Mokapo ya zomi na minei
Bakonzi yango mibale babongwani
1, 2. (a) Nini epusaki Antiochus IV ete amikitisa mpo na kokokisa masɛngami ya Loma? (b) Ntango nini Sulia ekómaki etúká ya Loma?
ANTIOCHUS IV, mokonzi ya Sulia, abɔtɔlaki Ezipito mpe amikómisaki mokonzi. Ptolémée VI, mokonzi ya Ezipito oyo balongaki ye, asɛngaki lisungi ya bakonzi ya Loma mpe batindelaki ye ambasadɛrɛ Caïus Popilius Laenas. Akendaki na masuwa mingi mpe na bikateli ya sikisiki ya badepite ya Loma oyo basɛngaki na Antiochus IV ete atika koyangela Ezipito. Ambasadɛrɛ ya Loma akutanaki na mokonzi ya Sulia na engumba Éleusis pene na Alexandrie. Antiochus IV asɛngaki ye mwa ntango mpo azwa likanisi ya bapesi-toli na ye, kasi Laenas asalaki zolongano zingazinga ya Antiochus mpe alobaki na ye ete apesa eyano liboso ya kokatisa ndelo oyo atyelaki ye. Antiochus IV ayokaki nsɔni, amikitisaki, andimaki kotika koyangela Ezipito lokola bakonzi ya Loma basɛngaki ye mpe azongaki na Sulia na mobu 168 L.T.B. Yango esukisaki kowelana kati na mokonzi ya nɔrdi, Sulia mpe mokonzi ya sudi, Ezipito.
2 Lokola bakonzi ya Loma bazalaki koyangela mikili ya Moyen-Orient, bazalaki mpe koyangela Sulia. Nzokande, atako bakitani mosusu ya Séleucus bayangelaki Sulia nsima ya liwa ya Antiochus IV na mobu 163 L.T.B., kasi moko te atalelamaki lokola “mokonzi ya nɔrdi.” (Danyele 11:15, NW) Nsukansuka Sulia ekómaki etúká ya bokonzi ya Loma na mobu 64 L.T.B.
3. Ntango nini mpe ndenge nini Loma elekaki Ezipito na nguya?
3 Nsima ya liwa ya Antiochus IV, bakitani ya Ptolémée bayangelaki Ezipito mbula koleka 130 mpe bazwaki esika ya “mokonzi ya sudi.” (Danyele 11:14) Na mobu 31 L.T.B., na etumba ya Actium, Octave, mokonzi ya Loma alongaki basoda ya Cléopâtre VII, mokonzi-mwasi mokitani ya nsuka ya Ptolémée, oyo basanganaki na basoda ya moto moko ya Loma, Marc Antoine, makango na ye. Mbula moko nsima wana Cléopâtre amibomaki, Ezipito ekómaki mpe etúká ya bokonzi ya Loma mpe ebungisaki bongo esika na yango ya mokonzi ya sudi. Banda na mobu 30 L.T.B., bakonzi ya Loma bayangelaki Sulia na Ezipito. Tokoki kolikya ete sikoyo, biyangeli mosusu bisili kozwa esika ya mokonzi ya nɔrdi to ya mokonzi ya sudi?
MOKONZI MOKO YA SIKA ATINDI “MOKƆNGƆLI YA MPAKO”
4. Mpo na nini boyangeli mosusu esengelaki kozwa esika ya mokonzi ya nɔrdi?
4 Na ebandeli ya eleko ya molunge na mobu 33 T.B., Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye ete: “Wana ekomona bino [eloko ya mbindo oyo ezali koyeisa libebi, NW] kotɛlɛma na esika ya bulɛɛ, lokola na likambo lilobaki mosakoli Danyele, . . . bongo baoyo bazali na Yuda bákima kuna na ngomba.” (Matai 24:15, 16) Yesu azwaki maloba oyo na Danyele 11:31 mpe akebisaki bayekoli na ye na maloba yango ete na mikolo mizali koya ‘eloko ya mbindo oyo ezali koyeisa libebi’ ekobima. Maloba oyo etalelaki mokonzi ya nɔrdi, esakolamaki soko mbula 195 nsima ya liwa ya Antiochus IV, mokonzi ya nsuka na Sulia oyo azwaki esika yango. Na ntembe te, mokonzi mosusu asengelaki kozwa esika ya mokonzi ya nɔrdi. Esengelaki kozala nani?
5. Nani atɛlɛmaki lokola mokonzi ya nɔrdi mpe azwi esika oyo Antiochus IV azalaki na yango?
5 Anzelu ya Yehova Nzambe ayebisaki esakweli ete: “Na nsima mokitani na ye [ya Antiochus IV] akobima, oyo akotinda mokɔngɔli ya mpako na kati na [mokili ya nkembo]; nde na nsima na mikolo mingi te akobukana, na nkanda te mpe na etumba te.” (Danyele 11:20) ‘Oyo atɛlɛmaki’ ezalaki Octave, mokonzi ya liboso ya bokonzi ya Loma, oyo ayebanaki na nkombo ya Kaisala Augusite.—Talá etanda oyo elobi ete “Mokonzi moko akumisami, mosusu ayinami,” na lokasa 248.
6. (a) Ntango nini “mokɔngɔli ya mpako” alekaki na “mokili ya nkembo,” mpe ezalaki mpo na nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Augusite akufaki na “nkanda te mpe na etumba te”? (c) Mbongwana nini esalemaki na ntina etali mokonzi ya nɔrdi?
6 “Mokili ya nkembo” oyo Kaisala Augusite ayangelaki ezalaki “mokili kitoko”—mokili ya Yuda oyo ekómaki moko na bitúká ya Loma. (Danyele 11:16) Na mobu 2 L.T.B., Augusite atindaki “mokɔngɔli ya mpako” mpo na kotánga bato. Yango ekokaki kosalisa bakonzi ya Leta báyeba malamumalamu bato boni basengeli kofuta mpako to bato boni basengeli kokɔta na mosala ya soda. Mpo na kotosa mobeko ya mokonzi, Yosefu na Malia bakendaki kokomisa nkombo na Beteleme, esika oyo Yesu abotamaki lokola esakweli elobaki yango. (Mika 5:2; Matai 2:1-12) Na Augusto ya mobu 14 T.B.—“mikolo mingi te” to bobele nsima ya kopesa mobeko bátánga bato—Kaisala Augusite akufaki wana azalaki na mbula 76, “na nkanda” te mpo abomamaki te, “na etumba” mpe te mpo akufaki na bokɔnɔ. Na bongo, mokonzi ya nɔrdi abongwanaki! Ezalaki bokonzi ya Loma oyo emonisamaki na bakonzi na yango.
