Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nani akokamba mabota kino na kimya?
    Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
    • Baposo ntuku nsambo: Bayuda oyo balimbolaka makambo, bango nyonso bayebaka yango na ndimbola ya baposo ya mibu, na maloba mosusu, mibu 490. Yango ezali na boyokani na lolenge ya kotanga bileko engebene bisakweli ya Makomami na ntina na “mbula moko mpo na mokolo moko.”​—Mituya 14:34; Levitike 25:8; Ezekiele 4:6.

      ◆Longwa na kobima ya liloba na kotelemisa mpe na kotónga Yelusaleme: Nehemia ayebisi ete na mbula ya ntuku mibale ya Mokonzi Alatazese, azwaki mokumba ya kotelemisa mpe kotónga lisusu Yelusaleme. Yango ezalaki na mobu 455 L.T.B.​—Nehemia 2:1-8; talá Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 127, 1412, 1413 to Insight on the Scriptures, Volume 2, nkasa 614 kino 616, 899 kino 900, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

      Baposo nsambo: Baposo nsambo (ya bambula, to mibu 49) elobelami mpo na eleko ya kobongisama mobimba ya mboka, Yelusaleme.

      Baposo ntuku motoba na mibale: Baposo ntuku motoba na mibale (ya bambula, to mibu 434) emonisi eleko oyo ekoleka na nsima ya kotóngama ya mboka kino koya na Masiya.i

      Kosangisama ya bileko wana mibale, ekopesa baposo 69 ya bambula, to mibu 483. Kobanda kotanga yango longwa na mobu 455 L.T.B., ekomonisa nsuka ya poso ya 69 na mobu 29 T.B..

      Mobu 29 T.B.: Moyuda na nkombo ya Yesu (na Liebele, Yeshua), abotamaki na Beteleme mpe akólaki na Nazarete, na libota ya Davidi, abandaki kosakola na mokili na Yisraele.​—Luka 3:1-3, 21, 22.

  • Nani akokamba mabota kino na kimya?
    Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
    • i Bilembo ya kopema (ponctuation) lokola ezali lelo kati na makomi ya Liebele (makomi ya ebandeli ya Liebele mazalaki na bilembo ya kopema te), oyo epesi bokeseni na kokanga ntina na lolenge oyo bokaboli ya bileko esalemaki, ezali makomi ya ebandeli te kasi ezali nde makambo mabakisamaki na bakomeli na Moyen-Age, baoyo basepelaki te na kondima ete ndimbola ya mokapo wana etalelaki Yesu.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto