ebandeli Yehova asalaki bato mpo báfanda na esika motindo wana. (Genese 2:7-9) Na bongo, Paladiso ezali esika oyo Nzambe akobongisa mpo bamiliare ya bato báfanda. Ekozala mboka na bango. Kokɔta na Paladiso ezali lokola kozonga na mboka na yo.
26. Ndenge nini Yehova ayebi ete kozela nsuka ya ebongiseli oyo ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na biso?
26 Soki totali makambo oyo nyonso, tokoyoka mpenza esengo na motema. Ozali kosepela te ete okɔta na mokili ya ndenge wana? Batatoli ya Yehova balingi mpenza koyeba ntango nini nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ekoya! Kozela ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Yehova ye moko ayebi yango malamu; yango wana azali kolendisa biso ete ‘tókoba kozela’ kino nsuka “ata ezali koumela.” Alingi koloba ete mpo na biso, ekoki komonana lokola nde elaka yango ezali koumela, nzokande, bobele na vɛrsɛ wana, andimisi biso ete: “Ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3; kokanisá na Masese 13:12.) Ɛɛ, nsuka ekoya na ntango oyo elakamaki.
27. Okosala nini mpo otɛlɛma liboso na Nzambe libela na libela?
27 Osengeli kosala nini lokola nsuka ezali kobɛlɛma? Na ndakisa ya mosakoli Danyele, moto oyo Yehova alingaki mingi, yiká mpiko na bosembo nyonso. Yekolá Liloba ya Nzambe na molende. Bondelá na mozindo. Zalá na esengo ya koyangana na makita na baninga na yo bandimi. Zalá na molende ya koteya basusu solo. Lokola nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ezali kobɛlɛma mokolo na mokolo, zwá ekateli ya kozala mosaleli ya sembo ya Oyo-Aleki-Likoló mpe motatoli ya sembo ya Liloba na ye. Ezala ndenge nini, tyá likebi na esakweli ya Danyele! Mpe tiká ete Nkolo Mokonzi Yehova apesa yo libaku malamu ya kotɛlɛma liboso na ye na esengo libela na libela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mosakoli Danyele akendaki na boombo na Babilone na mobu 617 L.T.B. ntango azalaki naino elenge. Azwaki emonaneli oyo na mbula ya misato ya Mokonzi Sirise, na mobu 536 L.T.B.—Danyele 10:1.
b Na kotalela buku moko (The Brown-Driver-Briggs Hebrew and English Lexicon), liloba ya Liebele oyo libongolami awa na “kotɛlɛma” elimboli “kozonga na bomoi nsima ya liwa.”
c Liloba ya Liebele elimboli mpenza “mabanga,” mingi mpenza mabanga ya mike oyo bazalaki kobɛta na yango zeke. Bazalaki mpe kokabola mabelé na ndenge wana. (Mituya 26:55, 56, NW) Buku moko (A Handbook on the Book of Daniel) elobi ete, na esika oyo, liloba yango elimboli “eloko oyo (Nzambe) abombeli moto.”
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Eloko nini esungaki mosakoli Danyele mpo ayika mpiko kino nsuka?
• Mpo na nini mosakoli Danyele akokaki kobanga liwa te?
• Ndenge nini elaka ya anzelu ya komona mosakoli Danyele ‘kotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na ye’ ekokokisama?
• Litomba nini ozwi na kotyáká likebi na esakweli ya Danyele?
[Elilingi na lokasa mobimba 307]
[Elilingi na lokasa 318]
Ozali kotya likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe lokola Danyele?