‘MOKONZI OYO AYINAMI ATƐLƐMI’
7, 8. (a) Nani azwaki esika ya Augusite lokola mokonzi ya nɔrdi? (b) Mpo na nini bapesaki mokitani ya Kaisala Augusite “lokumu ya mokonzi” na mitema mibale?
7 Anzelu akobaki koyebisa esakweli ete: “Na esika na ye [ya Augusite] moto [oyo bakoyina, NW] akobima, oyo lokumu ya mokonzi epesami na ye te; ye akobima pwasa mpe akokamata bokonzi na kokosa na monɔkɔ ya elɛngi. Bibele na basoda bakozindisama mpenza liboso na ye mpe bakobukana, mpe mokonzi ya kondimana lokola.”—Danyele 11:21, 22.
8 ‘Mokonzi oyo ayinami’ ezalaki bongo Tibɛli Kaisala, mwana ya Livie, mwasi ya misato ya Kaisala Augusite. (Talá etanda oyo elobi ete “Mokonzi moko akumisami, mosusu ayinami,” na lokasa 248.) Augusite azalaki koyina mwana yango ya mwasi na ye mpo azalaki na bizaleli mabe mpe mpo alingaki te ete Tibɛli akitana ye lokola mokonzi ya sika to Kaisala. Na bongo, bapesaki mwana yango ‘lokumu ya bokonzi’ na mitema mibale mpamba te bakitani nyonso basilaki kokufa. Na mobu 4 T.B., Augusite akamataki Tibɛli lokola mwana na ye mpe akómisaki ye mokitani ya bokonzi. Nsima ya liwa ya Augusite, Tibɛli—moto oyo ayinami—‘atɛlɛmaki,’ mpe akómaki mokonzi ya Loma mpe mokonzi ya nɔrdi wana azalaki na mbula 54.
9. Ndenge nini Tibɛli ‘akamataki bokonzi na kokosa na monɔkɔ na elɛngi’?
9 Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Tibɛli akosaki badepite na komonisáká ete alingaki te bátya ye mokonzi noki, sanza moko [nsima ya liwa ya Augusite].” Ayebisaki badepite ete moto moko te akoki komema mokumba monene ya koyangela Loma longola bobele Augusite. Asɛngaki na badepite ete ekólo ezonga repibliki mpe bápona etuluku ya bato oyo bakotambwisa yango na esika ya kotika mokumba nyonso na mabɔkɔ ya moto moko. Will Durant, nganga-mayele na masolo ya kala, akomaki ete: “Mpo na koyeba soki maloba na ye ezali maloba ya solo, badepite bakosaki ye na kokitisáká mitó lokola ete bazalaki kopesa ye limemya mpenza mpe na nsuka andimaki kozala mokonzi.” Durant alobaki lisusu ete: “Ezala mokonzi to badepite, bango nyonso bazwaki oyo bazalaki koluka na mayele mabe bongo. Tibɛli alingaki badepite bátya bibongiseli mosusu ya repibliki na bokonzi yango. Mpo soki alingaka yango te, akokaki koluka myango mosusu ya kopɛngola yango. Nzokande, lokola bazalaki kobanga mpe koyina ye, basengelaki kozongisa bibongiseli ya repibliki, atako bayebaki ete bibongiseli yango ezalaki mpenza makasi te.” Na lolenge yango, Tibɛli ‘akamataki bokonzi na kokosa na monɔkɔ na elɛngi.’
10. Ndenge nini ‘ebele na basoda babomamaki’?
10 Na oyo etali “bibele ya basoda”—mampinga ya bikonzi oyo bizalaki zingazinga—anzelu alobaki ete: ‘Bakozala mingi mpenza mpe bakobomama.’ Ntango Tibɛli akómaki mokonzi ya nɔrdi, Germanicus César, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, azalaki mokonzi ya basoda ya Loma na Ebale Rhin. Na mobu 15 T.B., Germanicus atambwisaki basoda na ye mpo na kobunda na Arminius, elombe mokonzi ya basoda ya Allemagne mpe alongaki ye. Nzokande, atako azalaki kolonga kasi basoda na ye bazalaki kokufa mingi na bitumba. Yango wana, Tibɛli atikaki kobunda na Allemagne. Kasi alukaki kotya mobulu na ekólo yango na kobimisáká etumba kati na banamboka. Tibɛli azwaki mpenza bibongiseli nyonso mpo na kobatela mboka. Lolenge wana ya kosala ebimisaki matomba. Tibɛli akokaki bongo kosukisa “bibele na basoda” oyo balingaki kokɔta na mboka mpe ‘koboma’ bato.
11. Ndenge nini ‘mokonzi ya kondimana abomamaki’?
11 “Mokonzi ya kondimana” oyo Yehova Nzambe asalaki elongo na Abalayama mpo na kopambola mabota nyonso ya mokili, ‘abomamaki.’ Yesu Klisto azali Mombóto ya Abalayama oyo alakamaki na kondimana yango. (Genese 22:18; Bagalatia 3:16) Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu asambaki liboso ya moto ya Loma guvernere Ponti Pilata na Yelusaleme. Banganga ya Bayuda bafundaki Yesu ete azalaki kotombokela mokonzi. Kasi Yesu alobaki na Pilata ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. . . . Bokonzi na ngai euti na awa te.” Lokola guvernere azwaki Yesu na mbeba moko te, Bayuda babangaki noki abimisa ye; mpo na yango bagangaki ete: “Soki [obimisi ye, NW], ozali moninga ya Kaisala te. Moto na moto oyo [akomikómisa, NW] mokonzi, azali kotombɔkela Kaisala.” Nsima ya kosɛnga liwa ya Yesu, balobaki ete: “Tozali na mokonzi [mosusu] te bobele Kaisala.” Kosaleláká mobeko ya “lèse-majesté,” Tibɛli akómaki kopesa etumbu ata mpo na mwa maloba mabe oyo moto akokaki koloba na Kaisala. Mpo na yango, Pilata akabaki Yesu mpo ‘abomama,’ elingi koloba kobaka ye na nzete ya mpasi.—Yoane 18:36; 19:12-16; Malako 15:14-20.
MOKONZI MABE ‘AKANI MYANGO MABE’
12. (a) Banani basalaki boyokani na Tibɛli? (b) Ndenge nini Tibɛli ‘akómaki makasi ata na bato mingi te’?
12 Anzelu ya Nzambe apesaki lisusu esakweli na ntina na Tibɛli ete: “Mpe longwa na ntango kondimana ekosalama na ye, akosala na kokosa; mpe akoya makasi ata na bato mingi te.” (Danyele 11:23) Badepite ya Loma basalelaki mibeko mpo na ‘koyokana’ na Tibɛli, kasi ye azalaki kotyela bango mpenza motema te. Tibɛli azalaki na mayele mabe, akómaki mpenza “makasi ata na bato mingi te.” Bato yango oyo bazalaki mingi te, ezalaki nde basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, oyo bazalaki na kaa na libándá ya engumba, pene na bifelo ya engumba ya Loma. Lokola basoda yango bazalaki pene na engumba, bazalaki kobangisa badepite mpe mpo na bango Tibɛli asukisaki botomboki nyonso na bokonzi na ye. Na bongo, Tibɛli azalaki makasi mpo azalaki na basoda soko 10 000.
13. Na lolenge nini Tibɛli alekaki bankɔkɔ na ye?
13 Anzelu apesaki lisusu esakweli ete: “Akokɔta pwasa na kati na ndambo na mokili oyo eleki na mbuma, mpe akosala yango esalaki batata na ye te mpe batata na batata na ye te: akopalanganisa na kati na bato na ye biloko bibɔtɔlaki ye mpe bipunzaki ye, mpe mosolo. [Akoanga, NW] mwango na ntina na mboka makasi, nde bobele kino elaka eponami.” (Danyele 11:24) Tibɛli azalaki ntango nyonso komona bato mosusu lokola banguna na ye. Yango wana, abomaki bato mingi mpenza na boumeli ya boyangeli na ye. Pene na nsuka ya boyangeli na ye, abomisaki lisusu bato mingi koleka na mabɔkɔ ya Séjan, mokonzi ya basoda na ye. Nsukansuka, bafundaki Séjan ye moko epai na mokonzi mpe abomamaki. Tibɛli anyokolaki bato koleka bankɔkɔ na ye.
14. (a) Ndenge nini Tibɛli akabolaki “biloko bibɔtɔlaki ye mpe bipunzaki ye” na bitumba na bitúká nyonso ya Loma? (b) Ndenge nini bato batalelaki Tibɛli ntango akufaki?
14 Nzokande, Tibɛli akabolaki “bilɔkɔ bibɔtɔlaki ye mpe bipunzaki ye” na bitumba na bitúká nyonso ya bokonzi ya Loma. Ntango akufaki, atikaki bato na ye na bomoi ya malamu. Bato bazalaki kofuta mpako na motuya moke mpenza, mpe Tibɛli azalaki kosunga baoyo bakutanaki na makama. Soki basoda to bakonzi ya Leta banyokoli moto to basaleli ye makambo na bosembo te, bakozwa etumbu makasi epai na mokonzi. Bokonzi na ye ya nguya esalaki ete mobulu ezala na mboka te mpe banzela malamu oyo atongaki etambwisaki mombongo malamu. Tibɛli azalaki kotalela mpenza ndenge misala ya Leta ezalaki kotambola mpo básalela bato makambo na bosembo, ezala na engumba ya Loma to na bingumba mosusu. Atyaki mibeko ya sika mpe mpo na mbongwana oyo Kaisala Augusite asalaki, bomoi ya bato ebongaki mpe yango etombolaki bizaleli malamu. Kasi Tibɛli ‘azalaki na myango na ye.’ Tacite, nganga-mayele ya masolo ya kala, alobaki ete Tibɛli azalaki mokosi mpe mozimbisi monene. Ntango akufaki na Marsi na mobu 37 T.B., ayebanaki lokola mokonzi mabe.
15. Ndenge nini Loma ekómaki na bozwi mingi na nsuka ya ekeke ya liboso mpe na ebandeli ya ekeke ya mibale ya ntango na biso?
15 Kati na bakitani ya Tibɛli oyo bazwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi, tokoki kotánga Gaius César (Caligula), Claude I, Néron, Vespasien, Titus, Domitien, Nerva, Trajan mpe Adrien. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete “ebele ya bakitani ya Augusite balandaki kosala misala ya Leta mpe misala ya botongi mboka ndenge ye atikaki, ata bazalaki kosala yango na molende te mpe likolólikoló.” Bobele buku yango elobi lisusu ete: “Na nsuka ya ekeke ya liboso mpe na ebandeli ya ekeke ya mibale, Loma ekómaki na bozwi mingi mpe na bato mingi mpenza.” Ata matata ezalaki mpo na kokata ndelo ya bokonzi ya Loma na bikólo mosusu na ntango wana, nde mbala ya liboso mpenza oyo mokonzi ya nɔrdi azwanaki na matata na mokonzi ya sudi ezalaki na ekeke ya misato ya ntango na biso.
ATƐMƐLAKI MOKONZI YA SUDI
16, 17. (a) Nani azwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi lokola eyebisami na Danyele 11:25? (b) Nani ayaki kozwa esika ya mokonzi ya sudi, mpe ndenge nini yango esalemaki?
16 Anzelu ya Nzambe akobaki na esakweli ete: “[Mokonzi ya nɔrdi] akolendisa nguya na ye mpe molende na ye epai na [mokonzi ya sudi, NW] na ebele monene ya basoda. Mpe [mokonzi ya sudi, NW] akosala etumba na ebele monene mingi mpe makasi mingi na basoda; nde [mokonzi ya nɔrdi] akotɛlɛma te, mpo ete bakoluka mayele na nkuku mpo na kobuka ye. Ata baoyo bakolya bilɔkɔ kitoko na ye bakobuka ye; ebele mobimba ya basoda na ye bakobebisama, mpe basoda mingi bakobomama.”—Danyele 11:25, 26.
17 Soko mbula 300 nsima wana Octave akómisaki Ezipito etúká ya Loma, Aurélien moto ya Loma azwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi. Na ntango yango, mokonzi-mwasi Septimia Zénobie, mokonzi ya etúká ya Palmyre oyo ezalaki na nse na boyangeli ya Loma, azwaki esika ya mokonzi ya sudia (Talá etanda oyo elobi ete “Zénobie—Mokonzi-mwasi ya Palmyre mobundi ya mpiko,” na lokasa 252.) Basoda ya Palmyre babɔtɔlaki Ezipito na mobu 269 T.B. Balobaka ete basoda yango babɔtɔlaki Ezipito mpo noki Baloma bábɔtɔla yango. Nzokande, Zénobie alingaki kokómisa Palmyre engumba monene koleka bingumba nyonso ya ɛsti mpe koyangela bitúká ya Loma oyo bizalaki kuna. Ntango bayebisaki ye mikano wana ya Zénobie, Aurélien abakisaki “nguya na ye mpe molende na ye” mpo na kotɛmɛla mokonzi-mwasi yango.
18. Ndenge nini Aurélien, mokonzi ya nɔrdi, na mokonzi-mwasi Zénobie mokonzi ya sudi, basukisaki kowelana na bango?
18 Zénobie, mokonzi ya sudi, ‘ayokaki nkanda’ mpe akendaki kobunda na mokonzi ya nɔrdi “na ebele monene mingi mpe makasi mingi na basoda” oyo batambwisamaki na bakonzi mibale ya basoda, Zabdas na Zabai. Kasi Aurélien abɔtɔlaki Ezipito mpe na nsima atindaki basoda na ye bákenda kobɔtɔla Asie Mineure mpe Sulia. Balongaki basoda ya Zénobie na etumba na engumba Émèse (lelo oyo Homs) mpe Zénobie amibombaki na Palmyre. Ntango Aurélien azingelaki engumba yango, Zénobie abundaki makasi mpenza kasi alongaki te. Ye na mwana na ye ya mobali bakimaki na Perse kasi Baloma bakangaki bango ntango balingaki kokatisa Ebale Pelata. Na mobu 272 T.B., basoda ya Palmyre batikaki engumba na bango na mabɔkɔ ya banguna. Aurélien abomaki Zénobie te kasi alakisaki ye na bato ya Loma lokola mokangami monene ntango asalaki defile mpo na kosepela bolongi na ye na mobu 274 T.B. Bapesaki Zénobie limemya oyo ebongaki na ye mpe afandaki na Loma tii na liwa na ye.
19. Ndenge nini Aurélien akweyaki na ‘mitambo oyo batyelaki ye’?
19 Aurélien ye moko mpe ‘alongaki te liboso na mitambo oyo batyelaki ye.’ Na mobu 275 T.B., akendaki kobunda na ekólo Perse. Ntango azalaki kozela na etúká ya Thrace ete básala gbagba mpo akatisa na Asie Mineure, baoyo ‘bazalaki kolya biloko na ye’ basalaki mwango mpo na ‘koboma’ ye. Alingaki kopamela mokomeli na ye Eros mpo na mbeba oyo ye asalaki. Nzokande, Eros akomaki bankombo ya bakonzi mosusu ya basoda na lokuta mpe alakisaki yango ete mokonzi akanaki koboma bango. Ntango bamonaki bankombo yango, bakonzi ya basoda balukaki mayele mpo na koboma Aurélien.
20. Ndenge nini “ebele ya basoda” ya mokonzi ya nɔrdi ‘babomamaki’?
20 Mokumba ya mokonzi ya nɔrdi esukaki te na liwa ya Aurélien. Bakonzi mosusu ya Loma bazwaki esika yango. Na ntango mosusu, mokonzi moko azalaki koyangela na wɛsti mpe mokonzi mosusu na ɛsti. Na boyangeli ya bakonzi oyo “ebele mobimba ya basoda” ya mokonzi ya nɔrdi ‘babomamaki,’ to ‘bapanzanaki,’b mpe mingi ‘bakufaki’ na bitumba oyo bato ya Allemagne oyo bazalaki kouta na nɔrdi bazalaki kobundisa bango. Ba Goths bakɔtaki na mokili ya Loma na ekeke ya minei ya ntango na biso. Libota moko nsima na libota mosusu ebundisaki Loma. Na mobu 476 T.B., Odoacre, mokonzi ya Allemagne, alongolaki mokonzi ya nsuka oyo ayangelaki na Loma. Banda ebandeli ya ekeke ya motoba, bokonzi ya Loma na wɛsti ekabwanaki, mpe bakonzi ya Allemagne bayangelaki Bretagne, Gaule, Italie, Afrika ya Nɔrdi mpe Espagne. Bokonzi ya Loma oyo ezalaki na ɛsti eumelaki kino na ekeke ya 15.
BOKONZI MONENE EKABWANI
21, 22. Mbongwana nini Constantin asalaki na ekeke ya minei ya ntango na biso?
21 Na esika ya kolobela na bozindo kokweya ya bokonzi ya Loma oyo esalemaki mokemoke na boumeli ya bikeke, anzelu ya Yehova alandaki koyebisa makambo mosusu ya minene oyo mokonzi ya nɔrdi na mokonzi ya sudi basengelaki kosala. Nzokande, kozongela mwa moke makambo mosusu oyo masalemaki na bokonzi ya Loma, ekosalisa biso tóyeba bakonzi yango mibale oyo bazali kowelana na ntango oyo ya nsuka.
22 Na ekeke ya minei, Constantin, mokonzi ya Loma, akómisaki boklisto ya lipɛngwi Lingomba ya Leta. Abéngisaki mpe atambwisaki likita moko ya Lingomba na engumba Nicée na etúká ya Asie Mineure na mobu 325 T.B. Na nsima, Constantin akómisaki engumba Byzance to Constantinople mboka-mokonzi na esika ya engumba ya Loma. Bokonzi ya Loma ekómaki koyangelama na mokonzi moko kino liwa ya Théodose I na mokolo ya 17 Yanuali na mobu 395 T.B.
23. (a) Ndenge nini bokonzi ya Loma ekabwanaki na nsima ya liwa ya Théodose? (b) Ntango nini bokonzi ya Loma na ɛsti esukaki? (c) Nani ayangelaki Ezipito banda 1517?
23 Nsima ya liwa ya Théodose, bana na ye bakabolaki bokonzi ya Loma. Honorius azwaki eteni ya wɛsti mpe Arcadius azwaki eteni ya ɛsti oyo mboka-mokonzi ezalaki Constantinople. Bretagne, Gaule, Italie, Espagne mpe Afrika ya Nɔrdi ezalaki na kati ya bitúká ya bokonzi ya Loma na wɛsti. Makedonia, Thrace, Asie Mineure, Sulia na Ezipito ezalaki bitúká ya eteni ya ɛsti. Na mobu 642 T.B., engumba ya Alexandrie, oyo ezalaki kala mboka-mokonzi ya Ezipito, ekweyaki na mabɔkɔ ya Ba Sarrasins (Bamizilma) mpe Ezipito ekómaki etúká ya Bakalife. Na Yanuali 1449, Constantin XI akómaki mokonzi ya nsuka ya bokonzi ya Loma na ɛsti. Na mokolo ya 29 Mai na mobu 1453, na litambwisi ya Sultan Mehmed II, Empire ottoman ebɔtɔlaki Constantinople mpe yango esukisaki bokonzi ya Loma na ɛsti. Na mobu 1517, Ezipito ekómaki etúká ya Turquie. Nzokande, na boumeli ya ntango, mokili yango oyo ezalaki kala mboka ya mokonzi ya sudi eyangelamaki na bokonzi mosusu oyo eutaki na wɛsti.
24, 25. (a) Engebene banganga-mayele mosusu ya masolo ya kala, nini esalaki ete Bokonzi Mosantu ya Loma ebotama? (b) Nsukansuka mbongwana nini ekɔtaki na nkombo “mokonzi” na Bokonzi Mosantu ya Loma?
24 Na bokonzi ya Loma na wɛsti, episkɔpɔ moko oyo akómaki Papa Léon I, ayebanaki mingi mpo ete atombolaki bokonzi ya papa na ekeke ya mitano ya ntango na biso. Na boumeli ya ntango, na bokonzi ya Loma na wɛsti, papa akómaki kopona bakonzi. Ezalaki na engumba ya Loma na mokolo ya Noele na mobu 800 T.B. nde Papa Léon III atyaki Charles (Charlemagne) oyo azalaki mokonzi ya Ba Francs, mokonzi ya bokonzi ya Loma na wɛsti. Molulu yango etombolaki lokumu ya bokonzi na mokili ya Loma mpe na makanisi ya banganga-mayele ya masolo ya kala, ezalaki ebandeli ya Bokonzi Mosantu ya Loma. Banda ntango wana bokonzi moko ezalaki na ɛsti mpe Bokonzi Mosantu ya Loma ezalaki na wɛsti, mpe bikonzi yango nyonso mibale emikumisaki ete ezalaki ya boklisto.
25 Wana ntango ezalaki koleka, bakitani ya Charlemagne bayangelaki malamu te. Na mbala mosusu kutu ebonga ya bokonzi etikalaki mpamba. Bobele na ntango yango, Otto I, mokonzi ya Allemagne, abɔtɔlaki ndambo monene ya nɔrdi mpe ya ntei ya Italie mpe amikómisaki mokonzi ya Italie. Na mokolo ya 2 Febwali na mobu 962 T.B., Papa Jean XII atyaki Otto I, mokonzi ya Bokonzi Mosantu ya Loma. Mboka-mokonzi na yango ezalaki na Allemagne, mpe bakonzi bazalaki bato ya Allemagne; ndenge moko na ebele na bato ya bokonzi yango. Bikeke mitano na nsima, bakitani ya Habsbourg na Autriche bazwaki kiti ya “bokonzi” mpe baumelaki na yango bambula mingi mpenza na eleko ya Bokonzi Mosantu ya Loma.
BAKONZI YANGO MIBALE BAMONANI POLELE
26. (a) Tokoki koloba nini na ntina na nsuka ya Bokonzi Mosantu ya Loma? (b) Nani amimonisaki mokonzi ya nɔrdi?
26 Napoléon I asukisaki mpenza Bokonzi Mosantu ya Loma ntango aboyaki kondima yango nsima ya kolonga Allemagne na mobu 1805. Lokola azalaki na nguya te ya kosimba bokonzi, Mokonzi Francis II atikaki bokonzi na mokolo ya 6 Augusto na mobu 1806 mpe azongaki koyangela na mboka na ye na Autriche. Nsima ya mbula 1 006, Bokonzi Mosantu ya Loma—oyo etyamaki na Papa Léon III mpe na Charlemagne, mokonzi ya Ba Francs—esukaki. Na mobu 1870, Loma ekómaki mboka-mokonzi ya bokonzi ya Italie mpe ezalaki lisusu kotambwisama na bapapa ya Vatican te. Na mbula oyo elandaki, Guillaume I oyo abéngamaki César to Kaiser abandaki koyangela bokonzi ya Allemagne. Na bongo, mokonzi ya nɔrdi na mikolo na biso—elingi koloba Allemagne—ayebanaki.
27. (a) Ndenge nini Ezipito ekómaki koyangelama na Angleterre? (b) Nani azwaki esika ya mokonzi ya sudi?
27 Kasi nani azali mokonzi ya sudi na ntango na biso? Lisolo ya bato ezali komonisa ete Angleterre ekómaki mokili ya nguya na ekeke ya 17. Lokola alingaki kobebisa mombongo ya Angleterre na mikili mosusu, Napoléon I abɔtɔlaki Ezipito na mobu 1798. Etumba ebimaki, mpe lokola Angleterre ezalaki na boyokani na Empire ottoman, emikɔtisaki na etumba. Mofalanse Napoléon atikaki Ezipito, mboka oyo ezalaki ya mokonzi ya sudi na ebandeli ya kowelana yango. Na boumeli ya ekeke oyo elandaki, Angleterre ekómaki na bokonzi mingi mpenza likoló na Ezipito. Nsima ya mobu 1882, Ezipito ezalaki na nse ya boyangeli ya Angleterre. Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki na 1914, Ezipito ezalaki na nse ya bokonzi ya Turquie mpe ezalaki koyangelama na mokonzi-molandi (vice-roi). Nsima wana Turquie emityaki na ngámbo ya Allemagne na ntango ya etumba, Angleterre elongolaki vice-roi na bokonzi mpe ekómaki koyangela Ezipito. Lokola boyokani ezalaki se kokóma makasi, États-Unis na Angleterre bakomaki nguya ya mokili mobimba. Bazali bango mibale na esika ya mokonzi ya sudi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo “mokonzi ya nɔrdi” to “mokonzi ya sudi” ekoki kosalelama mpo na kolobela boyangeli, mokonzi, mokonzi-mwasi to etuluku ya mabota.
b Talá maloba na nse ya lokasa na Danyele 11:26 na Biblia Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau avec notes et références, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Nani azalaki mokonzi ya liboso ya Loma oyo azwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi, mpe ntango nini atindaki “mokɔngɔli ya mpako”?
• Nani akómaki mokonzi ya nɔrdi nsima ya liwa ya Augusite, mpe ndenge nini ‘mokonzi ya kondimana abomamaki’?
• Ndenge nini Aurélien mokonzi ya nɔrdi, na Zénobie mokonzi ya sudi, basukisaki kowelana na bango?
• Nini ekómelaki bokonzi ya Loma, mpe mikili nini ya nguya ezwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi to ya mokonzi ya sudi na nsuka ya ekeke ya 19?
[Etanda/Elilingi na nkasa 248-251]
MOKONZI MOKO AKUMISAMI, MOSUSU AYINAMI
MOKONZI moko abongolaki repibliki oyo ebebaki na matata mpe akómisaki yango mokili oyo elekaki nguya na mokili mobimba. Mokonzi mosusu akómisaki mboka yango mboka ya bozwi mbala 20 na ntaka ya mbula 23. Moko na bango akumisamaki ntango akufaki, nzokande mosusu atyolamaki. Bakonzi yango mibale ya Loma bayangelaki na eleko oyo Yesu azalaki kosala mosala na ye na mabelé. Bakonzi yango mibale ezalaki banani? Mpo na nini bakumisaki moko kasi mosusu te?
‘AKÓMISAKI LOMA KITOKO KOLEKA NDENGE AKUTAKI YANGO’
Na mobu 44 L.T.B., ntango Jules César abomamaki, Gaïus Octave, mwana ya mwana ya ndeko na ye ya mwasi azalaki bobele na mbula 18. Lokola nkɔkɔ na ye Jules César azwaki ye lokola mwana na ye mpe mosangoli ya libula na ye, elenge Octave akendaki noki na Loma mpo na kozwa libula yango. Kuna akutanaki na botɛmɛli makasi ya Marc Antoine, mokonzi ya basoda. Ye alobaki ete azali mosangoli ya solo ya libula. Matata ebimaki mpe bawelanaki na boumeli ya mbula 13.
Basoda ya Cléopâtre, mokonzi-mwasi ya Ezipito, basanganaki na basoda ya makango na ye Marc Antoine (na mobu 31 L.T.B.) mpo na kobunda na Octave. Ye alongaki bango mpe asilisaki ntembe oyo batyelaki ye ete azali moyangeli ya Loma te. Na mbula oyo elandaki, Antoine na Cléopâtre bamibomaki, mpe Octave abɔtɔlaki Ezipito. Lokola mboka yango ebɔtɔlamaki, Loma ekómaki mokili oyo elekaki nguya na mokili mobimba.
Lokola ayebaki ete babomaki Jules César mpo na boyangeli na ye ya mabe, Octave asalaki na bokɛngi mpo ete alanda ndakisa na ye te. Mpo na yango, lokola bato ya Loma balingaki ete mboka ezonga repibliki, Octave atyaki bibongiseli ya boyangeli yango mpo na kosepelisa bango. Aboyaki bábénga ye “mokonzi monene” mpe “nkumu.” Alingaki kutu kotika mokumba ya kotala bitúká nyonso epai na badepite mpe kopesa bango mikumba mosusu oyo azalaki na yango. Mwango yango elongaki. Badepite basepelaki na likambo yango kasi basɛngaki Octave atikala na mikumba oyo azalaki na yango mpe akoba kotalela bitúká mosusu.
Na mokolo ya 16 Yanuali na mobu 27 L.T.B., badepite bapesaki Octave nkombo “Augusite,” oyo elimboli “Oyo atombolami, Oyo abulisami.” Octave asukaki te bobele na kondima nkombo yango kasi asalaki ete sanza moko ya manaka ebéngama na nkombo na ye ya sika. Adefaki mokolo moko ya sanza ya Febwali mpe atyaki yango na sanza ya Augusto mpo ete ezala na mikolo mingi ndenge moko na sanza ya Yuli, oyo nkombo na yango euti na Jules César. Octave akómaki bongo mokonzi ya liboso ya Loma mpe na nsima ayebanaki na nkombo ya Kaisala Augusite to “Augusite wa Yambo.” Na nsima, azwaki mpe nkombo ya “pontifex maximus” (nganga monene). Na ekeke ya 2 L.T.B.—mbula oyo Yesu abotamaki—badepite bapesaki ye nkombo Pater Patriae, elingi koloba “Tata ya Ekólo.”
Bobele na mbula yango, “mobeko ebimaki na Kaisala Augusite ete bákoma nkombo ya bato na mikili nyonso na mikanda . . . Bato nyonso bakendaki kokomama nkombo, moto na mboka na ye moto na mboka na ye.” (Luka 2:1-3) Na ntina na mobeko yango, Yesu abotamaki na Beteleme mpo na kokokisa esakweli ya Biblia.—Danyele 11:20; Mika 5:2.
Na boyangeli ya Augusite, makambo mazalaki kotambola na bosembo mpe mosolo ezalaki makasi. Augusite abongisaki mpe misala ya posita mpe atongaki banzela na bagbagba. Abongisaki mosala ya soda, azalaki mpe na basoda oyo babundaka na mai mpe atyaki basoda ya mpiko mpo na kobatela mokonzi. (Bafilipi 1:13) Na lisalisi na ye, bakomi-mikanda lokola Virgile mpe Horace babimisaki mikanda ya ntina mpe basali-bikeko basalaki bikeko kitoko oyo bizali na lokumu kino lelo oyo. Augusite asilisaki kotonga bandako minene oyo Jules César asilisaki te mpe abongisaki batempelo mingi. Pax Romana (“Kimya ya Loma”) oyo ye atyaki eumelaki mbula koleka 200. Na mokolo ya 19 Augusto na mobu 14 T.B., wana azalaki na mbula 76, Augusite akufaki mpe bakumisaki ye lokola nzambe.
Augusite alobaki na lolendo nyonso ete ‘akómisaki Loma kitoko koleka ndenge akutaki yango.’ Lokola alingaki te ete Loma ezonga na mobulu oyo ezalaki na yango na ntango ya repibliki, azwaki likanisi ya kobongisa mokitani na ye. Kasi Augusite azalaki na mokitani mpenza ya malonga te. Mwana ya ndeko na ye, bana mibale ya bana na ye, mobali ya mwana na ye mpe mwana ya ndeko na ye oyo ye abɔkɔlaki bakufaki bango nyonso, mpe bobele Tibɛli, mwana ya ndeko na ye oyo ye abɔkɔlaki nde atikalaki.
‘MOKONZI OYO AYINAMI’
Soko sanza moko nsima ya liwa ya Augusite, badepite ya Loma batyaki Tibɛli mokonzi wana azalaki na mbula 54. Ayangelaki kino ntango akufaki na sanza ya Marsi na mobu 37 T.B. Na bongo, azalaki mokonzi ya Loma na ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé.
Mokonzi nyonso azangaka mabe na malamu te; ndenge moko Tibɛli azalaki na bizaleli ya malamu mpe na bizaleli ya mabe. Na makambo na ye ya malamu, azalaki kobebisa mbongo mpambampamba te. Bokonzi na ye ekómaki bongo na bozwi mpe na mosolo mingi na kɛsi mpo na kosunga bato na ntango ya makama to na ntango ya mpasi. Kasi Tibɛli amikumisaki mpo na yango te, amimonaki lokola moto nyonso, aboyaki bankombo ya lokumu oyo bapesaki ye, mpe mingi mpenza azongisaki lokumu epai na Augusite kasi epai na ye moko te. Apesaki nkombo na ye na sanza moko te lokola Augusite na Jules César basalaki yango. Apekisaki mpe bato bákumisa ye na lolenge wana.
Nzokande, makambo mabe ya Tibɛli elekaki makambo na ye ya malamu. Azalaki kokanisela bato nyonso mabe, ete bazali kokanela ye. Koleka nyonso wana, azalaki mpenza moto ya mitema mibale. Yango wana abomaki bato mingi na bokonzi na ye, mpe mingimingi baninga na ye. Longola bifundeli minene lokola kotombokela mokonzi (lèse-majesté) oyo ezalaki kosɛnga etumbu monene, Tibɛli abakisaki bifundeli ya ntina te. Na ndakisa, komifinga yo moko. Na ntembe te, Bayuda balukaki elonga na mobeko oyo, lokola ezalaki makasi, mpo bápusa guvernere Ponti Pilata moto ya Loma aboma Yesu.—Yoane 19:12-16.
Tibɛli atyaki ebele ya basoda oyo bazalaki kobatela ye pene na Loma na bakaa oyo ye asalaki na nɔrdi ya engumba. Basoda yango bazalaki wana mpo na kobangisa badepite ete bákweisa bokonzi ya Tibɛli te mpe mpo básukisa mobulu nyonso oyo ekoki kobima. Tibɛli azalaki kosepela koyoka bato bazali koya epai na ye mpo na kofunda bazalani na bango. Yango epusaki ye aboma bato mingi mpenza na nsuka ya bokonzi na ye.
Ntango akufaki, bato bamonaki ye mokonzi mabe. Baloma basepelaki na liwa na ye mpe badepite baboyaki kokumisa ye lokola nzambe. Mpo na nyonso wana, Tibɛli akokisaki esakweli oyo elobaki ete ‘oyo ayinami’ akokóma ‘mokonzi ya nɔrdi.’—Danyele 11:15, 21.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Ndenge nini Octave akómaki mokonzi ya liboso ya Loma?
• Nini tokoki koloba na ntina na makambo minene oyo Augusite asalaki na boyangeli na ye?
• Bizaleli nini ya malamu mpe ya mabe Tibɛli azalaki na yango?
• Ndenge nini Tibɛli akokisaki esakweli na ntina na ‘oyo ayinami’?
[Elilingi]
Tibɛli
[Etanda/Bililingi na nkasa 252-255]
ZÉNOBIE—MOKONZI-MWASI YA PALMYRE MOBUNDI YA MPIKO
“AZALAKI moindo mpe nzoto sɛmbɛsɛmbɛ . . . Mino na ye ezalaki kongɛnga lokola mayaka, miso na ye ya minene mpe moindo ezalaki kongɛnga lokola mɔ́tɔ, kasi azalaki na maloba ya boboto mpenza. Mongongo na ye ezalaki koyokana malamu mpe kitoko. Alingaki kotánga mingi mpe na bongo akolisaki mayele na ye mingi. Ayebaki koloba Latin, ayebaki mpe koloba Greke, Syriaque mpe nkota ya Ezipito malamumalamu.” Wana ezali ndenge Edward Gibbon, nganga-mayele ya masolo ya kala, alobelaki Zénobie—mokonzi-mwasi ya Palmyre na Sulia, mobundi ya mpiko.
Odenat, moto ya lokumu na Palmyre, azalaki mobali ya Zénobie. Na mobu 258 T.B., batindaki Odenat ambasadɛrɛ na Loma mpo na kotɔnda ye na ndenge azalaki kobundisa Perse mpe kolonga yango. Mbula mibale na nsima, mokonzi ya Loma akómisaki ye corrector totius Orientis (guvernere ya bitúká nyonso ya Azia). Yango ezalaki mbano na ye na ndenge alongaki Chahpour I, mokonzi ya Perse, na etumba. Nsukansuka, Odenat amibéngaki “mokonzi ya bakonzi.” Kasi Odenat azalaki kolonga bitumba bobele mpo na makoki na ye moko te kasi mingi mpenza mpo na mpiko mpe miso makasi ya mwasi na ye Zénobie.
ZÉNOBIE AYOKI MPOSA YA KOKÓMA MOKONZI
Na mobu 267 T.B., ntango lokumu na ye ebandaki koyebana, Odenat na mokitani na ye babomamaki. Zénobie azwaki bongo esika ya mobali na ye mpamba te mwana na bango azalaki naino elenge mpe akokaki naino kosangola bokonzi te. Lokola azalaki kitoko, molende mpe mosali monene ya Leta oyo amesanaki kokenda na bitumba elongo na mobali na ye mpe ayebaki koloba nkota mingi malamu mpenza, Zénobie asangisaki bato na ye mpe batosaki ye. Lokola alingaki kokolisa mayele na ye ntango nyonso, Zénobie aponaki bato ya mayele mpo bázala basalani na ye. Moko na bapesi-toli na ye ezalaki Cassius Longin, moto ya filozofi mpe molobi ya makoki—oyo balobaka ete “azalaki lokola liziba ya mayele.” Na buku moko (Palmyra and Its Empire—Zenobia’s Revolt Against Rome), mokomi Richard Stoneman akomaki ete: “Na boumeli ya mbula mitano oyo elandaki liwa ya Odenat, Zénobie akómaki mokonzi monene na miso ya bato ya bitúká ya Azia.”
Na ngámbo moko ya teritware ya Zénobie ezalaki bokonzi ya Perse, oyo Zénobie na mobali na ye balɛmbisaki nguya na yango; mpe na ngámbo mosusu, bokonzi ya Loma oyo esilaki kolɛmba. Kolobeláká makambo oyo mazalaki kosalema na bokonzi ya Loma na ntango wana, J. M. Roberts, nganga-mayele ya masolo ya kala, alobaki ete: “Ekeke ya misato ezalaki . . . ntango ya mpasi mpo ete matata ebimaki na ndelo ya Loma na ɛsti mpe na wɛsti. Ezalaki ntango ya bitumba ya banamboka mpe kowela bokonzi. Bakonzi 22 (longola baoyo babɔtɔlaki bokonzi) bakitanaki na bokonzi mpe bakómaki koyangela.” Na epai mosusu, Zénobie, mokonzi-mwasi ya Sulia, akembisaki bokonzi na ye mpe akómaki mokonzi monene. Stoneman akomaki ete: “Na ntembe te ezalela ya bokonzi [ya Perse mpe ya Loma], epesaki ye likanisi ya kotya bokonzi moko oyo ekonyata bikonzi mibale wana.”
Na mobu 269 T.B., Zénobie azwaki libaku malamu ya kopalanganisa bokonzi na ye ntango motɔmbɔki moko alingaki kobɔtɔla bokonzi ya Loma na Ezipito. Basoda ya Zénobie bakɔtaki na bolɛmbu nyonso na Ezipito, basukisaki motɔmbɔki wana, mpe Zénobie akómaki koyangela mboka yango. Amikómisaki mokonzi-mwasi ya Ezipito mpe asalaki mosolo ya ebende na nkombo na ye. Sikoyo bokonzi na ye ebandaki na Ebale Nil kino Ebale Pelata. Ezalaki na ntango wana ya bomoi na ye nde Zénobie azwaki esika ya “mokonzi ya sudi.”—Danyele 11:25, 26, NW.
MBOKA-MOKONZI YA ZÉNOBIE
Zénobie akembisaki mboka-mokonzi Palmyre mpe abongisaki yango kino ekómaki kitoko lokola bingumba mosusu ya minene ya bokonzi ya Loma. Ezalaki na bato koleka 150 000. Mboka-mokonzi yango ezalaki na monene ya kilomɛtɛlɛ 21, etondaki na bandako kitoko mpo na bato nyonso, na batempelo, na bilanga ya fololo, na bandako ya makonzi minene mpe na bamonima. Balabala monene ya engumba yango ezalaki na ngámbo moko mpe na ngámbo mosusu na makonzi soko 1 500 oyo mokomoko ezalaki na bosanda ya mɛtɛlɛ 15, ndenge moko na makonzi oyo mazalaki na engumba ya Kolinti. Bikeko ndenge na ndenge mpe bikeko ya mitó ya bilombe ya mboka mpe ya bato ya bozwi oyo bazalaki kosunga mboka etondaki na engumba yango. Na mobu 271 T.B., Zénobie asalisaki bikeko ya ye moko mpe ya mobali na ye.
Tempelo ya Moi ezalaki ndako moko kitoko kati na bandako ya Palmyre mpe na ntembe te etombolaki losambo na engumba yango. Ntango mosusu Zénobie ye moko azalaki kosambela nzambe-moi. Nzokande, na ekeke ya misato, mangomba mazalaki mingi na Sulia. Na bokonzi ya Zénobie, baklisto, Bayuda mpe basambeli ya sanza na moi bazalaki. Bongo likanisi ya Zénobie ezalaki nini mpo na mangomba ndenge na ndenge oyo ezalaki na engumba yango? Mokomi Stoneman alobaki ete: “Mokonzi oyo azali na mayele akoki kotyola bonkɔkɔ to mimeseno ya bato na ye te. . . . Ezalaki . . . lokola nde engumba ya Palmyre esalemaki bobele mpo na losambo.” Emonani ete Zénobie apekisaki bato básambela te.
Bato mingi balingaki Zénobie mpo na bizaleli malamu oyo azalaki na yango. Kasi likambo ya ntina mingi koleka ezalaki ete akokisaki esakweli moko ya mokanda ya Danyele na kotalela mokumba na ye na makambo matali politiki. Kasi bokonzi ya Zénobie eumelaki koleka mbula mitano te. Na mobu 272 T.B., Aurélien, mokonzi ya Loma, abundisaki ye mpe abebisaki mpenza engumba ya Palmyre. Kasi ayokelaki Zénobie mawa; abomaki ye te. Balobaka ete Zénobie akómaki mwasi ya depite moko ya Loma mpe afandaki na ndako oyo bapesaki ye na Italie kino liwa na ye.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Ndenge nini balobelaki bomoto ya Zénobie?
• Wapi mwa makambo ya minene oyo Zénobie asalaki?
• Ndenge nini Zénobie azalaki kotalela makambo ya losambo?
[Elilingi]
Mokonzi-mwasi Zénobie azali koloba na basoda na ye
[Etanda/Bililingi na lokasa 246]
BAKONZI OYO BALOBELAMI NA DANYELE 11:20-26
Mokonzi Mokonzi
ya Nɔrdi ya Sudi
Danyele 11:20 Augusite
Danyele 11:21-24 Tibɛli
Danyele 11:25, 26 Aurélien Mokonzi-mwasi Zénobie
Kokweya Bokonzi Grande-Bretagne,
ya bokonzi ya Allemagne na nsima États-Unis na
ya Loma oyo na Angleterre, nguya ya
esakolamaki mokili mobimba
ebimisi
[Elilingi]
Tibɛli
[Elilingi]
Aurélien
[Elilingi]
Ekeko ya Charlemagne
[Elilingi]
Augusite
[Elilingi]
Masuwa ya Angleterre mpo na bitumba na ekeke ya 17
[Elilingi na lokasa mobimba 230]
[Elilingi na lokasa 233]
Augusite
[Elilingi na lokasa 234]
Tibɛli
[Elilingi na lokasa 235]
Mobeko ya Augusite esalaki ete Yosefu na Malia bákenda na Beteleme
[Elilingi na lokasa 237]
Lokola esakolamaki, Yesu ‘abomamaki’
[Bililingi na lokasa 245]
1. Charlemagne 2. Napoléon I 3. Guillaume I 4. Basoda ya Allemagne na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba