Mokapo ya zomi na moko
Ntango ya komonana ya masiya eyebisami
1. Lokola Yehova akokisaka makambo na ntango na yango, tokondima likambo nini?
YEHOVA ayebi mpenza kosala makambo na ntango na yango. Ye azali kotambwisa ntango mpe bileko nyonso na boyokani na mokano na ye. (Misala 1:7) Makambo nyonso akanaki kosala na ntango mpe na eleko oyo makosalema solo. Makozanga kosalema te.
2, 3. Mosakoli Danyele atyaki likebi na esakweli nini, mpe bokonzi nini ezalaki koyangela Babilone na ntango wana?
2 Moyekoli ya molende ya Makomami, mosakoli Danyele azalaki kondima ete Yehova ayebi kokana makambo mpe kokokisa yango. Bamoko na makambo yango oyo mazalaki kosepelisa mosakoli Danyele ezalaki bisakweli oyo bilobelaki kobebisama ya Yelusaleme. Mosakoli Danyele azalaki kotya likebi mingi na esakweli ya Yilimia oyo eyebisaki mbula boni engumba ya bulɛɛ ya Nzambe ekotikala mpamba. Akomaki ete: “Na mbula ya liboso ya Dalio mwana na [Asierise, NW], ya libota ya [Bamede, NW], oyo akómaki mokonzi na mokili ya Bakaladi; na mbula ya liboso ya bokonzi na ye, ngai, Danyele, nasosolaki na kati na mikanda motuya ya mbula oyo ekoleka wana ekotikala Yelusaleme na libebi, mbula ntuku nsambo, lokola elobaki [Yehova] na mosakoli Yilimia.”—Danyele 9:1, 2; Yilimia 25:11.
3 Dalio, moto ya Mede, akómaki koyangela na ‘bokonzi ya Bakaladi.’ Esakweli oyo mosakoli Danyele ayebisaki liboso, na ntango alimbolaki makomi ya lobɔkɔ na efelo, esilaki kokokisama. Bokonzi ya Babilone ezalaki lisusu te. ‘Epesamaki na mabɔkɔ ya Bamede na Baperse’ na mobu 539 L.T.B.—Danyele 5:24-28, 30, 31.
DANYELE ABONDELI YEHOVA NA KOMIKITISA NYONSO
4. (a) Nini esengelaki mpo na kobikisama na Nzambe? (b) Ndenge nini mosakoli Danyele abɛlɛmaki na Yehova?
4 Mosakoli Danyele ayebaki ete mbula 70 ya libebi ya Yelusaleme ekómaki na nsuka na yango. Bongo asalaki nini? Ye moko ayebisi biso ete: “Na nsima nabongolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe, mpo na koluka ye na kobondela mpe kolɔmba mpe na kokila biloko mpe na ngɔtɔ na mputulu na mɔ́tɔ. Nabondelaki [Yehova] Nzambe na ngai, mpe nayambolaki masumu.” (Danyele 9:3, 4) Esengelaki kobongisa motema mpo na kobikisama na ngolu ya Nzambe. (Levitike 26:31-46; 1 Mikonzi 8:46-53) Esengelaki kozala na kondima, na komikitisa, mpe kobongola mpenza motema na masumu oyo, mpo na yango, Bayuda bakangamaki mpe bakómaki baombo na mokili ya bapaya. Na ntina na masumu ya bato na ye, mosakoli Danyele abondelaki Nzambe. Na lolenge nini? Na kokila bilei, na kolela mpe kolata ngɔtɔ mpo na komonisa ete abongolaki mpenza motema.
5. Mpo na nini mosakoli Danyele azalaki mpenza na elikya ete Bayuda bakozonga na mboka na bango?
5 Esakweli ya Yilimia epesaki mosakoli Danyele elikya mpamba te emonisaki ye ete etikali moke Bayuda bakozonga na mboka na bango na mokili ya Yuda. (Yilimia 25:12; 29:10) Na ntembe te, mosakoli Danyele azalaki na elikya ete Bayuda bakosikolama na boombo mpo ete moto moko na nkombo Sirise asilaki kokóma mokonzi ya Perse. Mosakoli Yisaya asakolaki ete Sirise nde atángamaki na nkombo lokola mosikoli ya Bayuda na boombo mpo bátonga lisusu Yelusaleme na tempelo na yango, boye te? (Yisaya 44:28–45:3) Kasi mosakoli Danyele ayebaki ata moke te ndenge nini yango ekosalema. Yango wana akangamaki na kobondela Yehova.
6. Likambo nini mosakoli Danyele andimaki na libondeli na ye?
6 Mosakoli Danyele abendaki mpenza likebi na motema mawa mpe na boboto ya Nzambe. Na komikitisa nyonso, andimaki ete Bayuda basalaki masumu, batombokelaki Nzambe, baboyaki kotosa mibeko ya Yehova mpe batyolaki basakoli na ye. Nzambe azalaki bongo na lotomo ya ‘kopalanganisa bango na ntina na kozanga na bango ya bosembo.’ Mosakoli Danyele abondelaki ete: “Ɛ Nkolo, nsoni ezali na miso na biso, mpe na mikonzi na biso, mpe na bana na mikonzi na biso, mpe na batata na biso, mpo ete biso tosalelaki yo lisumu. Mawa mpe kolimbisa izali na [Yehova] Nzambe na biso; mpo ete biso totombokaki epai na ye, mpe totosaki mongongo na [Yehova] Nzambe na biso te, na [kolanda] Mobeko na ye motyaki ye liboso na biso na monɔkɔ na baombo na ye basakoli. Yisalaele nyonso basopaki Mobeko na yo, mpe bapɛngwaki, mpe baboyaki kotosa mongongo na yo. Yango wana elakeli mabe mpe ndai oyo ikomami na Mobeko na Mose moombo na Nzambe, isopani likoló na biso, mpo ete biso tosaleli Nzambe lisumu.”—Danyele 9:5-11; Exode 19:5-8; 24:3, 7, 8.
7. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova asalaki makambo na bosembo ntango atikaki Bayuda bákenda na boombo?
7 Nzambe akebisaki Bayisalaele na ntina na makama oyo makokwela bango soki batosi ye te mpe soki bakobi kotyola kondimana oyo asalaki elongo na bango. (Levitike 26:31-33; Deteronome 28:15; 31:17) Mosakoli Danyele andimaki ete misala nyonso ya Nzambe ezali sembo mpe alobaki ete: “Ye alendisi maloba na ye, oyo elobelaki ye biso mpe basambisi basambisaki biso, awa ebimisi ye [bolɔzi, NW] monene na likoló na biso; boye na nse na lola esalamaki te lokola yango esalami na Yelusaleme. Lokola ekomamaki na Mobeko na Mose, [bolɔzi, NW] nyonso oyo ekweli biso, ata boye biso tolɔmbaki ngolu na [Yehova] Nzambe na biso te, ete tókoka kobongwa na masumu na biso mpe kososola likambo na solo na yo. Yango wana [Yehova] akɛngɛlaki [bolɔzi, NW] yango mpe akweisaki yango na biso, mpo ete [Yehova] Nzambe na biso azali sembo na misala nyonso misalaki ye, mpe biso toyokaki mongongo na ye te.”—Danyele 9:12-14.
8. Na likambo nini mosakoli Danyele abendaki likebi ya Nzambe na libondeli na ye?
8 Mosakoli Danyele alukaki kolongisa misala mabe ya bato na ye te. Na bosembo nyonso, babongaki kokenda na boombo, lokola mosakoli Danyele ayambolaki yango polele ete: “Biso tokiti na lisumu, tosali mabe.” (Danyele 9:15) Mosakoli Danyele asukaki te bobele na komibanzabanza mpo na kosikolama na bango na mpasi ya boombo. Ɛɛ, mosakoli Danyele azalaki komitungisa mpenzampenza mpo na lokumu ya nkembo ya Yehova. Soki akolimbisa Bayuda mpe akozongisa bango na mboka na bango, Nzambe akokokisa elaka na ye oyo ye ayebisaki mosakoli Yilimia mpe akobulisa nkombo na Ye mosantu. Mosakoli Danyele abondelaki ete: “Ɛ Nkolo, lokola ezali boyengebene na yo, tiká nkanda na yo mpe nkɛlɛ na yo elongwa na mboka na Yelusaleme, ngomba na bulɛɛ na yo; zambi mpo na masumu na biso, mpe mpo na mabe ya batata na biso, Yelusaleme mpe bato na yo bakómi likambo na kotuka na kati na bango nyonso bazingeli biso.”—Danyele 9:16.
9. (a) Makambo nini mosakoli Danyele asɛngaki mpo na kosukisa libondeli na ye? (b) Mosakoli Danyele azalaki komibanzabanza mpenza mpo na likambo nini, kasi ndenge nini amonisaki limemya mpo na nkombo ya Nzambe?
9 Kokobáká na libondeli na ye ya mozindo, mosakoli Danyele alobaki ete: “Ɛ Nzambe na biso, yoká [sikoyo] libondeli ya moombo na yo, mpe kolɔmba na ye; mpe na ntina na yo mpenza tiká elongi na yo engɛnga na likoló na esika [na yo ya bulɛɛ], oyo ebebi. Ɛ Nzambe na ngai, pesá litoi na yo, mpe yoká; fungolá miso na yo mpe talá libebi na biso, mpe mboka oyo etángami na nkombo na yo; mpo ete tobondeli liboso na yo na ntina na boyengebene na biso te, nde na ntina na mawa monene na yo. Ɛ [Yehova] yoká; ɛ [Yehova] limbisá; ɛ [Yehova] yoká mpe salá; ɛ Nzambe na ngai, [kozela] te, na ntina na yo mpenza, mpo ete [nkombo na yo etángami likoló ya mboka na yo mpe likoló ya libota na yo, NW].” (Danyele 9:17-19) Soki Nzambe alimbisaki libota na ye te mpe atikaki yango se na boombo mpe soki engumba na ye ya bulɛɛ, Yelusaleme, etikalaki mpamba libela na libela, mabota ya zingazinga bakokaki kondima ete [Yehova] azali Mokonzi likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba? Mbɛlɛ bandimaki ete banzambe ya Babilone nde baleki Yehova na nguya, boye te? Ɛɛ, balingaki kotyola nkombo ya Yehova mpe likambo yango ezalaki kotungisa mosakoli Danyele. Wana nkombo ya Nzambe, Yehova, etángami mbala 19 na mokanda mobimba ya mosakoli Danyele; kasi, bobele na libondeli oyo, yango ezongelami mbala 18!
ANZELU GABALIELE AYEI NA LOMBANGU
10. (a) Nani atindamaki noki epai na mosakoli Danyele, mpe mpo na nini? (b) Mpo na nini mosakoli Danyele abéngaki anzelu Gabaliele ete “moto”?
10 Ntango mosakoli Danyele azalaki naino kobondela, anzelu Gabaliele abimelaki ye. Alobaki na ye ete: ‘Ɛ Danyele, nasili kobima sikawa mpo na kopesa yo mayele mpe bososoli. Na ebandeli ya kobondela na yo liloba ebimaki, mpe ngai [nayei, NW] mpo na koyebisa yo yango, mpo ete yo olingami mingi; yango wana kanisá liloba yango mpe sosolá emonaneli.’ Kasi mpo na nini mosakoli Danyele abéngaki Gabaliele ete “moto yango Gabaliele”? (Danyele 9:20-23) Ntango mosakoli Danyele azalaki koluka ndimbola ya emonaneli oyo ye azwaki liboso, emonaneli ya ntaba ya mobali na mpate ya mobali, “oyo amonanaki lokola moto” atɛlɛmaki liboso na ye. Nzambe atindelaki mosakoli Danyele anzelu Gabaliele mpo apesa ye bososoli. (Danyele 8:15-17) Yango wana, ntango mosakoli Danyele asilisaki kobondela, anzelu yango ayaki pene na ye, na nzoto ya moto, mpe asololaki na ye lokola moto azali kosolola na moninga na ye.
11, 12. (a) Atako tempelo to etumbelo ya mbeka mpo na Yehova ezalaki na Babilone te, ndenge nini Bayuda oyo bamipesaki bamonisaki limemya na bango na makabo oyo Mibeko ezalaki kosɛnga? (b) Mpo na nini mosakoli Danyele abéngamaki ‘oyo alingami mingi’?
11 Anzelu Gabaliele ayaki ‘na ntango batumbaka mbeka ya mpokwa.’ Etumbelo ya mbeka ya Yehova esilaki kobebisama ntango bapakano babebisaki tempelo ya Yelusaleme mpe bakendaki na Bayuda na boombo na Babilone. Na yango, Bayuda bazalaki na likoki te ya kopesa Nzambe mbeka na Babilone. Ata ndenge wana, Bayuda oyo batikalaki sembo kuna bazwaki momeseno malamu ya kosanzola mpe kobondela Yehova na bantango oyo mbɛlɛ, na mboka na bango, balingaki kopesa mbeka lokola Mibeko ya Mose ezalaki kosɛnga yango. Lokola azalaki moto oyo amipesaki na Nzambe, mosakoli Danyele abéngamaki ‘moto oyo alingami mingi.’ Yehova, ‘Nzambe oyo ayokaka mabondeli,’ asepelaki na ye, mpe atindaki anzelu Gabaliele noki lokola eyano na libondeli oyo mosakoli Danyele asalaki na kondima nyonso.—Nzembo 65:2.
12 Ata ntango bomoi na ye ekómaki na likama mpo azalaki kobondela Yehova, mosakoli Danyele alandaki kobondela Nzambe mbala misato na mokolo. (Danyele 6:10, 11) Yango wana, Yehova alingaki ye mingi! Lokola azalaki kobondela ntango nyonso mpe mingimingi komanyola Liloba ya Nzambe, mosakoli Danyele alendisamaki mpo na kososola mokano ya Yehova. Mosakoli Danyele akobaki na libondeli mpe ayebaki lolenge ya malamu ya kobɛlɛma na Yehova mpo ayoka mabondeli na ye. Mosakoli Danyele akumisaki bosembo ya Nzambe. (Danyele 9:7, 14, 16) Atako banguna na ye bakokaki kozwa ye na libunga te, mosakoli Danyele ayebaki ete azali moto ya masumu na miso ya Nzambe. Yango wana, akakatanaki te mpo na koyambola masumu na ye.—Danyele 6:4; Baloma 3:23.
“PƆSƆ NTUKU NSAMBO” MPO NA KOSILISA LISUMU
13, 14. (a) Likambo nini ya ntina anzelu Gabaliele ayebisaki mosakoli Danyele? (b) “Pɔsɔ ntuku nsambo” eumelaki mbula boni, mpe ndenge nini toyebi yango?
13 Lokola azalaki na momeseno ya kobondela, mosakoli Danyele azwaki eyano ya malamu mpenza! Yehova andimisaki ye ete Bayuda bakozonga na mboka na bango. Apesaki ye mpe bososoli na likambo moko ya ntina mpenza—koya ya Masiya oyo alakamaki. (Genese 22:17, 18; Yisaya 9:6, 7) Anzelu Gabaliele alobaki na mosakoli Danyele ete: “Pɔsɔ ntuku nsambo elakelami bato na yo mpe mboka na bulɛɛ na yo, mpo na kokokisa ekweli, mpe mpo na kosilisa lisumu, mpe mpo na kolimbisa mabe, mpe mpo na kokɔtisa boyengebene na lobiko na lobiko, mpe mpo na [kotya elembo likoló na emonaneli mpe likoló na mosakoli, NW], mpe mpo na kopakola esika eleki na bulɛɛ. Yango wana yebá mpe sosolá ete longwa na kobima na liloba ya kotɛmisa mpe na kotonga Yelusaleme kino koya na [Masiya Motambwisi, NW], ekozala pɔsɔ nsambo. Na nsima mpo na pɔsɔ ntuku motoba na mibale ekotongama lisusu esika moko na zando mpe libulu ya kozinga mboka, nde na ntango ya mpasi.”—Danyele 9:24, 25.
14 Oyo nde nsango malamu! Yelusaleme ekotongama lisusu mpe losambo ya solo ekosalema lisusu na tempelo ya sika. Kasi “Masiya Motambwisi” mpe akoya na ntango oyo elakamaki. Yango ekosalema kati na “pɔsɔ ntuku nsambo.” Lokola anzelu Gabaliele alobelaki eleko yango na lolenge ya mikolo te kasi na bapɔsɔ, ezali pɔsɔ ya mikolo nsambo te mpamba te yango ekopesa mikolo 490—oyo ezali bobele mbula moko na sanza minei. Nzokande, kotonga lisusu Yelusaleme mpe kosala “zando mpe libulu ya kozinga mboka” ezwaki ntango molai koleka. Pɔsɔ yango ezali bongo pɔsɔ ya bambula. Mabongoli mingi ya Biblia ya ntango na biso ezali komonisa ete pɔsɔ mokomoko ezali mbula nsambo. Na ndakisa, na maloba na nse ya lokasa na Danyele 9:24, libongoli moko (Tanakh—The Holy Scriptures, oyo ebimisami na The Jewish Publication Society), elobeli “pɔsɔ ntuku nsambo ya bambula.” Na libongoli mosusu (An American Translation), tozali kotánga ete: “Pɔsɔ ntuku nsambo ya bambula etángami mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bulɛɛ.” Mabongoli ya Moffatt mpe Rotherham ebongoli mpe na maloba ya ndenge wana.
15. “Pɔsɔ ntuku nsambo” ekabolami na bileko boni, mpe ntango nini ebandaki?
15 Na kotalela maloba ya anzelu, “pɔsɔ ntuku nsambo” yango ekoki kokabolama na bileko misato: (1) “pɔsɔ nsambo,” (2) “pɔsɔ ntuku motoba na mibale,” mpe (3) pɔsɔ moko. Ekobimisa mbula 49, mbula 434 mpe mbula 7—nyonso epesi mbula 490. Tozali kotánga na Biblia mosusu (The Revised English Bible) ete: “Mbula nsambo mbala ntuku nsambo etángami mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bulɛɛ.” Nsima ya boombo mpe mpasi oyo bamonaki na Babilone na boumeli ya mbula 70, Bayuda bazwaki ngolu ya Nzambe na boumeli ya mbula 490, to mbula 70 mbala nsambo. Eleko yango ebandaki “longwa na kobima na liloba ya kotɛmisa mpe na kotonga Yelusaleme.” Ebandaki ntango nini?
EBANDELI YA “PƆSƆ NTUKU NSAMBO”
16. Lokola amonisaki yango na mobeko oyo ye abimisaki, ntina nini Sirise alobaki na Bayuda bázonga na mboka na bango?
16 Tótalela naino makambo misato ya ntina oyo mazali na boyokani na ebandeli ya “pɔsɔ ntuku nsambo.” Likambo ya liboso esalemaki na mobu 537 L.T.B. ntango Sirise abimisaki mobeko ete Bayuda bázonga na mboka na bango. Mobeko yango elobaki ete: “[Sirise, NW], mokonzi ya [Perse, NW], alobi boye ete, [Yehova], Nzambe na lola, asili kopesa ngai makonzi nyonso na mokili; mpe alakisi ngai ete natongela ye ndako na Yelusaleme oyo ezali kati na Yuda. Ye nani azali kati na bino na bato na ye nyonso, Nzambe na ye azala na ye; tiká ete [amata] na Yelusaleme oyo ezali na Yuda mpe atonga ndako ya [Yehova], Nzambe na Yisalaele. Ye azali Nzambe oyo azali kati na Yelusaleme.” (Ezela 1:2-4) Mobeko yango elingaki koloba polele ete tempelo—‘ndako ya Yehova’—ekotongama lisusu na esika oyo yango ezalaki liboso.
17. Mokanda oyo mokonzi apesaki Ezela mpo na kokenda mobembo na Yelusaleme epesaki ye ndingisa ya kosala nini?
17 Likambo ya mibale esalemaki na mbula ya nsambo ya boyangeli ya Alatazelezese, mokonzi ya Perse (Alatazelezese Lobɔkɔ-molai, mwana ya mokonzi Zelezese I). Na ntango yango, Ezela, mokomi monene ya mikanda, asalaki mobembo oyo eumelaki sanza minei longwa na Babilone kino na Yelusaleme. Amemaki mokanda ya mokonzi kasi mokanda yango epesaki ndingisa te ya kotonga lisusu tempelo. Mokumba ya Ezela ezalaki bobele ya ‘kokómisa ndako ya Yehova kitoko.’ Yango wana mokanda yango elobelaki wolo mpe palata, bisaleli ya bulɛɛ, mpe makabo ya nganu (blé), ya vinyo, ya mafuta na mongwa mpo na kosimba losambo ya solo na tempelo. Mokanda yango mpe elobaki na basali ya tempelo báfuta mpako te.—Ezela 7:6-27.
18. Nsango nini etungisaki Nehemia, mpe ndenge nini Mokonzi Alatazelezese ayebaki yango?
18 Likambo ya misato esalemaki mbula 13 na nsima, na mbula ya 20 ya boyangeli ya Alatazelezese, mokonzi ya Perse. Na ntango wana, Nehemia azalaki kosala na mesa na “Susana, ndako monene.” Bayuda batikali, oyo bautaki na Babilone, basilisaki kotonga Yelusaleme. Kasi makambo mazalaki kotambola malamumalamu te. Bayebisaki Nehemia ete ‘efelo ya Yelusaleme ekweaki mpe bikuke na yango bizikaki na mɔ́tɔ.’ Nsango yango etungisaki ye mpe epesaki ye mawa mingi na motema. Ntango mokonzi amonaki ye mawamawa, atunaki ye ntina mpe Nehemia azongisaki ye ete: “Tiká ete mokonzi abika libela! Mpo na nini elongi na ngai ekozanga mawa wana mboka, esika na nkunda na batata na ngai ezali mpamba mpe bikuke na yango bizikisami na mɔ́tɔ?”—Nehemia 1:1-3; 2:1-3.
19. (a) Ntango Mokonzi Alatazelezese atunaki Nehemia, eloko nini asalaki liboso ya koyanola? (b) Nehemia asɛngaki nini, mpe ndenge nini andimaki ete Nzambe nde azalaki kosala makambo nyonso wana?
19 Lisolo yango ya Nehemia elobi lisusu ete: “Mokonzi alobaki na ngai ete, Yo ozali kolɔmba nini? Nabondelaki mpe epai na Nzambe na lola. Nalobaki na mokonzi ete, Soko ekosepelisa mokonzi mpe soko moombo na yo azwi ngolu na miso na yo, tiká ete otinda ngai epai na Yuda, epai na mboka na nkunda na tata na ngai ete natonga yango lisusu.” Likanisi yango esepelisaki Alatazelezese mpe asalaki likambo mosusu oyo Nehemia asɛngaki ye ete: “Soko ekosepelisa mokonzi, tiká ete mikanda mipesamela ngai mpo na [baguvernere na, NW] ngámbo ya ebale [Pelata] ete bálekisa ngai kino nakokóma na Yuda; mpe mokanda epai na Asapa, mobateli ya zamba ya mokonzi ete apesa ngai nzete mpo na kosala mabaya mpo na bikuke na esika makasi na ndako mpe mpo na lopango ya mboka mpe mpo na ndako wana ekokɔta ngai.” Nehemia ayebaki malamumalamu ete Yehova nde azalaki kokokisa makambo oyo nyonso; yango wana, alobaki ete: “Mokonzi apesaki ngai [mikanda na ntina na, NW] lobɔkɔ malamu ya Nzambe likoló na ngai.”—Nehemia 2:4-8.
20. (a) Ntango nini liloba ya “kotɛmisa mpe kotonga Yelusaleme” ekokisamaki mpenza? (b) Ntango nini “pɔsɔ ntuku nsambo” ebandaki, mpe ntango nini esukaki? (c) Elembeteli nini emonisi bosikisiki ya badati ya ebandeli mpe ya nsuka ya “pɔsɔ ntuku nsambo”?
20 Atako ndingisa epesamaki na sanza ya Nisana, na ebandeli mpenza ya mbula ya 20 ya boyangeli ya Alatazelezese, ‘liloba ya kotɛlɛmisa mpe kotonga lisusu Yelusaleme ekokisamaki’ nsima ya basanza mingi. Yango esalemaki ntango Nehemia akómaki na Yelusaleme mpe abandaki mosala ya kotonga lisusu Yelusaleme. Mobembo ya Ezela eumelaki sanza minei, kasi engumba Susana ezalaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 322 na ɛsti ya Babilone mpe na bongo ezalaki mosika mingi mpenza na Yelusaleme. Na ntembe te, Nehemia akómaki na Yelusaleme na mobu 455 L.T.B., na nsuka ya mbula ya 20 ya boyangeli ya Alatazelezese. “Pɔsɔ ntuku nsambo” oyo esakolamaki, elingi koloba mbula 490, ebandaki na ntango wana. Bambula yango esilaki pene na nsuka ya mobu 36 T.B.—Talá etanda oyo elobi ete “Ntango nini boyangeli ya Alatazelezese ebandaki?” na lokasa 197.
KOMONANA YA “MASIYA MOTAMBWISI”
21. (a) Nini esengelaki kosalema na boumeli ya “pɔsɔ nsambo” ya liboso, ata soki mikakatano ebimi? (b) Masiya asengelaki komonana na mbula nini, mpe likambo nini esalemaki na ntango yango soki tolandi Evanzile ya Luka?
21 Bambula boni elekaki liboso ete mosala ya kotonga lisusu Yelusaleme esila? Ɛɛ, kotongama lisusu ya engumba yango esengelaki kosalema “na ntango ya mpasi” na ntina na mikakatano kati na Bayuda bango moko mpe botɛmɛli ya Basamalia na bapaya mosusu. Na ntembe te, mosala ya botongi lisusu Yelusaleme esilaki pene na mobu 406 L.T.B.—nsima ya “pɔsɔ nsambo” to mbula 49. (Danyele 9:25) Yango elandanaki na eleko ya pɔsɔ 62 to mbula 434. Nsima ya eleko yango, Masiya oyo alakamaki kala, asengelaki komonana. Soki totángi mbula 483 (49 mpe 434) banda na mobu 455 L.T.B., tokokóma na mobu 29 T.B. Nini esalemaki na ntango yango? Luka, mokomi ya Evanzile, alobaki ete: “Na mbula ya zomi na mitano ya bokonzi ya Kaisala Tibɛli, Ponti Pilata azalaki [guvernere, NW] na mokili ya Yuda, mpe Elode mokonzi na [etúká, NW] ya Galilai, . . . liloba ya Nzambe ebimelaki Yoane mwana na Zekalia kati na lisobe. Atambolaki bipai nyonso na ngámbo nyonso mibale ya Yaladene, mpe asakolaki [batisimo] na kobongwana na motema mpo na kolimbisama ya masumu.” Mpe na ntango yango ‘bato bazalaki motema likoló kozela’ komonana ya Masiya.—Luka 3:1-3, 15.
22. Ntango nini mpe ndenge nini Yesu akómaki Masiya oyo alakamaki?
22 Yoane azalaki Masiya oyo alakamaki te. Kasi pene na nsuka ya mobu 29 T.B., na ntango ya batisimo ya Yesu, Yoane apesaki litatoli oyo: ‘Namoni [elimo, NW] ezalaki kokita [likoló] na ye lokola ebenga longwa na Likoló mpe eumeli likoló na ye. Ngai mpe nayebaki ye te nde ye oyo atindi ngai kobatisa na mai, ye wana alobi na ngai ete, Ye oyo okomona [elimo, NW] kokita mpe koumela likoló na ye, ye wana azali mobatisi na [elimo santu, NW]. Nasili komona mpe nasili kotatola ete oyo azali Mwana na Nzambe.’ (Yoane 1:32-34) Na ntango ya batisimo na ye, Yesu akómaki Mopakolami—Masiya to Klisto. Mwa ntango moke na nsima, Andele, moyekoli ya Yoane, akutanaki na mopakolami Yesu mpe ayebisaki ndeko na ye Simona Petelo ete: “Tomonani na Masiya.” (Yoane 1:41, NW) Na bongo, “Masiya Motambwisi” amonanaki mpenza na ntango oyo elakamaki—na nsuka ya pɔsɔ 69!
MAKAMBO OYO MASALEMAKI NA PƆSƆ YA NSUKA
23. Mpo na nini “Masiya Motambwisi” asengelaki kokufa, mpe yango esengelaki kosalema ntango nini?
23 Makambo nini masengelaki kosalema na pɔsɔ ya 70? Anzelu Gabaliele alobaki ete eleko ya “pɔsɔ ntuku nsambo” etyamaki “mpo na kokokisa ekweli, mpe mpo na kosilisa lisumu, mpe mpo na kolimbisa mabe, mpe mpo na kokitisa boyengebene na lobiko na lobiko, mpe mpo na [kotya elembo likoló na emonaneli mpe likoló na mosakoli, NW], mpe mpo na kopakola esika eleki na bulɛɛ.” Mpo ete nyonso oyo esalema, “Masiya Motambwisi” asengelaki kokufa. Ntango nini? Anzelu Gabaliele alobaki ete: “Na nsima na pɔsɔ ntuku motoba na mibale, mopakolami akobomama ata likambo ezali na ye te. . . . Ye mpe akozalisa kondimana makasi mpo na bato mingi na pɔsɔ moko; mpe mpo na ndambo na pɔsɔ yango akosukisa mbeka mpe [makabo, NW].” (Danyele 9:26a, 27a) Ntango ya mpasi eyaki na “ndambo ya pɔsɔ,” elingi koloba, na katikati ya pɔsɔ ya nsuka.
24, 25. (a) Na kotalela esakweli, ntango nini Klisto akufaki, mpe liwa na lisekwa na ye esukisaki likambo nini? (b) Liwa ya Yesu efungolaki nzela na likambo nini?
24 Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola na nsuka ya mobu 29 T.B. mpe mosala yango eumelaki mbula misato na ndambo. Lokola eyebisamaki na esakweli, Yesu “abomamaki” na ebandeli ya mobu 33 T.B. ntango akufaki likoló na nzete ya mpasi mpe apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato. (Yisaya 53:8; Matai 20:28) Ezalaki lisusu na ntina te bápesa banyama mbeka to bápesa makabo oyo Mibeko ya Mose ezalaki kosɛnga mpamba te Yesu asekwaki mpe akendaki kolakisa motuya ya mbeka ya bomoi na ye epai na Nzambe na likoló. Atako banganga Bayuda balandaki kopesa makabo kino ntango Yelusaleme ebebisamaki na 70 T.B., Nzambe azalaki kondima lisusu makabo ya ndenge wana te. Likabo moko ya motuya koleka, oyo esengelaki kozongelama te, ezwaki esika na yango. Ntoma Paulo akomaki ete: “Klisto atombolaki mbeka moko mpo na masumu libela . . . [Mpamba te] na mbeka moko abongisaki libela baoyo babulisami.”—Baebele 10:12, 14.
25 Atako lisumu na liwa ezali naino konyokola bato, liwa ya Yesu mpe lisekwa na ye mpo na bomoi na likoló ekokisaki esakweli. Yango ‘esukisaki mbeba, esilisaki lisumu, elimbisaki libunga, mpe ekɔtisaki bosembo.’ Nzambe alongolaki kondimana ya Mibeko oyo etɔndɔlaki mpe ekweisaki Bayuda ete bazali bato ya masumu. (Baloma 5:12, 19, 20; Bagalatia 3:13, 19; Baefese 2:15; Bakolose 2:13, 14) Sikoyo, masumu ya basali na mabe oyo bazali kobongola motema ekoki kolimbisama mpe bitumbu bikoki kolongolama. Na lisalisi ya mbeka ya Masiya, baoyo bazali komonisa kondima bakoki kozongisa boyokani na bango elongo na Nzambe. Bakoki kozala na elikya ya kozwa likabo ya Nzambe to “bomoi ya seko kati na Yesu Klisto.”—Baloma 3:21-26; 6:22, 23; 1 Yoane 2:1, 2.
26. (a) Atako kondimana ya Mibeko elongolamaki, kondimana nini ‘ebatelamaki makasi na boumeli ya pɔsɔ moko’? (b) Nini esalemaki na nsuka ya pɔsɔ ya 70?
26 Na bongo, ntango Klisto akufaki na mobu 33 T.B., Yehova abomaki kondimana ya Mibeko. Na yango, ndenge nini Masiya “akozalisa kondimana makasi mpo na bato mingi mpo na pɔsɔ moko”? Na ndenge abatelaki makasi kondimana ya Abalayama. Kino nsuka ya pɔsɔ ya 70, Nzambe apesaki libaku ya mapamboli ya kondimana yango epai na Baebele, bana ya Abalayama. Kasi na mobu 36 T.B., na nsuka ya “pɔsɔ ntuku nsambo” ya bambula, ntoma Petelo asakolaki epai na Koloneli, Moloma oyo amipesaki na Nzambe, epai na bato ya libota na ye mpe epai na bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te. Banda mokolo yango, nsango malamu ebandaki kosakolama epai na bato ya mabota.—Misala 3:25, 26; 10:1-48; Bagalatia 3:8, 9, 14.
27. “Esika eleki na bulɛɛ” oyo epakolamaki ezalaki esika nini, mpe ndenge nini?
27 Esakweli elobelaki mpe kopakolama ya “esika eleki na bulɛɛ.” Yango elobelaki te kopakolama ya Esika eleki Bosantu to eteni ya ndako oyo ezalaki na kati mpenza ya tempelo ya Yelusaleme. Awa, “esika eleki na bulɛɛ” elimboli esika ya bulɛɛ ya Nzambe na likoló. Ezali kuna nde Yesu apesaki motuya ya mbeka ya bomoi na ye epai na Tata na ye. Batisimo ya Yesu, na mobu 29 T.B., epakolaki to ebulisaki ebongiseli ya elimo, oyo ezalaki na likoló mpe emonisamaki awa na mabelé, na Esika eleki Bosantu na hema mpe na tempelo oyo etongamaki na nsima.—Baebele 9:11, 12.
ESAKWELI OYO NZAMBE ANDIMAKI YANGO
28. ‘Kotya elembo likoló na emonaneli mpe likoló na mosakoli’ elimboli nini?
28 Esakweli na ntina na Masiya oyo anzelu Gabaliele asakolaki elobelaki mpe ‘kotyama ya elembo likoló na emonaneli mpe likoló na mosakoli.’ Elembo yango elimboli ete esakweli nyonso oyo etalelaki Masiya—makambo nyonso oyo ye akokisaki na mbeka na ye, na lisekwa na ye, mpe na komimonisa na ye na likoló, ezala mpe makambo mosusu oyo esalemaki na boumeli ya pɔsɔ ya 70—Nzambe andimaki ete makambo yango nyonso ekokisama solo mpe esengeli kotyela yango motema. Emonaneli etyamaki elembo mpe etalelaki bobele Masiya. Esengelaki kokokisama bobele likoló na ye mpe likoló na mosala ya Nzambe oyo ye asalaki. Tokokanga malamumalamu ntina ya emonaneli yango bobele soki tolandi kosala boyokani na Masiya oyo alakamaki. Eloko moko te ekoki kofungola ndimbola na yango.
29. Nini esengelaki kokómela Yelusaleme oyo etongamaki lisusu, mpe mpo na nini?
29 Anzelu Gabaliele asakolaki ete Yelusaleme ekotongama lisusu. Na nsima, asakolaki ete engumba oyo ekotongama lisusu mpe tempelo na yango ekobebisama. Alobaki ete: “Bato na mokonzi oyo akoya bakobebisa mboka mpe esika na bulɛɛ. Nde nsuka na [yango, NW] ekokóma na mpela, mpe etumba ekozala kino nsuka; libebi lilakami. . . . Mpe moto na kobebisa akokóma na mapapu na makambo na mbindo, kino nsuka oyo elakami ekokwela mobebisi.” (Danyele 9:26b, 27b) Atako kobebisama oyo ekosalema nsima ya “pɔsɔ ntuku nsambo,” yango ekouta na makambo oyo makobima na boumeli ya “pɔsɔ” ya nsuka, ntango Bayuda bakoboya Klisto mpe bakoboma ye.—Matai 23:37, 38.
30. Lokola emonisami na mikanda ya masolo ya kala, ndenge nini Ye oyo ayebi kokokisa makambo na ntango na yango akokisaki elaka na ye?
30 Mikanda ya masolo ya kala mizali komonisa ete na mobu 66 T.B., mampinga ya Loma oyo matambwisamaki na Cestius Gallus, guvernere ya Sulia, mazingelaki Yelusaleme. Botɛmɛli ya Bayuda elongaki te mpamba te basoda ya Loma bamemaki badalapo mpe bikeko na bango, bakɔtaki na engumba mpe babandaki kobebisa efelo ya tempelo na ngambo ya nɔrdi. Lokola bakɔtaki kuna, bakómaki bongo “eloko na mbindo” oyo ezalaki wana mpo na koyeisa libebi monene. (Matai 24:15, 16, NW) Na mobu 70 T.B., na litambwisi ya Titus, mokonzi ya basoda, Baloma bayaki lokola “mpela” mpe babebisaki engumba na tempelo na yango. Eloko moko ekokaki kopekisa bango te, mpo yango ‘ekanamaki’ na Nzambe. Yehova, moto akokisaka makambo na ntango na yango, akokisaki liloba na ye!
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Ntango mbula 70 ya kobebisama ya Yelusaleme elingaki kosila, makambo nini mosakoli Danyele asɛngaki na Yehova?
• “Pɔsɔ ntuku nsambo” eumelaki ntango boni, mpe ntango nini yango ebandaki mpe esukaki?
• Ntango nini “Masiya Motambwisi” amonanaki, mpe na ntango nini ya mpasi “abomamaki”?
• Kondimana nini ebatelamaki “makasi mpo na bato mingi mpo na pɔsɔ moko”?
• Nini esalemaki nsima ya “pɔsɔ ntuku nsambo”?
[Etanda/Elilingi na lokasa 197]
Ntango nini boyangeli ya Alatazelezese ebandaki?
BANGANGA-MAYELE na masolo ya kala bazali koyokana te na ntina etali mbula oyo boyangeli ya Alatazelezese, mokonzi ya Perse, ebandaki. Basusu bazali koloba ete akómaki mokonzi na mobu 465 L.T.B. mpo ete tata na ye, Zelezese, abandaki koyangela na mobu 486 L.T.B. mpe akufaki na mbula ya 21 ya boyangeli na ye. Kasi, ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Alatazelezese akómaki mokonzi na mobu 475 L.T.B. mpe mbula na ye ya liboso ya bokonzi ezalaki mobu 474 L.T.B.
Makomi mpe bikeko oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki na mboka Persépolis, mboka-mokonzi ya Perse na ntango ya kala, emonisaki ete Zelezese na tata na ye, Dalio I, bazalaki koyangela elongo. Soki bayangelaki na boumeli ya mbula 10 mpe Zelezese ye moko ayangelaki na boumeli ya mbula 11 nsima ya liwa ya Dalio na mobu 486 L.T.B., mbula ya liboso ya boyangeli ya Alatazelezese ezalaki mobu 474 L.T.B.
Elembeteli mosusu euti na ngámbo ya Thémistocle, moto ya Athènes, mokonzi ya basoda, oyo alongaki Zelezese na mobu 480 L.T.B. Na nsima, abungisaki lokumu na ye epai na bato ya Grèce oyo bafundaki ye ete atɛkaki mboka. Thémistocle akimaki mpe abombamaki na ndako ya mokonzi ya Perse epai kuna ayambamaki malamu. Na maloba ya Mogreke Thucydide, nganga-mayele na masolo ya kala, likambo yango esalemaki ntango Alatazelezese “autaki kofanda na kiti ya bokonzi.” Mpo na Mogreke Diodore de Sicile, nganga-mayele na masolo ya kala, Thémistocle akufaki na mobu 471 L.T.B. Lokola bapesaki ye mbula moko mpo ayekola lokota ya Perse liboso ya kosolola na Alatazelezese, Thémistocle asengelaki kokóma na Asie Mineure nsima ya mobu 473 L.T.B. te. Jérôme, nganga-mayele na masolo ya kala, andimi dati yango na mokanda na ye (Chronicle of Eusebius). Akomaki ete Alatazelezese “autaki kofanda na kiti ya bokonzi,” ntango Thémistocle akómaki na Azia na mobu 473 L.T.B., Ernst Hengstenberg, nganga-mayele, moto ya Allemagne, andimaki na mokanda na ye (Christology of the Old Testament) ete boyangeli ya Alatazelezese ebandaki na mobu 474 L.T.B. ndenge mikanda mosusu mpe endimi yango. Ernst akomaki lisusu ete: “Mbula ya 20 ya boyangeli ya Alatazelezese ezali mobu 455 liboso ya Klisto.”
[Elilingi]
Ekeko ya Thémistocle
[Etanda/Bililingi na nkasa 188, 189]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
“PƆSƆ NTUKU NSAMBO”
455 L.T.B. 406 L.T.B. 29 T.B. 33 T.B. 36 T.B.
“Liloba ya Yelusaleme Masiya Masiya Nsuka ya“
kotɛlɛmisa . . . etongami lisusu amonani abomami “ntuku
Yelusaleme” nsambo”
Pɔsɔ 7 Pɔsɔ 62 Pɔsɔ 1
Mbula 49 Mbula 434 Mbula 7
[Elilingi na lokasa mobimba 180]
[Elilingi na lokasa mobimba 193]