Mokapo ya zomi na misato
Bakonzi mibale bazali kowelana
1, 2. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na esakweli ya Danyele mokapo 11?
BAKONZI mibale bazali kowelana mpo na koyeba nani akoyangela mokili. Soki moko amati, mosusu akiti, bobele bongo, mbula na mbula. Na bantango mosusu, moko akoleka wana mosusu azali kosala eloko te. Na bileko mosusu kowelana ezalaka te. Kasi na mbalakaka, matata ekobanda lisusu mpe ekolandana. Kati na bakonzi oyo bazalaki kowelana bongo to baoyo bazali naino kowelana, tokoki kotánga Séleucus I Nicator mokonzi ya Sulia, Ptolémée Lagus mokonzi ya Ezipito, Cléopâtre I, mwana mwasi ya mokonzi ya Sulia; na nsima akómaki mokonzi-mwasi ya Ezipito, mpe bakonzi ya Loma lokola Augusite, Tibɛli mpe Zénobie, mokonzi-mwasi ya engumba ya Palmyre. Awa matata yango elingi kosila, bibongiseli ya politiki to mikili mosusu esilá komikɔtisa to ezali komikɔtisa; na ndakisa, Banazi na Allemagne, bamboka oyo ezalaki na politiki ya kominisme mpe États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba, Société des Nations mpe ONU. Nzokande, ata ebongiseli moko ya politiki eyebi te ndenge nini matata yango ekosuka. Esili koleka pene na mbula 2 500, anzelu ya Yehova ayebisaki mosakoli Danyele esakweli yango ya ntina mpenza.—Danyele, mokapo 11.
2 Oyo nde esengo mosakoli Danyele azalaki na yango ntango anzelu alimbolelaki ye polele kowelana kati na bakonzi yango mibale oyo basengelaki kobima! Kowelana yango etaleli mpe biso mpamba te matata kati na bakonzi oyo mibale ezali kokoba kino ntango na biso. Lokola eteni ya liboso ya esakweli oyo ekokisamaki na ntango ya kala, yango ezali kolendisa kondima mpe elikya na biso ete eteni ya nsuka ya esakweli yango ekokokisama solo. Kotya likebi na esakweli yango ekosalisa biso tóyeba malamumalamu soki tokómi wapi. Yango mpe ekolendisa ekateli na biso ya komikɔtisa te na matata yango; wana tozali kozela na motema molai ete Nzambe abikisa biso. (Nzembo 146:3, 5) Sikoyo, tótya likebi mpe tóyoka oyo anzelu ya Yehova ayebisaki mosakoli Danyele.
ATƐMƐLI BOKONZI YA GRÈCE
3. Anzelu asungaki nani na “mbula ya liboso ya Dalio moto ya Mede”?
3 Anzelu alobaki ete: “Mpo na ngai, na mbula ya liboso [mobu 539 to 538 L.T.B.] ya Dalio, [moto ya Mede, NW], natɛlɛmaki mpo na kolendisa ye mpe koyeisa ye makasi.” (Danyele 11:1) Dalio asilá kokufa, kasi anzelu alobelaki boyangeli na ye na ebandeli ya esakweli. Azalaki mokonzi oyo apesaki mobeko bábimisa mosakoli Danyele na libulu ya nkosi. Dalio abimisaki mpe mobeko ete bato nyonso ya bokonzi na ye bábanga Nzambe ya Danyele. (Danyele 6:21-27) Nzokande, anzelu atalelaki Dalio moto ya Mede lokola mosungi te, kasi nde moninga na ye Mikaele—mokonzi ya bato ya mosakoli Danyele. (Kokanisá na Danyele 10:12-14.) Anzelu ya Nzambe apesaki lisungi yango wana Mikaele azalaki kowelana na demo oyo azalaki kotambwisa bokonzi ya Bamede na Baperse.
4, 5. Bakonzi minei ya Perse oyo bayebisamaki na esakweli ezalaki banani?
4 Anzelu ya Nzambe alobaki lisusu ete: “Talá, mikonzi misato mosusu bakobima na [Perse, NW]; mpe oyo ya minei akozwa mosolo mingi na koleka bango nyonso; mpe wana ekosila ye kokóma makasi na ntina na mosolo na ye, akosanganisa nguya na ye nyonso mpo na etumba na bokonzi ya [Grèce, NW].” (Danyele 11:2) Bakonzi yango ya Perse ezalaki banani?
5 Bakonzi misato ya liboso ya bokonzi ya Perse ezalaki Sirise Monene, Cambyse II, mpe Dalio I. Lokola Bardiya (to ntango mosusu Gaumata oyo abɔtɔlaki bokonzi) ayangelaki bobele sanza nsambo, esakweli etángaki boyangeli na ye te mpo ezalaki mokuse mpenza. Na mobu 490 L.T.B., Dalio I, mokonzi ya misato, amekaki kobɔtɔla Grèce mpo na mbala ya mibale. Kasi na etumba ya Marathon, basoda ya Grèce bapanzaki basoda ya Perse mpe bakimaki na Asie Mineure. Atako Dalio amibongisaki malamumalamu mpo na kobunda lisusu na Grèce, akokaki kosala yango te mpo akufaki nsima ya mbula minei. Atikaki makambo yango na mabɔkɔ ya mwana na ye, Zelezese I, mokonzi “ya minei.” Ye akómaki Mokonzi Asierise oyo abalaki mokonzi-mwasi Esetele.—Esetele 1:1; 2:15-17.
6, 7. (a) Ndenge nini mokonzi ya minei ‘asangisaki nguya na ye nyonso mpo na kobunda na bokonzi ya Grèce’? (b) Ndenge nini etumba ya Zelezese na Grèce esukaki?
