“Tosili komona masiya”!
“[André] akendaki liboso epai na ndeko na ye, Simona, mpe alobi na ye ete: ‘Tosili komona Masiya’ (oyo elimboli Klisto).”—YOANE 1:41, MN.
1. Yoane Mobatisi apesaki litatoli nini na ntina na Yesu ya Nazarete, mpe André asukisaki nini na ntina na ye?
ANDRÉ alekisaki ntango molai mpo na kotala Moyuda oyo ebéngamaki Yesu ya Nazarete. Moto yango amonanaki lokola mokonzi te, lokola moto ya mayele te, soko molakisi na mibeko ya Bayuda mpe te. Alataki bilamba ya bokonzi te mpe azalaki na nsuki mpɛmbɛ te; mabɔkɔ mazalaki pɛtɛpɛtɛ te, azalaki mpe na mposo ya petepete te. Yesu azalaki elenge—soko na mibu 30—azalaki na mabɔkɔ ya makasi mpe na mposo ekembi lokola ya moto oyo akosalaka misala ya mabɔkɔ. André akamwaki te na koyoka ete azalaki mosali na mabaya Nzokande, Yoane Mobatisi alobaki na ntina na moto yango, ete: “Tala Mwana na mpate na Nzambe!“ Lobi loleki, Yoane autaki koloba likambo moko lizali mpenza kokamwisa ete: “Oyo azali Mwana na Nzambe.” Yango ekokaki kozala solo? André alekisaki mwa ntango mingi mpo na koyoka Yesu na mokolo wana. Toyebi te makambo oyo Yesu alobaki; toyebi bobele ete maloba na ye mabongolaki bomoi ya André. Akendaki nokinoki epai na ndeko na ye, Simona, mpe angangaki ete: “Tosili komona Masiya!”—Yoane 1:34-41, MN
2. Mpo na nini ezali ntina na kotalela bilembeteli mpo na koyeba soki Yesu azalaki Masiya ya elaká?
2 Na nsima, André mpe Simona (oyo Yesu apesaki nkombo Petelo) bakómaki bantóma na Yesu. Wana akokisaki mibu mibale lokola moyekoli na ye, Petelo alobaki na Yesu ete: “Yo ozali Klisto [Masiya], Mwana na Nzambe ya bomoi.” (Matai 16:16) Na nsima, bantóma mpe bayekoli na sembo bamimonisaki ete bazalaki pene mpo na kobungisa bomoi na bango na ntina na endimeli wana. Lelo oyo, bamilió ya bato na sembo bazali kosala motindo moko. Kasi bilembeteli nini bazali na yango? Ya solo, bilembeteli bizali kokesenisa kondima ya solo mpe bindimandima. (Tala Baebele 11:1.) Na yango, totalela mitindo misato ya bilembeteli ya ntina oyo bimonisi ete Yesu azalaki mpenza Masiya.
Molongó ya bankoko na Yesu
3. Evanzile ya Matai mpe oyo ya Luka emonisi nini na ntina na molongó ya bankoko na Yesu?
3 Molongó ya bankɔkɔ na Yesu ezali elembeteli ya liboso oyo ezwami na Makomami ya Greke ya boklisto oyo emonisi ete, ye azalaki Masiya. Biblia esakolaki ete Masiya asengelaki kobima na libota ya mokonzi Davidi. (Nzembo 132:11, 12; Yisaya 11:1, 10) Evanzile ya Matai ebandi boye: “Molongó ya bankoko na Yesu Klisto, mwana na Davidi, mwana na Abalayama.” Matai andimisi maloba wana na komonisáká bankoko na Yesu na nzela na Yozefe, tata mobɔkɔli na ye. (Matai 1:1-16) Evanzile ya Luka elobeli bankoko na Yesu na nzela ya mama na ye, Marie, kotangáká Davidi mpe Abalayama, kino Adam. (Luka 3:23-38)a Na bongo, bakomi ya Baevanzile bamonisaki ete Yesu azalaki motuki na libula ya Davidi, na mibeko mpe na bondeko ya makila.
4, 5. (a) Bato ya eleko na Yesu babɛtaki ntembe ete ye abimaki na libota ya Davidi, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi? (b) Lolenge nini mikanda mizwami un Biblia te mizali kolobela molongó ya bankoko na Yesu?
4 Ata baoyo baboyi mpenza kondima ete Yesu azali Masiya, bakoki kofingana te ete, na maloba na ye, azalaki mwana na Davidi. Mpo na nini? Ezali na bantina mibale. Ya liboso, maloba yango mazongelamaki mbala na mbala na Yelusaleme na boumeli ya bambula mingi liboso na kobebisama ya mboka wana, na mobu 70 ya ntango na biso. (Tala Matai 21:9; Misala 4:27; 5:27, 28.) Soki maloba yango mazalaki lokutá, mbɛlɛ moko na banguna na Yesu—baoyo bazalaki mpenza mingi—akokaki komonisa ete Yesu azalaki bobele moto na lokuta na kolakisáká molongó ya bankoko na ye na mikanda ya Leta.b Kasi moto moko te abɛtaki ntembe ete Yesu azalaki mokitani ya mokonzi Davidi. Emonani ete, ezalaki maloba oyo masengelaki te kotɛmɛlama. Na ntembe te, Matai mpe Luka bazwaki bankombo ya ntina oyo ezali kati na mikanda na bango, longwa na mikanda ya Leta.
5 Ya mibale, mikanda miuti na Biblia te mizali kondimisa ete molongó ya bankoko na Yesu mondimamaki. Na ndakisa, mokanda Talmud eyebisi ete na ekeke ya minei, molakisi moko na mibeko ya Bayuda afundaki Marie, mama na Yesu, na maloba na kotuka ete ‘asalaki pite elongo na basali na mabaya’; kasi emonisami bobele na mokanda yango moko ete “[Marie] azalaki na libota ya bana na mokonzi mpe na bayangeli.” Ndakisa moko ya kala, ezali oyo ya Hegesippe, mokomi na makambo ya kala na ekeke ya mibale Ayebisaki ete, na ntango Domitien, mokonzi na Loma, alingaki koboma bakitani nyonso ya Davidi, banguna mosusu ya baklisto balakisaki bana ya bana na Yuda, ndeko na Yesu, “lokola libota ya Davidi.” Soki Yuda ayebanaki lokola mokitani ya Davidi, ezalaki bobele bongo mpo na Yesu, boye te? Ezalaki bongo mpenza!—Bagalatia 1:19; Yuda 1.
Bisakweli na ntina na Masiya
6. Kati na Makomami ya Liebele, ezali na bisakweli mingi na ntina na Masiya?
6 Kokokisama ya bisakweli ezali motindo mosusu ya bilembeteli bimonisi ete Yesu azalaki Masiya. Bisakweli na ntina na Masiya bizali mingi kati na Makomami ya Liebele. Kati na mokanda na ye The Life and Times of Jesus the Messiah, Alfred Edersheim amonisaki mikapo 456 ya Makomami ya Liebele oyo etalelamaki epai na balakisi na mibeko ya Bayuda ya kala ete, ezalaki mpo na Masiya. Kasi, balakisi wana na mibeko ya Bayuda bazalaki na ebele ya makanisi na lokutá na ntina na Masiya; ebele ya mikapo oyo batalelaki ete ezali mpo na Masiya, ezalaki solo te. Nzokande, ezali na ebele ya bisakweli oyo bimonisi ete Yesu azali Masiya.—Tala Emoniseli 19:10.
7. Tánga mwa bisakweli oyo Yesu akokisaki na ntango azalaki awa na mabelé.
7 Kati na yango: mboka oyo abotamaki (Mika 5:2; Luka 2:4-11); kobomama monene ya bana mike oyo esalemaki nsima na kobotama na ye (Yilimya 31:15; Matai 2:16-18); asengelaki kobyangama longwa na Ezipito (Hoseya 11:1; Matai 2:15); bayangeli ya mabota basengelaki koyangana mpo na koboma ye (Nzembo 2:1, 2; Misala 4:25-28); asengelaki kotekama na palata 30 (Zakaria 11:12; Matai 26:15); ata motindo na liwa oyo asengelaki kokufa esakolamaki.—Nzembo 22:16, note ya Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi; Yoane 19:18, 23; 20:25, 27.c
Koya na ye esakolamaki
8. (a) Esakweli nini ezali mpenza koyebisa eleko ya sikisiki oyo Masiya asengelaki koya? (b) Wapi makambo mibale oyo tosengeli koyeba kati na esakweli wana?
8 Totalela bobele esakweli oyo moko. Na Danyele 9:25. Bayuda bayebaki ntango oyo Masiya asengelaki koya. Totangi ete: “Yeba mpe sosola ete longwa na kobima na liloba ya kotɛlɛmisa mpe kotonga Yelusaleme, kino koya na Mopakolami [Masiya] Mokonzi, ekozala poso nsamba Na nsima mpo na poso ntuku motoba na mibale.” Na kotalela yango, esakweli oyo ekoki komonana lokola nde ezali polele te. Nzokande, yango ezali kosɛnga biso na koyeba bobele makambo mibale: ntango ya ebandeli mpe boumeli na yango. Tozwa ndakisa, soki ozalaki na karte moko elakisi ete biloko ya motuya bibombami “kati na elanga moko oyo bato mingi bakendaka, na ntaka ya mpɔ́ndɔ 50, na est ya etimá”; makambo wana mayebisami makoki kozala mpasi mpo na kokanga ntina na yango—mingi mpenza soki oyebi te esika oyo etima ezali, to soko oyebi te ntaká ya ‘mpɔ́ndɔ’ moko. Okomeka koluka koyeba makambo wana mibale mpo na koyeba esika biloko ya motuya bizali, boye te? Ezali bobele bongo mpo na esakweli ya Danyele; tosengeli bongo koyeba ntango oyo yango ebandaki mpe boumeli ya ntango oyo esengelaki kolanda.
9, 10. (a) Uta ntango nini tosengeli kobanda kotanga mituya ya poso 69? (b) Poso 69 ezalaki na molai ya ntango boni, mpe ndenge nini toyebi yango?
9 Ya liboso, tosengeli koyeba ntango ya ebandeli, date oyo ‘liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme ebimaki.’ Na nsima, tosengeli koyeba ntaka na yango, oyo ezali bongo poso 69 (poso 7 + poso 62). Likambo moko te kati na yango ezali mpasi mpo na kolimbola Nehemya alimboli biso polele ete liloba ya kotonga lisusu lopango ya Yelusaleme, oyo esengelaki kokómisa yango mboka oyo etɛlɛmisami, ebimaki “na mobu ya ntuku mibale ya mokonzi Artaxerxès.” (Nehemya 2:1, 5, 7, 8) Ntango na biso ya ebandeli ezali na mobu 455 liboso ya ntango na biso.d
10 Poso 69 wana ezalaki mpenza baposo ya mikolo nsambo? Te, mpamba te Masiya abimaki te bobele mbula moko nsima ya mobu 455 liboso ya ntango na biso. Tala ntina oyo balimboli mingi ya Biblia mpe ebele ya mabongoli (kati na yango libongoli ya Bayuda oyo babengi chouraqui, oyo elobeli “mbula nsambo mbala ntuku nsambo” kati na ebimeli na yango ya 1975 mpe na ebimeli na yango ya 1985) emonisi ete ezali baposo “ya bambula.” Bayuda ya ntango ya kala bayebaki likanisi oyo ya ‘poso ya bambula,’ to mibu nsambo. Lokola bazalaki mbala na mbala kokumisa mokolo ya sabata na mokolo ya nsambo, bobele bongo bazalaki mbala na mbala kokumisa mbula ya sabata nsima ya mibu nsambo. (Exode 20:8-11; 23:10, 11) Na yango, poso 69 ya mibu esengeli kozala mibu 7 mbala 69, oyo ezali bongo mibu 483. Sikawa, tosengeli bobele kotanga mituya oyo. Soki totangi mibu 483 kobanda mobu 455 liboso ya ntango na biso, tokokóma na mobu 29 ya ntango na biso—mbula oyo Yesu azwaki batisimo mpe akómaki ma.shi‘ach, Masiya!—Tala na nsé na liloba “Soixante-dix semaines,” lnsight on the Scriptures, Volume 2, lokasa 899 to na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, lokasa 1413.
11. Lolenge nini tokoki koyanola na baoyo bakolobaka ete, wana ezali bobele lolenge ya lelo ya kolimbola esakweli ya Danyele?
11 Bato mosusu bakoki koloba ete wana ezali bobele lolenge ya lelo ya kolimbola esakweli mpo na kokokanisa yango na makambo ya kala. Soki ezali bongo, mpo na nini bato ya ntango na Yesu bazalaki kozela ete Masiya abima na eleko wana? Luka, moklisto mokomi na makambo ya kala; Tacite mpe Suétone, Baloma bakomi na makambo ya kala; Josèphe, Moyuda mokomi na makambo na kala mpe Philon, Moyuda filozofe, bazalaki bango nyonso na bomoi penepene na eleko wana, mpe bamonaki ete bato bazalaki kozela Masiya. (Luke 3:15) Mpo na balimboli mosusu ya Biblia ya ntango na biso, ezali mpo na monyoko yo Baloma nde Bayuda bazalaki mpenza na mposa ya Masiya mpe bazalaki kozela ye na ntango wana. Kasi mpo na nini Bayuda bazalaki kozela Masiya bobele na eleko wana, nzokande basalaki yango te na boumeli ya bikeke mingi ya monyoko monene eutaki na Bagreke? Mpo na nini Tacite alobaki ete ezalaki “bisakweli ya kokamwa” nde epusaki Bayuda na kolikya kozwa bayangeli ya nguya baoyo basengelaki kobima na Yudea, baoyo basengelaki “kosala boyangeli ya mokili mobimba”? Kati na mokanda na ye A History of messianic Speculation in lsrael, Abba Hillel Silver olobi ete “bazalaki kozela Masiya pene na katikati ya ekeke ya liboso ya ntango na biso” mpo na monyoko ya Baloma te, kasi na kotaleláká mokanda ya Danyele engebene “lolenge ya kotanga bileko oyo esalelamaki na ntango wana.”
Litatoli liuti na likoló
12. lolenge nini Jéhovah atatolaki ete Yesu ezalaki Masiya?
12 Elembeteli yo misato oyo emonisi ete Yesu azalaki Masiya, ezali litatoli ya Nzambe ye moko. Luka 3:21, 22 elobi ete, nsima wana Yesu azwaki batisimo, epakolamaki na nguya eleki bulee mpe eleki monene na molóngó mobimba, yango elimo santu ya Jéhovah Nzambe. Mpe na mongóngó na ye moko, Jéhovah amonisaki ete andimaki Mwana na ye, Yesu. Na mabaku mosusu mibale, Jéhovah alobaki epai na Yesu longwa na likoló, komonisáká ete andimaki Ye: mokolo moko, liboso ya bantoma misato ya Yesu, mpe mbala mosusu, liboso na ebele ya bato. (Matai 17:1-5; Yoane 12:28, 29) Lisusu, baanzelu batindamaki longwa na likoló mpo na kondimisa ete Yesu azalaki Klósto to Masiya.—Luka 2:10, 11.
13, 14. lolenge nini Jéhovah amonisaki ete andimaki Yesu lokola Masiya?
13 Jéhovah amonisaki ete andimi mopakolami na ye na kopesáká ye nguya ya kosala misala ya kokamwa. Na ndakisa, Yesu asakolaki makambo mingi na ntina na mikolo mizali koya—mosusu etali eleko na biso.e Asalaki mpe makamwisi, lokola koleisa bibele na bato oyo bazalaki na nzala mpe kobikisa bato ya maladi. Asekwisaki bakufi. Bayekoli na ye bango moko nde bayaki kosala masoló wana ya misala na nguya na nsima? Yesu asalaki makamwisi mingi liboso na ebele ya bato, baoyo mbala mosusu bazalaki bankóto mingi. Ata banguna na Yesu bakokaki te koangana ete ye asalaki makambo wana. (Malako 6:2; Yoane 11:47) Epai mosusu, soki bayekoli na Yesu bazwaki likanisi ya kosala bango moko masoló motindo wana, mpo na nini basengelaki koloba polele na ntina na mabunga na bango? Basengelaki mpenza kondima kokufa mpo na endimeli oyo etongamaki likoló na masapo oyo bango moko basalaki? Te. Makamwisi na Yesu ezali makambo ya solo.
14 Litatoli ya Nzambe oyo limonisaki ete Yesu azalaki Masiya, lisukaki bobele bongo te. Na nzela ya elimo santu, asɛnzɛlaki ete elembeteli oyo emonisi Yesu lokola Masiya, ekomama kati na mokanda oyo mobongolami mingi mpe mokabolami mingi kati na Lisoló ya bato.
Mpo na nini Bayuda bandimaki Yesu te?
15. (a) Tozali nde na bilembeteli mingi bimonisi ete Yesu azali Masiya? (b) Bilikya nini Bayuda bazalaki na yango, oyo ememaki mingi na bango na koboya kondima ete Yesu azalaki Masiya?
15 Ya solo, mitindo misato ya bitembeteli oyo mizali na makambo mingi oyo mamonisi ete Yesu azali Masiya. Yango ekoki te? Kanisa: mpo ozwa ndingisa ya kokumba motuka to ya kodefa mbongo na banki, balobi na yo ete ekoki te koya bobele na mikanda misato mipesi nzela ya kozwa ndingisa, kasi osengeli nde koya na ebele ya mikanda yango. Wana ekozanga bososoli! Bobele bongo, Yesu amonisami mingi mpenza kati na Biblia ete azali Masiya. Kasi, mpo na nini bato mingi ya ntango na Yesu baboyaki kondima bilembeteli wana bimonisaki ete azalaki Masiya? Mpo ete, ata soko elembeteli ezali mpenza solo, yango ezali ndanga te ete bato bakondima yango. Likambo ya mawa mpenza ezali oyo ete, ata liboso ya elembeteli esengeli kobɛtɛlama ntembe te, bato mingi bakondimaka bobele makambo oyo bango balingi kondima. Na ntina etali Masiya, Bayuda mingi batyaki makanisi na bango bobele na makambo oyo bango bazalaki kolinga Balingaki masiya mpo na makambo ya politike, oyo asengelaki kosilisa monyoko ya Baloma mpe kozongisa nkembo na Yisraele, kati na mosuni, lokola na mikolo ya Salomo. Na yango, lolenge nini bakokaki kondima mwana wana ya mosali na mabaya mpamba, ye moto ya Nazarete oyo asepelaki te na makambo ya politike mpe na bozwi? Mingi mpenza, lolenge nini akokaki kozala Masiya nsima na kooka mpasi mpe kokufa na liwa ya nsɔmɔ likoló na nzeté ya mpasi?
16. Mpo na nini bayekoli na Yesu babongolaki makanisi na bango na bilikya oyo bazalaki na yango na ntina na Masiya?
16 Bayekoli na Yesu batungisamaki mingi mpenza na liwa na ye. Nsima na lisekwa na ye kati na nkembo, balikyaki mpenza ete nokinoki, ‘akozongisa bokonzi mpo na Yisraele.’ (Misala 1:6) Kasi baboyaki te kondima ete Yesu azalaki Masiya bobele mpo ete elikya na bango ekokanaki te. Bazalaki na kondima epai na ye mpo na bilembeteli mingi oyo bazalaki na yango, mpe mokemoke, bakangaki ntina ya makambo; bamonaki polele. Basosolaki ete Masiya asengelaki te kokokisa bisakweli nyonso bitaleli ye na ntango moke oyo ye azalaki lokola moto awa na mabelé. Ya solo, moko na bisakweli elobelaki koya na ye ya bopɔlɔ, likoló na mwana na mpunda, nzokande mosusu elobeli koya na ye kati na nkembo likoló ya mapata! Ndenge nini bisakweli wana mibale bikokaki kozala solo? Emonani mpenza ete, asengelaki kozonga mpo na mbala ya mibale.—Danyele 7:13; Zakaria 9:9.
Mpo na nini Masiya asengelaki kokufa
17. Lolenge nini esakweli ya Danyele emonisaki polele ete Masiya asengelaki kokufa, mpe mpo na ntina asengelaki kokufa?
17 Lisusu, bisakweli na ntina na Masiya bimonisi ete, Masiya asengelaki kokufa. Na ndakisa, esakweli oyo eyebisaki ntango oyo Masiya asengelaki koya, esakolaki na verset elandi ete: “Nsima na poso ntuku motoba na mibale [oyo ezalaki nsima na poso nsambo], mopakolami [Masiya] akolongolama.” (Danyele 9:26) Liloba na Liebele ka·rathʹ lisalelami awa na “kolongolama” ezali bobele yango moko lisalelamaki mpo na etumbu ya liwa oyo epesamaki na Mibeko ya Moize. Ntembe ezali te ete Masiya asengelaki kokufa. Mpo na nini? Verset 24 eyanoli biso ete: “Mpo na kosilisa lisumu, mpe mpo na kolimbisa mabe, mpe mpo na kokɔtisa boyengebene libela na libela.” Bayuda bayebaki malamu ete, bobele mbeka, liwa, nde ekokaki kozala mbɔndi mpo na mabe.—Levitike 17:11; tala Baebele 9:22.
18. (a) Lolenge nini Yisaya mokapo 53 emonisi ete Masiya asengelaki kooka mpasi mpe kokufa? (b) Nini emonani lokola bongolabongola kati na esakweli wana?
