Mokapo ya misato
Bamekamaki—kasi batikalaki sembo epai na Yehova!
1, 2. Makambo nini ya ntina mazali na mikapo ya ebandeli ya mokanda ya Danyele?
BISAKWELI ya mokanda ya Danyele ebandaki kokomama na ntango moko ya mobulu, ya mbongwana, na boyangeli ya bikólo mingi. Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia, eutaki kokweya. Ezipito ezalaki lisusu koyangela mokili te. Ezalaki lisusu na lokumu na yango ya kala te; ekómaki lokola bamboka nyonso oyo ezalaki na sudi ya mokili ya Yuda. Kasi nguya ya Babilone ezalaki komata wana engumba yango ezalaki kozwa lokumu mpo na koyangela mokili mobimba.
2 Na mobu 625 L.T.B., mokonzi ya Ezipito, Falo Neko asalaki makasi mpenza mpo na kosukisa nguya ya Babilone mpamba te yango ezalaki kopanzana na mikili ya sudi. Mpo na yango, atambwisaki basoda na ye na engumba Kalekemisi oyo ezalaki pembeni ya Ebale Pelata na epai ya likoló. Etumba ya Kalekemisi, lokola babéngaki yango, ezalaki etumba monene mpenza, etumba oyo etiká nsango. Nebukadanesala, mwana oyo asengelaki kokitana tata na ye na bokonzi, akambaki mampinga ya Babilone mpe yango elongaki mampinga ya Falo Neko. (Yilimia 46:2) Nebukadanesala akómaki makasi mpenza mpe alongaki banguna na ye. Alongaki bongo mokili ya Sulia mpe ya Palestine kino asalaki likambo ya mayele mpo na kosukisa boyangeli ya Ezipito likoló na bikólo ya etúká wana. Bobele liwa ya tata na ye Nabopolasala nde epemisaki ye mwa moke na bitumba yango.
3. Ndenge nini etumba ya liboso oyo Nebukadanesala ayaki kobundisa Yelusaleme esukaki?
3 Lokola akómaki mokonzi ya Babilone, Nebukadanesala azongelaki bitumba na Sulia mpe na Palestine na mbula oyo elandaki. Ezalaki na ntango yango nde mpo na mbala ya liboso, akómaki na Yelusaleme. Biblia elobi: “Na mikolo na ye, Nebukadanesala, mokonzi ya [Babilone], ayaki mpe Yoyakimi azalaki moombo na ye kino mbula misato. Bongo, abongwanaki mpe atombokaki liboso na ye.”—2 Mikonzi 24:1.
NEBUKADANESALA NA YELUSALEME
4. Ndenge nini tokoki kososola maloba oyo mazali na Danyele 1:1 ete, “na mbula ya misato ya bokonzi ya Yoyakimi”?
4 Maloba “kino mbula misato” ezali na ntina mingi mpo na biso mpamba te na ebandeli ya mokanda ya Danyele, tozali kotánga boye: “Na mbula ya misato ya bokonzi ya Yoyakimi mokonzi na Yuda, Nebukadanesala mokonzi ya [Babilone] akómaki na Yelusaleme, mpe azingaki yango na etumba.” (Danyele 1:1) Yoyakimi azalaki mokonzi kobanda mobu 628 kino mobu 618 L.T.B. Ntango akokisaki mbula misato na bokonzi na ye, Nebukadanesala akómaki naino “mokonzi ya Babilone” te. Azalaki se mwana oyo asengelaki kosangola bokonzi. Na mobu 620 L.T.B., Nebukadanesala afutisaki Yoyakimi mpako. Kasi nsima ya mbula misato, Yoyakimi atombokaki. Yango wana, na mobu 618 L.T.B., mbula ya misato oyo Yoyakimi azalaki koyangela na nse ya bokonzi ya Babilone, Nebukadanesala apesaki ye etumbu na ntina na botɔmbɔki na ye na kobundisáká Yelusaleme mpo na mbala ya mibale.
5. Ndenge nini etumba ya mibale oyo Nebukadanesala ayaki kobundisa Yelusaleme esukaki?
5 Na etumba ya mbala oyo, “[Yehova] apesaki Yoyakimi mokonzi na Yuda na lobɔkɔ na ye, [elongo] na ndambo na bisaleli na ndako ya Nzambe.” (Danyele 1:2) Yoyakimi akufaki, mbala mosusu babomaki ye to akufaki na eleko ya botomboki, ntango basoda ya Babilone babandaki kozinga Yelusaleme. (Yilimia 22:18, 19) Na mobu 618 L.T.B., Yoyakini, mwana na ye ya mobali ya mbula 18, azwaki bokonzi. Kasi aumelaki bobele sanza misato na mikolo zomi. Amipesaki na mabɔkɔ ya mokonzi ya Babilone na mobu 617 L.T.B.—Kokanisá na 2 Mikonzi 24:10-15.
6. Nebukadanesala asalaki nini na bisaleli ya bulɛɛ oyo ye azwaki na tempelo ya Yelusaleme?
6 Nebukadanesala azwaki bakɔpɔ na biloko mosusu ya bulɛɛ oyo ezalaki na tempelo ya Yelusaleme, “amemaki yango mpe na mokili na Sinala epai na ndako na nzambe na ye, mpe atyaki bisaleli yango na ebombelo ya mosolo ya nzambe na ye,” Maladuku to Melodaka na Liebele. (Danyele 1:2; Yilimia 50:2) Mayemi oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki na Babilone emonisaki ndenge Nebukadanesala azalaki koloba mpo na tempelo ya Maladuku ete: “Natondisaki kuna palata na wolo na mabanga ya ntalo . . . mpe nakómisaki yango ndako ya kobomba biloko ya motuya ya bokonzi na ngai.” Balobelaki lisusu biloko yango ya bulɛɛ na ntango ya mokonzi Belesasala.—Danyele 5:1-4.
BILENGE YA LOKUMU NA YELUSALEME
7, 8. Ndenge nini Danyele 1:3, 4 mpe 6 ezali kosalisa biso tóyeba soki Danyele na baninga na ye misato bautaki wapi?
7 Mokonzi ya Babilone amemaki bobele biloko ya motuya ya tempelo ya Yehova te. Lisolo elobi: “Bongo mokonzi alakelaki Asepenaza, kapita na mikube na ye, ete aya na bamosusu bana na Yisalaele, bato na libota na mokonzi mpe bato na lokumu, bilenge na mwa libebi te, na bonzenga mpe na mitema malamu na koyekola mayele na ndenge nyonso, mpe na kozwa boyebi, mpe na kososola mateya, mpe baoyo babongi na kosala na ndako na mokonzi.”—Danyele 1:3, 4.
8 Baponaki banani? Lisolo elandi koloba: “Na kati na bango Danyele mpe Hanania mpe Misaele mpe Azalia bazalaki. Bango na libota na Yuda.” (Danyele 1:6) Na bongo, toyebi epai Danyele na baninga na ye bautaki. Toyoki ete bautaki “na libota ya Yuda,” libota ya bakonzi. Ezala mpenza ete bilenge yango bazalaki bana ya libota ya mokonzi to te, tokoki koloba ete bautaki na mabota ya lokumu. Bazalaki na nzoto kolɔngɔnɔ, na bososoli, na mayele mpe na boyebi. Kasi bango nyonso bazalaki bilenge mpenza mpamba te bazalaki naino kobénga bango “bana.” Danyele na baninga na ye bapesaki mpenza ndakisa malamu koleka bilenge nyonso ya Yelusaleme.
9. Mpo na nini ekoki kozala solo ete baboti ya Danyele mpe ya baninga na ye misato bazalaki basambeli ya Nzambe?
9 Lisolo yango etángi nkombo ya baboti na bango te. Na ntembe te, baboti yango bazalaki kobanga Nzambe mpe bazwaki mokumba na bango ya baboti na motuya. Mpamba te na Yelusaleme na ntango wana, bilenge bazalaki na etamboli mabe mpenza, mingimingi ‘bana ya mokonzi mpe ya mabota mosusu ya lokumu.’ Emonani polele ete bizaleli malamu oyo Danyele mpe baninga na ye bazalaki na yango, bazwaki yango mbalakaka te. Ya solo, baboti na bango bayokaki mpenza motema mpasi ntango batikaki bana na bango bákenda na boombo na mboka mopaya. Kasi soki báyebaka matomba oyo bana na bango bazwaki na nsima, mbɛlɛ balingaki kobɛta ntolo! Yango emonisi mpenza ntina oyo baboti basengeli koteya bana na bango mpe kobɔkɔla bango “na mateya mpe na mpamela na Nkolo”!—Baefese 6:4.
MILENDE MPO NA KOBEBISA MAKANISI YA BILENGE YANGO
10. Makambo nini bateyaki bilenge Baebele yango, mpe mpo na nini?
10 Eumelaki te mpo na kobanda kobebisa makanisi ya bilenge baombo oyo. Mpo andima mpenzampenza ete bilenge Baebele yango bakokóma kokanisa lokola bato ya Babilone, Nebukadanesala apesaki mobeko ete ‘bálakisa bango mayele mpe lokota ya Bakaladi.’ (Danyele 1:4) Nzokande, elenge nyonso ya Babilone akɔtaki na kelasi yango te. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elimboli ete “[bilenge Baebele] bazalaki koyekola lokota ya Sumérien, ya Akkadien, ya Araméen . . . , mpe nkota mosusu. Bazalaki mpe koyekola mateya mingi oyo ekomamaki na nkota yango.” “Mateya mingi oyo” ezalaki bongo istware, matematiki, astronomi mpe mateya ndenge na ndenge. Nzokande, “mikanda ndenge na ndenge ya losambo, ezala mikanda ya koyeba makambo makoya mpe ya astroloji . . . , ezwaki ntango mingi koleka mateya mosusu.”
11. Bibongiseli nini bakonzi ya Babilone bazwaki mpo bámindimisa ete bilenge Baebele bakolanda mpenzampenza mimeseno ya bato ya Babilone?
11 Mpo bilenge Baebele yango bálanda mpenza mimeseno ya bato ya ndako na ye, “mokonzi aponelaki bango ndambo na bilei kitoko na mokonzi mikolo nyonso, mpe vinyo oyo [mokonzi amelaka]; mpe alakaki ete bábɔkɔlama mbula misato, mpe ete na nsuka na ntango yango bátɛlɛma liboso na mokonzi.” (Danyele 1:5) Lisusu, “kapita [ya basali na ndako ya mokonzi apesaki, NW] bango nkombo. [Apesaki] Danyele [nkombo] Beletesasala, mpe Hanania Sadalaka, mpe Misaele Mesaka, mpe Azalia Abede-nego.” (Danyele 1:7) Na ntango oyo Biblia ezalaki kokomama, bazalaki kopesa moto nkombo mosusu mpo na komonisa likambo moko ya ntina oyo esalemaki na bomoi na ye. Na ndakisa, Yehova apesaki Abalama nkombo Abalayama mpe Salai nkombo Sala. (Genese 17:5, 15, 16) Kasi esengelaki kozala na bokonzi likoló ya moto yango mpo na kopesa ye nkombo ya sika. Na ndakisa, ntango atyaki Yosefe mokonzi likoló na bozwi nyonso ya Ezipito, Falo apesaki ye nkombo Safenati-panea.—Genese 41:44, 45; kokanisá na 2 Mikonzi 23:34; 24:17.
12, 13. Mpo na nini tokoki koloba ete kopesa bilenge Baebele nkombo ya sika ezalaki mwango moko ya kobebisa kondima na bango?
12 Bankombo ya sika oyo bapesaki Danyele na baninga na ye Baebele misato ezalaki na ntina. Bankombo oyo baboti na bango bapesaki bango eutaki na losambo ya Yehova. “Danyele” elimboli “Nzambe azali mosambisi na ngai.” “Hanania” elimboli “Yehova amonisi boboto.” “Misaele” ekoki kolimbola “Nani akokani na Nzambe?” “Azalia” elimboli “Yehova asalisi.” Na ntembe te, baboti na bango bazalaki na elikya ete bana na bango bakosalela Yehova Nzambe ntango bakokola mpe bakozala basaleli na ye ya sembo.
13 Nzokande, bankombo ya sika oyo bapesaki bilenge Baebele minei yango eutaki na bankombo ya banzambe ya lokuta. Ezalaki lolenge moko ya kokumisa banzambe ya lokuta likoló na Nzambe ya solo. Oyo nde mayele mabe mpo na kobebisa kondima ya bilenge yango!
14. Nkombo ya sika oyo bapesaki Danyele mpe baninga na ye elimbolaki nini?
14 Bapesaki Danyele nkombo ya sika, Beletesasala oyo elimboli “Batelá bomoi ya mokonzi.” Ya solo, yango ezalaki bobele lolenge ya mokuse ya kobelela Bel to Maladuku, nzambe oyo alekaki banzambe nyonso ya Babilone. Ezala ete Nebukadanesala alobaki bápesa Danyele nkombo wana to te, kasi asepelaki mpo nkombo yango ‘eutaki na nkombo ya nzambe na [ye].’ (Danyele 4:8, NW) Sadalaka ezalaki nkombo ya sika ya Hanania. Bato mosusu ya mayele balobaka ete nkombo yango esalemi na maloba mibale mpe elimboli “mobeko ya Aku.” Likambo ya kokamwa, Aku ezalaki nkombo ya nzambe moko ya etúká ya Sumer. Misaele azwaki nkombo ya sika Mesaka (ekokaki kozala Misaku). Emonani ete ezalaki mayele mabe oyo basalelaki mpo na kobebisa nkombo Misaele oyo elimboli “Nani akokani na Nzambe?” mpo na kopesa yango ndimbola ya sika “Nani akokani na Aku?” Bapesaki Azalia nkombo Abed-nego. Nkombo yango ekokaki kolimbola “mosaleli ya Nego.” Mpe “Nego” ezalaki nkombo mosusu ya “Nebo.” Nzokande, Nebo ezalaki nkombo ya nzambe moko oyo na nsima bakómaki kobenga yango na bakonzi mingi ya Babilone.
BAZWAKI EKATELI YA KOTIKALA SEMBO EPAI NA YEHOVA
15, 16. Mikakatano nini Danyele na baninga na ye bakutanaki na yango, mpe basalaki nini?
15 Bapesaki Danyele na baninga na ye misato bankombo ya Babilone. Batángisaki bango kelasi mpe bazalaki kotyela bango biloko ya kolya ya kitoko mpenza. Nyonso wana ezalaki mpo na kopusa bilenge yango bálanda mimeseno ya Babilone. Lisusu, ezalaki mpo na kobebisa makanisi na bango mpo bábosana Nzambe na bango, Yehova, mpe mateya ya lingomba na bango oyo bazwaki uta bomwana. Liboso na masɛnginya mpe komekama nyonso wana, bilenge yango basalaki nini?
16 Lisolo yango oyo epemami elobi: “Danyele nde atyaki motema na komiyeisa mbindo na bilei kitoko na mokonzi te, mpe na vinyo oyo [mokonzi azalaki komela] te.” (Danyele 1:8a) Atako lisolo yango ezali kotánga bobele nkombo ya Danyele, kasi makambo oyo masalemaki nsima endimisi biso ete baninga na ye misato mpe bazwaki ekateli moko lokola ye. Maloba oyo ete Danyele “atyaki motema” emonisi ete mateya oyo azwaki epai na baboti na ye mpe bato mosusu esimbaki motema na ye. Ezalaki mpe ndenge moko mpo na baninga na ye Baebele misato. Yango emonisi ntina oyo tosengeli koteya bana na biso, ata ntango bazali mpenza mike mpe bazali kososola mateya yango malamumalamu te.—Masese 22:6; 2 Timote 3:14, 15.
17. Mpo na nini Danyele mpe baninga na ye baboyaki kolya biloko ya mokonzi kasi baboyaki makambo mosusu te oyo basɛngaki bango?
17 Mpo na nini bilenge Baebele yango baboyaki bobele biloko kitoko ya mokonzi mpe masanga na ye kasi makambo mosusu oyo basɛngaki bango te? Danyele alobaki polele: ‘Akomibebisa te.’ Koyekola “mayele mpe lokota ya Bakaladi” mpe kopesama nkombo ya Babilone, atako ezali likambo ya malamu te, kasi babebisamaki mpo na bongo te. Tókamata ndakisa ya Mose oyo azalaki na bomoi esilaki koleka mbula soko 1 000. Ata ‘bateyaki ye mayele nyonso ya Baezipito,’ Mose atikalaki sembo epai na Yehova. Baboti na ye mpenza babɔkɔlaki ye naino liboso mpe abɔkɔlamaki bongo na lolenge ya malamu. Yango wana, “mpo na kondima, [ntango Mose akómaki mokóló, NW], aboyaki kotángama mwana na mwana mwasi na Falo. Aponaki kotumolama na bolɔzi esika moko na bato na Nzambe [na esika ete asepela, NW] na bisengo ya masumu bikoumela bobele mwa ntango moke.”—Misala 7:22; Baebele 11:24, 25.
18. Ndenge nini bilenge Baebele bakokaki komibebisa na biloko ya mokonzi?
18 Ndenge nini biloko ya mokonzi elingaki kobebisa bilenge mibali yango? Ya liboso, biloko yango ekokaki kozala biloko oyo bipekisamaki na Mobeko ya Mose. Na ndakisa, bato ya Babilone bazalaki kolya nyama mosusu oyo Bayuda bazalaki kolya te mpo Mobeko ya Mose epekisaki yango. (Levitike 11:1-31; 20:24-26; Deteronome 14:3-20) Ya mibale, bato ya Babilone bazalaki kokata banyama nkingo te liboso ya kolya yango. Nzokande, kolya nyama oyo bakati yango nkingo te ezalaki kobuka mobeko ya Yehova etali makila. (Genese 9:1, 3, 4; Levitike 17:10-12; Deteronome 12:23-25) Ya misato, basambeli ya banzambe ya lokuta bazalaki na momeseno ya kopesa banyama lokola mbeka epai na banzambe na bango ya bikeko liboso ya kolya yango. Basaleli ya Yehova bakokaki kolya biloko oyo bipesami na bikeko te! (Kokanisá na 1 Bakolinti 10:20-22.) Mpe lisusu, kolya mokolo na mokolo biloko ya vitamini mingi koleka mpe komela masanga ya makasi ekoki kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto nyonso, mingi mpenza ya bilenge.
19. Ndenge nini bilenge Baebele bakokaki kolɛmbisa mobeko ya Nzambe, kasi nini etindaki bango bázwa likatami ya malamu?
19 Koyeba likambo oyo okoki kosala ezali eloko mosusu, kasi kozala na mpiko ya kosala yango ezali mpe likambo mosusu. Mpe ezalaka mpasi mingi mpenza kosala yango ntango ozali kozwa masɛnginya to komekama. Danyele na baninga na ye misato bakokaki kokanisa ete, lokola baboti na biso mpe baninga na biso bazali mosika, bakoyeba te makambo nini tozali kosala awa. Bakokaki mpe kolukaluka lolenge ya kolɛmbisa mobeko ya Nzambe. Bakokaki koloba ete lokola mokonzi apesaki mobeko tólya biloko yango, tokokaki koboya te. Nzokande, bilenge mosusu bandimaki kolya bilei kitoko ya mokonzi mpo bamonaki yango likama te, kasi lokola libaku malamu. Makanisi mabe ndenge wana elingaki bobele kopusa bilenge Baebele básala lisumu na kobombama. Nzokande, yango ezalaka mpenza motambo mpo na bilenge mingi. Bilenge Baebele bayebaki ete “miso na [Yehova] ezali na bipai nyonso,” mpe ete “Nzambe akokómisa misala nyonso epai na kosambisama elongo na makambo nyonso mabombami, soko mazali malamu, soko mazali mabe.” (Masese 15:3; Mosakoli 12:14) Tiká biso nyonso tózwa liteya na etamboli ya bilenge yango ya sembo.
MPIKO MPE MOLENDE EMEMAKA MBANO
20, 21. Likambo nini Danyele asalaki, mpe yango esukaki ndenge nini?
20 Lokola azwaki ekateli ya kotɛmɛla bopusi mabe, Danyele amekaki kosala makambo na boyokani na ekateli na ye. “Alɔmbaki na kapita [ya basali na ndako ya mokonzi, NW] ete atika ye komibebisa te.” (Danyele 1:8b) ‘Kolɔmba’—oyo nde liloba ya ntina mpenza! Tosengeli kosala milende ntango nyonso soki tolingi kolonga komekama to mwa bolɛmbu.—Bagalatia 6:9.
21 Danyele azwaki mbano na molende na ye. “Mpe Nzambe apesaki kapita [ya basali na ndako ya mokonzi, NW] boboto mpe motema malamu epai na Danyele.” (Danyele 1:9) Soki Danyele na baninga na ye bazwaki libaku malamu wana, ezalaki mpo na kitoko mpe mayele na bango te. Ezalaki nde mapamboli ya Yehova. Na ntembe te, Danyele akanisaki lisese ya Baebele oyo elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambwisa yo.” (Masese 3:5, 6) Kolanda toli oyo ememelaki bango mbano.
22. Ndenge nini kapita ya basali na ndako ya mokonzi aboyaki na mayele likambo oyo Danyele asɛngaki?
22 Liboso mpenza, kapita ya basali na ndako ya mokonzi aboyaki. Alobaki boye: “Nazali kobanga ete nkolo na ngai mokonzi, oyo aponaki biloko na kolya mpe na komela mpo na bino, akomona ete bilongi na bino bikɔndi na koleka bilenge oyo bazali na mbula lokola bino, mpe boye bino bokoyeisa likambo na motó na ngai liboso na mokonzi.” (Danyele 1:10) Azalaki na elonga ya koboya mpe asengelaki kobanga ndenge wana mpamba te mibeko ya Nebukadanesala ezalaki mibeko ya kosakana na yango te. Kapita ayebaki ete mokonzi ‘akoboma’ ye soki atosi mibeko na ye te. Danyele alingaki kosala nini?
23. Nini emonisi ete Danyele azalaki na bososoli mpe na mayele na ndenge amemaki likambo yango?
23 Esengelaki amimonisa moto ya bososoli mpe ya mayele. Ntango mosusu elenge Danyele akanisaki lisese oyo: “Kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda, nde liloba makasi ekopesa nkɛlɛ simbisi.” (Masese 15:1) Na esika ya kosɛnga yango na makasi mpe koya kobimisela baninga na ye mikakatano oyo ekokaki kotya bomoi na bango na likama, Danyele alandelaki likambo yango te. Azelaki, mpe na ntango moko ya malamu, asololaki na “mokɛngɛli.” Ekoki kozala ete na ntango yango, mokɛngɛli amonaki mabe te mpo na kopesa Danyele mwa bonsomi mpamba te lapolo ya mokɛngɛli esengelaki koleka na mabɔkɔ ya mokonzi mosusu liboso ya kokóma epai na mokonzi monene.—Danyele 1:11, NW.
DANYELE ASƐNGI BÁMEKA BANGO MIKOLO ZOMI
24. Danyele asɛngaki komekama nini?
24 Danyele asɛngaki mokɛngɛli ameka bango: “Meká baombo na yo mikolo zomi, nalɔmbi yo. Tiká bápesa biso bobele ndunda na kolya mpe mai na komela. Na nsima, okotala bilongi na biso mpe bilongi na bilenge oyo bakolyaka biloko kitoko na mokonzi, mpe salá biso lokola ekomona yo.”—Danyele 1:12, 13.
25. Biloko mosusu nini Danyele na baninga na ye bazalaki kolya, kasi bato bamesanaki kobénga yango bobele “ndunda”?
25 Nsima ya mikolo zomi oyo bakolya bobele ‘ndunda mpe bakomela bobele mai,’ bilenge Baebele ‘bakokɔnda’ te, soki bakokanisi bango na bilenge mosusu? Liloba “ndunda” oyo balobeli awa euti na liloba ya Liebele oyo elimboli mpenza “mbuma.” Mabongoli mosusu ya Biblia ebéngi yango “nzete ya ndunda” mpe yango eyebani lokola “nzete ya ndunda oyo ebimisaka mpe mbuma oyo balyaka (lokola madesu ya mikemike mpe ya minene).” Banganga-mayele mosusu ya Biblia balobaka ete biloko yango ezalaki bobele mbuma mpamba te. Mokanda moko elobi: “Oyo Danyele mpe baninga na ye basɛngaki ezalaki biloko oyo bato nyonso bazalaki kolya, kasi biloko oyo bazwi bazalaki kolya te, oyo ezalaka na misuni ya mafutamafuta.” Kasi na ndunda yango, biloko ya vitamini esangisamaki, na ndakisa, madesu, kɔkɔmbre, ai, matungulu, poaro, bitɛkutɛku, pastɛkɛ, mampa ya ndenge na ndenge. Ya solo, ebongaki kobénga yango biloko ya babola te. Na ntembe te, mokɛngɛli mpe ayebaki ete ezalaki biloko ya babola te. “Boye ye andimaki likambo na bango, mpe amekaki bango mikolo zomi.” (Danyele 1:14) Makambo esukaki ndenge nini?
26. Ndenge nini komekama yango ya mikolo zomi esukaki, mpe mpo na nini esukaki bongo?
26 “Na nsuka na mikolo zomi bilongi na bango bizalaki na bonzenga mpe na mafuta na koleka bilenge nyonso oyo balyaki biloko kitoko na mokonzi.” (Danyele 1:15) Nde kozwa yango lokola mobeko te ete ebongi kolyaka kaka ndunda mpe mbuma kasi biloko ya misuni ya mafuta te. Ezala biloko ya ndenge nini, mikolo zomi ezali mpenza ntango mokuse mpo na komona matomba na yango. Kasi mpo na Yehova ezali ntango mokuse te mpo akokisa mokano na ye. Liloba na ye elobi: “Mapamboli na [Yehova] ekoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.” (Masese 10:22) Bilenge Baebele yango minei bandimaki Yehova, batyaki elikya na bango epai na ye mpe ye asundolaki bango te. Bikeke mingi na nsima, Yesu Klisto alyaki te na boumeli ya mikolo 40 kasi akufaki te. Mpo na yango, atángaki maloba oyo mazwami na Deteronome 8:3 ete: “Moto akotikala na bomoi bobele mpo na kwanga te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].” Na likambo oyo, ndakisa ya Danyele mpe baninga na ye ezali ndakisa oyo basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kolanda.
BAPONAKI BOSOSOLI MPE MAYELE KASI KOLYA MPE KOMELA TE
27, 28. Na kondimáká kolya bobele ndunda, ndenge nini Danyele mpe baninga na ye misato bamibongisaki mpo na komekama minene oyo ezalaki koya?
27 Mikolo zomi ezalaki bobele mpo na komekama, kasi matomba na yango emonanaki mpenza. “Bongo [mokɛngɛli, NW] alongolaki bilei na bango mpe vinyo oyo ezalaki mpo na komela na bango, mpe apesaki bango ndunda.” (Danyele 1:16) Ezali mpasi te mpo na koyeba makanisi oyo bilenge banakelasi mosusu bazalaki na yango likoló na Danyele mpe baninga na ye na likambo yango. Bamonaki bango lokola bazoba mpenza na ndenge bazalaki koboya kolya biloko kitoko ya mokonzi mpo na kolya ndunda! Kasi komekama monene ezalaki liboso na bango. Bilenge yango Baebele basengelaki bongo komibongisa mpo bátikala ntango nyonso na bokɛngi mpe bámipesa na kolya mpe komela te. Longola nyonso wana, ezalaki libosoliboso kondima mpe elikya na bango epai na Yehova nde esungaki bango bálonga komekama wana ya kondima na bango.—Kokanisá na Yosua 1:7.
28 Maloba oyo malobamaki nsima mamonisaki polele ete Yehova azalaki elongo na bilenge yango. Tozali kotánga boye: “Mpo na bilenge minei oyo, Nzambe apesaki bango boyebi mpe kososola na ndenge na mikanda mpe na mayele nyonso; mpe Danyele asosolaki bimonaneli mpe ndɔtɔ nyonso.” (Danyele 1:17) Mpo na kolonga ntango ya mpasi oyo ezalaki liboso na bango, bazalaki bobele na mposa ya makasi mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto te. “Boye mayele ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo, mpo na kolongola yo na nzela mabe.” (Masese 2:10-12) Yehova apesaki bilenge minei yango bizaleli wana ya sembo mpo bámibongisa liboso na komekama oyo ezalaki koya.
29. Mpo na nini Danyele akokaki ‘kolimbola bimonaneli mpe ndɔtɔ nyonso’?
29 Eyebani ete Danyele ‘azwaki boyebi mpo na kolimbola bimonaneli mpe ndɔtɔ nyonso.’ Yango elingi koloba te ete Danyele akómaki nganga to moto oyo ayebaka makanisi ya bato. Likambo ya kokamwa, atako Danyele azalaki moko na basakoli minene kati na basakoli ya Bayuda, Yehova apemisaki ye te mpo na kobanda koloba bisakweli na ye na maloba lokola “Boye Nkolo [Yehova] alobi ete” to “[Yehova] na bibele alobi boye ete.” (Yisaya 28:16; Yilimia 6:9) Ya solo, ezalaki bobele elimo santu ya Nzambe nde epesaki Danyele boyebi mpo akoka kolimbola bimonaneli mpe ndɔtɔ oyo ezalaki na boyokani na mokano ya Yehova.
NSUKANSUKA, KOMEKAMA YA MAKASI EYAKI
30, 31. Na lolenge nini nzela oyo Danyele mpe baninga na ye balandaki ememelaki bango matomba?
30 Mbula misato ya mateya mpe kobongisama ekómaki na nsuka. Sikoyo ekómaki ntango ya komekama makasi: kokutana na mokonzi. “Na nsuka na ntango oyo etángaki mokonzi, mpe wana ebongaki ete bábima liboso na ye, kapita [ya basali na ndako ya mokonzi amemaki, NW] bango liboso na Nebukadanesala.” (Danyele 1:18) Ezalaki ntango mpo na bilenge yango minei báloba mpo na bomoi na bango mpenza. Malamu nini bakozwa soki bakangami na mibeko ya Yehova na esika ya komipesa na mimeseno ya bato ya Babilone?
31 “Mokonzi asololaki na bango, mpe kati na bango nyonso moko azwamaki te lokola na Danyele mpe Hanania mpe Misaele mpe Azalia; yango wana bango batɛlɛmaki liboso na mokonzi.” (Danyele 1:19) Balongaki mpenza mpo na etamboli na bango ya sembo na boumeli ya mbula misato oyo balekisaki! Basalaki bozoba te lokola baponaki kolya biloko oyo esepelisaki kondima mpe lisosoli na bango. Lokola bamonisaki bosembo na likambo moke mpenza, Danyele mpe baninga na ye bazwaki mapamboli mingi koleka. Bilenge nyonso oyo bazalaki kozwa mateya yango bazalaki mpenza na mposa ya ‘koponama na mokonzi.’ Kasi Biblia ezali koloba te soki mokonzi aponaki bobele bilenge Baebele minei yango. Ezala ete aponaki bilenge mosusu lokola, kasi etamboli ya sembo ya bilenge Baebele ememelaki bango “mbano monene.”—Nzembo 19:11, NW.
32. Mpo na nini tokoki koloba ete Danyele, Hanania, Misaele na Azalia bazwaki libaku monene koleka oyo ya kosala elongo na mokonzi?
32 Makomami elobi ete: “Omoni moto oyo azali na etingya na mosala na ye? Ye akotɛlɛma liboso na bakonzi.” (Masese 22:29) Na bongo, Nebukadanesala aponaki Danyele, Hanania, Misaele mpe Azalia mpo bátɛlɛma liboso na ye, elingi koloba, básala misala ya Leta pembeni na ye. Na makambo oyo nyonso, tomoni ndenge Yehova azalaki kosalela bilenge mibali yango—mingi mpenza Danyele—mpo akoka koyebisa makambo ya ntina matali mokano ya Nzambe. Atako kosala pembeni ya Nebukadanesala ezalaki na lokumu mpenza, kasi kosala elongo na Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ezali na lokumu mingi koleka.
33, 34. (a) Mpo na nini bilenge Baebele bakamwisaki mokonzi? (b) Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Baebele minei yango?
33 Nebukadanesala asosolaki noki ete mayele mpe bososoli oyo Yehova apesaki bilenge Baebele minei yango elekaki mayele mpe bososoli oyo ezalaki na bapesi-toli mpe bato nyonso ya mayele oyo bazalaki kosala elongo na ye mosika. “Na makambo nyonso na mayele mpe na kososola, oyo mokonzi atunaki bango, amonaki ete bango balekaki mbala zomi banganga-na-nkisi mpe banganga-na-soloka nyonso na bokonzi na ye mobimba.” (Danyele 1:20) Esengelaki mpenza kozala se bongo. Mpo “banganga-na-nkisi” mpe “banganga-na-soloka” bazalaki kotya elikya na bango na mayele ya mokili mpe na biyambayamba ya Babilone, nzokande Danyele na baninga na ye bazalaki kotya elikya na bango na mayele oyo euti na Nzambe. Ntina moko ezalaki te ya kokokanisa mayele ya Nzambe na mayele ya bato.
34 Makambo mabongwani mpenza te na boumeli ya bikeke. Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntango mateya ya filozofi ya Bagreke epalanganaki mpe mibeko ya Baloma ezalaki kotosama bipai nyonso, elimo ya Nzambe epusaki ntoma Paulo akoma maloba oyo: “Mayele na ekeke oyo ezali [bozoba] epai na Nzambe. Ekomami ete, Akokangaka bato na mayele kati na mayele na bango mpenza; mpe lisusu ete, Nkolo ayebi makanisi na bato na mayele ete mazali mpamba. Tiká te ete moto amikumisa mpo na bato.” (1 Bakolinti 3:19-21) Tosengeli lelo kokangama na mateya oyo Yehova azali koteya biso kasi tózwama nokinoki te na bisengo mpe na bisalasala ya mokili.—1 Yoane 2:15-17.
BATIKALAKI SEMBO KINO NSUKA
35. Toyebi mpenza makambo mingi na ntina na baninga misato ya Danyele?
35 Kondima makasi ya Hanania, Misaele na Azalia emonisami polele na mokapo ya misato ya mokanda ya Danyele na likambo ya ekeko ya wolo oyo Nebukadanesala atɛlɛmisaki na esobe ya Dula mpe na komekama ya litumbu ya mɔ́tɔ ya kongala. Na ntembe te, Baebele yango oyo bazalaki kobanga Nzambe batikalaki sembo epai na Yehova kino liwa. Tondimi bongo mpamba te ntoma Paulo alobelaki mpenza bango ntango akomaki na ntina na baoyo “na lisalisi ya kondima . . . babomaki nguya ya mɔ́tɔ.” (Baebele 11:33, 34, NW) Bazali bandakisa minene mpo na basaleli ya Yehova, ezala mpo na mikóló to bilenge.
36. Lobelá bomoi kitoko oyo Danyele azalaki na yango.
36 Kolobáká mpo na Danyele 1:21, vɛrsɛ ya nsuka ya mokapo ya liboso ya mokanda na ye elobi boye: ‘Danyele atikalaki wana kino mbula na liboso na Mokonzi Sirise.’ Toyebi na masolo ya kala ete, mokolo moko na butu, na mobu 539 L.T.B., Sirise akweisaki engumba ya Babilone. Na ntembe te, mpo na lokumu na ye mpe mikumba minene oyo azalaki na yango, Danyele akobaki kosala epai na Mokonzi Sirise. Danyele 10:1 elobi na biso ete ‘na mbula ya misato ya Sirise, mokonzi ya Perse,’ Yehova alakisaki Danyele emonaneli moko ya nsɔmɔ. Lokola azalaki mpenza elenge ntango bamemaki ye na Babilone na mobu 617 L.T.B., Danyele akokaki kozala na mbula 100 ntango azwaki emonaneli yango ya nsuka. Oyo nde bomoi molai mpe ya mapamboli kati na mosala ya sembo mpona Yehova!
37. Liteya nini tokoki kozwa ntango tozali kotalela mokapo ya liboso ya mokanda ya Danyele 1?
37 Mokapo ya liboso ya mokanda ya Danyele ezali kolobela te bobele lisolo ya bilenge minei ya sembo oyo bazalaki kokutana na komekama ndenge na ndenge mpe kolonga yango. Ezali mpe kolobela ndenge Yehova akoki kosalela moto nyonso oyo ye alingi mpo na kokokisa mokano na ye. Lisolo yango ezali mpe komonisa biso ete soki Yehova apesi nzela na komekama, yango ekoki kokokisa mokano moko ya ntina, atako tokoki komona yango lokola likama. Mpe lisolo yango ezali koyebisa biso ete bosembo na makambo ya mike ememaka mbano monene.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Danyele na baninga na ye misato bautaki wapi?
• Ndenge nini mateya ya malamu oyo bilenge Baebele yango minei bazwaki na bomwana na bango etyamaki na komekama na Babilone?
• Mbano nini Yehova apesaki bilenge Baebele yango minei mpo na mpiko na bango?
• Toli nini basaleli ya Yehova na mikolo na biso bakoki kozwa na ndakisa ya Danyele mpe ya baninga na ye misato?
[Elilingi na lokasa mobimba 30]