6 Ɛɛ, Zelezese I ‘asangisaki nguya na ye nyonso mpo na kobunda na bokonzi ya Grèce,’ elingi koloba, na bikólo bisangani ya bokonzi ya Grèce. Buku moko (The Medes and Persians—Conquerors and Diplomats) elobi ete: “Lokola baninga na ye balendisaki ye, Zelezese abundaki etumba monene na mai mpe na mokili.” Hérodote moto ya Grèce mpe nganga-mayele na masolo ya kala, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mitano L.T.B., akomaki ete “ezalaki etumba monene koleka bitumba mosusu nyonso.” Makomi na ye emonisi mpe ete mpo na kobunda etumba na mai monene, [Zelezese] ayanganisaki “basoda 517 610. Basoda oyo babundaka na makolo bazalaki 1 700 000; baoyo babundaka na mpunda bazalaki 80 000; esengeli mpe kotánga Baarabe oyo bazalaki kobunda na bakamela, mpe bato ya Libye oyo bazalaki kobunda na makalo, oyo nakanisi, bakokaki kokóma 20 000. Basoda nyonso wana, ezala baoyo babundaka na mai to baoyo babundaka na makolo, bakokaki kokóma bato 2 317 610.”
7 Lokola mokano na ye mpenza ezalaki ya kobɔtɔla Grèce mobimba, Zelezese I atambwisaki basoda na ye mpe babundaki na Grèce na mobu 480 L.T.B. Basoda ya Perse balongaki basoda ya Grèce na Thermopyles mpe babebisaki engumba Athènes. Nzokande, basukisaki bango na esanga ya Salamine. Basoda ya Grèce balongaki lisusu na engumba ya Platées, na mobu 479 L.T.B. Mokonzi moko te, kati na baoyo bakitanaki Zelezese na bokonzi ya Perse, abundisaki lisusu Grèce na boumeli ya mbula 143 oyo elandaki. Kasi na nsima mokonzi moko ya nguya abimaki na Grèce.
BOKONZI MOKO MONENE EKABWANI NA BITENI MINEI
8. “Mokonzi monene” oyo atɛlɛmaki ezali nani, mpe ndenge nini ‘ayangelaki na nguya’?
8 Anzelu alobaki ete: “Mokonzi monene mingi akobima, oyo akozala na nguya mingi mpe akosala lokola elingi ye.” (Danyele 11:3) Wana azalaki bobele na mbula 21, Alesandala ‘abimaki’ mokonzi ya Makedonia na mobu 336 L.T.B. Akómaki “mokonzi monene”—Alesandala Monene. Lokola alukaki kokokisa mikano ya tata na ye Philippe II, Alesandala abɔtɔlaki bitúká ya Perse na Moyen-Orient. Akatisaki Ebale ya Pelata mpe Ebale ya Tigre elongo na basoda na ye 47 000 mpe apanzaki basoda 250 000 ya Dalio III na Gaugamèles. Dalio akimaki mpe abomamaki, ezalaki bongo nsuka ya bakitani ya bokonzi ya Perse. Grèce ekómaki nguya ya mokili mobimba mpe Alesandala ‘ayangelaki na nguya mingi mpe asalaki lokola elingi ye.’
9, 10. Ndenge nini emonani solo, lokola esakweli eyebisaki yango, ete bokonzi ya Alesandala ekotikala na mabɔkɔ ya bakitani na ye te?
9 Boyangeli ya Alesandala na mokili mobimba esengelaki kozala mokuse mpamba te anzelu ya Nzambe alobaki lisusu ete: “Wana esili ye kobima, bokonzi na ye ekobukana mpe ekokabwana epai na mipɛpɛ minei na likoló, mpe ekozala mpo na bakitani na ye te, mpe ekozala makasi lokola nguya na ye te; mpo ete bokonzi na ye ekopasolama mpe ekopesama na bamosusu, na baoyo te.” (Danyele 11:4) Alesandala akufaki liwa ya mbalakaka na Babilone na mobu 323 L.T.B. wana akokisaki naino mbula 33 te.
10 Bokonzi monene ya Alesandala etikalaki na mabɔkɔ ya “bakitani na ye” te. Ndeko na ye, Philippe III Arrhidée, ayangelaki koleka mbula nsambo te mpe abomamaki na mobu 317 L.T.B. Olympias, mama ya Alesandala nde atindaki ete báboma ye. Alesandala IV, mwana ya Alesandala, ayangelaki kino liwa na ye na mobu 311 L.T.B. Cassandre, moko na bakonzi ya basoda ya tata na ye abomaki ye. Héraclès (Hercule), mwana ya makango ya Alesandala, amekaki kozwa bokonzi na nkombo ya tata na ye kasi babomaki ye na mobu 309 L.T.B. Ezalaki na ndenge wana nde molɔngɔ ya bakitani ya Alesandala esukaki, elingi koloba “bokonzi” elongwaki na libota na ye.
11. Ndenge nini bokonzi ya Alesandala ‘ekabwanaki na mipɛpɛ minei ya likoló’?
11 Nsima ya liwa ya Alesandala, bokonzi na ye ‘ekabwanaki na mipɛpɛ minei.’ Bakonzi ya basoda na ye bazwanaki na matata ntango bakabolaki bamboka ya bokonzi yango. Antigonus I, mokonzi ya basoda oyo azalaki bobele na liso moko, alingaki koyangela bamboka nyonso oyo eyangelamaki na Alesandala. Kasi akufaki na etumba na Ipsus na etúká ya Phrygie. Banda na mobu 301 L.T.B., bakonzi minei ya basoda bayangelaki mikili nyonso oyo Alesandala abɔtɔlaki. Cassandre ayangelaki Makedonia na Grèce mpe Lysimaque ayangelaki Asie Mineure na Thrace. Séleucus I Nicator azwaki Mesopotamia na Sulia. Mpe Ptolémée Lagus ayangelaki Ezipito na Palestine. Bobele lokola liloba ya esakweli eyebisaki yango, bokonzi monene ya Alesandala ekabwanaki na bikonzi minei.
KOBIMA YA BAKONZI MIBALE OYO BAZALI KOWELANA
12, 13. (a) Ndenge nini bikonzi minei oyo biutaki na bokonzi ya Alesandala etikalaki bobele bikonzi mibale? (b) Banani bazalaki bakitani ya Séleucus na Sulia?
12 Mwa bambula nsima ya kokóma mokonzi, Cassandre akufaki, mpe na mobu 285 L.T.B., Lysimaque ayangelaki bitúká ya bokonzi ya Grèce oyo bizalaki na mikili ya Mpoto. Na mobu 281 L.T.B., Séleucus I Nicator abomaki Lysimaque na etumba mpe akómaki koyangela eteni monene ya bateritware oyo ezalaki na Azia. Antigonus II Gonatas, mwana ya mwana ya moko na bakonzi ya basoda ya Alesandala, akómaki mokonzi na Makedonia na mobu 276 L.T.B. Na nsima, bokonzi ya Loma ekómaki koyangela Makedonia. Mpe nsukansuka, Makedonia ekómaki etúká ya Loma na mobu 146 L.T.B.
13 Bobele bikonzi mibale kati na bikonzi minei oyo biutaki na bokonzi ya Alesandala nde bizalaki naino koyangela—bokonzi ya Séleucus I Nicator na bokonzi ya Ptolémée Lagus. Bakitani ya Séleucus bazalaki koyangela na Sulia. Kati na bingumba oyo Séleucus atongaki, tokoki kotánga Antiokia—oyo ekómaki mboka-mokonzi ya Sulia—mpe libongo ya Séleucie. Bambula mingi na nsima, ntoma Paulo ateyaki na Antiokia epai kuna bayekoli ya Yesu babéngamaki baklisto mpo na mbala ya liboso. (Misala 11:25, 26; 13:1-4) Séleucus abomamaki na mobu 281 L.T.B. kasi bakitani na ye bakobaki koyangela kino mobu 64 L.T.B., ntango mokonzi ya basoda ya Loma Cnaeus Pompée akómisaki Sulia etúká ya Loma.
14. Ntango nini bakitani ya Ptolémée bazwaki bokonzi na Ezipito?
14 Kati na bikonzi minei yango oyo biutaki na bokonzi ya Alesandala, bokonzi oyo eumelaki mingi koleka ezalaki bokonzi ya Ptolémée Lagus to Ptolémée I, oyo akómaki mokonzi na mobu 305 L.T.B. Bakitani ya Ptolémée bakobaki koyangela Ezipito kino ekweyaki na mabɔkɔ ya Loma na mobu 30 L.T.B.
15. Bakonzi mibale ya nguya oyo babimaki na bikonzi minei oyo biutaki na bokonzi ya Alesandala ezalaki banani, mpe ndenge nini babandaki kowelana kati na bango?
15 Na bongo, longwa na bikonzi minei yango oyo biutaki na bokonzi ya Alesandala, bakonzi mibale ya nguya babimaki—Séleucus I Nicator oyo ayangelaki Sulia mpe Ptolémée I oyo ayangelaki Ezipito. Kowelana ebandaki na bakonzi oyo mibale, “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” oyo balobelami na mokanda ya Danyele mokapo 11. Anzelu ya Yehova atángaki nkombo ya bakonzi yango te mpo ete ezali bakonzi ndenge na ndenge oyo bazali kokitana na bokonzi mpe bikólo na bango bizali kobongwana na boumeli ya bikeke. Na esika ya kolobela makambo nyonso, anzelu alobelaki bobele makambo ya bakonzi yango oyo etalelaki kowelana wana.
EBANDELI YA KOWELANA
16. (a) Bakonzi yango mibale bazalaki na nɔrdi to na sudi ya banani? (b) Wapi bakonzi oyo bakokisaki libosoliboso mokumba ya “mokonzi ya nɔrdi” to ya “mokonzi ya sudi”?
16 Yoká! Anzelu ya Yehova azali koyebisa ebandeli ya kowelana yango na maloba oyo: “Mokonzi ya sudi akokóma makasi, ata mpe moko na bato ya lokumu [ya Alesandala]; mpe ye [mokonzi ya nɔrdi] akoleka ye mpe akoyangela mpenza na nguya monene koleka oyo ya mokonzi mosusu oyo azali koyangela.” (Danyele 11:5, NW) Ebengeli “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” esalelami mpo na kolobela bakonzi oyo bazalaki na nɔrdi mpe na sudi ya libota ya mosakoli Danyele ntango Bayuda basikolamaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na mokili ya Yuda. “Mokonzi ya sudi” ya libosoliboso ezalaki Ptolémée I na Ezipito. Séleucus I Nicator, mokonzi ya Sulia, moko na bakonzi ya basoda ya Alesandala oyo alekaki Ptolémée I, ayangelaki na ‘nguya mingi.’ Azalaki bongo “mokonzi ya nɔrdi.”
17. Na ebandeli ya kowelana ya mokonzi ya nɔrdi na mokonzi ya sudi, mokili ya Yuda ezalaki na nse ya boyangeli ya nani?
17 Na ebandeli ya kowelana yango, mokili ya Yuda ezalaki na nse ya boyangeli ya mokonzi ya sudi. Banda soko mobu 320 L.T.B., Ptolémée I abéngaki Bayuda báya kofanda na Ezipito. Etuluku ya Bayuda esalemaki bongo na engumba Alexandrie, epai kuna Ptolémée I asalaki ndako oyo ezalaki ebombelo monene ya mikanda. Bayuda oyo batikalaki na Yuda bazalaki na nse ya bokonzi ya Ptolémée, mokonzi ya sudi, oyo ayangelaki Ezipito kino mobu 198 L.T.B.
18, 19. Na boumeli ya ntango, ndenge nini bakonzi mibale yango oyo bazalaki kowelana ntango nyonso basalaki “kondimana”?
18 Na ntina na bakonzi mibale yango, anzelu asakolaki ete: “Na nsima na mbula mwa mingi bakosala kondimana; mwana mwasi ya mokonzi ya mokili ya ngɛlɛ [“mokonzi ya sudi,” NW] akokóma epai na mokonzi ya mokili ya likoló [“mokonzi ya nɔrdi,” NW] mpo na kosala bondeko na kati na bango; nde akokoka kosala ntango molai te, mpe ye lokola, mpe mwana na ye bakoumela te; nde ye, mpe baoyo bakendaki na ye, mpe mwana na ye, mpe ye oyo akamataki ye bakopesama na kufa.” (Danyele 11:6) Ndenge nini makambo yango ekokisamaki?
19 Esakweli elobelaki Antiochus I te, atako akitanaki tata na ye Séleucus I Nicator, mpo abundaki mpenza etumba monene te na mokonzi ya sudi. Kasi mokitani na ye Antiochus II nde abundaki mingi na Ptolémée II, mwana ya Ptolémée I. Antiochus II na Ptolémée II bazalaki mokonzi ya nɔrdi na mokonzi ya sudi. Antiochus II abalaki Laodice mpe babotaki mwana mobali, Séleucus II. Nzokande, Ptolémée II azalaki na mwana mwasi na nkombo Bérénice. Na mobu 250 L.T.B., bakonzi yango mibale basalaki “kondimana.” Mpo na kotosa masɛngami ya boyokani yango, Antiochus II abomaki libala na mwasi na ye Laodice mpe abalaki Bérénice, “mwana mwasi ya mokonzi ya sudi.” Babotaki mwana mobali oyo akitanaki ye na bokonzi ya Sulia na esika ya mwana oyo babotaki na Laodice.
20. (a) Ndenge nini “lobɔkɔ” ya Bérénice esalaki ntango molai te? (b) Ndenge nini Bérénice na “baoyo bakendaki na ye” na ‘oyo alendisaki ye’ basundolamaki? (c) Nani akómaki mokonzi ya Sulia nsima wana Antiochus II abungisaki “lobɔkɔ” na ye, elingi koloba nguya na ye?
20 Tata ya Bérénice, Ptolémée II, asimbaki ye na “lobɔkɔ,” elingi koloba apesaki ye bokonzi. Ntango tata na ye akufaki na mobu 246 L.T.B., Bérénice ‘asalaki ntango molai te’ na mobali na ye. Antiochus II aboyaki ye, azongelaki Laodice mpe aponaki mwana na bango mpo azala mokitani na ye. Laodice abomisaki Bérénice na mwana na ye. Na ntembe te, bato ya mosala oyo Bérénice autáká na bango na Ezipito kino na Sulia—‘baoyo ayaki na bango’—babomamaki mpe lokola. Kutu Laodice atyelaki Antiochus II pwazɔ, mpe bongo ‘lobɔkɔ na ye’ to nguya na ye mpe ‘ekokaki kosala ntango molai te.’ Na bongo, tata ya Bérénice—‘tata moboti’—mpe mobali na ye moto ya Sulia—oyo ‘alendisaki’ ye na mwa ntango—bango nyonso bakufaki. Séleucus II, mwana ya Laodice, atikalaki ye moko mpo na kozwa bokonzi ya Sulia. Ndenge nini mokitani na bokonzi na libota ya Ptolémée atalelaki makambo oyo nyonso?
MOKONZI ALANDELAKI LIWA YA NDEKO NA YE YA MWASI
21. (a) Nani azalaki ‘mombóto’ ya ‘misisa’ ya Bérénice, mpe ndenge nini ‘atɛlɛmaki’? (b) Ndenge nini Ptolémée III ‘akɔtaki na ebombelo makasi ya mokonzi ya [nɔrdi]’ mpe anyataki ye?
21 Anzelu alobaki ete: “Ntango yango [mombóto, NW], longwa na [misisa, NW] na mwana mwasi, ekotɛlɛma na esika ya [mokonzi ya sudi, NW]; ye akotɛmɛla basoda, mpe akokɔta na ebombelo makasi ya [mokonzi ya nɔrdi, NW] mpe akosalela bango lokola elingi ye, mpe akoleka bango.” (Danyele 11:7) “Mombóto” ya baboti ya Bérénice to ‘mosisa’ na bango ezalaki ndeko mobali ya Bérénice. Nsima ya liwa ya tata na ye, ndeko na ye ya mobali, Ptolémée III, ‘atɛlɛmaki’ lokola mokonzi ya sudi, Falo ya Ezipito. Na mbala moko, akanaki kolandela liwa ya ndeko na ye ya mwasi. Akendaki kobunda na Séleucus II, mokonzi ya Sulia, ye moto oyo Laodice asalelaki mpo na koboma Bérénice na mwana na ye. Abundisaki “ebombelo makasi ya mokonzi ya nɔrdi.” Ptolémée III abɔtɔlaki eteni ya engumba ya Antiokia oyo ebatelamaki makasi mpe abomaki Laodice. Ptolémée III akatisaki bamboka ya mokonzi ya nɔrdi wana azalaki kokende na ɛsti, abebisaki Babilone mpe abɔtɔlaki mikili kino Inde.
22. Eloko nini Ptolémée III amemaki lisusu na Ezipito, mpe mpo na nini ‘atikaki mokonzi ya nɔrdi na kimya na boumeli ya mwa bambula’?
22 Nini esalemaki na nsima? Anzelu ya Nzambe alobaki ete: “Akomema mpe banzambe na bango, mpe bikeko [na bango binangwi], mpe bisaleli ya motuya monene bisalami na palata mpe na wolo kuna na mokili na Ezipito; mpe na nsima akotika [mokonzi ya nɔrdi, NW] na kimya mbula mwa mingi.” (Danyele 11:8) Koleka mbula 200 liboso, Cambyse II, mokonzi ya Perse, alongaki Ezipito mpe amemaki banzambe ya Ezipito na mboka na ye, ‘bikeko na bango binangwi.’ Nsima ya kobebisa Susa, oyo ezalaki kala mboka-mokonzi, Ptolémée III azwaki lisusu bikeko yango mpe ‘azongisaki’ yango na Ezipito. Azongaki mpe na biloko mingi oyo abɔtɔlaki na etumba, “bisaleli ya motuya monene bisalemi na palata mpe na wolo.” Lokola asengelaki kosukisa botomboki oyo ebimaki na mboka na ye, Ptolémée III ‘atikaki mokonzi ya nɔrdi kimya’ mpe amonisaki ye lisusu mpasi te.
MOKONZI YA SULIA AZONGISI
23. Mpo na nini mokonzi ya nɔrdi ‘azongaki lisusu na mboka na ye mpenza’ nsima ya kokɔta na mokili ya mokonzi ya sudi?
23 Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi atalelaki makambo oyo nyonso? Bayebisaki mosakoli Danyele ete: ‘Ye oyo akokóma na mokili ya [mokonzi ya sudi, NW] nde akozonga lisusu na mokili na ye mpenza.’ (Danyele 11:9) Mokonzi ya nɔrdi—Séleucus II, mokonzi ya Sulia—azongisaki. Akɔtaki na “mokili” ya mokonzi ya sudi, mokonzi ya Ezipito, kasi alongaki na etumba te. Lokola atikalaki bobele na basoda moke, Séleucus II ‘azongaki na mboka na ye,’ amibombaki na Antiokia, mboka-mokonzi ya Sulia, soko na mobu 242 L.T.B. Na liwa na ye, mwana na ye Séleucus III akitanaki ye.
24. (a) Nini ekómelaki Séleucus III? (b) Ndenge nini Antiochus III, mokonzi ya Sulia, ‘akɔtaki mpe apanzaki’ mokili ya mokonzi ya sudi?
24 Esakweli elobaki nini na ntina na bakitani ya mokonzi ya Sulia, Séleucus II? Anzelu alobaki na mosakoli Danyele ete: “Bana mibali na ye [bakomibongisa] mpo na etumba mpe bakoyanganisa ebele na basoda mingi, mpe bakokɔta na mokili yango mpe bakopalangana mpe bakoleka na kati, mpe lisusu bakolekisa etumba kino ebombelo makasi na ye.” (Danyele 11:10) Kasi babomaki Séleucus III wana ayangelaki ata mbula misato te. Ndeko na ye ya mobali, Antiochus III, akitanaki ye na bokonzi ya Sulia. Mwana mobali oyo ya Séleucus II ayanganisaki ebele na basoda mpo na kobunda na mokonzi ya sudi, Ptolémée IV. Mokonzi ya sika ya Sulia, oyo akómaki mokonzi ya nɔrdi, alongaki etumba na Ezipito mpe abɔtɔlaki lisusu libongo ya Séleucie, etúká ya Cœlésyrie na bingumba ya Tulo na Ptolémaïs, mpe bingumba ya zingazinga. Apanzaki basoda ya Ptolémée IV mpe abɔtɔlaki bingumba mingi ya Yuda. Na mobu 217 L.T.B., na ntango ya molunge, Antiochus III atikaki Ptolémaïs mpe akendaki na nɔrdi, “kino ebombelo makasi na ye” na Sulia. Kasi mbongwana elingaki kosalema.
MAKAMBO MABONGWANI
25. Epai wapi Ptolémée IV abundaki na Antiochus III, mpe nini ‘epesamaki na lobɔkɔ’ ya mokonzi ya sudi, mokonzi ya Ezipito?
25 Ndenge moko na mosakoli Danyele, biso mpe tozali mitema likoló mpo na kolanda oyo anzelu ya Yehova asakolaki na nsima ete: “[Mokonzi ya sudi, NW] akotɛlɛma na nkanda mpe akobima mpe [akobunda na mokonzi ya nɔrdi, NW]; mpe ye oyo akoyanganisa ebele monene, nde bakopesama na lobɔkɔ ya [mokonzi ya sudi, NW].” (Danyele 11:11) Ptolémée IV, mokonzi ya sudi, akendaki na basoda 75 000 mpo na kobunda na monguna na ye, mokonzi ya nɔrdi. Antiochus III, mokonzi ya nɔrdi, mokonzi ya Sulia, ayanganisaki “ebele monene” to basoda 68 000, mpo na kotɛmɛla ye. Kasi “ebele monene” yango ‘epesamaki na lobɔkɔ’ ya mokonzi ya sudi na etumba oyo babundaki na bokula ya engumba Rafia, pene na ndelo ya Ezipito.
26. (a) “Ebele” oyo babundaki na mokonzi ya sudi na Rafia ezalaki banani, mpe nini esɛngamaki na boyokani yango? (b) Ndenge nini Ptolémée IV ‘asalelaki nguya na ye te’? (c) Nani akómaki mokonzi ya sika ya sudi?
26 Esakweli elobi lisusu ete: “Wana esili ye kobuka ebele, motema na ye [ekokóma] na lolendo, mpe ata ye akokweisa nkóto zomi, nde akoleka te.” (Danyele 11:12) Ptolémée IV, mokonzi ya sudi, ‘abomaki’ basoda 10 000 ya Sulia oyo babundaka na makolo, basoda 300 oyo babundaka na mpunda mpe akangaki basoda 4 000. Bakonzi yango bayaki kosala boyokani oyo epesaki Antiochus III ndingisa ya kokoba koyangela libongo ya Séleucie na bokula ya mai monene kasi atika Foinike (Phénicie) mpe etúká ya Cœlésyrie. Lokola alongaki etumba yango, mokonzi ya sudi, mokonzi ya Ezipito ‘akómaki’ kosalela Yehova ‘lolendo’ mingi. Mokili ya Yuda etikalaki na mabɔkɔ ya Ptolémée IV. Nzokande, mokonzi ya sudi ‘asalelaki nguya na ye’ te mpo na kokoba kobunda na mokonzi ya nɔrdi, mokonzi ya Sulia. Na esika ya kolanda kobunda, Ptolémée IV amipesaki na bomoi ya mbindo, mpe Ptolémée V, mwana na ye ya mobali ya mbula mitano mpamba akómaki mokonzi ya sudi, mwa bambula liboso ya liwa ya Antiochus III.
MOBƆTƆLI AZONGI LISUSU
27. Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi azongaki na ‘nsuka ya ntango’ mpo na kobɔtɔla lisusu bamboka ya Ezipito?
27 Lokola azalaki kolonga bitumba nyonso, Antiochus III abéngamaki Antiochus Monene. Anzelu alobaki mpo na ye ete: “[Mokonzi ya nɔrdi akozonga na, NW] ebele lisusu, koleka oyo [ya] liboso na monene; mpe na [nsuka ya ntango, NW] nsima na mbula mwa mingi akoya na ebele na basoda mingi mpe na bilɔkɔ mingi.” (Danyele 11:13) Eleko oyo ebéngami “ntango” ezwaki mbula 16 to koleka nsima wana basoda ya Ezipito balongaki basoda ya Sulia na Rafia. Ntango elenge Ptolémée V akómaki mokonzi ya sudi, Antiochus III ayanganisaki “ebele lisusu koleka oyo ya liboso na monene” mpo na kobɔtɔla lisusu bamboka oyo mokonzi ya sudi, mokonzi ya Ezipito, abɔtɔlaki ye. Mpo na kolonga etumba yango, asangisaki mampinga na ye na oyo ya mokonzi ya Makedonia, Philippe V.
28. Mikakatano nini elenge mokonzi ya sudi akutanaki na yango?
28 Mokonzi ya sudi mpe akutanaki na mikakatano kati na bokonzi na ye mpenza. Anzelu alobaki ete: “Na ntango yango bato mingi bakotɛmɛla [mokonzi ya sudi, NW].” (Danyele 11:14a) Ya solo, bato mingi ‘batɛmɛlaki mokonzi ya sudi.’ Longola etumba oyo abundaki na Antiochus III ntango asangisaki mampinga na ye na oyo ya mokonzi ya Makedonia, elenge mokonzi ya sudi akutanaki na mikakatano na mboka na ye moko, Ezipito. Lokola Agathocle, mobateli ya biloko na ye, azalaki koyangela na nkombo na ye mpe akómaki kosalela bato ya Ezipito makambo na nko, bato mingi batombokaki. Anzelu alobaki lisusu ete: “Mpe bato ya etumba na kati na bato na yo [bakotomboka, NW] na ntina ete emonaneli ekokisama; nde bakokweya.” (Danyele 11:14b) Ata basusu kati na bato ya mosakoli Danyele bakómaki ‘bana ya bapunzi’ to batomboki. Kasi “emonaneli” nyonso oyo Bayuda yango bakokaki komona ete nsuka ya boyangeli ya mabota likoló na mokili na bango esili kokóma, ekozala bobele lokuta, mpe bakolonga te, elingi koloba “bakokweya.”
29, 30. (a) Ndenge nini “basoda ya mokili ya sudi” bakokaki te kobunda na basoda ya mokili ya nɔrdi? (b) Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi ayaki ‘kotɛlɛma na mokili kitoko’?
29 Anzelu ya Yehova asakolaki lisusu ete: “[Mokonzi ya nɔrdi akoya, NW], mpe akosala ngomba, mpe akokanga mboka oyo elendisami mpo na etumba. Mpe basoda ya mokili ya [sudi, NW] bakotɛlɛma te, ata basoda baponami te, mpo ete nguya ya kotɛlɛma ekozala te. Nde [mokonzi ya nɔrdi, NW] akosala lokola elingi ye, mpe moto akotɛlɛma liboso na ye te; mpe akotɛlɛma makasi na mokili kitoko mpe libebi ekokóma na lobɔkɔ na ye.”—Danyele 11:15, 16.
30 Mampinga ya Ptolémée V to “basoda ya mokili ya [sudi, NW]” bakokaki te etumba oyo babundaki na basoda ya mokili ya nɔrdi. Antiochus III amemaki Scopas, mokonzi ya basoda ya Ezipito, elongo na basoda ya mpiko 10 000 to ‘baoyo baponami,’ na engumba Panéas (na etúká Kaisalia na Filipo), mpo na kobunda na Sidoni, ‘mboka oyo ekembisami.’ Kuna Antiochus III ‘azingaki mboka’ mpe na mobu 198 L.T.B., abɔtɔlaki libongo ya Foinike oyo ezalaki na bokula ya mai monene. Asalaki “lokola elingi ye” mpamba te basoda ya mokonzi ya sudi, mokonzi ya Ezipito, bakokaki kotɛmɛla ye te. Na bongo, Antiochus III akendaki kobɔtɔla Yelusaleme, mboka-mokonzi ya “mokili kitoko,” Yuda. Na mobu 198 L.T.B., Yelusaleme na mokili ya Yuda elongwaki na mabɔkɔ ya mokonzi ya sudi, mokonzi ya Ezipito, mpe ekómaki na mabɔkɔ ya mokonzi ya nɔrdi, mokonzi ya Sulia. Na bongo, Antiochus III, mokonzi ya nɔrdi, abandaki ‘kotɛlɛma na mokili kitoko.’ ‘Abomaki mpenza’ Bayuda nyonso na Baezipito oyo batɛmɛlaki ye. Kasi kino ntango nini mokonzi ya nɔrdi akokoba kosala lokola elingi ye?
BOKONZI YA LOMA ESUKISI MOBƆTƆLI
31, 32. Mpo na nini mokonzi ya nɔrdi asalaki “kondimana” ya kimya na mokonzi ya sudi?
31 Anzelu ya Yehova apesi biso eyano ete: “[Mokonzi ya nɔrdi] akotya mpe motema na ye na koya na nguya mobimba na bokonzi na ye, nde akosala kondimana na mokonzi ya [sudi, NW]. Mpe akopesa ye mwana mwasi na ye mpenza, ete abebisa ye; nde ekobonga na ye te mpe ekosunga ye te.”—Danyele 11:17.
32 Antiochus III, mokonzi ya nɔrdi, ‘atyaki motema na ye’ mpo na koyangela Ezipito “na nguya mobimba ya bokonzi na ye.” Kasi asukaki na kosala “kondimana” ya kimya elongo na Ptolémée V, mokonzi ya sudi. Makambo oyo bakonzi ya Loma basɛngaki epusaki Antiochus III ete atika mwango na ye. Ntango ayokanaki na Philippe V, mokonzi ya Makedonia, mpo bábɔtɔla elenge mokonzi ya Ezipito bamboka oyo ye azalaki koyangela, bato oyo bazalaki kobatela Ptolémée V basɛngaki lisungi ya Loma. Bakonzi ya Loma bamonaki yango libaku malamu ya komatisa nguya ya bokonzi na bango, na bongo, babimisaki makasi nyonso.
33. (a) Masɛngami nini Antiochus III na Ptolémée V batyaki na ntina na kondimana na bango mpo na kimya? (b) Cléopâtre I na Ptolémée IV babalanaki mpo na nini, mpe mpo na nini libala yango elongaki te?
33 Bakonzi ya Loma bapusaki Antiochus III ete ayokana na mokonzi ya sudi. Kasi, na esika ya kozongisa mikili oyo ye abɔtɔlaki, lokola Loma esɛngaki yango, Antiochus III akanaki nde kopesa mwana na ye ya mwasi Cléopâtre I—“mwana mwasi na ye mpenza”—mpo abalana na Ptolémée V. Akanaki mpe kopesa Ptolémée V bitúká lokola mokili ya Yuda, “mokili kitoko,” ete yango ezala libonza mpo na libala na ye. Nzokande, na mobu 193 L.T.B., na mokolo ya libala, mokonzi ya Sulia aboyaki kopesa Ptolémée V bitúká yango. Libala yango ezalaki bobele mpo na matomba ya politiki, mpo na kotya Ezipito na nse ya bokonzi ya Sulia. Kasi mwango yango elongaki te mpo Cléopâtre I ‘alandaki tata na ye te,’ alandaki nde mobali na ye. Ntango etumba ebimaki kati na Antiochus III na Baloma, Ezipito ebundaki na ngámbo ya Loma.
34, 35. (a) Tángá ‘mikili ya bokula’ oyo mokonzi ya nɔrdi atyaki miso. (b) Ndenge nini bokonzi ya Loma esukisaki “lolendo” ya mokonzi ya nɔrdi? (c) Ndenge nini Antiochus III akufaki, mpe nani akómaki mokonzi ya sika ya nɔrdi?
34 Kolobeláká ndenge mokonzi ya nɔrdi akokoka lisusu kobunda te, anzelu alobaki lisusu ete: “Mpe ye [Antiochus III] akobaluka epai na mikili ya bokula mpe akobɔtɔla ebele. Mpe motambwisi moko [Loma] akosukisa lolendo na ye epai na ye [Loma], na boye ete lolendo na ye [oyo ya Antiochus III] ekozala te. Ye [Loma] akozongisa yango likoló na ye. Mpe ye [Antiochus III] akotalela bibombelo makasi ya mboka na ye mpenza, mpe akobɛta libaku mpe akokweya solo, mpe akozwama te.”—Danyele 11:18, 19, NW.
35 ‘Mikili ya bokula’ ezalaki Makedonia, Grèce na Asie Mineure. Na mobu 192 L.T.B., etumba ebimaki na Grèce mpe Antiochus III asengelaki kokende kuna. Loma esepelaki te lokola Antiochus III, mokonzi ya Sulia, alukaki kobɔtɔla lisusu bamboka mosusu; na bongo, Loma ebundaki na ye. Bokonzi ya Loma elongaki, mokonzi yango akweyaki na etumba ya Thermopyles. Mbula moko nsima ya kokweya na ye na etumba ya Magnésie na mobu 190 L.T.B., Antiochus III, mokonzi ya Sulia, azongisaki bamboka nyonso oyo ye abɔtɔlaki na Grèce, na Asie Mineure mpe na wɛsti ya Ngomba Taurus. Bakonzi ya Loma bafutisaki ye amande monene mpe bakómaki bongo koyangela mokonzi ya Sulia oyo azalaki mpe mokonzi ya nɔrdi. Lokola babénganaki ye na Grèce mpe na Asie Mineure mpe babɔtɔlaki ye masuwa na ye nyonso ya bitumba, Antiochus III ‘atyaki lisusu miso na bibombelo makasi ya mokili na ye mpenza,’ Sulia. Baloma ‘basalaki ye makambo na nko lokola ye asalaki bango.’ Antiochus III akufaki ntango alingaki kobɔtɔla bozwi ya tempelo moko na Élymaïs na ekólo Perse na mobu 187 L.T.B. ‘Akufaki’ mpe mwana na ye ya mobali Séleucus IV akitanaki ye lokola mokonzi ya nɔrdi.
KOWELANA EZALI KOKOBA
36. (a) Ndenge nini mokonzi ya sudi amekaki kokoba na bitumba, mpe nini ekómelaki ye? (b) Ndenge nini Séleucus IV akufaki, mpe nani akitanaki ye?
36 Ptolémée V, mokonzi ya sudi, asalaki makasi mpo na kobɔtɔla bitúká oyo asengelaki kozwa lokola libonza ya libala na ye na Cléopâtre, kasi akokaki te mpo babomaki ye na pwazɔ. Ptolémée VI akitanaki ye. Nini ekómelaki Séleucus IV? Lokola asengelaki na mbongo mpo na kofuta amande monene oyo bakonzi ya Loma bakatelaki ye, atindaki mobombi-mosolo na ye Héliodore mpo na kokamata bozwi ya tempelo ya Yelusaleme na makasi. Lokola Héliodore azalaki kolinga kokóma mokonzi, abomaki Séleucus IV. Kasi mokonzi Eumène ya Pergame na ndeko na ye ya mobali Attale batyaki Antiochus IV mokonzi mpo azalaki ndeko ya Séleucus IV oyo babomaki.
37. (a) Ndenge nini Antiochus IV alingaki komonisa ete ye aleki Yehova Nzambe na makasi? (b) Lokola Antiochus IV atyolaki tempelo ya Yehova, likambo yango esukaki ndenge nini?
37 Antiochus IV, mokonzi ya sika ya nɔrdi, alingaki komonisa ete ye aleki Nzambe na makasi na kolukáká kolimwisa losambo ya Yehova. Mpo na kotuka Yehova, akómisaki tempelo ya Yelusaleme esika ya losambo ya Zeu to Jupiter. Na Desɛmbɛ ya mobu 167 L.T.B., atongaki etumbelo ya bapakano likoló na etumbelo monene, oyo ezalaki na libándá ya tempelo, epai kuna bazalaki kopesa Yehova mbeka ya kotumba mokolo na mokolo. Mikolo zomi na nsima, bapesaki mbeka na Zeu na etumbelo ya bapakano. Kotuka Yehova ndenge wana epusaki Bayuda bátomboka na ntango ya Bamakabe. Antiochus IV abundisaki bango mbula misato mobimba. Na mobu 164 L.T.B., na aniversere ya kotuka yango, Yuda Makabe abulisaki lisusu tempelo mpo na Yehova mpe abandisaki Elambo ya Bofungoli—Hanukkah.—Yoane 10:22.
38. Ndenge nini boyangeli ya Bamakabe esukaki?
38 Ekoki kozala ete Bamakabe basalaki boyokani na bokonzi ya Loma na mobu 161 L.T.B. mpe basalaki boyangeli na mobu 104 L.T.B. Kasi matata ekobaki kati na bango mpe mokonzi ya nɔrdi, mokonzi ya Sulia. Nsukansuka, basɛngaki lisungi ya Loma. Cnaeus Pompée, ye moto ya Loma, mokonzi ya basoda, abɔtɔlaki Yelusaleme na mobu 63 L.T.B. nsima ya kozingela yango sanza misato. Na mobu 39 L.T.B., badepite ya Loma baponaki Elode—moto ya Edome—azala mokonzi ya Yuda. Lokola asukisaki boyangeli ya Bamakabe, Pompée ayangelaki Yelusaleme na mobu 37 L.T.B.
39. Litomba nini ozwi na ndenge totaleli esakweli ya Danyele 11:1-19?
39 Oyo nde esengo ya komona kokokisama mpenza ya eteni ya liboso ya esakweli oyo ezali kolobela kowelana kati na bakonzi mibale! Ezali mpenza esengo koyekola masolo ya kala na bozindo mpe koyeba bakonzi oyo bazalaki na esika ya mokonzi ya nɔrdi to oyo ya mokonzi ya sudi, soko mbula 500 nsima wana nsango yango ya esakweli epesamaki na mosakoli Danyele! Nzokande, makambo ya politiki ya bakonzi oyo mibale ezali kobongwana, lokola kowelana na bango ezali kokoba banda ntango Yesu azaláká na mabelé kino lelo. Na koyokanisáká makambo ya mokili na makambo nyonso ya minene oyo eyebisamaki na esakweli oyo, tokozala na likoki ya koyeba bakonzi yango mibale oyo bazali kowelana.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Wapi ngámbo mibale oyo ebimisaki bakonzi ya nguya na bikonzi ya Grèce oyo biutaki na bokonzi ya Alesandala, mpe kowelana nini ebandaki kati na bakonzi yango?
• Lokola eyebisamaki na esakweli na Danyele 11:6, ndenge nini bakonzi yango mibale bayaki kosala “kondimana”?
• Ndenge nini kowelana elandanaki kati na
Séleucus II na Ptolémée III (Danyele 11:7-9)?
Antiochus III na Ptolémée IV (Danyele 11:10-12)?
Antiochus III na Ptolémée V (Danyele 11:13-16)?
• Libala ya Cléopâtre I na Ptolémée V ezalaki libala ya ndenge nini, mpe mpo na nini libala yango elongaki te (Danyele 11:17-19)?
• Litomba nini ozwi na likebi oyo otii na esakweli ya Danyele 11:1-19?
[Etanda/Bililingi na lokasa 228]
BAKONZI OYO BALOBELAMI NA DANYELE 11:5-19
Mokonzi Mokonzi
ya nɔrdi ya sudi
Danyele 11:5 Séleucus I Nicator Ptolémée I
Danyele 11:6 Antiochus II Ptolémée II
(Laodice, mwasi) (Bérénice, mwana mwasi)
Danyele 11:7-9 Séleucus II Ptolémée III
Danyele 11:10-12 Antiochus III Ptolémée IV
Danyele 11:13-19 Antiochus III Ptolémée V
(Cléopâtre I, mwana mwasi) Mokitani:
Mokitani: Ptolémée VI
Séleucus IV na
Antiochus IV
[Elilingi]
Elilingi ya Ptolémée II na mwasi na ye na mosolo ya ebende
[Elilingi]
Séleucus I Nicator
[Elilingi]
Antiochus III
[Elilingi]
Ptolémée VI
[Elilingi]
Ptolémée III na bakitani na ye batongaki tempelo oyo ya Horus na Idfu na nɔrdi ya Ezipito
[Karte/Bililingi na nkasa 216, 217]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Ebengeli “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” ezali mpo na kolobela bakonzi oyo bazalaki na nɔrdi mpe na sudi ya libota ya mosakoli Danyele
MAKEDONIA
GRÈCE
ASIE MINEURE
YISALAELE
LIBYE
EZIPITO
ETIOPIA
SULIA
Babilone
ARABIE
[Elilingi]
Ptolémée II
[Elilingi]
Antiochus le Grand
[Elilingi]
Libanga oyo bakomaki mibeko ya Antiochus le Grand
[Elilingi]
Elilingi ya Ptolémée V na mosolo ya ebende
[Elilingi]
Ekuke ya Ptolémée III na engumba Karnak na Ezipito
[Elilingi na lokasa mobimba 210]
[Elilingi na lokasa 215]
Seleucus I Nicator
[Elilingi na lokasa 218]
Ptolémée I