18 Yisaya mokapo 53 elobeli Masiya lokola Mosali ya ntina mingi ya Jéhovah, oyo asengelaki kooka mpasi mpe kokufa mpo na kolimbisama ya masumu ya bato mosusu. Verset 5 eyebisi ete: “Atɔbɔlami mpo na masumu na biso atutami mpo na mabe na biso.” Nsima na koyebisa biso ete Masiya wana asengelaki kokufa lokola mbeka mpo na mabe,” bobele esakweli yango emonisi ete asengelaki “kofulisa mikolo na ye, mpe lobɔkɔ na ye ekolongisa makambo masepelisi Jéhovah.” (Verset 10, MN) Ezali bongolabongola te. Lolenge nini Masiya akokaki kokufa mpe “kofulisa mikolo na ye”? Lolenge nini akokaki kopesama lokola mbeka, mpe na nsima, ‘kolongisa makambo oyo masepelisi Jéhovah’? Lolenge nini akokaki bongo kokufa mpe kolala libela kati na kufa kozanga kokokisa bisakweli ya ntina bilobelami mpo na ye, lokola oyo elobi ete, asengeli koyangela mpo na libela, mpe akoyeisa kimya mpe bolamu na mokili mobimba?—Yisaya 9:6, 7.
19. Lolenge nini lisekwa na Yesu lizali koyokanisa bisakweli bimonani lokola ete bizali bongolabongola na ntina na Masiya?
19 Likamwisi moko monene lisilisaki oyo emonanaki lokola bongolabonga. Yesu asekwaki. Bayuda mingi ya motema sembo bamonaki likambo yango monene. (1 Bakolinti 15:6) Na nsima, ntóma Paulo akomaki ete: “Ye wana [Yesu Klisto] asili kotombola bobele mbeka moko mpo na libela mpe afandi na lobɔkɔ mobali na Nzambe, mpe azali kozela uta ntango wana kino banguna na ye bakotyama lokola etyelo ya makolo na ye.” (Baebele 10:10, 12, 13, MN) Ee, ezali nsima ya lisekwa na Yesu mpo na bomoi ya likoló, mpe nsima ya eleko ya “kozela” nde asengelaki kotyama Mokonzi mpe kobundisa banguna ya Tata na ye, Jéhovah. Mpo na mokumba na ye ya Mokonzi na likoló, Yesu Masiya azali na bopusi likoló na bomoi ya bato nyonso. Lolenge nini? Yango ekotalelama na lisoló na biso lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntango Luka 3:23 elobi ete: “Yozefe, mwana na Heli,” elakisi ete “mwana” na ndimbola ya “bokilo,” mpamba te Heli azalaki tata ya Marie.—lnsight on the Scriptures, Volume 1, nkasa 918-17 to Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 585-7.
b Na ntango alakisaki molongó ya bankoko na ye, Josèphe, Moyuda oyo azali mokomi na makambo ya kala, amonisi ete mikanda wana mizalaki liboso ya mobu 70 ya ntango na biso. Emonani lokola ete mikanda yango mibebisamaki elongo na mboka Yelusaleme, likambo oyo lizali mpasi sikawa mpo ete moto na moto apesa bilembeteli bimonisi ete Yesu azalaki Masiya.
c Tala lnsight on the Scriptures, Volume 2, lokasa 387 to Auxiliaire pour une bonne intelligence de la Bible, lokasa 1008.
d Ezali na bilembeteli ya moboko bizwami na mikanda ya Bagreke ya kala, ya bato ye Babilone mpe Bapelesa, oyo emonisi ete mbula ya liboso na boyangeli ya Artaxerxès ezalaki na mobu 474 liboso ya ntango na biso. Tala Auxiliaire pour une meilleure intelligence de La Bible, nkasa 1169, 1413; mpe lnsight on the Scriptures, Volume 2, nkasa 614-16, 900.
e Na moko na bisakweli na ye, asakolaki ete basakoli ya lokutá bakoya uta eleko oyo ezalaki na bomoi. (Matai 24:23-26) Tala lisoló ya liboso.
Bozongeli
◻Mpo na nini esengeli kotalela bilembeteli mpo nakoyeba soki Yesu azalaki Masiya ya elaká?
◻Lolenge nini molongó ya bonkɔkɔ na Yesu endimisi ete ye azalaki mpenza Masiya?
◻Lolenge nini bisakweli ya Biblia bizali kasalisa mpo na komonisa ete Yesu azalaki Masiya?
◻Lolenge nini Jéhovah ye moko andimisaki ete Yesu azalaki Masiya?
◻Mpo na nini bayuda mingi baboyaki kondima ete Yesu azalaki Masiya, mpe mpo na nini yango ezalaki bantina malamu te?
[Elilingi na lokasa 12]
Mokomoko na ebele yo makamwisi na Yesu, ozalaki elembeteli emonisaki ete ye azalaki Masiya